Kosalela Jéhovah ezali bolamu ya solo
“Esengo na ye oyo Nzambe na Yakobo azali lisungi na ye, mpe atii elikya epai na Jehovah, Nzambe na ye.”—NZEMBO 146:5, MN.
1, 2. Nini elobami na ntina na ndimbola ya bolamu, mpe bolamu elimboli nini mpo na bato mingi ya eleko na biso?
BOLAMU ezali nini? Bato bakolimbolaka maloba, bafilozofe mpe bateolojié bamekaki kolimbola yango uta bikeke mingi. Kasi bapesaki ndimbola motindo moko te. Encyclopédie britannique eyebisi ete: “‘Bolamu’ ezali moko na maloba oyo ndimbola na yango eyebani malamumalamu te.” Na ndenge emonani, bolamu elimboli makambo makeseni mpo na bamoko mpe basusu, engebene lolenge oyo bazali kotalela bomoi.
2 Mpo na bato mingi, bolamu elimboli na kolongono na nzoto, biloko ya mosuni mpe baninga malamu. Nzokande, basusu bazali na biloko nyonso wana, kasi bazali na esengo te. Mpo na mibali mpe basi oyo bamipesi na Jéhovah Nzambe, Biblia epesi likanisi likeseni mpenza na oyo bato bazali na yango na ntina na bolamu.
Likanisi likeseni na ntina na bolamu
3, 4. (a) Banani Yesu atangaki bango ete bazali bato na esengo? (b) Tosimbi nini na ntina na makambo oyo Yesu alobelaki ete makopesaka bolamu?
3 Kati na Lisoló na ye likoló na ngomba, Yesu Klisto alobaki te ete, mpo na kozala na bolamu, esengeli kozala na kolongono na nzoto malamu, kozala na biloko ya mosuni mpe biloko mosusu ya lolenge yango. Atangaki baoyo bazali “kobanza mposa na bango ya elimo” mpe baoyo bazali “na nzala mpe na mposa na boyengebene” ete bazali bato na esengo. Na ntango ayebisaki makambo wana mibale ya ntina mingi mpo na bolamu ya solo, Yesu alobaki likambo oyo limonani lokola ete ezali kokamwisa: “Esengo na baoyo bazali kolela mpo ete bakobɔndisama.” (Matai 5:3-6, MN) Ya solo, Yesu alingaki mpenza koloba te ete moto akozala na esengo wana akufeli ndeko na ye oyo alingaki mingi. Te, alobelaki nde baoyo bazalaki kooka mawa mpo na ezalela na bango ya bato na masumu mpe mpasi oyo ezali kouta na yango.
4 Ntóma Paulo alobaki ete bato bazali kokimela na nsé na lisumu mpo na elikya oyo ete “bakosikwa na boombo ya libebi.” (Baloma 8:21, 22) Bato oyo bazali kondima ebongiseli oyo Jéhovah asili kosala mpo na kolimbisa masumu na nzela na mbeka na lisiko na Klisto mpe bazali kosala mokano na Nzambe, balendisami mpenza mpe bayeisami bato na esengo. (Baloma 4:6-8) Kati na Lisoló likoló na ngomba, Yesu alobaki lisusu ete esengo “na basɔkemi,” “na bato na motema mawa,” “na bato na motema pɛto,” mpe “na bato na kimya.” Apesaki endimiseli ete bato wana na komikitisa bakobungisa bolamu na bango te, atako banyokwami. (Matai 5:5-11, MN) Tosimbi boye ete, makambo matombwami oyo matali bolamu, mazali kosala ete bazwi mpe babólá bazala motindo moko.
Moboko ya bolamu ya solo
5. Bolamu ya basaleli ya Jéhovah etongami likoló na eloko nini?
5 Bolamu ya solo ekoutaka na bozwi ya mosuni te. Salomo, mokonzi na mayele alobaki ete: “Mapamboli na Jéhovah makopesaka bozwi, mpe akobakisa mpasi elongo na yango te.” (Masese 10:22, MN) Mpo na bikelamu oyo bizali kondima boyangeli ya Jéhovah na molóngó mobimba, bolamu ekangani mpenza na mapamboli na Nzambe. Moto oyo amipesi na Jéhovah, oyo azwi mapamboli na Ye mpe azali kooka yango, ye wana azali mpenza moto na esengo. Engebene Biblia. bolamu ekotambolaka elongo na mayoki ya esengo mpe bosepeli kati na mosala ya Jéhovah.
6. Basaleli ya Jéhovah basengeli kosala nini mpo na kozala solo na esengo?
6 Bolamu ya solo ekoutaka na boyokani malamu elongo na Jéhovah. Etongami likoló na bolingo na Nzambe mpe na bosembo epai na ye. Basaleli ya Jéhovah, baoyo basili komipesa epai na ye, bazali kondima maloba oyo ya Paulo na motema mobimba, ete: “Moto moko te kati na biso azali kobika bobele mpo na ye moko, . . . tozali kobika mpo na Jéhovah, . . . tozali bato ya Jéhovah.” (Baloma 14:7, 8, MN) Na yango, tokoki kozwa bolamu ya solo te soki toboyi kotósa Jéhovah mpe soki toboyi kolanda mokano na ye na esengo. Yesu alobaki ete: “Esengo na baoyo bazali koyoka liloba na Nzambe mpe bazali kotósa yango!”—Luka 11:28, MN.
Makambo makopesaka bolamu mpo na ntango mokuse
7, 8. (a) Lolenge nini tokoki kokesenisa makambo oyo makopesaka bolamu? (b) Tokoki koloba nini na ntina na libala mpe kobota bana?
7 Tokoki kotanga makambo matali bolamu oyo malobelami awa na likoló ete, ezali makambo ya “moboko” to ya “makobongwana te,” mpo ete yango ezali na ntina mpo na basaleli ya Jéhovah na bileko nyonso. Kasi ezali na makambo mosusu oyo tokoki kotanga ete ezali “mpo na ntango mokuse,” makambo oyo makoki kopesa bolamu na ntango moko, nde na ntango mosusu, ekopesa bobele bolamu moke to mpe bolamu moko te. Na ntango ya batata na mabota mpe na eleko ezalaki liboso na boklisto, kobala mpe kozala na bana ezalaki na ntina mingi mpo na kozala na esengo. Yango emonisami na lilɔmbɔ monene oyo Rachel asalaki epai na Yakobo, ete: “Pesa ngai bana, soki boye te nakokufa.” (Genese 30:1) Ezaleli oyo na ntina na kobota eyokanaki na mokano na Jéhovah mpo na eleko wana.—Genese 13:14-16; 22:17.
8 Basaleli ya Jéhovah ya ntango na kala bazalaki kotalela libala mpe kobota bana lokola mapamboli mauti na Nzambe. Kasi makambo yango mpe makambo mosusu mapesaki bango bolózi na bileko ya mpasi na lisoló ya bomoi na bango. (Kokanisa Nzembo 127 mpe 128 na Yilimia 6:12; 11:22; Bileli 2:19; 4:4, 5) Emonani polele ete libala mpe kobota bana ezali te makambo masengeli kopesa bolamu na bileko nyonso.
Minzemba ya esengo na ntango ya kala
9. Mpo na nini mwana mwasi na Yefeta azalaki kokumisama mbula na mbula?
9 Ntalo monene ya basaleli ya Jéhovah bazwaki bolamu ya solo nzokande babalaki te. Mpo na kotósa ndai oyo tata na ye alapaki, mwana mwasi na Yefeta atikalaki monzemba. Na eleko moko, ye mpe baninga na ye balelaki na ntina na ye mpo ete asengelaki kotikala moseka na bomoi na ye mobimba. Kasi mosala na ye ya ntango nyonso na ndako na Jéhovah, mopesaki ye esengo mingi. Mbala mosusu azalaki moko na “basi oyo bazalaki kosala mosala mobongi na ekɔtelo ya hema na koyangana!” (Exode 38:8, MN) Yango esalaki ete akumisama mbula na mbula.—Basambisi 11:37-40.
10. Likambo nini Jéhovah asɛngaki na Yilimia, kasi atako bongo, Yilimia azalaki na mawa?
10 Lokola mosakoli Yilimia azalaki kobika na eleko ya mpasi, Nzambe apesaki ye lilako ete abala te mpe azala na bana te. (Yilimia 16:1-4) Atako bongo, Yilimia amonaki bosolo ya maloba oyo na Nzambe, ete: “Mapamboli na moto oyo akotyaka motema na ye epai na Jéhovah, mpe na moto oyo Jéhovah azali elikya na ye.” (Yilimia 17:7, MN) Na boumeli ya bambula koleka 40 oyo ye azalaki mosakoli, Yilimia asalelaki Nzambe na bosembo nyonso wana ezalaki ye bobele monzemba. Na lolenge toyebi, abalaki te mpe azalaki na bana te. Kasi nani akobɔta mwa ntembe moke ete Yilimia azalaki na esengo te, lokola batikali na Bayuda oyo ‘basepelaki mpo na malamu na Jéhovah’?—Yilimia 31:12.
11. Bandakisa nini tozali kokuta kati na Makomami na ntina na basaleli na sembo ya Jéhovah, baoyo bazalaki na esengo nzokande bazalaki na babalani te?
11 Ebele ya minzemba mosusu to mpe basi bakufeli mibali basalelaki Jéhovah na esengo, kozanga babalani. Totanga ndakisa ya mosakoli mwasi Ana; ekoki mpe kozala bongo mpo na Doloka, oyo abéngamaki Tabita; ntóma Paulo; mpe ndakisa monene eleki ya bato nyonso: Yesu Klisto.
Minzemba ya esengo na ntango na biso
12. Na mikolo na biso, likambo nini liyambami na bamoko na basaleli ye Jéhovah na esengo, mpe mpo na nini bazali kosala bongo?
12 Na mikolo na biso, bankoto ya ba Témoins de Jéhovah bazali kosalela Nzambe na bosembo nyonso kozanga babalani. Basusu basili kondima libyangi oyo na Yesu: “Tika ete ye oyo akoki koyamba yango [likabo ya bonzemba], ayamba yango!” Basalaki bongo “mpo na bokonzi ya makoló.” (Matai 19:11, 12, MN) Na elobeli mosusu, bazali kosalela malamu bonsomi oyo Nzambe azali kopesa bango, na kolekisáká ntango mingi mpe makasi mingi mpo na kotómbola matomba ya Bokonzi na Nzambe. Mingi kati na bango bazali ba pionniers, bamisionere to basangani na libota ya Béthel na biro monene ya la Société Watch Tower to kati na moko na ba filiales na yango.
13. Bandakisa nini emonisi ete moklisto akoki kozwa monzemba mpe na esengo?
13 Lisoló ya bomoi ya mobangé mwasi moklisto moko alingami mingi, libimisamaki na Lingelesi kati na zulunalo (The Watchtower, 1er mai 1985, lokasa 23 kino lokasa 26) na titre oyo ya ntina mingi, ete: “Pionnier moko ya mwasi azali monzemba mpe na esengo.” Monzemba mwasi moklisto mosusu oyo asalaki mibu 50 na Béthel, alobaki ete: “Nazali mpenza kosepela na bomoi na ngai mpe na mosala na ngai. Nazali na mosala oyo nalingi yango mingi mpe nazali kokokisa yango na molende mpenza. Nazali ata na mawa moke te. Soki nakokaki kobandela yango, mbɛlɛ nakozwa bobele ekateli yango moko.”—La Tour de Garde, 15 septembre 1982, lokasa 15.
14, 15. (a) Engebene ntóma Paulo, nini esengeli mpo na kotikala monzemba? (b) Mpo na nini Paulo alobi ete monzemba azali kosala “malamu koleka” mpe ete ‘azali na esengo koleka’?
14 Tala liloba oyo ete “ekateli.” Paulo akomaki ete: “Nzokande soki moto azwi ekateli na motema na ye ete atikala moseka, akosala malamu soki nde akotonda na mposa te wana eyebi ye kobatela mokano na ye. Na yango, ye oyo apesi nzoto na ye na libala asali malamu, kasi ye oyo apesi yango na libala te, asali malamu koleka.” (1 Bakolinti 7:37, 38, MN) Mpo na nini akosala “malamu koleka”? Paulo apesaki ndimbola oyo ete: “Nalingi ete bozanga mitungisi. Mobali oyo abali te akomitungisaka na makambo na Nkolo, mpo ete [ayeba] lolenge nini akoki kondimama na Nkolo. . . . Bobele bongo, mwasi oyo abali te, [lokola] moseka, akomitungisaka na makambo na Nkolo . . . Nalobi bongo mpo na litomba na bino mpenza, . . . mpo na komema bino na oyo ezali malamu mpe na oyo emonani mosala ya etingya mpo na Nkolo, kozanga kopɛngola makanisi.”—1 Bakolinti 7:32-35, MN.
15 “Mosala ya etingya mpo na Nkolo, kozanga kopɛngola makanisi” mosalemi mpo na “kondimama na Nkolo,” mokopesaka bolamu? Emonani ete, Paulo akanisaki bongo. Alobaki na ntina na moklisto mwasi oyo akufeli mobali ete: “Akoki kobalana na oyo ye alingi, nde bobele kati na Nkolo. Kasi na likanisi na ngai, mbɛlɛ akozala na esengo koleka soki nde akotikala lokola ezali ye. Mpamba te, ngai mpe nabanzi ete nazali na elimo na Nzambe.” —1 Bakolinti 7:39, 40, MN.
Matomba ya kotikala monzemba
16. Matomba nini mosusu mazwami na ba Témoins de Jéhovah oyo babali te?
16 Ata moklisto moko azali monzemba mpo ete akani kozala bongo to na ntina na makambo mosusu oyo ye akanaki yango te, ezalela ya bomoi na ye ezali kopesa ye matomba mingi. Minzemba bazali mpenza na ntango mingi mpo na koyekola Liloba na Nzambe mpe kokanisa likoló na yango. Soki bakosalela malamu ezalela wana ya bomoi, elimo na bango ekokóla. Lokola bazali na mobalani te mpo na koyebisa ye mikakatano na bango, mingi bazali koyekola kotya elikya na bango mingi likoló na Jéhovah mpe koluka litambwisi na ye na makambo nyonso. (Nzembo 37:5) Yango ezali kosalisa bango na kozala na boyokani malamu mpenza elongo na Jéhovah.
17, 18. (a) Basaleli ya Jéhovah oyo babali te bazali na makoki nini mpo na kosala mingi? (b) Basaleli ya Jéhovah oyo babali te bamonisaki esengo na bango na maloba nini?
17 Baklisto oyo babali te bazali na likoki ya kosala mingi mpo na kosanzola Jéhovah. Kobongisama malamu oyo epesami sikawa na Ecole de formation ministérielle, epesami bobele epai na bandeko mibali oyo bazali minzemba to mpe bakufeli basi. Bandeko basi oyo bazali minzemba bakoki mpe koluka kosala mingi kati na mosala na Nzambe. Mobangé ndeko mwasi oyo alobelami awa na likoló, andimaki kokenda kosala na mboka moko ya Afrika nzokande, mpo na kozongela maloba na ye, azalaki “mwasi na makasi mingi te na mibu 50.” Mpe atikalaki kuna, ata ntango mosala mopekisamaki mpe bamisionere nyonso basɛngisamaki ete balongwa na mboka yango. Azali bobele pionnier kati na mboka wana, atako azali sikawa na mibu koleka 80. Azali nde na esengo? Akomaki kati na lisoló ya bomoi na ye ete: “Nasalelaki bonsomi mpe kozanga bipekiseli oyo euti na bomoi ya monzemba, mpo na kozala ntango nyonso na molende kati na mosala ya Nzambe, mpe yango esili kozwila ngai bolamu mingi. . . Nsima na mibu, boyokani na ngai elongo na Jéhovah ekómaki mpenza makasi. Lokola nazali monzemba mwasi na mboka moko ya Afrika, ye nde natalelaki lokola Mobateli na ngai.”
18 Maloba ya ndeko mobali moko oyo asali bambula mingi na biro monene ya la Société Watch Tower mazali mpe na ntina mingi. Azalaki na esengo, atako abalaki te mpe azalaki na elikya ya kokende likoló epai kuna ya kobala ezali te. Wana akokisaki mibu 80, akomaki ete: “Mokolo na mokolo, kati na libondeli, nakosɛngaka Tata na biso na bolingo oyo na likoló ete asalisa ngai mpe apesa ngai mayele, ete nazala ntango nyonso makasi mpe na kolongono malamu kati na elimo mpe na mosuni, mpo na kolanda kokokisa mokano na ye. Na boumeli ya bambula ntuku mitano oyo nasili kolekisa kati na mosala ya Jéhovah, nasili kozwa motindo na bomoi kitoko, motindo na bomoi mopambolami mpe mozali kopesa ngai bosepeli mingi. Mpo na malamu na ngolu na Jéhovah, nazali na elikya ya kolanda kosalela ye mpo na lokumu na ye mpe mpo na nkembo na ye, mpe mpo na bolamu ya libota na ye. . . . Esengo ya Jéhovah ezali kosalisa ngai na kopesa lisungi na etumba malamu ya kondima, awa ezali ngai kozela mokolo oyo banguna na Nzambe bakolimwa mpe mokolo oyo mabelé makotonda na nkembo na ye.”—Mituya 14:21; Nehemia 8:10; La Tour de Garde, 1er novembre 1969, lokasa 667 kino lokasa 670.
Bolamu ya solo etaleli likambo nini?
19. Bolamu na biso ekotalela ntango nyonso likambo nini?
19 Boyokani na biso malamu elongo na Jéhovah, ngolu na ye mpe mapamboli na ye, ezali makambo oyo makopesa bolamu ya solo libela na libela. Kozaláká na likanisi oyo ya sembo na ntina na makambo oyo mazali kopesa bolamu ya solo, ata basaleli ya Jéhovah oyo basili kobala, bazali kokanga ntina ete libala ezali te eloko oyo eleki na motuya kati na bomoi na bango. Bazali kolanda toli ya ntóma Paulo ete: “Bandeko, ngai nalobi ete: ntango etikali moke. Sikawa, baoyo bazali na basi bazala lokola baoyo bazali na basi te. (1 Bakolinti 7:29, MN) Maloba oyo malimboli te ete basengeli kobosana basi na bango. Mibali baklisto oyo batɛli, bakotyaka mosala ya Jéhovah na esika ya liboso; mpe basi na bango oyo balingi bango, baoyo bakobangaka Nzambe, bazali mpe kosala bongo mpe bazali kosunga bango. Basusu bazali nkutu basali ya ntango nyonso elongo na mibali na bango.—Masese 31:10-12, 28; Matai 6:33.
20. Ntalo monene na baklisto bazali na ezaleli nini malamu epai na mikumba na bango ya libala?
20 Bandeko mibali basili oyo kobala, baoyo bazali bakɛngɛli ya zongazonga, baoyo bazali kosala na Béthel, baoyo bazali bankulutu kati na masangá,—ee, baklisto nyonso basili kobala baoyo bazali kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso—bazali ‘kosalela mokili te;’ bazali kosala makasi mpo na koyokanisa mikumba na bango ya libala mpe bomoi na bango oyo basili kopesa na mosala ya Jéhovah. (1 Bakolinti 7:31, MN) Atako bongo, bazali na esengo. Mpo na ntina nini? Mpo ete liziba ya liboso ya bolamu na bango ezali libala na bango te, kasi mosala na bango mpo na Jéhovah. Mpe ntalo monene ya mibali mpe basi na sembo, mpe bana na bango, bazali na esengo na ezalela wana.
21, 22. (a) Na boyokani na oyo tozali kotanga na Yilimia 9:23, 24, likambo nini lisengeli koyeisa biso bato na esengo? (b) Makambo nini makomami na Masese 3:13-18 makopesaka bolamu?
21 Mosakoli Yilimia akomaki ete: “Jéhovah alobi boye: ‘Tika te ete moto na mayele amikumisa mpo na mayele na ye, mpe moto na makasi amikumisa mpo na makasi na ye te! Tika te ete mozwi amikumisa mpo na bozwi na ye! Kasi ye oyo akomikumisa, amikumisa na oyo ete: kozala na bososoli mpe koyeba ete ngai nazali Jéhovah, Ye oyo akomonisaka bobóto, kosambisa-sembo mpe boyengebene na mabelé; mpo ete yango ezali makambo oyo nasepeli na yango’, Jéhovah alobi bongo.”—Yilimia 9:23, 24.
22 Tozala minzemba to bato basili kobala, bolamu na biso euti libosoliboso na boyebi oyo tozali na yango mpo na Jéhovah mpe na endimiseli oyo ete topambwami na ye, mpo ete tozali kosala mokano na ye. Tozali mpe na esengo ya kososolama na mayele nyonso makambo mazali mpenza na motuya, makambo oyo Jéhovah azali kosepela na yango. Mokonzi Salomo, oyo azalaki na basi mingi, atalelaki libala te lokola nzela bobele moko ya kozwa bolamu. Alobaki ete: “Esengo na moto oyo asili kozwa mayele, mpe na moto oyo azwi bososoli, mpo ete litomba na yango eleki mosolo mpe kozwa yango eleki wolo. Eleki pauni na motuya, mpe biloko na yo nyonso mosusu bikokani na yango te. Mikolo mingi mizali kati na lobɔkɔ na ye ya mobali; bozwi mpe nkembo ezali kati na lobɔkɔ na ye ya mwasi. Nzela na yango ezali nzela na esengo mpe bilekelo na yango nyonso bizali kimya. Ezali nzeté na bomoi mpo na baoyo bazali kosimba yango, mpe baoyo bazali kosimba yango makasi basengeli kozala bato ya esengo.”—Masese 3:13-18, MN.
23, 24. Mpo na nini tokoki kondimisama ete basaleli nyonso ya sembo ya Jéhovah, bakozala na esengo kati na ebongiseli ya biloko ya sika?
23 Tika ete baoyo kati na biso basili kobala bazwa esengo ya seko na kosala mokano na Nzambe! Mpe tika ete bandeko na biso ya bolingo, basi mpe mibali baoyo bazali minzemba, mpo ete bakanaki kozala bongo to na ntina na makambo mosusu oyo bakanaki yango te, bayika mpiko na mimekamo na bango nyonso mpe bazwa bolamu mpe bosepeli na mosala ya Jéhovah, sikawa mpe kino seko! (Luka 18:29, 30; 2 Petelo 3:11-13) Na ebongiseli ya biloko oyo Nzambe akosala mosika te, “mikanda” mikofungolama. (Emoniseli 20:12) Ekozala na mibeko ya sika mpe na malako ya sika na kati na yango, oyo ekopesa bilikya kitoko mpe ekopesa bolamu na bato ya botósi.
24 Na ntembe te, tokoki kondimisama ete “Nzambe [na biso] ya esengo” abómbeli biso ebele na biloko kitoko bikopesa biso bolamu ya kokoka. (1 Timoté 1:11) Nzambe akolanda ‘kozipola lobɔkɔ na ye mpe kosilisa bamposa ya biloko nyonso bizali na bomoi.’ (Nzembo 145:16) Ezali likambo ya kokamwa te ete moto azwa bolamu ya solo na kosaleláká Jéhovah sikawa mpe libela na libela!
Bozongeli
◻ Bolamu ya basaleli ya Jéhovah etongami likoló na nini?
◻ Tangá minzemba ya ntango na kala oyo bazalaki na esengo ya kosalela Jéhovah.
◻ Mpo na nini Paulo apesi lilako ya kozala monzemba, mpe lolenge nini baklisto bazwaki bolamu kati na ezalela wana?
◻ Bolamu na biso ya ntango nyonso etaleli likambo nini?
◻ Bantina nini tozali na yango ya kondimisama ete baoyo nyonso bazali sembo, bakozwa bolamu kati na ebongiseli ya biloko ya sika?
[Elilingi na lokasa 16]
Ntalo monene ya bandeko basi minzemba, bazali na esengo ya kosalela Jéhovah lokola basali ya ntango nyonso
[Elilingi na lokasa 18]
Bolamu bozali kozwama libosoliboso na kosaleláká matomba ya Jéhovah