Tómitambwisa “mokolo na mokolo” engebene komipesa na biso
“Sɔkɔ moto mɔkɔ ajali na mposa na kotambola nsima na ngai, tika amiboya ye mpenja, mpe akamata [nzeté na ye ya mpasi, NW] mokɔlɔ na mokɔlɔ, mpe abila ngai.”—LUKA 9:23.
1. Wapi moko na banzela oyo tokoki komeka bolóngi na biso lokola baklisto?
“TOZALAKI solo bato oyo bamipesá?” Engebene John F. Kennedy, Presidá ya 35 ya Etats-Unis, eyano na motuna oyo ezali moko na makambo oyo mazali komonisa elónga ya bato oyo bazali na mikumba minene kati na boyangeli. Motuna yango mokoki mpe kosalelama lokola emekeli ya ntina mingi mpo na elónga na biso lokola baklisto.
2. Lolenge nini diksionere moko elimboli “komipesa”?
2 Nzokande, komipesa ezali nini? Diksionere Webster’s Ninth New Collegiate Dictionary elimboli yango lokola “likambo to molulu ya kobulisa eloko mpo na nzambe moko to mpo na esaleli moko ya bulɛɛ,” “kopesa to kotya pembeni mpo na mokano moko ya sikisiki,” “bokangami oyo esalemi na bolingo nyonso.” Emonani lokola ete John F. Kennedy asalelaki liloba yango na ndimbola ya “bokangami oyo esalemi na bolingo nyonso.” Mpo na moklisto, komipesa esangisi makambo mingi lisusu.
3. Komipesa ya moklisto ezali nini?
3 Yesu Klisto ayebisaki bayekoli na ye ete: “Sɔkɔ moto mɔkɔ ajali na mposa na koya nsima na ngai, tika amiboya ye mpenja mpe akamata [nzeté na ye ya mpasi, NW] mokɔlɔ na mokɔlɔ, mpe abila ngai.” (Matai 16:24) Kotyama pembeni mpo na Nzambe elimboli te bobele kosangana na makambo ya losambo na mokolo ya Lomingo to kokende kotala bisika mosusu ya losambo. Etaleli bomoi mobimba ya moto. Kozala moklisto elimboli komiboya mpo na kosalela Yehova, Nzambe oyo Yesu Klisto asalelaki. Lisusu, moklisto akamataka “nzeté na ye ya mpasi” na koyikáká mpiko kati na mpasi oyo ekoki kobimela ye mpo ete azali moyekoli ya Klisto.
Ndakisa ya kokoka
4. Batisimo ya Yesu ezalaki elembo ya nini?
4 Wana azalaki naino awa na mabelé, Yesu amonisaki polele nini oyo elimboli komipesa epai na Yehova. Mayoki na ye mazalaki ete: “Olingaki mbɛka mpe makabo na kotombwa tɛ, kasi osili kobɔngisɛla ngai njoto.” Na nsima abakisaki ete: “Tala nasili koya, ekomami mpɔ na ngai kati na mokanda. Ɛ Njambe, nayei kosala mokano na yɔ.” (Baɛbɛlɛ 10:5-7) Lokola azalaki mosangani ya libota oyo esilaki komipesa epai na Yehova, ye azalaki moto oyo amipesi na Yehova uta kobotama na ye. Atako bongo, na ebandeli ya mosala na ye awa na mabelé, akendaki kozwa batisimo lokola elembo ya komimonisa ete ayei mpo na kosala mokano na Yehova, oyo esɛngaki ete apesa bomoi na ye lokola mbeka ya lisiko. Na yango, atikaki ndakisa moko kitoko mpo na baklisto ete básala nyonso oyo Yehova alingi.
5. Lolenge nini Yesu amonisaki ndakisa malamu mpo na oyo etali biloko ya mosuni?
5 Nsima ya batisimo na ye, Yesu alandaki motindo ya bomoi oyo na nsima ememaki ye na kokufa lokola mbeka. Azalaki koluka te kokóma mozwi to kozala na bomoi moko ya bomɛngɔ. Nzokande, mosala na ye mozalaki eloko eleki ntina kati na bomoi na ye. Alendisaki bayekoli na ye ete “balukaka nde liboso Bokonji na Njambe mpe boyɛngɛbɛnɛ na ye,” mpe ye moko amitambwisaki engebene maloba wana. (Matai 6:33) Nkutu, mokolo moko alobaki ete: “Nkaja ijali na mabulu mpe ndɛkɛ na lola ijali na jumbu nde Mwana na moto ajali na esika na kolalisa motó na ye tɛ.” (Matai 8:20) Akokaki kobongola mateya na ye mpo na kolya mosolo ya bayekoli na ye. Lokola azalaki mosáli ya mabaya, akokaki kozwa mwa ntango likoló na mosala na ye mpo na kosala biloko ya kitoko mpe kotekisa yango mpo ete akoka kozala na palata mwa mingi. Kasi asalelaki makoki na ye te mpo na koluka bozwi ya mosuni. Lokola tozali basaleli ya Nzambe oyo bamipesi, tozali komekola Yesu na kozaláká na likanisi ya sembo na ntina na biloko ya mosuni?—Matai 6:24-34.
6. Lolenge nini tokoki komekola Yesu mpo na oyo etali kozala basaleli ya Nzambe oyo bamipesi na bolingo nyonso?
6 Na kotyáká mosala na ye mpo na Nzambe na esika ya liboso, Yesu alukaki matomba na ye moko te. Bomoi na ye na boumeli ya mibu misato na ndambo ya mosala ya kosakola ezalaki bomoi ya komipesa na bolingo nyonso. Na libaku moko nsima ya mokolo ya mosala mingi, kozanga ata kozwa ntango ya kolya, Yesu amonisaki bolingo malamu ya koteya bato oyo “balɛmbi mpe balemalemi lokola bampate bajali na mobateli tɛ.” (Matai 9:36; Malako 6:31-34) Atako “alɛmbaki mingi mpo na mobembo oyo asalaki,” amonaki malamu kosolola elongo na mwasi moko Mosamalia oyo ayaki na libulu ya Yakobo, na Sukala. (Yoane 4:6, 7, 13-15) Azalaki ntango nyonso kotya bolamu ya bato mosusu liboso na oyo ya ye moko. (Yoane 11:5-15) Tokoki komekola Yesu na komipimeláká matomba na biso moko mpo na kosalela Nzambe mpe basusu. (Yoane 6:38) Na kokanisáká lolenge nini tokoki mpenza kosepelisa Nzambe na esika ya kosala bobele likambo moke oyo esɛngami na biso, tokomitambwisa engebene komipesa na biso.
7. Lolenge nini tokoki komekola Yesu na kopesáká ntango nyonso lokumu epai na Yehova?
7 Yesu amekaki ata moke te kobenda likebi likoló na ye moko wana ezalaki ye kosalisa bato. Amipesaki epai na Nzambe mpo na kosala mokano na Ye. Na yango alukaki ntango nyonso kondimisama ete Tata na ye, Yehova, azali kozwa nkembo na makambo nyonso oyo mazalaki kosalema. Ntango nkumu moko abéngaki ye “Molakisi malamu,” kosaleláká liloba “malamu” lokola nkombo ya lokumu, Yesu asembolaki ye na kolobáká ete: “Moto malamu ajali tɛ, bobɛlɛ mɔkɔ, Njambe.” (Luka 18:18, 19; Yoane 5:19, 30) Tozalaka lokola Yesu, pene ya kopesa lokumu epai na biso moko te, kasi epai na Yehova?
8. (a) Lokola azalaki moto oyo amipesaki, lolenge nini Yesu amityaki pembeni longwa na makambo ya mokili? (b) Lolenge nini tosengeli komekola ye?
8 Na boumeli ya bomoi na ye mobimba awa na mabelé lokola moto oyo asilaki komipesa, Yesu amonisaki ete asilaki ye moko komitya pembeni mpo na mosala ya Nzambe. Amibatelaki pɛto mpo ete akoka komipesa lokola “mwana na mpate oyo na mpota tɛ mpe na litɔnɔ tɛ” mpo ete azala mbeka ya lisiko. (1 Pɛtɛlɔ 1:19; Baebele 7:26) Atosaki malako nyonso ya Mibeko ya Mose, na yango akokisaki Mibeko wana. (Matai 5:17; 2 Bakolinti 1:20) Amitambwisaki engebene mateya mpe bizaleli malamu oyo ye moko ateyaki. (Matai 5:27, 28) Moto moko te akokaki na elónga nyonso kofunda ye ete azalaki na mikano mabe. Ya solo, “ayinaki ezaleli ya kotyola mibeko.” (Baebele 1:9, NW) Lokola tozali baombo ya Nzambe, tiká ete tómekola Yesu na kobateláká pɛto bomoi na biso mpe ata mikano na biso na miso na Yehova.
Bandakisa mpo na kokebisa
9. Ndakisa nini ya kokebisa Paulo alobelaki, mpe mpo na nini tosengeli kotalela ndakisa yango?
9 Na kokesena na ndakisa kitoko oyo Yesu atikaki, tozali na ndakisa ya Bayisraele oyo ekoki kokebisa biso. Ata nsima wana balobaki ete bakosala nyonso oyo Yehova ayebisaki bango, basalaki mokano na ye te. (Danyele 9:11) Ntoma Paulo alendisaki baklisto ete bázwa liteya na makambo oyo makwelaki Bayisraele. Tiká tótalela makambo mosusu oyo Paulo alobeli kati na mokanda na ye ya liboso epai na Bakolinti mpe tómona mitambo oyo basaleli ya Nzambe oyo bamipesi basengeli kopɛngola yango na mikolo na biso.—1 Bakolinti 10:1-6, 11.
10. (a) Lolenge nini Bayisraele ‘bazalaki na mposa na mabe’? (b) Mpo na nini Bayisraele bazalaki na ngambo wana mpo na mbala na mibale baimaimaki na ntina na bilei, mpe liteya nini tokoki koyekola na likebisi yango?
10 Ya liboso, Paulo akebisi biso ete “tojala na mposa na mabe tɛ.” (1 Bakɔlinti 10:6) Yango ekoki kokundwela yo ntango oyo Bayisraele baimaimaki mpo ete bazalaki kolya bobele mana. Yehova atindelaki bango nkanga. Likambo motindo moko lisilaki kobima bobele mbula moko liboso kati na mokili mokauki ya Sini, ntango moke liboso ete Bayisraele bámonisa komipesa na bango epai na Yehova. (Exode 16:1-3, 12, 13) Kasi makambo yango nyonso mazalaki ndenge moko te. Ntango Yehova apesaki nkanga mpo na mbala ya liboso, alobaki te ete Bayisraele bazalaki na ngambo na ntina na koimaima na bango. Nzokande, sikawa makambo makómi lolenge mosusu. “Wana etikalaki mosuni kati na mino na bango, naino eliamaki yango tɛ, nkanda na [Yehova] epelaki epai na bato mpe [Yehova] abɛtaki bato yango na malali monɛnɛ mingi.” (Mituya 11:4-6, 31-34) Likambo nini ebongwanaki? Lokola bazalaki libota oyo esilaki komipesa, sikawa bazalaki na ngambo mpo na misala na bango. Kozanga na bango ya botɔ́ndi mpo na bibongiseli ya Yehova ememaki bango na koimaima na ntina na Yehova, atako bakataki ndai ete nyonso oyo Yehova asilaki koloba, bakosala yango! Koimaima na ntina na mesa ya Yehova ezali mpe motindo moko lelo oyo. Basusu bamonisaka botɔ́ndi te mpo na bibongiseli ya elimo oyo Yehova azali kopesa na nzela na “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45-47) Nzokande, omikundola ete komipesa na biso ezali kosɛnga ete tóbatela mpenza kati na makanisi makambo oyo Yehova asili kosala mpo na biso mpe tóndima bilei ya elimo oyo Yehova azali kopesa biso.
11. (a) Lolenge nini Bayisraele babebisaki losambo na bango epai na Yehova na nzela na losambo ya bikeko? (b) Lolenge nini motindo moko ya losambo ya bikeko ekoki kozala na bopusi likoló na biso?
11 Na nsima, Paulo apesaki likebisi oyo ete: “Bojala basambeli na bikeko tɛ pelamɔkɔ bamosusu na bango.” (1 Bakɔlinti 10:7) Na ntembe te, awa ntoma azalaki mpenza kolobela losambo ya mwana ya ngɔmbɛ oyo esalemaki nokinoki nsima wana Bayisraele basalaki kondimana elongo na Yehova na Ngomba Sinai. Okoki koloba ete, ‘Lokola nazali mosaleli ya Yehova oyo amipesi, nakozwama soko moke te na losambo ya bikeko.’ Nzokande, tóyeba ete na makanisi ya Bayisraele, batikaki te kosambela Yehova; nzokande bakɔtisaki losambo ya mwana ya ngɔmbɛ—eloko ya mbindo na miso na Nzambe. Motindo wana ya losambo esangisaki makambo nini? Bato bazalaki kopesa mbeka liboso na mwana na ngɔmbɛ, mpe na nsima “bafandaki mpɔ na kolia mpe komɛla, mpe batɛmaki mpɔ na kosana.” (Esode 32:4-6) Lelo oyo, bato mosusu bakoki koloba ete bazali kosambela Yehova. Kasi mbala mosusu bomoi na bango epikami likoló na losambo ya Yehova te, kasi likoló na bosepeli na biloko ya mokili oyo, mpe bazali komeka koyokanisa losambo na bango mpo na Yehova engebene yango. Ya solo, likambo yango lizali mpenza monene te lokola kokumbamela mwana ya ngɔmbɛ ya wolo, kasi nyonso ezali kobuka etindá sé moko. Soki mposa na biso moko ekómi nzambe, tozali soko moke te kotambola engebene komipesa na biso epai na Yehova.—Bafilipi 3:19.
12. Na kotalela likambo likómelaki Bayisraele na Bala ya Peolo, liteya nini tozali koyekola mpo na oyo etali komiboya biso moko?
12 Ndakisa ya kokebisa oyo Paulo apesi na nsima etaleli lolenge moko ya kominanola. “Ekoki ete tosala makambo na pite tɛ pelamɔkɔ bamosusu na bango basalaki pite mpe bakweaki bato nkoto ntuku mibale na misato na mokɔlɔ mɔkɔ.” (1 Bakɔlinti 10:8) Bayisraele, wana babendamaki na mposa ya bisengo ya mbindo ntango bana basi ya Moaba bayaki kobyanga bango, bakɔtisamaki na losambo ya Bala ya Peolo na Sitimi. (Mituya 25:1-3, 9) Komiboya biso moko mpo na kosala mokano ya Yehova elimboli mpe kondima mitindá na ye ya bizaleli malamu. (Matai 5:27-30) Na ntango oyo ya kobeba ya bizaleli, tokebisami na ntina etali komibatela pɛto na etamboli nyonso ya mbindo, na kotosáká bokonzi ya Yehova mpo na kokata oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe.—1 Bakolinti 6:9-11.
13. Lolenge nini ndakisa ya Pinehase ezali kosalisa biso na koyeba oyo elimboli komipesa epai na Yehova?
13 Atako mingi bazwamaki na motambo ya pite na Sitimi, kasi basusu bamitambwisaki engebene komipesa na bango epai na Yehova. Kati na bango, Pinehase ayebani mingi mpo na molende na ye. Ntango amonaki nkumu moko Moyisraele komema mwasi moko ya Madiani kati na hema na ye, Pinehase akamataki likɔnga na ye mpe atɔbɔlaki bango nyonso mibale. Yehova alobaki na Mose ete: “Pinehase . . . abongoli nkanda na ngai na bato na Yisalaele, awa esalaki ye jua lokola jua na ngai kati na bango, bongo nabebisi bato na Yisalaele na jua na ngai tɛ.” (Mituya 25:11) Kopesa nzela soko moke te na bombanda liboso na Yehova—ezali yango nde komipesa. Tosengeli kotika eloko moko te ete ekamata esika oyo komipesa na biso epai na Yehova esengeli kozwa kati na mitema na biso. Molende na biso mpo na Yehova esengeli lisusu kopusa biso na kobatela bopɛto ya lisangá na koyebisáká masumu minene nyonso epai na bankulutu, na kopesáká yango nzela te.
14. (a) Lolenge nini Bayisraele batyaki Yehova na komekama? (b) Lolenge nini komipesa mobimba epai na Yehova ekobatela biso ete “tólɛmba” te?
14 Paulo alobelaki ndakisa mosusu ya kokebisa: “Ekoki tɛ ete tomeka [Yehova] pelamɔkɔ bamosusu na bango bamekaki ye mpe babomamaki na nyoka.” (1 Bakɔlinti 10:9) Awa Paulo azalaki kolobela ntango oyo Bayisraele baimaimaki epai na Mose na ntina na Yehova wana ‘mitema na bato mikómaki mokuse na nzela.’ (Mituya 21:4) Osalaka libunga motindo oyo? Wana omipesaki epai na Yehova, okanisaki ete mosika te Armagedon ekoya? Motema pɛtɛɛ ya Yehova mosili koleka ndelo oyo omizelaki na yango? Omikundola ete, tomipesaki epai na Yehova te mpo na mwa ntango to bobele kino na Armagedon. Komipesa na biso ezali ya libela. Na bongo, “tolɛmbaka mpɔ na kosalaka malamu tɛ jambi na ntango oyo ekoki, tokobuka sɔkɔ tokotika motema tɛ.”—Bagalatia 6:9.
15. (a) Bayisraele baimaimaki na ntina na nani? (b) Lolenge nini komipesa na biso epai na Yehova ezali kopusa biso na kozala na limemya epai na bokonzi ya teokrasi?
15 Mpo na kosukisa, Paulo apesaki likebisi ete “toimaima tɛ” mpo na basaleli ya Yehova oyo bapesameli mikumba. (1 Bakɔlinti 10:10) Bayisraele baimaimaki makasi na ntina na Mose mpe Alona ntango banɔ́ngi 10 kati na banɔ́ngi 12 oyo batindamaki mpo na konɔ́nga mokili ya Kanana bapesaki lapólo ya mabe. Balobelaki nkutu likambo ya kokitanya moto mosusu na esika ya Mose lokola mokambi na bango mpe ya kozonga na Ezipito. (Mituya 14:1-4) Lelo oyo, tondimaka litambwisi oyo epesameli biso na nzela ya elimo santu ya Yehova? Na kotalela ebele ya bilei ya elimo oyo moombo ya sembo mpe ya mayele azali kopesa, tozali komona polele nani oyo Yesu azali kosalela mpo na kopesa “bilei na ntango na yango.” (Matai 24:45) Komipesa epai na Yehova na molimo na biso mobimba ezali kosɛnga ete tózala na limemya epai na basaleli na ye oyo bapesameli mikumba. Tiká ete tókóma soko moke te lokola bato mosusu ya koimaima ya ntango na biso, baoyo na elobeli ya elilingi, basili komibalola epai na motambwisi mosusu, mpo ete azongisa bango kati na mokili.
Ezali yango nsuka ya molende na ngai?
16. Mituna nini basaleli ya Nzambe oyo bamipesi bakoki komituna?
16 Bayisraele bakokaki te kokwea kati na mabunga monene motindo wana soki bamikundolaki ete komipesa na bango epai na Yehova ezalaki ya mobimba. Na kokesena na Bayisraele oyo bazangaki sembo, Yesu Klisto amitambwisaki engebene komipesa na ye kino nsuka. Lokola tozali bayekoli ya Klisto, tozali komekola ndakisa na ye na komipesa na molimo na biso mobimba, na kozala na bomoi mpo na “kobila mposa mabe na bato lisusu tɛ kasi kobila mokano na Njambe.” (1 Pɛtɛlɔ 4:2; kokanisá na 2 Bakolinti 5:15.) Mokano ya Yehova lelo oyo ezali ete “bato na lolenge nyonso bákoka kobika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timoté 2:4, NW) Mpo na kokokisa yango, tosengeli kosakola “Nsango Malamu oyo na Bokonji” liboso ete nsuka eya. (Matai 24:14) Molende nini tosalaka kati na mosala yango? Tokoki komituna ete, ‘Ezali yango nsuka ya molende na ngai?’ (2 Timoté 2:15) Ezalela ya makambo ya moto na moto ekeseni. Yehova asepelaka mingi ete básalela ye “pelamɔkɔ na bilɔkɔ bijali na moto, nde pelamɔkɔ na bilɔkɔ bijangeli ye tɛ.” (2 Bakɔlinti 8:12; Luka 21:1-4) Moto moko te asengeli kosambisa bozindo mpe bosembo ya komipesa ya moto mosusu. Moto na moto asengeli kotalela bonene ya komipesa na ye moko epai na Yehova. (Bagalatia 6:4) Bolingo na biso epai na Yehova esengeli kopusa biso na komituna ete, ‘Lolenge nini nakoki kosepelisa Yehova?’
17. Boyokani nini bozali kati na komipesa mpe botɔ́ndi? Pesá ndakisa.
17 Bokangami na biso epai na Yehova ekokóla na meko oyo botɔ́ndi na biso epai na ye ekoyikana. Elenge mobali moko ya mibu 14, na ekólo Japon amipesaki epai na Yehova mpe amonisaki yango na nzela ya batisimo ya mai. Na nsima, alingaki kolanda eteyelo ya monene mpe kokóma moto oyo amipesi na siansi. Akanisaki soko moke te na ntina na mosala ya ntango nyonso, kasi lokola azalaki mosaleli oyo amipesi, alingaki te kotika Yehova mpe lisangá na ye oyo ezali komonana. Mpo na kokokisa mokano na ye, akɔtaki na Eteyelo monene. Kuna amonaki lolenge nini baoyo basilisaki na Eteyelo monene bazalaki kopusama na makasi ete bápesa bomoi na bango mpo na bakompanyi na bango to mpo na boyekoli na bango. Amitunaki ete, ‘Nazali kosala nini awa? Nakoki solo kolanda motindo na bomoi na bango mpe komipesa mobimba na mosala ya mosuni? Nasilaki komipesa epai na Yehova, boye te?’ Na botɔ́ndi oyo eyeisamaki ya sika, akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Bososoli na ye na ntina na komipesa na ye eyikanaki mpe apusamaki na kozwa ekateli ya kokende na esika nyonso oyo bakozala na mposa na ye. Akɔtaki na Eteyelo mpo na Basungi mpe atindamaki lokola misionere na mokili ya bopaya.
18. (a) Komipesa na biso epai na Yehova ezali kosɛnga nini? (b) Mbano nini tokoki kozwa na komipesáká epai na Yehova?
18 Komipesa etaleli bomoi na biso mobimba. Tosengeli komiboya “mokɔlɔ na mokɔlɔ” mpo na kolanda ndakisa kitoko ya Yesu. (Luka 9:23) Lokola tosili komiboya, tosɛngaka te na Yehova ntango ya bopemi to ya kokanga mabɔkɔ. Bomoi na biso ezali na boyokani na mitindá oyo Yehova atye mpo na basaleli na ye. Ata kati na makambo oyo tokoki kosala liponi ya biso moko, tosengeli koluka koyeba soki tozali kosala makasi mpo na komitambwisa engebene bomoi oyo tosilá kopesa epai na Yehova. Wana tozali kosalela ye mokolo na mokolo, kosaláká makasi oyo ekoki na biso mpo na kosepelisa ye, tokolónga bomoi ya boklisto mpe tokozwa mapamboli elongo na ngɔlu ya Yehova, ye oyo abongi ete tókangama epai na ye na molimo na biso mobimba.
Okoki kolimbola?
◻ Mpo na Yesu Klisto komipesa esɛngaki likambo nini?
◻ Mpo na nini tosengeli kopɛngola koimaima na ntina na Yehova?
◻ Lolenge nini tokoki kopɛngola ete losambo ya bikeko ekɔta te kati na bomoi na biso?
◻ Likambo nini tosengeli komikundola oyo ekosalisa biso ete “tólɛmba tɛ” na kosala mokano ya Nzambe?
[Elilingi na lokasa 117]
Baklisto oyo bamipesi “balɛmbaka mpɔ na kosala malamu tɛ”