Misala ya bilimo mabe
Ndimbola: Bikelakela oyo etindaka bato bákanisa ete moto azali na elimo oyo etikalaka na bomoi ntango moto akufi mpe ekoki kosolola na bato oyo bazali na bomoi, mingimingi na nzela ya moto oyo asololaka na bilimo. Bato mosusu bakanisaka ete likambo nyonso to mpe biloko lokola mopɛpɛ ná mbula ezalaka na elimo moko boye na kati na yango. Bato mosusu mpe bandimaka ete banganga-nkisi basalelaka nguya oyo euti na bilimo mabe. Biblia epekisi lolenge nyonso ya misala ya bilimo mabe.
Moto akoki mpenza kosolola na “elimo” ya ndeko to moninga moko oyo akufá?
Mos. 9:5, 6, 10: “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te . . . Lisusu, bolingo na bango ná koyina na bango ná zuwa na bango esili, mpe bazali na likabo ata moko lisusu te mpo na ntango oyo etyami ndelo te na eloko nyonso oyo ekosalema na nse ya moi. Nyonso oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na makasi na yo mpenza, mpo mosala ezali te, mwango te, boyebi te, bwanya mpe te na Nkunda, esika ozali kokende.”
Ezk. 18:4, 20: “Molimo oyo esali lisumu—yango nde ekokufa.” (Na yango, molimo ezali te eloko moko oyo etikalaka na bomoi ntango moto akufi mpe ekoki kosolola na bato ya bomoi te.)
Nz. 146:4: “Elimo na ye ekobima, akozonga na mabele; na mokolo yango makanisi na ye ekufi.” (Ntango vɛrsɛ yango elobi ete elimo ‘ebimi’ na nzoto, yango elingi kaka koloba ete nguya ya bomoi etiki kosala mosala na nzoto. Na yango, nsima ya liwa ya moto, elimo na ye ekómaka te eloko oyo emonanaka te, oyo ekoki kokanisa mpe kosala makambo na ndenge na yango moko na libanda ya nzoto. Yango ekoki kosolola na moto ya bomoi nsima ya liwa te.)
Talá mpe nkasa 314-316, na motó ya likambo “Liwa.”
Biblia emonisi te ete Mokonzi Saulo asololaki na mosakoli Samwele nsima ya liwa ya Samwele?
Lisolo yango ezali na 1 Samwele 28:3-20. Vɛrsɛ 13, 14 emonisi ete Saulo amonaki Samwele te, kasi ntango mwasi yango alimbolelaki Saulo ndenge elimo oyo ye amonaki ezali, Saulo akanisaki mbala moko ete ezali Samwele. Saulo azalaki na mposa makasi ya kosolola na Samwele, andimaki ete ezali ye mpe akosamaki. Vɛrsɛ 3 elobi ete Samwele asilaki kokufa mpe kokundama. Bavɛrsɛ oyo totángi liboso ya motó ya likambo moke oyo emonisi polele ete eloko moko te na nzoto ya Samwele ezalaki na bomoi na mokili mosusu mpe ekokaki kosolola na Saulo. Mongongo oyo eyokanaki lokola mongongo ya Samwele eutaki nde na mokosi moko boye.
Bato oyo bakanisaka ete basololaka na bakufi basololaka mpenza na nani?
Biblia emonisi polele ndenge oyo bakufi bazalaka. Kasi nani akosaki mwasi ná mobali ya liboso na likambo etali liwa? Nzambe akebisaki bango ete bakokufa soki batosi te, kasi Satana alobaki ete bakokufa te. (Eba. 3:4; Em. 12:9) Nsukansuka, emonani polele ete bato bakufaka ndenge Nzambe alobaki. Na bongo, soki tokanisi malamu, tokoloba ete nani mpenza abimisaki likanisi ete moto akokufa te mpe azali na elimo moko oyo etikalaka na bomoi ntango moto akufi? Lokuta ya ndenge wana euti na moto mosusu te, kaka na Satana Zabolo, oyo Yesu abengaki ye ete “tata ya lokuta.” (Yoa. 8:44; talá mpe 2 Batesaloniki 2:9, 10.) Liteya oyo elobaka ete bakufi bazalaka na bomoi na mokili mosusu mpe tokoki kosolola na bango epesi bato litomba moko te. Kutu, Emoniseli 18:23 elobi ete, na nzela ya misala ya bilimo mabe, Babilone Monene azali ‘kokosa bikólo nyonso.’ ‘Kosolola na bakufi,’ oyo ezali moko ya misala ya bilimo mabe, ezali mpenza lokuta oyo ekoki kosala ete bato bákóma na boyokani na bademo (baanzelu oyo batombokelaki Nzambe mpo na kokokisa mposa na bango), mpe mbala mingi yango esalaka ete moto akóma koyoka mingongo ya nsɔmɔ mpe kotungisama na bilimo mabe.
Koluka kobikisama na maladi na nzela ya bilimo mabe to koluka kobatelama na bango ezali mpenza likama?
Gal. 5:19-21: “Misala ya nzoto ezali komonana polele, mpe ezali pite, mbindo, etamboli ya nsɔni, losambo ya bikeko, misala ya bilimo mabe . . . Mpo na makambo yango, nazali kokebisa bino, ndenge mpe nakebisaki bino liboso, ete baoyo basalaka makambo ya ndenge wana bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.” (Soki moto azali koluka lisalisi na nzela ya misala ya bilimo mabe, yango emonisi ete andimaka lokuta ya Satana na likambo etali liwa; moto yango azali koluka toli ya bato oyo bazwaka nguya epai ya Satana ná bademo na ye. Azali komonisa ete azali moninga ya banguna ya Yehova Nzambe. Soki moto yango atingami na nzela yango, na esika azwa mpenza lisalisi, akozwa mpasi bomoi na ye mobimba.)
Luka 9:24: “Moto nyonso oyo alingi kobikisa molimo [to bomoi] na ye akobungisa yango; kasi moto nyonso oyo abungisi molimo na ye mpo na ngai [mpo azali moyekoli ya Yesu Kristo] ye nde akobikisa yango.” (Soki moto abuki mibeko ya Nzambe na nko, mibeko oyo emonisami polele na Liloba na ye mpo na koluka kobatela to kobikisa bomoi na ye, akobungisa elikya ya bomoi ya seko. Kosala bongo ezali bozoba mpenza!)
2 Ko. 11:14, 15: “Satana ye moko azali kokoba komimonisa lokola anzelu ya pole. Bongo ezali likambo monene te soki basali na ye mpe bazali kokoba komimonisa lokola basali ya boyengebene.” (Na yango, tosengeli kokosama te soki makambo mosusu oyo esalemi na nzela ya bilimo mabe ezali komonana ete ezali kopesa matomba mpo na mwa ntango.)
Talá nkasa 341-345, na motó ya likambo “Makamwisi ya kobikisa bato.”
Kokɔta na misala ya bilimo mabe mpo na koyeba makambo oyo ekoya to mpo misala ya moto etambola malamu, ezali mabe te?
Yis. 8:19: “Mpe soki balobi na bino: ‘Bótuna bato oyo basololaka na bilimo to baoyo bazali na elimo ya koyebisa makambo oyo ekoya, baoyo bazali koloba swiswiswi mpe na mingongo ya nse,’ bato na bato basengeli nde kotuna Nzambe na bango te?”
Lev. 19:31: “Bóbaluka te mpo na kokende epai ya bato oyo basololaka na bilimo, mpe bótuna te bato oyo basalaka mosala ya kosakola makambo ekoya, noki bákómisa bino mbindo. Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.”
2 Bak. 21:6: “[Mokonzi Manase] asalaki misala ya maji, alukaki bilembo ya makambo oyo ekoya mpe atyaki bato oyo basololaka na bilimo ná bato oyo basalaka mosala ya kosakola makambo oyo ekoya. Asalaki makambo mingi mpenza ya mabe na miso ya Yehova, mpo na kosilikisa ye.” (Misala yango ya bilimo mabe etindaka moto aluka lisalisi epai ya Satana ná bademo na ye. Yango wana, tokokamwa te soki Biblia elobi ete misala yango ezalaki ‘mabe na miso ya Yehova,’ mpe apesaki Manase etumbu ya makasi mpo na yango. Kasi ntango abongolaki motema mpe atikaki misala wana ya mabe, Yehova apambolaki ye.)
Kosala masano oyo ekoki kotinda moto ayeba makambo oyo ebombani to koluka ndimbola ya likambo moko oyo ezali komonisa ete moto akozwa likambo ya malamu, ezali na likama nini?
Mib. 18:10-12: “Epai na yo moto azwama te oyo azali . . . koluka bilembo ya makambo oyo ekoya to moto oyo azali nganga-nkisi, to moto oyo azali kolɔka bato mosusu to moto oyo azali kotuna moto oyo asololaka na bilimo to moto oyo asalaka mosala ya kosakola makambo oyo ekoya to moto oyo azali kotuna bakufi. Mpo moto nyonso oyo azali kosala makambo yango azali eloko moko oyo Yehova ayiná.” (Koluka koyeba makambo oyo ebombaná to kosakola makambo oyo ekoya, ezali mbuma ya bolukiluki ya moto ye moko te, kasi eutaka nde na koluka kolimbola makambo oyo ekoya na nzela ya bilembo to na nguya ya bilimo. Yehova apekisaki basaleli na ye misala ya ndenge wana. Mpo na nini? Mpo misala nyonso wana esalaka ete moto akóma kosolola na bilimo mabe to bademo mpe esalaka ete bademo bákɔtela moto. Komikɔtisa na makambo yango ezali mpenza kozanga bosembo epai ya Yehova.)
Mis. 16:16-18: “Mwana mwasi moko ya mosala oyo azalaki na elimo moko, demo moko ya kosakola makambo oyo ebombaná, akutanaki na biso. Azalaki kokɔtisela bankolo na ye mosolo mingi na mosala ya kosakola makambo oyo ekoya.” (Emonani polele ete moto oyo alingaka boyengebene akoluka te koyeba makambo epai ya moto lokola oyo wana, ezala na ndenge ya lisano to te. Paulo alɛmbaki na koganga ya mwana mwasi yango, mpe apesaki demo yango mitindo ete abima na nzoto ya mwana mwasi yango.)
Bilimo mabe bakoki kolata nzoto ya bato?
Na mikolo ya Noa, baanzelu oyo bazangaki botosi balataki nzoto ya bato. Babalaki basi mpe babotaki bana. (Eba. 6:1-4) Nzokande, ntango Mpela eyaki, baanzelu yango bazongaki na mokili ya bilimo. Yuda 6 elobi mpo na bango ete: “Baanzelu oyo babatelaki te esika na bango ya ebandeli kasi basundolaki esika na bango moko ya kofanda mpenza, abombi bango na minyɔlɔlɔ ya seko na kati ya molili tuu mpo na lisambisi ya mokolo yango monene.” Nzambe asukaki kaka te na kolongola bango na esika oyo bazalaki na yango liboso na likoló mpe kotya bango na molili makasi mpo báyeba mikano na ye te, kasi lokola vɛrsɛ elobeli mpe minyɔlɔlɔ, yango emonisi ete apekisi bango. Apekisi bango kosala nini? Emonani ete apekisi bango kolata nzoto ya bato mpo básangisa lisusu nzoto na basi te, ndenge basalaki yango liboso ya Mpela. Biblia elobi ete, tii na siɛklɛ ya liboso T.B., baanzelu ya sembo, oyo bazali bamemi-nsango ya Nzambe, bazalaki mpe kolata nzoto ya bato ntango bazalaki kokokisa mosala na bango awa na mabele. Kasi nsima ya Mpela, Yehova abɔtɔlaki baanzelu yango, oyo basalelaki nguya na bango na ndenge ya mabe, likoki ya kolata lisusu nzoto ya bato.
Nzokande, simbá ete bademo bakoki kosala ete bato bámona bimonaneli mpe bato yango bakoki kokanisa ete yango ezali makambo ya solo. Ntango Zabolo amekaki Yesu, emonani ete asalelaki mayele yango mpo na kolakisa Yesu “makonzi nyonso ya mokili ná nkembo na yango.”—Mat. 4:8.
Ndenge nini moto akoki kolongwa na boombo ya bilimo mabe?
Mas. 18:10: “Nkombo ya Yehova ezali ndako molai ya makasi. Moyengebene akimaka mpo na kokɔta kuna mpe azwaka libateli.” (Yango elimboli te ete nkombo ya Nzambe ezali nkisi ya komibatela. “Nkombo” ya Yehova emonisaka mpenza bomoto na ye. Tokobatelama soki toyebi ye, totyeli ye motema na biso mobimba, tondimi bokonzi na ye mpe totosi mibeko na ye. Soki tosali bongo, boye ntango tokobelela nkombo na ye mpo na kosɛnga lisalisi, akobatela biso ndenge Liloba na ye elobi yango.)
Mat. 6:9-13: “Bosengeli kobondela boye: ‘ . . . Salisá biso tókwea na komekama te, kasi bikisá biso na moto mabe.’” Osengeli mpe ‘kotingama na mabondeli.’ (Rom. 12:12) (Nzambe ayokaka mabondeli ya bato oyo bazali mpenza na mposa ya koyeba solo mpe ya kosambela ye na ndenge oyo esepelisaka ye.)
1 Ko. 10:21: “Bokoki te kolya na ‘mesa ya Yehova’ mpe na mesa ya bademo.” (Baoyo balingi kozala baninga ya Nzambe mpe kobatelama na ye basengeli kotika kosangana na bato oyo basalaka misala ya bilimo mabe. Ndenge lisolo oyo ezali na Misala 19:19 emonisi yango, soki moto azali na eloko oyo ezali na boyokani na misala ya bilimo mabe, asengeli mpe kotumba to kobwaka yango.)
Yak. 4:7: “Yango wana, bómikitisa liboso ya Nzambe; kasi bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.” (Mpo na yango, yekolá na molende makambo oyo Nzambe alingi mpe salelá yango na bomoi na yo. Kolinga Nzambe ekosalisa yo obangaka bato te, oboya mpenza misala mpe mimeseno nyonso oyo eyokani na misala ya bilimo mabe mpe oboya kotosa mibeko nyonso oyo eyokani na makambo ya bilimo mabe.)
Latá “molato mobimba ya etumba oyo euti na Nzambe” oyo Baefese 6:10-18 elobeli, mpe batelá na molende mpenza eteni mokomoko ya molato yango.