Bolingo (agape): ezali nini te mpe ezali nini
“Bobakisa . . . bolingo wana ezali bino na bolingo ya motema mpo na bandeko.”—2 PETELO 1:5, 7.
1. (a) Ezaleli nini Biblia ezali kotya yango liboso mpenza? (b) Maloba nini minei ya Greke mabongolami mbala mingi na “bolingo,” mpe oyo wapi elobelami na 1 Yoane 4:8?
SOKI ezali na ezaleli moko, oyo Liloba na Nzambe (Biblia), etyaka liboso, ezali bongo bolingo. Na Greke, lokóta oyo esalelamaki mpo na kokoma Makomami ya boklisto, mbala mingi maloba minei mabongolami na “bolingo.” Bolingo oyo tolingi kotalela awa ezali eʹros te (liloba oyo lizwami te kati na Makomami ya Greke ya boklisto), oyo ezali na moboko likoló na bobendani kati na mwasi mpe mobali; ezali mpe stor·geʹ te, bolingo bouti na bondeko ya makila; ezali mpe phi·liʹa te, bolingo kati na baninga oyo bazali kosepelana moko na mosusu, mpe oyo tolobelaki kati na lisoló ya liboso. Awa tolingi nde kolobela a·gaʹpe—bolingo oyo moboko na yango ezali likoló na mitinda mpe oyo tokoki kotalela yango lokola bolingo bozangi koluka litomba; ezali mpo na bolingo yango nde ntoma Yoane alobaki ete: “Nzambe azali bolingo.”—1 Yoane 4:8.
2. Nini oyo elobamaki na bosolo nyonso na ntina na bolingo (a·gaʹpe)?
2 Na ntina na bolingo yango (a·gaʹpe), molakisi William Barclay akomaki (New Testament Words) ete: “Agapē ezali kotalela elimo: ezali te bobele liyoki oyo ekobimaka pwasa kati na motema na biso [lokola ekoki kosalema mpo na phi·liʹa], kasi ezali nde lilako oyo kosalelama na yango ezali kotinda moto na kosala liponi oyo ye alingi. Agapē ekangani libosoliboso na mokano. Ezali komonisa etumba mpo na kokoka kozwa eloko, elónga, kokokisama ya likambo moko. Na kotalela lolenge ya bomoto na biso, moto moko te azalaka na bolingo mpo na bayini na ye. Kolinga bayini na biso ezali bongo elónga likoló na mayoki mpe mimeseno na biso nyonso oyo tobotami na yango. Agapē wana . . . emonisi makoki ya kolinga baoyo tozali kosepela na bango te, kolinga bato oyo tobendami epai na bango te.”
3. Motuya nini Yesu Klisto mpe Paulo bapesaki na bolingo?
3 Ya solo, ntina oyo epesami na lolenge oyo ya bolingo ezali moko na makambo makesenisi losambo ya peto ya Jéhovah na mitindo misusu ya losambo. Mpo na yango, Yesu Klisto alobaki na ntina na mibeko mibale oyo mileki minene ete: “Oyo na liboso na nyonso ete: . . . ‘Olinga Jéhovah, Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na mayele na yo mobimba mpe na makasi na yo mobimba.’ Oyo na mibale ezali mpe boye ete: ‘Olinga mozalani na yo lokola yo moko.’ Lilako na koleka oyo na ntina ezali te.” (Malako 12:29-31) Na mokapo 13 ya 1 Bakolinti, ntoma Paulo alobelaki mingi bolingo. Nsima na koloba ete bolingo ezali ezaleli ya liboso mpe ya ntina mingi, asukisaki na maloba oyo: “Bongo kondima mpe elikya mpe bolingo ezali koumela, yango misato. Nde oyo eleki kati na yango ezali bolingo.” (1 Bakolinti 13:13) Yesu alobaki malamu ete bolingo ekozala elembo oyo ekomonisa bayekoli na ye ya solo.—Yoane 13:35.
Bolingo ezali nini te
4. Mitindo boni ya mabe mpe mitindo boni ya malamu ya bolingo Paulo alobeli kati na 1 Bakolinti 13:4-8?
4 Elobamaki ete ezali petee koloba soki bolingo ezali nini te, kasi ezali mpasi koloba soki bolingo ezali nini. Mwa solo ezali kati na likanisi yango, mpo ete ntoma Paulo, kati na mokapo na ye epai azali kolobela bolingo (1 Bakolinti 13:4-8), alobeli biloko libwa oyo bizali bolingo te mpe biloko nsambo oyo bizali bolingo.
5. Lolenge nini “zuwa” elimbolamaki, mpe na motindo nini ya malamu esalelami kati na Makomami?
5 Tala, engebene maloba na Paulo, eloko ya liboso oyo ezali bolingo te: bolingo “ezali na zuwa te.” Likambo oyo ezali kosenga mwa ndimbola, mpamba te ezali na zuwa ya malamu mpe zuwa ya mabe. Diksionere moko elimboli “moto na zuwa” lokola moto “oyo alingaka bombanda te” mpe “alingi ete balinga mpe basalela bobele ye.” Yango wana, Moize alobaki na Exode 34:14: “Okosambela Nzambe mosusu te, mpo ete Jéhovah, nkombo na ye Zuwa, azali Nzambe na zuwa.” Na Exode 20:5, Jéhovah nde alobaki ete: “Ngai, Jéhovah Nzambe na yo, nazali Nzambe oyo [akondimaka bombanda te].” Bobele bongo, ntoma Paulo akomaki ete: “Nazali na zuwa mpo na bino, zuwa engebene mokano na Nzambe.”—2 Bakolinti 11:2.
6. Bandakisa nini ya Makomami ezali komonisa mpo na nini bolingo ezali na zuwa te?
6 Nzokande, liloba “zuwa” ezalaka mingimingi na ndimbola mabe, yango wana etangami kati na misala ya nzoto oyo milobelami na Bagalatia 5:20. Ya solo, zuwa wana ezali na moimi mpe ezali kobimisa koyina; nzokande koyina ezali kozanga bolingo. Zuwa nde etindaki Kaina na koyina Abele kino koboma ye, ezali mpe zuwa nde epusaki bandeko zomi ya Yosefe na koyina ye kino kolinga koboma ye. Bolingo elulaka te na zuwa nyonso biloko to matomba ya bato mosusu, lokola mokonzi Ahaba alulaki na zuwa nyonso elanga ya vinyo ya Nabota.—1 Mikonzi 21:1-19.
7. (a) Likambo nini ya kala limonisi ete Jéhovah alingaka te bato oyo bamikumisaka? (b) Mpo na nini bolingo ekomikumisaka te, ata na lolenge ya kozanga kososola?
7 Na nsima, Paulo alobi na biso ete bolingo “ekomikumisaka te.” Komikumisa ezali elembo ya kozanga bolingo, mpo ete ye oyo azali komikumisa azali komitya likoló na basusu. Jéhovah alingaka bato bakomikumisaka te, lokola tokoki komona yango na lolenge akitisaki mokonzi Nebukadenesala, oyo azalaki komikumisa. (Danyele 4:30-35) Mbala mingi tomikumisaka kozanga kososola, mpo ete tozali na esengo monene mpo na elónga tozwaki to mpo na eloko moko oyo tozali na yango. Basusu bazali na momeseno ya komikumisa mpo na matomba oyo bazwi na mosala ya kosakola. Basusu bakokani na nkulutu oyo akokaki te komipekisa na kobenga baninga na ye na telefone mpo na koyebisa bango ete auti kosomba vuatire ya sika na ntalo ya badolare 50 000. Bizaleli nyonso wana ezangi bolingo, mpamba te ezali kotombola moto oyo azali komikumisa likoló na baoyo bazali koyoka ye.
8. (a) Lolenge nini Jéhovah asalaka epai na baoyo bazali na lolendo? (b) Mpo na nini bolingo ekomitambwisaka motindo yango te?
8 Elobami lisusu ete bolingo “ezali na lolendo te.” Ye oyo azali na lolendo, azali na lofundo, azangi bolingo mpe azali komitombola likoló na basusu. Elimo motindo wana ezali ya mayele te mpo ete “Nzambe akotemelaka bato na lolendo, nde akopesaka basokemi ngolu.” (Yakobo 4:6) Nzokande, bolingo ekosalaka na motindo ekeseni; ekotalelaka basusu ete baleki. Paulo akomaki na Bafilipi 2:2, 3 ete: “Botondisa esengo na ngai ete bokanisa nzela moko, bozalana na bolingo moko, bosangana na motema moko mpe na lobanzo moko. Bosala likambo moko mpo na elulela soko mpo na nzombo te kasi, awa ezali bino na kosokema, botanga basusu ete baleki bino.” Ezaleli oyo ekosepelisa basusu, nzokande, ye oyo azali na lolendo mpe na elimo ya kowelana azali kotya basusu na nkáka.
9. Mpo na nini bolingo ekosalaka na nsoni te?
9 Na nsima Paulo alobi lisusu ete bolingo “ekosalaka na nsoni te.” Moto oyo azali kosala na nsoni azali moto oyo azali kotuka bizaleli malamu to mimeseno malamu. Ye oyo akosalaka na nsoni (oyo azangi bolingo) azali na limemya te mpo na mayoki na basusu. Mabongoli mosusu ya Biblia masaleli “ekosalaka eloko moko te oyo ebongi te” na esika ya liloba ya Greke oyo esalelami awa. Ye oyo azali kosala na nsoni azali na limemya te mpo na oyo etalelami mbala mingi lokola ebongi mpe malamu. Na ntembe te, ye oyo azali na limemya litondi na bolingo akosala te eloko moko oyo ebongi te to oyo ezali na nsoni mpo na basusu, mpe oyo ekoki kotungisa lisosoli, to kopesa mpasi.
Makambo mosusu oyo bolingo ekosalaka te
10. Na ndimbola nini bolingo ekolukaka matomba na yango moko te?
10 Paulo alandisi wana alobi ete bolingo “ekolukaka malamu na yango moko te,” elingi koloba, ntango matomba ya bato mingi mazali kowelana na matomba na biso moko. Ntoma [Paulo] akomaki epai mosusu ete: “Moto te akoyina mosuni na ye moko; nde akoleisa yango mpe akobatela yango.” (Baefese 5:29) Nzokande, na ntango kowelana ezali kati na matomba na biso mpe matomba na bato mosusu mpe wana etinda moko ya Biblia ebukami te na likambo yango, tosengeli kosala lokola Abalayama asalaki epai na Lota, mpe kotika ete moto mosusu apona.—Genese 13:8-11.
11. Likambo oyo ete bolingo ezali na nkanda te, elimboli nini?
11 Lisusu, bolingo ekosilikaka nokinoki te. Yango wana Paulo alobi na biso ete bolingo “ezali na nkanda te.” Bolingo ekolandaka makambo mikemike te. Eyebi komipekisa. Mibali mpe basi na bango basengeli mpenza kotya likebi na toli oyo mpe komibatela na kosilika nokinoki to mpo na kongangelana. Ezali na makambo mosusu oyo, ezali komema moto na kosilika nokinoki; yango wana Paulo amonaki ntina ya kopesa Timoté toli oyo: “Ebongi te ete moombo na Nkolo aswanaka kasi azala na boboto liboso na bato nyonso, azala molakisi malamu, azala na motema petee”—asengeli kosilika te—“apamela batemeli na ye na bopolo.”—2 Timoté 2:24, 25.
12. (a) Na ndimbola nini tokoki koloba ete bolingo ebombaka mabe na motema te? (b) Mpo na nini ezali likambo ya mayele te na kobomba nkanda na motema?
12 Kolandáká kotanga makambo oyo bolingo ekosalaka te, Paulo apesi toli oyo: “Bolingo . . . ekobombaka mabe na motema te.” Elingi koloba te ete bolingo ekangaka miso likoló na mabe. Yesu amonisaki lolenge ya kobongisa makambo ntango basaleli biso mabe moko monene. (Matai 18:15-17) Nzokande, bolingo epesi biso nzela te ya kobomba nkanda to koyina moto. Kobomba nkanda na motema te elimboli kolimbisa mpe kobosana likambo oyo esili kobongisama engebene Makomami. Na yango, tomitungisa te mpe tomiyokisa mawa te na kozongeláká kokanisa libunga yango na kobombáká mabe na motema!
13. Elimboli nini kosepela na masumu te, mpe mpo na nini bolingo ekosepelaka na masumu te?
13 Epai mosusu, elobami na biso ete bolingo “ekosepelaka na masumu te.” Mokili ezali kosepela na masumu, lokola yango ezali komonana na elónga monene ezwami na mikanda, na ba films mpe makambo malakisami na televizyó matali mobulu mpe bolumbu ya bato. Motindo wana ya kosepela ezali na moimi, ezali kozanga limemya mpo na mitinda ya Nzambe mpe mpo na bolamu ya basusu. Ye oyo azali kosala bongo azali kolona kati na mosuni; mokolo ekoya wana akobuka libebi kati na mosuni.—Bagalatia 6:8.
14. Mpo na nini tokoki koloba na kondimisama nyonso ete bolingo ekosuka te?
14 Tala sikawa eloko ya nsuka oyo bolingo ekosalaka te: “Bolingo ekosuka te.” Ya liboso, bolingo ekosuka te to ekosila te mpo ete Nzambe azali bolingo mpe azali “Mokonzi na seko.” (1 Timoté 1:17) Na Baloma 8:38, 39, tondimisami ete, bolingo oyo Jéhovah azali na yango mpo na biso ekosuka te: “Nandimi solo ete ata kufa, ata bomoi, ata baanzelu, ata mikonzi, ata makambo na ntango oyo, ata makambo makoya nsima, ata ndenge na nguya na mokili, ata molai, ata bozindo, ata eloko mosusu nini ekoki kokabola biso te na bolingo na Nzambe bozali kati na Klisto Yesu, Nkolo na biso.” Lisusu, bolingo ekosuka te na boye ete yango ekozanga te. Bolingo ekoki kolónga kati na makambo ndenge nyonso, na komekama nyonso.
Bolingo ezali nini
15. Mpo na nini Paulo atangi motema molai na esika ya liboso kati na mitindo malamu ya bolingo?
15 Tolobela sikawa mitindo malamu na likambo yango: bolingo ezali nini. Mpo na kobanda, Paulo akomaki: “Bolingo ezali na motema molai.” Elobamaki ete kozanga motema molai, mbele boyokani malamu elingaki kozala te kati na baklisto, elingi koloba likoki ya koyikela baninga mpiko na motema petee nyonso. Ezali bongo mpamba te biso nyonso tozangi kokoka, mpe mabunga na biso mazali kotya bato mosusu na komekama. Ezali likambo ya kokamwa te soki Paulo atangi motindo wana ya bolingo na esika ya liboso!
16. Na lolenge nini tokoki komonisa malamu kati na libota?
16 Paulo alobi lisusu ete bolingo ezali “malamu.” Elingi koloba ete bolingo ezali pene ya kosunga, ekotyaka likebi na basusu mpe etondi na limemya mpo na bazalani. Malamu emonanaka kati na makambo minene mpe kati na makambo mike. Mosamaria malamu amonisaki mpenza motema malamu epai na mobali oyo miyibi babetaki. (Luka 10:30-37) Bolingo esepelaka na koloba “soki olingi.” Koloba bobele: “Pesa ngai limpa” ezali kopesa etinda. Etinda yango ekokóma lisengi wana totye “soki olingi” liboso na yango. Mibali bakosala na malamu epai na basi na bango soki balandi toli oyo ezali na 1 Petelo 3:7: “Bino mibali lokola, bozalana na basi na bino kososola na mayele ete bango baleki motau, nde bopesa lokumu epai na bango lokola na bato bakozwa libula na likabo na bomoi na bino elongo; bongo mabondeli na bino makopekisama te.” Basi bakomimonisa malamu epai na mibali na bango soki bakopesa bango “limemya mozindo.” (Baefese 5:33) Batata bakomonisa malamu epai na bana na bango wana bazali kolanda toli epesami na Baefese 6:4: “Bino batata, boyokisa bana na bino nkanda te, kasi bobɔkɔla bango kati na mateya mpe na mpamela ya Jéhovah.”
17. Tanga mitindo mibale oyo bolingo esepelaka na solo.
17 Bolingo ekosepelaka na masumu te, kasi “ekosepelaka na makambo na solo.” Bolingo mpe solo etambolaka esika moko: Nzambe azali bolingo, kasi azali lisusu “Nzambe na solo.” (Nzembo 31:5) Bolingo ekosepelaka na komona solo kolónga lokuta mpe kobimisa lokuta polele; yango ezali kolimbola mwa moke bokoli monene oyo ezali komonana lelo kati na libota ya Jéhovah. Nzokande, lokola solo ezali kotemela bokesene, likanisi likoki mpe kozala ete solo ezali kosepela na boyengebene. Bolingo ezali kosepela na komona boyengebene kolónga; yango wana Jéhovah apesi basambeli na ye etinda ya kosepela na kokwea ya Babilone Monene.—Emoniseli 18:20.
18. Na ndimbola nini bolingo ekokangaka motema na makambo nyonso?
18 Paulo ayebisi biso lisusu ete bolingo “ekokangaka motema na makambo nyonso.” Lokola Traduction interlinéaire du Royaume (na Lingelesi) emonisi yango, esengeli kososola awa ete bolingo ekozipaka makambo nyonso. ‘Ekobimisa’ te “libunga” ya ndeko moko, lokola yango ezali momeseno ya bato mabe. (Nzembo 50:20; Masese 10:12; 17:9) Tozali kokuta likanisi motindo moko kati na 1 Petelo 4:8: “Bolingo ekozipaka ebele na masumu.” Ya solo, bosembo ekopekisa biso na kobomba masumu minene oyo basaleli Jéhovah mpe lisangá ya boklisto.
19. Na ndimbola nini bolingo ekondimaka nyonso?
19 Bolingo “ekondimaka nyonso.” Bolingo ekozalaka na makanisi ya kokende liboso, kasi ezalaka te na makanisi ya kobeta ntembe. Yango elingi koloba te ete bolingo ezali bindimandima. Ekondimaka nokinoki te makambo oyo mazangi moboko. Nzokande, mpo na kokoka kozala na bondimi epai na Nzambe, moto asengeli kozala na mposa ya kondima. Yango wana, bolingo ezalaka na ntembe te mpe ekotɔngaka te kozanga ntina. Etemelaka bindimeli te, lokola bato oyo bazali koloba ete Nzambe azali te; ekokani te na bato oyo bandimaka te makambo oyo maleki mayele ya bato, baoyo bazali koloba ete tozali na likoki te ya koyeba epai touta, mpo na nini tozali awa na mabelé mpe nini ekozala mikolo mizali liboso. Na makambo nyonso wana, Liloba na Nzambe lizali kopesa biso bindimiseli. Epai mosusu, bolingo emilengeli na kondima mpo ete ezali na elikya, kasi ekokaniselaka bato mabe te.
20. Boyokani nini ezali kati na bolingo mpe elikya?
20 Ntoma Paulo andimisi lisusu biso ete bolingo “ekolikyaka nyonso.” Lokola bolingo ezali na likanisi ya kolónga, kasi ya kozanga kolónga te, bolingo ezali na elikya makasi kati na makambo malakami na Liloba na Nzambe. Elobami mpo na biso ete: “Motimoli na mabelé atimola na elikya mpe mopapoli na masango apapola na elikya mpo na libonza.” (1 Bakolinti 9:10) Lokola bolingo ebongi na kotyela motema, lolenge moko mpe ezali na likanisi ya kolónga: ezali kolikya ntango nyonso na makambo maleki malamu.
21. Mpo na oyo etali mpiko oyo bolingo ezalaka na yango, endimiseli nini tozali na yango kati na Makomami?
21 Na nsuka, tondimisami ete bolingo “ekoyikaka mpiko na nyonso.” Ekoki kosala yango na ntina na oyo ntoma Paulo ayebisi biso na 1 Bakolinti 10:13: “Emekeli moko ekómeli bino te oyo ezangi epai na bato nyonso. Nzambe azali sembo; ye oyo akotika bino te ete bomekama na koleka nguya na bino, kasi esika moko na emekeli, akobongisa ekimelo ete bokoka koyika mpiko.” Bolingo ezali kopusa biso na kotalela mpe bandakisa mingi ya basaleli na Nzambe oyo ezwami kati na Biblia, baoyo bayikaki mpiko kati na komekama, baoyo kati na bango, Yesu Klisto azali moto ya liboso, lokola Baebele 12:2, 3 ezali kokundwela biso yango.
22. Lokola bana na Nzambe, ezaleli nini ya liboso tosengeli ntango nyonso komonisa yango?
22 Ya solo, bolingo (a·gaʹpe) ezali mpenza ezaleli eleki monene oyo baklisto, ba Témoins de Jéhovah, basengeli kolona, koboyáká makambo oyo mazali bolingo te, mpe kosaleláká makambo oyo mazali bolingo. Biso baoyo tozali bana na Nzambe, tika ete tomonisa ntango nyonso mbuma wana ya elimo na Ye! Soki tokosala bongo, tokokokana na Nzambe, mpamba te tomikundola ete: “Nzambe azali bolingo.”
Ozali komikundola?
◻ Lolenge nini Yesu Klisto mpe Paulo bamonisaki ete bolingo ezali na ntina mingi?
◻ Na ndimbola nini bolingo ezali na zuwa te?
◻ Na ndimbola nini bolingo ‘ekokangaka motema na makambo nyonso’?
◻ Mpo na nini tokoki koloba ete bolingo ekosuka te?
◻ Wapi mitindo mibale oyo bolingo ekosepelaka na solo?
[Etanda na lokasa 21]
BOLINGO (AGAPE)
Oyo yango ezali te Oyo yango ezali
1. Ezali na zuwa te 1. Motema molai
2. Ekomikumisaka te 2. Malamu
3. Ezali na lolendo te 3. Ekosepelaka na makambo na solo
4. Ekosalaka na nsoni te 4. Ekokangaka motema na makambo nyonso
5. Ekolukaka malamu na yango moko te 5. Ekondimaka nyonso
6. Ezali na nkanda te 6. Ekolikyaka nyonso
7. Ekobombaka mabe na motema te 7. Ekoyikaka mpiko na nyonso
8. Ekosepelaka na masumu te
9. Ekosuka te
[Bililingi na lokasa 18]
Jéhovah akitisaki Nebukadenesala oyo amikumisaki