Ndenge ya kokóma na bolingo ya solosolo
“Bolingo ezali nkisi ya bomoi; bolingo ezali bomoi.”—Buku Living to Purpose, ya Joseph Johnson, mobu 1871.
NDENGE nini moto akómaka na bolingo? Soki ayekoli pisikoloji? Soki azali kotánga mikanda? Soki azali kotala bafilme oyo ezali komonisa bolingo ya basi ná mibali? Te. Bato bakómaka na bolingo libosoliboso na kolanda ndakisa mpe mateya ya baboti na bango. Bana bakómaka na bolingo soki, na kati ya ndako, baboti bazali kokokisa bamposa na bango mpe bazali kobatela bango, bazali kosolola na bango, mpe bazali mpenza komibanzabanza mpo na bango. Lisusu, bana bakómaka na bolingo ntango baboti bazali kolakisa bango kokesenisa malamu ná mabe.
Bolingo ya solosolo ezali te kaka kosepela na moto to mpe bilingelá. Moto oyo azali na bolingo ya solosolo alukaka ntango nyonso bolamu ya basusu, ata soki ntango mosusu bato yango bazali kondima ye te, ndenge emonanaka mingi epai ya bana ntango bazali kopesa bango disipilini na bolingo. Mozalisi azali kopesa ndakisa eleki malamu ya bolingo. Ntoma Paulo akomaki boye: “Mwana na ngai, kotyola te disipilini oyo euti na Yehova, mpe kolɛmba nzoto te ntango osembolami na ye; mpo Yehova apesaka disipilini na moto oyo ye alingaka.”—Baebele 12:5, 6.
Baboti, ndenge nini bokoki kolanda ndakisa ya Yehova na oyo etali kolinga libota na bino? Lisusu, ndakisa oyo bozali kopesa na boyokani na bino ya mwasi ná mobali ezali na ntina nini?
Bópesa ndakisa ya bolingo
Mobali, opesaka mwasi na yo kilo, okumisaka ye mpe opesaka ye limemya? Mwasi, olingaka mobali na yo mpe osungaka ye? Biblia elobi ete mobali ná mwasi basengeli kolingana mpe kopesana limemya. (Baefese 5:28; Tito 2:4) Ntango bazali kosala yango, bana bakomona na miso na bango moko ndenge bolingo ya boklisto ezalaka. Ekozala liteya monene mpe ya ntina mpo na bango!
Lisusu, baboti bateyaka bolingo ntango bazali kolanda mitinda malamu mpo na libota na makambo lokola masano, bizaleli, kozwa mikano mpe makambo oyo esengeli kozwa esika ya liboso. Na mokili mobimba ebele ya bato bamoni ete Biblia ezali na mitinda oyo esengeli mpenza kotambwisa mabota, mpe yango ezali komonisa solo ete Biblia “epemami na Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disipilini na kati ya boyengebene.” (2 Timote 3:16) Kutu, bato mingi balobaka ete mitinda ya bizaleli malamu mpe toli oyo ezali na Lisolo Likoló ya Ngomba ezali toli oyo eleki malamu.—Matai, mokapo 5 tii mokapo 7.
Ntango bato nyonso na kati ya libota bazali koyoka toli ya Nzambe mpe bazali kolanda mitinda na ye, mokomoko akomiyoka malamu mpe bana bakolinga baboti na bango mpe bakomemya bango. Nzokande, na kati ya libota oyo balandaka mitinda ya sembo te, bana bakómaka koimaima, bakómaka nkandankanda mpe bakómaka batomboki.—Baloma 2:21; Bakolose 3:21.
Ezali boni mpo na moboti oyo abɔkɔlaka bana na ye kaka ye moko? Azali nde na makoki mpenza te ya koteya bana na ye bolingo? Ezali mpenza bongo te. Atako libota oyo ezali na tata ná mama eleki kaka malamu, ezali komonana ete boyokani na kati ya libota ekoki kozipa libulu ya kozanga moboti moko. Soki obɔkɔlaka bana na yo yo moko, salá nyonso osalela mitinda ya Biblia na kati ya libota na yo. Lisese moko elobi boye: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo”—ata na nzela ya kobɔkɔla bana.—Masese 3:5, 6; Yakobo 1:5.
Bilenge mingi babɔkwamaki malamu atako bazalaki kaka na moboti moko mpe bazali lelo oyo kosalela Nzambe na bosembo na kati ya ebele ya masangá ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba. Yango emonisi ete baboti oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko bakoki koteya bana na bango bolingo.
Ndenge oyo biso nyonso tokoki kokóma na bolingo
Biblia esakolaki ete na “mikolo ya nsuka,” “bolingo ya libota,” elingi koloba boyokani makasi oyo ezalaka na kati ya bato ya libota moko, ekozala lisusu te. (2 Timote 3:1, 3) Kasi, ata bato oyo bakolaki na mabota oyo ezangaki bolingo ya libota bakoki kokóma na bolingo. Ndenge nini? Soki Yehova, Mopesi ya bolingo mpe Ye oyo amonisaka bolingo epai ya bato nyonso oyo bamipesaka epai na ye na motema mobimba, ateyi bango. (1 Yoane 4:7, 8) Mokomi moko ya nzembo alobaki ete: “Ata tata mpe mama bakotika ngai, nde [Yehova] akolɔkɔta ngai.”—Nzembo 27:10.
Yehova amonisaka biso bolingo na ye na ndenge ebele. Na ndakisa: na toli oyo ezali na Biblia, na lisalisi ya elimo santu, mpe na lisungi ya bandeko baklisto. (Nzembo 119:97-105; Luka 11:13; Baebele 10:24, 25) Tótalela ndenge makambo yango misato ekoki kosalisa yo mpo na kobakisa bolingo na yo mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani na yo.
Toli oyo euti na Tata
Mpo na kolinga mpenza moto moko, esɛngaka koyeba ye malamu. Lokola Yehova amimonisi na nzela ya Biblia, yango emonisi ete azali kobenga biso tópusana penepene na ye. Kasi, kotánga Biblia yango moko ekoki te. Tosengeli kosalela mateya na yango mpe komona matomba ya kosala bongo. (Nzembo 19:7-10) Yisaya 48:17 elobi: “Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba [na yo moko], ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango.” Ya solo, Yehova, Ye oyo azali bolingo, ateyaka biso mpo na litomba na biso—kasi ezali te mpo na kotyela biso mibeko mpe bipekiseli ezangi ntina mpo tózala lokola bato ya bolɔkɔ.
Boyebi ya sikisiki ya Biblia mpe ekosalisa biso tólingaka bazalani na biso mingi. Ezali bongo mpamba te Biblia eteyaka biso ndenge oyo Nzambe atalelaka bato mpe emonisaka biso ndenge ya kofanda na bato. Makambo wana ekoki mpenza kosalisa biso tólinga mozalani na biso. Ntoma Paulo alobaki boye: “Talá eloko oyo nazali kokoba kobondela mpo na yango, ete bolingo na bino etondana lisusu mpe lisusu elongo na boyebi ya solosolo mpe bososoli ya kokoka.”—Bafilipi 1:9.
Mpo na komona ndenge oyo “boyebi ya solosolo” ekoki kosalisa moto akóma na bolingo, tótalela likambo ya solo mpenza oyo Misala 10:34, 35 elobi: “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala boyengebene andimami na ye.” Soki Nzambe atalelaka bato na kolanda misala na bango ya sembo mpe ezaleli na bango ya kobanga Nzambe, kasi atalelaka ekólo to mposo te, tomoni te ete biso mpe tosengeli kotalela bato na ndenge yango?—Misala 17:26, 27; 1 Yoane 4:7-11, 20, 21.
Bolingo ezali mbuma ya elimo ya Nzambe
Mbula oyo ebɛti na ntango malamu esalaka ete banzete ebota mbuma malamu; ndenge moko mpe, elimo ya Nzambe ekoki kobota bizaleli oyo Biblia ebengi “mbuma ya elimo” epai ya bato oyo bazali koyamba elimo yango. (Bagalatia 5:22, 23) Ezaleli ya liboso na kati ya mbuma yango ezali bolingo. (1 Bakolinti 13:13) Kasi, ndenge nini tozwaka elimo ya Nzambe? Lolenge moko ya ntina mingi ezali libondeli. Soki tozali kobondela Nzambe mpo na kosɛnga ye elimo na ye, akopesa biso yango. (Luka 11:9-13) ‘Okobaka’ kobondela mpo na kosɛnga elimo santu? Soki osalaka yango, mbuma malamu na yango, oyo moko na yango ezali bolingo, ekomonana mingi na bomoi na yo.
Kasi, ezali na elimo mosusu oyo eyokani te na elimo ya Nzambe. Biblia ebengi yango “elimo ya mokili.” (1 Bakolinti 2:12; Baefese 2:2) Ezali nguya ya mabe oyo ezali kouta na Satana Zabolo, “moyangeli ya mokili oyo” ya bato oyo bapesi Nzambe mokɔngɔ. (Yoane 12:31) Lokola mopɛpɛ oyo ezali kotombola mputulu mpe bosɔtɔ, “elimo ya mokili” ezali kolamusa bamposa ya mabe oyo ebebisaka bolingo mpe epesaka bolɛmbu ya nzoto nzela.—Bagalatia 5:19-21.
Bato bakómaka na elimo yango ntango bazali kotika ete bolingo makasi ya biloko ya mokili, moimi, mpe mobulu ekɔta na mitema na bango, mpe soki bazali kolanda lolenge mabe ya kotalela bolingo oyo epalangani na mokili ya lelo. Soki olingi ete bolingo ya solo ekola na motema na yo, osengeli koboya na motema moko elimo ya mokili. (Yakobo 4:7) Kasi, kotyela makasi na yo moko motema te; luká lisalisi ya Yehova. Elimo na ye, nguya oyo eleki makasi na molɔ́ngɔ́ mobimba, ekoki kolendisa yo mpe kosalisa yo olonga.—Nzembo 121:2.
Yekolá bolingo epai ya bandeko baklisto
Mwana ayekolaka bolingo ntango azali komona yango na kati ya libota; ndenge moko mpe, biso nyonso: bilenge mpe mikóló, tokoki kokóma na bolingo mingi ntango tozali kosangana na baklisto mosusu. (Yoane 13:34, 35) Kutu, moko na bantina ya lisangá ya boklisto ezali mpo na kopesa bato esika oyo bakoki ‘kolendisanaka po na kolingana pe kosalaka misala ya malamu.’—Baebele 10:24, Bible na Lingala ya lelo oyo.
Bato oyo ‘batikami mpamba mpe bapalanganisami’ na kati ya mokili oyo ezangi bolingo bamonaka mpenza motuya ya bolingo yango. (Matai 9:36) Ezali komonana ete soki moto ayekoli bolingo ntango akómi mokóló, yango ekoki kosalisa ye abosana mpasi oyo kozanga bolingo eyokisaki ye na bomwana. Yango wana, ezali na ntina mingi ete baklisto nyonso oyo bamipesi na Nzambe básepela na bato oyo bazali koya sika na lisangá.
“Bolingo esilaka soki moke te”
Biblia elobi ete “bolingo esilaka soki moke te.” (1 Bakolinti 13:8) Na ndenge nini? Ntoma Paulo alobi na biso ete: “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto. Bolingo ezali na zuwa te, emikumisaka te, emivimbisaka na lolendo te, emitambwisaka na ndenge ya nsɔni te, elukaka matomba na yango moko te, esilikaka te. Ebombaka mabe na motema te.” (1 Bakolinti 13:4, 5) Tomoni ete bolingo yango ezali te makanisi mpamba to bolingo ya likolólikoló. Nzokande, bato oyo bazali komonisa bolingo yango bayebi ete bomoi ezali na mikakatano mpe bampasi mingi, oyo bango moko mpe bakutanaka na yango, kasi batikaka te ete makambo yango ebebisa bolingo na bango mpo na bazalani na bango. Bolingo yango ezali mpenza “ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.”—Bakolose 3:12-14.
Tótalela ndakisa ya elenge mwasi moko moklisto ya mbula 17 na Corée. Ntango abandaki kosalela Yehova Nzambe, bandeko na ye basepelaki te mpe babenganaki ye na ndako. Kasi, na esika akangela bango nkanda, abondelaki Nzambe mpo na likambo yango, mpe atikaki ete Liloba na ye mpe elimo na ye etambwisa makanisi na ye. Na nsima, azalaki mbala na mbala kokomela bandeko na ye mikanda mpe koyebisa bango ete alingaka bango mingi. Yango etindaki bayaya na ye mibale ya mibali báyekola Biblia mpe lelo oyo bazali baklisto oyo bamipesi na Nzambe. Lisusu, mama na ye ná leki na ye ya mobali bandimaki solo. Nsukansuka, tata na ye, oyo azalaki kolinga ata moke te ete ye ayekola, abongolaki makanisi na ye. Elenge Motatoli yango akomi boye: “Biso nyonso tobalá bandeko baklisto, mpe bato 23 na libota na biso tosangani na losambo moko.” Talá ndenge bolingo elongaki!
Olingi kozala na bolingo ya solosolo mpe kosalisa bato mosusu básala mpe bongo? Boye, talelá Yehova, Ye oyo apesaka ezaleli yango ya ntina mingi. Omipesa na koyekola Liloba na ye, bondelá mpo na kosɛnga elimo santu, mpe sanganáká mbala na mbala na bandeko baklisto. (Yisaya 11:9; Matai 5:5) Ezali esengo mingi koyeba ete etikali moke bato mabe nyonso bakozala lisusu te, mpe kaka bato oyo bazali na bolingo ya solosolo nde bakotikala! Ya solo, bolingo ezali sɛkɛlɛ ya bolamu mpe ya bomoi.—Nzembo 37:10, 11; 1 Yoane 3:14.
[Bililingi na lokasa 6]
Kobondela mpe koyekola Liloba ya Nzambe ekosalisa biso na kokóma na bolingo ya solosolo