Mokanda ya Biblia nimero 59—Yakobo
Mokomi: Yakobo
Esika ya bokomi: Yelusaleme
Nsuka ya bokomi: Liboso ya 62 T.B.
1. Nini ezali kobimisa ntembe likoló na likambo oyo ete Yakobo azali mokomi ya mokanda oyo mobéngami na nkombo na ye?
“YE AZALI na ligboma.” Wana ezali likambo oyo bandeko ya Yesu bakanisaki mpo na ye. Na boumeli ya mosala na ye awa na mabelé, ‘bandeko na ye bandimelaki ye te,’ boye Yakobo, elongo na Yosefe, Simona, mpe Yuda, batángamaki te kati na bayekoli ya liboso ya Yesu. (Mko. 3:21; Yoa. 7:5; Mat. 13:55) Na yango, na moboko nini ekoki kolobama ete Yakobo, ndeko ya Yesu, nde akomaki mokanda oyo mobéngami na nkombo Yakobo?
2. Nini endimisi ete ndeko moko ya Yesu, oyo abotamaki na ye mama moko, azalaki mokomi ya mokanda ya Yakobo?
2 Lisoló lizali komonisa ete Yesu oyo asekwisami abimelaki Yakobo, mpe ntembe ezali te ete yango endimisaki ye mpenza ete Yesu azalaki Masiya. (1 Kol. 15:7) Misala 1:12-14 elobi ete ata liboso ya Pantekote, Malia mpe bandeko na Yesu bazalaki koyangana mpo na kobondela elongo na bantoma kati na eteni ya ndako ya likoló, na Yelusaleme. Kasi ekoki kozala te ete moko na bantoma oyo abéngamaki Yakobo nde akomaki mokanda oyo mozali na nkombo na ye? Ezali bongo te, mpo ete na ebandeli ya mokanda yango mokomi amimonisi lokola ntoma te, kasi lokola ‘moombo ya Nkolo Yesu Klisto.’ Lisusu, maloba ya ebandeli ya mokanda ya Yuda, oyo makokani na oyo ya Yakobo, mazali mpe kolobela Yuda (to Yudasi) ete azali “moombo na Yesu Klisto, mpe ndeko na Yakobo.” (Yak. 1:1; Yuda 1, NW) Na kotalela likambo yango, tokoki kosukisa ete Yakobo mpe Yuda, bandeko ya mosuni ya Yesu, bakomaki mikanda ya Biblia oyo mibéngami na nkombo na bango.
3. Makoki nini Yakobo azalaki na yango mpo na kozala mokomi?
3 Yakobo abongaki mpenza mpo na kokoma mokanda ya batoli epai na lisangá ya boklisto. Bazalaki kopesa ye limemya mingi lokola mokɛngɛli kati na lisangá ya Yelusaleme. Paulo alobeli “Yakobo, ndeko na Nkolo” ete azalaki moko na “makonzí” kati na lisangá, elongo na Kefa mpe Yoane. (Gal. 1:19; 2:9) Motuya oyo Yakobo azalaki na yango emonisami na lolenge Petelo atindaki maloba nokinoki epai na “Yakobo na bandeko” nsima ya kobimisama na ye [Petelo] na bolɔ́kɔ. Lisusu, ezalaki Yakobo nde asalaki lokola molobeli ya ‘bantoma mpe ya mikóló’ ntango Paulo mpe Balanaba basalaki mobembo kino Yelusaleme mpo na kosɛnga ekateli likoló na likambo litali ngenga, boye te? Likambo ya kokokana mpenza, ekateli yango mpe mokanda ya Yakobo, yango nyonso mibale ebandi na bopesi losako ya lolenge moko, ete “Mbote!”—ezali elembo mosusu oyo emonisi ete yango nyonso eutaki na mokomi bobele moko.—Mis. 12:17; 15:13, 22, 23, NW; Yak. 1:1, NW.
4. Nini emonisi ete mokanda ya Yakobo mokomamaki mwa moke liboso ya mobu 62 T.B.?
4 Mokomi na makambo ya kala, Josèphe, amonisi biso ete ezalaki Nganga monene Anani (Anania), oyo azalaki Mosadukai, nde atindaki ete báboma Yakobo na mabanga. Yango ezalaki na nsima ya liwa ya moyangeli Moloma Fesete, soko na mobu 62 T.B., mpe liboso ete mokitani na ye, Albinus, azwa ebongá.a Kasi Yakobo akomaki mokanda na ye ntango nini? Longwa na Yelusaleme, Yakobo atindaki mokanda na ye epai na “mabota zomi na mibale na lipalangana,” na elobeli ya polele, “[mabota] oyo mapalanganaki.” (Yak. 1:1) Nsima na kosopama ya elimo santu na mobu 33 T.B., ntango mingi elekaki liboso ete boklisto epalangana bipai binso mpe esɛngaki lisusu ntango mingi mpo ete makambo ya mpasi oyo malobelami na mokanda yango makoka kobima. Lisusu, mokanda yango momonisi ete baklisto bazalaki lisusu kosangana na bituluku mikemike te, kasi babongisamaki kati na masangá elongo na “mikóló” oyo bakɔmeli, oyo bakokaki kobondela mpo na bato na bolɛmbu mpe kosunga bango. Epai mosusu, ntango mingi elekaki mpo ete kozanga bosepeli mpe ezaleli ya kosambela likolólikoló ekoka kokɔta kati na lisangá. (2:1-4; 4:1-3; 5:14; 1:26, 27) Na yango, ekoki kozala mpenza ete Yakobo akomaki mokanda na ye na ntango moko oyo eyaki mpenza na nsima, mbala mosusu mwa moke liboso ya mobu 62 T.B., soki lisoló oyo Josèphe ayebisi na ntina na makambo oyo mabimaki zingazinga ya liwa ya Fesete lizali solo mpe soki biutelo oyo bimonisi ete Fesete akufaki soko na mobu 62 T.B. bizali solo.
5. Nini emonisi bosolo ya mokanda ya Yakobo?
5 Na oyo etali bosolo na yango, mokanda ya Yakobo mozwami kati na maniskri Vaticanus No. 1209, na maniskri Sinaïticus mpe na maniskri Alexandrinus. Mokanda yango mozwami mpe kati na bakataloge zomi (to koleka zomi) oyo ekomamaki liboso ya liyangani babéngi Concile de Carthage, oyo lisalemaki na mobu 397 T.B.b Bakomi ya kala oyo bazalaki mpe bakonzi ya mangomba bazalaki kotánga maloba na yango mbala mingi. Boyokani mozindo elongo na mikanda mosusu nyonso ya Makomami mapemami ezali komonana polele kati na makomi ya Yakobo.
6. (a) Makambo nini mamemaki Yakobo na kokoma mokanda na ye? (b) Na esika ya kokweisa makomi ya Paulo, lolenge nini Yakobo abakisi bandimbola likoló na maloba ya Paulo na likambo litali kondima?
6 Mpo na nini Yakobo akomaki mokanda oyo? Botaleli mozindo ya mokanda yango ezali komonisa ete makambo oyo mazalaki na kati ya lisangá mazalaki kobimisa mikakatano kati na bandeko. Mitindá ya boklisto mizalaki kokitisama, ɛɛ, ata kotyolama, na boye ete bamoko bakómaki basi ya ekobo na elimo na likambo litali boninga elongo na mokili. Kopusamáká na makanisi mabe ya komonisa na bokosi nyonso ete bongolábongola ezalaki [kati na mokanda ya Yakobo mpe oyo ya Paulo], bamoko balobaki ete mokanda ya Yakobo, oyo mozalaki kolendisa kondima na nzela ya misala, mokweisaki makomi ya Paulo oyo mazalaki kolobela lobiko na nzela ya kondima kasi na nzela ya misala te. Nzokande, makambo oyo mazali zingazinga mamonisi ete Yakobo azali kolobela nde kondima oyo esimbami na misala, kasi bobele maloba mpamba te, nzokande Paulo azali kolobela mpenzampenza misala ya Mibeko ya Mose. Ya solo, mokanda ya Yakobo moyei mpenza kobakisama na bandimbola ya Paulo, mpamba te yango ekei mwa mosika koleka, wana emonisi lolenge oyo kondima ekoki komonisama. Toli oyo Yakobo apesi ezali malamu koleka mpamba te yango ezali kolobela mikakatano oyo baklisto bazali kokutana na yango mokolo na mokolo.
7. Lolenge nini Yakobo amekoli myango ya koteya oyo Yesu asalelaki, mpe yango ebimisaki mbano nini?
7 Bilakiseli ya makambo ya bomoi ya mokolo na mokolo, oyo bisangisi banyama, masuwa, basáli na bilanga, mpe bazámba, bizali kondimisa bandimbola oyo Yakobo amonisi likoló na kondima, motema pɛtɛɛ mpe mpiko. Lolenge wana ya komekola myango malamu ya koteya oyo Yesu asalelaki ezali kopesa bokasi na toli na ye. Mokanda yango mozali kokamwisa bato na ntina na bososoli mozindo ya Yakobo na likambo litali mikano oyo mizali kopusa bato.
MAKAMBO MAZALI KATI NA YAKOBO
8. Litomba nini lizali kozwama na koyika mpiko na motema pɛtɛɛ nyonso, kasi mposa mabe esukaka na nini?
8 Koyika mpiko na motema pɛtɛɛ nyonso lokola “batosi na liloba” (1:1-27). Mokanda ya Yakobo mobandi na maloba ya kolendisa: “Bandeko na ngai, bókanisa ete ezali bobele esengo wana ekokwea bino kati na komekama na mitindo na mitindo.” Na koyikáká mpiko na motema pɛtɛɛ nyonso, bakozala bato bakoki mpenza. Soki moto moko azangi mayele, asengeli kokóba kosɛnga yango epai na Nzambe, kozanga kobɛta ntembe, lokola mbonge ya mai na monana oyo ezali kobɛtama epai na epai na mopɛpɛ, kasi nde na kozaláká na kondima. Mosɔkɛmi akotombolama, nde moto na bozwi akokauka lolenge fololo ekobebaka. Esengo na moto oyo azali koyika mpiko na komekama, mpamba te “akozwa motole na bomoi molakaki Nkolo epai na bango bakolingaka ye.” Nzambe amekaka moto na makambo mabe te mpo na kokweisa ye. Ezali mposa mabe ya moto ye moko nde ekolaka mpe ebotaka lisumu, mpe na ngala na yango lisumu liboti kufa.—1:2, 12, 22.
9. Nini esangisami kati na kozala “basaleli na liloba,” mpe lolenge nini ya losambo Nzambe andimaka?
9 Makabo nyonso ya malamu mazali kouta wapi? Mauti na ‘Tata na kongɛnga na likoló’ oyo akobongwanaka te. Yakobo alobi ete “na mokano na ye moko abotaki biso na liloba na solo ete biso tózala lokola mbuma na liboso na biloko bizalisaki ye.” Na yango, baklisto basengeli koyoka na lombangu, kowela koloba te, koyoka nkanda noki te, mpe basengeli kolongola litɔnɔ nyonso ya mbindo, bizaleli nyonso ya mabe mpe basengeli kondima kolónama ya liloba ya lobiko. “Bózalaka nde batosi na liloba, bobele bayoki mpamba te.” Mpo ete ye oyo azali kotalatala kati na mibeko mikokani na talatála ya bonsomi mpe azali ntango nyonso koumela kati na yango “akozala na esengo kati na misala na ye.” Losambo ya moto oyo ayebi kokanga lolemo na ye te ezali losambo lozangi ntina, kasi “losambo na pɛto mpe lobongi epai na Nzambe Tata na biso ezali boye: kotaláká bitike mpe basi-bakufeli-mibali kati na mpasi na bango mpe komibatela nzoto pɛto na makambo na mokili.”—1:17, 18, 22, 25, 27.
10. (a) Koponapona nini esengeli koboyama? (b) Boyokani nini ezali kati na misala mpe kondima?
10 Kondima eyeisami ya kokoka na nzela na misala ya sembo (2:1-26). Bandeko bazali koponapona, kolingáká bato na bozwi mpe kotyoláká babólá. Kasi ezali solo ete ‘Nzambe aponi babólá na mokili oyo bazali kotosa liloba ete bázala bato na bozwi kati na kondima mpe basangoli na libula ya Bokonzi,’ boye te? Bato na bozwi bazali banyokoli te? Bandeko basengelaki kotosa mobeko oyo ya bokonzi, ete “Olinga mozalani na yo lokola yo moko,” mpe basengeli kobwaka ezaleli ya koponapona. Tiká ete bázala mpe na motema mawa, mpamba te engebene Mibeko, moto oyo abuki moko na yango akwei mpe kati na nyonso oyo etikali. Kondima oyo ezangi misala ezali na ntina te, motindo moko na moto oyo alobi na ndeko mobali to ndeko mwasi oyo azali na bosɛngá ete “bókenda na kimya, bóyoka mɔ́tɔ, bótonda” kozanga ete apesa ye lisungi libongi. Kondima ekoki nde komonisama kozanga misala? Kondima ya Abalayama eyeisamaki ya kokoka na nzela ya misala mpo ete apesaki Yisaka lokola mbeka likoló na etumbelo, boye te? Bobele bongo, Laaba, mwasi na pite, “alóngaki mpo na misala.” Na yango, kondima oyo ezangi misala esili kokufa.—2:5, 8, 16, 19, 25.
11. (a) Na kosaleláká bilakiseli nini Yakobo apesi makebisi na ntina na lolemo? (b) Lolenge nini mayele mpe bososoli esengeli komonisama?
11 Kobatela lolemo mpo na koteya mayele (3:1-18). Bandeko basengeli kozala na bokɛngi na ntina na kokóma balakisi mpo ete bázwa te kosambisama eleki makasi. Moto nyonso abɛtaka mabaku mbala na mbala. Motindo moko na ebendé oyo ekokambaka mpunda mpe na yenda moke oyo ekotambwisaka masuwa, bobele bongo lolemo, enama moke ya nzoto, ezali na nguya mingi mpenza. Yango ekokani na mɔ́tɔ oyo ekoki kozikisa zámba mobimba! Banyama ya zámba bakoki kobɔkɔlama lokola nyama ya mboka kozanga mikakatano mingi, kasi ezali bongo te mpo na lolemo. Na kosaleláká yango, bato bazali kopambola Yehova, kasi bazali mpe kolakela bazalani na bango mabe. Yango ezali likambo libongi te. Liziba ya mai likobimisaka nde mai ya bololo mpe mai ya elɛngi esika moko? Nzeté na mosuke ekoki nde kobota mbuma ya nzeté ya olive? Nzeté na mowiti ekoki nde kobota misuke? Mai ya mungwa ekoki nde kopesa mai mazangi mungwa? Yakobo atuni ete: “Nani kati na bino azali moto na mayele mpe na kososola malamu?” Tiká ete amonisa misala na ye na komikitisa nyonso mpe aboya komikumisa mpe lipombo mpo na kotɛmɛla solo. Mpamba te “mayele mauti na Likoló ezali liboso na pɛto, na nsima ezali na kimya na boboto, na kotosa noki, matondi na mawa mpe na mbuma malamu, na ntembe te, na bokosi mpe te.”—3:13, 17.
12. (a) Makambo nini ya mabe mazalaki kati na lisangá, mpe mautaki wapi? (b) Ezaleli nini esengeli kopɛngolama mpe ezaleli nini esengeli kolónama mpo na kondimama epai na Yehova?
12 Bóbwaka mposa ya nzoto mpe boninga na mokili (4:1-17). “Bitumba mpe koswana na kati na bino iuti wapi?” Yakobo ayanoli na motuna na ye moko ete: “Na mposa mabe na bino”! Mikano ya basusu mizali mabe. Baoyo bamizalisi baninga ya mokili bazali “basi na ekobo,” mpe bakómi banguna ya Nzambe. Na yango, apesi elendiseli ete: “Bótɛmɛlaka oyo na mabe [“Zábolo,” NW] mpe akokima longwa na bino. Bóbɛlɛma epai na Nzambe mpe ye akobɛlɛma epai na bino.” Yehova akotombola bato na komikitisa. Na bongo, bandeko basengeli te kosambisana moko na mosusu. Mpe lokola moto moko te ayebi mpenza lolenge bomoi na ye ekozala lobi, basengeli koloba ete: “Soko ezali mokano na Nkolo, tokozala na bomoi, mpe tokosala boye na bongo.” Lolendo ezali mabe, mpe ezali lisumu soki oyebi oyo ezali malamu nde oboyi kosala yango.—4:1, 4, 7, 8, 15.
13. (a) Mpo na nini ekoki kolobama ete mawa na bato na bozwi? (b) Lolenge nini Yakobo amonisi ntina ya kozala na motema pɛtɛɛ mpe na mpiko, mpe yango ekobimisa matomba nini?
13 Esengo na baoyo bazali koyika mpiko kati na boyengebene! (5:1-20). Yakobo alobi ete ‘bino bazwi; bólela mpe bónganga! Misolo na bino mibebi. Yehova na bibele ayoki konganga ya babuki mbuma oyo bino bobɔtɔli lifuti na bango. Bofandaki kati na biloko kitoko mpe na bisengo ya nzoto, bokweisaki mpe bobomaki moyengebene.’ Nzokande, lokola kozala ya Nkolo ezali kobɛlɛma, bandeko basengeli kozala na motema pɛtɛɛ, lokola mosáli na bilanga oyo azali kozela ntango ya bobuki mbuma, mpe basengeli kolanda ndakisa ya basakoli ya kala, “baoyo balobaki na nkombo na Nkolo.” Esengo na baoyo bazali koyika mpiko! Bandeko basengeli komanyola likoló na mpiko ya Yobo mpe lolenge oyo Yehova asilisaki likambo yango, “zambi Nkolo atondi na mawa mpe na boboto.”—5:1-6, 10, 11.
14. Toli nini ya nsuka epesami na ntina na koyambola masumu mpe na ntina na libondeli?
14 Tiká ete balapa ndai te. Tiká nde ete ‘Ɛɛ na bango ezala Ɛɛ’ mpe ‘Te na bango ezala Te.’ Basengeli koyambola masumu na bango polele mpe kobondela bamoko mpo na basusu. Lokola yango emonisami na mabondeli ya Eliya, “lilɔmbɔ na moyengebene ezali na nguya mingi.” Soki moto moko apɛngwi longwa na solo, ye oyo akozongisa ye “akobikisa bomoi na ye mpe akozipa ebele na masumu.”—5:12, 16, 20.
LITOMBA NA YANGO
15. Lolenge nini Yakobo asaleli Makomami ya Liebele? Pesá ndakisa.
15 Atako Yakobo atángi nkombo ya Yesu bobele mbala mibale (1:1; 2:1), nzokande azali kosalela mpenza mateya ya Nkolo, lolenge yango ezali komonana soki tokokanisi malamumalamu mokanda ya Yakobo mpe Lisoló ya Yesu likoló na Ngomba. Bobele na ntango yango, nkombo ya Yehova ezali komonana mbala 13 (NW), mpe bilaka na ye bilobelami mingi mpenza ete bizali mbano mpo na baklisto oyo bazali kobatela kondima. (4:10; 5:11) Yakobo azali kobenda likebi mbala na mbala likoló na Makomami ya Liebele mpo na kopesa bilakiseli mpe kozongela maloba ebongi na ntina ete batoli na ye ya malamu emonana polele. Amonisi eutelo ya maloba na ye ete: “pelamoko elobi likomi,” “likomi likoki,” mpe ‘likomi lilobi’; mpe alandi na kokokanisáká makomi yango na bomoi ya boklisto. (2:8, 23; 4:5) Mpo na kopesa makanisi oyo makosimba batoli na ye mpe kolendisa kondima kati na Liloba ya Nzambe na mobimba na yango, Yakobo alobeli ndakisa malamu ya misala ya kondima ya Abalayama, alobeli komonisama ya kondima ya Laaba na nzela ya misala, alobeli mpiko ya bosembo oyo Yobo ayikaki, mpe alobeli elikya oyo Eliya azalaki na yango na libondeli.—Yak. 2:21-25; 5:11, 17, 18; Gen. 22:9-12; Yos. 2:1-21; Yobo 1:20-22; 42:10; 1 Mik. 17:1; 18:41-45.
16. Toli nini mpe makebisi nini Yakobo apesi, mpe mayele wana oyo mabongi mauti wapi?
16 Batoli oyo ya Yakobo ezali na motuya mingi: kozala batosi na liloba, bobele bayoki mpamba te, kokóba komonisa kondima na nzela ya misala ya boyengebene, kozwa esengo na nzela na koyika mpiko kati na komekama ndenge na ndenge, kokóba kosɛnga mayele epai na Nzambe, kobɛlɛma ntango nyonso epai na ye na nzela ya libondeli, mpe kosalela mobeko oyo ya bokonzi, ete “Olinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Yak. 1:22; 2:24; 1:2, 5; 4:8; 5:13-18; 2:8) Makebisi na ye oyo matondi mpenza na nguya: kokeba na mbeba kati na mateya, kosalela lolemo na lolenge mabe, koponapona kati na lisangá, mposa mabe ya nzoto, mpe ezaleli ya kotya motema na bozwi ya mosuni oyo bokobebaka. (3:1, 8; 2:4; 4:3; 5:1, 5) Yakobo amonisi yango polele ete boninga na mokili ezali komema na ekobo ya elimo mpe na bonguna na Nzambe, mpe apesi ndimbola na lolenge ya losambo lobongi mpe ya pɛto na miso ya Nzambe ete: “kotaláká bitike mpe basi-bakufeli-mibali kati na mpasi na bango mpe komibatela nzoto pɛto na makambo na mokili.” (4:4; 1:27) Batoli nyonso wana, oyo ebongi mpe ya pɛtɛɛ mpo na kososolama, ezali mpenza eloko oyo tosengelaki komizela na yango epai na ‘likonzi’ wana na lisangá ya boklisto ya ebandeli. (Gal. 2:9) Nsango kitoko ya mokanda yango ezali ntango nyonso kopesa litambwisi epai na baklisto na ekeke na biso ya yikiyiki, mpamba te yango ezali “mayele mauti na Likoló,” oyo mazali kobimisa “mbuma na boyengebene.”—3:17, 18.
17. Ntina monene nini emonisami mpo na koyika mpiko kati na misala ya bosembo?
17 Yakobo azalaki komitungisa mpo na kosunga bandeko na ye ete bázwa bomoi, oyo bamityelaki lokola mokano, kati na Bokonzi ya Nzambe. Na yango, alendisi bango ete: “Bino mpe, bózala na mitema milai, bólendisa mitema na bino, mpo ete Komonana na Nkolo ezali kobɛlɛma.” Soki bakóbi koyika mpiko na komekama, bakozala na esengo mpamba te kondimama na Nzambe elimboli kozwa “motole na bomoi molakaki Nkolo epai na bango bakolingaka ye.” (5:8; 1:12) Na bongo, elaka ya Nzambe ya kopesa motole ya bomoi—ezala bomoi bozangi kufa kuna na likoló to bomoi ya seko awa na mabelé—elobelami mingi lokola ntina monene ya koyika mpiko kati na misala ya sembo. Ya solo, mokanda kitoko oyo mokolendisa bato nyonso ete bámityela mokano ya kozwa bomoi ya seko, ezala na likoló to kati na mokili ya sika ya Yehova, oyo ekotambwisama na Mombóto ya Bokonzi, Nkolo na biso Yesu Klisto.—2:5.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Jewish Antiquities, XX, 197-200 (ix, 1); Webster’s New Biographical Dictionary, 1983, lokasa 350.
b Talá etánda oyo ezali na lokasa 303.