‘Nzambe nde akolisaka’!
“Moto oyo azali kolona azali eloko te ndenge moko mpe oyo azali komwangisa mai, kasi kaka Nzambe moto azali kokolisa.”—1 KOL. 3:7.
1. Na ndenge nini biso ‘tozali kosala elongo na Nzambe’?
“BATO oyo bazalaki kosala elongo na Nzambe.” Wana ezali ndenge ntoma Paulo alobelaki mokumba na biso. (Tángá 1 Bakolinti 3:5-9.) Mosala oyo Paulo alobelaki na vɛrsɛ wana ezali mosala ya kokómisa bato bayekoli. Amonisaki ete ekokani na mosala ya kolona mboto mpe kobwakela yango mai. Mpo na kolonga na mosala wana ya ntina mingi, tosengeli na lisalisi ya Yehova. Paulo akundweli biso ete ‘Nzambe nde akolisaka.’
2. Mpo na nini koyeba ete ‘Nzambe nde akolisaka’ esalisaka biso tótalela mosala na biso na ndenge ebongi?
2 Koyeba bongo ekosalisa biso tótalelaka mosala ya kosakola na ndenge ebongi. Tokoki kozala na molende na mosala ya kosakola mpe ya koteya, kasi lokumu nyonso esengeli kokende epai ya Yehova mpo na matomba oyo tokoki kozwa na mosala yango. Mpo na nini? Mpo ata soki tosali ndenge nini, tokoki koyeba mpenza te ndenge oyo moto akómaka moyekoli ya Yesu. Mokonzi Salomo amonisaki likambo yango polele ntango akomaki ete: “Oyebi misala ya Nzambe te, ye oyo akosalaka nyonso.”—Mos. 11:5.
3. Boyokani nini ezali na kati ya mosala ya kolona mboto mpe oyo ya kokómisa bato bayekoli?
3 Kozanga koyeba ndenge moto akómaka moyekoli ya Yesu esengeli nde kolɛmbisa biso? Te. Esengeli nde kopesa biso esengo to kolendisa biso. Mokonzi Salomo alobaki boye: “Na ntɔngɔ, [loná] mboto na yo mpe na mpokwa pekisá lobɔkɔ na yo te; mpo ete oyebi te soki nini ekokóma malamu to oyo to yango to soki nyonso mibale ekozala malamu.” (Mos. 11:6) Ya solo, ntango tozali kolona mboto, toyebaka te esika nini ekokwea to soki ekobota. Ezali na makambo mingi oyo toyebaka te. Ezali mpe ndenge moko na mosala ya kokómisa bato bayekoli. Yesu amonisaki likambo yango na masese mibale oyo apesaki, oyo ekomamá na mokapo ya minei ya Evanzile ya Malako. Tótalela naino mateya oyo tokoki kozwa na masese mibale wana.
Mabelé ya ndenge na ndenge
4, 5. Lobelá na mokuse lisese oyo Yesu apesaki ya moloni oyo azalaki kobwakabwaka mboto.
4 Ndenge ekomami na Malako 4:1-9, Yesu alobelaki moloni oyo azali kobwaka mboto, oyo ekwei na bisika ndenge na ndenge: “Bóyoka. Talá! Moloni abimaki mpo na kolona. Mpe lokola azalaki kolona, mwa ndambo ya milona ekweaki pembeni ya nzela, mpe bandɛkɛ bayaki mpe balyaki yango. Mpe milona mosusu ekweaki na esika ya mabanga epai kuna, kaka ndenge ezalaka, ezwaki mabelé mingi te, mpe nokinoki ebimaki mpo mabelé na yango ezalaki mozindo te. Kasi ntango moi ebimaki, yango ezikaki, mpe lokola ezalaki na misisa te ekaukaki. Mpe milona mosusu ekweaki na kati ya banzubɛ, mpe banzubɛ ekolaki mpe etyaki yango nkaka, mpe ebotaki mbuma te. Kasi mosusu ekweaki na mabelé ya malamu, mpe, nsima ya kobima mpe kokola, ebandaki kobota mbuma, mpe ezalaki kobimisa mbuma mbala ntuku misato, mpe ntuku motoba mpe nkama moko.”
5 Na mikili mosusu, mpo na kolona mboto, babwakabwakaka yango. Moloni atyaka mboto na ye na libenga to na ekɔlɔ moko mpe abwakabwakaka yango makasi. Na yango, na lisese wana, moloni te nde aponaka esika oyo mboto ekokwea. Ye abwakaka kaka mpe mboto ekweaka na bisika ndenge na ndenge.
6. Ndimbola nini Yesu apesaki na lisese ya moloni mboto?
6 Ezali na ntina te tóluka ndimbola ya lisese yango. Yesu ye moko apesaki ndimbola na yango, oyo ezali na Malako 4:14-20: “Moloni azali kolona liloba. Bongo, baoyo bazali pembeni ya nzela epai liloba elonamaki; kasi nokinoki nsima ya koyoka yango Satana ayei mpe alongoli liloba oyo elonamaki na kati na bango. Ndenge moko mpe baoyo balonamaki na bisika ya mabanga: na ntango bayoki liloba, bandimi yango na esengo. Nzokande bazali na misisa te na kati na bango, kasi baumeli mwa moke; na nsima ntango kaka bolɔzi to monyoko ebimi mpo na liloba, babɛti libaku. Ezali mpe na bamosusu oyo balonami na kati ya banzubɛ; yango ezali bato oyo bayoki liloba, kasi mitungisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo mpe nguya ya bokosi ya bomɛngo mpe bamposa ya biloko mosusu ekɔti mpe etye liloba nkaka, mpe yango ezangi kobota mbuma. Mpo na kosukisa, baoyo balonamaki na mabelé ya malamu ezali baoyo bayoki liloba mpe bayambi yango malamu mpe baboti mbuma mbala ntuku misato mpe ntuku motoba mpe nkama moko.”
7. Mboto mpe mabelé ya ndenge na ndenge ezali komonisa nini?
7 Simbá ete Yesu alobi te ete moloni asaleli mboto ya ndenge na ndenge. Alobeli mboto ya lolenge moko kaka, kasi elonami nde na mabelé ya ndenge na ndenge mpe mabelé yango ebimisi milona ya ndenge na ndenge. Mabelé ya esika ya liboso ezali makasi to enyatamá mingi na makolo ya bato, oyo ya mibale ezali na mabelé mingi te mpo ezali likoló ya mabanga, oyo ya misato etondi na nzubɛ mpe oyo ya minei ezali mabelé ya malamu, oyo ebimisi mbuma mingi. (Luka 8:8) Mboto ezali nini? Ezali nsango ya Bokonzi oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe. (Mat. 13:19) Mabelé ya ndenge na ndenge oyo balobeli na lisese oyo ezali komonisa nini? Ezali bato oyo bazali na mitema ekeseni.—Tángá Luka 8:12, 15.
8. (a) Moloni ezali nani? (b) Mpo na nini basakoli nyonso bazwaka matomba ndenge moko te na mosala na bango?
8 Moloni ezali nani? Ezali bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe, baoyo bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Lokola Paulo ná Apolo, bazali kolona mpe kobwakela milona mai. Ata soki bazali kosala makasi, bazali kozwa matomba ndenge moko te. Mpo na nini? Mpo mitema ya bato oyo bazali koyoka nsango malamu ekeseni. Ndenge lisese emonisi yango, moloni akoki te koyeba soki mboto oyo aloni ekobota to te. Yango esengeli mpenza kobɔndisa biso, mingimingi bandeko oyo basali mosala makasi na boumeli ya ebele ya bambula, kasi bazwi matomba mingi te!a Mpo na nini?
9. Likambo nini ya kolendisa ntoma Paulo ná Yesu bamonisaki?
9 Matomba ya mosala ya moloni te nde emonisaka soki azali sembo to te. Yango nde Paulo alingaki koloba ntango alobaki ete: “Moto na moto akozwa mbano na ye engebene mosala na ye moko ya makasi.” (1 Kol. 3:8) Moloni akozwa mbano mpo na mosala na ye, kasi te mpo na mbuma oyo mosala na ye ebimisi. Yesu mpe amonisaki likambo yango ntango bayekoli na ye bautaki na mobembo oyo basalaki ya mosala ya kosakola. Bazalaki na esengo makasi mpo ata bademo bazalaki kotosa bango ntango bazalaki kosalela nkombo ya Yesu. Atako bazalaki na esengo makasi, Yesu alobaki na bango boye: “Bósepela mpo na oyo te, ete bilimo bizali kotosa bino, kasi bósepela nde mpo bankombo na bino ekomami na likoló.” (Luka 10:17-20) Ata soki moloni azwi matomba mingi te na mosala na ye, tokoloba te ete asalaki na molende te to azalaki sembo te lokola baloni mosusu. Mingimingi, motema ya moto oyo ayoki nsango malamu nde esalaka ete moloni azwa matomba to te. Kasi, na nsuka, Nzambe nde akolisaka!
Mokumba ya bato oyo bazali koyoka Liloba
10. Nini esalaka ete moto oyo ayoki liloba azala lokola mabelé ya malamu to ya mabe?
10 Tokoloba boni mpo na moto oyo azali koyoka liloba? Nzambe nde asilaki kobongisa liboso ete andima yango to te? Te. Bango moko nde bamikómisaka mabelé ya malamu to ya mabe. Ya solo, motema ya moto ekoki kobonga to kobeba. (Lom. 6:17) Na lisese na ye, Yesu alobaki ete ntango bamosusu bayokaki liloba, “nokinoki nsima ya koyoka yango,” Satana ayaki mpe alongolaki yango. Kasi soki totali malamu, esengeli kozala bongo te. Yakobo 4:7 ezali kolendisa baklisto ete ‘bátɛmɛla Zabolo’ mpe akokima bango mosika. Yesu alobaki ete bamosusu bayambaki liboso nsango malamu na esengo, kasi na nsima babendaki nzoto mpo liloba ezwaki “misisa te na kati na bango.” Kasi, Biblia ezali kolendisa basaleli ya Nzambe ete ‘bápika misisa mpe bátɛlɛma makasi likoló ya moboko,’ mpo bázala na likoki ya kososola “bonene mpe bolai mpe bosanda mpe bozindo, mpe koyeba bolingo ya Klisto oyo eleki boyebi.”—Ef. 3:17-19; Kols. 2:6, 7.
11. Ndenge nini moto akoki koboya mitungisi mpe bomɛngo etya liloba nkaka?
11 Yesu alobaki ete bato mosusu oyo bayokaki liloba batikaki “mitungisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo mpe nguya ya bokosi ya bomɛngo” ezwa esika na mitema na bango mpe etya liloba nkaka. (1 Tim. 6:9, 10) Ndenge nini bakoki kosala ete yango ekómela bango te? Ntoma Paulo apesi eyano oyo: “Tiká ete ezaleli na bino na bomoi ezanga bolingo ya mbongo, wana bozali kosepela na oyo bozali na yango na biloko ya sikoyo. Mpo alobaki ete: ‘Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.’”—Ebe. 13:5.
12. Mpo na nini bato oyo bamonisami na mabelé ya malamu babotaka mbuma ndenge moko te?
12 Na nsuka, Yesu alobaki ete baoyo balonami na mabelé ya malamu babotaka “mbuma mbala ntuku misato mpe ntuku motoba mpe nkama moko.” Atako bato mosusu oyo bandimaka liloba bazali na mitema oyo ebongi mpe babotaka mbuma, basakolaka nsango malamu na kolanda makoki na bango. Na ndakisa, bobange to maladi ekoki kosala ete bandeko mosusu básakolaka mingi te. (Talá mpe Malako 12:43, 44.) Lisusu, ata soki moloni asali milende mingi to te, asepelaka soki Yehova akolisi mboto oyo alonaki.—Tángá Nzembo 126:5, 6.
Moloni oyo alali
13, 14. (a) Lobelá na mokuse lisese oyo Yesu apesaki ya moloni oyo azalaki kobwakabwaka mboto. (b) Moloni ya mboto ezali nani, mpe mboto ezali nini?
13 Na Malako 4:26-29, ezali na lisese mosusu ya moloni: “Na ndenge oyo nde bokonzi ya Nzambe ezali lokola ntango moto moko abwaki mboto na mabelé, mpe alali na butu mpe alamuki na moi, mpe mboto ebimi mpe ekoli, kasi ayebi te soki esalemi ndenge nini. Mabelé yango moko ezali kobota mbuma mokemoke: ya liboso lititi, na nsima motó, na nsuka nde mbuma mobimba na kati ya motó yango. Kasi nokinoki ntango mbuma epesi yango nzela, akati na likwangola, mpamba te ntango ya kobuka mbuma ekómi.”
14 Moloni yango ezali nani? Bato mosusu na mangomba ya boklisto bakanisaka ete ezali Yesu ye moko. Kasi, tokoki mpenza koloba ete alali mpe ayebi te ndenge mboto ezali kokola? Na ntembe te, Yesu ayebi ndenge mboto ekolaka banda na ebandeli tii na nsuka! Ndenge moko na oyo tolobelaki liboso, moloni oyo mpe ezali nde basakoli ya Bokonzi, oyo bazali kolona mboto ya Bokonzi na nzela ya mosala na bango ya kosakola oyo bazali kosala na molende nyonso. Mboto oyo ezali kobwakama na mabelé ezali liloba oyo bazali kosakola.b
15, 16. Likambo nini etali bokoli ya mboto mpe bokoli ya elimo oyo Yesu alingaki komonisa na lisese ya moloni?
15 Yesu alobi ete moloni “alali na butu mpe alamuki na moi.” Yango elingi koloba te ete moloni ayebi kokɛngɛla elanga na ye te. Ezali kaka kolobela likambo oyo moto nyonso asalaka: kolala kolamuka. Maloba ya vɛrsɛ yango emonisi momeseno ya kosala na moi mpe kolala na butu, na boumeli ya mwa ntango. Yesu amonisaki likambo oyo esalemaki na ntango yango. Alobaki boye: “Mboto ebimi mpe ekoli.” Na nsima, abakisaki boye: “Kasi ayebi te soki esalemi ndenge nini.” Likambo ya ntina awa ezali ete bokoli ezali kosalema “yango moko.”
16 Yesu alingaki koloba nini na esika wana? Tósimba ete likambo ya ntina na esika yango ezali bokoli ya mboto mpe ndenge ezali kobota mbuma mokemoke. “Mabelé yango moko ezali kobota mbuma mokemoke: ya liboso lititi, na nsima motó, na nsuka nde mbuma mobimba na kati ya motó yango.” (Mko. 4:28) Mboto yango ekolaka mokemoke. Moto akoki kokolisa yango na makasi te. Ezali mpe ndenge moko mpo na bokoli ya elimo. Bokoli yango esalemaka mokemoke, ntango Yehova azali kotika solo ekola na motema ya moto oyo abongi.—Mis. 13:48; Ebe. 6:1.
17. Banani mpe basepelaka ntango mbuma ya solo eboti?
17 Ndenge nini moloni abukaka mbuma “nokinoki ntango mbuma epesi yango nzela”? Ntango Yehova akolisi solo ya Bokonzi na mitema ya bayekoli ya sika, nsukansuka ekómaka na ntango moko oyo bolingo ya bato yango mpo na Nzambe etindaka bango bámipesa mpo na kosalela ye. Bazwaka batisimo mpo na komonisa ete bamipesi na Nzambe. Bandeko mibali oyo bazali kokoba kokola na elimo bazwaka mokemoke mikumba na kati ya lisangá. Mbuma ya Bokonzi ebukamaka libosoliboso na ndeko oyo alonaki yango mpe na basakoli mosusu ya Bokonzi oyo mbala mosusu basalaki eloko te ntango mboto oyo ebimisi moyekoli wana elonamaki. (Tángá Yoane 4:36-38.) Ya solo mpenza, ‘moloni ná mobuki-mbuma basepelaka elongo.’
Mateya mpo na biso
18, 19. (a) Ndenge nini olendisami nsima ya kotalela masese wana ya Yesu? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo ekolanda?
18 Mateya nini tozwi nsima ya kotalela masese mibale oyo ezali na Malako mokapo 4? Emonani polele ete tozali na mosala ya kosala: kolona mboto. Tosengeli te koluka mikalo to kotika mikakatano ya bomoi epekisa biso kosala mosala yango. (Mos. 11:4) Ntango mpe tozali kosala mosala yango, tosengeli kobosana te libaku kitoko oyo tozali na yango ya kosala elongo na Nzambe. Yehova nde apambolaka milende na biso mpe ya bato oyo bazali koyoka nsango malamu, mpo bato yango bákola na elimo. Yango esalisi biso tóyeba ete biso tokoki kokómisa moto moyekoli na makasi te. Tomoni mpe ete tosengeli koyokaka motema mpasi te to mpe kolɛmba te soki moto azali kokola noki te to azali kokola te na elimo. Tobɔndisami mpenza na koyeba ete eloko oyo tosengeli kobomela nzoto ezali kaka kozala sembo epai ya Yehova mpe kokangama na libaku malamu oyo apesá biso ya kosakola “nsango malamu ya bokonzi . . . mpo na litatoli na bikólo nyonso.”—Mat. 24:14.
19 Liteya nini mosusu Yesu apesaki na oyo etali bokoli ya bayekoli ya sika mpe mosala ya Bokonzi? Eyano na motuna wana ezwami na masese mosusu oyo ezali na Baevanzile. Tokolobela masese yango mosusu na lisolo oyo ekolanda.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tózwa ndakisa ya ndeko Georg Fjölnir Lindal, oyo asalaki mosala monene na Islande, ndenge Annuaire des Témoins de Jéhovah, 2005, nkasa 210-211, mpe masolo ya basakoli mosusu ya sembo oyo basakolaki na molende na Irlande na boumeli ya ebele ya bambula kozanga kozwa matomba, ndenge Annuaire des Témoins de Jéhovah, 1988, nkasa 82-99 emonisi yango.
b Zulunalo oyo elimbolá liboso ete mboto yango ezali bizaleli oyo esalisaka moto akola na elimo, atako azali kokutana na makambo ya ndenge nini. Nzokande, tóbosana te ete Yesu alobaki na lisese na ye te ete mboto ya malamu ebongwanaki mpe ekómaki mabe to epɔlaki. Kasi, mboto yango ekɔmelaki.—Talá na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ 1980, nkasa 16-19 (na Lifalanse).
Ozali koyeba lisusu?
• Bokokani nini ezali na kati ya mosala ya kolona mboto ná mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi?
• Ndenge nini Yehova atalelaka bosembo ya mosakoli ya Bokonzi?
• Bokokani nini ezali na kati ya bokoli ya mboto mpe bokoli ya elimo Yesu amonisaki na lisese ya moloni?
• Ndenge nini ‘moloni ná mobuki-mbuma basepelaka elongo’?
[Bililingi na lokasa 13]
Mpo na nini Yesu alobaki ete mosakoli ya Bokonzi ya Nzambe azali lokola moloni ya mboto?
[Bililingi na lokasa 15]
Bato oyo bamonisami na mabelé ya malamu bamipesaka mobimba na kosakola Bokonzi ya Nzambe na kotalela makoki na bango
[Bililingi na lokasa 16]
Nzambe nde akobaka kokolisa