‘Bakufi bakosekwisama’
“Zambi kelelo ekoloba mpe bakufi [bakosekwisama, “NW” ] na kozanga kopola, mpe biso tokobongwana motindo mosusu.”—1 BAKOLINTI 15:52.
1, 2. (a) Elaka nini ya kobɔndisa epesamaki na nzela ya mosakoli Hosea? (b) Lolenge nini toyebi ete Nzambe azali na mposa ya kozongisa bakufi na bomoi?
OSILÁ kokufela moto? Boye oyebi mpasi oyo liwa ekoki komema. Atako bongo, baklisto babɔndisamaka na elaka oyo Nzambe apesaki na nzela ya mosakoli Hosea ete: “Nakosikola bango na lobɔkɔ ya Sheol; nakobikisa bango na liwa. Ɛ Liwa, wapi bisweli na yo? Ɛ Sheol, wapi kobebisa na yo?”—Hosea 13:14, NW.
2 Bato ya ntembe bakoki kotalela likambo ya koloba ete bakufi bakozonga na bomoi lokola elongobani te. Kasi, ntembe ezali te ete Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso azali na nguya ya kosala likamwisi motindo wana! Likambo ezali mpenza nde ya koyeba soki Yehova azali na mposa ya kozongisa bakufi na bomoi. Mosembwi Yobo atunaki ete: “Soko moto akokufa, akobika nde lisusu?” Na nsima, apesaki eyano oyo ya kolendisa: “Okobyanga mpe ngai nakozongisela yo; okozala na mposa mpo na mosala na mabɔkɔ na yo.” (Yobo 14:14, 15) Maloba “kozala na mposa” mamonisi likanisi ya kozala na mposa makasi. (Kokanisá na Nzembo 84:2.) Ɛɛ, Yehova azelaka mokolo ya lisekwa na mposa makasi—azalaka na mposa makasi ya komona lisusu basembwi oyo bakufá, oyo bazali na bomoi kati na makanisi na ye.—Matai 22:31, 32.
Yesu alimboli polele liteya ya lisekwa
3, 4. (a) Engɛngiseli nini Yesu apesaki na ntina na elikya ya lisekwa? (b) Mpo na nini Yesu asekwaki lokola elimo, kasi na nzoto ya mosuni te?
3 Bato ya ntango ya kala oyo bazalaki na kondima, lokola Yobo, bayebaki makambo mingi te na ntina na lisekwa. Yesu nde alimbolaki polele mpenza elikya kitoko yango. Amonisaki mokumba monene oyo ye moko akokokisa ntango alobaki ete: “Ye oyo andimi Mwana azali na bomoi na seko.” (Yoane 3:36) Bato bakozwa bomoi wana epai wapi? Mpo na bato mingi oyo bazali komonisa kondima, ekozala awa na mabelé. (Nzembo 37:11) Nzokande, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bangá te, etonga moke, mpo ete Tata na bino asepeli kopesa bino bokonzi.” (Luka 12:32) Bokonzi ya Nzambe ezali na likoló. Na yango, elaka yango elimboli ete basangani ya “etonga moke” bakozala elongo na Yesu na likoló lokola bikelamu ya elimo. (Yoane 14:2, 3; 1 Petelo 1:3, 4) Oyo nde elikya ya nkembo! Lisusu, Yesu amonisaki ntoma Yoane ete “etonga moke” yango ekozala na bato 144 000.—Emoniseli 14:1.
4 Kasi, ndenge nini ba 144 000 yango bakokɔta na nkembo ya likoló? Yesu ‘apesi pole na bomoi mpe kozanga kopola na nzela ya nsango malamu.’ Na lisalisi ya makila na ye, afungolaki “nzela na sika mpe na bomoi” na likoló. (2 Timoté 1:10, NW; Baebele 10:19, 20) Liboso, akufaki, lokola Biblia esakolaki yango. (Yisaya 53:12) Na bongo, lokola ntoma Petelo asakolaki yango na nsima, “Yesu oyo, Nzambe asekwisi ye.” (Misala 2:32) Kasi, Yesu asekwisamaki lokola moto te. Alobaki liboso ete: “[Limpa, NW] ekopesa ngai ezali mosuni na ngai mpo na bomoi na mokili.” (Yoane 6:51) Kozongela lisusu nzoto na ye ya mosuni elingaki kosilisa motuya ya mbeka wana. Na yango, Yesu “abomamaki solo na nzoto na ye mpe azalisami na bomoi na [elimo, NW].” (1 Petelo 3:18) Na lolenge yango, Yesu “azwaki lisiko na seko” mpo na biso, elingi koloba basangani ya “etonga moke.” (Baebele 9:12) Amemaki motuya ya bomoi na ye moto ya kokoka lokola lisiko mpo na bato ya masumu liboso ya Nzambe, mpe ba 144 000 bazalaki bato ya liboso oyo bazwaki litomba na yango.
5. Bayekoli ya Yesu na ekeke ya liboso bazwaki elikya nini?
5 Lisekwa mpo na bomoi na likoló esengelaki kosuka bobele na Yesu te. Paulo ayebisaki baninga na ye baklisto na Loma ete bapakolamaki na elimo santu mpo na kozala bana ya Nzambe mpe basangoli na libula elongo na Klisto soki babateli elembo ya kopakolama na bango na kotikaláká sembo kino nsuka. (Baloma 8:16, 17) Paulo alimbolaki lisusu ete: “Soko tosili kosangana na ye elongo kati na lolenge na kufa na ye, tokosangana mpe na ye kati na lisekwa na ye.”—Baloma 6:5.
Alongisi elikya ya lisekwa
6. Na Kolinti, mpo na nini bato mosusu babɛtɛlaki endimeli ya lisekwa ntembe, mpe ndenge nini Paulo ayanolaki?
6 Liteya ya lisekwa ezali moko kati na “mateya ya liboso” ya boklisto. (Baebele 6:1, 2, NW) Nzokande, na Kolinti babɛtɛlaki liteya yango ntembe. Bato mosusu kati na lisangá, oyo na ntembe te bapusamaki na mateya ya filozofi ya Bagreke, bazalaki koloba ete: “Lisekwa na kati na bakufi ezali te.” (1 Bakolinti 15:12) Ntango Paulo ayokaki makambo yango, alongisaki elikya ya lisekwa, mingimingi elikya ya baklisto bapakolami. Tótalela maloba ya Paulo oyo makomami na 1 Bakolinti mokapo 15. Ekozala malamu soki otángaki liboso mokapo yango mobimba, lolenge balendisaki biso na lisolo eleki.
7. (a) Paulo atyaki likebi na likambo nini ya ntina mingi? (b) Banani bamonaki Yesu wana asekwisamaki?
7 Na vɛrsɛ mibale ya liboso ya 1 Bakolinti mokapo 15, Paulo amonisi motó na likambo ya lisolo na ye: “Bandeko, nazali kokanisela bino Nsango Malamu oyo esakolaki ngai bino, oyo mpe boyambaki yango, oyo mpe bozali kotɛlɛma likoló na yango, oyo mpe bobiki kati na yango. . . . Soko te, bondimi bobele mpamba.” Soki Bakolinti batɛlɛmaki lisusu na nsango malamu te, boye kondima na bango kati na solo ezalaki mpamba. Paulo alobaki lisusu ete: “Na liboso napesaki bino yango ezwaki ngai ete Klisto akufi mpo na masumu na biso pelamoko elobaki [Makomami, NW], mpe ete akundami mpe ete asekwi na mokolo na misato, pelamoko elobaki [Makomami], mpe ete amonani na Kefa mpe na nsima na Bazomi na mibale. Na nsima amonani epai na bandeko nkama mitano ntango moko, mingi na bango bazali naino na bomoi nde bamosusu basili kolala mpɔngi. Na nsima amonani epai na Yakobo na nsima epai na Bantoma nyonso. Na nsima na nyonso amonani epai na ngai mpe, lokola na oyo abotami na elaka mabe.”—1 Bakolinti 15:3-8.
8, 9. (a) Kondima kati na lisekwa ezali na motuya nini? (b) Ekoki kozala na libaku nini oyo Yesu amonanaki na “bandeko nkama mitano ntango moko”?
8 Mpo na baoyo bandimaki nsango malamu, kondima lisekwa ya Yesu ezalaki likambo ya liponi te. Ezalaki na bato mingi oyo bamonaki na miso na bango mpo na kondimisa ete “Klisto akufaki mpo na masumu na biso” mpe ete asilaki kosekwisama. Kefa, oyo ayebani mingi na nkombo ya Petelo azalaki moko na bato yango. Nsima ya koangana Yesu na butu oyo batɛkaki mpe bakangaki ye, na ntembe te Petelo abɔndisamaki mingi ntango Yesu amimonisaki epai na ye. Nsima ya lisekwa na ye, Yesu akendaki mpe epai na “Bazomi na mibale,” elingi koloba etuluku ya bantoma nyonso—likambo oyo, na ntembe te, esalisaki bango na kolongola bobangi na bango mpe kokóma batatoli ya mpiko ya Yesu oyo asekwisami.—Yoane 20:19-23; Misala 2:32.
9 Klisto amonanaki mpe na etuluku monene, “epai na bandeko nkama mitano.” Lokola azalaki na bayekoli mingi boye bobele na Galilai, ekoki kozala na libaku oyo elobelami na Matai 28:16-20, ntango Yesu apesaki etinda ya kokende kozalisa bayekoli. Bato yango bakokaki mpenza kopesa litatoli ya nguya! Bamoko na bango bazalaki naino na bomoi na mobu 55 T.B. ntango Paulo akomaki mokanda na ye ya liboso epai na Bakolinti. Kasi, simbá likambo oyo ete na ntina na baoyo basilaki kokufa, alobaki ete “basili kolala mpɔngi.” Basekwisamaki naino te mpo na kozwa mbano na bango na likoló.
10. (a) Bokutani ya nsuka ya Yesu na bayekoli na ye esalaki bopusi nini? (b) Lolenge nini Yesu amonanaki na Paulo “lokola na oyo abotami na elaka mabe”?
10 Yakobo, mwana ya Yosefe na Malia, mama na Yesu azalaki mpe motatoli monene ya lisekwa ya Yesu. Emonani ete liboso ya lisekwa ya Yesu, Yakobo azalaki naino mondimi te. (Yoane 7:5) Kasi nsima wana Yesu abimelaki ye, Yakobo akómaki mondimi mpe ekoki kozala ete akokisaki mokumba monene mpo na kobongwanisa bandeko na ye mosusu. (Misala 1:13, 14) Na bokutani na ye ya nsuka na bayekoli na ye, ntango amataki na likoló, Yesu atindaki bango ete bázala “batatoli . . . kino nsuka na mokili.” (Misala 1:6-11) Na nsima, amonanaki na Saulo moto na Talasia, oyo azalaki monyokoli ya baklisto. (Misala 22:6-8) Yesu amonanaki na Saulo “lokola na oyo abotami na elaka mabe.” Ezalaki lokola ete Saulo asilaki kosekwisama mpo na bomoi ya elimo mpe amonaki Nkolo oyo apesameli nkembo bikeke mingi liboso ete lisekwa ya bapakolami esalema. Mbala moko, likambo yango epekisaki Saulo ete akoba mwango na ye ya kotɛmɛla lisangá ya boklisto mpe koluka koboma yango mpe ememaki ye na kosala mbongwana monene. (Misala 9:3-9, 17-19) Saulo akómaki ntoma Paulo, moko na baoyo bazalaki na molɔngɔ ya liboso mpo na kolongisa kondima ya baklisto.—1 Bakolinti 15:9, 10.
Kondima lisekwa ezali na ntina mingi
11. Lolenge nini Paulo atɔndɔlaki libunga ya koloba ete, “Lisekwa ezali te”?
11 Na yango, lisekwa ya Yesu ezali likambo oyo emonisamaki na bilembeteli. Paulo atuni ete, “Soko Klisto asakolami ete ye asekwi kati na bakufi, mpo na nini bamosusu kati na bino balobi ete lisekwa na kati na bakufi ezali te?” (1 Bakolinti 15:12) Bato yango basukaki te bobele na kobɛta ntembe na mitema na bango to komitunatuna na ntina na lisekwa, kasi bazalaki koloba polele ete bandimaki yango te. Na yango, Paulo atɔndɔlaki makanisi na bango ya libunga. Alobi ete soki Klisto asekwisamaki te, nsango ya boklisto ezalaki nsango ya lokuta, mpe baoyo batatolaki lisekwa ya Klisto bazalaki “batatoli ya lokuta mpo na Nzambe.” Soki Klisto asekwisamaki te, lisiko moko te efutamaki epai na Nzambe; baklisto bazalaki ‘naino na masumu na bango.’ (1 Bakolinti 15:13-19; Baloma 3:23, 24; Baebele 9:11-14) Mpe baklisto oyo ‘balalaki mpɔngi,’ bamoko na bango bakufaki liwa ya martiru, bakendaki mpamba kozanga elikya ya solosolo. Elingaki kozala mawa mpo na baklisto soki bazangaki elikya ya bomoi mosusu! Mpasi nyonso oyo bamonaki elingaki kozala mosala ya mpunda.
12. (a) Kobénga Klisto ete “mbuma na liboso na bango balali” elimboli nini? (b) Lolenge nini Klisto afungolaki nzela na lisekwa?
12 Nzokande, ezalaki bongo te. Paulo alobi lisusu ete: “Klisto [asekwisami, NW] longwa na bakufi.” Lisusu, azali “mbuma na liboso na bango balali.” (1 Bakolinti 15:20) Ntango Bayisalaele bazalaki komonisa botosi na kopesáká Yehova mbuma ya liboso ya milona na bango, Yehova azalaki kopambola bango na kopesáká bango mbuma mingi na ntango ya bobuki mbuma. (Exode 22:29, 30; 23:19; Masese 3:9, 10) Na kobéngáká Klisto “mbuma na liboso,” Paulo amonisaki ete mbuma mosusu, elingi koloba bato, esengelaki kobukama na kosekwisama na liwa mpo na bomoi na likoló. Paulo alobi ete, “Pelamoko kufa eyaki na nzela na moto, kosekwa mpe eyei na nzela na moto. Zambi lokola na Adama nyonso bakokufaka, boye na Klisto nyonso bakozwa bomoi.” (1 Bakolinti 15:21, 22) Yesu afungolaki nzela ya lisekwa na kopesáká bomoi na ye ya kokoka lokola lisiko, mpe yango epesaki bato likoki ya kosikolama na lisumu mpe na liwa.—Bagalatia 1:4; 1 Petelo 1:18, 19.a
13. (a) Lisekwa mpo na kokende na likoló ebandaki ntango nini? (b) Mpo na nini bapakolami mosusu ‘balalaka na liwa te’?
13 Paulo abakisi ete: “Kasi moto na moto na kokitana na ye mpenza. Klisto mbuma na liboso, na nsima na komonana na ye, baoyo bazali kati na Klisto.” (1 Bakolinti 15:23) Klisto asekwisamaki na mobu 33 T.B. Nzokande, bayekoli na ye bapakolami—“baoyo bazali kati na Klisto”—basengelaki kozela kino mwa moke nsima ya ebandeli ya kozala ya Yesu na bokonzi na ye. Bisakweli ya Biblia bimonisi ete kozala yango ebandaki na 1914. (1 Batesaloniki 4:14-16; Emoniseli 11:18) Ezali boni mpo na baoyo basengelaki kozala naino na bomoi na boumeli ya kozala yango? Paulo alobi ete: “Talá, nazali koloba na bino likambo libombami. Biso nyonso tokolala te, nde biso nyonso tokobongwana motindo mosusu na mwa ntango mokemoke, na ntango na kobweta liso, wana ekoyula kelelo na nsuka. Zambi kelelo ekoloba mpe bakufi [bakosekwisama, NW] na kozanga kopola, mpe biso tokobongwana motindo mosusu.” (1 Bakolinti 15:51, 52) Ezali polele ete bapakolami nyonso te balalaka kati na nkunda mpo na kozela lisekwa. Baoyo bazali kokufa na eleko ya kozala ya Klisto bazali kobongwana mbala moko.—Emoniseli 14:13.
14. Lolenge nini bapakolami “bazali kobatisama mpo na kozala bakufi”?
14 Paulo atuni ete, “Soki bongo te, baoyo bazali kobatisama mpo na kozala bakufi, bakosala nini? Soki ezali solo ete bakufi bakosekwisama te, mpo na nini bango bazali mpe kobatisama mpo bázala bakufi? Mpo na nini biso mpe tozali na likama ngonga na ngonga?” (1 Bakolinti 15:29, 30, NW) Paulo alingaki koloba te ete bato ya bomoi bazalaki kobatisama mpo na bakufi, ndenge mabongoli mosusu ya Biblia mazali komonisa yango. Toyebi yango malamu, batisimo ezali likambo etaleli kozala moyekoli ya Klisto, mpe milimo oyo ekufá ekoki kozala bayekoli te. (Yoane 4:1) Nzokande, Paulo azalaki kolobela baklisto oyo bazali na bomoi, mingi kati na bango, lokola Paulo ye moko, bazalaki “na likama ngonga na ngonga.” Baklisto bapakolami ‘babatisamaki kati na liwa ya Klisto.’ (Baloma 6:3) Na maloba ya elilingi, uta kopakolama na bango, bazalaki “kobatisama” na lolenge ya bomoi oyo ekomema bango na liwa lokola ya Klisto. (Malako 10:35-40) Basengelaki kokufa na elikya ya lisekwa ya nkembo mpo na kokende na likoló.—1 Bakolinti 6:14; Bafilipi 3:10, 11.
15. Paulo akutanaki na makama nini, mpe lolenge nini kondima lisekwa esalisaki ye mpo ete ayikela yango mpiko?
15 Sikawa, Paulo alimboli ete ye moko akutanaki na makama mingi na boye ete akokaki koloba, “Mokolo na mokolo nazali kokufa.” Mpo ete basusu báloba te ete ezali kolekisa ndelo, Paulo abakisi ete: “Nalobi boye bandeko mpo na lolendo lozali na ngai mpo na bino kati na Klisto Yesu Nkolo na biso.” Bible de Jérusalem ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Bandeko, nazali kokutana na liwa mokolo na mokolo, mpe nakoki kokatela yango seleka na ntina na lolendo oyo nazali na yango mpo na bino kati na Klisto Yesu Nkolo na biso.” Lokola ndakisa ya makama oyo akutanaki na yango, na vɛrsɛ 32, Paulo alobeli ‘kobunda na banyama na yauli kati na Efese.’ Mbala mingi Baloma bazalaki koboma basali na mabe na kobwakáká bango na libándá ya masano epai banyama na yauli ezalaki. Soki Paulo abundaki mpenza na nyama na yauli ya solo, boye abikaki bobele na lisalisi ya Yehova. Soki azalaki na elikya ya lisekwa te, kopona nzela oyo etyaki bomoi na ye na likama motindo wana, elingaki kozala mpenza likambo ya bozoba. Kozanga elikya ya bomoi na mikolo mikoya, koyikela minyoko mpiko mpe komipimela makambo mingi mpo na kosalela Nzambe elingaki kozala na ntina te. Paulo alobi ete, “Soko bakufi bakosekwa te, tólyaka mpe tómelaka zambi tokokufa lobi!”—1 Bakolinti 15:31, 32; talá 2 Bakolinti 1:8, 9; 11:23-27.
16. (a) Ekoki kozala ete maloba “tólyaka mpe tómelaka zambi tokokufa lobi” eutaki wapi? (b) Makama ya kondima makanisi wana ezalaki nini?
16 Ekoki kozala ete Paulo azongelaki maloba ya Yisaya 22:13, oyo mamonisi elimo ya bafandi na Yelusaleme bazangi botosi bazalaki kokanisa ete liwa esila kokanama. To ekoki kozala ete azalaki kokanisa bindimeli ya Baepikuli, oyo bazalaki kotyola elikya nyonso ya bomoi nsima ya liwa mpe bazalaki kokanisa ete bisengo ya nzoto ezali bolamu oyo eleki ntina kati na bomoi. Ata soki ezalaki ndenge nini, makanisi ya “kolya mpe komela” ezalaki makanisi ya Nzambe te. Yango wana, Paulo akebisaki ete: “Bómizimbisa te; kotambolana na bato mabe ekobebisa malamu na motema.” (1 Bakolinti 15:33) Kosala boninga na baoyo baboyaki liteya ya lisekwa ezalaki likama. Boninga motindo wana ekokaki kozala mosisa ya mikakatano oyo Paulo asengelaki kosilisa kati na lisangá ya Kolinti, lokola misala ya kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo, bokabwani, kofundana na bisambiselo, mpe kozanga limemya mpo na Elambo ya Mpokwa ya Nkolo.—1 Bakolinti 1:11; 5:1; 6:1; 11:20-22.
17. (a) Paulo apesaki Bakolinti elendiseli nini? (b) Mituna nini mitikali misengeli kozwa biyano?
17 Yango wana, Paulo alendisi Bakolinti na maloba oyo ya kotonga mpenza: “Bózonga na makanisi na sembo mpe bósala masumu lisusu te. Mpo ete bamosusu bayebi Nzambe te. Nazali koloba boye mpo na koyokisa bino nsɔni.” (1 Bakolinti 15:34) Kozala na makanisi mabe na ntina na lisekwa ememaki bato mosusu na kolala mpɔngi ya elimo, bakómaki lokola ete balangwi masanga. Basengelaki kolala mpɔngi te, kobatela makanisi malamu. Lelo oyo, baklisto bapakolami basengeli kolala mpɔngi na elimo te, basengeli te komitika kopusama na makanisi ya kobɛta ntembe oyo bato ya mokili bazali na yango. Basengeli kobatela makasi elikya na bango ya lisekwa mpo na kokende na likoló. Kasi, mituna mosusu mitikali—ezala mpo na Bakolinti na ntango wana mpe mpo na biso lelo oyo. Na ndakisa, ba 144 000 basekwaka na nzoto ya lolenge nini mpo na kokende na likoló? Lisekwa ekolimbola nini mpo na bamilio ya bato mosusu oyo bazali kati na nkunda mpe bazali na elikya ya kokende na likoló te? Na lisolo oyo ekolanda, tokotalela makambo oyo matikali na bandimbola oyo Paulo apesaki na ntina na lisekwa.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na lisolo elobeli lisiko, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwáli 1991.
Ozali komikundola?
◻ Engɛngiseli nini Yesu apesaki na ntina na lisekwa?
◻ Banani bazali bamoko kati na baoyo bamonaki lisekwa ya Yesu?
◻ Mpo na nini bato mosusu babɛtaki ntembe na ntina na liteya ya lisekwa, mpe Paulo apesaki eyano nini na likambo yango?
◻ Mpo na nini kondima lisekwa ezalaki na ntina mingi mpo na baklisto bapakolami?
[Elilingi na lokasa 15]
Mwana mwasi ya Yailo akómaki elembeteli ya lisekwa
[Elilingi na lokasa 16, 17]
Soki elikya ya lisekwa ezalaki te, kokufa lokola martiru mpo na baklisto ya sembo elingaki kozala na ntina te