Kopesa oyo ememaka esengo
GENIVAL afandaka na kartye moko ya bandako ya mabemabe na nɔrdi-ɛsti ya Brésil. Azalaki koleisa mwasi na bana na ye na mosala na ye ya mokɛngɛli na lopitalo moko. Atako azalaki na bomoi ya mpasi, Genival azalaki kozangisa te kopesa diimɛ na ye. Ntango azali kobɛta lisolo na ye, atii lobɔkɔ na libumu; alobi boye: “Ntango mosusu, tozalaki kolala nzala, na mwasi na bana, kasi mposa na ngai ezalaki ya kopesa Nzambe oyo eleki malamu, ata soki yango esɛngaki nini.”
Ntango balongolaki ye na mosala, Genival atikaki te kopesa diimɛ. Pastɛrɛ azalaki kolendisa ye ete apesa mbongo mingi mpo na komeka Nzambe. Pastɛrɛ yango alakaki ye ete soki asali bongo, Nzambe akopambola ye. Yango wana, Genival azwaki ekateli ya kotɛka ndako na ye mpe kopesa mbongo nyonso oyo akozwa.
Bato mosusu mpe basalaka lokola Genival, bapesaka mpenza makabo na bango na motema moko. Babola mingi bazangisaka te kopesa diimɛ na bango, mpamba te na mangomba na bango bateyaka bango ete Biblia nde esɛngi kopesa diimɛ. Kasi, ezali mpenza solo?
Diimɛ na kati ya Mibeko
Kopesa diimɛ ezalaki na kati ya Mibeko oyo Yehova Nzambe apesaki mabota 12 ya Yisalaele ekokisi sikoyo mbula koleka 3 500. Mobeko yango esɛngaki ete bápesaka libota ya Levi ndambo moko likoló ya zomi ya biloko nyonso oyo bazwi na bilanga, ya mbuma ya nzete mpe ya bangɔmbɛ mpo na kosunga bango na mosala oyo bazalaki kosala na hema.—Levitike 27:30, 32; Mituya 18:21, 24.
Yehova alakaki bana ya Yisalaele ete Mibeko ‘ekoleka makasi te mpo na bango.’ (Deteronome 30:11) Yehova alakaki bango ete ntango nyonso oyo bakotosa mibeko na ye, bakisa mpe mobeko ya kopesa diimɛ, bilanga na bango ekobota mingi. Lisusu, mpo biloko ezanga te, na nsuka ya mbula nyonso bazalaki kobomba diimɛ mosusu oyo bazalaki kosalela yango na ntango oyo ekólo mobimba ezalaki koyangana mpo na bafɛti ya losambo. Na ndenge yango, ‘mopaya, etike mpe mwasi oyo akufelá mobali’ bazalaki mpe kosepela.—Deteronome 14:28, 29; 28:1, 2, 11-14.
Mibeko eyebisaki te etumbu oyo moto akozwa soki apesi diimɛ te, kasi mwana ya Yisalaele nyonso azalaki na mokumba ya kopesa diimɛ mpo na kosimba losambo ya solo. Kutu, na ntango ya Malaki, Yehova alobaki na Bayisalaele oyo babosanaki kopesa diimɛ ete ‘bazali koyiba ye na oyo etali badiimɛ mpe makabo.’ (Malaki 3:8, New International Version) Lelo oyo, bakoki mpe koloba bongo mpo na baklisto oyo bazali kopesa diimɛ te?
Tókanisa naino. Mibeko ya ekólo moko esukaka kaka mpo na bato oyo bafandi na ekólo yango, kasi na bikólo mosusu te. Na ndakisa, na Grande-Bretagne, mobeko moko esɛngaka ete mituka nyonso etambolaka na lobɔkɔ ya mwasi; nzokande, ezalaka bongo te na France. Ndenge moko mpe, mobeko oyo ezalaki kosɛnga kopesa diimɛ ezalaki na kati ya kondimana ya Nzambe na libota ya Yisalaele. (Exode 19:3-8; Nzembo 147:19, 20) Mobeko wana etalelaki kaka bana ya Yisalaele.
Lisusu, atako ezali solo ete Nzambe abongwanaka te, masɛngami na ye ebongwanaka ntango mosusu. (Malaki 3:6) Biblia emonisi polele ete liwa ya Yesu oyo amipesaki lokola mbeka na mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), ‘ebomaki’ to ‘elongolaki’ Mibeko, bakisa mpe “komandema ya kokɔngɔla badiimɛ.”—Bakolose 2:13, 14; Baefese 2:13-15; Baebele 7:5, 18.
Ndenge oyo baklisto bazalaki kopesa makabo
Kasi, makabo ezalaki kaka na ntina mpo na kosimba losambo ya pɛto. Yesu atindaki bayekoli na ye ‘bázala batatoli tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.’ (Misala 1:8) Ntango bandimi bakómaki ebele, esengelaki mpe ete bateyi na bakɛngɛli oyo basengeli kotambolaka mpo na kolendisa masangá bákóma mingi. Esengelaki mpe, na bantango mosusu, kosalisa basi oyo bakufelá mibali, bana bitike mpe bandeko mosusu oyo bazalaki kokelela. Ndenge nini baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kozwa mbongo oyo esengelaki mpo na kokokisa bamposa nyonso wana?
Na mobu soki 55 T.B., basɛngaki baklisto oyo bazalaki Bayuda te, baoyo bazalaki kofanda na Mpoto mpe na Asie Mineure, básalisa bandeko na bango ya lisangá ya Yudea oyo bazalaki babola. Na mikanda oyo ntoma Paulo akomelaki lisangá ya Kolinti, amonisi ndenge oyo likambo yango ya ‘kokɔngɔla makabo mpo na basantu’ ezalaki kosalema. (1 Bakolinti 16:1) Soki otángi maloba oyo Paulo akomaki mpo na ndenge oyo baklisto bazalaki kopesa makabo, ntango mosusu okomona ete ekeseni na ndenge oyo okanisaka.
Ntoma Paulo asalelaki maloba ya sukali te mpo na kotinda baninga na ye bandimi bápesa makabo. Kutu, baklisto ya Masedonia oyo bazalaki “na kati ya mpasi” mpe na ‘bobola ya makasi’ bango nde ‘bakobaki kobondela ye makasi mpenza ete bázwa libaku malamu ya kopesa biloko na boboto mpe ya kosangana na mosala oyo esengelaki kosalema mpo na basantu.’—2 Bakolinti 8:1-4.
Ya solo, Paulo alendisaki baklisto ya Kolinti oyo bazalaki na bozwi mingi bálanda ndakisa ya kokaba ya bandeko na bango ya Masedonia. Atako bongo, buku moko elobi ete ‘aboyaki kopesa bango mitindo, amonaki nde malamu kosɛnga bango, kopesa bango toli, kolendisa bango to kobondela bango. Bakolinti balingaki kopesa na bolingo na bango moko te mpe na esengo te soki asɛngaka bango na makasi.’ Paulo ayebaki ete “Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo,” kasi alingaka te moto oyo apesaka ‘na komilela to na kotindikama.’—2 Bakolinti 9:7.
Kondima makasi mpe boyebi mingi, bakisa mpe bolingo ya solosolo mpo na baninga na bango baklisto, nde esengelaki kotinda Bakolinti bápesaka na bolingo na bango moko.—2 Bakolinti 8:7, 8.
“Ndenge akani na motema na ye”
Paulo ayebisaki bango te ntalo ya mbongo oyo basengelaki kopesa, kasi apesaki bango kaka toli ete “mikolo nyonso ya yenga moto na moto . . . abomba ndambo ya mbongo ndenge azwaka.” (Biso nde totɛngisi makomi; 1 Bakolinti 16:2, Boyokani ya Sika) Soki Bakolinti bazali ntango nyonso komibongisa liboso mpe bazali kobomba ndambo ya mbongo, ntango Paulo akokóma epai na bango, ekozala te lokola nde azali kotindika bango bápesa to bakopesa te kaka mpo bamoni ye. Moklisto mokomoko asengelaki kokata ye moko soki akopesa mbongo ntalo boni na ‘ndenge akanaki na motema na ye.’—2 Bakolinti 9:5, 7.
Mpo Bakolinti bázwa mapamboli mingi, basengelaki kopesa mingi. Basɛngaki bango te ete bápesa tii bango moko bátikala mabɔkɔ mpamba. Paulo ayebisaki bango ete ‘azali na mposa te ete ezala mpasi mpo na bango.’ Makabo ezalaki ‘kondimama mingimingi mpenza na kotalela oyo moto azalaki na yango, kasi te na kotalela oyo moto azalaki na yango te.’ (2 Bakolinti 8:12, 13; 9:6) Paulo akebisaki boye na mokanda moko oyo akomaki na nsima: ‘Soki moto azali kokokisa bamposa ya bato ya ndako na ye te, awangani kondima mpe azali mabe koleka moto oyo azangi kondima.’ (1 Timote 5:8) Paulo alendisaki bato te ete bápesaka na lolenge oyo ezali kobuka motinda yango.
Tomoni ete Paulo nde atambwisaki makambo nyonso oyo etali ‘kokɔngɔla makabo mpo na basantu’ oyo bazalaki na mposa ya lisalisi. Ata epai moko te na Biblia tozali kotánga ete Paulo to bantoma mosusu bakɔngɔlaki makabo to mpe bazwaki badiimɛ mpo bázwa mbongo oyo ekosalisa bango na mosala na bango ya kosakola. (Misala 3:6) Paulo azalaki ntango nyonso na botɔndi mpo na makabo oyo masangá ezalaki kotindela ye, kasi azalaki mpe koboya mpenza kotya “kilo monene” likoló ya bandeko na ye.—1 Batesaloniki 2:9; Bafilipi 4:15-18.
Lelo oyo, moto na moto azali kopesa na ndenge oyo akanisi
Ezali polele ete, na ekeke ya liboso, bayekoli ya Klisto bazalaki kopesa diimɛ te, moto na moto azalaki kopesa ndenge ye moko akanisi. Kasi, okoki komituna soki tii na moi ya lelo lolenge wana ya kopesa ebongi mpenza mpo na kozwa mbongo ya kosimba mosala ya kosakola nsango malamu mpe mpo na kosalisa baklisto oyo bazali na mposa ya lisalisi.
Tózwa ndakisa oyo: na 1879, babimisi ya zulunalo oyo balobaki polele ete ‘ata mokolo moko te bakosɛnga to bakobelela ete bato bápesa bango mbongo.’ Ekateli wana epekisaki milende nyonso oyo Batatoli ya Yehova bazalaki kosala mpo na kopalanganisa solo ya Biblia?
Lelo oyo, Batatoli bazali kokabola Babiblia, babuku mpe mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia na mikili 235. Na ebandeli, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, zulunalo oyo eteyaka Biblia, ezalaki kobima mbala moko na sanza, na monɔkɔ moko mpe bazalaki kobimisa zulunalo 6 000 na nimero mokomoko. Lelo oyo, ezali kobima mbala mibale na sanza, na minɔkɔ 146 mpe bazali kobimisa zulunalo koleka milio 24 na nimero mokomoko. Mpo na kokokisa mosala na bango ya koteya Biblia na mokili mobimba, Batatoli batongi to basombi babiro na mikili 110. Longola yango, na bisika ndenge na ndenge, batongi ebele ya bandako mpo na makita na bango; batongi mpe bandako minene ya mayangani mpo na koyamba baoyo bazali na mposa ya kobakisa boyebi na bango ya Biblia.
Atako kokokisa bamposa ya bato na elimo ezali na ntina mingi, Batatoli ya Yehova babosanaka te bamposa ya mosuni ya baninga na bango bandimi. Soki bandeko na bango bazali na mpasi mpo na bitumba, koningana ya mabele, mpo mbula ezali kobɛta te mpe mpo na mipɛpɛ makasi, bazalaka bato ya liboso mpo na kopesa bango nkisi, bilei, bilamba mpe biloko mosusu oyo basengeli na yango. Nyonso wana esalemaka na makabo oyo bamosusu kati na bango mpe masangá na bango bapesaka.
Kopesa makabo ndenge moto ye moko alingi ezali lolenge moko oyo ebongi mpenza mpe ezali kolongola kilo na mitó ya baoyo bazali na makoki mingi te, lokola Genival oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo. Liboso Genival atɛka ndako na ye, Maria, Motatoli ya Yehova moko oyo azali mosakoli ya ntango nyonso, akendeki kotala ye. Genival alobi boye: “Makambo oyo tosololaki ebikisaki libota na ngai na mpasi ya mpamba oyo tolingaki kokutana na yango.”
Genival amonaki sikoyo ete mosala ya Nkolo esalemaka na mbongo ya badiimɛ te. Kutu, Biblia ezali kosɛnga lisusu te na baklisto bápesaka diimɛ. Ayekolaki ete baklisto bazwaka mapamboli ntango bazali kopesa mingi kasi basɛngisami te kopesaka koleka makoki na bango.
Genival azwi esengo ya solosolo lokola akómi kopesa ndenge ye moko akanisi. Ye moko amonisi yango na maloba oyo: “Nakoki kopesa diimɛ to te, kasi nazali kosepela na makabo oyo nazali kopesa mpe nandimi mpenza ete Yehova azali mpe kosepela na yango.”
[Etanda/Bililingi na lokasa 6]
Batata ya libosoliboso ya Lingomba bateyaki likambo ya kopesa diimɛ?
“Bazwi kati na biso basalisaka babola . . . Baoyo bazali na biloko mingi mpe bazali na motema malamu, bapesaka na ndenge oyo bango moko bakanisi.”—Première apologie, Justin le Martyr, mobu soki 150 T.B.
“Bayuda bazalaki kopesa Nzambe diimɛ na biloko na bango oyo bapesi mpo na Ye, kasi baklisto bapesaka biloko na bango nyonso mpo na kokokisa mokano ya Nkolo, . . . lokola mwasi mobola oyo akufelá mobali oyo atyaki mbongo nyonso oyo azalaki na yango na kɛsi ya makabo ya Nzambe.”—Contre les hérésies, Irénée, mobu soki 180 T.B.
“Atako tozali na kɛsi ya makabo, kasi tosɛngisaka bandimi te ete bátya makabo mpo na kosomba lobiko na bango. Mbala moko na sanza, moto na moto, soki alingi mpe soki azali na makoki, atyaka mwa mbongo: moto na moto apesaka ndenge ye moko alingi; basɛngisaka moto te ete apesa.”—Apologétique, Tertullien, mobu soki 197 T.B.
“Lokola Lingomba epalanganaki na mikili mingi mpe bibongiseli ndenge na ndenge ebimaki, emonanaki ete esengeli kobimisa mibeko mpo na kozwa mbongo ya kosunga bakonzi ya lingomba. Yango wana, balandaki ebongiseli ya Mibeko ya Moize oyo ezalaki kosɛnga kofuta diimɛ . . . Emonani ete mibeko ya liboso oyo elobelaki likambo yango polele ezalaki na mokanda oyo baepiskɔpɔ oyo bayanganaki na engumba Tours na mobu 567 bakomaki mpe na [malako] oyo ebimaki na Likita monene ya baepiskɔpɔ na engumba Mâcon na mobu 585.”—The Catholic Encyclopedia.
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Mbongo ya ebende oyo ezali na likoló, na lobɔkɔ ya mwasi: Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Elilingi na lokasa 5]
Kopesa ndenge yo moko okanisi ememaka esengo
[Bililingi na lokasa 7]
Mbongo oyo ezali kosala ete mosala ya kosakola esalema, bandako ya makita etongama mpe kosalisa baoyo bakutani na mikakatano makasi ezali kouta na makabo oyo bato bazali kopesa ndenge bakanisi