Okongɛngisa nkembo ya Nzambe?
“Tozali lokola talatala kongɛngisa nkembo ya Yehova.”—2 BAKOLINTI 3:18.
1. Moize amonaki likambo nini, mpe nini esalemaki na nsima?
MOIZE amonaki emonaneli moko ya kokamwa oyo moto mosusu amoná te. Azalaki ye moko likoló ya Ngomba Sinai, mpe Nzambe andimaki kokokisa likambo moko oyo asɛngaki ye. Azwaki libaku ya komona nkembo ya Yehova, likambo oyo moto mosusu amoná te. Ya solo, Moize amonaki mpenza Yehova na miso te. Nzambe azali na kongɛnga mingi oyo moto moko te akoki kotala yango mpe kotikala na bomoi. Yango wana, Yehova azipaki Moize “lobɔkɔ” na ye tii ntango alekaki; na ntembe te atindaki nde anzelu asala yango. Na nsima, Yehova apesaki Moize libaku ya komona mwa moke nkembo na ye. Yehova alobaki mpe na Moize na nzela ya anzelu. Biblia eyebisi likambo oyo esalemaki na nsima: “Moize akitaki na ngomba ya Sinai, . . . loposo ya elongi na ye engɛngaki mpo ete azalaki kosolola na Nzambe.”—Exode 33:18–34:7, 29.
2. Ntoma Paulo akomaki nini mpo na nkembo oyo baklisto bangɛngisaka?
2 Kanisá ete yo mpe ozalaki na ngomba yango elongo na Moize. Kanisá esengo oyo olingaki koyoka na komona nkembo ya Mozwi-na-Nguya-Nyonso mpe koyoka maloba na ye! Kanisá libaku malamu ya kokita na Ngomba Sinai elongo na Moize, moyokanisi ya kondimana ya Mibeko! Kasi, oyebi ete baklisto ya solo bazali kongɛngisa nkembo ya Nzambe na ndenge oyo eleki kutu ndenge oyo Moize angɛngisaki yango? Likambo wana ya ntina mingi elobelami na mokanda moko oyo ntoma Paulo akomaki. Akomaki ete baklisto bapakolami ‘bangɛngisaka nkembo ya Yehova lokola talatala.’ (2 Bakolinti 3:7, 8, 18) Tokoki mpe koloba ete baklisto oyo bazali na elikya ya bomoi ya seko na mabelé bangɛngisaka mpe nkembo ya Nzambe.
Ndenge oyo baklisto bangɛngisaka nkembo ya Nzambe
3. Toyebi Yehova na lisalisi ya makambo nini oyo Moize azalaki na yango te?
3 Ndenge nini tokoki kongɛngisa nkembo ya Nzambe? Tomoná naino Yehova te mpe toyoká naino mongongo na ye te ndenge Moize ayokaki yango. Nzokande, biso toyebi Yehova na ndenge oyo Moize ayebaki ye te. Yesu ayaki lokola Masiya mbula soki 1 500 nsima ya liwa ya Moize. Yango wana, Moize akokaki te koyeba ndenge oyo Mibeko ekokisamaki na Yesu, oyo akufaki mpo na kosikola bato na boombo ya lisumu mpe liwa. (Baloma 5:20, 21; Bagalatia 3:19) Lisusu, Moize amonaki kaka emonaneli ya mokano ya nkembo ya Yehova, mokano oyo etaleli Bokonzi ya Masiya, mpe Paladiso oyo yango ekomema awa na mabelé. Yango wana, biso tozali komona nkembo ya Yehova, na miso ya mosuni te, kasi nde na kondima oyo euti na mateya ya Biblia. Lisusu, toyoki mongongo ya Yehova, na nzela ya anzelu te, kasi tozali koyoka yango na nzela ya Biblia, mingimingi na Baevanzile, oyo ezali komonisa biso malamumalamu mateya mpe mosala ya Yesu.
4. (a) Ndenge nini baklisto bapakolami bangɛngisaka nkembo ya Nzambe? (b) Ndenge nini bato oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabelé bakoki mpe kongɛngisa nkembo ya Nzambe?
4 Atako baklisto bamonisaka te nkembo ya Nzambe na kongɛnga oyo ezali kobima na bilongi, tokoki mpe koloba ete bilongi na bango engɛngaka ntango bazali koyebisa bato bizaleli mpe mikano ya nkembo ya Yehova. Mpo na mikolo na biso, Yisaya asakolaki ete basaleli ya Nzambe “bakosakola mpe nkembo ya [Yehova] kati na mabota.” (Yisaya 66:19) Lisusu, na 2 Bakolinti 4:1, 2, tozali kotánga boye: “Lokola tozwi mosala oyo ya ministre . . . , tobwaki makambo ya kobombama oyo eyokisaka nsɔni, tozali te kotambola na mayele mabe, tozali mpe te kobebisa liloba ya Nzambe, kasi na komonisáká solo polele tozali komilobela biso moko epai ya lisosoli ya bato nyonso na miso ya Nzambe.” Paulo azalaki kolobela libosoliboso baklisto bapakolami, baoyo bazali “baministre ya kondimana ya sika.” (2 Bakolinti 3:6) Kasi, mosala na bango ya baministre esalisi ebele ya bato oyo bazwi elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabelé. Bituluku wana mibale ezali kosala mosala ya kongɛngisa nkembo ya Yehova, kaka te na makambo oyo bazali koteya, kasi mpe na lolenge ya bomoi na bango. Na bongo, tozali na mokumba mpe na libaku malamu ya kongɛngisa lokola talatala nkembo ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló!
5. Bomɛngo ya elimo oyo tozali na yango ezali komonisa nini?
5 Lelo oyo, ndenge kaka Yesu asakolaki, nsango malamu ya nkembo ya Bokonzi ya Nzambe ezali kosakolama na mabelé mobimba. (Matai 24:14) Bato ya bikólo nyonso, mabota nyonso, mikili nyonso, mpe minɔkɔ nyonso bandimi nsango malamu yango mpe babongoli bomoi na bango mpo na kosala mokano ya Nzambe. (Baloma 12:2; Emoniseli 7:9) Lokola baklisto ya ekeke ya liboso, bakoki te kotika kolobela makambo oyo bamoni mpe bayoki. (Misala 4:20) Lelo oyo, bato koleka milio motoba bazali kongɛngisa nkembo ya Nzambe; bato yango bazali mingi koleka bato oyo bangɛngisaki nkembo ya Nzambe na eleko mosusu nyonso. Yo mpe ozali kati na bango? Bomɛngo ya elimo oyo basaleli ya Nzambe bazali na yango ezali komonisa polele ete Yehova azali kopambola mpe kobatela bango. Tozali mpe komona polele ete elimo ya Yehova ezali likoló na biso soki totali banguna ya makasi mingi oyo bazali kobundisa biso. Sikoyo, tótalela mpo na nini tolobi ete tozali mpenza na elimo ya Yehova.
Bakoki kokanga basaleli ya Nzambe monɔkɔ te
6. Mpo na nini tosengeli kozala na kondima mpe na mpiko mpo na kozala na ngámbo ya Yehova?
6 Kanisá ete bazali kosambisa bandi moko na tribinale mpe babengi moto moko aloba makambo mabe oyo bandi yango asalaka. Moto yango ayebi ete bandi yango azali na bato na ye mpe akosala nyonso mpo na kopekisa ye abimisa mabe na ye. Mpo moto yango aloba makambo ya bandi wana ekosɛnga azala na mpiko mpe na elikya ete bakonzi bakobatela ye. Biso mpe tokokani na moto oyo asengeli koloba mabe ya bandi moko. Na mosala na biso ya kotatola mpo na Yehova mpe mikano na ye, tozali koloba mabe ya Satana Zabolo, tozali komonisa ete azali mobomi-bato mpe moto ya lokuta mpe ete azali kozimbisa mokili mobimba. (Yoane 8:44; Emoniseli 12:9) Mpo na kozala na ngámbo ya Yehova mpe kotɛmɛla Zabolo, ezali kosɛnga tózala na kondima mpe na mpiko.
7. Satana azali na nguya ya ndenge nini, mpe azali koluka kosala nini?
7 Yehova azali Oyo-Aleki-Likoló. Azali na nguya mingi koleka Satana. Tokoki kozala na elikya ete Yehova azali na makoki mpe na mposa ya kobatela biso soki tozali kosalela ye na bosembo. (2 Ntango 16:9) Atako bongo, Satana azali mokonzi ya bademo mpe ya bato nyonso oyo bapesi Nzambe mokɔngɔ. (Matai 12:24, 26; Yoane 14:30) Lokola babwakaki ye awa na mabelé mpe azali na “nkanda makasi,” Satana azali kobundisa basaleli ya Yehova mpe azali kosalela mokili oyo azali kotambwisa mpo na koluka kokanga monɔkɔ ya bato nyonso oyo bazali kosakola nsango malamu. (Emoniseli 12:7-9, 12, 17) Ndenge nini azali kosala yango? Na balolenge soki misato.
8, 9. Ndenge nini Satana asalelaka kolinga biloko ya mokili mpe bisengo, mpe mpo na nini tosengeli kopona baninga na biso malamu?
8 Mitungisi ya bomoi ezali lolenge moko oyo Satana azali kosalela mpo na komeka kolongola likebi na biso na mosala ya Nzambe. Na mikolo oyo ya nsuka, bato balingi mbongo, bazali komilinga bango moko, mpe balingi bisengo. Balingi Nzambe te. (2 Timote 3:1-4) Lokola bamipesi kaka na makambo ya bomoi, mingi ‘bazali kotya likebi te’ na nsango malamu oyo tozali komemela bango. Bazali na mposa ya koyekola solo ya Biblia te. (Matai 24:37-39) Biso mpe tokoki kokóma na ezaleli ya ndenge wana, mpe yango ekoki komema biso tólala mpɔngi na elimo. Soki tokómi kolinga biloko ya mokili mpe bisengo ya bomoi, bolingo na biso mpo na Nzambe ekokóma mpiɔ.—Matai 24:12.
9 Yango wana, baklisto baponaka malamu baninga na bango. Mokonzi Salomo akomaki boye: “Ye oyo akotambola na bato ya mayele akozala na mayele, nde motamboli elongo na bazoba akobukana.” (Masese 13:20) Tiká ete ‘tótambolaka’ na baoyo bangɛngisaka nkembo ya Nzambe. Kosala bongo ezali likambo ya malamu mingi! Ntango toyanganaka na bandeko na biso na makita mpe na mabaku mosusu, bolingo, kondima, esengo, mpe bwanya na bango elendisaka biso. Baninga ya malamu ndenge wana balendisaka biso na ekateli na biso ya kozonga nsima te na mosala na biso.
10. Ndenge nini Satana asalelaka kotyola mpo na kolɛmbisa baoyo bazali kongɛngisa nkembo ya Nzambe?
10 Kotyola ezali lolenge mosusu oyo Satana azali kosalela mpo na koluka kopekisa baklisto nyonso ete bángɛngisa lisusu nkembo ya Nzambe te. Yango esengeli kokamwisa biso te. Ntango Yesu azalaki kosala mosala na ye awa na mabelé, bato mosusu bazalaki mpe kotyola ye—bazalaki kosɛka ye, kosambwisa ye, ata mpe kobwakela ya nsoi. (Malako 5:40; Luka 16:14; 18:32) Bato mingi mpe bazalaki kotyola baklisto ya ekeke ya liboso. (Misala 2:13; 17:32) Basaleli ya Yehova lelo oyo bazali mpe kokutana na makambo yango. Ntoma Petelo alobaki ete bakobenga bango “basakoli ya lokuta.” Asakolaki boye: “Na mikolo ya nsuka basɛki bakoya ná kosɛka na bango, kotamboláká engebene bamposa na bango moko mpe kolobáká ete: ‘Wapi kozala na ye oyo elakamaki? Kutu, . . . makambo nyonso ezali kokoba kaka ndenge ezalaki banda na ebandeli ya bozalisi.’” (2 Petelo 3:3, 4) Bato mosusu batyolaka basaleli ya Nzambe ete bazali bato bakufá miso. Bato mosusu bamonaka ete mitinda ya Biblia esilá ngala. Mpo na bato mingi, nsango oyo tosakolaka ezali bozoba. (1 Bakolinti 1:18, 19) Bakoki kosɛka biso baklisto na eteyelo, na mosala, ata mpe na kati ya mabota. Kasi, tozali kozonga nsima te, tozali kokoba kongɛngisa nkembo ya Nzambe na nzela ya mosala ya kosakola mpamba te, lokola Yesu, toyebi ete Liloba ya Nzambe ezali solo.—Yoane 17:17.
11. Ndenge nini Satana azali kosalela minyoko mpo na koluka kokanga baklisto monɔkɔ?
11 Botɛmɛli to minyoko ezali mpe lolenge mosusu oyo Zabolo azali kosalela mpo na koluka kokanga biso monɔkɔ. Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Bato bakokaba bino na bolɔzi mpe bakoboma bino, mpe bokozala biloko ya koyinama na bikólo nyonso mpo na nkombo na ngai.” (Matai 24:9) Ya solo, na bisika ndenge na ndenge na mokili banyokolaki mpe bazali konyokola Batatoli ya Yehova. Toyebi ete Yehova alobá banda kala ete koyina to bonguna ekozala kati na baoyo basalelaka Nzambe mpe baoyo basalelaka Satana Zabolo. (Genese 3:15, NW) Toyebi mpe ete soki totikali sembo ntango tomekami, tomonisaka ete Yehova azali na lotomo ya kozala mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Koyeba likambo yango ekoki kopesa biso makasi ata soki tozali na mikakatano ya ndenge nini. Soki tozali na ekateli makasi ya kongɛngisa nkembo ya Nzambe, monyoko ata moko te ekokanga biso monɔkɔ mpo na libela.
12. Mpo na nini tosengeli kosepela ndenge tozali kotikala sembo liboso ya minyoko oyo Satana azali kobimisela biso?
12 Oboyaka kolanda makambo ya mokili mpe otikalaka sembo ata soki batyoli yo mpe batɛmɛli yo? Boye osengeli kosepela. Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe mpe konyokola bino mpe kokosela bino makambo mabe ya ndenge nyonso mpo na ngai. Bósepela mpe bópumbwa na esengo, mpo mbano na bino ezali monene na likoló; mpo ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.” (Matai 5:11, 12) Ezaleli na yo ya koyika mpiko ezali komonisa ete elimo santu ya Yehova ezali likoló na yo mpe ezali kopesa yo nguya ya kongɛngisa nkembo na ye.—2 Bakolinti 12:9.
Yehova nde apesaka ezaleli ya koyika mpiko
13. Wapi ntina monene oyo toyikaka mpiko na mosala ya kosakola?
13 Ntina monene oyo toyikaka mpiko na mosala ya kosakola ezali ete tolingaka Yehova mpe tosepelaka kongɛngisa nkembo na ye. Mbala mingi bato balandaka makambo ya moto oyo bango balingaka mpe bapesaka limemya; nzokande, ezali na moto mosusu te oyo ebongi mpenza ete tólanda makambo na ye koleka Yehova Nzambe. Mpo na bolingo monene na ye, atindaki Mwana na ye awa na mabelé mpo na kopesa litatoli mpo na solo mpe kobikisa bato ya botosi. (Yoane 3:16; 18:37) Na ndakisa ya Nzambe, tolingi ete bato ya ndenge nyonso bábongola motema mpe bábika; yango wana toteyaka bango nsango malamu. (2 Petelo 3:9) Mposa yango mpe ekateli na biso ya komekola Nzambe, etindaka biso tókoba kongɛngisa nkembo na ye na mosala ya kosakola.
14. Ndenge nini Yehova apesaka biso makasi ya koyika mpiko na mosala ya kosakola?
14 Kasi, libosoliboso, Yehova nde apesaka biso makasi ya koyika mpiko na mosala ya kosakola. Asungaka mpe apesaka biso makasi na nzela ya elimo santu, ebongiseli na ye, mpe Liloba na ye, Biblia. Yehova “apesaka ezaleli ya koyika mpiko” na baoyo bazali na mposa ya kongɛngisa nkembo na ye. Ayokaka mabondeli na biso mpe apesaka biso bwanya mpo na kolonga mikakatano. (Baloma 15:5; Yakobo 1:5) Longola yango, Yehova atikaka nzela te ete tómekama na ndenge oyo tokokoka te koyika mpiko. Soki tozali kotyela Yehova motema, akobongisela biso nzela mpo tókoba kongɛngisa nkembo na ye.—1 Bakolinti 10:13.
15. Nini esalisaka biso tóyika mpiko?
15 Koyika mpiko na mosala ya kosakola emonisaka ete tozali na elimo ya Nzambe. Tópesa ndakisa: Kanisá soki moto moko asɛngi yo okabolaka ofele modɛlɛ moko boye ya mampa na bandako nyonso. Alobi na yo osalela mbongo na yo moko mpe ngonga na yo moko mpo na kokende kokabola yango. Lisusu, mwa moke na nsima, oyoki ete kaka bato moke nde bazali kosepela na mampa yango; kutu, bato mosusu bakopekisa yo okabola yango. Okanisi ete okokoba kosala mosala yango sanza na sanza, mbula na mbula? Tokanisi ete okotika. Nzokande, ekoki mpenza kozala ete osalaka makasi mpo na kosakola nsango malamu mpe osalelaka ntango mpe mbongo na yo moko mpo na kosakola mpe ekoki kozala ete osalaka mosala yango banda bambula mingi. Mpo na nini? Ezali mpo olingaka Yehova mpe na nzela ya elimo na ye apamboli milende na yo na ndenge apesi yo makasi ya koyika mpiko!
Mosala oyo tokobosana yango te
16. Koyika mpiko na mosala ya kosakola ekoki komemela biso moko mpe baoyo bazali koyoka biso bolamu nini?
16 Kozala ministre ya kondimana ya sika ezali likabo oyo ekokani na mosusu te. (2 Bakolinti 4:7) Ndenge moko mpe, mosala ya kosakola oyo bampate mosusu bazali kosala na mokili mobimba ezali eloko ya motuya. Ndenge Paulo akomelaki Timote, soki ozali koyika mpiko na mosala yango, okoki ‘kobikisa ná yo moko ná baoyo bazali koyoka yo.’ (1 Timote 4:16) Kanisá naino likambo yango. Nsango malamu oyo ozali kosakola ezali kopesa bato mosusu libaku ya kozwa bomoi ya seko. Okoki kokóma moninga ya motema ya bato oyo ozali kosalisa na elimo. Kanisá esengo okoyoka soki ozwi bomoi ya seko na Paladiso elongo na bato oyo osalisaki báyeba Nzambe! Na ntembe te bakobosana soki moke te milende oyo osalaki mpo na kosalisa bango. Yango ekozala mpenza likambo ya esengo!
17. Mpo na nini tolobi ete eleko oyo tozali ekokani na mosusu te?
17 Tozali na bomoi na eleko oyo ekokani na mosusu te. Nsango malamu ekosakolama lisusu te na mokili oyo epesi Nzambe mokɔngɔ. Noa azalaki na mokili ya ndenge yango, mpe amonaki ndenge ebomamaki. Na ntembe te asepelaki na komona ete akokisaki mokano ya Nzambe na bosembo na ndenge atongaki masuwa oyo ebikisaki ye ná libota na ye! (Baebele 11:7) Yo mpe okoki kozwa esengo ya ndenge wana. Kanisá ndenge oyo okoyoka ntango okozala na mokili ya sika mpe okokanisa nyonso oyo osalaki na mikolo ya nsuka mpo mosala ya Bokonzi ekende liboso.
18. Elikya nini mpe elendiseli nini Yehova azali kopesa basaleli na ye?
18 Yango wana, tiká tókoba kongɛngisa nkembo ya Nzambe. Tokobosana mosala yango soki moke te. Yehova mpe akobosana yango te. Biblia ezali kolendisa biso na maloba oyo: “Mpo Nzambe azali te moto oyo azangi boyengebene mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki mpo na nkombo na ye, na ndenge bosalelaki basantu mpe bozali kokoba kosalela bango. Kasi tolingi ete mokomoko na bino amonisa molende ya ndenge wana mpo na kozala na kondimisama makasi ya elikya tii na nsuka, mpo bókóma te bagɔigɔi, kasi bózala nde bamekoli ya baoyo na nzela ya kondima mpe na motema molai bazali kozwa libula ya bilaka.”—Baebele 6:10-12.
Okoki kolimbola?
• Ndenge nini baklisto bangɛngisaka nkembo ya Nzambe?
• Wapi mwa balolenge oyo Satana asalelaka mpo na koluka kokanga basaleli ya Nzambe monɔkɔ?
• Nini ezali komonisa ete tozali na elimo ya Nzambe?
[Elilingi na lokasa 15]
Elongi ya Moize ezalaki kongɛnga
[Bililingi na lokasa 16]
Tongɛngisaka nkembo ya Nzambe na mosala ya kosakola