Ndenge nini Okoki kolonga ntango onyokwami na makanisi
LOLA alobaki ete: “Likambo lizalaki kotungisa ngai koleka mpe oyo nabundaki na yango, ezalaki oyo ya komiyoka kozanga elikya wana ezalaki ngai kosalela Jéhovah; nakanisaki ete nasengelaki kozala na mayoki yango te.” Libunga wana ezali mbala mingi monguna ya liboso oyo moklisto azali konyokwama na makanisi asengeli kobundisa. Lola abakisi: “Na ntango oyo natikaki komitungisa na oyo ezalaki ngai kokanisa mpe nalandaki nzela ya komibikisa, nakokaki kobunda malamu na konyokwama na makanisi.” Ya solo, soki enyokwami na makanisi, mpo na yango ezali ntina te okanisa ete ozangi kokokisa mikumba na yo epai na Nzambe.”
Lokola emonisami na lisolo ya liboso, ntina na konyokwama na makanisi (dépression) ekoki kouta mbala mosusu na makambo matali lolenge nzoto na yo ezali kosala. Na 1915, liboso ete bolukiluki na sika epesa nzela na komonisa boyokani nini bozali kati na konyokwama na makanisi mpe maladi mingi na nzoto, La Tour de Garde elobaki ete: “Bolembu yango na elimo to komiyoka ete otangwi na bato mosusu mpe mawa oyo bato nyonso bayokaka, esengeli kotungisa biso te . . . Yango ekomaka mpasi mingi engebene santé na biso.” Na yango, soko mawa mingi na makanisi eumeli, okoki kosala examen na lopitalo. Soko eleki ndelo, okoki koluka lisalisi epai na spécialiste na maladi ya konyokwama na makanisi.a
Kasi, ata soko ntina na yango ezali mpo na santé te, ezali libunga na kokanisa ete mosaleli na Nzambe akoki koyoka mawa te to kolemba kati na motema te. Tokanisa bobele Hannah, mwasi na sembo, oyo ‘azalaki na mawa monene na motema mpe alelaki mingi’(1 Samwele 1:7, 10 MN) Nehemia mpe lisusu alelaki mpe ayokaki mawa mwa mikolo’ mpe ayokaki “bolozi kati na motema”. (Nehemia 1:4; 2:2) Yobo, azalaki lisusu na mposa ya bomoi na ye te mpe akanisaki ete Nzambe atikaki ye. (Yobo 10:1; 29:2, 4, 5.) Mokonzi Davidi alobaki ete elimo na ye elɛmbaki kati na ye mpe motema na ye ezalaki na mpasi. (Nzembo 143:4.) Ntoma Paulo alobi ete ayokaki ‘nsomo na katikati na ye’ mpe ‘akweisamaki na nse’ na ntina na mayoki na ye.—2 Bakolinti 4:9; 7:5, 6.
Bango nyonso wana bazalaki basaleli na sembo na Nzambe; nzokande, bampasi, mitungisi to kozanga kolonga epesaki bango mpasi na boumeli ya mwa ntango. Kasi, Nzambe atikaki bango te, mpe alongolaki elimo santu na ye epai na bango te. Konyokwama na bango na makanisi eutaki te na kozanga kokokisa lisɛngami moko na elimo. Na ntango oyo atungisamaki, Davidi asengaki na libondeli ete: “Sepelisa molimo ya mosali na yo.” Nzambe alendisaki Davidi na boumeli ya ‘mokolo wana ya mpasi’ mpe asalisaki ye na nsima na mikolo na kozwa esengo. (Nzembo 86:1, 4, 7) Na mikolo na biso, Jéhovah akosalisa basaleli na ye bobele bongo.
Mpo ete konyokwama na makanisi ekozwamaka se mpo na libunga na elimo te to mpo na bolembu na makanisi te, moklisto oyo azali kobela maladi yango akoki te kozala na nsoni kino ete azanga kolobela yango. Nzokande, asengeli kosala likambo moko kati na makambo ya ntina oyo mabongi mpo na kobundisa maladi yango. Ezali bongo nini?
Bimisa mayoki na yo
Esengeli koloba yango na moto moko. Masese 12:25 (MN) elobi ete: “Makanisi mingi na motema makolembisaka moto, nde liloba malamu likosepelisa ye.” Moto moko te akoki koyeba bonene ya mpasi oyo ezali konyokola motema na yo soko ozali kolobela yango te. Na kosolola epai na moto oyo ayebi komitya na esika ya moninga, oyo akoki kosalisa yo, na ntembe te okoyeba ete bato mosusu mpe basili kozwa mayoki mpe mikakatano motindo wana. Lisusu, kolobela mayoki na yo polele ekoki kosalisa, mpamba te kolobela mimekano na yo ya mpasi na esika ete obomba yango ekokitisa motema. Na yango, moto oyo azali konyokwama na makanisi asengeli kofungola motema epai na molongani na ye, epai na moboti moko to epai na moninga na motema ya boboto mpe oyo ateli mpenza na elimo.—Bagalatia 6:1.
Mokakatano ya Marie (oyo alobelami kati na lisolo ya liboso) ezali mpo ete abombaki mayoki na mpasi, yango ememaki ye na konyokwama na makanisi. Alobaki boye: “Na boumeli ya bambula, nabombaki yango. Moto moko te akokaki kokanisa ete nazalaki na mikakatano mpo na kobundisa liyoki oyo ezalaki na ngai ya komimona ete nazangi ntina epai na bamosusu.” Kasi Marie ayebisaki yango epai na nkulutu moko ya lisangá. Nkulutu yango, na nzela na mituna na bososoli, ‘atokaki’ kati na motema na ye mpasi oyo akumbaki mpe asalisaki ye na kososola mayoki na ye malamu. (Masese 20:5.) Maloba na ye kitoko, oyo mazwamaki na Makomami, elendisaki ye. Marie alobi boye: “Mpo na mbala ya yambo, nabandaki kozwa lisalisi mpo na kobundisa mayoki oyo mazalaki komema ngai na konyokwama na makanisi.”
Na yango, moto oyo molimo na ye ekomi “lokola mabelé makauki”, akoki komizwela “mai” na elimo oyo ekosilisa mposa, na kolobaka makambo na ye epai na nkulutu moko oyo ayebi koyokela bamosusu (Yisaya 32:1, 2; Nzembo 143:6.) Toli ya mayele na elimo ekoki kosalisa yo na kobongola ezalela oyo mbala mosusu ozalaki kokanisa ete ezangi elikya. (Masese 24:6.) Kasi, esuki bobele na kofungola motema epai na moto te.
Yeba ete ozali na motuya
Ezaleli ya komiyoka ete ozangi ntina epai na bato mosusu ezali komema moto na konyokwama na makanisi. Baklisto mosusu bazali komitalela bango moko na lolenge ya mabe, ntango mosusu mpo ete bazalaki na bomwana ya mpasi. Kasi, ata soko minyokoli na nzoto, na mayoki to na kosangisa nzoto na kala esili kotika bilembo na makanisi, yango ezali kokitisa ata moke te motuya ya moto. Yango wana osengeli kosala makasi na kozala na makanisi malamu na kotalela motuya na yo moko. Ntoma Paulo alendisaki baklisto boye: “Boleka te na komikanisa bino mpenza na motindo mobongi te. Kasi bomitanga na makanisi na sembo.” (Baloma 12:3) Ata osengeli komibatela ete ozala na lolendo te, nzokande epai mosusu omimona te ete ozali eloko mpamba. Baoyo bazali na boyokani malamu elongo na Nzambe bazali na motuya na miso na ye mpe balingami na ye, mpamba te azali kopona bato mpo bazala “bato na ye mpenza”. Oyo nde libaku na kokamwa!—Malaki 3:17; Hagai 2:7.
Lisusu, ezali lokumu monene na kozala “basalani na Nzambe elongo” na komikotisaka na mosala na boklisto na kozalisa bayekoli. (1 Bakolinti 3:9; Matai 28:19, 20.) Mingi na baklisto oyo banyokwamaki na makanisi basili komona ete mosala yango esalisaki bango komimona ete bazali na motuya Marie andimi ete: “Ata nsima na kokoma moklisto, nazalaki komiyoka ete nazali na motuya te.” Nzokande, alendendelaki na mosala ya kosakola mpe mokolo moko akutanaki na elenge mwasi moko oyo atungisamaki na mpasi na bongo, oyo alingaki koyeba Biblia. Marie alobi boye: “Azalaki na mposa ya moto oyo akozala na motema molai epai na ye, mpamba te azalaki koyekola malembemalembe mpenza. Lokola makanisi na ngai mingi ezalaki epai na ye, nazalaki lisusu kokanisa te mpo na ngai moko mpe mpo na bozangi na ngai ya makoki. Azalaki na mposa ya lisalisi na ngai mpe namonaki ete nakokaki kopesa ye yango na makasi ya Jéhovah. Emonaki ngai ye kozwa batisimo, nalendisamaki mingi koleka. Nazalaki na confiance mingi mpo na ngai moko, mpe konyokwama na makanisi elimwaki libela.” Bosolo na maloba oyo emonanaki: “Ye oyo akotiela moninga na ye mai mingi, ye mpe, bakotiela ye mai mingi.”—Masese 11:25, MN.
Nzokande, ebele na bato oyo bazali konyokwama na makanisi bakosalaka lokola moklisto mwasi oyo abelaki maladi yango makasi, oyo alobaki: “Atako nazalaki kosala makasi mpo na kobongisa ndako mpe kolamba, mpe koyamba bapaya, nde soko nasali libunga moke nakomipamela makasi mpenza.” Elimo ya komipamela na kolekisa ndelo akobebisaka mpenza bolingo ya moto ye moko. Tomikundola ete Nzambe na biso azali na boboto mpe “mpamela na ye ekoumela te”. (Nzembo 103:810, 14.) Mpo ete Jéhovah, oyo azali na boyengebene koleka oyo ya biso azali kotungisa biso te mpo na mwa libunga moke mpe akolimbisaka biso, tosengeli te kosala makasi na komekola ye na lolenge oyo ya kosala epai na biso moko?
Biso nyonso tozali na mabunga mpe na bolembu. Nzokande, tozali mpe makasi na makambo mosusu. Ntoma Paulo azalaki kolikya te na kosala makambo nyonso na lolenge ya kokoka. Alobaki boye: “Ata nayebi koloba malamu te, nde nazangi boyebi te.” Paulo amiyokaki na nsé ya bamosusu te mpo ete, mbala mosusu azalaki molobi malamu te. (2 Bakolinti 11:6.) Bobele bongo, bato oyo bazali konyokwama na makanisi basengeli kosepela na oyo ezali bango kokokisa malamu.
“Mayele ezali na bato na bopolo”, elingi koloba elongo na baoyo bazali koyeba mpe kondima ndelo na makoki na bango. (Masese 11:2,) Mokomoko kati na biso azali na lolenge na ye, na makambo, na makasi ya nzoto mpe makoki makeseni na oyo ya bamosusu. Wana ezali yo kosalela Jéhovah na molimo na yo mobimba na kosalaka oyo ekoki na yo, ozali mpenza kosepelisa ye. (Malako 12:30-33.) Nzambe azali moto te, oyo akosepelaka te na milende oyo basambeli na ye ya sembo bazali kosala. Leora, moklisto mwasi oyo alongaki konyokwama na makanisi, alobi boye:’’Nazali kosala makambo mosusu malamu koleka bamosusu te; ezali bongo mpo na masolo na ngai kati na mosala na kosakola. Kasi nazali komeka kobongisa mpe nazali kosala oyo ekoki na ngai.
Na ntango ya mabunga mpe kozanga koyokana
Ekozala boni soko osalaki libunga monene? Mbala mosusu ozali na mayoki motindo moko na mokonzi Davidi, oyo ‘mokolo mobimba atambolaki na mawa monene’ mpo na mabunga na ye to lisumu na ye. Kasi, na solo mpenza, mayoki yango makoki komonisa ete ekomaki mosika te mpe ete osalaki te lisumu oyo ekoki kolimbisama te! (Nzembo 38:3-6, 8) Kozala na mayoki ete okumbi ngambo ekoki komonisa ete oyo asali lisumu azali sembo mpe azali na lisosoli na kozika te. Na yango okoki lisusu kosala nini soko osalaki lisumu? Osili kosɛnga bolimbisi epai na Nzambe kati na libondeli, mpe osili kosala milende mpo na kosembola makambo yango? (2 Bakolinti 7:9-11.) Soko ee, zala na kondima na motema mawa na Oyo akolimbisaka masumu mpe ozwa ekateli ya kozongela yango te. (Yisaya 55:7.) Soko ozwaki etumbu, “kolemba te wana ezali ye kopamela yo; mpamba te Jéhovah akopesaka bitumbu na baoyo ye alingi”. (Baebele 12:5, 6, MN) Etumbu yango ezali mpo na kosalisa mpate oyo ebungi ete ezonga. Yango ezali kokitisa motuya ya moto te.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala lisolo ’’Traitements medical contre la dépression grave’’ oyo ebimaki na Réveillez-vous ya le 22/1/1982.