Oyo ezali mokolo ya lobiko!
“Talá! Ntango ebongi ezali sikawa. Talá! Mokolo ya kobika ezali nde sikawa.”—2 BAKOLINTI 6:2, NW.
1. Eloko nini esengeli mpo na kozala na lokumu malamu na miso ya Nzambe mpe ya Klisto?
YEHOVA aponi mokolo oyo akosambisa bato. (Misala 17:31) Mpo tóbika na mokolo yango, tosengeli kozala na lokumu malamu na miso na ye mpe na miso ya Yesu Klisto, Mosambisi oyo ye aponi. (Yoane 5:22) Etɛlɛmɛlo motindo yango esɛngi ete tólanda Liloba ya Nzambe mpe tózala na kondima oyo ezali kopusa biso ete tósalisa bato mosusu mpo bázala bayekoli ya solo ya Yesu.
2. Mpo na nini bato bakabwani na Nzambe?
2 Bato bakabwani na Nzambe mpo na lisumu oyo basangolaki. (Baloma 5:12; Baefese 4:17, 18) Yango wana, bato oyo tozali koteya bakobika bobele soki bazongisi boyokani na Nzambe. Ntoma Paulo amonisaki likambo yango polele ntango akomelaki baklisto ya Kolinti. Tóyekola 2 Bakolinti 5:10–6:10 mpo na komona makambo oyo Paulo alobaki mpo na lisambisi, kozongisa boyokani na Nzambe, mpe lobiko.
“Tozali kondimisa bato”
3. Ndenge nini Paulo ‘andimisaki bato,’ mpe mpo na nini tosengeli kosala bongo lelo oyo?
3 Paulo amonisaki ete kosambisama na mosala ya kosakola ezali na boyokani ntango akomaki ete: “Ekoki na biso nyonso komonana liboso na esambiselo na Klisto ete moto na moto azwa yango ekoki na ye mpo na misala misalaki ye na nzoto, soko malamu soko mabe. Bongo, awa ezali biso na nsɔmɔ na Nkolo liboso na miso na biso, tozali kondimisa bato.” (2 Bakolinti 5:10, 11) Paulo ‘andimisaki bato’ na mosala ya kosakola nsango malamu. Boni mpo na biso? Lokola topusani na nsuka ya ebongiseli ya biloko mabe ya ntango oyo, tosengeli kosala nyonso oyo ekoki mpo na kondimisa bato ete bákokisa oyo esengeli mpo ete Yesu abikisa bango mpe ete Yehova Nzambe, Liziba ya lobiko, andima bango.
4, 5. (a) Mpo na nini tosengeli komikumisa te na mosala na biso mpo na Yehova? (b) Mpo na nini Paulo amikumisaki “mpo na Nzambe”?
4 Kasi, tosengeli komikumisa te soki Nzambe apamboli mosala na biso ya kosakola. Na Kolinti, bato mosusu bavimbaki na lolendo mpo na bango moko to mpo na bato mosusu, mpe likambo yango ebimisaki bokabwani na lisangá. (1 Bakolinti 1:10-13; 3:3, 4) Paulo alobelaki likambo yango ntango akomaki ete: “Tozali komilobela biso mpenza epai na bino lisusu te, kasi tozali kopesa bino ntina ete bómikumisa mpo na biso mpe ete bóyeba kotɛmɛla baoyo bakomikumisa mpo na komonana nde mpo na motema te. Soko tozali na ligboma, ezali bobele mpo na Nzambe. Soko tozali na makanisi malamu, ezali bobele mpo na bino.” (2 Bakolinti 5:12, 13) Bato ya lolendo bazalaki kokanisa bomoko ya lisangá mpe bolamu na yango ya elimo te. Bazalaki koluka komikumisa na makambo oyo ezali komonana libándá na esika ya kosalisa bandeko na bango na kolona mitema ya malamu na miso ya Nzambe. Yango wana, Paulo apamelaki lisangá yango mpe na nsima alobaki ete: “Nde tiká ete ye oyo azali komikumisa, amikumisa kati na Nkolo.”—2 Bakolinti 10:17.
5 Tokoloba boni mpo na ye moko Paulo, amikumisaki te? Ekoki kozala na bato oyo bakanisaki bongo mpo na makambo oyo alobaki na oyo etali kozala ntoma. Kasi amikumisaki “mpo na Nzambe.” Amikumisaki na makambo oyo mamonisaki ete azali ntoma mpo ete Bakolinti bátika Yehova te. Paulo asalaki bongo mpo na kozongisa bango epai ya Nzambe mpamba te bantoma ya lokuta bazalaki komema bango na nzela ya mabe. (2 Bakolinti 11:16-21; 12:11, 12, 19-21; 13:10) Kasi, Paulo azalaki ntango nyonso koluka kobenda likebi ya moto nyonso likoló ya misala na ye te.—Masese 21:4.
Bolingo ya Klisto ekangi yo?
6. Ndenge nini bolingo ya Klisto esengeli kokanga biso?
6 Lokola ntoma ya solo, Paulo ateyaki bato mosusu mbeka ya lisiko ya Yesu. Mbeka yango ezalaki na bopusi na bomoi ya Paulo, mpamba te akomaki ete: “Bolingo na Klisto ekangi biso awa [tokangi ntina] ete moko akufeli bato nyonso mpe bongo bato nyonso basili kokufa. Akufeli bato nyonso ete baoyo bazali na bomoi bábika lisusu mpo na bango mpenza te kasi mpo na ye oyo akufeli bango mpe asekwi.” (2 Bakolinti 5:14, 15) Yesu amonisaki bolingo mingi na ndenge apesaki bomoi na ye mpo na biso! Ya solo, likambo yango esengeli kozala nguya oyo ezali kokanga biso na bomoi na biso. Botɔndi na biso epai ya Yesu na ndenge apesaki bomoi na ye mpo na biso esengeli kopusa biso na kozala na molende na mosala ya kosakola nsango malamu ya lobiko. Yehova abongisi lobiko yango na nzela ya Mwana na ye oyo alingi mingi. (Yoane 3:16; talá Nzembo 96:2.) “Bolingo ya Klisto” ezali kopusa yo na kosala mosala ya kosakola Bokonzi mpe ya kozalisa bayekoli na molende nyonso?—Matai 28:19, 20.
7. ‘Koyeba moto na motindo na nzoto’ elimboli nini?
7 Bapakolami ‘bazali lisusu na bomoi mpo na bango moko te kasi mpo na Klisto’ na ndenge bazali kosala misala oyo emonisi botɔndi mpo na makambo oyo asaleli bango. Paulo alobaki ete, “Bongo, longwa [sikoyo] tokoyebaka moto na motindo na nzoto lisusu te. Ata toyebaki Klisto lokola moto, tokoyebaka ye bongo lisusu te.” (2 Bakolinti 5:16) Baklisto basengeli kotalela bato na liso ya mosuni te, mbala mosusu komona ete Bayuda baleki bato ya mabota mosusu, to bazwi baleki babola. Bapakolami ‘bayebi moto na motindo na nzoto lisusu te,’ mpamba te eloko oyo eleki ntina ezali nde boyokani na bango na bandeko na bango bandimi na makambo ya elimo. Baoyo ‘bayebaki Klisto lokola moto’ ezali te bobele bato oyo bamonaki Yesu ntango azalaki awa na mabelé. Ata soki bato mosusu oyo bazalaki kolikya na Masiya batalelaki Klisto liboso bobele lokola moto, basengelaki lisusu kotalela ye bongo te. Apesaki nzoto na ye lokola mbeka mpe asekwisamaki lokola elimo oyo epesaka bomoi. Bato mosusu oyo basekwisami mpo na kozwa bomoi na likoló batikaki nzoto na bango ya mosuni kozanga ete bámona Yesu Klisto lokola moto.—1 Bakolinti 15:45, 50; 2 Bakolinti 5:1-5.
8. Ndenge nini bato bakómaka “kati na Klisto”?
8 Paulo alobi lisusu epai ya bapakolami ete: “Soko moto azali kati na Klisto, akómi bozalisi na sika; makambo na liboso malimwi, talá makambo na sika mayei.” (2 Bakolinti 5:17) Kozala “kati na Klisto” elimboli kozala na ye na bomoko. (Yoane 17:21) Mpo na moto yango, boyokani yango ebandaki na ntango Yehova abendaki ye epai ya Mwana na ye mpe abotaki ye na elimo santu. Lokola mwana ya Nzambe oyo abotami na elimo, akómaki “bozalisi na sika” mpe azali na elikya ya kosangana na Klisto na Bokonzi ya likoló. (Yoane 3:3-8; 6:44; Bagalatia 4:6, 7) Baklisto wana bapakolami bazwi libaku malamu ya mosala monene.
“Bózongisa boyokani na Nzambe”
9. Nzambe asalaki nini mpo na kozongisa boyokani na ye?
9 Yehova amonisi mpenza ngɔlu epai ya “bozalisi na sika”! Paulo alobi ete: “Biloko nyonso euti epai ya Nzambe oyo azongisaki boyokani kati na biso na ye na nzela ya Klisto mpe apesi biso mosala ya kozongisa boyokani, elingi koloba ete, Nzambe, na nzela ya Klisto, azongisi boyokani kati na ye na mokili, abosani mabunga na bango, mpe apesi biso liloba ya kozongisa boyokani.” (2 Bakolinti 5:18, 19, NW) Banda Adama asalaki lisumu, bato bakabwaná na Nzambe. Kasi na bolingo na ye, Yehova ye moko afungolaki nzela ya kozongisa boyokani na mbeka ya Yesu.—Baloma 5:6-12.
10. Yehova apesaki mosala ya kozongisa boyokani epai ya banani, mpe basali nini mpo na kokokisa yango?
10 Yehova apesi mosala ya kozongisa boyokani epai ya bapakolami. Yango wana Paulo alobaki ete: “Tozali bantoma na Klisto; Nzambe azali kobyanga bino na minɔkɔ na biso. Tokolɔmbaka bino mpo na Klisto ete, [Bózongisa boyokani, NW] na Nzambe.” (2 Bakolinti 5:20) Na ntango ya kala, bazalaki kotinda bantoma mingimingi na ntango ya matata mpo etumba ebima te. (Luka 14:31, 32) Lokola mokili ya masumu etangwi mosika na Nzambe, ye atindaki bantoma bapakolami na ye mpo na koyebisa bato masɛngami na ye mpo ete boyokani ezonga. Lokola bamonisi ya Klisto, bapakolami bazali koloba ete: “Bózongisa boyokani na Nzambe.” Yango ezali libyangi ya ngɔlu mpo na koluka kimya na Nzambe mpe kondima lobiko oyo azali kopesa na nzela ya Klisto.
11. Na nzela ya kondima na mbeka, banani bakomonana sembo na miso ya Nzambe?
11 Bato nyonso oyo bazali kondima mbeka ya lisiko bakoki koyokana lisusu na Nzambe. (Yoane 3:36) Paulo alobi ete: “[Yesu] ayebaki lisumu moko te nde Nzambe azalisaki ye lisumu mpo na biso ete biso tózala na boyengebene na Nzambe kati na ye.” (2 Bakolinti 5:21) Yesu, moto ya kokoka, azalaki mbeka mpo na masumu ya bakitani nyonso ya Adama oyo basikolami na masumu oyo basangolaki. Bakómi “boyengebene ya Nzambe” na nzela ya Yesu. Boyengebene yango, to komonana bayengebene na miso ya Nzambe, epesami liboso na ba 144 000 basangoli ya libula elongo na Klisto. Na boumeli ya boyangeli ya mbula nkóto, bana ya Tata ya seko, Yesu Klisto oyo bakofanda awa na mabelé bakozwa etɛlɛmɛlo ya basembwi lokola bato ya kokoka. Akokómisa bango basembwi na ezalela ya kokoka mpo ete bámonisa bokangami na bango na Nzambe mpe bázwa likabo ya bomoi ya seko.—Yisaya 9:6; Emoniseli 14:1; 20:4-6, 11-15.
“Ntango ebongi”
12. Wapi mosala monene oyo bantoma mpe batindami ya Yehova bazali kokokisa?
12 Mpo na kobika, tosengeli kotosa maloba ya Paulo oyo: “Awa ezali biso kosalana na ye [Yehova] mosala, tokobondela bino ete bóyamba ngɔlu na Nzambe mpamba te. Mpo ete alobi ete: ‘Na ntango ebongi, nayoki yo, mpe na mokolo na kobika nasungi yo.’ Talá! Ntango ebongi ezali sikawa. Talá! Mokolo ya kobika ezali nde sikawa.” (2 Bakolinti 6:1, 2, NW) Bantoma bapakolami ya Yehova mpe batindami na ye, elingi koloba “bampate mosusu” bandimaka ngɔlu ya Tata na bango ya likoló mpamba te. (Yoane 10:16) Na etamboli malamu na bango mpe na molende na bango na mosala ya kosakola na “ntango ebongi” oyo, bazali koluka ngɔlu ya Nzambe mpe bazali koyebisa bato nyonso awa na mabelé ete oyo ezali “mokolo na kobika.”
13. Wapi likanisi ya ntina na Yisaya 49:8, mpe ndenge nini ekokisamaki mpo na mbala ya liboso?
13 Paulo azongeli maloba ya Yisaya 49:8, oyo elobi ete: “[Yehova] alobi boye ete, Na ntango na ngɔlu nazongiseli yo liloba; na mokolo na kobikisama nasungi yo; nakobatela yo mpe nakopesa yo lokola kondimana epai na bato, kokokisa mokili mpe kokabwela bisika bipunzami libula.” Esakweli oyo ekokisamaki liboso ntango libota ya Yisalaele esikolamaki na boombo na Babilone mpe bazongaki na mokili na bango oyo etikalaki mpamba.—Yisaya 49:3, 9.
14. Ndenge nini Yesu akokisaki Yisaya 49:8?
14 Na kokokisama mosusu ya esakweli ya Yisaya, Yehova apesaki “moombo” na ye Yesu lokola “mwinda mpo na mabota nyonso ete kobika na [Nzambe] ekóma na nsuka na mokili.” (Yisaya 49:6, 8; talá Yisaya 42:1-4, 6, 7; Matai 12:18-21.) Ezali polele ete “ntango na ngɔlu” to “ntango ebongi” etalelaki Yesu na ntango azalaki awa na mabelé. Abondelaki, mpe Nzambe “ayanolaki” ye. Ezalaki mpenza “mokolo na kobika” mpo na Yesu mpamba te atikalaki sembo tii nsuka; yango wana “akómaki eutelo na lobiko na seko mpo na bango nyonso bakotosaka ye.”—Baebele 5:7, 9; Yoane 12:27, 28.
15. Banda ntango nini Bayisalaele ya elimo bamonisi ete babongi kozwa ngɔlu ya Nzambe, mpe na mokano nini?
15 Paulo akokisi maloba ya Yisaya 49:8 na baklisto bapakolami mpe asɛngi bango ete ‘bázanga ntina ya ngɔlu ya Nzambe te’ na kozanga koluka boboto na ye na “ntango ebongi” mpe na “mokolo na lobiko” oyo abongisi. Paulo alobi lisusu ete: “Talá! Ntango ebongi ezali sikawa. Talá! Mokolo na kobika ezali nde sikawa.” (2 Bakolinti 6:2, NW) Banda na Pentekote ya mobu 33 T.B., Bayisalaele ya elimo bamonisi ete babongi na ngɔlu ya Nzambe mpo ete “ntango ebongi” ezala “mokolo na kobika” mpo na bango.
‘Tómimonisa baministre ya Nzambe’
16. Na kati ya komekama nini Paulo amimonisaki ministre ya Nzambe?
16 Na lisangá ya Kolinti, bato mosusu bazalaki komimonisa te ete bábongi kozwa ngɔlu ya Nzambe. Bazalaki kotɔnga Paulo mpo na kobebisa lokumu na ye lokola ntoma, atako aboyaki ‘kotya libaku na nzela na moto.’ Amimonisaki mpenza ministre ya Nzambe “na makambo nyonso na mpiko monene, na bolɔzi, na mpasi, na makamba, na kobɛtama, na kokangama, na yikiyiki, na misala mingi, na kolambela, na nzala.” (2 Bakolinti 6:3-5) Na nsima, Paulo amonisaki ete soki batɛmɛli na ye bazalaki baministre, ye ‘alekaki’ mpamba te anyokwamaki, abɛtamaki, azwaki makama, mpe azangaki mingi koleka.—2 Bakolinti 11:23-27.
17. (a) Na makambo nini tokomimonisa baministre ya Nzambe? (b) Wapi “bibundeli ya boyengebene”?
17 Lokola Paulo na baninga na ye, tokoki komimonisa baministre ya Nzambe. Ndenge nini? “Na pɛto,” to etamboli malamu, mpe na misala miyokani na boyebi ya solosolo ya Biblia. Tokoki komimonisa baministre “na etingya,” soki tozali na motema molai mpo na koyikela mabe to matumoli mpiko, mpe “na boboto” wana tozali kosala makambo mpo na kosunga basusu. Tokoki mpe komimonisa baministre ya Nzambe soki tondimi litambwisi ya elimo santu, mpe tomonisi “bolingo bozangi bokosi,” mpe tozali koloba solo, mpe soki totii elikya na biso epai na ye mpo na kozwa nguya ya kokokisa mosala na biso. Likambo oyo ezali kobenda likebi ezali ete Paulo amimonisaki ministre “na bibundeli na boyengebene mpo na lobɔkɔ na mobali mpe mpo na lobɔkɔ na mwasi.” Na etumba na ntango ya kala, mbala mingi lobɔkɔ ya mobali ezalaki kosimba mopanga mpe lobɔkɔ ya mwasi ezalaki komema nguba. Ntango azalaki kobunda etumba ya elimo na balakisi ya lokuta, Paulo asalelaki bibundeli ya nzoto ya masumu te: bongolabongola, kobuba, lokuta. (2 Bakolinti 6:6, 7; 11:12-14; Masese 3:32) Asalelaki myango to “bibundeli” ya boyengebene mpo na kotombola losambo ya solo. Biso mpe tosengeli kosala bongo.
18. Soki tozali baministre ya Nzambe, tokomitambwisa ndenge nini?
18 Soki tozali baministre ya Nzambe, tokomitambwisa lokola Paulo na baninga na ye ya mosala. Tokosala makambo lokola baklisto, ezala bakumisi biso to batyoli biso. Nsango ya lokuta oyo bazali kopanza biso ekopekisa mosala na biso ya kosakola te, mpe tokokóma na lolendo te soki balobi malamu mpo na biso. Tokoloba solo mpe bato bakoki komona mpenza ete tozali kosala misala ya malamu. Soki banguna batii biso na likama ya liwa, tokotya elikya epai ya Yehova. Mpe tokondima disipilini na botɔndi nyonso.—2 Bakolinti 6:8, 9.
19. Ndenge nini tokoki ‘kozalisa bato mingi bazwi’ na elimo?
19 Na nsuka ya lisolo na ye etali mosala ya kozongisa boyokani, Paulo alobaki ete ye na baninga na ye bazali ‘lokola bato na mawa nde batondi na esengo; lokola babola nde bakozalisa bato mingi bazwi; lokola bato bazali na eloko te nde bazali na biloko nyonso.’ (2 Bakolinti 6:10) Atako baministre wana bakokaki koyoka mawa mpo na bampasi na bango, bazalaki na esengo na mitema na bango. Bazalaki babola na mosuni, kasi ‘bakómisaki bato mingi bazwi’ na elimo. Ɛɛ, ‘bazalaki na nyonso’ mpamba te kondima na bango epesaki bango bozwi ya elimo—elikya ya kokóma bana ya Nzambe kuna na likoló. Bazalaki na bomoi malamu mpe ya esengo lokola baministre baklisto. (Misala 20:35) Na ndakisa na bango, biso mpe tokoki ‘kokómisa bato mingi bazwi’ soki tosangani na mosala ya kozongisa boyokani banda sikawa—na mokolo oyo ya kobika!
Tólikya na lobiko ya Yehova
20. (a) Paulo azalaki na mposa makasi ya kosala nini, mpe mpo na nini ntango ezalaki mingi te? (b) Nini ezali komonisa mokolo ya lobiko ya lelo oyo?
20 Ntango Paulo akomelaki Bakolinti mokanda ya mibale soki na mobu 55 T.B., etikalaki bobele mbula 15 liboso ete ebongiseli ya biloko ya Bayuda ebomama. Ntoma alingaki mpenza ete Bayuda mpe bato ya mabota mosusu bázongisa boyokani na Nzambe na nzela ya Klisto. Wana ezalaki mokolo ya lobiko, mpe basengelaki kolekisa ntango te. Biso mpe, uta 1914, tozali kobika na nsuka ya ebongiseli ya biloko lokola oyo wana. Mosala ya kosakola Bokonzi oyo ezali kosalema na mokili mobimba ezali komonisa ete tozali na mokolo ya lobiko.
21. (a) Mokapo nini eponami lokola mokapo ya mobu 1999? (b) Tosengeli kosala nini na mokolo ya lobiko?
21 Bato ya mabota nyonso basengeli koyeba ebongiseli oyo Nzambe asali mpo na kobikisa bato na nzela ya Yesu Klisto. Ntango etikali moke. Paulo akomaki ete: “Talá! Mokolo ya kobika ezali nde sikawa.” Maloba wana ya 2 Bakolinti 6:2 (NW) makozala mokapo ya mobu 1999 mpo na Batatoli ya Yehova. Maloba yango mabongi mpenza, mpamba te likambo ya mpasi koleka kobomama ya Yelusaleme na tempelo na yango ezali liboso na biso! Biso nyonso na mabelé tokómi pene na nsuka ya ebongiseli mobimba ya biloko oyo. Ebongi kokamata ekateli lelo, kasi lobi te. Soki tondimi ete lobiko ezali na Yehova, soki tolingi ye, mpe soki mpenza tolingi kozala na bomoi ya seko, tokozwa ngɔlu ya Nzambe mpamba te. Na mposa makasi ya kokumisa Yehova, tokonganga ete: “Talá! Mokolo ya kobika ezali nde sikawa.” Na maloba mpe na misala na biso, tokomonisa ete konganga yango euti mpenza na mitema na biso.
Okoyanola ndenge nini?
◻ Mpo na nini kozongisa boyokani na Nzambe ezali likambo ya ntina mingi?
◻ Banani bantoma mpe batindami oyo bazali kosala mosala ya kozongisa boyokani?
◻ Ndenge nini tokoki komimonisa baministre ya Nzambe?
◻ Mokapo ya mobu 1999 mpo na Batatoli ya Yehova elimboli nini mpo na yo?
[Bililingi na lokasa 17]
Na ndakisa ya Paulo, ozali kosakola na molende mpe kosalisa basusu ete bázongisa boyokani na Nzambe?
États-Unis
France
Côte d’Ivoire
[Elilingi na lokasa 18]
Na mokolo oyo ya lobiko, ozali na kati ya ebele ya bato oyo bazali kozongisa boyokani na Yehova Nzambe?