Tomonisa ezaleli na malamu mpo na kosepelisa Jéhovah
“Jéhovah alingi nini epai na yo? Bobele ete osala na boyengebene mpe olinga malamu, mpe otambola na bopɔlɔ elongo na Nzambe na yo.”—MIKA 6:8, MN.
1. Mpo na nini bosengeli kokamwa te ete Jéhovah azali kozela epai na basaleli na ye ete bamonisa ezaleli na malamu?
JÉHOVAH azali kozela epai na basaleli na ye ete bamonisa ezaleli na malamu. Mpo na yango tokoki kokamwa te, mpamba te Nzambe ye moko azali malamu epai na bato nyonso, ata epai na bato mabe bazangi botɔndi. Yesu Klisto alobaki na bayekoli na ye ete: “Bolinga bayini na bino, mpe bosalela bango malamu mpe bodefisa na bato, nde botya motema te na kozwa eloko moko; mpe mbano na bino ekozala monene, mpe bokozala bana na Oyo—Aleki—Likoló, mpamba te ye azali malamu mpo na bango bazangi botɔndi mpe epai na bato mabe. Bolanda kozala na motema mawa, lokola Tata na bino azali na motema mawa.”—Luka 6:35, 36.
2. Mituna nini ya ntina mitunami likoló na ezaleli na malamu?
2 Lokola yango emonisami na Mika 6:8, baoyo bazali kotambola elongo na Nzambe basengeli mpenza “kolinga malamu.” Emonani ete, Jéhovah akosepelaka komona basaleli na ye kolinga malamu mpe komonisa yango na motema mobimba. Kasi malamu ezali nini? Yango ekopesaka matomba nini, mpe lolenge nini tokoki komonisa yango?
Malamu (bonté) ezali nini?
3.Lolenge nini okolimbola ezaleli na malamu?
3 Malamu (bonté) ezali ezaleli ya moto oyo azali komibanzabanza mpo na bazalani na ye. Ekomonanaka na misala ya bobóto mpe na maloba ya bolingo. Kozala moto malamu elimboli kosalela bato makambo malamu kasi kosalela bango mabe te. Moto malamu akozalaka na boninga, na bopɔlɔ, na motema mawa mpe na boyambi malamu. Akomimonisaka na bokabi mpe akozalaka na limemya mpo na bato mosusu. Nkutu, malamu ezali eteni moko na elambá na elilingi na moklisto. Ezali yango nde emonisami na toli oyo ya Paulo: “Bomilatisa motema mawa, na malamu, na bopɔlɔ, na bobóto mpe na motema molai.”—Bakolose 3:12.
4. Na likambo nini Jéhovah azali ndakisa na malamu mpo na bato?
4 Jéhovah azali ndakisa mpo na ezaleli na malamu. Lokola ntoma Paulo alobi yango, “wana malamu mpe bolingo na Nzambe, Mobikisi na biso, emonanaki epai na bato abikisi biso na ntina na misala na boyengebene oyo biso tosalaki te, kasi mpo na motema mawa na ye; na nzela na kosukolama oyo esili kozongisa biso na bomoi, mpe na kozongisama eloko na sika na nzela na elimo santu.” (Tito 3:4, 5) Nzambe azali kopɛtola, to ‘kosukola’ baklisto bapakolami kati na makilá na Yesu na kosaleláká motuya ya mbeka na Klisto mpo na bango. Bazongi bato na sika na nzela na elimo santu mpe moko na moko kati na bango asili kokóma “kozalisama na sika” lokola bana na Nzambe oyo babotami na elimo. (2 Bakolinti 5:17) Ya solo, malamu mpe bolingo na Nzambe emonisami mpe epai na “ebele monene” oyo euti na bikólo nyonso, oyo basangani na yango “basukoli bilámba na bango, mpe bayeisi yango mpɛmbɛ na makila na Mwana na Mpate.” (Emoniseli 7:9, 14; 1 Yoane 2:1, 2) Lisusu, baklisto bapakolami mpe basangani ya ebele monene, baoyo bazali na elikya ya kofanda na mabelé, bango nyonso bazali na nsé na ekangiseli na “bopɔlɔ” mingi na Klisto.—Matai 11:30.
5. Mpo na nini tosengeli kozela epai na baoyo batambwisami na elimo na Nzambe ete bamonisa ezaleli na malamu epai na bazalani na bango?
5 Malamu ezali mpe eteni moko na mbuma na elimo santu, to bokasi na Nzambe bokosalaka mosala. Paulo alobaki ete: “Mbuma na elimo ezali bolingo, esengo, kimya, motema molai, bobóto, malamu, kondima, bopɔlɔ, komikanga motema. Liboso na makambo oyo mobeko ezali te.” (Bagalatia 5:22, 23, MN) Nini tosengeli kozela epai na baoyo batambwisami na elimo na Nzambe? Na ntembe te ete bamonisa ezaleli na malamu epai na bazalani na bango.
6. Ezaleli na malamu esengeli kopusa bankulutu mpe baklisto mosusu na kosala nini?
6 Malamu ekoki komonisama na mitindo mingi. Tokomonisaka ezaleli na malamu wana ezali biso na motema mawa. Na ndakisa, bankulutu ya lisangá bakomonisaka ezaleli na malamu wana ezali bango na motema mawa epai na basali na masumu oyo babongoli motema mpe wana bakosalisaka bango kati na elimo. Malamu, ezaleli oyo euti na Nzambe, ekosalaka ete bakengeli bazala na motema pɛtɛɛ, na bolingo, na motema mawa mpe na bopɔlɔ. Ekopusaka bango na ‘kosalela etonga na bolingo mpenza.’ (Misala 20:28, 29) Ya solo, mbuma oyo na elimo esengeli kosala ete baklisto nyonso bazala na motema mawa, na motema pɛtɛɛ, na bolingo, na boninga mpe na boyambi.
Esengeli te komonisa ezaleli na malamu na esika oyo yango ebongi te
7. Mpo na nini komonisa ezaleli na malamu na esika oyo yango ebongi te, ezali elembo na bolɛmbu?
7 Mpo na bamoko, ezaleli na malamu ezali elembo na bolɛmbu. Bakolobaka ete, esengeli kosala makambo na makasi, mbala mosusu na lolendo, mpo na komonisa bokasi epai na bato mosusu mpe mpo na kobangisa bango. Nzokande, bakolobaka te ete “lolendo ezali nde makasi ya moto na bolɛmbu”? Ya solo, esengeli makasi mpo na kozala mpenza moto malamu ete omonisa te ezaleli na malamu na esika oyo yango ebongi te. Malamu, oyo ezali bongo mbuma na elimo na Nzambe, ezali elembo na bolɛmbu te to na kotika nzela na etamboli mabe te. Te, komonisa ezaleli na malamu na esika oyo yango ebongi te, ezali bolɛmbu oyo bokomemaka na kotalela mabe na bopotu.
8. (a) Lolenge nini Eli amimonisaki na bolɛmbu liboso na bana na ye? (b) Mpo na nini bankulutu basengeli te komonisa ezaleli na malamu na esika oyo yango ebongi te?
8 Nganga monene Eli amimonisaki na bolɛmbu epai na bana na ye, Hofini mpe Pinehasi, baoyo bazalaki banganga na etumbelo. Na esika na kosepela na likabo ya mbeka oyo lipesamelaki bango na nzela na Mibeko na Nzambe, bazalaki kotinda basali na bango ete basenga mosuni ya mobesu epai na baoyo bazalaki koya kopesa mbeka ya nyama, mpe yango liboso ete batumba mafuta na nyama. Bazalaki mpe kosala pite elongo na basi oyo bazalaki kosala mosala na ekuke ya hema. Kasi, na esika na kobotola Hofini mpe Pinéhasi mikumba oyo bazalaki na yango, Eli azalaki nde kobondela bango, kopesáká bongo lokumu mingi epai na bana na ye koleka epai na Nzambe. (1 Samwele 2:12-29) Ezali likambo na kokamwa te ete ‘na mikolo yango, liloba na Nzambe liyokamaki lisusu te epai na bato.’ (1 Samwele 3:1) Bankulutu basengeli te komizimbisa na makanisi na libungá to na komonisa ezaleli na malamu na esika oyo yango ebongi te, likambo oyo mbɛlɛ likotya elimo ya lisangá kati na likámá. Malamu na solo ekopusaka te na kokanga miso na maloba mpe na misala mabe oyo mizali kotɛmela mibeko na Nzambe.
9. (a) Nini ekoki kosalisa biso ete tomonisa te ezaleli na malamu na esika oyo yango ebongi te? (b) Lolenge nini Yesu amonisaki bokasi na motindo na ye ya kosala epai na bakonzi ya mangomba bapengwi?
9 Mpo na komonisa te ezaleli na malamu na esika oyo yango ebongi te, tosengeli kobondela Nzambe ete apesa biso makasi ya koloba lokola mokomi na nzembo ete: “Bolongwa na ngai, bino basali na mabe; ete nabatela malako ya Nzambe na ngai.” (Nzembo 119:115) Tosengeli mpe kolanda ndakisa na Yesu Klisto, ye oyo asalaki libungá te na komonisa ezaleli na malamu na esika oyo yango ebongi te. Ya solo, Yesu azalaki mpenza moto malamu. Na ndakisa, ‘aokaki mawa mingi mpo na bato, mpo balɛmbaki mpe balemalemaki lokola bampate bazangi mobateli.’ Yango wana bato na motema sembo bazalaki kokakatana te mpo na koloba na ye, ata mpe komema bana mike epai na ye. Mpe kanisa mpo na ezaleli na malamu, na bobóto oyo amonisaki wana “azingelaki bana na maboko na ye, mpe apambolaki bango, kotyáká maboko likoló na bango ” (Matai 9:36; Malako 10:13-16) Nzokande, atako Yesu amonisaki ezaleli na malamu, azalaki na ekateli makasi na ntina na makambo oyo mazalaki sembo liboso na Tata na ye na likoló. Atalelaki mabe na bopotu te; na lisalisi na Nzambe, azwaki makasi ya kokweisa bakonzi ya mangomba na bokósi. Engebene Matai 23:13-26, mbala mingi alobaki na bango ete: “Mawa na bino, bakomeli mpe Bafalisai, bakósi!” Mpe azalaki ntango nyonso kolimbwela bango ntina oyo bakweisamaki na Nzambe.
Malamu mpe bolingo ekotambolaka elongo
10. Lolenge nini bayekoli na Yesu bazali komonisa ezaleli na malamu mpe na bolingo epai na baninga na bango baklisto?
10 Yesu alobaki na bato oyo bazalaki kolanda ye ete: “Na bongo, bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo,” (Yoane 13:35) Nini ezali, kati na makambo mosusu, kolakisa bolingo oyo bozali komonisa baklisto ya solo na Yesu? Paulo alobaki ete: “Bolingo ezali na motema molai mpe na malamu.” (1 Bakolinti 13:4) Moto na motema molai mpe na malamu akoyikaka mpiko mpo na kozanga kokoka mpe na mabungá ya bato mosusu, lokola Jéhovah azali kosala yango na malamu mingi. (Nzembo 103:10-14; Baloma 2:4; 2 Petelo 3:9, 15) Malamu mpe bolingo na baklisto akomonanaka mpe na ntango oyo basaleli na Nzambe bazali kokutana na mimekamo, ata na esika nini epai kuna bazali. Na ezaleli na malamu, na “bobóto” mingi mpenza, baninga na bango baklisto ya mikili misusu, bakomonisaka bolingo na bango ya bondeko na kopesáká makabo ya biloko mpo na kosalisa basambeli wana na Jéhovah.—Misala 28:2.
11. Motema malamu ezali nini kati na Makomami?
11 Malamu ekangisami na ezaleli na motema oyo ete bolingo, kati na liloba “motema malamu,” oyo esalelami mbala mingi kati na Makomami. Ezali nde malamu oyo mauti na bolingo na sembo. Liloba na Liebele oyo libongolami na “motema malamu” (hèsèdh) elimboli bobele bolingo ya likolólikoló te, kasi ezaleli na malamu oyo ekangami na eloko moko to na moto moko kino kokokisa mokano na yango. Motema malamu, to bolingo na sembo na Jéhovah, emonisami na mitindo mingi, na ndakisa wana ezali ye kobikisa to mpe kobatela basaleli na ye.—Nzembo 6:4; 40:11; 143:12.
12. Wana basaleli na Jéhovah bakobondelaka mpo ete basalisama to mpo na kobikisama, bakoki kondimisama na likambo nini?
12 Oyo eleki mpenza ezali ete, motema malamu na Jéhovah ekobendaka bato epai na ye. (Yilimia .31:3) Wema ezali bango na mposa ya kobikisama to na kosalisama, baoyo bazali kosalela Jéhovah na bosembo nyonso bayebi ete motema malamu na ye ezali mpenza bolingo na sembo oyo ekosalaka mabe te. Bakoki bongo kozongela libondeli oyo na mokomi na nzembo, na kondima nyonso ete: “Ngai nandimi malamu na yo; tika ete motema na ngai mosepela na lobiko na yo!” (Nzembo 13:5) Lokola Nzambe azali komonisa bolingo na sembo, ezali mpamba te soki basaleli na ye batii elikya na motema malamu na ye. Wana bakobondelaka ye ete asalisa bango to mpe abikisa bango, bandimisami boye ete: “Jéhovah akoboya libota na ye te; akotika libula na ye te.”—Nzembo 94:14.
Matomba mazwami na ezaleli na malamu
13, 14. Mpo na nini moto oyo akomonisaka ezaleli na malamu azali na baninga na sembo?
13 Baoyo bazali kosalela Jéhovah bazali kolanda ndakisa na ye ‘na komonisana motema malamu mpe motema mawa moko epai na mosusu.’ (Zakaria 7:9; Baefese 5:1) “Oyo elingami epai na moto, ezali nde motema malamu na ye, mpe ye oyo akomonisaka ezaleli wana akomizwila bolamu mingi. (Masese 19:22) Totalela ndambo na yango:
14 Malamu ekopusaka biso na koloba to kosala makambo na motindo boye ete kozokisa baninga te (yango ebengami takte); ekosalisaka biso na kozala na boyokani malamu elongo na bato mosusu. Moto azali na takte akolobaka, akosalaka mpe akosilisaka matáta na bolingo mpe na bobóto. “Moto mabe” akobebisaka nzoto na ye moko, nzokande “moto na motema malamu akosalaka malamu na molimo na ye.” (Masese 11:17, MN) Tokokimaka moto oyo ayebani ete azali moto na motema mabe; nzokande tobendami bongo na moto oyo akomonisaka motema malamu. Yango wana moto malamu azali na baninga na sembo.—Masese 18:24.
15. Ezaleli na malamu ekoki kozala na bopusi nini kati na libota oyo likabwani na losambo?
15 Mwasi moklisto akoki kobenda mobali na ye oyo azali mondimi te epai na solo na Nzambe na komonisáká ezaleli na malamu. Mbala mosusu azalaki mwasi mabe, to na koswana mingi liboso na koyeba solo mpe liboso na koláta “bomoto na sika oyo bozalisami engebene mokano na Nzambe kati na boyengebene mpe na bosembo ya solo.” (Baefese 4:24, MN) Soki mobali na ye ayebaki mwa maloba ya Masese, mbala mosusu akokaki mpenza kolobela oyo, ete: “Koswana na mwasi ezali lokola ndako ekotangaka mai mpe ekokimisa yo,” mpe ete: “Kofanda na esobé ekauki eleki malamu na kofanda na mwasi na kowelana mpe na nkanda.” (Masese 19:13; 21:19) Kasi sikawa, etamboli na peto ya mwasi moklisto, limemya na ye ya mozindo mpe bizaleli na ye, na ndakisa ezaleli na malamu, ekoki kosalisa ye na kobenda mobalani na ye epai na kondima ya solo. (1 Petelo 3:1, 2) Tala moko na matomba oyo makoki kozwama na ezaleli na malamu na ye.
16. Malamu oyo bamoniseli biso ekoki kozala na bopusi nini likoló na biso?
16 Malamu oyo bamonisi epai na biso ekoki kozala na bopusi malamu likoló na biso: ekosala ete tozala na motema mawa mpe na bobóto. Na ndakisa, soki tozali na mposa ya lisalisi kati na elimo mpe bamoniseli biso ezaleli na malamu mpe na bopɔlɔ; tokopusama te na kosala motindo moko epai na bato mosusu? Ya solo, tokoki mpenza komizela ete baklisto oyo bazali na bizaleli na elimo bamonisela biso ezaleli na malamu mpe na bopɔlɔ, mpamba te Paulo akomaki ete: “Bandeko, soko moto anyati litambe mabe, naino ye moko asosoli yango te, bino bato bozali na makoki na elimo, bomeka kosembola moto motindo wana na elimo ya bopolo. Omikengela yo moko ete yo mpe omekama te.” (Bagalatia 6:1, MN) Wana ezali bango kosala makasi mpo na kosalisa baninga na bango oyo bazali kobunga, bakengeli bakolobaka na bango na bopɔlɔ mpe na malamu. Ata tozwi naino lisalisi motindo oyo te, kasi eloko nini Nzambe azali kozela epai na moko na moko kati na biso basaleli na ye? Ete tomonisa ezaleli na malamu epai na bazalani na biso mpe tolanda toli oyo na Paulo. ete: “Bozalanaka na malamu moko epai na mosusu, na motema mawa, na kolimbisana moko na mosusu, lokola Nzambe asili kolimbisa bino kati na Klisto.” (Baefese 4:32) Ya solo, soki moto moko alimbisaki biso to mpe asalisaki biso na malamu nyonso mpo na kolónga nkáka moko kati na elimo, yango esengeli kobakisa makoki na biso ya kolimbisa, ya kookela bato mawa mpe na komonisa ezaleli na malamu.
Tozwa ngolu na Nzambe na motuya
17. Lokola tobotami bato na masumu, mpo na malamu na nani tosengeli mpenzampenza komonisa botɔndi?
17 Lokola tozali bato na masumu, tolakámi na kufa, tosengeli mingi mpenza kozala na botɔndi mpo na ezaleli na malamu to na ngolu na Jéhovah Nzambe. Mpo na bato na masumu, likambo ya kosikolama na ekweiseli na kufa mpe kotangama bayengebene, ezali ngolu monene, elingi koloba bolamu oyo mbɛlɛ bokoki na bango te. Paulo, oyo alobelaki ngɔlu na Nzambe mbala 90 kati na mikanda 14 mipemami oyo ye akomaki, alobaki epai na baklisto ya Loma ete: “Bato banso basali lisumu mpe bazangi nkembo na Nzambe, nde batangami bayengebene lokola likabo mpo na ngolu na ye, na nzela na lisiko na Klisto Yesu.” (Baloma 3:23, 24, MN) Tosengeli te kozala na botɔndi mpo na ngolu na Jéhovah?
18, 19. Tokoki kosala nini ete totalela ngolu na Nzambe mpamba te?
18 Soki tokozala na botɔndi te, wana tokoki kozanga libonza na ngolu na Nzambe. Mpo na yango, Paulo alobaki ete: “Tozali bantoma na esika na Klisto, lokola nde Nzambe akobyangaka bino na minoko na biso. Tokolɔmbaka bino na esika na Klisto ete: ‘Bozonga na bondeko na Nzambe.’ Ye oyo ayebaki lisumu te, Nzambe asili kozalisa ye lisumu, mpo ete tokóma boyengebene na Nzambe kati na ye. Bongo, awa ezali biso kosalana elongo na ye, tolɔmbi bino ete boyamba ngolu na Nzambe mpo na mpamba te. Mpo alobi [na Yisaya 49:8] ete: ‘Nayoki yo na ntango malamu, mpe nasungi yo na mokolo na kobika.’ Tala, sikawa ezali ntango malamu. Tala, sikawa ezali mokolo na kobika. Tokotyaka libaku na nzela na moto te ete mosala na biso motyolama te. Kasi tokomilobelaka biso mpenza kati na makambo nyonso lokola basali na Nzambe.” (2 Bakolinti 5:20 kino 6:4, MN) Paulo alingaki koloba nini?
19 Baklisto bapakolami bazali bantoma na esika na Klisto, mpe basangani ya ebele monene bazali batindami na ye. Bango nyonso elongo, bazali kolendisa bato ete bazonga na bondeko na Nzambe mpo na kozwa lobiko. Paulo alingaki te ete moto moko atyola ngolu na Jéhovah Nzambe oyo epesami kati na Yesu Klisto. Yango ekoki kokómela biso soki nde tokokisi te mosala oyo mopesameli biso na ngolu yango. Lokola tozali na boyokani malamu elongo na Nzambe mpe tozongi na bondeko na ye, tokozwa ngolu na ye na mpamba te soki tokokisi “mosala ya kozongisa bondeko oyo Nzambe, ye moko, azongisi bato na bondeko epai na ye.” (2 Bakolinti 5:18, 19, MN) Tokomonisa mpe ezaleli na malamu mingi epai na bazalani na biso na kosalisáká bango ete bazonga na bondeko epai na Nzambe.
20. Tokotalela nini na lisoló lilandi?
20 Basaleli na Jéhovah bakomonisaka ezaleli na malamu wana ezali bango kosalela ntango na bango mpe biloko na bango mpo na kosalisa bazalani na bango na elimo kati na mosala na boklisto. Kasi bandakisa na Biblia na ntina na ezaleli na malamu oyo emonisamaki, ezali koteya biso nini? Kati na lisoló lilandi, tokotalela mwa ndambo na yango mpe mitindo misusu ya komonisa ezaleli na malamu mpo na kosepelisa Nzambe.
Bozongeli
◻ Ezaleli na malamu ezali nini?
◻ Tokoki kosala nini ete tomonisa te ezaleli na malamu na esika oyo yango ebongi te?
◻ Mpo na nini baoyo bazali kosalela Jéhovah bakoki kotya motema na ngolu na ye?
◻ Wapi bamoko na matomba oyo mazwami na ezaleli na malamu?
◻ Tosengeli kosala nini ete totalela ngolu na Nzambe na mpamba te?
[Elilingi na lokasa 13]
Ezaleli na malamu ekosalaka ete bankulutu bazala na motema petee, na bolingo mpe na motema mawa
[Elilingi na lokasa 15]
Ezaleli na malamu ya mwasi moklisto ekoki kosalisa ye na kobenda mobali na ye epai na kondima ya solo
[Elilingi na lokasa 17]
Ezaleli na malamu mingi oyo tokoki komemisa epai na bazalani na biso azali oyo ya kosalisa bango na kozonga na bondeko na Nzambe