Tólanda komonisa boboto na mokili oyo etondi na mabe
“Yango elingami kati na moto ezali boboto na ye.”—MASESE 19:22.
1. Mpo na nini ekoki kozala mpasi mpo na komonisa boboto?
OMIMONAKA ete ozali moto ya boboto? Soki ezali bongo, okoki kozala na mikakatano ebele na mokili oyo. Biblia etángi boboto na kati ya “mbuma ya elimo,” kasi mpo na nini komonisa boboto ezali mpasi ata na mikili oyo bato mingi bamibengaka baklisto? (Bagalatia 5:22) Ndenge tomonaki yango na lisolo eleki, maloba ya ntoma Yoane ezali kopesa ndambo ya eyano; akomaki ete mokili mobimba ezali kotambwisama na Satana Zabolo, ekelamu ya elimo oyo azali na boboto ata moke te. (1 Yoane 5:19) Yesu Klisto abengaki Satana ete “moyangeli ya mokili oyo.” (Yoane 14:30) Yango wana, bato ya mokili bazali kolanda makambo ya moyangeli na yango oyo atondi na mabe.—Baefese 2:2.
2. Na makambo nini komonisa boboto ekoki kokóma mpasi mpo na biso?
2 Bomoi ekómaka bololo soki bazali kosala biso makambo ezangi boboto. Ekoki kozala ete baninga ya kartye bazali kotyola biso, bato mosusu oyo toyebani na bango te bazali kosalela biso makambo ezangi boboto, ata mpe baninga to bandeko bakoki ntango mosusu kosala biso makambo ya mabe. Kokutana to mpe kofanda esika moko na bato oyo bazali na makambo mabe mpe oyo basalaka makɛlɛlɛ mpe balingi kolobelana maloba ya bosɔtɔ epesaka motó mpasi. Soki bazali kosala biso makambo ezangi boboto ndenge wana ekoki kokómisa biso nkandankanda, mpe tokoki kokanisa ete biso mpe tosengeli kozongisa mabe na mabe. Makambo ya ndenge wana ekoki kopesa biso maladi na elimo to mpe na nzoto.—Baloma 12:17.
3. Mikakatano nini bato bazali kokutana na yango oyo ezali kosala ete bákoka mpenza te komonisa boboto?
3 Mikakatano ya bomoi ekoki mpe kosala ete tókoka mpenza te komonisa boboto. Na ndakisa, bato mingi bazali kotungisama mpo bazali kobanga bateroriste, to mpe mpo ete bikólo mosusu ekoki kosalela bibundeli ya nikleere to bagazɛ ya mabe. Longola yango, bamilio ya bato bazali babola, bazali kozanga biloko ya kolya, esika ya kolala, bilamba, to nkisi ya monganga. Kozala na boboto epai ya bato ekómaka mokakatano soki tozali na elikya moko te.—Mosakoli 7:7.
4. Makanisi nini ya mabe bato mosusu bakoki kozala na yango na ntina etali komonisela basusu boboto?
4 Ezali mpasi te moto akóma kokanisa ete kozala na boboto ezali na ntina mpenza te sikoyo to mpe ete ezali bolɛmbu. Akoki komona ete bazali komonela ye, mingimingi soki bato mosusu bazali kosala ye makambo ya nko. (Nzembo 73:2-9) Kasi, Biblia epesi biso toli malamu oyo: “Kozongisa liloba na bolɛmbu ekopɛngola nkanda, nde liloba makasi ekopesa nkɛlɛ simbisi.” (Masese 15:1) Bopɔlɔ ná boboto ezali na kati ya mbuma ya elimo mpe yango mibale ezali na boyokani makasi mpe esalisaka moto oyo azali na mikakatano.
5. Na makambo to bisika nini tosengeli komonisa boboto?
5 Lokola komonisa mbuma ya elimo santu ya Nzambe ezali na ntina mingi mpo na biso baklisto, ebongi mpenza tótalela ndenge oyo tokoki komonisa boboto oyo ezali moko ya bizaleli yango. Tokoki mpenza komonisa boboto na kati ya mokili oyo etondi na mabe? Soki tokoki, na makambo to bisika nini tokoki komonisa ete tozali kotika te ete elimo ya Satana epekisa biso tómonisa boboto, mingimingi ntango tozali kotungisama? Tólobela ndenge oyo tokoki komonisa boboto na kati ya libota, na mosala, na kelasi, na kartye, na mosala ya kosakola, mpe epai ya bandeko na lisangá.
Boboto na kati ya libota
6. Mpo na nini boboto ezali na ntina mingi na kati ya libota, mpe ndenge nini ekoki komonisama?
6 Soki tolingi ete Yehova apambola biso mpe atambwisa biso, ezali na ntina mingi tólona mpe tókolisa mbuma ya elimo. (Baefese 4:32) Tótalela naino ntina oyo bato ya libota moko basengeli komonisanaka boboto. Mokolo na mokolo, mwasi ná mobali basengeli komonisana boboto mpe kosalisana mpe basengeli komonisa ezaleli yango epai ya bana. (Baefese 5:28-33; 6:1, 2) Boboto ya ndenge wana esengeli komonana na ndenge oyo mokomoko na bango azali koloba na moninga; bana basengeli komemya mpe kotosa baboti, mpe baboti basengeli kopesa bana kilo. Esengeli nde kopesaka longonya, kasi kowela kopamela te.
7, 8. (a) Bizaleli nini tosengeli koboya soki tolingi komonisa boboto ya solosolo na kati ya libota? (b) Na ndenge nini kosolola malamu esalaka ete libota ezala na boyokani makasi? (c) Ndenge nini okoki komonisa boboto na kati ya libota na yo?
7 Kozala na boboto na kati ya libota elimboli mpe kolanda toli ya ntoma Paulo oyo: “Sikoyo mpenza bólongola yango nyonso epai na bino, nkɛlɛ, nkanda, mabe, maloba ya kofinga, mpe maloba ya nsɔni na monɔkɔ na bino.” Esengeli ete na mabota ya baklisto mokolo na mokolo masolo ezangaka te mpe basengeli kosololaka na limemya. Mpo na nini? Mpamba te kosolola nde esalaka ete libota ezala na boyokani makasi. Soki boyokani te na makambo mosusu, mpo na koboya matata, esengeli koluka kobongisa na esika ya koluka nani alongi. Na kati ya mabota ya esengo, bato basalaka makasi bámonisana boboto mpe moto na moto amemyaka basusu.—Bakolose 3:8, 12-14.
8 Boboto elendisaka mpe etindaka biso tósalela basusu malamu. Na yango, etindaka biso tósunga basusu na kati ya libota, tómemya bango, mpe tósalisa bango. Mpo na komonisa boboto yango oyo epesaka libota lokumu, esɛngaka ete moto na moto asala milende mpe bato nyonso bápesana mabɔkɔ. Yango ekosala ete Nzambe apambola bango, kasi mpe bákumisa Yehova, Nzambe ya boboto, na kati ya lisangá mpe na esika oyo bafandi.—1 Petelo 2:12.
Boboto na mosala
9, 10. Lobelá mwa makambo oyo ekoki kobima na esika ya mosala, mpe limbolá ndenge oyo tokoki kosilisa yango na boboto.
9 Moklisto akoki kozala na mokakatano ya komonisa boboto epai ya baninga oyo akutanaka na bango mokolo na mokolo na mosala. Soki baninga ya mosala bazwani matata, moko akoki kosala moninga makambo mabe to kolya ye na nse nse, mpe na bongo, kobebisa lokumu na ye na miso ya patrɔ; mpe yango ekoki kobebisela ye mosala. (Mosakoli 4:4) Na makambo ya ndenge wana, komonisa boboto ezalaka mpasi mpenza. Atako bongo, lokola mosaleli ya Yehova ayebi ete kozala na boboto nde likambo eleki malamu, akosala nyonso oyo akoki mpo na koyokana na baoyo bazali na makanisi ya malamu te. Ekozala mpasi te asala yango soki azali komibanzabanza mpo na basusu. Na ndakisa, okoki komonisa moninga moko ete ozali komibanzabanza mpo na ye soki ye moko to moto moko na kati ya libota na ye azali kobɛla. Ata kotuna mpamba nsango na ye to ya moto oyo azali kobɛla ekoki kobongola ye makanisi. Baklisto basengeli kosala nyonso oyo bakoki mpo na koluka boyokani mpe kimya. Ntango mosusu mwa liloba ya boboto oyo ezali komonisa ete ozali komibanzabanza mpo na basusu mpe komemya bango ekoki kobongisa makambo.
10 Ekoki kokóma ete patrɔ moko alingi ete bato na ye ya mosala básala kaka makambo oyo ye alingi mpe akoki kosɛnga ete moto moko azanga te na likita oyo ezali kokumisa ekólo to na fɛti moko oyo endimami te na Biblia. Soki moklisto amoni ete lisosoli na ye ezali kopekisa ye asangana na yango, ekoki kobendela ye mindɔndɔ epai ya patrɔ. Na ntango wana, ekoki kozala malamu moklisto yango aloba mingimingi te mpo na koluka kolimbola mpo na nini kosala likambo oyo patrɔ asɛngi ezali mabe mpo na ye. Bato oyo bandimaka mateya ya boklisto te bakoki komona ete ebongi mpenza nde kosala makambo wana. (1 Petelo 2:21-23) Mbala mosusu okoki, na boboto nyonso, kolimbola ntina oyo yo oboyi kosala likambo wana. Soki batyoli yo, yo kozongisa kotyola te. Ebongi moklisto alanda toli malamu ya Baloma 12:18 oyo: “Soki likoki ezali, na meko oyo yango etaleli bino, bózala na kimya elongo na bato nyonso.”
Boboto na kelasi
11. Mikakatano nini bilenge bakutanaka na yango mpo na komonisa boboto epai ya baninga na bango ya kelasi?
11 Bilenge bakoki kozala na mokakatano mpenza mpo na komonisela baninga na bango ya kelasi boboto. Bilenge balingaka ete baninga na bango básepela na bango. Bilenge mosusu balingaka komilakisa ete bazali makasi mpo bana-kelasi mosusu bákumisa bango; balukaka ata kobangisa mpe konyokola bana mosusu na kelasi. (Matai 20:25) Bilenge mosusu balingaka komilakisa na eteyelo mpo bato mosusu bámona bango ete bayebi mingi na masano to makambo mosusu. Mbala mingi, mpo na komilakisa, basalaka baninga na bango mpe bana mosusu makambo na boboto te; bakanisaka ete ntango bazali kosala bongo, ekomonana ete baleki bango. Elenge oyo azali moklisto asengeli kokeba ete alanda ndakisa mabe wana te. (Matai 20:26, 27) Ntoma Paulo alobaki ete “bolingo ezali na motema molai mpe na boboto” mpe ete bolingo “emikumisaka te, emivimbisaka na lolendo te.” Yango wana, moklisto asengeli te kolanda ndakisa mabe ya bato oyo bazangi boboto; asengeli nde kotosa toli ya Biblia na ndenge na ye ya kozala na baninga ya kelasi.—1 Bakolinti 13:4.
12. (a) Mpo na nini ekoki kozala mpasi mpo bilenge bázala na boboto epai ya balakisi na bango? (b) Bilenge bakoki koluka lisalisi epai ya nani ntango bazali kotinda bango básala makambo na kozanga boboto?
12 Bilenge basengeli mpe kozala na boboto epai ya balakisi na bango. Bana-kelasi mingi balingaka kosilikisa balakisi na bango. Bakanisaka ete bazali na mayele ntango bazali kotosa balakisi te to bazali kosala makambo oyo epekisami na eteyelo. Ntango mosusu balukaka kobangisa to bakanelaka bana mosusu mpo bálanda ndakisa na bango. Ntango elenge oyo azali moklisto aboyi kosala lokola bango, bakoki kobanda kosɛka to kofinga ye. Kokutana na makambo ya ndenge wana na kelasi na boumeli ya mbula mobimba ekoki kozala komekama mpo na moklisto oyo azali na mposa ya komonisa boboto. Kasi, kobosana te ete ezali na ntina mingi kozala mosaleli ya sembo ya Yehova. Yebá ete na nzela ya elimo na ye, akosalisa yo na ntango wana ya mpasi.—Nzembo 37:28.
Boboto epai ya baninga ya kartye
13-15. Nini ekoki kopesa biso mokakatano mpo na kozala na boboto epai ya baninga ya kartye, mpe ndenge nini tokoki kolonga likambo wana?
13 Ata soki ofandaka na lopango na yo moko, na ndako ya kofutela, to na lopango ya bato ebele, to esika mosusu, osengeli kokanisa ndenge oyo okoki komonisa boboto epai ya bato oyo ofandi na bango esika moko mpe komonisa ete olukaka mpe bolamu na bango. Kasi, yango mpe ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te.
14 Ezali boni soki bato oyo ofandi pene na bango bazali kokanisela yo mabe mpo ozali moto moindo to mondɛlɛ, to bozali na bango ekólo moko te, to lingomba moko te? Ezali boni soki bazali kosala yo makambo na nko to bazali kokipe yo ata moke te? Soki yo mosaleli ya Yehova ozali kosala nyonso oyo okoki mpo na komonisa boboto, ekobota mbuma malamu. Bakomona ete ozali ndenge mosusu mpe bakosepela na yo, mpe okopesa Yehova nkembo, ye oyo azali ndakisa ya boboto. Nani ayebi, mbala mosusu boboto na yo ekoki kobongola makanisi ya moto moko. Akoki ata kokóma mosambeli ya Yehova.—1 Petelo 2:12.
15 Ndenge nini okoki komonisela bango boboto? Ya liboso, na bizaleli malamu ya libota na bino wana bino nyonso bozali komonisa mbuma ya elimo. Baninga ya kartye bakoki komona yango. Soki ozwi libaku, okoki kosalisa moninga yango na likambo moko. Kobosana te ete kozala na boboto elimboli koluka bolamu ya basusu.—1 Petelo 3:8-12.
Boboto na mosala ya kosakola
16, 17. (a) Mpo na nini boboto ezali na ntina na mosala ya kosakola? (b) Ndenge nini tokoki komonisa boboto ntango tozali kosakola na balabala, na bamagazini to na zando?
16 Tosengeli kozala na boboto na mosala ya kosakola, wana tozali kosala milende mpo na kokutana na bato na bandako na bango, na bisika ya mosala, mpe na bisika ya bato nyonso. Tosengeli kobosana te ete tozali bamonisi ya Yehova, oyo azalaka ntango nyonso na boboto.—Exode 34:6.
17 Makambo nini okoki kosala mpo na komonisa boboto na mosala ya kosakola? Na ndakisa, ntango ozali kosakola na balabala, okomonisa boboto epai ya bato soki ozali kozwa bango ntango mingi te mpe ozali kopesa bango limemya. Bato ya makolo bazalaka mingi na balabala; yango wana, esengeli kokeba ete okangela bato nzela te. Lisusu, ntango ozali kosakola na bamagazini to na zando, mpo na komonisa boboto, masolo na yo esengeli kozala mokuse; kobosana te ete batɛkisi basengeli koyamba bakiliya.
18. Bososoli ezali na ntina nini mpo na komonisa boboto na mosala ya kosakola?
18 Ntango ozali kosakola ndako na ndako, osengeli kosalela mayele. Ntango moto moko ayambi yo, kolya ye ntango mingi te, mingimingi, soki mbula ezali koya to mpe moi ezali makasi. Oyebaka ntango moto akómi motema mokuse to abandi kolɛmba mpo ozali koumela? Mbala mosusu na mboka na bino Batatoli ya Yehova bazongelaka bateritware mbala na mbala. Soki ezali bongo, osengeli kozala na limemya mingi epai ya bato, zalá ntango nyonso na boboto. (Masese 17:14) Soki bayambi yo te, ndimá ntina oyo nkolo-ndako ayambi yo te. Kobosana te ete ndeko mosusu akoki koleka na ndako yango nsima ya mwa mikolo. Soki moto moko alobi na yo mabe, salá makasi ozala kaka na boboto. Kotombola mongongo te, kokanga mpe elongi te, lobá na ye kaka na malɛmbɛ. Moklisto oyo azali na boboto asengeli te koswana na moto na mosala ya kosakola. (Matai 10:11-14) Mokolo mosusu moto wana akoki kondima koyoka nsango malamu.
Boboto na makita
19, 20. Mpo na nini boboto ezali na ntina na kati ya lisangá, mpe ndenge nini tokoki komonisa yango?
19 Ezali mpe na ntina mingi tómonisa boboto epai ya bandeko na biso baklisto. (Baebele 13:1) Lokola tozali lisangá ya bandeko na mokili mobimba, ezali na ntina mingi ete biso na biso tómonisanaka boboto.
20 Soki bozali masangá mibale, misato, to koleka oyo bozali kosalela Ndako ya Bokonzi moko, bosengeli kozala na boboto epai ya bandeko ya masangá mosusu; bosengeli kopesa bango lokumu ntango bozali kosolola na bango mpo na koyokana makambo mosusu. Ntango bozali koyokana bangonga ya makita mpe makambo mosusu lokola kosukola Ndako ya Bokonzi to kosala misala mosusu, makambo ekobonga te soki bokómi kobendana. Ata soki bozali na makanisi ndenge moko te, esengeli kaka kozala na boboto mpe komemya basusu. Na ndenge yango, tokobatela boboto mpe Yehova akopambola mpenza mposa oyo bozali komonisa ya koluka bolamu ya basusu.
Tótika te komonisa boboto
21, 22. Na boyokani na Bakolose 3:12, ekateli nini tosengeli kozwa?
21 Tosengeli komonisa boboto na makambo nyonso ya bomoi. Yango wana, esengeli ezaleli yango ezala na kati ya bomoto na biso ya boklisto. Tosengeli kolona momeseno ya komonisela bato boboto.
22 Tiká ete biso nyonso tózala na boboto epai ya basusu mokolo na mokolo mpe, na ndenge yango, tókokisa maloba ya ntoma Paulo oyo: “Lokola baponami ya Nzambe, basantu mpe balingami, bólata bolingo ya motema oyo euti na mawa, motema malamu, elimo ya komikitisa, boboto mpe motema molai.”—Bakolose 3:12.
Ozali koyeba lisusu?
• Mpo na nini moklisto akoki kokóma na mokakatano ya komonisa boboto?
• Mpo na nini ezali na ntina tómonisana boboto na kati ya libota?
• Tángá mwa makambo oyo esalaka ete komonisa boboto ezala mpasi na kelasi, na mosala, mpe epai ya baninga ya kartye.
• Limbolá ndenge oyo baklisto bakoki komonisa boboto na mosala ya kosakola.
[Elilingi na lokasa 18]
Soki libota mobimba bazali komonisana boboto, elendisaka bomoko mpe kosalisana
[Elilingi na lokasa 19]
Okoki komonisa boboto ntango moninga ya mosala, mwana na ye, mwasi na ye to ndeko na ye abɛli
[Elilingi na lokasa 20]
Yehova asalisaka bato oyo bamonisaka boboto atako bazali kotyola bango
[Elilingi na lokasa 21]
Kosalisa moninga moko ya kartye oyo azali na mposa ya lisalisi ezali komonisa boboto