“Boyeisa ndambo na zomi nyonso kati na ebombelo”
“Meka ngai mpo na yango . . . mpo na komona sɔkɔ nakozipwela bino maninisa na lola tɛ.”—MALAKI 3:10, MN.
1. (a) Na ekeke ya mitano Liboso ya Ntango na Biso, libyangi nini Jéhovah apesaki na libota na ye? (b) Na ekeke ya liboso ya Ntango na Biso, koya ya Jéhovah na tempelo mpo na kosambisa esukaki na nini?
NA EKEKE ya mitano Liboso ya Ntango na Biso, Bayisraele bazalaki lisusu sembo te epai na Jéhovah. Bazalaki lisusu kopesa ndambo na zomi te, mpe banyama oyo bazalaki kopesa lokola mbeka ezalaki ya mabe. Nzokande, Jéhovah alakaki bango ete sɔkɔ bakoyeisa ndambo na zomi nyonso kati na ebombelo, ye akosopela bango mapamboli kino esika ekozanga mpo na yango. (Malaki 3:8-10) Bambula soko 500 na nsima, Jéhovah, amonisamaki na Yesu, ntomá na kondimana na Ye, ayaki na tempelo ya Yelusaleme, mpo na kosambisa. (Malaki 3:1) Na mobimba na yango, libota ya Yisraele lizalaki sembo te, kasi moko moko na baoyo bazongaki epai na Jéhovah bazwaki mapamboli mingi. (Malaki 3:7) Bapakolamaki na elimo mpo na kokóma bana na Jéhovah na elimo, bozalisi ya sika, “Yisraele na Nzambe.”—Bagalatia 6:16; Baloma 3:25, 26.
2. Ntango nini Malaki 3:1-10 esengelaki kokokisa ma mpo na mbula ya mibale, mpe mpo na yango tobyangami na kosala nini?
2 Pene na mibu 1 900 na nsima, na 1914, Yesu akómaki Mokonzi kati na Bokonzi ya Nzambe na likoló, mpe maloba mapemamaki ya Malaki 3:1-10 malingaki kozwa kokokisama ya mibale. Na boyokani na likambo oyo ya esengo, baklisto babyangami lelo na komema ndambo na zomi nyonso kati na ebombelo. Sɔkɔ tokosala bongo, biso mpe tokosepela na mapamboli kino esika ekozanga mpo na yango.
3. Nani azalaki ntomá oyo abongisaki nzela liboso na Jéhovah (a) na ekeke ya liboso? (b) liboso na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba?
3 Mpo na oyo etali koya na ye na tempelo, Jéhovah alobaki ete: “Tala, nazali kotinda ntoma na ngai mpo na kobongisa nzela liboso na ngai.” (Malaki 3:1) Mpo na kokokisa esakweli oyo na ekeke ya liboso, Yoane Mobatisi ayaki na Yisraele mpo na kosakola kobongola motema na ntina na masumu na bango. (Malako 1:2, 3) Ezalaki nde na mosala ya kobongisa nzela mpo na koya ya Jéhovah na tempelo mpo na mbala ya mibale? Ɛɛ. Na boumeli ya bambula mingi oyo ezalaki liboso na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, Bayekoli ya Biblia bamonanaki na mokili mpe babandaki koteya mateya ya peto ya Biblia, mpe kotondola mateya ya lokuta oyo ezalaki kokumisa Nzambe te mateya lokola Bosato mpe lifelo ya mɔtɔ. Bakebisaki lisusu bato ete ntango na mabota ekosuka na 1914. Bato mingi bandimaki bamemi wana na pole mpe na solo.—Nzembo 43:3; Matai 5:14, 16.
4. Likambo nini lisengelaki kobongisama na mokɔlɔ na Nkolo?
4 “Mokɔlɔ na Nkolo” oyo Biblia ezali kolobela ebandaki na 1914. (Emoniseli 1:10) Makambo minene masengelaki kobima na mokolo yango, kati na yango komonana ya “moombo na sembo mpe na mayele” mpe kotyama na ye “likoló na biloko nyonso [ya Nkolo na ye].” (Matai 24:45-47) Na eleko yango, bankoto na mangomba mazalaki komitanga ete mangomba ya boklisto. Kasi lisangá nini lindimamaki na Nkolo Yesu Klisto lokola moombo na ye na sembo mpe na mayele? Motuna wana mosengelaki kozwa eyano na ntango oyo Jéhovah asengelaki koya na tempelo na ye.
Ayei na tempelo na ye ya elimo
5, 6. (a) Na tempelo nini Jéhovah ayaki mpo na kosambisa? (b) Lisambisi nini boklisto ya lokuta ezwaki uta na Jéhovah?
5 Kasi ayaki na tempelo nini? Emonani polele ete ezalaki te na tempelo moko oyo etongamaki na mabanga na Yelusaleme. Tempelo ya nsuka, ebebisamaki na mobu 70 ya Ntango na Biso. Nzokande, Jéhovah azali na tempelo eleki monene oyo tempelo ya Yelusaleme ezalaki elilingi na yango. Ntomá Paulo alobelaki tempelo yango monene mpe amonisaki ete ezali kitoko, na esika ya bulee na likoló mpe libanda na yango ezali awa na mabelé. (Baebele 9:11, 12, 24; 10:19, 20) Ezali na tempelo monene wana ya elimo nde Jéhovah ayaki mpo na mosala ya kosambisa.—Tala Emoniseli 11:1; 15:8.
6 Yango esalemaki ntango nini? Na kotalela bilembeteli ya solosolo oyo tozali na yango, ezalaki na 1918.a Nsuka na yango ezalaki nini? Mpo na oyo etali boklisto ya lokuta, Jéhovah amonaki yango lokola lisangá moko oyo maboko na yango matondi na makila, ebongiseli ya losambo oyo esilaki komibebisa na bosoto ya mokili mpe oyo esalaki boyokani na bato na bozwi, mpe oyo ezalaki konyokola babola, oyo ezalaki koteya mateya na bapakano na esika ya kosalela losambo ya peto. (Yakobo 1:27; 4:4) Na nzela ya Malaki, Jéhovah apesaki likebisi oyo ete: “Nakozala motatoli ya nokinoki kotɛmɛla bato na ndɔki mpe bato na pite mpe baoyo bakokataka ndai ya lokuta, mpe kotɛmɛla baoyo bakobubaka mosali mpo na mbongo na ye mpe mwasi mokufeli-mobali mpe etiké na tata.” (Malaki 3:5) Boklisto ya lokuta esili kosala makambo wana nyonso mpe makambo mosusu ya mabe koleka. Na 1919, emonanaki polele ete Jéhovah asili kokatela ye etumbu ya kobomama elongo na Babilone Monene oyo ezali lisangá ya mangomba nyonso ya lokuta na mokili mobimba. Uta ntango yango, libyangami lipesamaki na bato oyo bazali na motema sembo, ete: “Bino bato na ngai, bobima [kati] na ye.”—Emoniseli 18:1, 4.
7. Nani andimamaki epai na Yesu lokola moombo na sembo mpe na mayele?
7 Na bongo, nani azalaki moombo na sembo mpe na mayele? Na ebandeli na yango, na ekeke ya liboso, kelasi yango esalemaki na etuluku ya baoyo bandimaki litatoli ya Yoane Mobatisi mpe ya Yesu oyo azalaki ntoma na kondimana. Na eleko na biso, esalemi na mwa bankoto na bato oyo bandimaki mosala ya kobongisa nzela oyo esalemaki na Bayekoli ya Biblia na boumeli ya bambula oyo ezalaki liboso ya 1914. Bayekoli yango bayikaki mpiko kati na bampasi makasi na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, kasi bamonisaki ete motema na bango ezalaki epai na Jéhovah.
Mosala ya kopetola
8, 9. Na 1918, na makambo nini moombo na sembo mpe na mayele asengelaki kopetolama, mpe Jéhovah apesaki eleká nini na ntina yango?
8 Nzokande, ata mpe etuluku wana moke ezalaki na mposa ya kopetolama. Basusu kati na baoyo basanganaki na yango, bamonanaki ete bazalaki banguna na kondima, mpe esengelaki ete babengana bango. (Bafilipi 3:18) Basusu balingaki te komema mikumba oyo esengeli mpo na mosala ya Jéhovah, mpe bapengwaki. (Baebele 2:1) Lisusu, ezalaki naino na mitindo misusu ya Babilone Monene oyo esengelaki kolongolama. Moombo na sembo mpe na mayele asengelaki lisusu kopetolama na makambo matali lisanga. Esengelaki na ye koyeba malamumalamu nini elimboli kozanga kokota na makambo ya mokili, mpe komibatela na makambo yango. Lokola bizaleli ya mokili bizali se kobeba, esengelaki na ye kobunda makasi mpo ete makambo ya mbindo matali bizaleli to elimo makota na masanga te.—Tala Yuda 3, 4.
9 Ya solo, kopetolama ezalaki na ntina, kasi, na bolingo na ye, Jéhovah alakaki na ntina na Yesu oyo akómaki Mokonzi, ete: “Akofanda lokola mopɛtɔli mpe monangoli na palata; mpe asengeli kopɛtola bana na Levi mpe akonangola bango lokola wolo mpe palata; mpe bakokoma mpo na Jéhovah libota oyo lizali kopesa mbeka na boyɛngɛbɛnɛ.” (Malaki 3:3) Kobanda 1918, Jéhovah akokisaki elaka na ye wana mpe apetolaki libota na ye na nzela ya ntoma na kondimana.
10. Basaleli na Nzambe bapesaki makabo ya motindo nini, mpe libyangi nini Jéhovah apesaki bango?
10 Bandeko na Klisto bapakolami mpe ebele monene oyo eyei kosangana na bango na mosala ya Jéhovah bazwaki matomba na mosala ya Jéhovah lokola mopɛtoli mpe monangoli na palata. (Emoniseli 7:9, 14, 15) Lokola lisangá, bayaki mpe bazali koya lisusu mpo na kopesa likabo na boyɛngɛbɛnɛ. Mpe likabo na bango epai na Jéhovah ezali “kitɔkɔ, lokola na mikɔlɔ ya kala mpe na bambula ya liboso.” (Malaki 3:4) Ezali na bango nde Jéhovah apesi libyangi oyo, ete: “Boyeisa ndambo na zomi nyonso kati na ebombelo ete bilei bizala na ndako na ngai. Jéhovah na bibele alobi ete: ‘Meka ngai mpo na yango, sɔkɔ nakozipwela bino maninisa na lola tɛ kosopela bino mapamboli kino esika ekozanga mpo na yango.’”—Malaki 3:10.
Makabo mpe ndambo na zomi
11. Mpo na nini makabo oyo mazalaki kopesama na nse na Mibeko na Moize mazali kosɛngama lisusu te?
11 Na eleko ya Malaki, basaleli na Nzambe bazalaki kopesa makabo mpe ndambo na zomi biloko lokola: milona, mbuma mpe bibwele. Ata na ntango na Yesu, Bayisraele ya sembo bazalaki kopesa makabo motindo yango na tempelo. Nzokande, nsima na liwa na Yesu makambo mabongwanaki. Mibeko misukaki, kati na yango etinda ya kopesa makabo mpe ndambo na zomi ya sikisiki. (Baefese 2:15) Yesu akokisaki bililingi ya makabo mapesamaki na nse ya Mibeko. (Baefese 5:2; Baebele 10:1, 2, 10) Na bongo, na ndimbola nini baklisto bakoki kopesa makabo mpe ndambo na zomi?
12. Makabo nini mpe bambeka nini ya elimo baklisto bazali kopesa?
12 Ezali polele ete mpo na bango, makabo mazali ya elimo. (Tala Bafilipi 2:17: 2 Timoté 4:6.) Na ndakisa, ntomá Paulo alobelaki mosala ya kosakola lokola likabo wana alobaki ete: “Mpo na ye, totombolaka ntango nyonso mbeka na masanzoli epai na Nzambe, yango mbuma na bibɛbu bikoyambolaka nkombo na ye.” Amonisaki motindo mosusu na mbeka ya elimo wana apesaki maloba oyo ya kolendisa: “Bobosana te kosala malamu mpe kokabela basusu mpo ete Nzambe akosepelaka na mbeka motindo wana.” (Baebele 13:15, 16) Ntango baboti bazali kolendisa bana na bango ete basala mosala ya pionnier, tokoki koloba ete bazali kopesa bango epai na Jéhovah, lokola Yefɛta apesaki mwana na ye ya mwasi lokola “moboma” epai na Nzambe oyo apesaki ye bolongi.—Basambisi 11:30, 31, 39.
13. Mpo na nini esɛngami te na baklisto ete bapesa ndambo na zomi ya bozwi na bango?
13 Kasi tokoki koloba nini mpo na oyo etali ndambo na zomi? Baklisto basengeli nde kolongola ndambo na zomi ya bozwi na bango mpo na kopesa yango na lisangá ya Jéhovah, lokola ezali kosalema na mangomba mosusu ya boklisto ya lokuta? Te, ezali bongo te. Ezali na mokapo moko te ya Makomami oyo epesi mobeko motindo wana epai na baklisto. Ntango ntomá Paulo azalaki kokongola makabo mpo na baoyo bazalaki na bosenga na Yudea, akataki te motuya oyo esengelaki kopesama. Kasi alobaki ete: “Moto na moto asala lokola akani na motema na ye, na koimaima te mpe na kopusama te mpo ete Nzambe alingi ye oyo akopɛsaka na esɛngo.” (2 Bakolinti 9:7) Kolobelaka mpo na baoyo bazalaki kosangana na misala ya ntina, ntomá Paulo amonisaki ete atako basusu bakokaki kosungama na makabo ya bolingo malamu, ye asepelaki kosala mosala mpo na kobikela. (Misala 18:3, 4; 1 Bakolinti 9:13-15) Ndambo na zomi esengamaki te mpo na yango.
14 (a) Mpo na nini dîme to ndambo na zomi elimboli te likabo ya biloko nyonso tozali na yango epai na Jéhovah? (b) Ndambo na zomi to dîme elakisi nini?
14 Ezali polele ete, mpo na baklisto, ndambo na zomi elakisi to emonisi likambo mosusu. Mpo ete yango elimboli ndambo na zomi, mpe kati na Biblia motango zomi elakisi mbala mingi likambo to eloko oyo ezali mobimba mpo na biloko ya awa na mabelé, yango elingi nde koloba ete ndambo na zomi elimboli kopesa epai na Jéhovah biloko nyonso oyo tozali na yango? Te. Ezali ntango tomipesaka epai na Jéhovah mpe tomonisaka yango na nzela na batisimo ya mai, nde ntango wana topesaka ye biloko nyonso oyo tozali na yango. Uta ntango tomipesi, tozali na eloko moko te oyo ezangi kozala ya Jéhovah. Nzokande, Jéhovah azali kopesa nzela na moto na moto ete asimba mpe asalela oyo azali na yango. Na bongo, ndambo na zomi elakisi eteni moko na biloko oyo tozali na yango, mpe oyo tomemi epai na Jéhovah, to oyo tosaleli na mosala na ye mpo na komonisa ete tolingi ye mpe tondimi ete tozali bato na ye. Lelo oyo, ndambo na zomi to dîme esengeli te kosuka bobele na ndambo na zomi mpenzampenza. Mpo na basusu ekoki kozala na nse na yango. Nzokande mpo na basusu ekoki kozala koleka yango. Moto na moto akopesa oyo motema na ye etindi ye ete apesa na kotalela makoki na ye.
15, 16. Ndambo na zomi na biso ya elimo esangisi makambo nini?
15 Makambo nini mazali kati na ndambo na zomi wana ya elimo? Ya liboso, tozali kopesa na Jéhovah ntango mpe makasi na biso. Ntango oyo tolekisaka na makita, na ba assemblées, na mosala ya kosakola, nyonso wana ezali ntango oyo topesi na Jéhovah—ezali eteni moko ya ndambo na zomi na biso to dîme. Ntango mpe makasi oyo topesaka mpo na kotala baoyo bazali na maladi mpe mpo na kosalisa bato mosusu ezali mpe eteni mosusu ya ndambo na zomi na biso. Eteni mosusu ezali ya kopesa maboko na mosala ya kotonga ba Salles du Royaume mpe ya kobatela bopeto na yango.
16 Makabo na biso ya mbongo ezali mpe eteni mosusu ya ndambo na zomi na biso. Bokoli monene ya lisangá ya Jéhovah na bambula euti koleka ezali kosenga mbongo mingi mpenza. Esengeli kotonga ba Salles du Royaume ya sika, ba filiales ya sika, ba Salles d’assemblées ya sika mpe kobongisa oyo tosilá kotonga kala. Mbongo mingi ezali mpe kosɛngama mpo na kosunga baoyo basili komipesa mpo na kosala mosala moko ya ntina oyo mbala mingi esengaka komipesa mobimba—yango mpe ezali ntembe monene. Na 1991, motuya ya mbongo mpo na kosunga bobele bamisionere, bakengeli ya ba circonscriptions, ya ba districts mpe ba pionniers spéciaux elekaki 40 milio ya ba dollars, nyonso wana eutaki na makabo ya bolingo malamu.
17. Nini tosengeli kopesa lokola ndambo na zomi ya elimo?
17 Nini tosengeli kopesa lokola ndambo na zomi ya elimo? Jéhovah apesi motuya moko te. Nzokande, komipesa na biso, mpe bolingo na biso ya solo mpo na Jéhovah mpe mpo na bandeko na biso, mpe koyebaka ete na eleko ya mpasi oyo tozali kobika na yango ezali na bato oyo tosengeli kobikisa, nyonso wana ezali kolendisa biso na kopesa ndambo na zomi nyonso ya elimo oyo tozali na yango. Tozali komiyoka ete topusami na kosalela Jéhovah na makoki na biso. Soki tokomonisa ezaleli ya moimi to soki tozali kopesa nzoto na biso to biloko na biso na mitema mibale, yango ekozala lokola nde tozalaki koyiba Nzambe.—Tala Luka 21:14.
Bapambwami kino esika ekozanga mpo na yango
18, 19. Mapamboli nini basaleli na Jéhovah basili kozwa mpo ete bazali kopesa ndambo na zomi nyonso?
18 Uta 1919, basaleli na Jéhovah bazali kopesa na esengo nyonso ntango na bango, makasi na bango mpe mosolo na bango mpo na kosunga mosala ya kosakola. Ya solo, bayeisaki ndambo na zomi na bango nyonso kati na ebombelo. Mpo na yango, Jéhovah akokisaki elaká na ye mpe asopaki mapamboli na ye kino esika ezangaki mpo na yango. Yango emonani mpenza na bokoli monene oyo bazwaki. Ntango Jéhovah ayaki na tempelo na ye na 1918, bobele mwa bankoto na bapakolami nde bazalaki kosalela ye; uta ntango wana, motuya ya bapakolami elongo na baninga na bango bampate mosusu esili kokola kino koleka bamilió minei kati na mikili 211. (Yisaya 60:22) Bapambwami lisusu na boye ete bazali ntango nyonso kozwa boyebi ya solo. Mpo na bango, maloba ya esakweli mazali solo. Elikya na bango na kokokisama ya mikano na Jéhovah elendisami makasi. (2 Petelo 1:19) Ya solo, bazali bato oyo ‘bateyami na Jéhovah.’—Yisaya 54:13.
19 Na nzela ya Malaki, Jéhovah asakolaki lipamboli mosusu: “Na ntango yango, baoyo bakobangaka Jéhovah balobanaki moto na moninga na ye mpe Jéhovah ayokamelaki bango, ɛɛ ayokaki bango. Mpe mokanda na kokanisama ebandaki kokomama liboso na ye mpo na baoyo bazali kobanga Jéhovah mpe baoyo bazali kokanisa nkombo na ye.” (Malaki 3:16) Kati na masangá nyonso oyo mazali koloba ete mazali ya boklisto, bobele ba Témoins de Jéhovah nde bazali kokanisa nkombo na ye mpe kokumisa yango kati na mabota. (Nzembo 34:3) Bazali na elikya ete Jéhovah akobosana bosembo na bango te mpe yango ezali kopesa bango esengo.
20, 21. (a) Boyokani nini epambwami oyo baklisto ya solo bazali na yango? (b) Mpo na oyo etali boklisto, bokeseni nini ezali sikawa komonana polele?
20 Batikali bapakolami bazali libota liponami na Jéhovah, mpe ebele monene na baoyo basangani na bango esika moko bazali kozwa mapamboli mauti na losambo ya peto. (Zakari 8:23) Na nzela ya Malaki, Jéhovah apesaki elaka oyo: “Jéhovah na bibele alobi ete: ‘Bakokóma bato na ngai, eloko na motuya na mokolo yango ekobongisa ngai. Nakoyokela bango mawa lokola tata akoyokelaka mawa mwana na ye oyo akosalelaka ye mosala.’” (Malaki 3:17, MN) Likebi ya bolingo oyo Jéhovah azali komonisa na basaleli na ye ezali lipamboli ya solo.
21 Ya solo, bokeseni kati na baklisto ya solo mpe baklisto ya lokuta ezali ntango nyonso komonana polele. Wana basaleli na Jéhovah bazali kosala milende mpo na kolanda mitinda na ye, boklisto ya lokuta ezali se kozinda kati na potopoto ya mbindo ya mokili oyo. Maloba oyo ya Jéhovah mamonani ete mazali solo: “Bokomona lisusu bokeseni kati na moyengebene mpe moto mabe, kati na ye oyo akosalelaka Nzambe mpe ye oyo akosalelaka ye tɛ.”—Malaki 3:18.
22. Mapamboli nini tozali na elikya ya kozwa soki tolandi kopesa ndambo na zomi nyonso?
22 Mosika te mokɔlɔ ekoya oyo baklisto ya lokuta bakozongisa monoko. “‘Tala, mokɔlɔ mozali koya mozali kozika lokola mɔtɔ makasi; mpe bato nyonso ya lolendo mpe basali na mabe bakozala lokola ndele mpe mokɔlɔ oyo ezali koya ekozikisa bango.’ Jéhovah na bibele alobi bongo.” (Malaki 4:1) Basaleli na Jéhovah bayebi ete akobatela bango na ntango yango, motindo moko abatelaki libota na ye ya elimo na mobu 70 ya Ntango na Biso. (Malaki 4:2) Bazali mpenza na esengo ya kozala na elikya motindo wana! Awa ezali biso kozela ntango yango, tika ete mokomoko kati na biso amonisa botondi mpe bolingo na ye epai na Jéhovah na kopesaka ndambo na zomi nyonso kati na ebombelo. Na lolenge yango, bokoki kotya motema ete Jéhovah akolanda kopambola biso kino esika ekozanga mpo na yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na kozwa bandimbola mingi, tala Mosenzeli ya 15 janvier 1988, nkasa 6-11.
Bozongeli
◻ Na eleko na biso, ntango nini Jéhovah oyoki no tempelo elongo na ntóma na ye ya kondimana?
◻ Nani ozali moombo na sembo mpe na mayele, mpe kopetolama nini ozalaki na yango mposa nsima ya 1918?
◻ Makabo nini ya elimo baklisto ya solo bazali kopesa epai na Jéhovah?
◻ Ndambo na zomi to dîme oyo esengami na baklisto ete batya yango na ebombelo, ezali nini?
◻ Mapamboli nini basaleli na Nzambe bozali kozwa mpo ete bozali kopesa ndambo na zomi ya elimo?
[Elilingi na lokasa 15]
Ndambo na zomi ya elimo oyo tozali kopesa esangisi makabo ye makasi na biso mpe ya biloko tozali na yango mpo na kotonga ba Salles du Royaume
[Elilingi na lokasa 16]
Mapamboli oyo Jéhovah azali kopesa na libota na ye ezali na ntina mpo na kotonga ebele na bandako, kati na yango ba Salles du Royaume mpe ba Salles d‘assemblées