Yehova apesaka ‘elimo santu epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango’
“Soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi ndenge ya kopesa bana na bino makabo ya malamu, Tata na likoló akopesa elimo santu mingi boni epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango!”—LUKA 11:13.
1. Ntango nini tozalaka na mposa makasi ya elimo santu?
‘NA MAKASI na ngai moko, nakokoka koyikela mokakatano oyo mpiko te; kaka elimo santu nde ekoki kosalisa ngai!’ Esilá kokómela yo oloba bongo? Baklisto mingi basilá koloba yango. Mbala mosusu olobaki bongo ntango monganga ayebisaki yo ete ozali na maladi moko ya makasi. To mpe ekoki kozala ete olobaki bongo ntango molongani na yo, oyo bofandaki na ye bambula ebele, akufaki. To na ntango oyo okómaki konyokwama na makanisi. Ntango okutanaki na mikakatano ya makasi, mbala mosusu omonaki ete ozalaki koyikela yango mpiko kaka mpo elimo santu ya Yehova epesaki yo “nguya oyo eleki makasi.”—2 Bakolinti 4:7-9; Nzembo 40:1, 2.
2. (a) Baklisto ya solo bazali kokutana na mikakatano nini? (b) Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?
2 Mokili oyo mabe ezali kobimisela biso baklisto ya solo mitungisi mpe minyoko mingi. (1 Yoane 5:19) Longola yango, Satana Zabolo azali kobundisa bayekoli ya Klisto mpo bazali “kotosa bakomandema ya Nzambe mpe bazali na mosala ya kopesa litatoli na ntina etali Yesu.” (Emoniseli 12:12, 17) Yango wana, tozali na mposa makasi ya lisalisi ya elimo ya Nzambe lelo oyo koleka na bileko mosusu nyonso. Tosengeli kosala nini mpo Nzambe akoba kosopela biso elimo santu na ye? Nini ezali kondimisa biso ete Yehova azali mpenza na mposa ya kopesa biso makasi oyo tosengeli na yango ntango tokutani na mikakatano? Tokozwa biyano na mituna yango na bandakisa mibale oyo Yesu apesaki.
Bótya mbamba na mabondeli
3, 4. Ndakisa nini Yesu apesaki, mpe ezali na boyokani nini ná libondeli?
3 Mokolo moko, moyekoli moko ya Yesu alobaki na ye ete: “Nkolo, teyá biso ndenge ya kobondela.” (Luka 11:1) Na eyano oyo Yesu apesaki, alobelaki bandakisa mibale. Ndakisa ya liboso ezalaki ya mobali moko oyo ayambi mopaya, mpe ndakisa ya mibale elobelaki tata oyo akokisaka mposa ya mwana na ye. Tótalela mokomoko na bandakisa yango.
4 Yesu alobaki boye: “Nani na kati na bino akozala na moninga mpe akokende epai na ye na katikati ya butu mpe akoloba na ye ete, ‘Moninga, defisá ngai mampa misato, mpamba te moninga na ngai moko ayei sikoyo epai na ngai na mobembo mpe nazali na eloko te ya kotya liboso na ye’? Bongo oyo wana banda na kati azongisi, ‘Tiká kotungisa ngai. Ekuke esili kokangama, mpe bana na ngai bazali elongo na ngai na mbeto; nakoki te kotɛlɛma mpe kopesa yo mwa eloko.’ Nazali koyebisa bino, Atako akotɛlɛma te mpe akopesa ye mwa eloko te mpo azali moninga na ye, ya solo mpenza mpo na mbamba na ye ya makasi akotɛlɛma mpe akopesa ye eloko oyo azali na yango mposa.” Na nsima, Yesu amonisaki boyokani oyo ndakisa yango ezali na yango na libondeli; alobaki boye: “Na yango nazali koloba na bino ete, Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino yango; bókoba koluka, mpe bokozwa; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino. Mpo moto nyonso oyo asɛngaka azwaka, mpe moto nyonso oyo alukaka amonaka, mpe moto nyonso oyo abɛtaka kɔkɔkɔ bakofungolela ye.”—Luka 11:5-10.
5. Ndakisa ya mobali oyo atyaki mbamba ezali koteya biso tómonisaka ezaleli nini na mabondeli na biso?
5 Ndakisa ya mobali oyo azali mbamba ezali koteya biso ezaleli oyo tosengeli komonisa na mabondeli na biso. Tósimba ete Yesu alobaki ete mobali yango azwaki biloko oyo azalaki na yango mposa “mpo na mbamba na ye ya makasi.” (Luka 11:8) Maloba ‘mbamba ya makasi’ ezali kaka na esika moko wana na Biblia mobimba. Maloba yango ebongolami na liloba ya Grɛki oyo elimboli mpenzampenza “kozanga nsɔni.” Mbala mingi, kozanga nsɔni ezalaka ezaleli ya malamu te. Kasi, ntango moto azangi nsɔni to atye mbamba mpo na likambo moko ya ntina, ekoki kozala ezaleli ya malamu. Yango nde moto wana asalaki na ndakisa oyo Yesu apesaki. Moto yango ayokaki nsɔni te mpe atyaki mbamba na kosɛnga eloko oyo azalaki na yango mposa. Lokola Yesu alobaki ete ebongi tólanda ndakisa ya moto yango, biso mpe tosengeli kotyaka mbamba na mabondeli na biso. Yehova alingi ete ‘tókoba kosɛnga, tókoba koluka, tókoba kobɛta kɔkɔkɔ.’ Na bongo, ‘akopesa elimo santu epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango.’
6. Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, ndenge nini bato bazalaki koyamba mopaya?
6 Yesu asukaki kaka te na komonisa ete tosengeli kotyaka mbamba na mabondeli, ayebisaki mpe ntina oyo tosengeli kosala yango. Mpo tókanga ntina ya liteya yango malamu, ebongi tótalela ndenge oyo bato oyo Yesu ayebisaki ndakisa yango bazalaki koyamba mopaya oyo akómeli bango na ndako. Bavɛrsɛ mingi ya Biblia ezali komonisa ete bato ya kala, mingimingi basaleli ya Nzambe, bazalaki mpenza kolɛngɛla mopaya. (Genese 18:2-5; Baebele 13:2) Kozanga kosalela mopaya boboto ezalaki mbeba monene. (Luka 7:36-38, 44-46) Lokola toyebi likambo yango, tózonga sikoyo na ndakisa oyo Yesu apesaki.
7. Mpo na nini moto oyo Yesu alobelaki ayokaki nsɔni te mpo na kolamusa moninga na ye?
7 Moto oyo Yesu alobelaki na ndakisa wana ayambaki mopaya na katikati ya butu. Ayebaki ete asengeli kopesa mopaya na ye eloko ya kolya, kasi azalaki “na eloko te ya kotya liboso na ye.” Amonaki ete asengeli kokanga mabɔkɔ te! Asengeli kosala nyonso mpo na kolukela ye ata mwa limpa. Yango wana, atyaki nsɔni pembeni, akendaki epai ya moninga na ye moko mpe alamusaki ye. Alobaki na ye ete: “Moninga, defisá ngai mampa misato.” Atyaki ye mbamba tii azwaki biloko oyo azalaki na yango mposa. Nsima ya kozwa mampa yango nde amonaki ete ayambi mopaya na ye malamu.
Soki moto azali na mposa makasi, akosɛnga na etingya
8. Nini ekotinda biso tótyaka mbamba na mabondeli mpo na kosɛnga elimo santu?
8 Ndakisa ya Yesu emonisi nini mpo na ntina oyo tosengeli kotyaka mbamba na mabondeli? Mobali oyo ayambaki mopaya alɛmbaki te kosɛnga mampa mpo amonaki ete asengeli kozwa yango mpo akokisa mokumba na ye ya moto oyo ayambi mopaya. (Yisaya 58:5-7) Soki azwaki mampa te, alingaki komona ete akokisi mokumba na ye te. Biso mpe, lokola toyebi ete tosengeli kozala na elimo ya Nzambe mpo na kokokisa mosala na biso ya baklisto ya solo, tosengeli kolɛmba te kobondela mpo na kosɛnga Nzambe elimo santu. (Zekalia 4:6) Soki tozangi elimo yango, tokolonga te. (Matai 26:41) Omoni likanisi ya ntina oyo tosengeli kosimba na ndakisa yango? Soki tozali komona ete tozali mpenza na mposa makasi ya elimo santu ya Nzambe, tokotya mbamba na kosɛnga yango.
9, 10. (a) Pesá ndakisa oyo ezali komonisa ntina oyo tosengeli kotya mbamba mpo na kosɛnga Nzambe elimo santu. (b) Motuna nini tosengeli komituna, mpe mpo na nini?
9 Tótalela liteya yango na likambo moko oyo ekoki kosalema na moi ya lelo. Soki, na ndakisa, moto moko na libota na yo abɛli na kati ya butu, okanisi ete okokende kolamusa monganga? Okosala yango te soki ezali kaka mwa maladi ya moke. Kasi, soki akangami mpema, tokanisi ete okokakatana te mpo na kobenga monganga. Mpo na nini? Mpamba te wana ekómi likambo oyo okoki kozelisa te. Monganga asengeli kosalisa ye nokinoki. Soki okakatani, moto akoki kokufa. Ndenge moko mpe, baklisto ya solo bazali liboso ya likambo oyo bakoki kozelisa te. Toyebi ete Satana azali lokola “nkɔsi oyo ezali konguluma,” azali koluka kolya biso. (1 Petelo 5:8) Tozali na mposa ete elimo santu ya Nzambe esalisa biso mpo tókufa te na elimo. Soki tosɛngi lisalisi epai ya Nzambe te, tokokufa. Yango wana, tosengeli kotya mbamba mpo na kosɛnga Nzambe elimo santu na ye. (Baefese 3:14-16) Kaka soki tosali bongo nde tokobatela makasi oyo tosengeli na yango mpo na ‘koyika mpiko tii na nsuka.’—Matai 10:22; 24:13.
10 Yango wana, ezali mpenza na ntina tómitunaka mbala na mbala ete: ‘Natyaka mpenza mbamba na mabondeli?’ Tósimba likambo oyo: soki toyebi mpenza ete tozali na mposa ya lisalisi ya Nzambe, tokotya mbamba na mabondeli mpo na kosɛnga elimo santu.
Mpo na nini tobondelaka na elikya?
11. Liteya nini etali libondeli Yesu abimisaki na ndakisa ya tata ná mwana na ye?
11 Ndakisa ya moto oyo atyaki mbamba ezali komonisa ezaleli oyo moto oyo azali kobondela asengeli kozala na yango. Nzokande, ndakisa ya mibale oyo Yesu apesaki ezali komonisa ezaleli ya Yehova, Nzambe oyo ayokaka mabondeli. Yesu atunaki boye: “Kutu, tata nani na kati na bino oyo, soki mwana na ye asɛngi mbisi, akopesa ye mbala mosusu nyoka na esika ya mbisi? To soki mpe asɛngi maki, akopesa ye nkotó?” Yesu abimisaki liteya ya ndakisa yango boye: “Na yango, soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi ndenge ya kopesa bana na bino makabo ya malamu, Tata na likoló akopesa elimo santu mingi boni epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango!”—Luka 11:11-13.
12. Ndenge nini ndakisa ya tata oyo akokisaka mposa ya mwana na ye ezali komonisa mposa oyo Yehova azalaka na yango mpo na koyanola na mabondeli na biso?
12 Yesu apesaki ndakisa ya tata oyo akokisaka mposa ya mwana na ye mpo na komonisa ndenge oyo Yehova atalelaka moto oyo azali kobondela ye. (Luka 10:22) Tótala naino bokeseni oyo ezali na bandakisa yango mibale. Na ndakisa ya liboso, moto oyo bakendaki kobɛtela porte akakatanaki mpo na kosalisa moninga na ye; nzokande, Yehova azali lokola tata moko ya boboto, oyo akakatanaka te kokokisa mposa ya mwana na ye. (Nzembo 50:15) Yesu amonisaki mpe ete Yehova azalaka mpenza na mposa ya kosalisa biso, alobaki ete soki tata moko, atako ‘azali moto mabe’ mpo na lisumu ya Adama, apesaka mwana na ye makabo ya malamu, Tata na biso ya likoló, oyo atondá boboto, akozanga te kopesa basambeli na ye elimo santu!—Yakobo 1:17.
13. Tokoki kozala na elikya nini ntango tozali kobondela Yehova?
13 Liteya nini tosengeli kozwa na ndakisa yango? Tokoki kozala na elikya ete soki tosɛngi Tata na biso ya likoló elimo santu, akokakatana te kopesa biso yango. (1 Yoane 5:14) Soki tozali kobondela Yehova mbala na mbala, ata mokolo moko te akoloba na biso ete, “Tiká kotungisa ngai. Ekuke esili kokangama.” (Luka 11:7) Kutu, Yesu alobaki ete: “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino yango; bókoba koluka, mpe bokozwa; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino.” (Luka 11:9, 10) Tokoki mpenza kolikya ete Yehova ‘akoyoka biso wana tokobondela ye.’—Nzembo 20:9; 145:18.
14. (a) Makanisi nini oyo ezali solo te bato mosusu bazalaka na yango ntango bakutani na mikakatano? (b) Ntango tokutani na mikakatano, mpo na nini tokoki kobondela Yehova na elikya ete akoyoka biso?
14 Ndakisa ya tata ya boboto ezali komonisa ete motema malamu ya Yehova eleki ata ya moboti nini awa na mabelé. Yango wana, moto moko te kati na biso asengeli kokanisa ete soki akutani na mikakatano, elakisi ete Nzambe azali kosepela na ye te. Satana, monguna na biso monene nde alingi ete biso tókanisa bongo. (Yobo 4:1, 7, 8; Yoane 8:44) Na Biblia mobimba, vɛrsɛ moko te ezali kolongisa makanisi wana. Yehova amekaka biso “na makambo ya mabe te.” (Yakobo 1:13) Apesaka biso nyoka to mpe nkotó te, na maloba mosusu, anyokolaka biso te, amekaka biso mpe te. Tata na biso ya likoló apesaka ‘biloko malamu epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango.’ (Matai 7:11; Luka 11:13) Soki tozali mpenza kokanga ntina ya motema malamu ya Yehova mpe mposa na ye ya kosalisa biso, motema na biso ekotinda biso tóbondelaka ye na elikya. Ntango tozali kosala yango, biso mpe tokoloba lokola mokomi ya nzembo ete: “Solo Nzambe ayoki; ayokameli maloba ya libondeli na ngai.”—Nzembo 10:17; 66:19.
Ndenge oyo elimo santu esungaka biso
15. (a) Yesu alakaki nini na ntina etali elimo santu? (b) Elimo santu ezali kosunga biso na likambo nini?
15 Mwa moke liboso Yesu akufa, azongelaki likanisi oyo amonisaki na bandakisa oyo apesaki. Na oyo etali elimo santu, ayebisaki bantoma na ye boye: “Nakosɛnga Tata mpe ye akopesa bino mosungi mosusu mpo azala elongo na bino mpo na libela.” (Yoane 14:16) Na maloba yango, Yesu alakaki ete nsima ya liwa na ye, ata tii na ntango na biso, bayekoli na ye bakozala na mosungi, to elimo santu. Elimo yango esungaka biso makasi na likambo nini lelo oyo? Elimo santu esalisaka biso tóyika mpiko na mikakatano ndenge na ndenge. Na ndenge nini? Na mokanda oyo akomelaki baklisto ya Kolinti, ntoma Paulo, moto oyo akutanaki na mikakatano mingi, alimbolaki ndenge oyo elimo ya Nzambe esungaki ye. Tótalela naino makambo oyo akomaki.
16. Na ndenge nini tokoki kozala na mokakatano ndenge moko na Paulo?
16 Paulo ayebisaki naino bandeko na ye baklisto ete azalaki kobunda na “nzubɛ moko na kati ya mosuni,” elingi koloba ete azalaki na mokakatano moko. Na nsima, abakisaki boye: “Nabondelaki Nkolo [Yehova] mbala misato mpo yango ekoka kolongwa epai na ngai.” (2 Bakolinti 12:7, 8) Atako Paulo abondelaki mpo mokakatano na ye elongwa, Nzambe alongolaki yango te. Mbala mosusu yo mpe ozali na mokakatano moko oyo ezali kotungisa yo. Lokola Paulo, mbala mosusu obondelaki Yehova mbala na mbala mpe na elikya ete alongola mokakatano yango. Osalaki malɔmbɔ mbala ebele, kasi mokakatano yango ezali kaka. Yango elingi nde koloba ete Yehova ayokaki yo te mpe elimo na ye ezali kosunga yo te? Ezali bongo te! (Nzembo 10:1, 17) Tótalela makambo oyo Paulo akomaki na nsima.
17. Ndenge nini Yehova ayanolaki na mabondeli ya Paulo?
17 Nzambe apesaki Paulo eyano ete: “Boboto monene na ngai epai na yo ekoki bongo; mpo nguya na ngai ezali kokómisama ya kokoka na kati ya bolɛmbu.” Yango wana, Paulo alobaki boye: “Na yango, na esengo ya koleka mpenza nakomikumisa nde na oyo etali bolɛmbu na ngai, mpo nguya ya Klisto ezala lokola hema likoló na ngai.” (2 Bakolinti 12:9; Nzembo 147:5) Paulo amonaki ete na nzela ya Klisto, Nzambe azalaki kobatela ye malamu, ezalaki lokola nde atye hema likoló na ye. Lelo oyo mpe Yehova ayanolaka na mabondeli na biso ndenge wana. Ndenge oyo abatelaka basaleli na ye ezali lokola nde atyaka hema likoló na bango.
18. Mpo na nini tokoki koyikela mikakatano na biso mpiko?
18 Hema epekisaka te ete mopɛpɛ makasi epɛpa to mbula ebɛta, kasi moto abombamaka mbula to mopɛpɛ makasi na nse na yango. Ndenge moko mpe, “nguya ya Klisto” epekisaka te ete mikakatano to mitungisi eyela biso. Kasi, ebatelaka biso na makambo mabe ya mokili mpe ntango Satana, mokonzi na yango, azali kobundisa biso. (Emoniseli 7:9, 15, 16) Yango wana, ata soki ozali na mokakatano moko oyo ezali ‘kolongwa te,’ okoki kozala na elikya ete Yehova ayebi mpasi na yo mpe ete azali koyoka “mongongo ya kolela na yo.” (Yisaya 30:19; 2 Bakolinti 1:3, 4) Paulo akomaki boye: “Nzambe azali sembo, mpe akotika te ete bómekama koleka oyo bokoki kokangela motema, kasi nzela moko na komekama akobongisela mpe bino nzela ya kobimela mpo bózala na likoki ya koyikela yango mpiko.”—1 Bakolinti 10:13; Bafilipi 4:6, 7.
19. Ozwi ekateli ya kosala nini, mpe mpo na nini?
19 Ya solo, “mikolo ya nsuka” ya mokili oyo ya Satana ezali mpenza “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi.” (2 Timote 3:1) Atako bongo, basaleli ya Nzambe bakoki koyikela bantango yango mpiko. Mpo na nini? Mpamba te elimo santu ya Nzambe ezali kosunga mpe kobatela bango; Yehova azali kosopa elimo yango epai ya bato nyonso oyo bazali kotya mbamba na kosɛnga ye yango mpe bazali na elikya. Yango wana, tiká tózwa ekateli ya kobondelaka mokolo na mokolo mpo na kosɛnga elimo santu.—Nzembo 34:6; 1 Yoane 5:14, 15.
Okopesa eyano nini?
• Tosengeli kosala nini mpo Nzambe apesa biso elimo santu?
• Mpo na nini tokoki kozala na elikya ete Yehova akoyoka mabondeli na biso oyo tosalaka mpo na kosɛnga ye elimo santu?
• Ndenge nini elimo santu esungaka biso mpo tóyikela mikakatano mpiko?
[Elilingi na lokasa 21]
Ndakisa ya moto oyo atyaki mbamba ezali koteya biso nini?
[Elilingi na lokasa 22]
Otyaka mbamba na mabondeli mpo na kosɛnga elimo santu?
[Elilingi na lokasa 23]
Ndakisa ya tata ya boboto ezali koteya biso nini mpo na Yehova?