Ndenge ya koyeba mpe kosilisa bolɛmbu ya elimo
LISAPO MOKO YA BAGREKE ELOBAKA ETE ACHILLE AZALAKI NA MPIKO koleka basoda nyonso ya Grèce na etumba ya mboka Troie. Lisapo yango elobaka ete ntango Achille azalaki mwana moke, mama na ye azindisaki ye na Ebale Styx; yango wana, likɔnga ya monguna ekokaki kokɔta ye na nzoto te longola se na litindi, esika oyo mama na ye asimbaki ye. Yango ebimisá—lisese ya litindi ya Achille. Pâris, mwana ya Priam, mokonzi ya Troie atɔbɔlaki ye likɔnga na esika yango mpe akufaki.
Baklisto bazali basoda ya Klisto, bazali na etumba ya elimo. (2 Timote 2:3) Ntoma Paulo alobi ete, “Tozali [kobunda] na mosuni mpe makila te, kasi na bisika na lokumu mpe na nguya mpe na mikonzi na mokili oyo na molili, mpe na milimo mabe kati na likoló.” Ɛɛ, banguna na biso ezali mpenza Satana Zabolo na bademo.—Baefese 6:12.
Ezali polele ete, soki tozwi lisalisi ya Yehova Nzambe te, oyo abéngami “mobali na etumba,” mbɛlɛ elonga ekozala na ngámbo ya banguna na biso. (Exode 15:3) Mpo na komibatela na banguna na biso, bapesi biso molato ya etumba ya elimo. Yango wana ntoma Paulo alobaki ete: “Bólata molato mobimba na etumba na Nzambe ete bóyeba kotɛlɛma liboso na mayele na oyo mabe.”—Baefese 6:11.
Na ntembe te, molato ya etumba oyo Yehova apesi biso ebongi mpenza, ekoki kobatela ete mbanzi ya monguna ezwa biso te, eya na butu to na moi. Talá biloko oyo ntoma Paulo atángi: loketo ekangami na solo, bosembo lokola libateli ya ntolo, sapato ya nsango malamu, nguba monene ya kondima, mpe ekɔti ya lobiko, mpe mopanga ya elimo. Ezali na molato ya malamu koleka oyo moto akoki koluka? Soki soda moklisto alati molato yango ya etumba, azali na makoki nyonso mpo na kolonga, atako banguna bazali na makasi mingi.—Baefese 6:13-17.
Atako molato ya etumba ya elimo oyo Yehova apesi biso ezali mpenza malamu mpe ezali kobatela biso, tosengeli kozwa makambo na lisɛki te. Soki tokanisi Achille oyo amonanaki lokola ete bakoki kolonga ye na etumba te, biso mpe tokoki kozala na bolɛmbu moko, oyo tokoki kobénga litindi ya Achille na elimo? Yango ekozala nsɔmɔ soki monguna ayeli biso na mbalakaka.
Talelá malamumalamu molato na yo ya elimo
Mobali moko oyo azwaki medayi ya wolo mbala mibale na lisano ya patinage na momekano ya Olympique, oyo azalaki komonana ete azali na nzoto kolɔngɔnɔ, mokolo mosusu akweaki mbala moko na entraînement mpe akufaki. Nsima ya mwa ntango, lisolo moko ebimaki na zulunalo The New York Times elobaki ete: “Na États-Unis, kati na bato 600 000 oyo bakangamaka motema mbula na mbula, bato 300 000 bamonisaka bilembo na yango liboso te.” Emonani polele ete, tokoki koyeba kolɔngɔnɔ ya nzoto na biso te na ndenge oyo tozali komiyoka.
Ezali ndenge moko mpo na kolɔngɔnɔ na biso ya elimo. Biblia epesi toli ete: “Tiká ete ye oyo akanisi ete azali kotɛlɛma ngwi akeba ete akwea te.” (1 Bakolinti 10:12) Ata soki molato na biso ya etumba ya elimo ezali mpenza malamu, bolɛmbu ekoki kokola. Ezali bongo mpamba te tobotami na masumu, mpe ezaleli na biso ya bato ya masumu mpe bazangi kokoka ekoki kolonga ekateli na biso ya kosala mokano ya Nzambe. (Nzembo 51:5) Atako tozali kokanisa kosala malamu, motema na biso ekoki kokosa biso mpe tokobanda kobimisa makanisi ya lokuta to komilongisa, na boye ete tokokóma kotalela bolɛmbu na biso lokola likambo moke mpe komikosa na kokanisa ete tozali malamu na elimo.—Yilimia 17:9; Baloma 7:21-23.
Lisusu, tozali na mokili oyo mbala mingi bokeseni kati na malamu mpe mabe ezali koyebana lisusu te. Moto na moto azali kopona kati na mabe na malamu na ndenge na ye moko. Makanisi ya ndenge yango ezali kolendisama na piblisite, masano, mpe bipanzeli-nsango. Yango wana, soki tokebi te, tokoki kokosama na lolenge yango ya kokanisa, mpe molato na biso ya etumba ya elimo ekoki kobanda kolɛmba.
Na esika ya kokwea na ezaleli wana ya likama, tosengeli kolanda toli ya Biblia ete: “Bómimeka bino mpenza soko bozali kati na kondima, bómipima.” (2 Bakolinti 13:5) Soki tosali bongo, tokoki komona bolɛmbu nyonso oyo ebandi kokola mpe kosala nyonso ekoki mpo na kobongisa likambo yango liboso ete banguna na biso bámona yango mpe bábwakela biso mbanzi. Kasi, tokosala ndenge nini mpo na komitalela? Wapi mwa bilembo oyo tosengeli kotalela wana tozali komimeka?
Ndenge ya koyeba bilembo
Elembo moko emonanaka mingi oyo ekoki kolakisa bolɛmbu na elimo ezali bongo bopɔtu na boyekoli ya biso moko. Bato mosusu bamonaka ete basengeli koyekola mingi, kasi bazali kosala eloko moko te mpo na kozwa ntango ya kosala yango. Na bomoi ya lelo oyo bato bazali na makambo mingi ya kosala, ezali mpasi te mpo na kokóma na ezaleli mabe wana. Nzokande, likambo eleki mabe ezali ete mbala mingi bato bamilongisaka ete bazali mpenza kosala mabe te, lokola batángaka mikanda oyo elimbolaka Biblia soki libaku emonani mpe bayanganaka na makita mosusu ya boklisto.
Makanisi ya ndenge yango ezali lolenge moko ya komikosa. Ekokani na moto oyo azali komona ete azali na makambo mingi ya kosala, mpe azali na ntango te ya kofanda mpo na kolya bilei malamu, yango wana akolya kaka likolólikoló soki azwi mwa ntango mpe na nsɔngɛ ya misapi. Atako akokufa nzala te, kasi ata ndɛlɛ, mikakatano ekobimela ye na nzoto. Ndenge moko mpe, soki tozali na molende te mpo na kolya bilei oyo etongaka nzoto na elimo, mosika te esika moko na molato na biso ya elimo ekoki kolɛmba. Lokola piblisite mpe bizaleli ya mokili oyo ezali kozwa biso mingi, mosika te mbanzi ya Satana ekoki koboma biso.
Elembo mosusu ya bolɛmbu na elimo ezali bongo kobosana ntina ya kosala na lombangu na etumba na biso ya elimo. Na ntango ya kimya, soda akanisaka nsɔmɔ mpe likama ya etumba te. Akoki komona ete ntina ya komibongisa na lombangu ezali te. Soki babéngisi ye mbalakaka na etumba, na ntembe te akozala moto oyo amibongisi te. Ezali mpe bongo na elimo. Soki tobosani ntina ya kosala na lombangu, tokoki kokóma bato oyo bamibongisi te mpo na kobunda bitumba oyo ekoki koyela biso.
Kasi, ndenge nini tokoki koyeba soki tosili kokwea na ezaleli yango? Tokoki komituna mwa mituna oyo ekoki komonisa mpenza ndenge makambo ezali: Nazalaka na mposa makasi ya kobima na mosala ya kosakola ndenge namiyokaka mpo na kokende biyenga? Nasepelaka mpenza kozwa ntango mpo na kobongisa makita ndenge nasalaka mpo na kokende zando to kotala televizyo? Nakanisaka makambo oyo natikaki ntango nakómaki moklisto? Nazali kolula oyo tokoki kobénga bomoi malamu oyo bato mosusu bazali na yango? Tosengeli kokanisa malamu mituna oyo, ezali na ntina mpo na koyeba bolɛmbu na molato na biso ya etumba ya elimo.
Lokola molato oyo ezali kobatela biso na etumba ezali ya elimo, esengeli ete elimo ya Nzambe ekutana na mabaku te na bomoi na biso. Yango ekomonisama na ndenge oyo mbuma ya elimo ya Nzambe ezali komonana na misala nyonso oyo tozali kosala. Otombokaka to osilikaka noki ntango bato mosusu basali to balobi likambo moko oyo yo olingaka te? Oboyaka koyoka toli, to omonaka ete bato mosusu balobaka kaka mabe mpo na yo? Ozalaka na zuwa makasi mpo na mapamboli oyo bato mosusu bazali kozwa to makambo oyo bazali kosala? Ozalaka na mokakatano ya koyokana na bato, mingimingi baninga na yo? Soki tomitaleli na bosembo, tokomona soki bomoi na biso etondi na mbuma ya elimo ya Nzambe to misala ya nzoto nde ezali kokɔtela biso mokemoke.—Bagalatia 5:22-26; Baefese 4:22-27.
Makambo oyo ebongi kosala mpo na kosilisa bolɛmbu ya elimo
Koyeba bilembo ya bolɛmbu ya elimo ezali malamu; kasi eleki malamu kobundisa yango mpe kosala molende mpo na kosilisa yango. Likambo ya mawa, bato mingi balingaka komilongisa, bamonaka ete likambo yango ezali monene te, to kutu bawanganaka ete likambo ezali te. Ezali mpenza likama monene—ndenge moko na soda oyo akei etumba alati molato ya etumba oyo ezangi biloko mosusu! Na ndenge yango tokomibatela mpenza te na mbanzi ya Satana. Nzokande, tosengeli kosala nokinoki makambo oyo ebongi mpo na kosilisa bolɛmbu nyonso oyo tokomona. Tokosala nini?—Baloma 8:13; Yakobo 1:22-25.
Lokola tozali na etumba ya elimo—etumba oyo esɛngi ete biso baklisto tóbatela makanisi mpe motema—tosengeli kosala nyonso ekoki mpo na kobatela makoki na biso. Tóbosana te ete molato na biso ya elimo ezali na “bosembo lokola libateli ya ntolo” oyo ebatelaka motema na biso, mpe “ekɔti ya lobiko,” yango nde ebatelaka makanisi na biso. Soki toyebi kosalela malamu bisaleli yango tokolonga etumba, kasi soki toyebi te tokokwea.—Baefese 6:14-17; Masese 4:23; Baloma 12:2.
Kolata “bosembo lokola libateli ya ntolo” na ndenge oyo ebongi ezali kosɛnga ete tómitalelaka soki tozali ntango nyonso kolinga bosembo mpe koyina kobuka mibeko. (Nzembo 45:7; 97:10; Amosa 5:15) Bizaleli na biso ebebi nzela moko na oyo ya mokili? Makambo oyo kala ezalaki ya nsɔni to tozalaki koyina—ezala epai na bato to oyo balakisaka na televizyo, sinema, na mikanda to na bazulunalo—tokómi komona yango makambo ya kominanola lelo oyo? Soki tolingi mpenza makambo ya sembo, yango ekosalisa biso na koyeba ete makambo oyo mokili ezali kokumisa lokola bonsomi to makambo ya mayele, ekoki mpenza kozala mbeli ya minɔ mibale.—Baloma 13:13, 14; Tito 2:12.
Kolata “ekɔti ya lobiko” esɛngi kobatela ntango nyonso na makanisi mapamboli kitoko oyo ezali liboso na biso, tóndima kobendama te na biloko ya mokili oyo ezali kolɛngola. (Baebele 12:2, 3; 1 Yoane 2:16) Soki tozali na makanisi yango, ekosalisa biso na kotya matomba ya elimo na esika ya liboso, bongo bozwi ya mosuni to matomba na biso moko ekoya na nsima. (Matai 6:33) Boye, mpo na komindimisa ete totii eteni wana ya molato na esika na yango, tosengeli komituna na bosembo mpenza ete: Nazali na mokano nini na bomoi na ngai? Namityeli mokano ya elimo? Nazali kosala nini mpo na kokokisa yango? Ezala ete tozali moko na batikali bapakolami to “ebele monene,” tosengeli kolanda ndakisa ya ntoma Paulo, oyo alobaki ete: “Natángi te ete nasili kosimba yango, nde nazali kosalaka likambo oyo moko ete, awa ezali ngai kobosana makambo mazali nsima mpe [kopusana] mpo na yango izali liboso, nazali [kolanda] kino nsuka mpo na libonza.”—Emoniseli 7:9; Bafilipi 3:13, 14.
Ntango ntoma Paulo alobeli molato na biso ya etumba ya elimo, asukisi na toli oyo: “Na mabondeli ya motindo nyonso mpe na malɔmbɔ, bóbondelaka na mabaku nyonso na elimo. Mpo na yango bólala mpɔngi te mpe bólɔmbaka na etingya mpo na babulami nyonso.” (Baefese 6:18, NW) Yango emonisi makambo mibale oyo tokoki kosala mpo na kosilisa to komibatela na bolɛmbu nyonso ya elimo: kokolisa boyokani malamu na Nzambe, mpe kosala boninga makasi na bandeko baklisto.
Soki tozali na momeseno ya kosolola na Yehova na mabondeli “ya motindo nyonso” (koyambola masumu na biso, kosɛnga bolimbisi, malɔmbɔ mpo na litambwisi, matɔndi mpo na mapamboli, makumisi oyo euti na motema) mpe “na mabaku nyonso” (liboso ya bato, na esika ya biso moko, mpo na biso moko, kozanga kotindikama), tokokóma baninga ya Yehova. Yango ezali libateli eleki libateli nyonso oyo tokoki kozala na yango.—Baloma 8:31; Yakobo 4:7, 8.
Lisusu, bapesi biso toli ete tóbondelaka mpo na “babulami nyonso,” elingi koloba, mpo na bandeko na biso baklisto. Na mabondeli na biso tokoki kokanisaka bandeko na biso oyo bazali na mikili ya mosika oyo bazali konyokwama na botɛmɛli to bampasi mosusu. Kasi ezali boni mpo na baklisto oyo tosalaka na bango esika moko mpe tofandaka na bango mokolo na mokolo? Ebongi mpe tóbondelaka mpo na bango, ndenge Yesu abondelaki mpo na bayekoli na ye. (Yoane 17:9; Yakobo 5:16) Mabondeli motindo yango esangisaka biso esika moko mpe elendisaka biso mpo na kotɛmɛla mbanzi ya “oyo mabe.”—2 Batesaloniki 3:1-3.
Na nsuka, tóbatela na makanisi toli ya bolingo oyo ntoma Petelo apesaki ete: “Nsuka na makambo nyonso ezali kobɛlɛma. Na bongo bózala na makanisi na sembo, bómisɛnzɛla mpo na mabondeli. Liboso na makambo nyonso bólingana makasi, mpo ete bolingo ekozipaka ebele na masumu.” (1 Petelo 4:7, 8) Ezali mpasi te mpo na kotika ezaleli ya kozanga kokoka ya bato—ezala ya bato mosusu to mpe ya biso moko—ekɔta na motema mpe na makanisi na biso mpe ekóma mabaku. Satana ayebi malamu bolɛmbu wana ya bato. Kokabola bato mpo na koyangela bango ezali moko na mayele mabe oyo asalelaka. Yango wana, tosengeli kosala nokinoki mpo na kozipa masumu ya ndenge yango na bolingo makasi bamoko epai na bamosusu mpe ‘tópesa Zabolo nzela te.’—Baefese 4:25-27.
Zalá makasi na elimo sikoyo
Soki omoni ete nsuki na yo ebongisami malamu te to kravate na yo etɛngami, okosala nini? Na ntembe te okobongisa yango nokinoki. Bato mingi te nde bakoki kotika yango bongo mpe koloba ete ata babongisi nzoto malamu te ekosala eloko te. Tósala nokinoki mpo na kobongisa soki yango etali bolɛmbu na biso na elimo. Soki tozali kobongisa nzoto te bato bakosepela na biso te, kasi soki tosilisi bolɛmbu ya elimo te Yehova akoboya biso.—1 Samwele 16:7.
Yehova, na bolingo na ye, apesi biso biloko nyonso oyo esengeli mpo na kopikola bolɛmbu nyonso na elimo mpe kozala ntango nyonso makasi na elimo. Na nzela ya makita ya boklisto, mikanda oyo elimbolaka Biblia, mpe na nzela ya bandeko baklisto oyo bateli mpe oyo bazali komibanzabanza mpo na biso, azali ntango nyonso kozongela makambo oyo toyebi mpe kopesa biso toli na makambo oyo tosengeli kosala. Mokumba ezali sikoyo ya biso mpo na kondima mpe kosalela yango. Yango esɛngaka molende mpe komipesa disipilini. Tókanisa makambo ntoma Paulo alobaki na bosembo nyonso: “Nazali kopota mpamba te, nazali [kobunda na] bibɔtu nde bobele kobɛta mopɛpɛ te. Kasi nazali kobɛta nzoto na ngai mpe nakokómisa yango lokola moombo ete nazala moboyami te awa esili ngai kosakwela bamosusu.”—1 Bakolinti 9:26, 27.
Fungolá miso, mpe kopesa nzela te ete okóma litindi ya Achille na elimo. Kasi, na komikitisa na mpe mpiko tósala oyo esengeli sikoyo mpo na koyeba mpe kosilisa bolɛmbu ya elimo oyo tozali na yango.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 19]
“BÓMIMEKA BINO MPENZA SOKO BOZALI KATI NA KONDIMA, BÓMIPIMA.”—2 Bakolinti 13:5.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 21]
“BÓMISƐNZƐLA MPO NA MABONDELI. LIBOSO NA MAKAMBO NYONSO BÓLINGANA MAKASI, MPO ETE BOLINGO EKOZIPAKA EBELE NA MASUMU.”—1 Petelo 4:7, 8.
[Etanda/Elilingi na lokasa 20]
OMITUNA . . .
◆ Nasepelaka mpenza kozwa ntango mpo na kobongisa makita ndenge nasalaka mpo na kokende zando to kotala televizyo?
◆ Nazali kolula oyo tokoki kobénga bomoi malamu oyo bato mosusu bazali na yango?
◆ Natombokaka noki ntango bato mosusu basali to balobi likambo moko oyo nalingaka te?
◆ Naboyaka koyoka toli, to namonaka ete bato mosusu balobaka kaka mabe mpo na ngai?
◆ Nazalaka na mokakatano ya koyokana na bato?
◆ Bizaleli na ngai ebebi nzela moko na oyo ya mokili?
◆ Namityeli mikano ya elimo?
◆ Nazali kosala nini mpo na kokokisa mikano na ngai ya elimo?
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 18]
Achilles: From the book Great Men and Famous Women; Roman soldiers and page 21: Historic Costume in Pictures/Dover Publications, Inc., New York