Makambo oyo epesaka mpenza moto esengo
YEHOVA, “Nzambe ya esengo,” ná Yesu Klisto, “Nkumu ya esengo mpe kaka moko,” bayebi koleka biso nyonso makambo oyo epesaka moto esengo. (1 Timote 1:11; 6:15) Na yango, tokoki kokamwa te ete Biblia, Liloba ya Nzambe, ezali komonisa sɛkɛlɛ ya bomoi ya esengo.—Emoniseli 1:3; 22:7.
Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu alobelaki makambo oyo epesaka moto esengo. Alobaki boye: “Esengo na baoyo” (1) bayebi bobola na bango ya elimo, (2) bazali na mawa, (3) bazali na elimo ya boboto, (4) bazali na nzala mpe na mposa ya boyengebene, (5) bazali na motema mawa, (6) bazali na motema pɛto, (7) batyaka kimya, (8) bazali konyokwama mpo na boyengebene, mpe (9) bazali kolobela bango mabe mpe konyokola bango mpo na ye.—Matai 5:3-11.a
Yesu alobaki nde solo?
Mpo na komonisa ete Yesu alobaki solo, ebongi tólimbola makambo mosusu oyo alobaki. Nani akoki kobɛta ntembe ete moto oyo azali na elimo ya boboto, na motema mawa, mpe atyaka kimya, oyo azali na motema pɛto, akozala na esengo koleka moto oyo azalaka nkandankanda, alingá bitumba mpe motema mabe?
Kasi, tokoki komituna soki bato oyo bazali na nzala mpe na mposa ya boyengebene to oyo bazali na mawa, bakoki mpenza kobengama bato ya esengo. Bato ya ndenge wana batalelaka makambo ya mokili na ndenge esengeli mpenza. ‘Bakimelaka mpe balelaka na ntina na makambo ya mbindo nyonso oyo ezali kosalema’ na mikolo na biso. (Ezekiele 9:4) Tolobi te ete yango kaka nde ezali kopesa bango esengo. Kasi, ntango bayoki ete Nzambe azali na mokano ya kobongisa mabelé mpe kosilisa mpasi ya baoyo bazali konyokwama, batondaka na esengo.—Yisaya 11:4.
Baoyo balingaka boyengebene balelaka mpe ntango bamoni ete bazali komeka kosala boyengebene kasi mbala na mbala bazali kokwea. Yango emonisi ete bayebi bobola na bango ya elimo. Bato ya ndenge wana bandimaka ete Nzambe atambwisa bango, mpamba te bamonaka ete kaka ye nde akoki kosalisa bato bálonga bolɛmbu na bango.—Masese 16:3, 9; 20:24.
Bato oyo bazali na mawa, oyo bazali na nzala mpe na mposa ya boyengebene, mpe baoyo bayebi bobola na bango ya elimo bamonaka ete kozala na boyokani malamu na Mozalisi ezali na ntina mingi. Toyebi ete moto oyo ayokanaka na bato azalaka na esengo, kasi kozala na boyokani malamu na Nzambe epesaka lisusu esengo koleka. Bato oyo balingaka mpenza boyengebene, oyo bandimaka Nzambe atambwisa bango, bakoki solo kobengama bato ya esengo.
Nzokande, ekoki kozala mpasi ondima ete moto oyo azali konyokwama mpe bazali kolobela ye mabe azala na esengo. Kasi, yebá ete Yesu ye moko nde alobaki bongo. Na bongo, ndenge nini tokoki kolimbola maloba na ye?
Ndenge nini monyokwami akoki kozala na esengo?
Yebá malamu ete Yesu alobaki te ete moto akozala na esengo kaka mpo bazali kolobela ye mabe mpe konyokola ye. Alobaki nde boye: “Esengo na baoyo banyokwami mpo na boyengebene, . . . ntango bazali kolobela bino mabe mpe konyokola bino . . . mpo na ngai.” (Matai 5:10, 11) Na yango, moto yango akozala na esengo kaka soki bazali kolobela ye mabe mpo azali moyekoli ya Yesu mpe mpo azali kolanda mitinda ya sembo oyo Yesu ateyaki.
Tokoki komona yango na likambo oyo ekómelaki baklisto ya liboso. Basangani ya Sanedrina, tribinale monene ya Bayuda, “babengisaki bantoma, babɛtaki bango fimbo, mpe bapesaki bango mitindo ete bátika koloba na nkombo ya Yesu, mpe batikaki bango bákende.” Bantoma basalaki nini? “Na yango, bango balongwaki liboso ya Sanedrina, kosepeláká mpamba te batángamaki bato oyo babongi kosambwisama mpo na nkombo na ye. Mpe mikolo nyonso na kati ya tempelo mpe na ndako na ndako, kozanga kotika, bakobaki koteya mpe kosakola nsango malamu oyo etali Klisto, Yesu.”—Misala 5:40-42; 13:50-52.
Ntoma Petelo amonisaki lisusu malamumalamu ndenge moto oyo bazali kolobela mabe akoki kozala na esengo. Akomaki boye: “Soki bozali kolobelama mabe mpo na nkombo ya Klisto, bozali bato ya esengo, mpamba te elimo ya nkembo, ɛɛ elimo ya Nzambe, ezali kofanda likoló na bino.” (1 Petelo 4:14) Ya solo, soki moklisto azali konyokwama mpo azali kosala oyo ezali sembo, atako monyoko ezalaka likambo malamu te, akozala na esengo ya koyeba ete azali kozwa elimo santu ya Nzambe. Boyokani nini ezali na kati ya elimo ya Nzambe mpe esengo?
Misala ya mosuni to mbuma ya elimo?
Elimo santu ya Nzambe ezalaka kaka epai ya baoyo batosaka bokonzi na ye. (Misala 5:32) Yehova akoki te kopesa elimo na ye epai ya bato oyo bamipesi na “misala ya mosuni.” Misala yango ezali “pite, bosɔtɔ, etamboli ya mbindo, losambo ya bikeko, misala ya bilimo mabe, koyinana, koswana, zuwa, nkanda makasimakasi, kowelana, bokabwani, mwa mangomba, likunya, kolangwa masanga, bilambo ya mbindo mpe makambo oyo ekokani na oyo wana.” (Bagalatia 5:19-21) Ya solo, na mokili ya lelo bato bamipesi na “misala ya mosuni.” Kasi, baoyo basalaka misala yango bazali na esengo ya solosolo mpe ya libela te. Makambo wana ebebisaka nde boyokani ya moto na bandeko mpe baninga na ye. Lisusu, Liloba ya Nzambe elobi ete baoyo “bazali na momeseno ya kosala makambo ya ndenge wana bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.”
Nzokande, Nzambe apesaka elimo na ye epai ya baoyo balonaka “mbuma ya elimo.” Mbuma yango ezali “bolingo, esengo, kimya, motema molai, motema malamu, bolamu, kondima, boboto, komipekisa.” (Bagalatia 5:22, 23) Soki tozali komonisa bizaleli wana, tokozala na boyokani malamu na basusu mpe na Nzambe, mpe yango ekomemela biso esengo ya solosolo. (Talá etanda.) Oyo eleki ntina, soki tozali komonisa bolingo, motema malamu, bolamu mpe bizaleli mosusu ya malamu, tokosepelisa Yehova mpe tokozala na elikya ya bomoi ya seko na mokili ya sika ya boyengebene oyo Nzambe akosala.
Moto akoki kopona kozala na bomoi ya esengo
Ntango Wolfgang ná mwasi na ye, Brigitte, oyo bafandaka na Allemagne, babandaki koyekola Biblia, bazalaki na ebele ya biloko ya mokili, oyo bato bakanisaka ete yango nde epesaka esengo. Bazalaki naino bilenge mpe nzoto kolɔngɔnɔ. Bazalaki kolata bilamba ya ntalo, kofanda na ndako ya kitoko, mpe mosala na bango ezalaki kopesa bango mbongo mingi. Bazalaki kolekisa ntango na bango mingi na konduka bozwi ya mokili, kasi yango ememelaki bango esengo ya solosolo te. Na nsima, Wolfgang ná Brigitte baponaki likambo moko ya ntina mingi. Bakómaki kolekisa ntango mpe makasi na bango mingi na koluka bozwi ya elimo mpe basalaki nyonso mpo na kopusana penepene na Yehova. Mosika te, nzela oyo baponaki ebongolaki ndenge na bango ya kotalela bomoi, mpe bongo, batikaki bomoi ya mindɔndɔ mpe bakómaki babongisi-nzela, elingi koloba basakoli ya ntango nyonso. Lelo oyo, bazali kosala na filiale ya Batatoli ya Yehova na Allemagne. Longola yango, bazali koyekola monɔkɔ moko ya Azia mpo na kosalisa bapaya na koyeba solo ya Biblia, Liloba ya Nzambe.
Mobali yango ná mwasi na ye bazwá nde esengo ya solo? Wolfgang alobi boye: “Banda tomipesá na makambo ya elimo, tokómá na esengo koleka mpe tozali na bomoi moko ya malamu mpenza. Kosalela Yehova na motema mobimba ebongisi mpe libala na biso. Naboyi te, liboso mpe libala na biso ezalaki malamu, kasi misala na biso mpe mikano oyo moto na moto azalaki kolanda ezalaki kokabola biso. Sikoyo biso nyonso tozali na bomoko mpe tozali kolanda mokano kaka moko.”
Tosengeli kosala nini mpo tózala na esengo?
Na mokuse: Tókima “misala ya mosuni” mpe tólona “mbuma ya elimo [ya Nzambe].” Mpo moto azala na esengo, asengeli koluka mpenza kozala na boyokani malamu na Nzambe. Soki moto azali kosala makasi mpo na kokóma na boyokani malamu na Nzambe akozala mpenza moto ya esengo ndenge Yesu alobaki.
Na yango, komikosa te na kokanisa ete okoki kozala na esengo te. Ya solo, ekoki kozala ete sikoyo ozali kotungisama na maladi to mpe ozali na mikakatano na libala na yo. Ekoki mpe kozala ete ozali lisusu na elikya ya kobota bana to mpe ozali kozwa mosala ya malamu te. To mpe ozali lisusu na mbongo mpenza te ndenge ozalaki na yango. Atako bongo, yiká kaka mpiko; ntina ya kobwaka elikya ezali te! Bokonzi ya Nzambe ekosilisa mikakatano nyonso oyo totángi mpe ebele ya mikakatano mosusu. Kutu, mosika te Yehova Nzambe akokokisa elaka oyo apesaki na nzela ya mokomi ya nzembo: “Bokonzi na yo ezali bokonzi ya seko . . . Okozipola lobɔkɔ na yo mpe okosilisa mposa ya bikelamu nyonso ya bomoi.” (Nzembo 145:13, 16) Ebele ya basaleli ya Yehova na mokili mobimba bakoki mpenza kotatola ete soki ozali ntango nyonso kobatela elikya oyo Yehova apesi, okoki mpenza kozala na esengo na moi ya lelo.—Emoniseli 21:3.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Makambo oyo Yesu alobeli awa babengaka yango bisengo libwa; mokomoko na yango ebandi na liloba ya Grɛki makarioï. Na esika ya kobongola yango “mapamboli,” ndenge ezali na Babiblia mosusu, Libongoli ya Mokili ya Sika mpe mabongoli mosusu, lokola Liloba lya Nzambe mpe Bible na lingala ya lelo oyo, ebongolá liloba yango malamu mpenza: “esengo.”
[Etanda/Elilingi na lokasa 6]
Makambo oyo ememelaka moto esengo
Bolingo ekotinda bato mosusu bálinga yo.
Esengo epesaka makasi ya koyikela mikakatano mpiko.
Kimya ekosalisa yo oyokanaka na bato nyonso.
Motema molai ekosalisa yo ozanga esengo te ata na kati ya mpasi.
Motema malamu ekosala ete bato básepela kozala baninga na yo.
Bolamu ekotinda bato básalisa yo na ntango okómi na bosɛnga.
Kondima ekosala ete Nzambe, na bolingo na ye, atambwisa yo.
Boboto ekomemela yo kimya ya motema, ya makanisi mpe okozala nzoto kolɔngɔnɔ.
Komipekisa ekosalisa yo osala mabunga mingi te na bomoi.
[Bililingi na lokasa 7]
Soki olingi kozala na esengo, osengeli kokokisa bamposa na yo ya elimo