Liloba ya Yehova ezali na bomoi
Makanisi ya ntina na mikanda epai ya Bagalatia, Baefese, Bafilipi, mpe Bakolose
NTANGO ayokaki ete baklisto mosusu bakómaki kolanda makanisi ya bato oyo bazalaki kokangama na bonkɔkɔ ya Bayuda, ntoma Paulo akomaki mokanda moko “epai ya masangá ya Galatia.” (Gal. 1:2) Mokanda yango oyo mbala mosusu ekomamaki na kati ya mobu 50-52 T.B., ezali na batoli ya malamu.
Mbula soki 10 na nsima, ntango azalaki na Loma lokola “moto ya bolɔkɔ ya Klisto Yesu,” Paulo akomelaki masangá ya Efese, Filipi, mpe Kolose; apesaki bango batoli ya malamu mpe alendisaki bango. (Ef. 3:1) Lelo oyo, tokoki kozwa matomba soki totye likebi na nsango oyo ezali na mikanda ya Bagalatia, Baefese, Bafilipi, mpe Bakolose.—Ebe. 4:12.
NDENGE NINI BATO ‘BATÁNGAMI BAYENGEBENE’?
Lokola bato oyo bazalaki kotingama na bonkɔkɔ ya Bayuda bazalaki kondima Paulo te, alobelaki bango makambo mosusu ya bomoi na ye mpo na kondimisa bango ete azali mpenza ntoma. (Gal. 1:11–2:14) Mpo na komonisa ete bazalaki koteya lokuta, Paulo alobaki boye: “Moto atángamaka moyengebene, mpo na misala ya mibeko te, kasi kaka na nzela ya kondima epai ya Klisto Yesu.”—Gal. 2:16.
Paulo alobaki ete Klisto ‘asikolaki na lisombi baoyo bazalaki na nse ya mibeko,’ mpe apesaki bango bonsomi. Apesaki Bagalatia toli oyo: “Bótɛlɛma makasi, mpe bómitika te ete bátya bino lisusu na nkaka ya ekanganeli moko ya boombo.”—Gal. 4:4, 5; 5:1.
Biyano na mituna ya Biblia:
3:16-18, 28, 29—Kondimana ya Abalayama ezali kaka na ntina? Ɛɛ, ezali kaka na ntina. Kondimana ya Mibeko ebakisamaki likoló ya kondimana oyo Nzambe asalaki na Abalayama, kasi elongolaki yango te. Yango wana, kondimana ya Abalayama ezalaki kaka na ntina ata ntango Mibeko ‘elongwaki.’ (Ef. 2:15) Bilaka na yango epesamaki mpo na “momboto” ya solosolo ya Abalayama—Klisto Yesu mpe baoyo ‘bazali bato ya Klisto.’
6:2—“Mobeko ya Klisto” ezali nini? Mobeko yango ezali makambo nyonso oyo Yesu ateyaki mpe atindaki. Ezali mingimingi etinda ya ‘kolingana biso na biso.’—Yoa. 13:34.
6:8—Ndenge nini ‘tolonaka mpo na elimo’? Tolonaka mpo na elimo na ndenge totikaka ete elimo santu etambwisa bomoi na biso. Kolona mpo na elimo elimboli mpe komipesa na misala oyo epesaka nzela na elimo ete esala mosala na yango.
Mateya mpo na biso:
1:6-9. Bankulutu basengeli koluka nokinoki kosilisa makambo oyo ebimi na lisangá. Na nzela ya batoli ya malamu oyo euti na Biblia, bakoki kopekisa makanisi ya lokuta.
2:20. Lisiko ezali likabo oyo Nzambe ye moko apesi biso. Tosengeli kotalelaka yango ndenge wana.—Yoa. 3:16.
5:7-9. Baninga mabe bakoki ‘kopekisa biso kokoba kotosa solo.’ Tosengeli koboya bango.
6:1, 2, 5. Baoyo bazali na “makoki ya elimo” bakoki kosalisa biso na komema kilo na biso, na ndakisa mokakatano moko oyo ekómeli biso mpo tolandaki nzela ya mabe kozanga ete tóyeba yango. Kasi, na makambo ya elimo, biso moko tosengeli komema mikumba na biso.
‘KOYANGANISAMA YA BILOKO NYONSO ESIKA MOKO NA KATI YA KLISTO’
Paulo amonisaki ntina ya bomoko ya baklisto na mokanda oyo akomelaki Baefese; alobelaki “mosala moko ya kotambwisa makambo na nsuka mpenza ya bantango oyo etyamá . . . koyanganisa lisusu biloko nyonso esika moko na kati ya Klisto, biloko oyo ezali na likoló mpe biloko oyo ezali na mabelé.” Klisto apesaki “makabo oyo ezali bato” mpo na kosalisa biso nyonso ‘tókóma na bomoko na kati ya kondima.’—Ef. 1:10; 4:8, 13.
Mpo na kokumisa Nzambe mpe kobatela bomoko, baklisto basengeli “kolata bomoto ya sika” mpe ‘kotosanaka na kobanga Klisto.’ Basengeli mpe kolata molato mobimba ya etumba ya elimo mpo na “kotɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo.”—Ef. 4:24; 5:21; 6:11.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:4-7—Na ndenge nini Nzambe akanaki kokamatama ya baklisto bapakolami kala mpenza liboso kutu bábotama? Nzambe akanaki kokamatama ya etuluku, kasi ya moto mokomoko te. Akanaki yango liboso Adama ná Eva bábota bana. Esakweli oyo ezali na Genese 3:15, oyo elobamaki liboso bato ya masumu bábotama, elobelaki mpe mokano ya Nzambe ya koyanganisa bato mosusu mpo báyangela elongo na Klisto na likoló.—Gal. 3:16, 29.
2:2—Na ndenge nini elimo ya mokili ezali lokola mopɛpɛ, mpe ndenge nini ezali koyangela mokili? “Elimo ya mokili” to elimo ya kozanga botosi mpe ya kopesa Nzambe mokɔngɔ ezali bisika nyonso, lokola mopɛpɛ. (1 Kol. 2:12) Ezali na bokonzi to nguya mpamba te ezali komonana bipai nyonso, na mokili mobimba.
2:6—Na ndenge nini baklisto bapakolami bazali na “bisika ya likoló” ntango bazali naino awa na mabelé? Maloba “bisika ya likoló” elimboli te libula na bango na likoló. Kasi, elimboli ete bazali na bazali na esika ya lokumu mpamba te ‘batyami elembo na elimo santu oyo elakamaki.’—Ef. 1:13, 14.
Mateya mpo na biso:
4:8, 11-15. Yesu “amemaki bakangami,” elingi koloba, alongolaki bato na boyangeli ya Satana mpo na kosalela bango lokola makabo mpo na kotongama ya lisangá ya boklisto. Tokoki ‘kokola na makambo nyonso na kati ya Klisto’ na nzela ya botosi epai ya baoyo bazali kokamba biso mpe kolanda bibongiseli oyo ezali kozwama na kati ya lisangá.—Ebe. 13:7, 17.
5:22-24, 33. Mwasi asengeli kotosa mobali na ye mpe kozala na limemya epai na ye. Akomonisa yango soki azali na “elimo ya kimya mpe ya boboto” mpe azali kosala makasi ya kopesa ye lokumu; asengeli koloba malamu mpo na ye mpe kondima bikateli na ye.—1 Pet. 3:3, 4; Tito 2:3-5.
5:25, 28, 29. Se ndenge ‘amileisaka’ ye moko, mobali asengeli koleisa mpe kolatisa mwasi na ye, komonisela ye bolingo, mpe kosalisa ye azala na boyokani malamu na Yehova. Asengeli mpe kolekisaka ntango na ye mpe komonisela ye boboto na maloba mpe na misala.
6:10-13. Mpo na kotɛmɛla bilimo mabe, tosengeli kolata molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe.
“TÓKOBA KAKA KOTAMBOLA NA MOLƆNGƆ”
Na mokanda ya Bafilipi, Paulo alobelaki mingi bolingo. Alobaki boye: “Talá eloko oyo nazali kokoba kobondela mpo na yango, ete bolingo na bino etondana lisusu mpe lisusu elongo na boyebi ya solosolo mpe bososoli ya kokoka.” Mpo na kosalisa bango bákima motambo ya komityela motema koleka ndelo, alobaki boye: “Bókoba kosala mpo na lobiko na bino moko na kobanga mpe na kolɛnga.”—Filp. 1:9; 2:12.
Paulo alendisaki baoyo bakɔmeli na elimo ete bálanda “kopota mbangu tii na ndelo ya nsuka mpo na kozwa libonza ya kobengama ya likoló na Nzambe.” Alobaki boye: “Ezala tosili kokende liboso ndenge nini, tókoba kaka kotambola na molɔngɔ na kati ya nzela moko wana.”—Filp. 3:14-16.
Biyano na mituna ya Biblia:
1:23—‘Na makambo mibale’ nini Paulo azalaki kokamolama, mpe “kofungwama” nini azalaki na mposa na yango? Na kotalela mikakatano oyo azalaki na yango, Paulo azalaki kokamolama na makambo mibale oyo asengelaki kopona moko na yango: bomoi to liwa. (Filp. 1:21) Ayebisaki te eloko oyo aponi, amonisaki nde oyo alingaki: “kofungwama mpe kozala esika moko na Klisto.” (Filp. 3:20, 21; 1 Tes. 4:16) Paulo asengelaki “kofungwama” na ntango ya kozala ya Klisto, asengelaki kozwa mbano oyo Yehova abongisaki mpo na ye.—Mat. 24:3.
2:12, 13—Na ndenge nini Nzambe asalaka ete ‘tólinga mpe tósala’? Elimo santu ekoki kokolisa na makanisi mpe na mitema na biso mposa ya kosala mingi na mosala ya Yehova. Na ndenge yango, tozali na lisalisi mpo na ‘kokoba kosala mpo na lobiko na biso moko.’
Mateya mpo na biso:
1:3-5. Atako bazalaki na bozwi te, baklisto ya Filipi batikaki ndakisa malamu na oyo etali kokaba.—2 Kol. 8:1-6.
2:5-11. Ndenge ndakisa ya Yesu emonisi yango, komikitisa ezali bolɛmbu te. Lisusu, Yehova atombolaka baoyo bazali na komikitisa.—Mas. 22:4.
3:13. “Biloko oyo ezali na nsima” ezali, na ndakisa mosala ya malamu, kozala na kati ya libota moko ya bozwi, to mpe kozala masumu oyo tosalá kala, kasi tobongolaki motema mpe mpo na yango ‘tosili kosukolama pɛɛ.’ (1 Kol. 6:11) Tosengeli kobosana biloko yango, elingi koloba kotika kokanisa yango, mpe ‘komitandola epai ya biloko oyo ezali na liboso.’
‘TÓTƐLƐMA NGWI NA KATI YA KONDIMA’
Na mokanda oyo Paulo akomelaki Bakolose, atondolaki makanisi mabe ya bateyi ya lokuta. Amonisaki ete lobiko eutaka te na kotosa masɛngami ya Mibeko, kasi nde na ‘kotikala na kati ya kondima.’ Paulo alendisaki Bakolose ete ‘bákoba kotambola na bomoko elongo na [Klisto], kopika misisa mpe kotongama na kati na ye mpe kotɛlɛma ngwi na kati ya kondima.’ Ndenge nini yango ekokaki kosalisa bango?—Kols. 1:23; 2:6, 7.
Paulo akomaki boye: “Longola makambo nyonso wana, bólata bolingo, mpo yango ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko. Lisusu, tiká kimya ya Klisto etambwisa mitema na bino.” Paulo ayebisaki bango lisusu ete: “Nyonso oyo bozali kosala, bósala yango na molimo na bino mobimba lokola mpo na Yehova, kasi mpo na bato te.” Mpo na bato oyo bazali na lisangá ya boklisto te, alobaki boye: “Bókoba kotambola na bwanya na oyo etali bato ya libándá.”—Kols. 3:14, 15, 23; 4:5.
Biyano na mituna ya Biblia:
2:8—“Makambo mikemike ya mokili” oyo Paulo akebisaki baklisto mpo na yango ezali nini? Yango ezali makambo ya mokili ya Satana—makambo to mitinda oyo esimbi mokili yango mpe oyo etambwisaka yango. (1 Yoa. 2:16) Kati na makambo yango tokoki kotánga filozofi, kolinga biloko ya mokili, mpe losambo ya lokuta.
4:16—Mpo na nini mokanda epai ya bato ya Laodikia ezali na Biblia te? Ekoki kozala ete mokanda yango ezalaki na makambo oyo ezali na ntina te mpo na eleko na biso. Ekoki mpe kozala ete ezongelaki kaka makambo oyo ezali na mikanda mosusu.
Mateya mpo na biso:
1:2, 20. Lisiko, ebongiseli oyo Nzambe asali na boboto monene na ye, ekoki kopɛtola lisosoli mpe kopesa biso kimya ya motema.
2:18, 23. “Komikitisa ya lokuta”—koboya biloko ya mokili to konyokola nzoto mpo na kokamwisa bato—ezali elembo ya moto oyo ‘avimbi na lolendo na ezaleli ya makanisi na ye ya mosuni.’