Bonsomi oyo nzambe akopesaka ekozwilaka esengo
“Esengo na Jéhovah ezali nguya na bino.”—NEHEMIA 8:10.
1. Esengo ezali nini, mpe mpo na nini bato oyo bamipesi na Nzambe bakoki kozwa yango?
JÉHOVAH azali kotondisa mitema ya basaleli na ye na esengo. Ezalela wana ya esengo mingi to ya bosepeli ebimisami na bozeli ya likambo moko na esengo to na bozwi ya eloko moko kitoko. Bato oyo bamipesi epai na Nzambe bakoki kozala na liyoki wana mpamba te esengo ezali mbuma ya elimo santu na ye to bokasi bokosalaka mosala. (Bagalatia 5:22, 23) Na yango, ata soki mimekamo ya nsomo mizali kotungisa biso, tokoki kozala na esengo na kosalelaka Jéhovah na nse na litambwisi ya elimo na ye.
2. Mpo na nini, na eleko ye Esdras, Bayuda bazwaki libaku kitoko mpenza mpo na kosepela?
2 Na ekeke ya mitano liboso ya ntango na biso, Bayuda bazwaki libaku malamu ya kosalela bonsomi oyo Nzambe apesaki bango mpo na kokumisa na esengo nyonso elambo ya Mingombo na Yelusaleme. Nsima wana Esdras mpe Balevite mosusu basilisaki kotangela bango mpe kolimbolela bango Mibeko na Nzambe, “bato nyonso bakendaki . . . mpo na kolya mpe komela mpe kotinda makabo mpe kosepela mingi mpo ete basili kososola maloba masakwelamaki bango.”—Nehemia 8:5-12.
Esengo na Jéhovah ezali nguya na biso
3. Kati na makambo nini “esengo na Jéhovah” ekoki kozala nguya na biso?
3 Na boumeli ya elambo wana, Bayuda basosolaki bosolo ya maloba oyo: “Esengo na Jéhovah ezali nguya na bino.” (Nehemia 8:10) Esengo yango ezali mpe nguya na biso, ba Témoins de Jéhovah oyo tomipesi mpe tozwi batisimo, soki tosimbi ngwi mpo na bonsomi oyo Nzambe asili kopesa biso. Mwa ndambo kati na biso basili kopakolama na elimo santu mpe bandimami kati na libota na Nzambe lokola basangoli na libula na likoló elongo na Klisto. (Baloma 8:15-23) Mpo na basusu, ebele monene, bazali na elikya ya kofanda kati na paradis awa na mabelé. (Luka 23:43) Oyo nde esengo tosengeli kozala na yango!
4. Mpo na nini baklisto bakoki koyika mpiko liboso na mpasi mpe minyoko?
4 Atako tozali na elikya kitoko, ezali petee te mpo na koyikela bolozi mpe minyokoli mpiko. Nzokande, tokoki kosala yango, mpamba te Nzambe azali kopesa biso elimo santu na ye. Lisusu, tozali na esengo mpe na bondimi ete eloko moko te ekoki kopimela biso elikya na biso to bolingo na Nzambe. Epai mosusu, tokoki kozala na elikya ete Jéhovah akozala nguya na biso ntango nyonso oyo tokolinga ye na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba, na nguya na biso mobimba mpe na elimo na biso mobimba.—Luka 10:27.
5. Epai wapi tokoki kozwa bantina ya kosepela?
5 Basaleli na Jéhovah bazali kozwa bolamu mingi mpe bazali na bantina mingi ya kosepela. Ndambo na bantina yango eyebisami kati na mokanda ya Paulo epai na Bagalatia. Mosusu eyebisami bisika mosusu kati na Makomami. Totalela bolamu wana na esengo; yango ekozala elendiseli monene mpo na biso.
Topesa motuya na bonsomi oyo Nzambe asili kopesa biso
6. Mpo na nini Paulo alendisaki baklisto ya Galatia ete batelema ngwi?
6 Lokola tozali baklisto, tosili kondimama epai na Nzambe; yango ezali likabo ya esengo. Mpo ete Klisto asikolaki bayekoli na ye na Mibeko na Moize, Bagalatia bayikisamaki mpiko ete batelema ngwi mpe bamitika te kotyama na nse na “boombo.” Ezali boni mpo na biso? Soki tozali koluka kotangama bayengebene na kobatelaka Mibeko, tokokabwana na Klisto. Nzokande, na lisalisi ya elimo santu na Nzambe, tozali kozela boyengebene oyo elikyami na nzela na kondima oyo ezali na misala mpo na bolingo, kasi mpo na kokatama ngenga te to na nzela na misala misusu ya Mibeko te.—Bagalatia 5:1-6.
7. Lolenge nini tosengeli kotalela mosala na bulee mpo na Jéhovah?
7 Ezali likabo malamu na kosalela bonsomi oyo Nzambe asili kopesa biso mpo na ‘kosalela Jéhovah na esengo.’ (Nzembo 100:2) Ya solo, ezali likabo kitoko mpo na kopesa losambo na bulee epai na “Jéhovah Nzambe, Mozwi-na-Nguya-Nyonso,” “Mokonzi na seko” ye moko. (Emoniseli 15:3) Soki ekomeli biso na komimona ete tokoki te, ekoki kozala ntina mpo na biso na kokanisa ete Nzambe asilaki kobenda biso epai na ye na nzela na Yesu Klisto mpe apesi biso libaku ya kosangana na “mosala ya bulee ya nsango malamu na Nzambe.” (Baloma 15:16; Yoane 6:44; 14:6) Tala bantina oyo esengeli na biso kosepela mpe kozala na botondi epai na Nzambe.
8. Mpo na oyo etali Babilone Monene, ntina nini basaleli na Jéhovah bazali na yango ya kosepela?
8 Liziba mosusu ya esengo: Nzambe asikolaki biso na Babilone Monene, lisangá ya mokili mobimba ya mangomba ya lokuta. (Emoniseli 18:2, 4, 5) Atako na elilingi, mwasi wana ya pite na losambo, “afandi na mai mingi” oyo emonisi bongo “bikolo, na bibele, na mabota, na minoko,” nzokande afandi te, elingi koloba azali na bopusi te to na boyangeli ya losambo te likoló na basaleli na Jéhovah. (Emoniseli 17:1, 15) Tozali na esengo kati na kongenga ya kokamwa ye Nzambe, nzokande baoyo bazwami kati na Babilone Monene bazali kati na molili ya elimo. (1 Petelo 2:9) Ya solo, ekoki kozala mpasi mpo na kokanga ntina ya “makambo mozindo na Nzambe.” (1 Bakolinti 2:10) Kasi mabondeli oyo tozali kosala mpo na kosenga mayele mpe lisungi ya elimo santu ezali kosalisa biso na koyeba solo ya Biblia, oyo ezali kosikola na elimo baoyo bazali na yango.—Yoane 8:31, 32; Yakobo 1:5-8.
9. Mpo na kozwa litomba ya kosikolama libela na mateya ya lokuta ya mangomba eloko nini tosengeli kosala?
9 Tozali kozwa bolamu mpo ete tosikolami libela na mateya ya lokuta ya mangomba, kasi mpo na kobatela bonsomi yango, tosengeli kobwaka lipengwi. Bagalatia bazalaki kopota malamu na emekaneli na mbangu ya boklisto, kasi basusu bazalaki kopekisa bango ete batosa solo te. Kobendama wana ya mabe eutaki na Nzambe te: na bongo esengelaki kotemela yango. Motindo moko lokola mwa levire moke ekofulukisaka mampa mobimba, balakisi na lokuta to mwa ezaleli ya lipengwi ekoki kobebisa lisangá mobimba. Paulo alingaki ete bato oyo bazalaki koloba mpo na kokatama ngenga, baoyo bazalaki koluka kokweisa kondima ya Bagalatia, basuka bobele na ngenga te, kasi bamikata lisusu nzoto na bango mobimba. Ayokaki nsoni te kati na maloba na ye! Nzokande, tosengeli komonisa mpiko motindo moko mpo na likambo litali kobwaka lipengwi ete tolonga kobatela, liboso na mateya na lokuta ya mangomba, bonsomi oyo Nzambe asili kopesa biso.—Bagalatia 5:7-12.
Tosalelanaka lokola baombo kati na bolingo
10. Mokumba nini ezali likoló na biso baoyo tozali na libota ya boklisto?
10 Bonsomi oyo Nzambe apesi ezali kosalisa biso na kobaluka libota mobimba ya bandeko kati na bolingo, kasi, biso baoyo tozali kati na libota yango, tosengeli kosala oyo esengeli na biso mpo na komonisa bolingo. Bagalatia basengelaki te kosalela bonsomi na bango lokola “nzela mpo na mposa na nzoto” to elendiseli mpo na komitambwisa na lolenge ya moimi mpe kozanga bolingo. Basengelaki kosalisana lokola baombo na kopusamaka na bolingo. (Levitike 19:18; Yoane 13:35) Biso moko tosengeli kobwaka matongi to bilobaloba mpe likunya oyo ekoki komema biso na kolyana biso na biso. Ya solo,yango ekokoma te soki tozali komonisa bolingo mpo na bandeko.—Bagalatia 5:13-15.
11. Lolenge nini tokoki kozala lipamboli mpo na baninga mosusu, mpe ndenge nini bango moko bakoki kopambola biso?
11 Soki tosaleli bonsomi oyo Nzambe asili kopesa biso, na boyokani na elimo na ye, tokomonisa bolingo mpe tokozala lipamboli mpo na bazalani. Tosengeli kozala na momeseno ya komitika koyangelama mpe kotambwisama na elimo santu. Na bongo, tokozala te na momeseno ya kosepelisa nzoto na biso ya masumu na lolenge ya moimi, oyo, “mposa na yango, ekoyokanaka te na oyo ya elimo.” Soki totambwisami na elimo ya Nzambe, tokosala na bolingo, kasi te mpo ete mibeko misengi yango mpe mizali kopesa bitumbu epai na baoyo batosi yango te. Na ndakisa, ezali nde bolingo—kasi bobele mobeko te—ekopekisa biso mpo na kotonga mozalani. (Levitike 19:16) Bolingo ekopusa biso na koloba mpe na kosala malamu. Mpo ete tozali komonisa mbuma na elimo oyo ezali bongo bolingo, basusu bakopambola biso, na elobeli mosusu bakoloba malamu mpo na biso. (Masese 10:6) Lisusu, koya na biso epai na bango ekozala lipamboli.—Bagalatia 5:16-18.
Bambuma oyo ezali na boyokani te
12. Tanga mwa matomba oyo mazwami mpo tozali kokokisa te “misala [mabe] ya nzoto.”
12 Bolamu mingi esangani na bonsomi oyo Nzambe asili kopesa biso ezwami mpo ete tozali kokokisa te “misala [mabe] ya nzoto.” Lokola tozali baombo na Nzambe, mingimingi tomilongolaka na bobangi mpamba te tokosalaka pite te, mbindo te mpe etamboli na nsoni te. Na komibatelaka na losambo ya bikeko, tozali na esengo ya kondimama na Jéhovah kati na likambo wana. (1 Yoane 5:21) Lokola tokosalaka misala na bilimu mabe te, tozali na nse na bopusi ya bilimu mabe te. Boyokani ya bondeko oyo tozali na yango elongo na baklisto mosusu ebebisami te na koyinana, na koswana, na zuwa, na nkanda, na kotyana ntembe, na kokabwana soko na koponapona. Lisusu, esengo na biso ezali kolimwa te kati na kolangwa masanga mpe bilambo na lokoso. Paulo azalaki kokebisa ete baoyo bazali kosala misala na nzoto bakosangola Bokonzi na Nzambe te. Kasi, lokola tozali kobatela maloba na ye, tokoki kokangama na elikya kitoko ya Bokonzi.—Bagalatia 5:19-21.
13. Elimo santu ya Jéhovah ezali kobota bambuma nini?
13 Bonsomi oyo Nzambe azali kopesa biso ezali komemela biso esengo mpo ete baklisto bazali komonisa mbuma na elimo na Jéhovah. Maloba na Paulo epai na Bagalatia mazali komonisa biso malamu ete misala na nzoto ya masumu mizali lokola nzube kokesenaka na mbuma kitoko ya elimo oyo ezali bongo bolingo, esengo, kimya, motema petee, boboto, malamu, kondima, bopolo, komikanga motema to komipekisa yango elonami kati na mitema na peto. Lokola tozali na ekateli ya kotemela bamposa ya nzoto na masumu, tozali kolikya kotambwisama na elimo santu ya Nzambe mpe kolanda litambwisi yango. Elimo ezali kokomisa biso bato na bopolo mpe na kimya, kasi “bato na lolendo te, bato na kowelana te, bato ya bilulela mpe te.” Ezali bongo likambo na kokamwa te ete ezali esengo na kokutana na baoyo bazali komonisa mbuma na elimo!—Bagalatia 5:22-26.
Bantina mosusu ya kozala na esengo
14. Molato nini tozali na yango mposa kati na etumba na biso kotemela bilimu mabe?
14 Na bonsomi ya elimo oyo Nzambe asili kopesa biso, litomba mosusu libakisami likoló na yango: tobatelami liboso na Satana mpe bilimu mabe. Mpo na kolonga kati na etumba liboso na banguya mabe ya elimo, tosengeli kolata “molato mobimba na etumba na Nzambe.” Esengeli na biso kolata solo lokola mokaba mpe boyengebene lokola ebateli na ntolo. Makolo na biso masengeli kolata esaleli ya nsango malamu na kimya. Tozali mpe na mposa ya ngubá na kondima, na lisalisi na yango tokoki kozimisa mbanzi nyonso na mɔ́to na oyo mabe. Tosengeli kolata ekoti na lobiko mpe kosimba “mopanga na elimo,” elingi koloba Liloba na Nzambe. Lisusu, ‘tobondelaka ntango nyonso kati na elimo.’ (Baefese 6:11-18) Soki tolati molato na etumba na elimo mpe tobwaki misala na bilimu mabe, tokoki kozala na kobanga te, tokozala nde na esengo.—Tala Misala 19:18-20.
15. Litomba nini ya esengo tozali na yango mpo na etamboli na biso oyo eyokani na Liloba na Nzambe?
15 Tozali na esengo mpamba te etamboli na biso ezali na boyokani na Liloba na Nzambe mpe tozali kooka te ete tokweisami kati na lisosoli na biso, lokola ebele na basali na masumu bazali kotungisama. ‘Tozali kotyaka motema na biso na likambo oyo ete ntango nyonso tozala na lisosoli na sembo liboso na Nzambe mpe liboso na bato.’ (Misala 24:16) Na yango, tozali kobanga te etumbu na Nzambe oyo ekokwea likoló na bato oyo bazali kosala masumu na nkó mpe bazangi kobongola motema. (Matai 12:22-32; Baebele 10:26-31) Na kosalelaka Masese 3:21-26, toyei koyeba kokokisama ya maloba oyo ete: “Batela mayele na solo mpe bososoli. Ekozala bomoi mpo na molimo na yo mpe kitoko mpo na nkingo na yo. Boye okotambola na nzela na yo na kimya mpe lokolo na yo ekobeta libaku te. Ekolala yo mpongi na yo ekozala kitoko. Banga mpo na nsomo na pwasa te mpe na kobeba na bato mabe te, wana ekoya yango. Mpo ete Jéhovah akozala elikya na yo mpe akobatela lokolo na yo ete lozwama te.”
16. Na nini libondeli ezali liziba na esengo, mpe mokumba nini elimo na Jéhovah ezali kokokisa kati na likambo yango?
16 Tozali na liziba mosusu ya esengo: bonsomi oyo Nzambe asili kopesa biso ezali kobenda biso na kobelama pene na ye kati na libondeli na elikya ete akoyoka biso. Ee, mabondeli na biso mazali kondimama mpamba te tozali na “bobangi ya Jéhovah.” (Masese 1:7) Lisusu, tokoki komibatela kati na bolingo ya Nzambe soki tozali ‘kobondela kati na elimo santu.’ (Yuda 20, 21) Ezali yango nde tosalaka na komonisaka ezalela ya motema oyo endimami na Jéhovah mpe na kobondelaka na nse na bopusi ya elimo, kosengaka biloko oyo bizali na boyokani na mokano na ye mpe na Liloba na ye, oyo ezali komonisa biso lolenge nini kobondela mpe nini tosengeli kosenga kati na libondeli. (1 Yoane 5:13-15) Soki tozwi mpenza mpasi mpe toyebi te nini tosengeli kosenga kati na mabondeli na biso, ‘elimo ekosunga biso kati na bolembu na biso, mpo ete ekobondelaka mpo na biso na maloba mayokani te.’ Nzambe akoyokaka mabondeli ya motindo wana. (Baloma 8:26, 27) Tobondela mpo na kosenga elimo santu, mpe topesa nzela na elimo yango ete ebota kati na biso bamoko na bambuma na yango oyo tozali na yango mposa mpenza mpo na kolonga momekamo moko. (Luka 11:13) Esengo na biso ekokola mpe soki tozali koyekola Liloba na Nzambe lipemami na lisalisi libondeli mpe na molende, bakisa mpe mikanda na boklisto oyo mibongisami na litambwisi ya elimo.
Lisalisi ya ntango nyonso oyo lizali litomba
17. Na nini likambo Moize akutanaki na yango mpe maloba ya David emonisi ete Jéhovah azali kotika libota na ye te?
17 Lokola tozali kosalela bonsomi oyo Nzambe apesi biso na lolenge esengeli, tozali na esengo ya koyeba ete Jéhovah azali elongo na biso. Ntango makambo mabe matindaki ye ete atika Ezipito, na kondima Moize “ayikaki mpiko lokolo ete azalaki komona Ye oyo akomonanaka te.” (Baebele 11:27) Azalaki kotambola ye moko te; ayebaki ete Jéhovah azalaki elongo na ye. Motindo moko, bana ya Koré bayembaki ete: “Nzambe azali ekimelo mpe nguya mpo na biso; amonani solo na kosunga na ntango na mpasi. Boye tokobanga te, ata mokili ekoningana, ata ngomba ekobwakama kati na mai monene, ata mai yango ekonguluma mpe ekotoka, ata ngomba ekoningana mpo na kotomboka yango.” (Nzembo 46:1-3) Soki tozali na kondima motindo wana epai na Nzambe, akotika biso te. David alobaki ete: “Ata tata mpe mama bakotika ngai, nde Jéhovah akolokota ngai.” (Nzembo 27:10) Oyo nde esengo na koyeba ete Nzambe azali kobatela basaleli na ye na motindo yango!—1 Petelo 5:6, 7.
18. Mpo na nini baoyo bazali na esengo ya Jéhovah bazali na bonsomi oyo ezali kosunga bango ete bamelama te kati na nsomo?
18 Lokola tozali na esengo ya Jéhovah, bonsomi oyo Nzambe apesi biso ezali kosunga biso ete tozala na nsomo te. Paulo alobi ete: “Bomitungisa mpo na likambo moko te nde kati na makambo nyonso tika ete bisengeli na bino biyebana epai na Nzambe na mabondeli mpe na malombo mpe na matondi. Mpe kimya na Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekosenzela mitema na bino mpe bikaniselo na bino kati na Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:6, 7) Kimya na Nzambe ezali libóndi moko eleki nyonso, ata kati na makambo maleki mpasi. Na lisalisi na yango, motema na biso mozali ya kokita, likambo oyo lizali litomba mpo na biso kati na elimo, na mayoki mpe na nzoto. (Masese 14:30) Ezali kosalisa biso lisusu na kobatela bokatikati na makanisi, mpamba te toyebi ete likambo moko te oyo Nzambe apesi nzela ekoki kopesa biso mpasi ya libela. (Matai 10:28) Soki tozali na kimya yango, oyo ezali bongo kozwama na nzela na boyokani malamu elongo na Nzambe na nsima na Klisto, ezali mpo ete tomipesi na Nzambe mpe ete tozali kotosa litambwisi ya elimo santu na ye, oyo ezali kobota mbuma na elimo lokola esengo mpe kimya.
19. Mpo na kozala na esengo likoló na nini tosengeli kotya motema na biso?
19 Kobatela motema na biso likoló na bonsomi oyo Nzambe apesi biso mpe likoló na elikya ya Bokonzi ekosalisa biso na kozala na esengo. Na ndakisa, mbala mosusu tokoki mpenza kosala eloko te mpo na kosilisa bokono moko kati na nzoto, nzokande tokoki, na nzela na libondeli, kosenga mayele mpe nguya mpo na kolonga ezalela yango; mpe tokoki kozwa elendiseli na kokanisaka na kongolono ya elimo oyo tozali na yango lelo mpe na kobikisama oyo ekosalema na nse na boyangeli ya Bokonzi. (Nzembo 41:1-3; Yisaya 33:24) Atako lelo mbala mosusu tozali kokelela, nzokande biloko bisengeli mpo na bomoi bikozanga te na mabelé oyo makobongolama paradis oyo esili kobelema mpenza. (Nzembo 72:14, 16; Yisaya 65:21-23) Ee, Tata na biso ya likoló azali kosunga biso lelo mpe, na mikolo mizali koya, akokokisa esengo na biso nyonso.—Nzembo 145:14-21.
Tosepela na bonsomi oyo Nzambe asili kopesa biso
20. Engebene Nzembo 100:1-5, lolenge nini tosengeli komimonisa liboso na Jéhovah?
20 Biso baoyo tozali kati na libota na Jéhovah, tosengeli mpenzampenza kosepela na bonsomi oyo Nzambe asili kopesa biso mpe oyo ezali komemela biso esengo mpe matomba mingi mosusu. Na bongo ezali likambo na kokamwa te ete Nzembo 100:1-5 elendisi biso ete tomonana liboso na Nzambe na “lokito na kosepela.” Jéhovah azali Nkolo na biso mpe azali kobatela biso lokola Mobateli na mpate na bolingo. Na yango, “tozali bato na ye, mpate na elanga na ye.” Lokola azali Mozalisi mpe azali na bizaleli minene, yango ezali kopusa biso na kokota na lopango na ye ya bulee na masanzoli mpe na matondi mingi. Tobendami na ‘kopambola nkombo na ye,’ na ndimbola mosusu koloba malamu mpo na Jéhovah Nzambe. Lisusu, tosengeli ntango nyonso kotya motema likoló na malamu na ye, likebi na ye ya motema mawa, epai na biso. “Bileko na bileko,” Jéhovah azali sembo, komonisaka ntango nyonso bolingo epai na baoyo bazali kosala mokano na ye.
21. Elendiseli nini tozali kokuta kati na nimero ya liboso ya La Tour de Garde, mpe likambo nini tosengeli kosala na kotalela bonsomi oyo Nzambe asili kopesa biso?
21 Lokola tozali bato bazangi kokoka, tokoki kopengola mimekamo nyonso te. Nzokande, na lisalisi ya Nzambe, tokoki kozala ba Témoins de Jéhovah ya mpiko mpe ya esengo. Na ntina yango, maloba oyo tozali kokuta kati na nimero ya liboso ya La Tour de Garde (juillet 1879) mazali ntango nyonso na ntina: “Zala na mpiko . . . ndeko na ngai mobali to mwasi kati na Klisto, yo moto ozali koluka kokima na litambe ya bozito kati na nzela moke. Nzela na ye etondi na mabanga: koyoka mawa te; esili mpenza kopetolama mpe kobulisama na matambe mapambolami ya Nkolo. Talela nzube nyonso lokola fololo; libanga nyonso lipeli lokola elembo oyo ezali kokumba yo nokinoki epai na lobiko. . . . Tya miso na yo likoló na mbano.” Bamilió na bato oyo bazali kosalela Jéhovah na ntango na biso bazali kotala libonza mpe bazali na bantina mingi ya kozala na mpiko mpe na esengo. Elongo na bango, totelema ngwi mpo na bonsomi oyo Nzambe asili kopesa biso. Tobebisa te libaku na yango, mpe tika ete esengo na Jéhovah ezala ntango nyonso nguya na biso!
Bozongeli
◻ Ndenge nini “esengo na Jéhovah” ekoki kozala nguya na biso?
◻ Kati na makambo na losambo, matomba nini bonsomi oyo Nzambe azali kopesa ezali komema epai na basaleli na ye?
◻ Mpo na nini tosengeli kosalelana lokola baombo, kati na bolingo?
◻ Tanga mwa matomba oyo mazwami na bonsomi oyo Nzambe asili kopesa biso.
◻ Ndenge nini basaleli na Nzambe bakoki kozala na esengo ntango nyonso?
[Elilingi na lokasa 23]
“Talela nzube nyonso lokola fololo; libanga nyonso lipeli lokola elembo oyo ezali kokumba yo nokinoki epai na lobiko”