Elimo na Jéhovah ezali kokamba libota na ye
“Elimo na yo ezali malamu; tika ete ekamba ngai na mokili na sembo!”—NZEMBO 143:10.
1, 2. Nini ekoki kobangisa basaleli na sembo ya Jéhovah?
‘NAZALI mpenza kotungisama kati na makanisi! Epai wapi nakoki kozwa elendiseli? Nzambe asili kotika ngai?’ Ekomelaka yo na kozala na makanisi oyo? Soki ee, yeba ete ozali yo moko te kati na ezalela oyo. Atako bazali kofanda kati na paradis kitoko ya elimo, basaleli na sembo ya Jéhovah bazali mbala mosusu na mikakatano, na mimekamo mpe na masenginya oyo ekokomelaka bato nyonso, mpe yango ezali kotungisa motema na bango.—1 Bakolinti 10:13.
2 Mbala mosusu ozali kokutana na momekamo moko oyo ezali kosila te to na ntango moko ya motungisi makasi. Ekoki kozala ete ozali kolela liwa ya molingami moko mpe ete ozali mpenza komiyoka ete otikali yo moko. Ntango mosusu ekoki kozala ete ozali na mawa mingi mpo ete moninga moko ya motema azali kobela. Makambo wana makoki kolongola yo esengo mpe kimya, ata mpe kozala likama mpo na kondima na yo. Osengeli kosala nini?
Senga na Nzambe elimo na ye
3. Soki likambo moko epimeli biso bizaleli lokola kimya mpe esengo, likambo nini ebongi ete tosala?
3 Soki likambo moko elongoli biso esengo, elongoli biso kimya to ezaleli mosusu ya Nzambe, ezali malamu kobondela Nzambe ete apesa biso elimo santu na ye to bokasi na ye bokosalaka mosala. Mpo na nini? Mpo ete elimo na Jéhovah ekobotaka mbuma malamu oyo ezali kosalisa baklisto na kolonga mikakatano, mimekamo mpe masenginya. Nsima na kokebisa baklisto mpo na “misala na nzoto,” ntóma Paulo akomaki ete: “Nde mbuma na elimo ezali: bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, malamu, kondima, bopolo mpe komikanga motema. Mibeko [mpo na] kotemela makambo yango mizali te.”—Bagalatia 5:19-23.
4. Liboso na momekamo to na lisenginya, mpo na nini ezali malamu ete tosala mabondeli ya sikisiki?
4 Na kotalela lolenge na momekamo oyo tokutani na yango, mbala mosusu tosili komona ete likama ezali koyela biso: oyo ya kobungisa ezaleli na biso ya bopolo. Na likambo motindo wana, tosengeli kozala sikisiki mpe kobondela Jéhovah Nzambe ete apesa biso mbuma wana ya elimo santu. Soki tomekami, ezali komikanga motema to komipekisa nde tozali na yango mposa. Mpenzampenza, ekozala mpe malamu kosenga na Nzambe ete asalisa biso na kotelema ngwi liboso na lisenginya, na kosikola biso na maboko ya Satana mpe apesa biso mayele masengeli mpo na kolonga momekamo.—Matai 6:13; Yakobo 1:5, 6.
5. Soki makambo mosusu mazali mpenza kobulunganisa biso na boye ete toyebi te mbuma nini ya elimo tokoki kosenga kati na libondeli, eloko nini tosengeli kosala?
5 Nzokande, mbala mosusu, makambo mosusu makoki kobangisa mpenza te kobulunganisa koleka na boye ete tozali koyeba te soki mbuma nini ya elimo tozali na yango mposa. Elingi koloba ete, mbala mosusu esengo, kimya, bopolo mpe bizaleli mosusu ya Nzambe bizangi biso mpenza. Na bongo esengeli kosala nini? Mpo na nini te kosenga epai na Nzambe elimo santu yango moko mpe kotika elimo yango ete ebimisa mpenza epai na biso bambuma oyo tozali na yango mposa? Ekoki kozala bolingo, esengo, kimya to mbuma ndenge na ndenge ya elimo. Tobondela mpe Nzambe ete asalisa biso na komisokisa na nse na litambwisi ya elimo na ye, mpamba te azali kosalela yango mpo na kokamba libota na ye.
Jéhovah asepelaka kosalisa biso
6. Ndenge nini Yesu amonisaki na bayekoli na ye ete esengeli kobondela ntango nyonso?
6 Bayekoli mosusu na Yesu Klisto basengaki ye ete alakisa bango lolenge ya kobondela, mpe kati na makambo mosusu, ye alakisaki bango mpenza ete basengaka elimo na Nzambe. Asalelaki liboso lisese moko mpo na kopusa bango ete babondelaka ntango nyonso. Alobaki ete: “Nani kati na bino, soko azali na moninga, akokende kokutana na ye na butu mpo na koloba na ye ete: ‘Moninga, defisa ngai mampa misato, mpo ete moko kati na baninga na ngai akomeli ngai na mobembo, mpe nazali na eloko na kotya liboso na ye te?’ Mpe, kati na ndako, moninga mosusu ayanoli ye ete: ‘Tika kotungisa ngai. Ekuke esili kokangama mpe bana na ngai bazali na ngai elongo na mbeto; nakoki kobima kopesa yo yango te.’ Nalobi na bino ete: ata soki akobima mpo na kopesa ye yango te mpo azali moninga na ye, nde akobima mpenza, mpo na motungisi na ye mpe akopesa ye nyonso oyo azali na yango mposa.”—Luka 11:5-8, MN.
7. Na mokuse, Yesu alobi nini kati na mokapo ya Luka 11:11-13, mpe endimiseli nini maloba yango mazali kopesa biso, mingi mpenza na ntina na Nzambe mpe elimo na ye?
7 Jéhovah asepelaka kosalisa basaleli na ye nyonso ya sembo, mpe azali koyoka malombo na bango. Kasi soki moko kati na bango ‘alandi kosenga,’ lokola Yesu asilaki kolendisa biso, yango emonisi mposa ya solo, ezali elembo ya kondima (Luka 11:9, 10) Klisto abakisaki ete: “Ee, tata nani kati na bino oyo, soki mwana na ye asengi ye mbisi akopesa ye nyoka na esika ya mbisi? to nani, soki asengi lóki, akopesa ye nkotó? Na bongo, soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi kopesa na bana na bino makabo oyo mazali malamu, Tata na bino na likoló akoleka kopesa elimo santu na bango balombi ye te?” (Luka 11:11-13) Soki tata moko awa na mabelé, atako azali mabe mingi to moke mpo na ezalela na ye ya mosumuki oyo azwaki uta kobotama na ye, azali kopesa biloko malamu na mwana na ye, ezali solo ete Tata na biso ya likoló akolanda kopesa elimo santu na ye na moto nyonso oyo, kati na basaleli na ye ya sembo, akosenga ye yango na komikitisa nyonso.
8. Na nini Nzembo 143:10 ezali kotalela Davidi, Yesu mpe basaleli na Nzambe na ntango na biso?
8 Mpo na kozwa elimo na Nzambe, tosengeli mpe kozala na mposa ya kolanda litambwisi na ye lokola Davidi alandaki yango. Abondelaki boye ete: “Lakisa ngai ete nasala mokano na yo mpo ete ozali Nzambe na ngai. Elimo na yo ezali malamu; tika ete ekamba ngai na mokili na sembo!” (Nzembo 143:10) Saulo, mokonzi na Yisraele, atalelaki Davidi lokola motomboki, yango wana Davidi alingaki ete elimo na Nzambe ekamba ye mpo na komindimisa ete etamboli na ye ezali sembo. Na nsima, Abiatala ayaki na efode ya nganga mpo na koyeba mokano ya Nzambe. Lokola azalaki nganga ya Nzambe, Abiatala alakisaki Davidi nzela asengeli kolanda mpo ete andimama epai na Jéhovah. (1 Samwele 22:17 kino 23:12; 30:6-8) Lokola Davidi, Yesu atambwisamaki na elimo na Jéhovah, mpe ezalaki motindo moko mpo na kelasi ya bayekoli na Klisto bapakolami. Na 1918-1919, bayinamaki na bato nyonso, mpe banguna na bango bakonzi na mangomba na mokili bakanisaki ete babomi bango. Bapakolami babondelaki mpo ete babima kati na ezalela na bango ya kozanga mosala, mpe, na 1919, Nzambe ayokaki mabondeli na bango, asikolaki bango mpe apesaki bango lisusu molende kati na mosala na ye. (Nzembo 143:7-9) Na ntembe te, elimo na Jéhovah esalisaki mpe ekambaki libota na ye, lokola ezali mpe kosala yango lelo.
Lolenge oyo elimo ekosalisaka biso
9. (a) Na nini elimo santu ezali “mosungi”? (b) Ndenge nini toyebi ete elimo santu ezali moto te? (Tala note.)
9 Yesu abengaki elimo santu “mosungi.” Alobaki boye na bayekoli na ye: “Ngai nakobondela Tata mpe akopesa bino mosungi mosusu ete afanda na bino libela. Elimo na solo oyo bamokili bakoki kozwa te mpo bazali komona yango te mpe bakoki koyeba yango te. Bino nde bozali koyeba yango, mpo ete ezali koumela epai na bino, ezali mpe kati na bino.” Kati na makambo mosusu, “mosungi” yango asengelaki kozala molakisi, mpamba te Klisto apesaki elaka oyo elandi: “Kasi mosungi, elimo santu, oyo Tata akotinda na nkombo na ngai, ekolakisa bino makambo nyonso mpe ekokundwela bino makambo nyonso masili ngai koloba na bino.” Elimo esengelaki mpe kopesa litatoli mpo na Klisto, oyo apesaki epai na bayekoli na ye endimiseli oyo: “Ekozala mpo na litomba na bino ete nakende. Mpamba te soki nakei te, mosungi akoya epai na bino te, kasi soki nakei, nakotindela bino ye.”—Yoane 14:16, 17, 26; 15:26; 16:7, MN.a
10. Na makambo nini elimo santu emonanaki ete ezali mosungi?
10 Mokolo ya Pantekote ya mobu 33, uta na likoló, Yesu asopaki elimo santu elakamaki likoló na bayekoli na ye. (Misala 1:4, 5; 2:1-11) Lokola mosungi, elimo epesaki bango mayele mingi ya mozindo likoló na mokano mpe mosala ya Nzambe, mpe elimbwelaki bango Liloba na ye ya esakweli. (1 Bakolinti 2:10-16; Bakolose 1:9, 10; Baebele 9:8-10) Mosungi wana apesaki mpe epai na bayekoli na Yesu nguya esengeli mpo bazala batatoli na mabelé mobimba. (Luka 24:49; Misala 1:8; Baefese 3:5, 6) Lelo, elimo santu ekoki kosalisa moklisto ete akola kati na boyebi soki asaleli malamu bibongiseli ya elimo oyo Nzambe azali kokamata na nsima na “moombo na sembo mpe na mayele.” (Matai 24:45-47) Elimo na Nzambe ekoki kosunga basaleli na Jéhovah na kopesa bango mpiko mpe nguya oyo bazali na yango mposa mpo na kopesa litatoli. (Matai 10:19, 20; Misala 4:29-31.) Kasi, elimo santu ezali mpe kosunga basaleli na Nzambe na ndenge mosusu.
“Na bileli na biso bizangi maloba”
11. Moklisto asengeli kosala nini soki akutani na momekano moko oyo eleki makasi na ye?
11 Moklisto asengeli kosala nini soki akutani na momekamo moko oyo eleki makasi na ye? Ya solo, asengeli kobondela mpo na kosenga elimo santu, mpe kotika yango kosala mosala na yango. Paulo alobi ete, “Elimo ekosungaka biso kati na bolembu na biso; mpamba te likambo ezali: mpo ete toyebi te kobondela na motindo mokoki. Nde kati na bileli na biso bizangi maloba, elimo yango moko ekobondelaka mpo na biso. Ye oyo akotalaka kati na mitema na bato ayebi yango ezali elimo kokanisa mpo ete ekobondelaka mpo na babulami na boyokani na mokano na Nzambe.”—Baloma 8:26, 27.
12, 13. (a) Ndenge nini Baloma 8:26, 27 ezali kokokana mpo na mabondeli masalemi na ntango na mikakatano makasi? (b) Paulo mpe baninga na ye basalaki nini ntango bazwaki monyoko makasi kati na distrike ya Azia?
12 Babulami oyo elimo santu ezali kosenga mpo na bango bazali bayekoli na Yesu bapakolami, baoyo bazali na elikya ya likoló. Kasi ezala ete aponami mpo na bomoi na likoló to azali na elikya ya kofanda na mabelé, moklisto nyonso akoki kozwa lisungi ya elimo santu na Nzambe. Ntango mosusu Jéhovah akopesaka eyano mbala moko na libondeli moko ya sikisiki. Nzokande, mbala mosusu, tokoki kozala na mpasi makasi na boye ete tozali kokoka koloba te mpasi oyo tozali kooka: tokoki bobele kobelela Jéhovah na bileli bizangi maloba. Mpo na koloba malamu, soki tozali kobondela te mpo na kozwa elimo santu, ekoki kozala ete tokoyeba te nzela nini eleki malamu mpo na biso, ntango mosusu mpe tokosenga te oyo tozali na yango mposa. Nzambe ayebi ete tolingi mokano na ye ekokisama mpe ayebi eloko nini tozali na yango mposa mpenza. Lisusu, na lisalisi ya elimo santu na ye, asalaki na boye ete mabondeli mingi makomama kati na Liloba na ye, mpe mabondeli yango masalemaki na bato oyo bakutanaki na mikakatano makasi. (2 Timoté 3:16, 17; 2 Petelo 1:21) Mpo na yango, Jéhovah akoki kotalela mayoki mosusu oyo mayebisami kati na mabondeli wana mapemami lokola makambo oyo tolingi koloba, biso baoyo tozali basaleli na ye, mpe akoki kondima yango.
13 Paulo mpe baninga na ye bayebaki te mbala mosusu eloko nini basengelaki kosenga kati na libondeli ntango bazwaki monyoko kati na distrike ya Azia. Lokola ‘batungisamaki makasi, koleka nguya na bango, bazalaki koyoka kati na bango moko ete bazwi etumbu ya liwa.’ Kasi basengaki epai na bandeko mosusu ete babondela mpo na bango mpe batyaki elikya na bango epai na Nzambe, oyo akoki kosekwisa bakufi, mpe na ntembe te asungaki bango mpenza (2 Bakolinti 1:8-11) Oyo nde elendiseli na koyeba ete Jéhovah Nzambe akoyokaka mabondeli ya basaleli na ye ya sembo mpe akopesaka eyano mpo na yango!
14. Soki Jéhovah apesi nzela ete momekamo moko eumela mwa ntango, matomba nini makoki kozwama na yango?
14 Lisangá ya Nzambe ezali mbala na mbala kokutana na mimekamo. Lokola tosilaki kolobela yango mwa liboso, basaleli na Nzambe banyokwamaki na boumeli na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Bazalaki mpenza na boyebi ya sikisiki te mpo na etelemelo na bango liboso na Nzambe mpe na bongo bazalaki koyeba te eloko nini basengeli kosenga mpenzampenza kati na libondeli; nzokande, Liloba na Nzambe ezalaki na mabondeli ya bisakweli oyo Mozalisi andimaki. (Nzembo 69, 102, 126; Yisaya, mokapo 12) Bongo soki Jéhovah apesi nzela ete momekamo moko eumela mwa ntango? Ekoki kopesa litatoli; yango ekoki kopusa bato mosusu na kondima solo; na bongo, baklisto bazali na libaku ya komonisa bolingo ya bondeko na kobondelaka mpo na baninga na bango oyo bazali konyokwama to na kosalisaka bango na lolenge mosusu. (Yoane 13:34, 35; 2 Bakolinti 1:11) Tobosana likambo oyo te: Jéhovah azali kotambwisa basaleli na ye na nzela na elimo santu, azali kopesa bango oyo ezali malamu mpo na bango, mpe azali ntango nyonso kotambwisa makambo na lolenge oyo ezali kokumisa mpe kobulisa nkombo na ye mosantu.—Exode 9:16; Matai 6:9.
Toyokisa elimo mawa te
15. Baklisto bakoki kondimisama ete elimo na Jéhovah ekosala likambo nini mpo na litomba na bango?
15 Na yango, soki tozali basaleli na Jéhovah, esengeli na biso kobondela na boumeli ya mimekamo mpe na bantango mosusu mpo na kozwa elimo santu. Na nsima kosala nyonso mpo na kolanda litambwisi na yango, mpamba te Paulo akomaki ete: “Boyokisa elimo santu na Nzambe mawa te; botyami elembo kati na yango mpo na mokolo na lisiko.” (Baefese 4:30) Mpo na baklisto ya sembo bapakolami, elimo santu ezalaki na ntango wana—mpe ezali lisusu lelo—elembo, elingi koloba ‘ndanga mpo na makambo mazalaki koya liboso,’ elingi koloba bomoi ezangi kufa kati na likoló. (2 Bakolinti 1:22; Baloma 8:15; 1 Bakolinti 15:50-57; Emoniseli 2:10) Ezala baklisto bapakolami to baoyo bazali na elikya ya kofanda na mabelé bakoki kondimisama ete elimo na Jéhovah ekosalisa bango na makambo mingi. Ekoki kotambwisa bango kati na bomoi moko ya sembo mpe kosunga bango ete bakima misala na nzoto oyo ekomemela mpo na baoyo bazali kosala yango, koboyama na Nzambe bakisa mpe kobungisa elimo santu na ye, mpe oyo ekopimela bango bomoi ya seko.—Bagalatia 5:19-21.
16, 17. Ndenge nini moklisto moko akoki koyokisa elimo mawa?
16 Ndenge nini moklisto moko, na kososola to kozanga kososola, akoki koyokisa elimo mawa? Tobosana te ete Jéhovah azali kosalela elimo na ye mpo na kolendisa bomoko ya lisangá mpe mpo na kotya mibali na motó na yango. Na bongo, mosangani moko ya lisangá oyo akoimaima mpo na bankulutu, oyo akopalanganisa maloba na kotuka mpe bongo na bongo, akomitika kokambama na elimo santu na Nzambe te na nzela ya kimya mpe ya bomoko. Kosalaka bongo, akoyokisa elimo mawa.—1 Bakolinti 1:10; 3:1-4, 16, 17; 1 Batesaloniki 5:12, 13, Yuda 16.
17 Ntango akomelaki baklisto ya Efese, Paulo akebisaki bango na ezaleli ya kobuka lokuta, ya kosilika ntango molai, ya koyiba, ya elobeli elongobani te, na mposa mabe ya pite, na etamboli ya nsoni mpe na makambo ya mbindo. Soki moklisto moko amitiki kobendama na makambo motindo wana, akosala na boyokani te na batoli na Biblia oyo ekomami na bopusi ya elimo santu. (Baefese 4:17-29; 5:1-5) Na bongo, akoyokisa elimo na Nzambe mawa.
18. Nini ekoki kokomela moklisto nyonso oyo abandi kotyola batoli ya Liloba na Nzambe oyo ekomami na litambwisi ya elimo santu?
18 Na yango, moklisto nyonso oyo abandi kotyola batoli ya Liloba na Jéhovah oyo ekomami na litambwisi ya elimo akoki komitika kokolisa makanisi to bizaleli oyo bikoki komema ye na kosala lisumu na nko mpe na bongo kobungisa ngolu na Nzambe. Ata soki akosala lisumu na ntango wana te, ekoki kozala ete azali komikamba na nzela yango. Moklisto motindo wana oyo akomitika kotambwisama na elimo santu te akoyokisa elimo mawa. Na bongo, akotemela mpe Jéhovah, Eutelo na elimo santu, mpe akoyokisa ye mawa. Ata mbala moko te moto oyo alingi Nzambe akozala na mposa ya kosala likambo motindo wana!
Tolanda kosenga elimo santu
19. Mpo na nini basaleli na Jéhovah bazali na mposa ya elimo na ye, mingi mpenza lelo?
19 Soki tozali kosalela Jéhovah, tolanda kobondela mpo na kozwa elimo santu na ye. Mingi mpenza na “mikolo ya nsuka” oyo, epai bazali kobika na ntango ya mpasi, baklisto bazali na mposa na lisalisi ya elimo santu na Nzambe. (2 Timoté 3:1-5) Diable mpe bilimu mabe na ye, awa basili kobimisama na likoló mpe bazali sikawa zingazinga na mabelé, bazali kobundisa lisangá ya Jéhovah. Na ntina yango, basaleli na Nzambe bazali mpenza na mposa mingi ya elimo santu mpo ete ekamba bango, mpe epesa bango nzela na koyika mpiko liboso na mimekamo mpe monyokoli.—Emoniseli 12:7-12.
20, 21. Mpo na nini tosengeli kolanda litambwisi ya Liloba, ya elimo mpe ya lisangá na Jéhovah?
20 Topesa ntango nyonso motuya monene na lisalisi oyo Jéhovah Nzambe azali kopesa na nzela na elimo santu na ye. Tolanda litambwisi ya Liloba na ye, Biblia, oyo ekomamaki na nse na bopusi ya elimo. Tosala ntango nyonso na boyokani elongo na lisangá na Nzambe awa na mabelé, yango mpe etambwisami na elimo. Tomitika te komekola etamboli moko ezangi koyokana na Biblia, mpo ete wana ekoyokisa elimo santu mawa, yango ekoki kolongolama epai na biso, mpe tokozwa libebi na elimo.—Nzembo 51:11.
21 Lolenge bobele moko ya kondimama epai na Jéhovah mpe kozala na bomoi ya kimya mpe esengo, ezali ya komitika kotambwisama na elimo na ye. Tomikundola lisusu ete Yesu abengaki elimo santu “mosungi” to “mobondisi.” (Yoane 14:16, note, ebimeli ya Lingelesi oyo ezali na mitindami.) Na lisalisi ya elimo na ye, Nzambe azali kobondisa baklisto mpe azali kolendisa bango mpo ete bakoka kolonga mimekamo. (2 Bakolinti 1:3, 4) Elimo ekopesaka nguya epai na basaleli na Jéhovah mpo ete basakola nsango malamu mpe ezali kosunga bango na komikundola makanisi ya Biblia oyo bazali na yango mposa mpo na kopesa litatoli kitoko. (Luka 12:11, 12; Yoane 14:25, 26; Misala 1:4-8; 5:32) Na lisalisi ya libondeli mpe na litambwisi ya elimo, baklisto bazali na mayele ya likoló oyo ezali kopesa bango nzela na kozala balongi kati na mimekamo oyo kondima na bango ezali kozwa. Na bongo, kati na makambo nyonso ya bomoi, bazali kolanda kobondela mpo na kozwa elimo santu ya Nzambe. Mpo na yango, elimo na Jéhovah ezali kokamba libota na ye.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Atako ebengami “mosungi,” elimo santu oyo elobelami lokola moto ezali moto te; na yango, ezali likitana oyo elobeli mobali te mpe mwasi te to pronom neutre nde bagreke basalelaki mpo na kolobela yango. Motindo moko, ezali makitana ya liebele mpo na komonisa bomwasi nde esalelami mpo na kolobela mayele lokola moto atako ezali moto te. (Masese 1:20-33; 8:1-36) Na koleka, elimo santu “esopamaki,” nzokande moto akoki kosopama te.—Misala 2:33.
Bozongeli
◻ Mpo na nini tosengeli kobondela mpo na kozwa elimo santu ya Jéhovah?
◻ Na ndimbola nini elimo santu ezali mosungi?
◻ Koyokisa elimo mawa elimboli nini, mpe elako nini tosengeli kosala mpo ete toyokisa elimo mawa te?
◻ Mpo na nini tosengeli kobondela ntango nyonso mpo na kozwa elimo santu mpe kolanda litambwisi na yango?
[Elilingi na lokasa 15]
Lokola tata na bolingo ayebi kopesa biloko malamu na mwana na ye, bobele bongo Jéhovah azali kopesa elimo santu epai na basaleli na ye oyo bazali kosenga ye yango
[Elilingi na lokasa 17]
Oyebi lolenge nini elimo na Nzambe ezali kosenga mpo na boklisto oyo bazali kobondela?