‘Opiká misisa mpe otɛlɛmi makasi likoló ya moboko’?
OSILÁ komona nzete moko monene ezali koningana ntango mopɛpɛ makasi ezali kobɛta yango? Nzete yango ezali koningana makasi, kasi ezali kokwea te. Mpo na nini? Mpo misisa na yango epikamá makasi na mabele. Tokoki kozala lokola nzete yango. Ntango tokutani na mikakatano ya bomoi oyo ezali lokola mopɛpɛ makasi, biso mpe tokokwea te soki tokobi ‘kopika misisa mpe kotɛlɛma makasi likoló ya moboko.’ (Ef. 3:14-17) Moboko yango ezali nini?
Liloba ya Nzambe elobi ete “Kristo Yesu ye moko azali libanga ya litumu ya moboko” ya lisangá ya bokristo. (Ef. 2:20; 1 Ko. 3:11) Biblia elendisi biso bakristo ete ‘tókoba kotambola na bomoko elongo na ye, tópika misisa mpe tótongama na kati na ye mpe tótɛlɛma ngwi na kondima.’ Soki tosali bongo, tokolonga kotɛmɛla komekama nyonso ya kondima na biso, na ndakisa oyo eyaka lokola “maloba ya kondimisa” oyo euti na “bokosi ya mpambampamba” ya bato.—Kol. 2:4-8.
“Bonene mpe bolai mpe bosanda mpe bozindo”
Kasi, ndenge nini tokoki “kopika misisa” mpe “kotɛlɛma ngwi na kondima”? Lolenge moko ya malamu ya kopika misisa makasi na mabele na ndenge ya elilingi, ezali ya koyekola na molende Liloba ya Nzambe, oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu. Yehova alingi ete ‘tósosola na makanisi elongo na basantu nyonso bonene mpe bolai mpe bosanda mpe bozindo’ ya solo. (Ef. 3:18) Na yango, mokristo moko te asengeli kotikala kaka na boyebi ya likolólikoló, to kosuka kaka na koyeba “mateya ya ebandeli” oyo ezali na Liloba ya Nzambe. (Ebr. 5:12; 6:1) Kasi, mokomoko na biso asengeli kozala na mposa makasi ya kokolisa boyebi na ye ya mateya ya Biblia.—Mas. 2:1-5.
Ya solo, yango elimboli te ete tosengeli kaka kozala na boyebi mingi ya mateya ya solo mpo ‘tópika misisa mpe tótɛlɛma makasi’ na kati ya solo. Kutu, ata Satana ayebi makambo oyo ezali na Biblia. Tosengeli kosala likambo mosusu. Tosengeli “koyeba bolingo ya Kristo oyo eleki boyebi.” (Ef. 3:19) Nzokande, ntango tozali koyekola mpo tolingi Yehova mpe tolingi solo, soki boyebi na biso ya Liloba ya Nzambe ebakisami, kondima na biso ekokóma makasi.—Kol. 2:2.
Meká boyebi na yo
Sikoyo, tosɛngi yo omeka boyebi na yo ya mwa mateya minene oyo ezali na Biblia. Kosala yango ekoki kolendisa yo okóma na molende mingi na koyekola Biblia yo moko. Na ndakisa, tángá bavɛrsɛ ya liboso ya mokanda ya ntoma Paulo epai ya Baefese. (Talá etanda “Epai ya Baefese.”) Nsima ya kotánga bavɛrsɛ yango, omituna boye, ‘Nakangaka mpenza ntina ya maloba oyo etɛngisami na etanda yango?’ Tótalela yango mokomoko.
Toponamaki “liboso ya ebandeli ya mokili”
Paulo akomelaki bandeko na ye bakristo ete: “[Nzambe] akanaki liboso ete akokamata biso mpe akokómisa biso bana na ye na nzela ya Yesu Kristo.” Ya solo, Yehova abongisaki kokómisa bato mosusu bana na ye mpe kokɔtisa bango na libota na ye ya kokoka na likoló. Bato yango oyo Nzambe akómisi bana na ye bakozala bakonzi mpe banganga-nzambe elongo na Kristo. (Rom. 8:19-23; Em. 5:9, 10) Ntango Satana abimisaki mpo na mbala ya liboso ntembe na ntina na boyangeli ya Yehova, maloba na ye emonisaki ete Nzambe asalaki bato malamu te. Yango wana, Yehova asalaki malamu mpenza ndenge aponaki kaka bato mpo bápesa mabɔkɔ na mosala oyo nsukansuka ekolongola mabe nyonso na mokili, ata mpe mobandisi na yango, Satana Zabolo! Atako bongo, Yehova aponaki liboso te moto mokomoko oyo akozala na kati ya bato oyo akokómisa bana na ye. Nzambe abongisaki nde ete ekozala na etuluku moko ya bato oyo bakoyangela elongo na Kristo na likoló.—Em. 14:3, 4.
“Mokili” nini Paulo alobelaki ntango akomelaki bandeko na ye bakristo ete bango nyonso lokola etuluku, baponamaki “liboso ya ebandeli ya mokili”? Azalaki te kolobela eleko oyo ezalaki liboso Nzambe azalisa mabele to bato. Yango elingaki koyokana te na boyengebene ya Nzambe. Ndenge nini Nzambe akokaki kosambisa Adama ná Eva mpo na makambo oyo basalaki soki asilaki kokana ete bakokwea na lisumu, liboso kutu asala bango? Na yango, ntango nini Nzambe azwaki ekateli ya kobongisa likambo oyo ebimaki ntango Adama ná Eva balandaki Satana na botomboki oyo atombokelaki boyangeli ya Nzambe? Yehova azwaki ekateli yango kaka ntango bankɔkɔ na biso ya liboso basalaki lisumu, kasi liboso ete mokili ya bato ya kozanga kokoka, oyo bakoki kosikolama, ebanda.
“Na kolanda bomɛngo ya boboto monene na ye”
Mpo na nini Paulo alobaki ete bibongiseli oyo elobelami na bavɛrsɛ ya liboso ya mokanda epai ya Baefese ezwamaki “na kolanda bomɛngo ya boboto monene [ya Nzambe]”? Alobaki yango mpo na komonisa ete Yehova asɛngisamaki te ete asikola bato ya masumu.
Mpo na koloba solo, moko te kati na biso abongi kosikolama. Kasi, lokola Yehova alingaka bato mingi, azwaki bibongiseli ya malamu mpo na kosikola biso. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka mpe bato ya masumu, kosikolama na biso ezali boboto monene, ndenge Paulo alobaki yango.
Sekele mosantu ya mokano ya Nzambe
Na ebandeli, Nzambe ayebisaki te ndenge oyo akobongisa makambo oyo Satana abebisaki. Ezalaki “sekele mosantu.” (Ef. 3:4, 5) Na nsima, ntango lisangá ya bokristo ebotamaki, Yehova ayebisaki makambo mosusu oyo etali ndenge akokokisa mokano oyo azalaki na yango na ebandeli mpo na bato mpe mabele. Paulo alobaki ete “na nsuka mpenza ya bantango oyo etyamá,” Nzambe abandisaki “mosala ya kotambwisa makambo,” elingi koloba ndenge ya kobongisa makambo oyo ekosala ete bikelamu nyonso básangisama.
Kosangisama ya liboso ebandaki na Pantekote ya mobu 33 T.B. ntango Yehova abandaki koyanganisa bato oyo bakoyangela elongo na Kristo na likoló. (Mis. 1:13-15; 2:1-4) Koyanganisama ya mibale esengelaki kozala ya bato oyo bakozala na bomoi na paradiso awa na mabele na Bokonzi ya Masiya. (Em. 7:14-17; 21:1-5) Maloba “mosala ya kotambwisa makambo” ekeseni na Bokonzi ya Masiya, mpo Bokonzi yango ebandaki koyangela na 1914. Kasi, maloba yango elimboli ndenge oyo Nzambe azali kobongisa makambo mpo na kokokisa mokano na ye ya kozongisa bomoko na molɔ́ngɔ́ mobimba.
“Bókóma mikóló na makoki ya kososola”
Na ntembe te, koyekola Biblia yo moko mbala na mbala ekosalisa yo oyeba mpenza “bonene mpe bolai mpe bosanda mpe bozindo” ya mateya ya solo. Kasi, na ntembe te, lokola tozalaka na makambo ebele ya kosala na bomoi ya lelo, Satana akoki kozwa nzela ya kolɛmbisa, ata mpe kobebisa, momeseno na biso ya koyekola. Kotika te ete asala bongo epai na yo. Salelá “mayele” oyo Nzambe apesá yo mpo okóma ‘mokóló na makoki ya kososola.’ (1 Yoa. 5:20; 1 Ko. 14:20) Luká koyeba ntina oyo ondimaka makambo oyo ozali kondima mpe ete okoki ntango nyonso koyebisa ‘ntina ya elikya oyo ozali na yango.’—1 Pe. 3:15.
Kanisá ete ozalaki na Efese ntango batángaki mpo na mbala ya liboso mokanda oyo Paulo akomelaki bango. Maloba na ye elingaki te kotinda yo oluka kokola “na boyebi ya solosolo ya Mwana ya Nzambe”? (Ef. 4:13, 14) Na ntembe te, olingaki kosala bongo! Yango wana, tiká maloba oyo Paulo akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe etinda yo lelo oyo osala bongo. Kozala na bolingo makasi mpo na Yehova mpe boyebi ya solosolo ya Liloba na ye ekosalisa yo okoba ‘kopika misisa mpe kotɛlɛma makasi likoló ya moboko,’ elingi koloba Kristo. Na ndenge yango, okokoka koyika mpiko ata liboso ya mokakatano nini oyo Satana akoki kobimisela yo liboso mokili oyo mabe ebomama.—Nz. 1:1-3; Yir. 17:7, 8.
[Etanda/Elilingi na lokasa 27]
“Epai ya Baefese”
“Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Kristo apambwama, mpo apamboli biso na lipamboli nyonso ya elimo na bisika ya likoló na bomoko elongo na Kristo, ndenge mpe aponaki biso na bomoko elongo na ye liboso ya ebandeli ya mokili, mpo tózala basantu mpe tózanga mbeba liboso na ye na kati ya bolingo. Mpo akanaki liboso ete akokamata biso mpe akokómisa biso bana na ye na nzela ya Yesu Kristo, ndenge mokano na ye elingi, mpo básanzola ye mpo na boboto monene na ye ya nkembo oyo amoniselaki biso na boboto mpenza na nzela ya Mwana na ye ya bolingo. Mpo na ye tosikolami na nzela ya lisiko na makila ya moto wana, ɛɛ, tolimbisami mabunga na biso, na kolanda bomɛngo ya boboto monene na ye. Atondisaki biso yango mingi na bwanya nyonso mpe na mayele, na ndenge ayebisaki biso sekele mosantu ya mokano na ye. Yango eyokani na makambo oyo asepelaki kosala na kolanda mokano na ye mpo na mosala ya kotambwisa makambo na nsuka mpenza ya bantango oyo etyamá, elingi koloba, koyanganisa lisusu biloko nyonso esika moko na nse ya bokonzi ya Kristo, biloko oyo ezali na likoló mpe biloko oyo ezali na mabele.”—Ef. 1:3-10.