Yehova asakolaka “makambo ya nsuka longwa na ebandeli”
“Oyo akosakola makambo ya nsuka longwa na ebandeli, mpe longwa ntango ya kala makambo masalemi naino te.”—YISAYA 46:10.
1, 2. Likambo nini ezali kokamwisa na makambo nyonso oyo etali kokwea ya Babilone, mpe yango emonisi nini na ntina na Yehova?
NA MOLILI ya butu, basoda ya Sirise bazali kokatisa Ebale Pelata na makolo mpe bazali kopusana malɛmbɛmalɛmbɛ na engumba makasi ya Babilone. Ntango bakómi pene na ekuke ya engumba yango, bamoni likambo moko ya kokamwa. Ekuke monene wana oyo ekangamaka na bizibeli mibale etikali polele! Babimi na ebale mpe bakɔti na engumba. Na mwa ntango moke, engumba yango ekwei. Kozanga koumela, Sirise akómi koyangela ekólo yango oyo balongi. Na nsima, abimisi mobeko ete Bayisalaele bázonga na mboka na bango. Bankóto ya baombo yango bazongi na mboka na bango mpo na kozongisa losambo ya Yehova na Yelusaleme.—2 Ntango 36:22, 23; Ezela 1:1-4.
2 Lelo oyo, bato ya mayele na masolo ya kala bamonisi ete makambo wana, oyo esalemaki banda na mobu 539 tii na mobu 537 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), ezali masapo mpamba te. Likambo ya kokamwa ezali ete makambo yango esakolamaki mbula soki 200 liboso esalema. Na lisalisi ya elimo santu, Yehova atindaki mosakoli na ye Yisaya ebele ya bambula liboso ayebisa ndenge Babilone ekokwea. (Yisaya 44:24-45:7) Nzambe ayebisaki kaka te makambo oyo ekosalema ntango Babilone ekokwea, kasi mpe nkombo ya mokonzi oyo akolonga yango.a Yehova alobaki na Bayisalaele, batatoli na ye na ntango wana ete: “[Bókanisa] makambo ya liboso ya kala, mpo ete ngai nazali Nzambe mpe mosusu azali te; ngai nazali Nzambe, mosusu azali lokola ngai te, oyo akosakola makambo ya nsuka longwa na ebandeli, mpe longwa ntango ya kala makambo masalemi naino te.” (Yisaya 46:9, 10a) Yehova azali mpenza Nzambe oyo akoki koyeba ntango molai liboso makambo oyo ekosalema.
3. Tokoluka sikoyo biyano ya mituna nini?
3 Nzambe ayebi makambo nyonso oyo ezali liboso? Yehova ayebaka liboso makambo oyo mokomoko na biso akosala na bomoi na ye? Tokoki nde koloba ete makambo nyonso ya bomoi na biso esilá kotángama? Na lisolo oyo mpe oyo elandi, tokozwa biyano ya Biblia na mituna wana mpe na mituna mosusu.
Yehova, Nzambe ya bisakweli
4. Bisakweli ya Biblia eutaki epai ya nani?
4 Lokola Yehova azali na likoki ya koyeba makambo oyo esalemi naino te, atindaki basaleli na ye ya kala bákoma na lisalisi ya elimo santu bisakweli mingi, oyo ezali kosalisa biso tóyeba liboso makambo oyo akosala. Yehova alobaki boye: “Talá makambo ya kala masili kokoka, mpe nazali kosakola makambo ya sika; naino ebimi yango te, nazali koyebisa bino mpo na yango.” (Yisaya 42:9) Oyo nde lipamboli monene mpo na basaleli ya Nzambe!
5. Koyeba liboso makambo oyo Yehova akosala ememaka mokumba nini?
5 Mosakoli Amosa ayebisi biso boye: “Nkolo [Yehova] akosala likambo te bobɛlɛ ete akoyebisa mwango na ye epai ya baombo na ye, bango basakoli.” Koyeba liboso makambo oyo ekosalema ememelaki bango mpe mokumba. Talá elilingi ya kitoko mpenza oyo Amosa asalelaki na nsima: “Nkɔsi angulumi, nani akobanga te?” Ndenge kaka bato ná banyama balukaka mbala moko komibikisa soki nkɔsi engulumi penepene na esika bazali, basakoli lokola Amosa bazalaki mpe mbala moko kosakola makambo oyo Yehova alobi. “Nkolo [Yehova] alobi, nani akosakola te?”—Amosa 3:7, 8.
“Liloba” ya Yehova “ekolonga”
6. Ndenge nini “toli” ya Yehova elongaki na oyo etali kokwea ya Babilone?
6 Na nzela ya mosakoli na ye Yisaya, Yehova alobaki boye: “Toli na ngai ekotɛlɛma mpe nakokokisa mokano mobimba na ngai.” (Yisaya 46:10b) “Toli” ya Nzambe, elingi koloba mokano na ye mpo na Babilone, ezalaki ya kobenga Sirise moto ya Perse mpo aya kokweisa Babilone. Yehova ayebisaki mokano yango mosika mpenza liboso. Ndenge kaka tolobaki liboso, likambo yango ekokisamaki na mobu 539 L.T.B.
7. Mpo na nini tokoki kozala na elikya ete Liloba ya Yehova ezangaka kokokisama te?
7 Mbula soki nkama minei liboso Sirise alonga Babilone, Baamona ná Bamoaba bayaki kobundisa Yosafata, Mokonzi ya Yuda. Yosafata abondelaki na kondima nyonso ete: “E [Yehova], Nzambe ya batata na biso, yo ozali Nzambe kati na Likoló te? Yo ozali mokonzi likoló ya mikonzi ya mabota nyonso te? Nguya mpe nkembo ezali na lobɔkɔ na yo, boye moko te ayebi kotɛmɛla yo.” (2 Ntango 20:6) Yisaya mpe amonisaki kondima ya ndenge wana ntango alobaki ete: “Yehova ya bibele ye moko alobi yango, mpe nani akoki kolongola yango? Asemboli lobɔkɔ na ye, nani akozongisa yango nsima?” (Yisaya 14:27, NW) Bambula na nsima, ntango Mokonzi Nebukadanesala ya Babilone abikaki na ligboma oyo abɛlaki, alobaki na komikitisa nyonso ete: “Moto moko akoki kopekisa lobɔkɔ na ye te, to kolobela ye ete, Ozali kosala nini?” (Danyele 4:35) Ɛɛ, Yehova azali koloba na basaleli na ye ete: “Liloba na ngai . . . ekozonga epai na ngai mpamba te, kasi ekozanga te kosala oyo motema na ngai esepeli, mpe ekolonga mpenza na likambo oyo ngai natindaki yango.” (Yisaya 55:11, NW) Tokoki mpenza kozala na elikya ete “Liloba” ya Yehova ezangaka te kokokisama. Mokano ya Nzambe ezangaka te kokokisama.
“Mokano ya seko” ya Nzambe
8. “Mokano ya seko” ya Nzambe ezali nini?
8 Na mokanda na ye epai ya baklisto ya Efese, ntoma Paulo alobaki ete Nzambe azali na “mokano ya seko.” (Baefese 3:11) Elingi koloba te ete Nzambe asengelaki naino kobongisa eloko mokomoko liboso asala likambo moko. Ezali nde komonisa ete Yehova akani mpenza kokokisa mokano oyo azalaki na yango na ebandeli mpo na bato mpe mpo na mabelé. (Genese 1:28) Mpo tóndima ete mokano na ye ekoki kozanga kokokisama te, tótalela esakweli ya liboso ya Biblia.
9. Ndenge nini Genese 3:15 ezali komonisa mokano ya Nzambe?
9 Elaka ya Genese 3:15 ezali komonisa ete ntango kaka Adama ná Eva basalaki lisumu, Yehova akanaki ete mwasi na ye ya elilingi akobota momboto to mwana. Yehova amonisaki mpe ndenge bonguna kati na mwasi na ye mpe Satana, mpe kati na bana na bango ekosuka. Atako Yehova asengelaki kotika ete Satana aswa Momboto ya mwasi ya Nzambe na litindi, na ntango oyo Nzambe abongisá, Momboto akopanza motó ya nyoka, to Satana Zabolo. Liboso ntango yango ekoka, mokano ya Yehova ya kobimisa momboto ekokisamaki banda na Abalayama tii na koya ya Yesu, Masiya oyo alakamaki.—Luka 3:15, 23-38; Bagalatia 4:4.
Oyo Yehova abongisá liboso
10. Yehova abongisaki banda na ebandeli ete Adama ná Eva básala lisumu? Limbolá.
10 Mpo na esika ya Yesu na kati ya mokano ya Nzambe, ntoma Petelo akomaki boye: “[Yesu] ayebaná kala mpenza liboso ya ebandeli ya mokili, kasi amonisamaki polele na nsuka ya bantango mpo na bino.” (1 Petelo 1:20) Yehova Nzambe abongisaki nde banda na ebandeli ete Adama ná Eva bakosala lisumu mpe ekosɛnga ete Yesu Klisto apesa mbeka ya lisiko? Te. Liloba “ebandeli” euti na liloba ya Grɛki oyo elimboli mpenzampenza kobwaka mboto. Momboto ebwakamaki to mwasi moko azwaki zemi liboso Adama ná Eva básala lisumu? Te. Adama ná Eva babotaki bana nsima ya kobuka mobeko ya Nzambe. (Genese 4:1) Na yango, Yehova ayaki kokana kobimisa “momboto” kaka nsima ya botomboki wana, liboso Adama ná Eva bábota bana. Liwa mpe lisekwa ya Yesu epesaki nzela na lisiko, nzokande lisumu oyo Adama ná Eva batikelá biso mpe milende nyonso ya Satana ekosukisa.—Matai 20:28; Baebele 2:14; 1 Yoane 3:8.
11. Makambo nini Yehova abongisaki liboso oyo etali kokokisama ya mokano na ye?
11 Mpo na kokokisama ya mokano na ye, ezali na likambo mosusu oyo Nzambe abongisá. Likambo yango emonani na maloba oyo Paulo akomelaki Baefese, ete Nzambe ‘akoyanganisa lisusu biloko nyonso esika moko na kati ya klisto, biloko oyo ezali na likoló mpe biloko oyo ezali na mabelé.’ Na nsima, mpo na “biloko oyo ezali na likoló,” elingi koloba bato oyo baponamá mpo na kozwa libula elongo na Klisto, Paulo alobaki ete: “Tosilaki kokanama liboso engebene mokano ya moto oyo azali kosala makambo nyonso na kolanda toli oyo mokano na ye ezali kopesa.” (Baefese 1:10, 11) Ɛɛ, Yehova akanaki banda kala ete mwa ndambo ya bato bakozala mpe na kati ya momboto ya mwasi ya Nzambe mpe bakosala elongo na klisto mpo na kokabolela bato matomba ya mbeka ya lisiko. (Baloma 8:28-30) Ntoma Petelo abengaki bango “libota moko mosantu.” (1 Petelo 2:9) Ntoma Yoane amonaki na emonaneli moko ete bato yango oyo bakoyangela elongo na Klisto bazali 144 000. (Emoniseli 7:4-8; 14:1, 3) Bakosala elongo na Klisto “mpo na kosanzolama ya nkembo [ya Nzambe].”—Baefese 1:12-14.
12. Ndenge nini toyebi ete mokomoko na kati ya bato 144 000 aponamaki liboso te?
12 Yango elingi koloba te ete mokomoko na bato yango 144 000 atángamaki ete akosalela Nzambe na bosembo na lolenge wana. Kutu, toli wana ya Makomami ya Grɛki ekomamaki libosoliboso mpo na kotambwisa mpe kolendisa bapakolami mpo bátikala sembo mpe bázala ntango nyonso bato oyo babongi mpo na kokende na likoló. (Bafilipi 2:12; 2 Batesaloniki 1:5, 11; 2 Petelo 1:10, 11) Yehova ayebi ete bato 144 000 bakokokisa masɛngami mpo na kosala mokano na ye. Kasi, lolenge oyo mokomoko na bango akopona kotamwisa bomoi na ye nde ekomonisa soki akotikala na kati ya bato yango; mpe bango moko nde bakozwa ekateli yango.—Matai 24:13.
Oyo Yehova ayebi mpo na mikolo ekoya
13, 14. Likoki ya Yehova ya koyeba makambo oyo esalemi naino te ezali na boyokani na nini, mpe mpo na nini?
13 Lokola Yehova azali Nzambe ya bisakweli mpe ya mikano, ndenge nini asalelaka likoki na ye ya koyeba makambo oyo esalemi naino te? Ya liboso, toyebi ete banzela nyonso ya Nzambe ezali solo, boyengebene mpe bolingo. Ntango ntoma Paulo akomelaki baklisto ya ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.), ayebisaki bango ete bilaka ya Nzambe ezali na “makambo mibale oyo ebongwanaka te oyo na kati na yango ekoki kosalema te ete Nzambe akosa.” (Baebele 6:17, 18) Na mokanda oyo akomelaki Tito, Paulo amonisaki mpe likanisi yango ntango akomaki ete Nzambe “akoki te kobuka lokuta.”—Tito 1:2.
14 Lisusu, atako Yehova azali na nguya oyo ezali na nsuka te, asalaka makambo mabe te. Moize alobaki ete Yehova azali “Nzambe ya sembo mpe ya mabe te; ye moyengebene mpe mosembwi.” (Deteronome 32:4) Makambo nyonso oyo Yehova asalaka eyokanaka na bomoto na ye ya kitoko mpenza. Misala na ye emonisaka boyokani oyo ezali na kati ya bizaleli na ye ya minene: bolingo, bwanya, boyengebene mpe nguya.
15, 16. Na elanga ya Edene, makambo nini Yehova asɛngaki na Adama apona?
15 Tótala sikoyo ndenge makambo nyonso wana eyokani na makambo oyo esalemaki na elanga ya Edene. Lokola Tata ya bolingo, Yehova apesaki bato biloko nyonso oyo bazalaki na mposa na yango. Apesaki Adama likoki ya kokanisa, kososola makambo mpe kozwa bikateli. Na bokeseni na banyama oyo balandaka kaka mayoki na bango, Adama azalaki na likoki ya kozwa bikateli. Na nsuka, Nzambe atalaki uta na likoló mpe amonaki “biloko nyonso bisilaki ye kozalisa, mpe ezalaki malamu mingi.”—Genese 1:26-31; 2 Petelo 2:12.
16 Ntango Yehova apesaki Adama mobeko ete alya te “mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe,” ayebisaki ye polele makambo nyonso oyo ekokaki kosalisa ye apona oyo alingi kosala. Apesaki Adama ndingisa ya kolya “mbuma ya nzete nyonso ya elanga,” longola kaka moko mpe akebisaki ye na makama oyo ekokaki kokómela ye soki alye mbuma ya nzete yango. (Genese 2:16, 17) Ayebisaki Adama polele makama oyo ekokaki kokómela ye soki asali lisumu. Adama asengelaki kosala nini?
17. Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova aponaka makambo oyo asepeli koyeba?
17 Emonani ete atako Yehova azali na likoki ya koyeba makambo nyonso oyo esalemi naino te, alukaki te koyeba oyo Adama ná Eva bakokaki kosala. Boye, likambo ezali te ya koyeba soki Yehova akoki koyeba makambo oyo esalemi naino te, kasi ezali nde soki aponi koyeba yango to te. Lisusu, tokoki koloba ete lokola Yehova azali Nzambe ya bolingo, akokaki te na nko nyonso kobongisa ete botomboki wana ná bampasi nyonso oyo yango ememá esalema. (Matai 7:11; 1 Yoane 4:8) Na yango, Yehova aponaka makambo oyo asepeli koyeba.
18. Atako Yehova aponaka makambo oyo asepeli koyeba, mpo na nini tokoki te koloba ete akoki koyeba makambo nyonso te?
18 Lokola Yehova aponaka makambo oyo asepeli koyeba, yango elimboli ete azali na likoki ya koyeba makambo nyonso te? Te. Moize alobaki ete Yehova azali “libanga,” mpe abakisaki ete: “Misala na ye ezali ya kokoka.” Tóloba te ete ye nde asalaki ete bato bámonaka mpasi oyo lisumu ebimisá. Mpasi nyonso oyo tozali komona lelo oyo eutá na lisumu wana. Ntoma Paulo amonisaki polele ete “lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpamba te bango nyonso basalaki lisumu.”—Deteronome 32:4, 5; Baloma 5:12; Yilimia 10:23.
19. Mituna nini tokolobela na lisolo oyo elandi?
19 Tomoni ete Yehova akoki kosala mabe te. (Nzembo 33:5) Kutu nde, makoki, bizaleli mpe mitinda na ye eyokani na mokano na ye. (Baloma 8:28) Lokola azali Nzambe ya bisakweli, asakolaka “makambo ya nsuka longwa na ebandeli, mpe longwa ntango ya kala makambo masalemi naino te.” (Yisaya 46:9, 10) Tomoni mpe ete aponaka makambo oyo asepeli koyeba. Ezali boni mpo na biso? Ndenge nini tokoki koyeba ete bikateli na biso eyokani na mokano ya Nzambe ya bolingo? Mpe yango ekomemela biso matomba nini? Lisolo oyo elandi ekolobela mituna wana.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá na mwa buku Un livre pour tous, lokasa 28, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
Okoki kolimbola?
• Wapi bandakisa ya kala oyo emonisi ete “liloba” ya Nzambe ezangaka te ‘kolonga’?
• Wapi likambo oyo Yehova abongisaki liboso mpo na kokokisama ya ‘mokano na ye ya seko’?
• Ndenge nini Yehova asalelaka likoki na ye ya koyeba makambo oyo esalemi naino te?
[Elilingi na lokasa 22]
Yosafata azalaki kotyela Yehova motema
[Elilingi na lokasa 23]
Nzambe asakolaki liwa mpe lisekwa ya Yesu
[Elilingi na lokasa 24]
Yehova abongisaki nde liboso makambo oyo Adama ná Eva basengelaki kosala?