Lisolo ya bomoi
Nazali kosalela Yehova na esengo atako nakómá ebɔsɔnɔ
YA VARNAVAS SPETSIOTIS
Na 1990, ntango nakómaki na mbula 68, nakómaki ebɔsɔnɔ. Atako bongo, nazali kosala mosala ya mobongisi-nzela na esengo nyonso banda mbula soki 15 awa na esanga Chypre. Nini epesi ngai makasi ya kokoba kosalela Yehova atako nakómá ebɔsɔnɔ?
NABOTAMAKI mwa 11 Ɔkɔtɔbɛ 1922, na libota moko ya bana libwa, minei ya mibali mpe mitano ya basi. Tozalaki kofanda na mboka Xylophagou, na esanga Chypre. Atako baboti na ngai bazalaki na mwa bozwi, kobɔkɔla ebele ya bana ndenge wana ezalaki kosɛnga koboma nzoto mpenza na mosala ya bilanga.
Tata na ngai, Antonis, azalaki kolinga kotánga mingi. Mwa moke nsima ya kobotama na ngai, Tata akendeki kotala molakisi moko ya mboka na biso mpe amonaki trakte moko oyo motó ya likambo na yango ezalaki, La tribune du Peuple, oyo ebimisamaki na Bayekoli ya Biblia (ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana). Abandaki kotánga yango, mpe asepelaki makasi na makambo oyo ezalaki na kati. Nsukansuka, Tata ná moninga na ye moko, Andreas Christou, bakómaki Batatoli ya Yehova ya liboso na esanga Chypre.
Bokoli esalemaki atako botɛmɛli ezalaki
Na nsima, bango mibale bazwaki mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia epai ya Batatoli ya Yehova. Mosika te, Tata ná Andreas babandaki koyebisa bato mosusu ya mboka solo oyo bazalaki koyekola. Bakutanaki na botɛmɛli makasi epai ya bakonzi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ná bato mosusu oyo bazalaki koloba ete Batatoli ya Yehova bazali kobebisa bato.
Bato mingi ya mboka bazalaki mpenza komemya bango. Tata ayebanaki mingi mpo na boboto mpe bokabi na ye. Mbala mingi, azalaki kosalisa mabota oyo ezalaki kokelela. Ntango mosusu azalaki kobima na butu mpe kokende na mayele kotika blé to mampa na minɔkɔ ya ndako ya mabota oyo ezalaki na bosɛnga. Motema wana ya komibanzabanza mpo na basusu etindaki bato mingi bákóma kosepela na mateya na bango.—Matai 5:16.
Nsukansuka, bato soki zomi na mibale bandimaki nsango ya Biblia. Ntango boyebi na bango ya Biblia ekolaki, babandaki koyangana na bandako ya bandeko mpo na koyekola Biblia elongo. Na 1934, Nikos Matheakis, mobongisi-nzela moko oyo autaki na Grèce, ayaki na Chypre mpe akómaki koyangana na etuluku ya boyekoli ya Xylophagou. Na motema molai mpe na etingya, Ndeko Matheakis atyaki molɔngɔ na etuluku yango mpe asalisaki bango báyeba lisusu Biblia malamumalamu. Na nsima, mwa etuluku yango ekómaki lisangá ya liboso ya Batatoli ya Yehova na Chypre.
Ntango mosala na bango ya kosakola ekómaki kokende liboso mpe bato mingi bandimaki solo ya Biblia, bandeko bakómaki na mposa ya esika mpo na makita na bango. Yaya na ngai George ná mwasi na ye Eleni bapesaki ndako na bango ya bibwele, oyo ezalaki na mpembeni ya ndako na bango. Bandeko babongisaki yango mpe bakómisaki yango esika moko kitoko mpo na makita. Na bongo, bandeko bazwaki Ndako ya Bokonzi ya liboso na esanga Chypre. Basepelaki mpenza! Mpe yango esalaki ete bokoli esalema!
Nafandisi solo
Na 1938, ntango nazalaki na mbula 16, naponaki kokóma mosali ya mabaya. Yango wana, Tata atindaki ngai na Nicosie, mboka-mokonzi ya Chypre. Na bwanya mpenza, Tata abongisaki ete nafanda epai ya Nikos Matheakis. Bato mingi ya esanga Chypre babosanaka ndeko wana ya sembo te mpo na molende mpe elimo na ye ya koyamba bapaya. Esengo mpe mpiko oyo azalaki na yango mpo na mosala ezalaki bizaleli oyo ebongaki mpenza mpo na moklisto nyonso na esanga Chypre na ntango wana.
Ndeko Matheakis asalisaki ngai mpenza nakóma na boyebi ya solosolo ya Biblia mpe nakola na elimo. Ntango nazalaki epai na ye, nazalaki koyangana na makita nyonso oyo ezalaki kosalema na ndako na ye. Mpo na mbala ya liboso, namonaki ete nakómi kolinga Yehova makasi. Nazwaki ekateli ya kokóma na boyokani ya solosolo na Nzambe. Mwa basanza na nsima, na 1939, natunaki Ndeko Matheakis soki nakoki kobimaka na ye na mosala ya kosakola.
Mwa moke na nsima, nakendeki kotala baboti. Mwa ntango oyo nalekisaki na tata esalisaki ngai namona mpenza ete nazwi solo mpe nayebi ntina ya bomoi. Na Sɛtɛmbɛ 1939, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki. Bilenge mingi ya mbula na ngai bandimaki kokende kobunda, kasi ngai nakendaki te mpo na kotosa malako ya Biblia. (Yisaya 2:4; Yoane 15:19) Kaka na mbula wana, namipesaki na Yehova mpe nazwaki batisimo na 1940. Mpo na mbala ya liboso, namiyokaki ete nazali lisusu na bobangi ya bato te!
Na 1948, nabalaki Efprepia. Tobotaki bana minei. Mosika te, tomonaki ete tosengeli kosala makasi mpo na kobɔkɔla bango “na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.” (Baefese 6:4) Mabondeli mpe milende nyonso oyo tozalaki kosala ezalaki mpo na kosalisa bana na biso bákóma mpenza kolinga Yehova mpe komemya mibeko mpe mitinda na ye.
Mikakatano ya nzoto
Na 1964, ntango nazalaki na mbula 42, lobɔkɔ na ngai ya mobali ná lokolo ekómaki kolɛmba. Mokemoke, ngámbo mosusu mpe ekómaki kolɛmba. Bazwaki ngai na maladi moko oyo ebomaka moto nzoto mobimba. Nsango yango elɛmbisaki ngai mpenza nzoto. Likambo yango ekómelaki ngai mpenza na mbalakaka! Natondaki na nkanda mpe na mawa na motema, mpe nazalaki komituna ete: ‘Mpo na nini likambo ya boye ekómeli ngai? Lisumu nini nasali mpo nazwa etumbu motindo oyo?’ Kasi, nsukansuka nakitisaki motema. Na nsima, nabandaki komitungisa mingi mpe komituna ebele ya mituna. Nzoto na ngai mobimba ekokufa mpe ekosɛnga bákóma kosalela ngai makambo nyonso? Nakosuka wapi? Nakozala lisusu na likoki ya kokokisa bamposa ya mwasi na ngai ná bana na biso minei? Likambo yango ezalaki kopesa ngai mpasi mingi.
Na ntango yango, nabandaki kobondela Yehova makasi mpe koyebisa ye na motema moko mitungisi na ngai nyonso. Nazalaki kobondela mpe kolela butu moi. Mosika te, nazwaki kimya. Namonaki mpenza bosolo ya maloba ya kobɔndisa oyo ezali na Bafilipi 4:6, 7: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na nzela ya libondeli mpe na lilɔmbɔ elongo na matɔndi tiká ete masɛngi na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makoki na bino ya kokanisa na nzela ya Klisto Yesu.”
Nazali kobunda na maladi
Nzoto na ngai ekobaki kobeba. Namonaki ete nasengeli noki mpenza kobongola makambo mingi na bomoi na ngai. Lokola nakokaki lisusu kosala mosala ya mabaya te, namonaki malamu naluka mosala oyo ekoki na makasi na ngai, mpe yango esalisaki ngai nakoba kokokisa bamposa ya libota na ngai. Na ebandeli, nabandaki kotɛka miliki ya malili na motuka moko ya moke. Nasalaki yango pene na mbula motoba, tii ntango nakómaki kotambola na velo ya bibɔsɔnɔ. Natikaki kotɛka miliki wana mpe nakómaki kosala misala ya mikemike oyo ekokaki na makasi na ngai.
Banda na 1990, nzoto na ngai ebebá makasi mpe nakoki lisusu kosala ata mwa mosala ya moke te. Sikoyo, bakómá kosalela ngai nyonso, ata mwa makambo ya mikemike oyo esɛngaka te básalela moto. Bamemaka ngai na mbeto, basukolaka mpe balatisaka ngai bilamba. Mpo na kokende na makita, batindikaka ngai na velo na ngai tii na motuka mpe bamatisaka ngai na motuka. Soki tokómi na Ndako ya Bokonzi, bakitisaka ngai na motuka, batyaka ngai na velo mpe batindikaka ngai tii na kati. Ntango makita ezali kosalema, batyelaka ngai masini moko ya mɔtɔ na pembeni ya makolo mpo na kopesa ngai molunge.
Atako nakómá ebɔsɔnɔ, nazangisaka ata likita moko te. Nayebi ete kuna nde Yehova ateyaka biso, mpe ete kozala elongo na bandeko na ngai ya elimo ezali libateli ya solosolo mpe elendiseli mpenza. (Baebele 10:24, 25) Lokola bandeko oyo bakɔmeli na elimo bayaka kotala ngai mbala na mbala, yango elendisaka ngai ntango nyonso. Namiyokaka mpenza ndenge Davidi amiyokaki: “Kɔpɔ na ngai etondi maa.”—Nzembo 23:5.
Mwasi na ngai ya bolingo asungi ngai mingi na boumeli ya bambula nyonso oyo. Bana na ngai mpe basungi ngai mingi. Na boumeli ya ebele ya bambula, bazali kokokisa bamposa na ngai nyonso. Bamoni mpasi mingi mpo na ngai, mpe lokola bambula ezali koleka, mpasi yango ezali se kobakisama. Bazali mpenza komonisela ngai motema molai mpe koboma nzoto mpo na ngai, mpe nazali kobondela Yehova ete akoba kopambola bango.
Yehova alendisaka basaleli na ye mpe na nzela ya libondeli. (Nzembo 65:2) Lokola eyano na mabondeli na ngai, Yehova apesi ngai makasi ya kobatela kondima na ngai na boumeli ya bambula oyo nyonso. Kobondela Nzambe ebɔndisaka ngai mpe esalisaka ngai nabungisa esengo na ngai te, mingimingi soki nakómi komitungisa. Kosolola ntango nyonso na Yehova elendisaka ngai mpe elendisaka lisusu ekateli na ngai ya kokoba kosalela ye. Nandimi mpenza ete Yehova ayokaka mabondeli ya basaleli na ye mpe apesaka bango kimya oyo basengeli na yango.—Nzembo 51:17; 1 Petelo 5:7.
Nalendisamaka koleka mpenza soki nakanisi ete nsukansuka Nzambe akobikisa bato nyonso oyo bakozala na Paladiso, oyo ekoyangelama na Mwana na ye, Yesu Klisto. Mbala mingi soki nakanisi elikya kitoko wana, mai ya miso etangaka ngai.—Nzembo 37:11, 29; Luka 23:43; Emoniseli 21:3, 4.
Mosala ya mobongisi-nzela
Na 1991, natalelaki bomoi na ngai mpe namonaki ete lolenge eleki malamu ya kobosana mpasi na ngai ezali ya komipesa mingi na koyebisa basusu nsango ya Bokonzi. Na mbula yango, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela.
Lokola nazali ebɔsɔnɔ, nasakolaka mingi na nzela ya mikanda. Nzokande, kokoma ezali pɛtɛɛ te mpo na ngai. Lokola maladi ebomá lobɔkɔ na ngai mpenza koboma, nazalaka na mokakatano mpenza ya kosimba biki. Kasi, molende mpe mabondeli esalisi ngai nasakola na lolenge wana mbula koleka 15 sikoyo. Nasakolaka mpe na telefone. Nalekisaka ata libaku moko te ya koyebisa bandeko, baninga mpe bato ya kartye oyo bayaka kotala ngai na ndako elikya na ngai mpo na mokili ya sika mpe mpo na Paladiso oyo ekozala awa na mabelé.
Mpo na yango, nakutani na makambo mingi ya esengo. Nazalaki na esengo ya komona ndenge nkɔkɔ na ngai moko oyo nayekolaki na ye Biblia eleki sikoyo mbula soki 12 akolaki na elimo mpe akómaki kolinga solo mingi. Lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia esalisaki ye atikala sembo mpe aboya kokɔta na makambo ya mokili.
Nasepelaka mingi soki bato oyo nakomeli mikanda batuni ngai mituna mosusu ya Biblia. Ntango mosusu, bamosusu basɛngaka ngai mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia. Na ndakisa, mwasi moko abengaki ngai na telefone mpe atɔndaki ngai mpo na mokanda ya kolendisa mpenza oyo natindelaki mobali na ye. Asepelaki mpenza na makanisi oyo ezalaki na mokanda yango. Ye ná mobali na ye bakómaki koya mbala na mbala na ndako na ngai mpo na masolo ya Biblia.
Nazali na elikya moko kitoko
Na boumeli ya bambula nyonso oyo, namoni ndenge basakoli bákómi ebele na esanga na biso. Mwa Ndako ya Bokonzi oyo ezali pene na ndako ya yaya na ngai George eyeisamá monene mpe ebongisamá mbala na mbala. Ezali sikoyo esika moko kitoko mpo na losambo, oyo masangá mibale ya Batatoli ya Yehova ezali kosalela.
Tata akufaki na 1943, na mbula 52. Kasi, atiká libula moko kitoko mpenza ya elimo! Na bana na ye libwa, mwambe bandimá solo mpe bazali kokoba kosalela Yehova. Masangá misato, oyo ezali na basakoli ya Bokonzi 230, ezali sikoyo na mboka Xylophagou, epai Tata abotamaki, mpe na bamboka ya mpembenimpembeni.
Soki natali matomba nyonso wana, natondaka mpenza na esengo. Sikoyo, ntango nakómi na mbula 83, nakoki koloba na elikya mpenza lokola mokomi ya nzembo oyo alobaki ete: “Bana ya nkɔsi bakozangaka mpe bakoyokaka nzala, kasi baoyo bakolukaka [ Yehova] bakozanga eloko malamu soki moko te.” (Nzembo 34:10) Nazelaka na elikya makasi ntango oyo esakweli ya Yisaya 35:6 ekokokisama: “Motɛngumi akopumbwa lokola mboloko.” Atako nakómá ebɔsɔnɔ, nazali kaka na ekateli ya kokoba kosalela Yehova na esengo nyonso tii na ntango wana.
[Karte na lokasa 17]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
TURQUIE
SYRIE
LIBAN
CHYPRE
Nicosie
Xylophagou
Mbu ya Meditelane
[Elilingi na lokasa 17]
Bazali kosalela Ndako ya Bokonzi ya liboso na Xylophagou tii lelo oyo
[Bililingi na lokasa 18]
Ngai ná Efprepia na 1946 mpe lelo oyo
[Elilingi na lokasa 20]
Nazalaka na esengo ya kosakola na telefone mpe na nzela ya mikanda