“Bino nyonso bozali bandeko”
“Bino bóbyangama Labi te, zambi moko azali molakisi na bino, bino nyonso bozali bandeko.”—MATAI 23:8.
1. Likambo nini ebongi tótalela yango?
NA EKÓLO moko ya Azia, ndeko mwasi moko moklisto atunaki misionɛrɛ moko ya mwasi oyo autá na Australie motuna oyo: “Na misionɛrɛ, na ndeko oyo asalaka na Betele, nani oyo tosengeli kopesa lokumu mingi?” Ndeko mwasi alingaki koyeba nani asengeli kozwa limemya mingi, misionɛrɛ oyo auti na mboka mopaya to ndeko oyo azali mwanamboka mpe asalaka na biro ya filiale. Ndeko mwasi misionɛrɛ wana akanisaki ata moke te ete bakoki kotuna ye motuna ya ndenge wana, oyo ezali komonisa ete na mboka wana bapesaka bato lokumu ndenge moko te. Ezali nde mposa ya koyeba bokonzi mpe lokumu oyo moto azali na yango nde etindaka bato na kotuna nani aleki.
2. Ndenge nini tosengeli kotalelaka bandeko na biso na kati ya lisangá?
2 Likambo yango ebandi lelo te. Kutu, ata bayekoli ya Yesu bazalaki mbala na mbala kowelana mpo na koyeba nani aleki baninga. (Matai 20:20-24; Malako 9:33-37; Luka 22:24-27) Bango mpe bautaki na Lingomba ya Bayuda na ekeke ya liboso, epai bazalaki kopesa bato mosusu lokumu mingi mpe bato mosusu lokumu moke. Lokola Yesu ayebaki makambo oyo ezalaki koleka na mboka wana, apesaki bayekoli na ye toli oyo: “Bino bóbyangama Labi te, zambi moko azali molakisi na bino, bino nyonso bozali bandeko.” (Matai 23:8) Albert Barnes, ye azali molimboli ya Biblia, alobaki ete titre ya lingomba lokola “Labi,” oyo elimboli “Molakisi,” “epesaka moto oyo azwi yango lolendo mpe amimonaka ete aleki basusu, mpe ye oyo azali na yango te alulaka yango mpe amimonaka ete azali na nse; nzokande elimo yango ya komikumisa mpe mposa wana eyokani te na ‘komikitisa oyo ezali na Klisto.’ ” Baklisto baboyaka kobenga bandeko na bango oyo bazali bakɛngɛli ete “Nkulutu Songolo,” lokola nde liloba “nkulutu” ezali titre ya lokumu. (Yobo 32:21, 22) Na ngámbo na bango mpe, bankulutu balandaka toli ya Yesu, bapesaka bandeko mosusu na kati ya lisangá lokumu, se ndenge oyo Yehova apesaka lokumu na baoyo basambelaka ye na bosembo mpe Yesu Klisto apesaka bayekoli na ye ya sembo lokumu.
Ndakisa ya Yehova mpe ya Yesu
3. Ndenge nini Yehova apesaki bikelamu na ye ya elimo lokumu?
3 Atako Yehova azali “Ye Oyo-Aleki-Likoló,” banda na ebandeli apesaki bikelamu na ye lokumu na ndenge apesaki bango mikumba na kati ya misala na ye. (Nzembo 83:18) Ntango Yehova akelaki moto ya liboso, asalaki elongo na Mwana mobotami-bobele-moko na ye oyo azalaki lokola “kapita-mosali.” (Masese 8:27-30, NW; Genese 1:26) Kutu, ntango Yehova azwaki mokano ya koboma mokonzi mabe Ahaba, atunaki baanzelu na ye kuna na likoló ndenge ya kosala mpo na koboma ye.—1 Mikonzi 22:19-23.
4, 5. Ndenge nini Yehova apesaka bato oyo akelaki lokumu?
4 Yehova azali Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. (Deteronome 3:24) Azali na mposa ya kotuna makanisi ya bato te. Kasi, tokoki koloba ete amikitisaka mpo na kotya likebi na ye epai na bango. Mokomi moko ya nzembo ayembaki ete: “Nani akokani na [Yehova] Nzambe na biso? Ye oyo akofandaka na likoló. Ye oyo akomikitisa mpo na kotala, epai na lola mpe kati na nse. [Akolongola] mobola na mputulu.”—Nzembo 113:5-8.
5 Liboso aboma Sodomo na Gomola, Yehova ayokaki mituna ya Abalayama mpe akokisaki mposa na ye ya koluka koyeba soki makambo ekosalema na bosembo. (Genese 18:23-33) Atako Yehova ayebaki epai oyo Abalayama alingaki kosuka na mituna na ye, ayokaki ye na motema molai mpe andimaki makanisi na ye.
6. Lokola Yehova apesaki Habakuku lokumu ntango atunaki motuna, likambo nini esalemaki na nsima?
6 Yehova ayokaki mpe Habakuku ntango atunaki ete: “Ɛ [Yehova] kino ntango nini nakobyanga mpe okoyoka te?” Yehova amonaki nde ete Habakuku abosani ete Ye azali mokonzi lokola atunaki motuna wana? Te, amonaki ete Habakuku asalaki malamu ndenge atunaki, mpe yango wana, ayebisaki ye ete azali na mokano ya kotinda Bakaladi mpo na kopesa etumbu. Ayebisaki mosakoli ete ‘etumbu oyo asakolaki esengelaki kokokisama.’ (Habakuku 1:1, 2, 5, 6, 13, 14; 2:2, 3) Lokola azwaki ntango ya koyoka mposa ya Habakuku mpe ya kopesa biyano na mituna na ye, Yehova apesaki mosakoli wana lokumu. Atako mosakoli yango azalaki liboso na mawa, yango esalaki ete akóma na esengo, mpe atyela Nzambe ya lobiko na ye motema. Mokanda ya Habakuku ezali komonisa likambo yango mpe ezali kolendisa elikya na biso epai ya Yehova lelo oyo.—Habakuku 3:18, 19.
7. Mpo na nini mokumba Petelo akokisaki na Pantekote ya mobu 33 ezali na ntina mingi?
7 Yesu Klisto mpe azali ndakisa malamu na likambo ya kopesa bato mosusu limemya. Ye alobaki na bayekoli na ye ete “ye oyo akowangana ngai liboso ya bato, ngai mpe nakowangana ye liboso ya Tata na ngai.” (Matai 10:32, 33) Kasi, na butu oyo bakabaki ye, bayekoli na ye nyonso bakimaki ye, mpe ntoma Petelo awanganaki ye mbala misato. (Matai 26:34, 35, 69-75) Yesu atalaki kaka te makambo oyo miso ezali komona kasi amonaki makambo oyo ezalaki na kati ya motema ya Petelo, amonaki ete abongolaki mpenza motema. (Luka 22:61, 62) Nsima ya mikolo 51 mpamba, Klisto apesaki ntoma yango oyo abongolaki motema lokumu: atikaki ye aloba na nkombo ya bayekoli 120 na mokolo ya Pantekote mpe asalela fungola ya liboso kati na “fungola ya Bokonzi ya Likoló.” (Matai 16:19; Misala 2:14-40) Petelo azwaki libaku malamu ya ‘kobongola motema mpe kolendisa bandeko na ye.’—Luka 22:31-33.
Tópesa bato ya libota na biso lokumu
8, 9. Ndenge nini mobali akoki kolanda ndakisa ya Yehova mpe ya Yesu na likambo ya kopesa mwasi na ye lokumu?
8 Mibali mpe baboti basengeli kolanda ndakisa ya Yehova na Yesu Klisto ntango bazali kosalela bokonzi oyo Nzambe apesi bango. Petelo apesaki toli oyo: “Bino mibali mpe ndenge moko, bófandaka na [basi na bino] na boyebi, bópesa bango lokumu mpo ete bazali lokola mbeki oyo ezalaka makasi te, mbeki ya bomwasi.” (1 Petelo 3:7, NW ) Kanisá ete ozali kosalela saani ya mbɛlɛ, oyo toyebi ete epasukaka mpambampamba koleka saani ya plastiki. Omoni te ete okosalela yango mpenza na ekɛngɛ? Mobali akoki kosala ndenge yango soki alandi ndakisa ya Yehova, soki azali koyoka makanisi ya mwasi na ye ntango bazali kozwa mikano oyo etaleli libota. Bóbosana te ete Yehova azwaki ntango ya kosolola na Abalayama. Lokola mobali azali moto ya kozanga kokoka, ekoki kozala ete azali komona mosika te na likambo moko. Akomonisa ete azali na mayele soki azali kopesa mwasi na ye lokumu, elingi koloba soki azali koyoka mpe makanisi na ye!
9 Na mikili oyo bapesaka bokonzi ya mobali lokumu mingi, mobali asengeli koyebaka ete mbala mosusu mwasi asengeli kosala makasi mpenza mpo ayebisa polele bamposa na ye. Bólanda ndenge oyo Yesu Klisto asalelaki bayekoli na ye ntango azalaki awa na mabele. Bayekoli yango bazali mpe na kati ya bato oyo bakozala mwasi ya Klisto. Alingaki bango mingi; azalaki kotalela bolɛmbu na bango ya nzoto mpe ya elimo liboso kutu báyebisa ye bamposa na bango. (Malako 6:31; Yoane 16:12, 13; Baefese 5:28-30) Mpe lisusu, zwáká ntango ya kotala misala oyo mwasi na yo azali kosala mpo na yo mpe mpo na libota mobimba mpe pesáká ye matɔndi, ezala na maloba mpe na misala. Yehova na Yesu basepelaki, bapesaki longonya, mpe bapambolaki bato oyo babongaki na yango. (1 Mikonzi 3:10-14; Yobo 42:12-15; Malako 12:41-44; Yoane 12:3-8) Ntango mobali na ye akómaki Motatoli ya Yehova, ndeko mwasi moko na ekólo moko ya Azia alobaki boye: “Kala ezalaki soki tozali kotambola na nzela, mobali na ngai azalaki kotika ngai na nsima na mikumba nyonso. Lelo akómá komema basakosi mpe apesaka ngai botɔndi mpo na misala oyo nasalaka na ndako!” Mwa maloba ya botɔndi oyo euti mpenza na motema ezalaka na ntina mingi mpo mwasi na yo amona ete azalaka na motuya na miso na yo.—Masese 31:28.
10, 11. Baboti bakoki kozwa liteya nini na ndakisa malamu ya Yehova na ndenge oyo azalaki kotalela Bayisalaele, libota ya motó makasi?
10 Ntango bazali kobɔkɔla bana, mingimingi ntango esɛngi bápesa bango etumbu, baboti basengeli kolanda ndakisa ya Nzambe. “[Yehova] akebisaki Yisalaele mpe Yuda” ete bátika banzela mabe na bango, kasi “bayeisaki nkingo na bango makasi.” (2 Mikonzi 17:13-15) Kutu, Bayisalaele “bakosaki ye na minɔkɔ na bango mpe balobelaki ye [lokuta na lolemo, NW ] na bango.” Baboti mingi bamonaka ete ntango mosusu bana na bango basalaka ndenge yango. Bayisalaele “bamekaki Nzambe” mpe bayokisaki ye mawa mpe bapesaki ye nkanda. Kasi, Yehova “atondaki na mawa; alimbisaki bango bokesene na bango mpe abomaki bango te.”—Nzembo 78:36-41.
11 Kutu Yehova abondelaki Bayisalaele ete: “Boye, tólobana likambo elongo moko . . . Ata masumu na bino izali motane lokola ngola, ikokóma pɛɛ lokola mbula mpɛmbɛ.” (Yisaya 1:18) Atako Yehova azalaki na foti te, abengaki libota yango ya motó makasi mpo bábongisa makambo. Talá elimo malamu oyo baboti basengeli kolanda ntango bazali kobɔkɔla bana na bango! Soki likambo moko esɛngi yango, bópesa bana na bino lokumu, bóyoka makanisi na bango, mpe bólimbolela bango ntina oyo basengeli kobongola makanisi na bango.
12. (a) Mpo na nini tosengeli te kopesa bana na biso lokumu koleka Yehova? (b) Tokosala nini mpo na kobatela lokumu ya bana na biso ntango tozali kopamela bango?
12 Ya solo, esɛngaka ntango mosusu kobenda bana matoi. Baboti basengeli kozala lokola Eli te, ye ‘azalaki kokumisa bana na ye koleka Yehova.’ (1 Samwele 2:29) Atako bongo, esengeli ete bana bámonaka ete baboti bazali kosembola bango mpo na bolamu na bango. Basengeli komonaka ete baboti na bango balingaka bango. Paulo apesaki batata toli oyo: “Bóyokisa bana na bino nkanda te, kasi bóbɔkɔla bango na mateya mpe na mpamela ya Nkolo.” (Baefese 6:4) Ya solo, tata asengeli komonisa ete azali mokonzi na kati ya libota, kasi likanisi ezali ete tata asengeli mpe kopesa bana na ye lokumu, elingi koloba asengeli te kozala na makambo makasi, yango ekosilikisa bango. Ya solo, mpo na kobatela lokumu ya bana ezali kosɛnga ntango mpe milende epai ya baboti, kasi soki basali bongo ekobotela bango mbuma malamu.
13. Biblia elobi nini mpo na mibange na kati ya libota?
13 Kopesa bato ya libota lokumu esuki kaka na mwasi na bana te. Lisese moko ya bato ya Japon elobaka ete: “Ntango okómi mobange, tosáká bana na yo.” Liteya ya lisese yango ezali ete baboti oyo bakómi mibange basengeli koluka te kolakisa bokonzi na bango lokola baboti mpe basengeli koyokaka bana na bango oyo bakómi mikóló. Atako Makomami elobi ete baboti báyokaka bana na bango mpo na komonisa ete bazali kopesa bango lokumu, bana basengeli kozala na limemya epai ya mibange na kati ya libota. Masese 23:22 elobi ete: “Tyolá mama na yo te wana ekonuna ye.” Mokonzi Salomo asalelaki maloba ya lisese yango mpe apesaki mama na ye lokumu ntango mama na ye akendaki kosɛnga ye likambo moko. Salomo asɛngaki bátya kiti mosusu ya bokonzi na lobɔkɔ ya mobali ya kiti na ye mpe ayokaki makambo oyo Bata-seba, mama na ye, atako akómaki mobange, alingaki koyebisa ye.—1 Mikonzi 2:19, 20.
14. Ndenge nini tokoki kopesa mibange lokumu na kati ya lisangá?
14 Na libota na biso monene ya elimo, ebongi mpenza “tózalaka bato ya liboso” mpo na kopesa mibange lokumu na kati ya lisangá. (Baloma 12:10, NW ) Mbala mosusu bazali lisusu na makasi ya kosala ndenge oyo bazalaki kosala liboso te, mpe likambo yango ekoki kopesa bango mawa na motema. (Mosakoli 12:1-7) Mokolo mosusu, Motatoli moko mobange mpe azali mopakolami, lokola aumelaki na mbeto ya lopitalo, amonisaki mawa yango na maloba oyo: “Nazali kokoka te kozelaka tii nakufa bongo nazongela lisusu mosala.” Tokoki kosalisa mibange ya ndenge wana soki tozali kondima misala na bango mpe soki tozali kopesa bango lokumu. Mobeko moko oyo bapesaki Bayisalaele elobaki boye: “Okotɛlɛma liboso na nsuki mpɛmbɛ mpe okokumisa mobali anuni.” (Levitike 19:32) Pesá mibange lokumu, lakisá bango ete tozali na mposa na bango mpe tosepelaka na bango. ‘Kotɛlɛma’ ekoki mpe kolimbola kofanda mpo na koyoka bango ntango bazali kobɛtela biso masolo ya makambo oyo basalá. Yango ekopesa mobange lokumu mpe tokobakisa bozwi na biso ya elimo.
‘Bózalaka bato ya liboso mpo na kopesa lokumu’
15. Bankulutu bakoki kosala nini mpo na kopesa bandeko lokumu na kati ya lisangá?
15 Na kati ya lisangá, bandeko bazwaka makasi ntango bankulutu bazali kopesa bango ndakisa malamu. (1 Petelo 5:2, 3) Atako bazali na makambo mingi ya kosala, bankulutu oyo bakanisaka bandeko bazalaka bato ya liboso mpo na kosolola na bilenge, batata ya mabota mpe bamama oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko, basi ya mabala, mpe mibange, ezala bandeko yango bazali na mikakatano to te. Bankulutu bayokaka makambo oyo bandeko na kati ya lisangá balingi koloba mpe bapesaka bango longonya mpo na makambo oyo bazali kosala. Nkulutu oyo azwaka ntango ya kotala makambo oyo bandeko bazali kosala mpe kopesa ndeko mwasi to mobali longonya na makambo oyo asali, alandaka ndakisa ya Yehova, ye oyo asepelaka na bikelamu na ye.
16. Mpo na nini tosengeli komona ete bankulutu babongi kozwa lokumu lokola bandeko mosusu nyonso na kati ya lisangá?
16 Ntango bankulutu bazali kolanda ndakisa ya Yehova, bazali mpe kopesa ndakisa malamu mpo na kolanda toli ya Paulo oyo elobi ete: “Mpo na oyo etali kolinga bandeko, bólinganaka mingi. Bózalaka ntango nyonso bato ya liboso mpo na kopesana lokumu.” (Baloma 12:10, NW ) Likambo yango ekoki kozala mokakatano mpo na bankulutu oyo bazali na mikili oyo bapesaka bato nyonso lokumu ndenge moko te. Na ndakisa, na monɔkɔ ya mboka ya ekólo moko ya Azia, ezali na maloba mibale mpo na “ndeko,” mosusu ezali liloba ya lokumu mpe mosusu ezali liloba ya lokumu te. Eumeli naino mingi te, bandeko bazalaki kobenga bankulutu na mibange na liloba ya lokumu mpe bandeko mosusu na liloba ya lokumu te. Kasi, balendisamaki ete básalelaka liloba ya lokumu te mpo na bandeko nyonso, ndenge Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete, “bino nyonso bozali bandeko.” (Matai 23:8) Atako na mikili mosusu bokeseni emonanaka na ebengeli te, biso nyonso tosengeli kobosana te ete mbala mingi bato balukaka kokesenisa bato na lokumu oyo bakopesa bango.—Yakobo 2:4.
17. (a) Mpo na nini bankulutu basengeli kozala bato oyo bandeko babangaka te kosolola na bango? (b) Ndenge nini bankulutu bakoki kolanda ndakisa ya Yehova na boyokani na bango na bandeko ya lisangá?
17 Ya solo, toyebi ete Paulo alendisaki biso tópesaka bankulutu mosusu “lokumu loleki,” kasi, bazali kaka bandeko. (1 Timote 5:17) Soki tokoki “kopusana na kiti na bokonzi na ngɔlu” ya Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, “na koloba polele,” tokobanga nde kosolola na bankulutu, baoyo basengeli kolanda ndakisa ya Yehova? (Baebele 4:16, NW; Baefese 5:1) Mpo na koyeba soki bandeko babangaka te mpo na kokende epai na ye, mokɛngɛli na mokɛngɛli akoki komituna mbala boni bandeko balukaka ye mpo na kotuna ye toli to kopesa ye makanisi. Tózwa liteya na makambo oyo Yehova asalaki epai ya bato mosusu. Apesaka bato mosusu lokumu na ndenge apesaka bango mikumba. Ata soki likanisi oyo Motatoli moko apesi ekoki kosalelama te, nkulutu asengeli kopesa ye botɔndi mpo na lobanzo oyo azali komonisa. Kanisá lisusu ndenge oyo Yehova atalelaki mituna ya Abalayama mpe kolela ya Habakuku.
18. Ndenge nini bankulutu bakoki kolanda ndakisa ya Yehova mpo na kosembola baoyo basengeli kosembolama?
18 Bandeko baklisto mosusu basengeli kosembolama. (Bagalatia 6:1) Atako bongo, bazali na motuya na miso ya Yehova, ebongi kopesa bango lokumu. Motatoli moko alobaki boye: “Ntango ndeko moko apesi ngai toli na limemya, nabangaka lisusu te mpo na kosolola na ye.” Bato mingi bandimaka toli soki bazali kopesa bango yango na limemya. Atako ekoki kozwa ntango mingi, kasi kotika moto oyo asali libunga aloba nyonso oyo azali na yango kozanga kokata ye maloba, eyeisaka makambo pɛpɛlɛ mpo andima toli oyo esengeli. Kanisá ndenge oyo Yehova azalaki mbala na mbala kosalisa bana ya Yisalaele mpo bákanisa malamu, na nyonso wana mpo azalaki koyokela bango mawa. (2 Ntango 36:15; Tito 3:2) Soki moto azali kopesa toli na motema mawa mpe na boboto, akosimba mitema ya bato oyo bazali na mposa ya lisalisi.—Masese 17:17; Bafilipi 2:2, 3; 1 Petelo 3:8.
19. Ndenge nini tosengeli kotalela bato oyo bandimaka mateya ya baklisto te?
19 Tosengeli mpe kopesa baoyo bakoki kokóma bandeko na biso ya elimo na mikolo ekoya lokumu. Ekoki kozala ete bato yango bazali kolinga koyoka nsango na biso te sikoyo, kasi tosengeli kozala na motema molai mpe kopesa bango lokumu lokola bato oyo Nzambe asali. Yehova “alingi te ete bamosusu bábeba kasi ete bato nyonso bákóma kobongwana na motema.” (2 Petelo 3:9) Ebongi mpenza tólanda makanisi ya Yehova! Mpo na bato mingi, tokoki kobongisa nzela mpo na kopesa bango litatoli soki tozali ntango nyonso kosala makasi ete tózala bato ya boboto. Kasi, tosengeli kokeba na boninga oyo ekoki kozala likama mpo na elimo na biso. (1 Bakolinti 15:33) Atako bongo, tokozala na “boboto” mpe tokotyola te bato oyo bandimaka mateya na biso te.—Misala 27:3.
20. Ndakisa ya Yehova na ya Yesu Klisto esengeli kotinda biso na kosala nini?
20 Ya solo, Yehova na Yesu Klisto bamonaka ete mokomoko na biso abongi kozwa limemya. Tóbosana te ndenge oyo bango basalaka, bongo biso mpe ndenge moko, tózalaka bato ya liboso mpo na kopesana lokumu. Mpe lisusu tóbosana te maloba ya Nkolo na biso Yesu Klisto ete: “Bino nyonso bozali bandeko.”—Matai 23:8.
Okopesa eyano nini?
• Ndenge nini tosengeli kotalela bandeko na biso bandimi?
• Ndenge nini ndakisa ya Yehova mpe ya Yesu ezali kotinda yo na kopesa basusu lokumu?
• Ndenge nini mibali mpe baboti bakoki kopesa basusu lokumu?
• Ndenge nini bankulutu bakosala soki bazali kotalela baklisto mosusu lokola bandeko na bango?
[Elilingi na lokasa 18]
Kumisá mwasi na yo na maloba ya botɔndi
[Elilingi na lokasa 18]
Kumisá bana na yo: yokáká bango
[Elilingi na lokasa 18]
Kumisá bandeko na kati ya lisangá.