Mituna ya batángi
Kotyama bilembo oyo ezali na Emoniseli 7:3 elimboli nini?
Emoniseli 7:1-3 elobi: “Namonaki baanzelu minei batɛlɛmi na bansuka minei ya mabelé, basimbi makasi mipɛpɛ minei ya mabelé, mpo ata mopɛpɛ moko te epɛpa na mabelé to na mbu to mpe na nzete ata moko. Mpe namonaki anzelu mosusu azali komata uta na epai moi ebimaka, azalaki na elembo moko ya Nzambe ya bomoi; mpe agangaki na mongongo makasi epai ya baanzelu minei oyo bazwaki nzela ya kosala mabe na mabelé mpe na mbu, kolobáká ete: ‘Bósala mabe te na mabelé to na mbu to na banzete, tii ntango tokosilisa kotya baombo ya Nzambe na biso bilembo na bilongi na bango.’”
Ntango bakotika “mipɛpɛ minei,” “bolɔzi monene” ekobanda mpe kobomama ya mangomba ya lokuta mpe bato nyonso ya mokili oyo mabe. (Emoniseli 7:14) “Baombo ya Nzambe na biso” ezali bandeko ya Klisto bapakolami oyo bazali awa na mabelé. (1 Petelo 2:9, 16) Kutu, esakweli yango emonisi ete bandeko ya Klisto bakosila kotyama bilembo ntango bolɔzi monene ekobanda. Kasi, bavɛrsɛ mosusu ya Biblia emonisi ete bapakolami batyamaka bilembo ya ebandeli. Yango wana, mbala mosusu tolobelaka kotyama bilembo ya ebandeli mpe ya nsuka. Bokeseni nini ezali kati na bilembo wana mibale?
Tótalela ndimbola ya maloba “kotya bilembo.” Na ntango ya kala, bazalaki kosalela eloko moko mpo na kotya elembo na mikanda. Elembo yango ezalaki komonisa ete moto oyo atye yango azali mokonzi to nkolo ya eloko wana.—1 Mikonzi 21:8; Yobo 14:17.
Paulo alobeli kopakolama na elimo santu lokola elembo oyo Nzambe azali kotya likoló na baklisto bapakolami, ntango alobaki: “Moto oyo azali kopesa ndanga ete bino ná biso tozali bato ya Klisto mpe moto oyo apakoli biso ezali Nzambe. Atye mpe elembo na ye likoló na biso mpe apesi biso ndanga ya eloko oyo ezali koya, elingi koloba, elimo, na kati ya mitema na biso.” (2 Bakolinti 1:21, 22) Na yango, Yehova apakolaka baklisto yango na elimo santu mpo na komonisa ete bazali bato na ye.
Nzokande, Kotyama bilembo ya baklisto bapakolami ezali na biteni mibale. Kotyama elembo ya ebandeli ekeseni na oyo ya nsuka na (1) ntina na yango mpe (2) ntango oyo etyamaka. Elembo ya liboso etyamaka mpo na kopona moto moko ya sika oyo akɔti na molɔngɔ ya baklisto bapakolami. Kotyama elembo ya nsuka emonisaka ete moto oyo aponamaki mpe atyamaki elembo atikalaki sembo tii na nsuka. Kaka na ntango wana, elingi koloba na kotyama elembo wana ya mibale, nde mopakolami azwaka elembo ‘na elongi’ mpo na libela. Yango emonisaka na nsuka ete azali ‘moombo ya Nzambe na biso’ oyo amekami mpe atikali sembo. Kotyama elembo oyo elobelami na Emoniseli mokapo 7 ezali oyo ya nsuka.—Emoniseli 7:3.
Mpo na ntango ya kotyama elembo ya ebandeli, ntoma Paulo akomelaki baklisto bapakolami boye: “Bino mpe botyaki elikya na kati na ye nsima wana bosilaki koyoka liloba ya solo, nsango malamu oyo etali lobiko na bino. Na nzela na ye mpe, nsima wana bondimaki, botyamaki elembo na elimo santu oyo elakamaki.” (Baefese 1:13, 14) Mbala mingi, Biblia emonisaka ete baklisto ya ekeke ya liboso batyamaki mpenza elembo mwa moke nsima ya koyoka nsango malamu mpe kokóma bayekoli ya Klisto. (Misala 8:15-17; 10:44) Kotyama elembo ya liboso emonisaki ete Nzambe andimaki bango. Kasi, yango emonisaki te ete andimaki bango mpo na libela. Mpo na nini?
Paulo alobaki ete baklisto bapakolami ‘batyami elembo mpo na mokolo moko ya kosikolama na lisiko.’ (Baefese 4:30) Yango emonisi ete esɛngaki ntango, elingi koloba bambula ebele esengelaki koleka nsima ya kotyama elembo ya liboso. Baklisto bapakolami basengeli kotikala sembo banda mokolo oyo batyamaki bilembo na elimo santu kino ‘mokolo oyo bakosikolama’ na nzoto na bango ya mosuni, elingi koloba tii kufa na bango. (Baloma 8:23; Bafilipi 1:23; 2 Petelo 1:10) Yango wana, kaka na nsuka ya bomoi na ye nde Paulo akokaki koloba ete: “Nasili kopota mbangu tii na ndelo ya nsuka, nabateli kondima. Banda sikoyo babombeli ngai motole ya boyengebene.” (2 Timote 4:6-8) Lisusu, Yesu ayebisaki lisangá ya baklisto bapakolami ete: “Omimonisa sembo ata tii na liwa, mpe nakopesa yo motole ya bomoi.”—Emoniseli 2:10; 17:14.
Liloba “motole” emonisi lisusu ete ntango elekaka banda na kotyama elembo ya liboso mpe ya mibale. Mpo na nini? Na ntango ya kala, bazalaki na momeseno ya kopesa mopoti mbangu motole soki alongi na lisano. Mpo na kozwa motole, asengelaki komibongisa malamu liboso apota mbangu. Asengelaki kopota mbangu kino nsuka. Ndenge moko mpe, soki baklisto bapakolami bayiki mpiko kino nsuka bomoi na bango, elingi koloba banda batyamaki elembo ya ebandeli tii na oyo ya nsuka, wana nde bakozwa motole ya bomoi ezangi kufa na likóló.—Matai 10:22; Yakobo 1:12.
Ntango nini batikali bapakolami oyo batyami elembo ya liboso bazwaka elembo ya mibale? Batikali bapakolami oyo nyonso bazali naino awa na mabelé bakotyama elembo “na bilongi na bango” liboso bolɔzi monene ebanda. Ntango bakotika mipɛpɛ minei ya bolɔzi monene, Bayisalaele nyonso ya elimo bakotyama elembo ya nsuka, atako mwa ndambo na bango bakozala na bomoi awa na mabelé mpe ekosengela basilisa bomoi na bango awa.