Mokonzi ya mokili oyo amonisami polele
MOKOLO moko, Yesu alobaki na bato ete: “Mokonzi ya mokili oyo akobwakama libándá.” Na nsima, abakisaki ete ‘mokonzi ya mokili oyo azali na bokonzi likoló na ye te’ mpe ete “mokonzi ya mokili oyo asambisami.” (Yoane 12:31; 14:30; 16:11) Yesu azalaki kolobela nani?
Soki totaleli makambo oyo Yesu alobaki mpo na “mokonzi ya mokili oyo,” ezali polele ete ekoki te kozala Tata na ye, Yehova Nzambe. Boye, nani azali “mokonzi ya mokili oyo”? Ndenge nini “akobwakama libándá,” mpe ndenge nini “asambisami”?
“Mokonzi ya mokili oyo” amimonisi
Ndenge mosali mabe monene asepelaka komikumisa mpe kolakisa ebele ya biloko oyo azali na yango, Zabolo mpe amikumisaki ntango amekaki Yesu, Mwana ya Nzambe. Nsima ya kolakisa Yesu “makonzi nyonso” ya mokili, Satana alobaki boye: “Nakopesa yo bokonzi oyo nyonso mpe nkembo na yango, mpamba te bapesá ngai yango, mpe napesaka yango na moto oyo nalingi. Bongo yo, soki osaleli ngai likambo moko ya losambo, yango nyonso ekozala ya yo.”—Luka 4:5-7.
Soki Zabolo azali te, ndenge bato mosusu balobaka, ndenge nini tokoki kolimbola komekama yango? Tokoki nde kokanisa ete Yesu amekamaki na mposa ya mabe to makanisi na ye ebulunganaki nsima ya kozwa batisimo? Soki ezali bongo, mpo na nini Biblia elobi ete “lisumu moko te ezali na kati na ye”? (1 Yoane 3:5) Yesu aboyaki te ete Zabolo ayangelaka bato; kutu andimaki yango ntango abengaki ye “mokonzi ya mokili oyo,” mpe alobaki ete azali “mobomi-bato” mpe “moto ya lokuta.”—Yoane 14:30; 8:44.
Mbula soki 60 nsima ya ntango oyo Kristo akutanaki na Zabolo, ntoma Yoane ayebisaki lisusu bakristo nguya oyo Zabolo azali na yango, ntango alobaki ete “mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” Yoane alobaki lisusu ete moto mabe yango “azali kokosa mabele mobimba esika bato bafandi.” (1 Yoane 5:19; Emoniseli 12:9) Tomoni polele ete ezali na ekelamu moko ya elimo oyo Biblia ebengi “mokonzi ya mokili oyo.” Kasi, azali na nguya nini mpenza?
Mokonzi ya mokili ayangelaka ná bademo na ye
Ntango ntoma Paulo akomaki ete bakristo basengeli kobunda etumba mpo na kondima na bango, amonisaki polele banani bazali banguna na bango minene. Alobaki polele ete: “Tozali kobunda etumba ná makila mpe mosuni te, kasi ná baguvɛrnema, ná bakonzi, ná bayangeli ya mokili ya molili oyo, ná mampinga ya bilimo mabe na bisika ya likoló.” (Baefese 6:12) Yango emonisi ete bakristo bazali kobunda na “makila mpe mosuni te,” elingi koloba na bato te, kasi nde ná “bilimo mabe.”
Ndenge Babiblia mingi ebongoli maloba “bilimo mabe” emonisi ete ezali te makanisi oyo etindaka bato basalá mabe, kasi bikelamu ya elimo oyo ezali na nguya mingi. Biblia mosusu ebongoli maloba yango na “milimo mabe kati na Likoló” (haut fleuve). Na yango, Zabolo azali koyangela elongo na baanzelu mosusu ya mabe oyo, lokola ye, batikaki “bisika na bango moko ya kofanda” na likoló.—Yuda 6.
Mokanda ya Danyele emonisi ndenge oyo ‘bakonzi yango ya mokili’ batambwisaka mokili banda kala. Lokola mosakoli Danyele azalaki komitungisa mpo na bandeko na ye Bayuda oyo balongwaki na boombo na Babilone mpe bazongaki na Yerusaleme na mobu 537 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), abondelaki mpo na bango pɔsɔ misato mobimba. Anzelu oyo Nzambe atindaki mpo na kolendisa Danyele ayebisaki ye ntina oyo aumelaki mpo na kokóma. Alobaki ete: “Nkumu ya bokonzi ya Perse atɛlɛmaki mpo na kobunda na ngai mikolo ntuku mibale na moko.”—Danyele 10:2, 13.
‘Nkumu ya Perse’ yango ezalaki nani? Ezali polele ete anzelu azalaki kolobela te Siruse, mokonzi ya Perse, oyo azalaki kosepela na Danyele mpe bato ya ekólo na ye. Lisusu, ndenge nini moto akokaki kobunda na ekelamu ya elimo pɔsɔ misato, nzokande anzelu moko abomaki basoda 185 000 na butu moko mpamba? (Yisaya 37:36) ‘Nkumu ya Perse’ oyo atɛmɛlaki anzelu asengelaki kaka kozala mosaleli ya Zabolo, elingi koloba demo moko oyo Zabolo apesaki ye bokonzi mpo ayangela ekólo Perse. Na nsima, anzelu yango alobaki ete akobunda lisusu na “nkumu ya Perse” mpe na demo mosusu oyo abengami “nkumu ya Grɛsi.”—Danyele 10:20.
Makambo nyonso wana ezali komonisa nini? Ezali komonisa mpenza ete ezali na “bakonzi ya mokili” oyo bamonanaka te, elingi koloba bademo oyo bayangelaka mokili elongo na mokonzi na bango, Satana Zabolo. Kasi, mokano na bango ezalaka nini tii lelo oyo?
Mokonzi ya mokili amonisi polele mokano na ye
Na Emoniseli, mokanda ya nsuka ya Biblia, ntoma Yoane alobelaki ndenge Yesu, na mokumba na ye ya Mikaele anzelu-mokonzi, alongi Zabolo ná bademo na ye mpe ayebisi mikakatano oyo ebimi na ndenge babwakami na nse. Mokanda yango elobi boye: “Mawa na mabele mpe na mbu, mpo Zabolo akiteli bino na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na ntango mokuse.”—Emoniseli 12:9, 12.
Ndenge nini Zabolo azali kolakisa nkanda makasi yango? Soki mosali-mabe ayebi lisusu te eloko akosala, amonaka malamu abebisa makambo nyonso; ndenge moko mpe Zabolo ná bademo na ye bazali na mokano ya kobebisa mabele mpe kokufa nzela moko na bato nyonso. Lokola Zabolo ayebi ete atikali na mikolo ya kotánga, azali kosalela ebongiseli ya mombongo ya mokili oyo azali kotambwisa mpo na kolendisa ezaleli ya kosombasomba biloko, oyo ezali kobebisa mai, mopɛpɛ, bazamba, mpe ezali kotya na likama ata bomoi ya bato nyonso.—Emoniseli 11:18; 18:11-17.
Banda kalakala, mposa makasi ya bokonzi oyo Zabolo azali na yango emonanaka epai ya bakonzi ya politiki mpe ya mangomba. Mokanda ya Emoniseli elobeli banyama mabe mpo na komonisa baguvɛrnema ya politiki oyo Zabolo apesi “bokonzi monene.” Mokanda yango emonisi mpe ete boyokani oyo bakonzi ya mangomba basali na bakonzi ya politiki ezali mabe mpe ebengi yango ekobo ya elimo. (Emoniseli 13:2; 17:1, 2) Kanisá monyoko, boombo, bitumba oyo, banda kalakala esalemaka na kati ya bikólo mpe ebomi bamilio ya bato. Ezali mpenza na moto oyo akoki koloba ete makambo ya nsɔmɔ oyo bato basali na mokili, basali yango kaka na makanisi na bango moko to nde batambwisamaki na bilimo mabe?
Biblia emonisi polele mpe eyebisi nani oyo azali kotambwisa bakonzi mpe bikólo ya mokili. Ezala bayebi yango to te, bato bazali kolanda bizaleli ya mokonzi ya mokili mpe makanisi na ye ya kobebisa makambo nyonso. Kasi, Zabolo akoyangela bato tii ntango nini?
Zabolo akómi na nsuka
Mosala oyo Kristo asalaki awa na mabele na siɛklɛ ya liboso emonisaki ete Zabolo ná bademo na ye batikali na mikolo ya kotánga. Ntango bayekoli ya Yesu bayebisaki ye ndenge oyo babenganaki bilimu mabe, alobaki na bango ete: “Namoni Satana auti na likoló akwei lokola mokalikali.” (Luka 10:18) Na maloba yango, Yesu azalaki kosepela ndenge akolonga mokonzi ya mokili ntango akozonga na likoló mpe akokokisa mokumba na ye ya Mikaele, anzelu-mokonzi. (Emoniseli 12:7-9) Koyekola bisakweli ya Biblia esalisi biso tómona ete Yesu alongaki Zabolo na likoló na 1914 to mwa moke na nsima.a
Banda mbula yango, Zabolo ayebi ete atikali na mikolo ya kotánga. Atako Satana azali kotambwisa mokili mobimba, ezali mpe na bamilio ya bato oyo azali kokosa bango te. Biblia efungoli bango miso mpe bayebi ye malamu mpe mikano na ye. (2 Bakorinti 2:11) Maloba oyo Paulo akomelaki baninga na ye bakristo ezali kopesa bango makasi: “Nzambe oyo apesaka kimya akopanza Satana na nse ya makolo na bino.”b—Baroma 16:20.
Mosika te, Zabolo akozala lisusu te! Ntango Kristo akoyangela, bato ya sembo bakokómisa mabele paradiso. Mobulu, koyinana, mpe lokoso ekozala lisusu te. Biblia elobi ete: “Makambo ya kala ekokanisama lisusu te.” (Yisaya 65:17) Ekozala esengo monene mpo na bato nyonso oyo bazali kolongwa na boombo ya mokonzi ya mokili oyo!
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá nkasa 215 tii 218 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Maloba oyo ya Paulo eyokani na esakweli ya liboso ya Biblia, oyo ezali na Ebandeli 3:15, oyo emonisi ete nsukansuka Zabolo akobomama. Mpo na kolobela likambo yango, Paulo asalelaki liloba ya Grɛki oyo elimboli “kopanza, kobukabuka, konika.”—Vine’s Complete Expository Dictionary of Old and New Testament Words.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 9]
Ntango Kristo akoyangela, bato ya sembo bakokómisa mabele paradiso