Mokapo ya mwambe
‘Kobunda na bilimo mabe’
1. Mpo na nini tosengeli kotalela malamumalamu mosala ya bilimo mabe?
BATO mingi bandimaka te ete bilimo mabe ezali. Kasi yango ezali likambo ya kozwa na lisɛki te. Bato bándima yango to bándima yango te, bilimo mabe ezali, mpe elukaka kotungisa moto nyonso. Ezala ata mpe basambeli ya Yehova. Kutu, bazali bato ya liboso oyo bilimo mabe elukaka. Ntoma Paulo akebisi biso na likambo yango, alobaki ete: “Tozali kobunda líbanda ná makila mpe mosuni te, kasi ná baguvɛrnema, ná bakonzi, ná bayangeli ya mokili ya molili oyo, ná mampinga ya bilimo mabe na kati ya bisika ya likoló.” (Efese 6:12) Na mikolo na biso, mitungisi ya bilimo mabe ekómi makasi koleka mpamba te babenganaki Satana na likoló mpe azali na nkanda makasi, lokola ayebi ete ntango na ye etikali mokuse.—Emoniseli 12:12.
2. Ndenge nini tokoki kolonga etumba na bilimo mabe atako baleki bato na makasi?
2 Wapi mitindo ndenge na ndenge oyo Satana asalelaka mpo na kobundisa biso? Likoki ezali mpo na kolonga etumba na bilimo mabe atako baleki bato na makasi? Ɛɛ, kasi kaka soki moto atyeli Yehova motema na ye mobimba. Tosengeli koyoka ye mpe kotosa Liloba na ye. Soki tosali bongo, mitungisi ya nzoto mpe ya makanisi oyo bato mosusu oyo batambwisami na Satana bazali kozwa, ekozwa biso te.—Yakobo 4:7.
Bayangeli ya mokili na bisika ya likoló
3. Banani mpenza Satana abundisaka bango makasi, mpe ndenge nini?
3 Na maloba ya kosimba motema, Yehova amonisi biso ezalela ya mokili ndenge azali komona yango kuna na likoló esika afandaka. Apesaki ntoma Yoane emonaneli moko mpe na kati na yango Satana amonani lokola “dalagona moko monene ya langi ya mɔtɔ.” Soki azalaki na likoki, mbɛlɛ asasaki Bokonzi ya Masiya ya Nzambe kaka ntango ebotamaki na likoló na 1914. Lokola akokaki te, Satana akitisaki nkanda na ye likoló na bamonisi ya Bokonzi yango awa na mabele. (Emoniseli 12:3, 4, 13, 17) Ndenge nini Satana abundisaki bango? Na nzela ya bato mosusu oyo bazali bamonisi na ye awa na mabele.
4. Nani apesaka biyangeli ya bato nguya, mpe ndenge nini toyebi yango?
4 Na nsima, Yoane amonaki nyama moko mabe ya mitó nsambo mpe maseke zomi, nyama yango ezali na bokonzi “likoló ya mabota nyonso mpe ya mikili nyonso mpe ya minɔkɔ nyonso mpe ya bikólo nyonso.” Nyama yango ezali komonisa ebongiseli ya politiki ya mokili mobimba. Bayebisaki Yoane ete “dalagona [Satana Zabolo] apesaki nyama yango nguya na ye mpe kiti na ye ya bokonzi monene.” (Emoniseli 13:1, 2, 7) Ɛɛ, Satana nde apesaka nguya mpe bokonzi na biyangeli ya bato. Yango wana, ndenge ntoma Paulo akomaki yango, “bayangeli” ya solosolo “ya mokili” ezali nde “bilimo mabe na kati ya bisika ya likoló,” oyo bazali kotambwisa biyangeli ya bato. Bato nyonso oyo balingi kosambela Yehova basengeli koyeba ndimbola ya likambo yango malamumalamu.—Luka 4:5, 6.
5. Mpo na likambo nini bakonzi ya politiki bazali sikoyo koyanganisama?
5 Atako bakonzi ya politiki mingi balobaka ete basambelaka, ata mokonzi moko te kati na bikólo atosaka boyangeli ya Yehova to ya Mokonzi oyo ye aponi, Yesu Klisto. Bango nyonso basalaka makasi mpo na kokangama na bokonzi na bango moko. Lelo oyo, ndenge lisolo ya Emoniseli emonisi yango, “maloba mapemami na bademo” mazali koyanganisa bayangeli ya mokili mpo na “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso” na Armagedon.—Emoniseli 16:13, 14, 16; 19:17-19.
6. Mpo na nini esengeli kokeba ete tókosama te na komikɔtisáká na ebongiseli ya Satana?
6 Mokolo na mokolo, bomoi ya bato ezali kobeba na bitumba mpo na makambo ya politiki, na matata kati na bana-mboka, na makambo ya nkita mpe na bitumba kati na mangomba, mpe nyonso wana ezali kokabola bato. Na matata yango, emonanaka mbala mingi ete bato bamityaka na ngámbo boye to boye—ezala na maloba to na makambo basalaka—mpo na ekólo na bango, etuluka na bango, monɔkɔ na bango, to na ngámbo ya bato oyo bakokani na bango. Ata ntango bamikɔtisi mpenza na matata moko boye te, mbala mingi bakɔtelaka ngámbo mosusu mpe bakweisaka ngámbo mosusu. Kasi ezala ata moto nini to likambo nini bazali kokɔtela to kopesa mabɔkɔ, bazali mpenza kopesa mabɔkɔ na nani? Biblia elobi polele ete: “Mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) Kasi, ndenge nini moto akoki kosala ete akosama te lokola bato mosusu? Kaka soki azali kokɔtela Bokonzi ya Nzambe na motema mobimba mpe soki azali koboya komikɔtisa na matata ya mokili.—Yoane 17:15, 16.
Mayele mabe ya moto mabe
7. Ndenge nini mayele ya Satana emonisami na lolenge azali kosalela mangomba?
7 Na bileko nyonso, Satana anyokoli bato na maloba mpe na nzoto mpo na kolongola bango na nzela ya losambo ya solo. Asaleli mpe makambo mosusu ya mayele mabe koleka—makambo mpe banzela ya kozimbisa. Akangi bato ebele na kati ya molili na nzela ya mangomba ya lokuta, azali kosala nyonso mpo bákanisaka ete bazali kosalela Nzambe. Lokola bazangi boyebi ya solosolo ya Nzambe mpe bazangi bolingo mpo na solo, misala ya maji mpe loyenge ya milulu ya mangomba ekoki kobenda bango, to mpe bakoki kokamwa na misala ya nguya ya mangomba. (2 Batesaloniki 2:9, 10) Kasi Biblia ekebisi biso ete ata kati na baoyo bazalaki kala na kati ya losambo ya solo, “bamosusu bakotika kondima, kotyáká likebi na maloba oyo epemami ya bokosi mpe na mateya ya bademo.” (1 Timote 4:1) Ndenge nini yango ekokaki kosalema?
8. Ndenge nini Satana akoki kobenda biso mpo tókɔta na mangomba ya lokuta ata soki liboso tozalaki kosambela Yehova?
8 Zabolo asalelaka bolɛmbu na biso na mayele mpenza. Tozali naino kobangabanga bato? Soki ezali bongo, tokondima ete bandeko ya libota na biso to bato ya kartye bátindika biso na kosala makambo oyo euti na mangomba ya lokuta. Tozalaka na lolendo? Soki ezali bongo, tokoki kosilika ntango bazali kopesa biso toli to ntango bato mosusu baboi kondima makanisi na biso. (Masese 15:10; 29:25; 1 Timote 6:3, 4) Na esika ete tóbongola makanisi na biso mpo na koyokanisa yango na ndakisa ya Klisto, tokoki nde kolanda bato oyo makanisi na bango ekosala “nyɔminyɔmi na matoi” na biso mpe oyo balobaka ete kotánga Biblia mpe kosala makambo ya malamu ekoki bongo. (2 Timote 4:3) Ezala tokɔti mpenza na lingomba mosusu to tokangami kaka na oyo biso moko tosali, yango ezali na ntina te mpo na Satana, likambo ya ntina na miso na ye ezali kaka ete tóboya kosambela Yehova na ndenge oyo asɛngi na nzela ya Liloba na ye mpe ya ebongiseli na ye.
9. Ndenge nini Satana asalelaka na lolenge ya mabe likambo ya kosangisa nzoto mpo na kokokisa mikano na ye?
9 Satana mpe akosaka bato na mayele mpo bákokisa bamposa na bango na ndenge ya mabe. Asalaka yango na makambo ya kosangisa nzoto. Lokola bazali kobwaka mitinda ya Biblia, bato mingi na mokili batalelaka kosangisa nzoto kati na bato oyo babalani te lokola likambo ya malamu to lokola ezali lolenge ya komonisa ete bakomi mikóló. Bongo baoyo basilá kobala? Mingi bazali kosala ekobo. Ata soki ekobo esalemi te na kati ya libala na bango, bato mingi balukaka koboma libala to kokabwana na babalani na bango mpo bákoka kozala na makango. Mikano mabe ya Satana etindaka bato bázala na bomoi ya komisepelisa sikawa, akosaka bango mpo bábosana mabe oyo ekoki koya nsima, kaka te mpo na bango mpe bato mosusu, kasi mingimingi mpo na boyokani na bango na Yehova mpe na Mwana na ye.—1 Bakolinti 6:9, 10; Bagalatia 6:7, 8.
10. Na banzela nini Satana alingaka kobebisa ezaleli na biso na makambo ya pite mpe mobulu?
10 Mposa mosusu oyo ezali mabe te ezali kominanola. Soki ezali ya malamu, ekoki kozala na litomba mpo na nzoto, mpo na makanisi, mpe mpo na mayoki. Kasi tosalaka nini ntango Satana asalelaka kominanola na biso mpo na kolongola makanisi na biso epai ya Nzambe? Na ndakisa, toyebi ete Yehova ayinaka pite mpe mobulu. Ntango bafilime, masolo ya telivizyo, to maboke, elakisaka makambo wana, tofandaka kaka wana mpe tozali kotala yango nyonso? Tóbosana mpe te ete Satana akosala nyonso ete makambo ya ndenge wana ekóma lisusu mabe koleka wana ntango ya kobebisama na ye ezali mpenza kokóma pene, mpamba te “bato mabe mpe bakosi bakokende lisusu mosika na kati ya mabe, kobungisáká bato nzela mpe kobungisamáká.” (2 Timote 3:13; Emoniseli 20:1-3) Yango wana, tosengeli ntango nyonso kokeba na myango mabe ya Satana.—Genese 6:13; Nzembo 11:5; Baloma 1:24-32.
11. Na lolenge nini ata moto oyo ayebi solo na makambo ya misala ya bilimo mabe akoki kokangama na motambo soki akebi te?
11 Toyebi mpe ete moto oyo akomikɔtisa na misala ya bilimo mabe—na ndakisa koloba makambo oyo ekoya nsima, bondɔki, koluka kosolola na bato oyo bakufá—nyonso wana Nzambe ayinaka yango. (Deteronome 18:10-12) Lokola toyebi yango, tokokanisa te kokenda epai ya banganga-nkisi, mpe tokolinga te koyamba bango na ndako na biso mpo na kosala misala na bango ya bademo. Kasi tokolinga nde koyoka bango ntango bazali kobima na televizyo to na Internet? Atako tokondima soki moke te ete nganga-nkisi asalisa biso, tosengeli nde kolatisa mwana na biso oyo abotami sika mwa nsinga moko boye na lobɔkɔ to na loketo mpe kokanisa ete yango ekobatela ye? Lokola toyebi ete Biblia epekisi misala ya maji, tokomitika nde kolanda makanisi ya moto oyo asalaka maji?—Bagalatia 5:19-21.
12. (a) Ndenge nini miziki esalelamaka mpo na kotinda biso tókanisa makambo oyo toyebi ete ezali mabe? (b) Ndenge nini elateli ya moto, ekateli na ye ya nsuki to ndenge asalisaka yango, to elobeli na ye ekoki komonisa ete asepelaka na lolenge ya bomoi ya bato oyo Yehova andimaka te? (c) Nini basɛngi biso soki tolingi ete tókwea te na mayele mabe ya Satana?
12 Biblia elobi ete pite mpe makambo ya mbindo ya ndenge nyonso esengeli kutu kotángama ata kotángama te kati na biso na mokano ya mabe. (Baefese 5:3-5) Kasi, bongo soki makambo ya ndenge wana ezali na kati ya miziki ya kitoko, mondule oyo ezali kosepelisa, to ebɛteli ya mbonda oyo ebinisaka mpenza? Tokobanda koyemba maloba na yango mpo na kokumisa kosangisa nzoto kati na bato oyo babalaná te, komɛla bangi mpo na komisepelisa, mpe misala mosusu ya masumu? To atako toyebi ete tosengeli te komekola lolenge ya bomoi ya bato oyo basalaka makambo ya ndenge wana, tokómaka nde komimonisa lokola bango mpe komekola elateli na bango, ekateli na bango ya nsuki to ndenge basalisaka yango, to elobeli na bango? Mitambo oyo Satana asalelaka ezali mpenza ya mayele mabe, mpo na kotinda bato bámitambwisa na boyokani na makanisi mabe na ye! (2 Bakolinti 4:3, 4) Mpo na kokwea na mitambo na ye te, tosengeli koboya komitambwisa lokola mokili. Tosengeli ntango nyonso kobosana te banani bazali “bayangeli ya mokili ya molili” oyo mpe kosala makasi mpo na kobundisa masɛnginya na bango.—1 Petele 5:8.
Tozali na nyonso mpo na kolonga
13. Atako tozali bato ya kozanga kokoka, na ndenge nini ata nani kati na biso azali na likoki ya kolonga mokili oyo Satana azali koyangela?
13 Liboso ya liwa na ye, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Bózala na mpiko! Ngai nasili kolonga mokili.” (Yoane 16:33) Bango mpe bakokaki kolonga. Nsima ya mbula soki 60, ntoma Yoane akomaki ete: “Nani azali moto oyo alongi mokili soki ezali te moto oyo andimaka ete Yesu azali Mwana ya Nzambe.” (1 Yoane 5:5) Kondima ya ndenge wana emonanaka ntango moto azali kotosa mibeko ya Yesu mpe kotya motema na Liloba ya Nzambe, ndenge Yesu asalaki yango. Nini esɛngami lisusu? Tosengeli mpe kokangama na lisangá oyo ye azali kokamba. Soki tosali lisumu, tosengeli kosala makasi mpo na kobongola motema mpe koluka bolimbisi ya Nzambe na nzela ya mbeka ya Yesu. Na ndenge wana, atako tozali bato ya kozanga kokoka mpe tosalaka mabunga, biso mpe tokoki kolonga.—Nzembo 130:3, 4.
14. Tángá Baefese 6:13-17, tuná mituna mpe salelá bavɛrsɛ oyo batii na paragrafe oyo mpo na kotalela matomba ya eteni mokomoko ya molato ya etumba ya elimo.
14 Mpo na kolonga, tosengeli kolata “molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe,” mpe kotyola ata eteni moko na yango te. Fungolá Biblia na yo na Baefese 6:13-17, mpe tángá ndenge mokapo yango elobeli molato yango. Na nsima, ntango ozali koyanola na mituna oyo elandi, talelá ndenge okoki kozwa matomba na libateli ya eteni mokomoko ya molato yango.
“Loketo . . . ekangami na solo lokola nkamba”
Atako toyebi solo, ndenge nini boyekoli ya mbala na mbala, komanyola likoló ya solo ya Biblia, mpe makita ya boklisto ebatelaka biso? (1 Bakolinti 10:12, 13; 2 Bakolinti 13:5; Bafilipi 4:8, 9)
“Ebateli-ntolo ya boyengebene”
Mitinda ya boyengebene ezali ya nani? (Emoniseli 15:3)
Monisá ndenge oyo koboya kolanda banzela ya sembo ya Yehova etyaka moto na likama na elimo. (Deteronome 7:3, 4; 1 Samwele 15:22, 23)
“Makolo . . . elatisami na bisaleli ya nsango malamu ya kimya”
Ndenge nini ezali mpenza malamu mpo na biso ete makolo na biso ememaka biso mbala na mbala mpo na koyebisa bato bibongiseli ya Nzambe oyo etali kimya? (Nzembo 73:2, 3; Baloma 10:15; 1 Timote 5:13)
“Nguba monene ya kondima”
Soki tozali na kondima makasi, ndenge nini tokosala ntango tokutani na makambo oyo elingi kosala ete tókóma na ntembe to tóbanga bato? (2 Mikonzi 6:15-17; 2 Timote 1:12)
“Ekɔti ya lobiko”
Ndenge nini elikya ya lobiko esalisaka moto mpo akwea te na motambo ya komitungisa koleka ndelo mpo na biloko ya mokili? (1 Timote 6:7-10, 19)
“Mopanga ya elimo”
Tosengeli ntango nyonso kotya motema na nini ntango tozali kobunda na komekama ya elimo na biso to oyo ya bato mosusu? (Nzembo 119:98; Masese 3:5, 6; Matai 4:3, 4)
Eloko nini lisusu ezali na ntina mingi mpo na kolonga etumba ya elimo? Esengeli kosalela yango mbala boni? Mpo na bolamu ya nani? (Baefese 6:18, 19)
15. Ndenge nini tokoki kobunda makasi etumba ya elimo?
15 Lokola tozali basoda ya Klisto, biso mpe tozali kati na limpinga monene oyo bazali kobunda etumba yango ya elimo. Soki tozali ntango nyonso na likebi mpe tozali kosalela molato yango ya etumba ya Nzambe malamumalamu, tokokwea te na etumba yango. Kutu, tokozala lisalisi mpo na kolendisa baninga na biso basaleli ya Nzambe. Tokomonisa mposa makasi mpe tokozala pene mpo na kokɔtela mpe kopanza nsango malamu ya Bokonzi ya Masiya ya Nzambe, boyangeli ya likoló oyo Satana azali monguna monene na yango.
Bozongeli
• Mpo na nini basambeli ya Yehova bamikɔtisaka na matata ya mokili te?
• Tángá mwa mayele mosusu oyo Satana asalelaka mpo na kokweisa baklisto na elimo.
• Ndenge nini molato ya etumba ya elimo oyo euti na Nzambe ebatelaka biso na kati ya etumba na biso ya elimo?
[Bililingi na lokasa 76]
Mabota ezali kosangisama na Armagedon