Tótikala sembo epai ya Klisto ná moombo na ye ya sembo mpe ya mayele
“Nkolo na ye . . . akotya ye likoló ya biloko na ye nyonso.”—MATAI 24:45-47.
1, 2. (a) Na kotalela Biblia, nani azali Mokambi na biso? (b) Nini emonisi ete Klisto azali mpenza kotambwisa lisangá ya boklisto?
“BÓBENGAMA mpe te ‘[bakambi],’ mpo [mokambi] na bino azali kaka moko, Klisto.” (Matai 23:10) Na maloba wana, Yesu amonisaki bayekoli na ye polele ete moto moko te awa na mabelé akoki kozala mokambi na bango. Mokambi na bango asengelaki kozala na likoló, elingi koloba Yesu Klisto ye moko. Nzambe nde aponaki Yesu mokambi. Yehova “alamwisaki ye na bakufi mpe . . . akómisaki ye mokonzi ya biloko nyonso oyo etali lisangá, oyo ezali nzoto na ye.”—Baefese 1:20-23.
2 Lokola Klisto azali “mokonzi ya biloko nyonso” ya lisangá, azali kotambwisa makambo nyonso oyo ezali kosalema na lisangá. Amonaka makambo nyonso oyo ezali kosalema na lisangá. Alukaka koyeba soki moklisto mokomoko to lisangá mokomoko ezali kolanda mitinda ya boklisto. Likambo yango emonani polele na emoniseli oyo apesaki ntoma Yoane na nsuka ya ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.). Yesu alobaki na masangá nsambo mbala mitano mobimba ete ayebi misala na bango, elingi koloba makambo na bango ya malamu mpe ya mabe, mpe apesaki bango toli mpe bilendiseli oyo ebongi. (Emoniseli 2:2, 9, 13, 19; 3:1, 8, 15) Tosengeli mpenza kondima ete Klisto ayebaki mpe elimo ya masangá mosusu ya Asie Mineure, Palestine, Syrie, Babylone, Grèce, Italie mpe bongo na bongo. (Misala 1:8) Ezali boni lelo?
Moombo ya sembo
3. Mpo na nini ebongi mpenza kokokanisa Klisto na motó mpe lisangá na ye na nzoto?
3 Nsima ya lisekwa na ye mpe mwa moke liboso ya komata na likoló epai ya Tata na ye, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Bokonzi nyonso epesameli ngai na likoló mpe na mabelé.” Alobaki mpe ete: “Talá! nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo.” (Matai 28:18-20) Asengelaki kokoba kozala na bango lokola mokambi na bango. Na mikanda oyo akomelaki baklisto ya Efese mpe ya Kolose, ntoma Paulo akokanisaki lisangá na “nzoto,” oyo Klisto azali motó na yango. (Baefese 1:22, 23; Bakolose 1:18) Biblia moko (The Cambridge Bible for Schools and Colleges) elobi ete elilingi yango “ezali komonisa kaka te boyokani oyo esengeli kozala kati na binama ná motó, kasi mpe ete motó nde etambwisaka binama mosusu. Bazali bisaleli na Ye.” Klisto azali kosalela banani lokola bisaleli na ye kobanda azwaki bokonzi na 1914?—Danyele 7:13, 14.
4. Ndenge esakweli ya Malaki elobaki, Yehova ná Klisto Yesu bamonaki nini ntango bayaki kotala tempelo ya elimo?
4 Esakweli ya Malaki elobaki ete “Nkolo” Yehova, elongo na “ntoma [na ye] ya kondimana,” elingi koloba Klisto Yesu, Mwana na ye, oyo autaki kotyama Mokonzi, basengelaki koya kosambisa mpe kotala “tempelo” to ndako na Ye ya losambo ya elilingi. ‘Ntango oyo etyamaki’ mpo na kobanda ‘kosambisa ndako ya Nzambe’ ekokaki na 1918.a (Malaki 3:1; 1 Petelo 4:17) Baoyo bazalaki koloba ete bazali bamonisi ya Nzambe mpe ya losambo na ye ya solo batalelamaki malamumalamu. Babwakaki mangomba ya boklisto, oyo na boumeli ya bikeke ezalaki koteya bindimeli oyo ebebisi lokumu ya Nzambe mpe ekɔtaki mpenza na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba oyo esilisaki bato. Batikali bapakolami na elimo bamekamaki na mɔtɔ ya elilingi. Yehova andimaki bango mpe bakómaki mpo na ye bato oyo ‘bazali kokabela ye mbeka na boyengebene.’—Malaki 3:3.
5. Na boyokani na esakweli ya Yesu oyo elobeli “Kozala” na ye, nani amonisi ete azali “moombo” ya sembo?
5 Na boyokani na esakweli ya Malaki, bilembo oyo Yesu apesaki bayekoli na ye mpo na kosalisa bango báyeba ntango ya kozala na ye mpe ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,’ emonisaki mpe ndenge ya koyeba “moombo.” Yesu alobaki ete: “Nani azali solo moombo ya sembo mpe ya mayele oyo nkolo na ye atye likoló ya basali ya ndako na ye, mpo na kopesa bango bilei na bango na ntango oyo ebongi? Esengo na moombo yango soki nkolo na ye ntango akoya akuti ye azali kosala bongo! Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete, Akotya ye likoló ya biloko na ye nyonso.” (Matai 24:3, 45-47) ‘Ntango ayaki’ kotala “moombo” yango na 1918, Klisto akutaki batikali bapakolami ya sembo, oyo kobanda na 1879 bazalaki kosalela Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia mpo na kopesa biso “bilei [ya elimo] na ntango oyo ebongi.” Andimaki bango lokola esaleli to “moombo” na ye, mpe na 1919 apesaki bango mokumba ya kokɛngɛla biloko na ye nyonso awa na mabelé.
Bazali kokɛngɛla biloko ya Klisto awa na mabelé
6, 7. (a) Na maloba nini mosusu Yesu alobelaki “moombo” na ye ya sembo? (b) Liloba “kapita” oyo Yesu asalelaki elimboli mpenza nini?
6 Mwa basanza liboso Yesu apesa esakweli oyo elobeli kozala na ye mpe “moombo” oyo asengelaki komonisa ye awa na mabelé, alobelaki “moombo” yango na mwa maloba mosusu oyo esalisi biso tóyeba mokumba ya moombo yango. Alobaki ete: “Nani azali mpenza kapita ya sembo, ya mayele, oyo nkolo na ye akotya likoló ya basaleli na ye nyonso mpo apesaka bango ndambo na bango ya bilei na ntango oyo ebongi? Nazali koyebisa bino solo, Akotya ye likoló ya biloko na ye nyonso.”—Luka 12:42, 44.
7 Na vɛrsɛ yango, babengi moombo wana kapita, mpe liloba ya Grɛki oyo babongoli na kapita ezali kopesa likanisi ya “moto oyo abatelaka ndako to libula moko.” Moombo yango asengelaki te kozala kaka etuluku moko ya bato ya mayele oyo balimbolaka Biblia. Longola mokumba ya kopesa bilei ya elimo “na ntango oyo ebongi,” “kapita ya sembo” asengelaki mpe kozwa mokumba ya kobatela basaleli nyonso ya Klisto mpe kotalela misala na ye nyonso awa na mabelé, elingi koloba “biloko na ye nyonso.” Biloko nyonso ya Klisto ezali nini?
8, 9. Wapi “biloko” oyo moombo azwi mokumba ya kokɛngɛla?
8 Moombo azali mpe na mokumba ya kokɛngɛla bisika oyo bayekoli ya Klisto bazali kosalela mpo na misala ya boklisto; na ndakisa biro monene ya Batatoli ya Yehova mpe babiro ya bafiliale, ná bisika na bango ya losambo lokola Bandako ya Bokonzi mpe bisika ya mayangani na mokili mobimba. Likambo eleki ntina, moombo yango atalelaka mpe mateya ya kolendisa oyo tozwaka na makita pɔsɔ na pɔsɔ mpe na mayangani ya mike mpe ya minene oyo esalemaka mbula na mbula. Na mayangani yango, bamonisaka biso ndenge bisakweli ya Biblia ezali kokokisama mpe tozwaka lisalisi oyo ebongi mpenza mpo na kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na biso.
9 Kapita azali mpe na mokumba ya kokɛngɛla mosala ya ntina mingi ya kosakola “nsango malamu oyo ya bokonzi” mpe kokómisa “bato bayekoli na bikólo nyonso.” Yango ezali kosɛnga mpe koteya bato bátosa makambo nyonso oyo Klisto, motó ya lisangá, azali kosɛnga na ntango oyo ya nsuka. (Matai 24:14; 28:19, 20; Emoniseli 12:17) Mosala ya kosakola mpe koteya ebimisi “ebele ya bato,” oyo bazali baninga ya sembo ya batikali bapakolami. Na ntembe te, ‘biloko kitoko wana ya mabota’ ezali mpe na kati ya “biloko” ya Klisto ya motuya oyo moombo ya sembo azali kokɛngɛla.—Emoniseli 7:9; Hagai 2:7.
Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali momonisi ya moombo ya sembo
10. Banani bazalaki na mokumba ya kozwa bikateli na ekeke ya liboso, mpe yango ebimisaki matomba nini na masangá?
10 Emonani polele ete mokumba monene oyo moombo ya sembo azali na yango ezali kosɛnga mpe kozwa bikateli mingi. Na lisangá ya boklisto ya ekeke ya liboso, bantoma ná bankulutu ya Yelusaleme bazalaki bamonisi ya moombo mpe bazalaki kozwa bikateli mpo na lisangá mobimba. (Misala 15:1, 2) Bikateli oyo lisangani ya mikóló-bakambi ya ekeke ya liboso bazalaki kozwa ezalaki kotindama na masangá na nzela ya mikanda mpe bamonisi na bango. Baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki na esengo ya kozwa malako wana ya polele, mpe lokola bazalaki koyokela lisangani ya mikóló-bakambi, bazalaki na kimya mpe na bomoko.—Misala 15:22-31; 16:4, 5; Bafilipi 2:2.
11. Klisto azali kosalela nani lelo mpo na kotambwisa lisangá na ye, mpe ndenge nini tosengeli kotalela baklisto yango oyo bapakolami na elimo?
11 Ndenge ezalaki na lisangá ya boklisto ya ekeke ya liboso, kaka mwa etuluku moke ya bakɛngɛli-bapakolami nde bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya bayekoli ya Klisto lelo na mabelé. Na “lobɔkɔ na ye ya mobali” to nguya na ye, Klisto, motó ya lisangá, azali kotambwisa mibali yango ya sembo ntango bazali kokɛngɛla mosala ya Bokonzi. (Emoniseli 1:16, 20) Albert Schroeder, aumelaki mingi na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, mpe autaki kosukisa bomoi na ye awa na mabelé. Na lisolo ya bomoi na ye akomaki boye: “Lisangani ya Mikóló-Bakambi eyanganaka mokolo nyonso ya misato, mpe babandaka likita na bango na libondeli mpo na kosɛnga elimo ya Yehova etambwisa bango. Basalaka makasi mpo makambo nyonso oyo bazali kotalela mpe bikateli nyonso oyo bazali kozwa eyokana na Liloba ya Nzambe, Biblia.”b Tosengeli mpenza kotyela mibali yango ya sembo motema. Na ntina na bango, tosengeli kolanda toli ya ntoma Paulo oyo: “Bótosaka baoyo bazali kokamba bino mpe bóyokelaka bango, mpo bazali kokɛngɛla milimo na bino.”—Baebele 13:17.
Tózalaka na limemya mpo na moombo ya sembo
12, 13. Wapi bantina oyo Makomami emonisi oyo tosengeli komemyaka moombo ya sembo?
12 Ntina monene oyo tosengeli komemyaka moombo ya sembo ezali ete ntango tozali kosala bongo, tozali komonisa ete tomemyaka Nkolo Yesu Klisto. Paulo akomaki na ntina na bapakolami ete: “Moto oyo abengamaki na ntango oyo azalaki moto ya bonsomi azali moombo ya Klisto. Bosombamaki na motuya moko boye.” (1 Bakolinti 7:22, 23; Baefese 6:6) Na yango, ntango tozali kolanda na bosembo nyonso litambwisi ya moombo ya sembo mpe Lisangani ya Mikóló-Bakambi na ye, yango ekomonisa ete tozali kolanda Klisto, Nkolo ya moombo yango. Botosi na biso mpo na bato wana oyo Klisto azali kosalela mpo na kokɛngɛla biloko na ye awa na mabelé, ezali lolenge moko oyo tozali ‘kondima polele ete Yesu Klisto azali Nkolo mpo na nkembo ya Nzambe Tata.’—Bafilipi 2:11.
13 Ntina mosusu oyo Makomami emonisi ya kozala na limemya epai na moombo ya sembo ezali ete Biblia ebengi baklisto bapakolami oyo bazali awa na mabelé “tempelo” oyo Yehova afandi na “elimo.” Na ndenge yango, bazali “basantu.” (1 Bakolinti 3:16, 17; Baefese 2:19-22) Yesu apesi biloko na ye awa na mabelé na bato ya tempelo yango, elingi koloba lotomo ya kosala makambo mpe kokokisa mikumba mosusu na kati ya lisangá ya boklisto ezali na mapeka na bango. Yango wana, moto nyonso na kati ya lisangá amonaka ete kolanda litambwisi ya moombo ya sembo mpe Lisangani na ye ya Mikóló-bakambi mpe kopesa ye mabɔkɔ ezali mpenza likambo ya bulɛɛ. Na yango, “bampate mosusu” bamonaka yango libaku malamu kosunga moombo yango na kobatela biloko ya Nkolo.—Yoane 10:16.
Tósunga mpenza moombo ya sembo
14. Ndenge Yisaya asakolaki yango, ndenge nini bampate mosusu bazali kolanda bapakolami mpe kosala lokola “basali oyo bazali na lifuta te?”
14 Limemya ya mozindo oyo bampate mosusu bamonisaka epai ya baklisto bapakolami ya Yisalaele ya elimo esakolamaki na Yisaya ete: “Yehova alobi boye ete: ‘Basali ya Ezipito oyo bazali na lifuta te mpe bato ya mombongo ya Etiopia mpe bato ya Sebaya, bato milai, bakoya epai na yo bango moko mpe bakozala bato na yo; bakolanda yo; bakoya epai na yo na minyololo mpe bakofukama liboso na yo. Bakobondela yo ete, “Nzambe azali elongo na yo mpe mosusu azali te; Nzambe mosusu azali te.”’” (Yisaya 45:14, NW) Na ndenge ya elilingi, bampate mosusu lelo bazali kolanda moombo ná Lisangani na ye ya Mikóló-Bakambi mpe kondima litambwisi na bango. Lokola “basali oyo bazali na lifuta te,” bampate mosusu bazali kopesa makasi mpe biloko na bango mpo na kosunga baklisto bapakolami na mosala oyo Klisto apesá bango ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba.—Misala 1:8; Emoniseli 12:17.
15. Ndenge nini esakweli ya Yisaya 61:5, 6 esakolaki boyokani oyo esengelaki kozala kati na bampate mosusu ná Yisalaele ya elimo?
15 Bampate mosusu bazali mpenza na esengo mpe na botɔndi na ndenge bazali kosalela Yehova na litambwisi ya moombo ya sembo mpe Lisangani na ye ya Mikóló-Bakambi. Bazali kondima ete baklisto bapakolami bazali bato ya “Yisalaele ya Nzambe.” (Bagalatia 6:16) Lokola “bapaya” mpe “bato ya mikili mosusu” oyo basangani na Yisalaele ya elimo, bampate mosusu bazali kosala na esengo lokola “basali bilanga” mpe “babateli ya bilanga ya vinyo” na litambwisi ya bapakolami, oyo bazali “banganga-nzambe ya Yehova” mpe “basaleli ya Nzambe.” (Yisaya 61:5, 6, NW) Bazali kosakola na molende nsango malamu ya Bokonzi mpe kokómisa bato ya bikólo nyonso bayekoli. Bazali mpe kopesa moombo ya sembo mabɔkɔ na motema mobimba na mosala ya kobatela bato ya sika oyo bazali koya na lisangá.
16.Nini etindaka bampate mosusu básunga mpenza moombo ya sembo mpe ya mayele?
16 Bampate mosusu bandimaka ete milende oyo moombo ya sembo asalaka mpo na kopesa bango bilei ya elimo na ntango ebongi ememeli bango matomba ebele. Bayebaka mpenza ete soki moombo yango azalaka te, balingaki koyeba te mateya ya motuya mingi ya Biblia lokola boyangeli ya Yehova, kosantisama ya nkombo na ye, Bokonzi, likoló ya sika mpe mabelé ya sika, molimo, ndenge bakufi bazali, mpe bokeseni oyo ezali kati na Yehova, mwana na ye, mpe elimo santu. Na botɔndi nyonso, bampate mosusu bazali mpenza kosunga “bandeko” ya Klisto oyo bapakolami na elimo awa na mabelé na ntango oyo ya nsuka.—Matai 25:40.
17.Likambo nini Lisangani ya Mikóló-Bakambi emoni malamu esala, mpe tokolobela nini na lisolo oyo ekolanda?
17 Lokola motángo na bango ezali se kokita, baklisto bapakolami bakoki kozala na masangá nyonso te mpo na kokɛngɛla biloko ya Klisto. Na yango, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali kopona bato na kati ya bampate mosusu mpo na kokɛngɛla babiro ya filiale, bitúká, bazongazonga, mpe masangá ya Batatoli ya Yehova. Ndenge totalelaka babateli ya mpate-basungi wana ezali komonisa ete tozali sembo epai na Klisto mpe moombo na ye ya sembo? Yango nde tokolobela na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba likambo yango na mozindo, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi 2004, nkasa 13-18, mpe ya 1 Desɛmbɛ 1992, lokasa 13.
Bozongeli
• Nani azali mokambi na biso mpe nini emonisi ete ayebaka makambo nyonso oyo ezali koleka na masangá?
• Ntango bayaki kotala “tempelo,” bakutaki banani bazali kosala lokola moombo ya sembo, mpe bapesaki bango mokumba ya kobatela nini?
• Na kotalela Makomami, ntina nini tosengeli kosunga moombo ya sembo?
[Bililingi na lokasa 23]
Na “biloko” oyo “Kapita” akɛngɛlaka ezali mpe na bandako ya mayangani, mateya mpe mosala ya kosakola
[Elilingi na lokasa 25]
Bampate mosusu basungaka moombo ya sembo na ndenge basakolaka na molende mpenza