Tyá elikya epai na Yehova mpe na Liloba na ye
“Baoyo bayebi nkombo na yo bakotya elikya epai na yo.”—NZEMBO 9:10, NW.
1. Mpo na nini tokoki kozala na elikya epai na Yehova mpe na Liloba na ye ata kati na mokili ya lelo?
KATI na mokili oyo ya lelo, libyangi ya kotya elikya epai na Yehova mpe na Liloba na ye, Biblia, ekoki komonana lokola ete ekoki kopesa litomba te mpe ete ekoki kosalema te. Nzokande, na boumeli ya bikeke emonani ete mayele ya Nzambe mazali na litomba. Mozalisi ya mobali mpe ya mwasi azali Mobandisi ya libala mpe ya libota, mpe ayebi bamposa na biso malamu koleka moto mosusu nyonso. Lokola bamposa ya moboko ya moto ebongwani te, bobele bongo mpe myango ya ntina mpo na kokokisa bamposa yango mibongwani te. Toli ya Biblia oyo etondi na mayele, atako esilá kokomama uta bikeke mingi, ezali kino lelo kopesa litambwisi oyo eleki malamu mpo na kolónga kati na bomoi mpe kosilisa mikakatano. Kotyela yango likebi ememaka esengo mingi—ata kati na mokili oyo etondi na mindɔndɔ, na makambo ya siansi, oyo tozali kobika kati na yango!
2. (a) Batatoli oyo batosaka mitindá ya Yehova bazali kobimisa mbuma malamu nini kati na bomoi na bango? (b) Eloko nini mosusu Yehova alaki mpo na baoyo bazali na botosi epai na ye mpe na Liloba na ye?
2 Kotya elikya epai na Yehova mpe kosalela malako ya Biblia ememaka matomba mabongi mpenza mokolo na mokolo. Bosolo ya likambo yango ezali komonana kati na bomoi ya bamilió ya Batatoli ya Yehova kati na mokili mobimba, bango basili kozwa endimeli makasi mpe mpiko ya kosalela batoli ya Biblia. Bazali komona ete kotya elikya epai na Yehova mpe na Liloba na ye ezali likambo oyo ebongi mpenza. (Nzembo 9:9, 10) Kotosa mibeko ya Nzambe esili kokómisa bango bato baleki malamu kati na makambo matali bopɛtɔ, kolongobana, makasi na mosala, komemya bomoi mpe biloko ya bato mosusu, mpe bokatikati na komela mpe na kolya. Yango esili kopusa bango ete bázala na bolingo mpe kolakisama oyo ebongi kati na libota—kozala na ezaleli ya koyamba bapaya, motema pɛtɛɛ, motema mawa, mpe kolimbisa—bakisá mpe ebele ya makambo mosusu ya malamu. Na kotalela bango lokola etuluku, bazali na likoki ya kopɛngola mbuma mabe ya nkanda, koyinana, koboma, bilulelá, bobángi, bogoigoi, lolendo, lokuta, kotɔ́nga, pite, mpe etamboli ya mbindo. (Nzembo 32:10) Kasi Nzambe asuki te bobele na kolaka ete akopesa matomba malamu epai na bato oyo bazali kotosa mibeko na ye. Yesu alobaki ete baoyo bazali kolanda nzela ya boklisto bakozwa ‘na ntango oyo . . . bamama mpe bana mpe bilanga mbala monkámá na minyoko lokola, mpe na ekeke ekoya bakozwa bomoi na seko.’—Malako 10:29, 30.
Tópɛngola kotya elikya na mayele ya mokili
3. Wana bazali kokóba kotya elikya epai na Yehova mpe na Liloba na ye, mikakatano nini baklisto bakutanaka na yango mbala mosusu?
3 Mokakatano mpo na bato ya kozanga kokoka ezali ete bapusamaka ete bátalela na motuya moke to ete bábosana masɛngami ya Nzambe. Nokinoki, babandaka kokanisa ete mayele na bango eleki mayele nyonso to ete mayele ya banganga-mayele ya mokili oyo eleki oyo ya Nzambe, ete ezali ya sika. Basaleli ya Nzambe bakoki mpe kokólisa elimo wana, awa ezali bango kobika kati na mokili oyo. Na yango, wana azali kopesa libyangi oyo etondi na bolingo, ete tóyoka toli na ye, Tata na biso ya likoló apesi mpe likebisi oyo ebongi: “Mwana na ngai, bosaná mobeko na ngai te; kasi tiká ete motema na yo mobatela malako na ngai. Zambi ikobakisela yo mikolo mingi mpe bomoi molai mpe kimya. [Tyá elikya epai na Yehova, NW] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo. Tiká te ete omonana na mayele na miso na yo moko; tosá [Yehova] mpe longwá na mabe.”—Masese 3:1, 2, 5-7.
4. Lolenge nini “mayele na mokili oyo” makoki kokɔtisa mobulungano, mpe likambo nini emonani “bolɛma epai na Nzambe”?
4 Mayele ya mokili oyo ezali mingi mpe ezali kouta na nzela ndenge na ndenge. Biteyelo bizali mingi, mpe “ezali na nsuka na kosala mikanda te.” (Mosakoli 12:12) Lelo oyo, bansango oyo ezali koyebisama na nzela ya baordinatɛrɛ ezali kokana koyebisa ebele ya makambo matali biloko pene na nyonso. Kasi koyeba makambo wana nyonso ezali te kopesa bato mayele to mpe kosilisa mikakatano na bango. Nzokande, ezalela ya mokili ezali kobeba sé kobeba mokolo na mokolo. Ezali likambo ya kokamwa te na komona ete Biblia ezali koyebisa biso ete “mayele na ekeke oyo ezali bolɛma epai na Nzambe.”—1 Bakolinti 3:19, 20.
5. Biblia epesi makebisi nini na ntina na “mayele na mokili oyo”?
5 Na boumeli ya mikolo oyo ya nsuka, tokokamwa te na komona ete mokosi monene, Satana Zábolo, azali kobimisa ebele ya makambo ya lokuta mpo na kobebisa elikya oyo bato basengeli kotya likoló na bosolo ya Biblia. Banganga-mayele oyo bamilobaka ete bayekolaka bosolo ya makomi basili kobimisa ebele ya mikanda oyo mizangi miboko ya sikisiki mpe mizali kobimisa ntembe likoló na bosolo ya Biblia mpe likoló na elikya oyo bato basengeli kotyela yango. Paulo akebisaki moninga na ye moklisto ete: “Ɛ Timoté, obatela yango etyami na mabɔkɔ na yo. Opɛngola bilobaloba na mpamba mpe kowelana na yango ebyangami nkombo na lokuta ete Boyebi. Bamosusu basakoli yango nde bapɛngwi na kondima.” (1 Timoté 6:20, 21) Biblia elobi lisusu ete: “Bókeba ete moto te apunza bino na maloba na ye na mayele, na bibanzabanza na ye na motindo na Klisto te kasi na motindo na bizaleli na bato mpe na makambo mikemike na mokili.”—Bakolose 2:8.
Tóbundisa bopusi ya ezaleli ya kobɛta ntembe
6. Mpo na nini esengeli kokeba mpo na kopɛngola ete ntembe ezwa misisa te kati na mitema na biso?
6 Mwango mosusu ya mayele mabe oyo Satana asalelaka ezali bongo ya kolóna ntembe kati na makanisi ya bato. Azalaka pene mpenza mpo na komona mwa bolɛmbu kati na kondima ya moto mpe kolɛmbisa yango lisusu mingi koleka. Bato nyonso oyo bazali na ntembe basengeli komikundola ete ye oyo azali kokɔtisa ntembe wana ezali nde ye oyo alobaki na Eva ete: “Nzambe alobaki solo ete bino bokoki kolya mbuma na nzeté nyonso na elanga te?” Wana Momeki asilaki kokɔtisa ntembe kati na makanisi ya mwasi, na nsima ayebisaki ye likambo ya lokuta, mpe mwasi andimaki yango. (Genese 3:1, 4, 5) Mpo na kopɛngola ete kondima na biso ebebisama te mpo na ntembe lokola esalemaki epai na Eva, tosɛngeli kokeba. Soki mwa ntembe ebandi kokɔtela yo na ntina na Yehova, na ntina na Liloba na ye, to na ntina na lisangá na ye, salá nokinoki ete olongola yango liboso ete ekóma likambo oyo ekoki kobɛbisa kondima na yo.—Kokanisá na 1 Bakolinti 10:12.
7. Tosengeli kosala nini mpo na kolongola ntembe?
7 Tokoki kosala nini? Lisusu, eyano ezali ete tosengeli kotya elikya epai na Yehova mpe na Liloba na ye. “Soko moko na bino azangi mayele, alomba Nzambe oyo akopesaka na bato nyonso na kopesa malamu, oyo mpe akopamelaka te. Bongo akozwa yango. Kasi alomba na kondima, abɛta ntembe te mpo ete ye oyo akobɛtaka ntembe azali lokola mbonge na mai na kopusama na mopɛpɛ mpe kotambolatambola epai na epai.” (Yakobo 1:5, 6; 2 Petelo 3:17, 18) Na yango, libondeli ya molende epai na Yehova ezali likambo ya liboso oyo tosengeli kosala. (Nzembo 62:8) Na bongo, kokakatana te mpo na kosɛnga lisungi epai na bakɛngɛli batondi na bolingo kati na lisangá. (Misala 20:28; Yakobo 5:14, 15; Yuda 22) Bakosalisa yo ete oluka koyeba soki ntembe wana euti wapi, ekoki kozala ete euti na lolendo to na mwa makanisi mosusu ya mabe.
8. Makanisi ya lipɛngwi ebandaka mingimingi na lolenge nini, mpe mwango ya kosilisa yango ezali nini?
8 Kotánga mpe koyoka makanisi ya bapɛngwi to filozofi ya mokili esili kokɔtisa ntembe oyo etondi na ngɛngɛ? Na mayele nyonso, Biblia epesi biso toli ete: “Omeka na nguya nyonso komimonisa yo moko epai na Nzambe lokola mosáli oyo abongi koyoka nsɔ́ni te, awa ezali yo kosɛmbola liloba na solo. Opɛngola malobaloba na mpamba, zambi yango ekolekisa bato na nzela na kozanga kosambela, mpe maloba na bango makolyaka lokola mpótá na mayina.” (2 Timoté 2:15-17) Ezali likambo ya kobenda likebi na komona ete mingi na baoyo bakómaki bapɛngwi babandaki kokende na nzela oyo elongobani te na komilelalela na ntina na lolenge oyo, engebene makanisi na bango moko, bazalaki kotalela bango kati na lisangá ya Yehova. (Yuda 16) Na nsima, babandaki koluka mabungá kati na bindimeli. Lokola monganga akosalaka nokinoki mpo na kopalola mpótá oyo epoli, bobele bongo, salá nokinoki ete olongola kati na makanisi na yo kopusama nyonso ya komilelalela, osepela na lolenge makambo mazali kotambola kati na lisangá ya Yehova. (Bakolose 3:13, 14) Longolá likambo nyonso oyo ekólisaka ntembe.—Malako 9:43.
9. Lolenge nini mimeseno malamu ya teokrasi ekosalisa biso ete tózala ntango nyonso na kolɔngɔ́nɔ́ malamu kati na kondima?
9 Tókangama makasi na Yehova mpe na lisangá na ye. Tómekola Petelo na bosembo nyonso, ye oyo azwaki ekateli makasi ete: “Nkolo, tókenda epai na nani? Yo ozali na maloba na bomoi na seko.” (Yoane 6:52, 60, 66-68) Tózala na manaka malamu ya boyekoli ya Liloba ya Yehova mpo ete tóbatela kondima na biso ntango nyonso makasi, lokola nguba, ete tózala na likoki ya “kozimisa mbanzi nyonso na mɔ́tɔ na oyo mabe.” (Baefese 6:16) Tózala ntango nyonso na molende kati na mosala ya boklisto, na kosakoláká nsango ya Bokonzi na bolingo nyonso epai na basusu. Mokolo na mokolo, tómanyola na botɔ́ndi nyonso likoló na mapamboli oyo Yehova azali kopesa biso. Tózala na botɔ́ndi mpo na boyebi ya solo oyo tosili kozwa. Kokokisáká makambo oyo nyonso na momeseno malamu ya boklisto ekosalisa biso ete tózala na esengo, tóyika mpiko, mpe ete tózala na ntembe soko moke te.—Nzembo 40:4; Bafilipi 3:15, 16; Baebele 6:10-12.
Tólanda litambwisi ya Yehova kati na libala
10. Mpo na nini ezali mpenza na ntina ete tótalela Yehova mpo na kozwa litambwisi kati na libala ya boklisto?
10 Wana asalaki ebongiseli mpo ete mobali mpe mwasi báfanda elongo lokola babalani, mokano ya Yehova ezalaki te bobele ya kotondisa mabelé, kasi ezalaki mpe ya kokólisa esengo na bango. Nzokande, lisumu mpe kozanga kokoka esili komema mikakatano minene kati na libala. Baklisto babalani mpe bazwaka mikakatano yango, mpamba te bango mibale bazali bato ya kozanga kokoka mpe bakutanaka na mitungisi ya bomoi ya eleko oyo. Atako bongo, na meko oyo bazali kotya elikya epai na Yehova mpe na Liloba na ye, baklisto bakoki kolónga kati na libala mpe kati na mosala ya kobɔkɔla bana na bango. Mimeseno mpe bizaleli ya mokili oyo ezali na esika te kati na libala ya boklisto. Liloba ya Nzambe ekebisi biso na maloba oyo ete: “Tiká ete libala likumisama kati na bato nyonso mpe kosangana na mobali na mwasi ezala na mbindo te. Mpo ete Nzambe akosambisa bato na pite mpe na ekobo.”—Baebele 13:4.
11. Likambo nini babalani basengeli kobosana yango te wana bazali kosilisa mikakatano na bango kati na libala?
11 Libala oyo esalemi engebene batoli ya Biblia ezalaka na elimo ya bolingo, ya komipesa mpe ya libateli kati na yango. Mobali mpe mwasi, bango nyonso mibale basengeli koyeba malamu lilako ya libala mpe kotosa yango. Wana mikakatano mibimi, mbala mingi ezalaka mpo na bopɔtu ya kozanga kosalela batoli ya Biblia. Mpo na kosilisa kwɔ́kɔ́sɔ́ oyo ezali koumela, ezali na ntina ete babalani nyonso mibale, na bosembo nyonso, bátalela na mozindo mpenza mpo na koyeba soki kwɔ́kɔ́sɔ́ yango ezali mpenza nini mpe básilisa makambo oyo mabimisaka kwɔ́kɔ́sɔ́ yango, na esika ya kotala bobele makambo oyo mabimi mpo na yango. Soki masoló kati na babalani mapesi nzela bobele na mwa boyokani moke to ata na boyokani soko moke te, babalani bakoki koluka lisungi ya mokɛngɛli moko oyo akoki kosalisa bango na kozanga kokɔtela ngámbo moko to ngámbo mosusu.
12. (a) Mikakatano nini ya libala oyo mimonanaka mingi Biblia ezali kopesa toli na ntina na yango? (b) Mpo na nini babalani nyonso mibale basengeli kosala makambo na lolenge oyo Yehova alingi ete esalema?
12 Babalani yango bazali na mokakatano mpo na kozanga kosolola, mpo na kozanga komemya mayoki ya moko to ya mosusu, to mpo na kozanga kotosa bokonzi, to mpo na lolenge bikateli bizali kozwama? Bazali na mokakatano mpo na lolenge ya kobɔkɔla bana, to mpo na kozanga bokatikati na ntina na bamposa ya kosangisa nzoto? To mpo na mosolo ya libota, to kominanola, to boninga, to soki mwasi asengeli kosala na kompanyi, to mpo na oyo etali esika basengeli kofanda? Ata soki mokakatano yango ezali nini, Biblia ezali kopesa batoli ebongi, ezala mbala moko na nzela ya mibeko to na nzela ya malako oyo makoki kosalelama kati na likambo yango. (Matai 19:4, 5, 9; 1 Bakolinti 7:1-40; Baefese 5:21-23, 28-33; 6:1-4; Bakolose 3:18-21; Tito 2:4, 5; 1 Petelo 3:1-7) Na ntango babalani nyonso mibale bazali kopɛngola ezaleli ya moimi mpe bazali kotika ete bolingo emonisama mpenza kati na libala na bango, yango ememaka esengo monene. Esengeli ete babalani nyonso mibale bámonisa mposa makasi ya kosala mbongwana oyo esengeli, mpo na kosala makambo na lolenge oyo Yehova alingi ete esalema. “Ye oyo akosala likambo na mayele akomona malamu, ye oyo akotalela [Yehova] azali na esengo.”—Masese 16:20.
Bilenge—Bóyoka Liloba ya Nzambe
13. Mpo na nini ezali likambo ya pɛtɛɛ te mpo na bilenge baklisto ete bakóla mpe bázala na kondima makasi epai na Yehova mpe na Liloba na ye?
13 Mpo ete bilenge baklisto bákoka kokóma makasi kati na kondima awa mokili oyo mabe ezingi bango, ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Moko na bantina ezali oyo ete “mokili mobimba ezali kolala kati na oyo mabe,” Satana Zábolo. (1 Yoane 5:19) Monguna wana ya nsɔ́mɔ, ye oyo akoki kosala ete makambo mabe mamonana lokola makambo malamu, azali koluka kokanga bilenge. Bizaleli ya komitya liboso na bato banso, mposa ya moimi, mposa ya kosala makambo ya mbindo mpe makambo oyo ekoki kopesa basusu mpasi, mpe lolenge mabe ya koluka bisengo—nyonso wana euti bobele esika moko, lolenge ya kokanisa oyo ezali komonana mingi mpe elobelami kati na Biblia ete “elimo oyo ezali kosala mosala sikawa kati na bana bazangi botosi.” (Baefese 2:1-3, NW) Na mayele mabe nyonso, Satana asili kotombola “elimo” wana kati na babúku ya boyekoli na kelasi, kati na lolenge mingi ya miziki, kati na masano, mpe kati na kominanola ndenge na ndenge. Baboti basengeli kokeba mpo ete bákoka kolongola bopusi motindo wana na kosalisáká bana na bango ete bakóla na kotyáká elikya epai na Yehova mpe na Liloba na ye.
14. Lolenge nini bilenge bakoki ‘kokima mposa na bolenge’?
14 Na lolenge ya tata, Paulo apesaki toli oyo epai na Timoté moninga na ye ya mosala: “Nde okimaka mposa nyonso na bolenge mpe [olanda] boyengebene mpe kondima mpe bolingo mpe kimya, esika moko na bango bakobyanga nkombo na Nkolo na mitema pɛto.” (2 Timoté 2:22) Atako “mposa na bolenge” ezalaka ntango nyonso mabe te, kasi bilenge basengeli ‘kokima’ yango na ndimbola oyo ete bátika te ete makambo yango makóma lobanzo na bango ya liboso, kotikáká bobele mwa ntango moke, to ata mpe mwa ndambo ya ntango soko moke te, mpo na kokokisa makambo oyo mamonisaka ezaleli ya bokangami na Nzambe. Kokembisa nzoto, masano, miziki, kominanola, kolekisa ntango, mpe kosala mibembo, atako makambo oyo nyonso mazalaka ntango nyonso mabe te, kasi makoki kozala motambo soki mazwi esika monene mpenza kati na bomoi. Bókima bilobaloba, bókima makanisi mazangi ntina, bókima kotya likebi lizangi kolongobana likoló na makambo matali kosangisa nzoto, bókima kofanda bobele mpamba kozanga mosala ya kosala mpe komilɛmbisa, mpe bókima komilelalela ete baboti na bino bamityaka na esika na bino te.
15. Makambo nini makoki kosalema kati na ndako mpenza, oyo ekoki kopusa bilenge ete bámitambwisa engebene lolenge mibale ya bomoi?
15 Ata kati na ndako na bino mpenza, likámá likoki kozala wana mpo na bilenge kozanga ete emonana mpenza polele. Soki bozali kotala makambo ya mobulu to ya mbindo oyo malakisamaka na televizyó to na video, mposa ya kosala mabe ekolónama epai na bino. (Yakobo 1:14, 15) Biblia epesi biso toli oyo: “Bino baoyo bokolingaka [Yehova], bóboya mabe.” (Nzembo 97:10; 115:11) Yehova ayebi moto na moto oyo azali komeka komitambwisa engebene lolenge mibale ya bomoi. (Masese 15:3) Bilenge baklisto, bótala zingazinga na chambre na bino. Bobambaka bafɔtɔ́ ya bavedeti ya masano to bavedeti ya miziki oyo bazali na etamboli ya mbindo, na bifelo ya chambre na bino, to botyaka nde bililingi kitoko oyo bikoki kokundwela bino makambo malamu? (Nzembo 101:3) Kati na ebombelo na yo ya bilamba, ozali na bilamba bizangi mindɔndɔ, to bilamba na yo mosusu bizali komonisa lolenge ya elateli ya mindɔndɔ ya mokili oyo? Kozanga ete bóyeba yango, Zábolo akoki kotyela bino motambo soki bozali komitika na lisenginya ya koluka komeka makambo ya mabe. Biblia epesi toli oyo ya mayele ete: “Bómisɛnzɛla, bólala mpongi te; motɛmɛli na bino, oyo mabe, azali kotambola lokola nkɔsi konguluma, kolukáká soko akolya nani.”—1 Petelo 5:8.
16. Lolenge nini batoli ya Biblia ekoki kosalisa elenge ete asepelisa bato oyo babongi kozala na esengo mpo na ye?
16 Biblia ezali koyebisa bino ete bókeba na ntina na baninga na bino. (1 Bakolinti 15:33) Baninga na bino basengeli kozala bato oyo babangaka Yehova. Bólanda bopusi ya baninga na bino te. (Nzembo 56:11; Masese 29:25) Bózala na botosi epai na baboti na bino oyo bakobangaka Nzambe. (Masese 6:20-22; Baefese 6:1-3) Bólukaka litambwisi mpe koyikisama mpiko epai na bankulutu. (Yisaya 32:1, 2) Bólanda ntango nyonso kotya makanisi mpe miso na bino likoló na bozwi mpe mikano ya elimo. Bóluka mabaku oyo makoki kopesa bino nzela ya kokóla na elimo mpe ya kosangana na misala ya lisangá. Bóyekola kosalisa mabɔkɔ na bino mosala. Bókóla ete bókóma makasi mpe na kolɔngɔ́nɔ́ malamu kati na kondima, mpe na bongo bokomonisa solo ete bozali mpenza bato—bato oyo babongi kozwa bomoi kati na mokili ya sika ya Yehova! Tata na biso ya likoló akozala na esengo mpo na bino, baboti na bino oyo bazali awa na mabelé bakosepela na bino, mpe bandeko na bino mibali mpe basi baklisto bakoyikisama mpiko mpo na bino. Yango nde ezali na ntina!—Masese 4:1, 2, 7, 8.
17. Baoyo batyaka elikya epai na Yehova mpe na Liloba na ye bazwaka matomba nini?
17 Wana apemamaki na Nzambe, Davidi akomaki na lolenge ya ntɔ́ki ete: “[Yehova] akoboya kopesa eloko malamu soko moke te na baoyo bazali kotambola alima. [Yehova] na bibele, esengo ezali na moto oyo akotyaka elikya na ye epai na yo.” (Nzembo 84:11, 12) Ee, baoyo nyonso batyaka elikya na bango epai na Yehova mpe na Liloba na ye, Biblia, bakozwa esengo mpe bolóngi, kasi bakozwa nsɔ́ni te mpe bakokweisama te.—2 Timoté 3:14, 16, 17.
Okoyanola lolenge nini?
◻ Mpo na nini baklisto basengeli te kotya elikya na bango na “mayele na mokili oyo”?
◻ Moto asengeli kosala nini soki makanisi ya kobɛta ntembe mazali kokɔtela ye?
◻ Lolenge nini kosalela makambo oyo Yehova alingaka ekoki kopesa bolóngi mpe esengo kati na libala?
◻ Lolenge nini Biblia esalisaka bilenge ete ‘bákima mposa na bolenge’?
[Elilingi na lokasa 23]
Baklisto bakotalelaka Yehova mpe Liloba na ye, nzokande babwakaka “bolɛma na mokili oyo”
[Elilingi na lokasa 25]
Mabota oyo batyaka elikya epai na Yehova balóngaka malamu mpe bazalaka na esengo