Tótosa baoyo bazali na bokonzi na esengo nyonso
“Kati na mitema na bino bosili kotosa.”—BALOMA 6:17.
1, 2. (a) Elimo nini ezali komonana lelo oyo kati na mokili, eutelo na yango ezali nini mpe matomba na yango ezali nini? (b) Lolenge nini basaleli ya Yehova oyo bamipesi bazali komonisa ete bakeseni na bango?
LELO oyo, “elimo oyo ezali sikawa kosala mosala kati na bana bazangi botosi,” ezali komonana na lolenge ya nsɔmɔ. Ezali elimo ya koluka lipandá na mobulu, euti na Satana, “moyangeli na bokonzi ya mopepe.” Elimo, “mopepe,” to elimo makasi ya moimi mpe ya kozanga botosi, ezali kosalela “bokonzi,” to nguya, likoló na ebele ya bato ya mokili. Ezali moko na bantina oyo mpo na yango mokili mozali kati na ezalela ya mpasi monene mpo na oyo etali kotosa bokonzi.—Baefese 2:2, NW.
2 Na esɛngo nyonso, lelo oyo basaleli ya Yehova oyo bamipesi bazali te kotondisa mampúlúlú na bango ya elimo na “mopepe” wana mobebisami, to elimo ya botomboki. Bayebi ete “nkanda na Nzambe ezali koya likoló na bana bazangi botosi.” Ntoma Paulo abakisi ete: “Boye, bózala basangani na bango te.” (Baefese 5:6, 7, NW) Nzokande, baklisto ya solo bazali kosala makasi ete ‘bátɔnda na elimo ya [Yehova],’ mpe bazali komela “bwanya bouti na likoló,” oyo ezali “pɛto, mpe na kimya, na makambo makasi te, pene mpo na kotosa.”—Baefese 5:17, 18; Yakobo 3:17, NW.
Kotosa boyangeli ya Yehova na bolingo nyonso
3. Nini tosɛngeli kosala mpo na kotosa na bolingo nyonso, mpe lisoló ya bato lipesi biso toli nini monene?
3 Mpo na kotosa na bolingo nyonso esɛngeli liboso mpenza kondima lotómo oyo epesami epai na bakonzi mpo ete bakoka koyangela. Lisoló ya bato limonisi ete koboya kondima boyangeli ya Yehova ekomemaka bolamu te. Koboya kondima ya motindo wana, ememaki bolamu te epai ya Adama na Eva, soko mpe epai na Satana Zábolo, ye oyo apusaki bango na kotomboka. (Genese 3:16-19) Sikawa, kati na ezalela ya kokitisama, Satana azali sikawa na “nkanda monene” mpo ayebi ete ntango na ye ezali mokuse. (Emoniseli 12:12, NW) Mpo ete kimya mpe bolamu ezala likoló na bato banso, ee likoló na molɔ́ngɔ́ mobimba, esɛngeli ete molɔ́ngɔ́ mobimba etosa boyangeli ya sembo ya Yehova.—Nzembo 103:19-22.
4. (a) Motindo nini ya botosi mpe ya limemya oyo Yehova alingi ete basaleli na ye bámonisa? (b) Tosengeli kondimisama na likambo nini, mpe lolenge nini mokomi na Nzembo alobeli yango?
4 Nzokande, lokola Yehova azali kosalela bizaleli na bokatikati mpe na lolenge ya kokamwa, akosepelaka te na botosi oyo emonisami na kozanga esengo. Ya solo, azali na nguya! Kasi azali mokonzi monyokoli te. Azali Nzambe ya bolingo, mpe alingi ete bikelamu na ye ya mayele bátosa ye na motema moko, na bolingo. Alingi ete bátosa boyangeli na ye mpo ete, na motema mobimba, bazali komitya na nsé ya bokonzi na ye ya boyengebene mpe oyo ezali na lotómo ya koyangela, bandimisami ete, mpo na bango, ezali na eloko mosusu te oyo ezali malamu koleka kotosa mpo na libela. Lolenge ya bato oyo Yehova alingi ete bafanda kati na molɔ́ngɔ́ na ye bazali na mayoki motindo moko na mokomi na Nzembo, oyo akomaki ete: “Mobeko na [Yehova] ejali sembo, ekobikisaka molimo; litatoli na [Yehova] ejali sɔlɔ, ekopɛsa boyebi epai na ye oyo ajangi yango. Bilakeli na [Yehova] ijali alima, ikosepelisa motema. Malako na [Yehova] ijali mpɛto, ikomɔnisa miso polele. Nsɔmɔ na kobanga [Yehova] ijali mpɛto, ekoumela seko. Kosamba na [Yehova] ejali sɔlɔ, yango yɔnsɔ na boyengebene.” (Njembo 19:7-9) Kotya motema mobimba na bosolo mpe boyengebene ya boyangeli ya Yehova—yango nde esɛngeli kozala ezalela na biso soki tolingi kobika kati na mokili ya sika ya Yehova.
Tótosa Mokonzi na biso na esengo nyonso
5. Lolenge nini Yesu apesamelaki mbano mpo na botosi na ye, mpe likambo nini oyo toyebi yango malamu?
5 Yesu Klisto ye moko azali ndakisa eleki malamu mpo na oyo etali kotosa Tata na ye ya likoló. Tozali kotánga ete “amisɔkisi mpe atosi kino kufa, ɛɛ, kino kufa [likoló na nzete ya mpasi, NW].” Paulo abakisi ete: “Yango wana Njambe anɛtoli ye mingi mpe apɛsi ye nkombo koleka nkombo mosusu yɔnsɔ, ete na nkombo na Yesu mabɔngɔ yɔnsɔ makumbama, yango na likoló mpe yango na mokili, mpe yango na nsé na mokili, mpe ete ndemo yɔnsɔ iyambolaka ete Yesu Klisto ye Nkolo mpɔ na nkɛmbɔ na Njambe Tata.” (Bafilipi 2:8-11) Ee, na esɛngo nyonso, tozali kongumba mabɔlɔ́ngɔ́ na biso liboso na Yesu Klisto, Mokambi mpe Mokonzi na biso.—Matai 23:10.
6. Lolenge nini Yesu amonisi ete azali motatoli mpe mokambi ya bikólo, mpe lolenge nini ‘Boyangeli na ye lokola mwana na mokonzi’ ekolandana nsima ya bolózi monene?
6 Na ntina na Klisto Mokambi na biso, Yehova asakolaki ete: “Tala najalisi ye motatoli epai na bato, [mokambi, NW] mpe mokóló kati na bato.” (Yisaya 55:4) Na nzela ya mosala na ye awa na mabelé mpe na kokambáká mosala ya kosakola uta na likoló, nsima na liwa mpe lisekwa na ye, Yesu amonisi ete azali “motatoli na sembo mpe na sɔlɔ” ya Tata na ye epai na bato ya mabota nyonso. (Emoniseli 3:14; Matai 28:18-20) Bikólo nyonso wana bimonisami lelo na “ebele monene” oyo motuya na bango mozali sé kobakisama, baoyo bakobika na “bolózi monene” na nsé na litambwisi ya Yesu. (Emoniseli 7:9, 14, NW) Kasi mosala ya Yesu mpo na kokamba esuki wana te. ‘Boyangeli na ye lokola mwana na mokonzi’ ekoumela mbula nkoto. Mpo na bato na botosi, akomimonisa na nkombo na ye oyo ete “Mosungi na kokamwa, Njambe na nguya, Tata na seko, Nkolo na kimya.”—Yisaya 9:6, 7; Emoniseli 20:6.
7. Nini tosengeli kosala nokinoki soki tolingi ete Yesu Klisto ámema biso epai na “mitó na mai na bomoi,” mpe eloko nini ekosala ete tólingama na Yesu mpe na Yehova?
7 Soki tolingi kozwa litomba na “mito na mai na bomoi” epai kuna Mwana na mpate, Yesu Klisto, azali kokamba bato ya mitema sembo, tosengeli nokinoki komonisa na etamboli na biso ete, na esengo nyonso, tozali kotosa boyangeli na ye lokola Mokonzi. (Emoniseli 7:17; 22:1, 2; kokanisá na Njembo 2:12.) Yesu alobaki ete: “Sɔkɔ bolingi ngai, bokotosa malako na ngai. Oyo ajali na malako na ngai mpe ajali kotosa yango, ye wana ajali molingami na ngai; molingami na ngai akolingama na Tata na ngai mpe nakolinga ye mpe nakomimɔnisa epai na ye.” (Yoane 14:15, 21) Olingi ete Yesu mpe Tata na ye bálinga yo? Na yango, tosá bokonzi na bango.
Bakɛngɛli bazali kotosa na esengo nyonso
8, 9. (a) Klisto apesaki nini mpo na kotongama ya lisangá ya boklisto, mpe kati na likambo nini bato yango basengeli kozala ndakisa mpo na etongá? (b) Lolenge nini botosi ya bakɛngɛli baklisto emonisami na elilingi kati na mokanda ya Emoniseli, mpe lolenge nini basengeli koluka “motema ya botosi” na ntango bazali kosambisa makambo?
8 “Lisangá bakotosaka Klisto.” Klisto, ye oyo azali mokɛngɛli na yango, apesaki “bato lokola makabo” mpo na “kotonga” lisangá. (Baefese 4:8, (NW) 11, 12; 5:24) Mikóló wana ya elimo bazwi lilako mpo na ‘kobatela etongá ya Nzambe kati na bango,’ “lokola mpɔ na kojala mikonji likolo na bino tɛ kasi lokola bilakiseli na etɔnga.” (1 Pɛtɛlɔ 5:1-3) Etongá ezali ya Yehova, mpe Klisto azali “mobateli aleki malamu” na yango. (Yoane 10:14, NW) Lokola bakɛngɛli bazali kotya motema na boyokani ya bolingo malamu ya bampate oyo Yehova mpe Klisto batindi bango ete bábatela, bango moko mpe basengeli kozala ndakisa malamu mpo na oyo etali kotosa.—Misala 20:28.
9 Na ekeke ya liboso, na lolenge ya elilingi, bakɛngɛli bapakolami bamonisamaki lokola ete bazalaki “na,” to “likoló ya” lobɔkɔ ya mobali ya Klisto, yango ezali komonisa botosi na bango epai na Ye oyo azali Motó ya lisangá. (Emoniseli 1:16, 20; 2:1) Lolenge moko na mikolo na biso, bakɛngɛli kati na masangá ya Batatoli ya Yehova basengeli kotosa litambwisi ya Klisto mpe ‘komisɔkisa na lobɔkɔ na Njambe makasi.’ (1 Pɛtɛlɔ 5:6) Wana basɛngami mpo na kosambisa makambo, na ndakisa ya maloba ya Salomo, na eleko oyo azalaki sembo, basengeli kobondela Yehova, ete: “Bongo, pɛsa moombo na yɔ motema na [kotosa, NW] mpɔ na kobɔngisa bato na yɔ ete nayeba kokata epai na mabe mpe malamu.” (1 Mikonzi 3:9) Motema ya botosi ekopusa nkulutu na koluka kotalela makambo na lolenge oyo Yehova mpe Klisto bazali kotalela yango mpo ete ekateli oyo ezwami awa na mabelé ekokana mpenza na oyo ezwami kuna na likoló.—Matai 18:18-20.
10. Lolenge nini bakɛngɛli baklisto nyonso basɛngeli kosala makasi mpo na komekola Yesu na lolenge oyo bazali kosalela bampate?
10 Bobele bongo, bakɛngɛli batamboli mpe bankulutu na masangá basengeli kosala makasi mpo na komekola Klisto mpo na lolenge ya kobatela bampate. Na kokesana na Bafalisai, Yesu atyaki mibeko mingimingi te oyo ezalaki mpasi mpo na kolanda yango. (Matai 23:2-11) Epai na baoyo bakokani na bampate, alobaki ete: “Boya epai na ngai, bino baoyo bozali na mpasi mpe bokumbi bozito, mpe nakopemisa bino. Bokamata ekanganeli na ngai likoló na bino, mpe bozala bayekoli na ngai; mpamba te ngai nazali na bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi; mpe bokozwa bopemi mpo na milimo na bino. Mpo ete ekanganeli na ngai ekookisa mpasi te, mpe mokumba na ngai mozali na bozito te.” (Matai 11:28-30, NW) Atako ezali solo ete moklisto mokomoko asengeli ‘komema bozito na ye moko,’ bakɛngɛli basengeli komikundola ndakisa ya Yesu mpe kosalisa bandeko na bango bamiyoka ete bozito na bango ya boklisto ezali “malamu,” “pɛpɛlɛ” mpe ezali esengo mpo na komema yango.—Bagalatia 6:5.
Botosi ya teokrasi
11. (a) Na ndimbola nini moto akoki kozala na botosi mpo na oyo etali bokonzi, nzokande azali mpenza kolanda teokrasi te? Pesá ndakisa. (b) Kolanda mpenza teokrasi elimboli nini?
11 Teokrasi ezali boyangeli ya Nzambe. Kati na yango ezali na lilako litali bokonzi oyo lizwami na 1 Bakolinti 11:3. Kasi ezali na ndimbola monene koleka. Moto akoki komonana lokola ete azali na botosi mpo na oyo etali bokonzi, nde azali te kolanda teokrasi na ndimbola na yango mpenza. Lolenge nini yango ekoki kosalema? Na ndakisa, demokrasi ezali boyangeli bouti na bayangelami, mpe moto oyo azali kolanda demokrasi abéngami “moto oyo azali na kondima kati na malako ya demokrasi.” Moto akoki komiloba ete azali kolanda demokrasi, azali kosala voti, azali ata mpe kosala kati na politiki. Kasi, soki kati na ezaleli na ye, azali konyata elimo ya demokrasi mpe malako nyonso oyo mazali kati na yango, ekoki mpenza kolobama ete azali mpenza kolanda demokrasi? Bobele bongo, mpo na kozala solo moto oyo azali kolanda teokrasi, asengeli te kotosa bokonzi sé na maloba mpamba. Asengeli kolanda banzela ya Yehova mpe bizaleli na ye. Asengeli mpenza kotambwisama na Yehova kati na makambo nyonso. Mpe lokola Yehova apesi bokonzi nyonso epai na Mwana na ye, kolanda teokrasi elimboli mpe komekola Yesu.
12, 13. (a) Mingimingi, kolanda teokrasi esɛngaka makambo nini? (b) Kotosa teokrasi elimboli kotosa ebele ya mibeko? Pesá ndakisa.
12 Omikundola ete, Yehova alingaka botosi oyo emonisami na bolingo. Ezali na motindo wana nde azali kotambwisa molɔ́ngɔ́ na ezaleli oyo. Azali mpenza bolingo. (1 Yoane 4:8) Yesu Klisto azali “komonisa nkembo na ye mpe elilingi na ye mpenza.” (Baebele 1:3, NW) Azali kosɛnga na bayekoli na ye ya solo ete bálinganaka. (Yoane 15:17) Na yango, kolanda teokrasi elimboli te bobele kozala na botosi, kasi elimboli mpe kozala na bolingo. Na mokuse, ekoki kolobama boye: Teokrasi ezali boyangeli ya Nzambe; Nzambe azali bolingo; na yango, teokrasi elimboli koyangela na bolingo.
13 Nkulutu moko akoki kokanisa ete mpo na kolanda teokrasi, bandeko basengeli kotosa ebele ya mibeko. Bankulutu mosusu basili kobongola makanisi oyo “moombo na sembo mpe na mayele” azali kopesa mbala na mbala na kokómisáká yango mibeko. (Matai 24:45) Na ndakisa, likanisi moko epesamaki ete mpo na koyebana na bandeko kati na lisangá, ekozala malamu te ete tofandaka mikolo nyonso bobele na esika moko kati na Ndako ya Bokonzi. Yango esengelaki kotalelama lokola likanisi oyo ekoki kobota litomba malamu, kasi ezalaki te lokola mobeko oyo mokoki kobukama te. Kasi, bankulutu mosusu bakoki kopusama na kobongola yango ete ekóma mobeko mpe kosanisa ete baoyo bazali kolanda yango te bazali mpe kolanda teokrasi te. Kasi, ekoki kozala na bantina mingi ya malamu mpo na yango ndeko mobali moko to ndeko mwasi moko akolinga kofanda bobele na esika moko. Soki nkulutu moko atiki nzela ya bolingo mpe aboyi kotalela makambo oyo nyonso, tokoki koloba ete azali kolanda teokrasi? Mpo na kozala bato oyo bazali kolanda teokrasi, “tika ete makambo yɔnsɔ na bino masalama na bolingo.”—1 Bakolinti 16:14.
Tósala na esengo
14, 15. (a) Lolenge nini nkulutu moko akoki kolongola bandeko mibali mpe bandeko basi esengo na bango ya kosalela Yehova, mpe mpo na nini yango ezali teokrasi te? (b) Lolenge nini Yesu amonisaki ete azali kosepela na bolingo oyo emonisami kati na mosala na biso koleka bonene ya mosala? (c) Bankulutu basengeli kotalela likambo nini?
14 Kozala moto oyo azali kolanda teokrasi elimboli mpe kosalela Yehova na esengo. Yehova azali “Nzambe ya esengo.” (1 Timoté 1:11, NW) Alingi ete basambeli na ye basalela ye na esengo nyonso. Baoyo bamikangisaka mingimingi na mibeko basengeli komikundola ete kati na mibeko oyo Yisraele basengelaki ‘kokeba ete básalela yango,’ ezalaki na mobeko oyo: “Okosepela mpe liboso na [Yehova] Njambe na yɔ na ntina na misala yɔnsɔ ikomeka yɔ.” (Dutɛlɛnɔmɛ 12:1, 18) Nyonso oyo tozali kosala kati na mosala ya Yehova esengeli kozala esengo, kasi bozito te. Bakɛngɛli bakoki kosala mingi ete bandeko bázala na esengo ya kosala oyo ekoki na bango kati na mosala ya Yehova. Nzokande, soki bankulutu bazali na bokɛngi te, bakoki kolongola esengo ya bandeko mosusu. Soki, na ndakisa, bazali kosala bokokanisi, bazali kopesa longonya epai na baoyo bakokisi to basali koleka mwayene ya bangonga ya lisangá kati na mosala ya kosakola, na kotɔngáká baoyo bakokisaki yango te; baoyo basalaki ngonga moke mpo na ntina oyo ezali sembo, bango bakomioka ndenge nini? Ekoki kopesa bango liyoki ya komema ngambo ezangeli ntina mpe ekoki kolongola esengo na bango, boye te?
15 Mwa bangonga moke oyo basusu bakoki kolekisa mpo na mosala ya kopesa litatoli ekoki komonisa milende mingi koleka bangonga mingi oyo basusu balekisi kati na mosala ya kosakola, na kotalela bolenge, kɔ́lɔngɔnɔ ya nzoto, mpe makambo mosusu. Na likambo oyo, bankulutu basengeli kosambisa bango te. Ya solo, ezali epai na Yesu nde Tata asilaki kopesa “bokonji mpɔ na kosambisa.” (Yoane 5:27) Yesu atɔngaki mobólá mwasi mokufeli mobali mpo ete likabo na ye lizalaki moke? Te, ayebaki malamu motuya ya meyá mibale mike oyo ye apesaki. Ezalaki bongo “mosɔlɔ na ye yɔnsɔ, lilei na ye yɔnsɔ.” Yango emonisaki mpenza bolingo mozindo mpo na Yehova. (Malako 12:41-44) Bankulutu basengeli kotalela na motuya moke milende ya bolingo ya baoyo makoki na bango nyonso ezali na nsé ya “mwayene”? Na kotalela bolingo mpo na Yehova, milende motindo wana mizali mingi mpenza!
16. (a) Mpo na nini bakɛngɛli basengeli kozala na bososoli mpe na bokatikati na ntango bazali kolobela, kati na masukúlú na bango, mituya ya bangonga elekisami na mosala ya kosakola? b) Lolenge nini eleki malamu mpo na kosalisa bandeko ete bakólisa mosala na bango?
16 Makanisi oyo masengeli kokóma “mobeko” ya sika, ete mituya—ata mpe bamwayene—esengeli kolobelama te? Ezali bongo te! Likambo ya ntina ezali ete bakɛngɛli bakozala na bokatikati na ntina etali kolendisa bandeko ete bakólisa mosala na bango mpe kosalisa bango ete básala oyo ekoki na bango na esengo nyonso. (Bagalatia 6:4) Kati na lisese ya Yesu ya batalanta, nkolo apesaki bozwi na ye epai na baombo na ye, “moto na moto kobila nguya na ye.” (Matai 25:14, 15) Bobele bongo, bankulutu basɛngeli kotalela makoki ya moko na moko na basakoli ya Bokonzi. Yango ezali kosɛnga bososoli. Mbala mosusu bamoko bazali mpenza na mposa ya elendiseli mpo ete básala mingi koleka. Bakoki kosepela kozwa lisungi na ntina etali lolenge ya kobongisa malamu mosala na bango. Na makambo nyonso, soki bakoki kosunga bango mpo ete basala oyo ekoki na bango esengo nyonso, na ntembe te, esengo wana ekopesa bango makasi ya kokólisa mosala na bango ya boklisto na meko oyo bakoki kosala yango.—Nehemia 8:10; Nzembo 59:16; Yilimia 20:9.
Kimya oyo euti na kotosa na esengo nyonso
17, 18. (a) Lolenge nini kotosa na esengo nyonso ezali komemela biso kimya mpe boyengebene? (b) Tokozwa nini soki totii likebi mpenza na mitinda ya Nzambe?
17 Kotosa boyangeli ya Yehova na esengo nyonso ezali kopesa kimya mingi. Mokomi na Nzembo alobaki kati na libondeli epai na Yehova, ete: “Kimia mingi ejali na bango balingi mobeko na yɔ; libaku ejali liboso na bango tɛ.” (Njembo 119:165) Na kotosáká mibeko ya Nzambe, biso moko tozali kozwa matomba. Yehova alobaki na Yisraele ete: “Oyo ezali yango Yehova alobaki, Mosikoli na biso, Mosantu ya Yisraele: ‘Ngai, Yehova, nazali Nzambe na yo, Ye oyo akoteya yo mpo na litomba na yo moko. Ye oyo akotambolisa yo na nzela oyo osengeli kotambola. Ɛ soki nde otyaki likebi mpenza na mitinda na ngai! Mbɛlɛ kimya na yo ezalaki lokola ebale, mpe boyengebene na yo lokola mbongé na mai monene.’”—Yisaya 48:17, 18, NW.
18 Mbeka ya lisiko ya Klisto ezali kopesa biso nzela ya kozala na kimya elongo na Nzambe. (2 Bakolinti 5:18, 19) Soki tozali na kondima na makila ya lisiko ya Klisto mpe soki tozali kosala makasi mpo na kobundisa bolembu na biso mpe kosala mokano ya Nzambe, tokobɔndisama longwa na mayoki ya komikweisa. (1 Yoane 3:19-23) Kondima motindo oyo, oyo emonisami na misala, ezali kopesa biso etɛlɛmɛlo ya sembo liboso ya Yehova, mpe ezali kopesa biso elikya kitoko ya kobika na “bolózi monene” mpe kofanda libela kati na mokili ya sika ya Nzambe. (Emoniseli 7:14-17, NW; Yoane 3:36; Yakobo 2:22, 23) Nyonso wana ekoki kokokana epai na biso ‘soki tokotya mpenza likebi na mitinda ya Nzambe.’
19. Sikawa, esengo na biso mpe elikya na biso ya bomoi ya seko ezali kotalela likambo nini, mpe lolenge nini Davidi alobelaki endimeli na biso ya makasi oyo euti na motema?
19 Ee, sikawa, bolamu na biso mpe elikya na biso ya bomoi ya seko kati na paladiso awa na mabelé etaleli botosi na biso ya esengo nyonso epai na bokonzi ya Yehova, ye Nkolo Moyangeli ya molɔ́ngɔ́. Tokoki bongo kozala na mayoki motindo moko na Davidi, oyo alobaki ete: “Ɛ [Yehova], epai na yɔ, monɛnɛ ejali mpe nguya mpe nkɛmbo mpe elonga mpe lokumu. Jambi yɔnsɔ na likolo mpe nsé ejali na yɔ; bokonji mpe ejali na yɔ ɛ [Yehova], mpe yɔ okokumisa nkolo likolo na yɔnsɔ. Boye, ɛ Njambe na biso, sasaipi tokotɔnda yɔ mpe tokosanjola nkombo na yɔ na nkɛmbo.”—1 Ntango 29:11, 13.
Makambo oyo tokomikundola
◻ Motindo nini ya botosi mpe ya limemya oyo Yehova alingi ete basaleli na ye bámonisa?
◻ Lolenge nini Yesu apesamelaki mbano mpo na botosi na ye, mpe eloko nini biso tosengeli komonisa kati na misala na biso?
◻ Lolenge nini bakɛngɛli nyonso basengeli komekola Yesu na lolenge oyo bazali kosalela bampate?
◻ Kolanda teokrasi esɛngi nini?
◻ Mapamboli nini tozali kozwa mpo na kotosa na esengo nyonso?
[Elilingi na lokasa 24]
Bankulutu bazali kolendisa bampate ete básala nyonso oyo ekoki na bango na esengo nyonso
[Elilingi na lokasa 26]
Yehova asepelaka na baoyo bazali kotosa ye na motema moko