LISOLO YA BOYEKOLI 41
Tosalelaka Nzambe oyo “atondi mpenza na motema mawa”
“Yehova azali malamu epai ya bikelamu nyonso, mpe motema mawa na ye ezali likoló ya misala na ye nyonso.”—Nz. 145:9.
LOYEMBO 44 Libondeli ya moto ya komikitisa
NA MOKUSEa
1. Moto ya motema mawa azalaka ndenge nini?
NTANGO tozali kolobela moto ya motema mawa, tokoki komona na makanisi moto moko oyo azali na boboto, bolingo mpe oyo akabaka. Mbala mosusu lisolo oyo Yesu abɛtaki ya Mosamaria ya motema malamu, ekoki koyela biso na makanisi. Mobali yango ya ekólo mosusu ‘amonisaki motema mawa’ epai ya Moyuda oyo miyibi babɛtaki mpe bayibaki biloko na ye. Mosamaria wana “ayokaki mawa” mpo na Moyuda yango oyo azokaki, mpe na boboto nyonso asalisaki ye. (Luka 10:29-37) Ndakisa yango emonisi ezaleli kitoko oyo Nzambe na biso azalaka na yango: motema mawa. Nzambe azali na motema mawa mpo alingaka biso. Mpe mokolo na mokolo, amoniselaka biso ezaleli yango na ndenge oyo asalelaka biso makambo.
2. Wapi lolenge mosusu ya komonisa motema mawa?
2 Ezali na lolenge mosusu ya komonisa motema mawa. Moto ya motema mawa akoki komona malamu apesa moto etumbu te ata soki azali na bantina ya kosala yango. Yehova asalaka mpe bongo mpo na biso. Mokomi ya Nzembo akomaki boye: “Asaleli biso makambo na kolanda masumu na biso te.” (Nz. 103:10) Kasi na bantango mosusu, Yehova akoki kopesa moto oyo asalaki lisumu etumbu ya makasi.
3. Tokoyanola na mituna nini?
3 Na lisolo oyo, tokoyanola na mituna misato: Mpo na nini Yehova amonisaka motema mawa? Boyokani nini ezali kati na kopesa disiplini ya makasi mpe komonisa motema mawa? Mpe nini ekoki kosalisa biso tómonisa motema mawa? Tótala ndenge Liloba ya Nzambe epesi biyano na mituna yango.
NTINA OYO YEHOVA AMONISAKA MOTEMA MAWA
4. Mpo na nini Yehova amonisaka motema mawa?
4 Yehova asepelaka komonisa motema mawa. Na litambwisi ya elimo ya Nzambe, ntoma Paulo akomaki ete Nzambe “atondi mpenza na motema mawa.” Na bavɛrsɛ yango, ntoma Paulo azalaki komonisa ete Nzambe azali na motema mawa ndenge apesi bakristo oyo batyami mafuta na elimo elikya ya kozala na bomoi na likoló, atako bazali bato ya kozanga kokoka. (Ef. 2:4-7) Kasi motema mawa ya Yehova esuki kaka wana te. Mokomi ya Nzembo Davidi akomaki boye: “Yehova azali malamu epai ya bikelamu nyonso, mpe motema mawa na ye ezali likoló ya misala na ye nyonso.” (Nz. 145:9) Lokola Yehova alingaka bato, yango wana amoniselaka bango motema mawa soki amoni ete azali na bantina ya kosala bongo.
5. Nini esalisaki Yesu ayeba ndenge oyo Yehova amonisaka motema mawa?
5 Koleka moto mosusu nyonso, Yesu ayebi malamu ndenge oyo Yehova asepelaka mpenza komonisa motema mawa. Liboso aya awa na mabele, Yesu azalaki kuna na likoló elongo na Tata na ye na boumeli ya bankóto ya bambula. (Mas. 8:30, 31) Yesu amonaki ndenge Tata na ye azalaki komonisela bato ya masumu motema mawa mbala na mbala. (Nz. 78:37-42) Na mateya na ye, Yesu azalaki kolobela mingi ezaleli yango ya kitoko ya Tata na ye.
6. Ndakisa nini Yesu apesaki mpo na kosalisa biso tómona motema mawa ya Tata na ye?
6 Ndenge tolobelaki yango na lisolo oyo eleki, Yesu apesaki ndakisa ya mwana oyo abungaki nzela mpo na kosalisa biso tómona ndenge oyo Yehova asepelaka komonisa motema mawa. Mwana yango atikaki ndako ya baboti na ye mpe “abebisaki biloko na ye na bomoi moko ya mbindo.” (Luka 15:13) Na nsima, atikaki bomoi na ye wana ya mbindo, amikitisaki mpe azongaki epai ya baboti na ye. Tata na ye asalaki nini? Mwana yango asengelaki te kozela ntango molai mpo azwa eyano. Yesu alobaki boye: “Ntango [mwana] azalaki naino mosika, tata na ye amonaki ye mpe ayokaki mawa, mpe apotaki mbangu mpe amibwakaki na nkingo na ye mpe apwɛpwaki ye na boboto.” Tata yango ayokisaki mwana na ye nsɔni te. Kutu amoniselaki ye motema mawa, alimbisaki ye, mpe andimaki azonga na ndako. Mwana yango asalaki lisumu ya monene, kasi lokola abongolaki mpenza motema, tata na ye alimbisaki ye. Yehova nde tata yango ya motema mawa oyo Yesu alobelaki na ndakisa yango. Na ndakisa yango, Yesu amonisaki ete Yehova asepelaka kolimbisa basumuki oyo babongolaka mpenza motema.—Luka 15:17-24.
7. Mpo na nini ndenge oyo Yehova amonisaka motema mawa emonisi ete azali na bwanya oyo ezangá nsuka?
7 Yehova amonisaka motema mawa mpo azali na bwanya oyo ezangá nsuka. Azwaka ntango nyonso bikateli oyo ezalaka mpo na bolamu ya bikelamu na ye. Biblia elobi boye: “Bwanya oyo euti na likoló . . . etondi na motema mawa mpe na mbuma ya malamu.” (Yak. 3:17) Ndenge moko na moboti ya bolingo, Yehova ayebaka ete motema mawa na ye ezalaka mpo na bolamu ya bana na ye. (Nz. 103:13; Yis. 49:15) Motema mawa ya Nzambe epesaka biso elikya atako tozali bato ya kozanga kokoka. Na yango, lokola Yehova azali na bwanya oyo ezangá nsuka, alukaka ntango nyonso komonisa motema mawa soki amoni ete ezali na bantina ya kosala bongo. Kasi Yehova ayebaka mpe ntango nini asengeli te komonisa motema mawa. Bwanya na ye etindaka ye amonisa motema mawa te soki ayebi ete kosala bongo ekolendisa mosumuki akoba kosala mabe.
8. Na bantango mosusu esɛngaka kosala nini, mpe mpo na nini?
8 Kanisá ete ndeko moko akómi kosala masumu na nko mpenza. Tosengeli kosala nini? Na litambwisi ya elimo ya Nzambe Paulo akomaki boye: “Bótika kosangana” na moto ya ndenge wana. (1 Ko. 5:11) Basumuki oyo baboyaka kobongola motema, balongolamaka na lisangá. Yango ezali na ntina mpo na kobatela bandeko ya lisangá oyo bazali sembo mpe komekola bosantu ya Yehova. Kasi bato mosusu bakoki kokanisa ete soki balongoli moto na lisangá, yango elingi koloba ete Nzambe amoniseli ye motema mawa te. Ezali mpenza bongo? Tiká tólobela yango.
KOLONGOLA MOTO NA LISANGÁ EMONISAKA MPENZA MOTEMA MAWA?
9-10. Na kotalela Baebre 12:5, 6, mpo na nini tokoki koloba ete kolongola moto na lisangá emonisaka motema mawa? Pesá ndakisa.
9 Soki bapesi liyebisi na makita ete moto moko oyo toyebi mpe oyo tolingaka “azali lisusu Motatoli ya Yehova te,” toyokaka mawa makasi. Tokoki komituna soki ezalaki mpenza na ntina bálongola ye na lisangá. Kolongola moto na lisangá emonisaka mpenza motema mawa? Ɛɛ, ezali bongo. Koboya kopesa moto disiplini soki esengeli, ezali likambo ya bwanya te, emonisaka motema mawa te, mpe bolingo te. (Mas. 13:24) Kolongola moto na lisangá ekoki kotinda mosumuki abongola makanisi na ye mpe abongola motema? Ɛɛ. Bato mingi oyo bakweaki na masumu ya minene bamonaki ete ekateli ya makasi oyo bankulutu bazwaki, esalisaki bango bázongela makanisi ya malamu, bátika etamboli na bango ya mabe mpe bázongela Yehova.—Tángá Baebre 12:5, 6.
10 Tózwa ndakisa moko. Kanisá ete mobateli ya mpate amoni ete mpate na ye moko ezali kobɛla maladi moko mabe. Ayebi ete mpo asalisa mpate yango, asengeli kotya yango mosika na bampate mosusu. Nzokande bampate elingaka kofanda na etonga elongo na baninga na yango mpe ekoki kobanga soki batye yango mosika na bampate mosusu. Yango elingi nde koloba ete mobateli ya mpate azali motema mabe ndenge aponi kotya mpate oyo ezali kobɛla mosika na bamosusu? Te. Ayebi ete soki atye mpate yango esika moko na bampate mosusu, bampate yango ekozwa maladi yango. Kotya yango mosika na bampate mosusu, ekobatela etonga mobimba.—Talá mpe Balevi 13:3, 4.
11. (a) Na ndenge nini moto oyo alongolami na lisangá akokani na mpate oyo ezali kobɛla? (b) Makambo nini ekoki kosalisa moto oyo alongolami na lisangá?
11 Tokoki kokokanisa mokristo oyo alongolami na lisangá na mpate oyo ezali kobɛla. Mokristo yango azali kobɛla na elimo. (Yak. 5:14) Kaka ndenge moto oyo azali na maladi moko boye akoki kopesa yango bato mosusu, moto oyo abebisi boyokani na ye ná Yehova akoki kolendisa basusu mpe básala bongo. Yango wana, ezali na ntina ete na bantango mosusu moto oyo asali lisumu alongolama na lisangá. Disiplini yango emonisaka bolingo oyo Yehova azalaka na yango mpo na bandeko ya lisangá oyo bazali sembo, mpe yango ekoki kosalisa mosumuki amona ete makambo oyo asalaki ezali mabe mpenza mpe kotinda ye abongola motema. Ata soki alongolami na lisangá, moto yango akoki kokoba koyangana na makita, epai akoki komileisa na elimo mpe kokómisa lisusu kondima na ye makasi. Akoki mpe kozwa mikanda mpo na boyekoli na ye moko mpe kotala baprogramɛ ya TV JW. Soki bankulutu bamoni ete azali kosala bambongwana, bakoki mbala na mbala kopesa ye toli mpe kosalisa ye azongela lisusu boyokani ya malamu elongo na Yehova mpo akoka kozongisama na lisangá.b
12. Wapi likambo ya bolingo mpe ya motema mawa oyo bankulutu basalaka mpo na mosumuki oyo aboyi kobongola motema?
12 Ezali na ntina tóbosana te ete kaka basumuki oyo baboyi kobongola motema nde balongolamaka na lisangá. Bankulutu bayebi ete ezali likambo ya lisɛki te, yango wana bakanisaka na mozindo mpenza liboso ya kozwa ekateli ya kolongola moto na lisangá. Bayebi ete Yehova apesaka disiplini “na ndenge oyo ekoki.” (Yir. 30:11) Balingaka bandeko na bango mpe balingaka te kosala likambo moko oyo ekobebisa boyokani ya bandeko yango ná Nzambe. Kasi na bantango mosusu, mpo na komonisa bolingo mpe motema mawa, esɛngaka kolongola mosumuki na lisangá mpo na mwa ntango.
13. Mpo na nini mokristo moko na lisangá ya Korinti asengelaki kolongolama na lisangá?
13 Tótalela makambo oyo ntoma Paulo asalaki na siɛklɛ ya liboso mpo na mosumuki moko oyo aboyaki kobongola motema. Mokristo moko na lisangá ya Korinti azalaki kosala pite ná mwasi ya tata na ye. Yango ezalaki likambo ya nsɔni mpenza! Mobeko oyo Yehova apesaki na ntango ya kala elobaki ete “mobali oyo alali na mwasi ya tata na ye, amoni bolumbu ya tata na ye. Bango mibale basengeli mpenza kobomama.” (Lev. 20:11) Paulo akokaki te kosɛnga bandeko ya Korinti báboma moto yango. Kasi asɛngaki bango bálongola ye na lisangá. Bizaleli ya mbindo ya moto yango ezalaki kobebisa bandeko mosusu ya lisangá, oyo bamosusu kati na bango bazalaki kotalela yango te lokola lisumu ya monene!—1 Ko. 5:1, 2, 13.
14. Ndenge nini Paulo amonisaki motema mawa mpo na moto moko oyo alongolamaki na lisangá ya Korinti, mpe mpo na nini asalaki bongo? (2 Bakorinti 2:5-8, 11)
14 Nsima ya mwa ntango, Paulo ayokaki ete moto yango atikaki bizaleli na ye ya mbindo. Mosumuki yango abongolaki mpenza motema! Atako mobali yango amemaki nsɔni na lisangá, Paulo ayebisaki bankulutu ete alingaki te ete ‘maloba na ye ezala makasi koleka ndelo.’ Ayebisaki bango boye: “Bosengeli nde kolimbisa ye na boboto mpe kobɔndisa ye.” Paulo amonisaki ntina oyo bankulutu basengelaki kosala bongo. Ayebisaki bango boye: “Noki ezala na ndenge nini moto yango azinda na mawa na ye oyo eleki ndelo.” Paulo ayokaki mawa mpo na moto yango oyo abongolaki motema. Alingaki te ete moto yango amitungisa koleka ndelo mpe alɛmba nzoto mpo na makambo oyo asalaki, mpe atika kosɛnga bolimbisi.—Tánga 2 Bakorinti 2:5-8, 11.
15. Ndenge nini bankulutu bakoki kopesa disiplini ya makasi mpe komonisa motema mawa?
15 Ndenge moko na Yehova, bankulutu basepelaka komonisa motema mawa. Bapesaka mosumuki disiplini ya makasi soki esengeli, kasi soki likoki ezali bamonisaka motema mawa ntango bamoni ete ezali mpenza na bantina ya kosala bongo. Soki bankulutu bapesi mosumuki disiplini te, yango ekomonisa te ete bazali na motema mawa, kasi bazali nde kokanga miso na mabe. Kaka bankulutu nde basengeli komonisa motema mawa?
NDENGE OYO BISO NYONSO TOKOKI KOMONISA MOTEMA MAWA
16. Na kotalela Masese 21:13, Yehova asalaka nini mpo na baoyo baboyaka komonisela basusu motema mawa?
16 Bakristo nyonso bamekolaka motema mawa ya Yehova. Mpo na nini? Ntina ya liboso ezali ete Yehova aboyaka koyoka mabondeli ya baoyo balingaka te komonisela basusu motema mawa. (Tángá Masese 21:13.) Moko te kati na biso akolinga ete Yehova aboya koyoka mabondeli na ye, yango wana tosengeli koboya kozala motema makasi. Na esika ya koboya kotyela ndeko na biso oyo azali na mpasi likebi, tosengeli nde koyoka “komilelalela ya moto oyo azangá.” Ndenge moko mpe, tobosanaka te toli ya Biblia oyo elobaka ete: “Moto oyo azalaka na motema mawa te akosambisama na motema mawa te.” (Yak. 2:13) Soki na komikitisa nyonso tobosani te ete tozalaka na mposa makasi bámonisela biso motema mawa, yango ekosalisa biso tómonisela mpe basusu motema mawa. Tosengeli komonisa motema mawa mingimingi ntango mosumuki oyo abongoli motema azongisami na lisangá.
17. Ndenge nini Mokonzi Davidi amonisaki mpenza motema mawa?
17 Biblia ezali na bandakisa oyo ekoki kosalisa biso tómonisa motema mawa mpe tóboya kozala motema makasi. Tótalela ndakisa ya Mokonzi Davidi. Mbala mingi azalaki komonisa mpenza motema mawa. Atako Saulo alingaki koboma ye, Davidi amoniselaki ye motema mawa mpo Saulo azalaki mokonzi oyo Nzambe atyaki mafuta. Alukaki soki moke te kozongisela Saulo mabe na mabe.—1 Sa. 24:9-12, 18, 19.
18-19. Wapi mabaku mibale oyo Davidi azangaki komonisa motema mawa?
18 Kasi Davidi azalaki komonisa motema mawa ntango nyonso te. Na ndakisa ntango Nabale, oyo azalaki makambo makasimakasi, alobaki na ye kozanga limemya mpe aboyaki kopesa ye ná mibali oyo bazalaki elongo na ye bilei, Davidi asilikaki makasi mpe akanaki koboma Nabale ná bato nyonso ya ndako na ye. Kasi Abigaile, mwasi ya Nabale, oyo azalaki na boboto mpe na motema molai, apesaki Davidi bilei nokinoki. Yango esalaki ete Davidi aboma Nabale te ná bato ya ndako na ye.—1 Sa. 25:9-22, 32-35.
19 Mokolo mosusu, mosakoli Natane abɛtelaki Davidi lisolo ya mozwi moko oyo abɔtolaki mpate kaka moko ya moninga na ye oyo azalaki mobola. Nsima ya koyoka lisolo yango, David asilikaki makasi mpe alobaki: “Lokola Yehova azali solo na bomoi, moto oyo asali boye asengeli kokufa!” (2 Sa. 12:1-6) Davidi ayebaki Mibeko ya Moize. Moto oyo ayibi mpate ya moninga na ye asengelaki kozongisela ye mpate minei. (Kob. 22:1) Ezalaki mabe mpenza koloba ete moyibi yango asengelaki kobomama. Natane azalaki kobɛta lisolo yango mpo na kosalisa Davidi ayeba ete makambo oyo asalaki ezalaki mabe mpenza! Kutu, motema mawa oyo Yehova amoniselaki Davidi ezalaki mingi koleka oyo Davidi asengelaki komonisela moto oyo ayibaki mpate ya moninga, na ndakisa oyo Natane apesaki.—2 Sa. 12:7-13.
20. Ndakisa ya Davidi ekoki koteya biso nini?
20 Ntango Davidi asilikaki makasi, azwaki ekateli ya koboma Nabale ná mibali nyonso oyo bazalaki elongo na ye. Mpe na nsima, Davidi alobaki ete mobali oyo ayibaki mpate ya moninga, na ndakisa oyo Natane apesaki, asengelaki kobomama. Mpo na likambo oyo ya mibale, tokoki komituna boye: Mpo na nini Davidi, moto oyo azalaki na boboto, akokaki kozwa ekateli ya makasi boye mpo na moto oyo ayibaki mpate ya moninga? Tótalela naino makambo oyo Davidi azalaki kokutana na yango na ntango wana. Na ntango wana, lisosoli ya Davidi ezalaki kotungisa ye. Mbala mingi, soki moto azali kosalela basusu makambo na boboto te, yango emonisaka ete azali lisusu na boyokani ya malamu te ná Yehova. Yango wana, Yesu akebisaki bayekoli na ye na maloba oyo: “Bótika kosambisa mpo básambisa bino te; mpo bakosambisa bino na lisambisi oyo bozali kosambisa.” (Mat. 7:1, 2) Na yango, tosengeli kosala oyo tokoki mpo tóboya kozala makambo makasimakasi mpe ‘tótonda na motema mawa’ lokola Nzambe na biso.
21-22. Makambo nini tokoki kosala mpo na komonisela basusu motema mawa?
21 Komonisa motema mawa esuki kaka te na koyokela moto mawa. Moto ya motema mawa asalaka makambo mpo na kosalisa basusu. Biso nyonso tosengeli kosala makasi tóyeba bato oyo bazali na mposa ya lisalisi na libota, na lisangá mpe na esika tofandi. Ezali na mabaku mingi oyo tokoki komonisa motema mawa! Na ndakisa, ezali na moto moko oyo azali na mposa tólendisa ye? Ezali na mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na kosalisa ye, na ndakisa kopesa ye mwa biloko ya kolya to mpe kosunga ye na makambo mosusu? Ezali na ndeko moko oyo auti kozongisama na lisangá mpe azali na mposa ya baninga oyo bakoki kolendisa ye? Tokoki koyebisa basusu nsango malamu mpo na kolendisa bango? Yango ezali moko ya makambo oyo eleki malamu ya komonisela moto nyonso oyo tokutanaka na ye motema mawa.—Yobo 29:12, 13; Rom. 10:14, 15; Yak. 1:27.
22 Soki tozali kotya likebi na bamposa ya basusu, tokomona ete tozali na mabaku mingi ya komonisa motema mawa na esika tofandi. Soki tomonisi motema mawa, tokosepelisa Tata na biso ya likoló oyo “atondi mpenza na motema mawa”!
LOYEMBO 43 Libondeli ya kopesa matɔndi
a Motema mawa ezali moko ya bizaleli ya Yehova oyo eleki malamu, mpe mokomoko na biso asengeli kosala makasi akolisa ezaleli yango. Na lisolo oyo, tokolobela ntina oyo Yehova amonisaka motema mawa, mpo na nini tokoki koloba ete amonisaka ntango nyonso motema mawa ntango azali kopesa moto disiplini, mpe ndenge oyo tokoki komonisa ezaleli yango.
b Mpo na kosalisa baoyo bauti kozongisama na lisangá bákóma lisusu na boninga ya makasi ná Nzambe mpe ndenge oyo bankulutu bakoki kosalisa bango, talá lisolo “Ndenge ya kokómisa lisusu boyokani na yo ná Yehova makasi” na nimero oyo.
c ELILINGI: Tata azali na nsamba ya ndako na ye mpe amoni mwana na ye oyo abungaki nzela azali koya. Apoti mbangu mpo na koyamba mwana yango.
d ELILINGI: Lokola lisosoli ya Mokonzi Davidi ezali kotungisa ye, asiliki makasi nsima ya koyoka ndakisa oyo Natane apesi. Davidi alobi ete mozwi yango asengeli kobomama.