Okoki kozala na kimya na mokili oyo ya yikiyiki?
OZALI na bomoi ya kimya? Bato mingi bakoyanola boye: “Te.” Bazali kofanda na bisika oyo ezali na bitumba, kowelana na makambo ya politiki, kobomana kati na bato ya bituluku ekeseni, mpe misala ya bateroriste. Ata soki ofandi na esika oyo makambo yango ezali te, makambo mosusu ekoki kobebisa kimya na yo, na ndakisa mobulu, mitungisi, mpe kowelana na bato oyo ozali kosala na bango mombongo to mosala, to mpe bato mosusu na kartye. Lisusu, na esika mabota ezala esika ya kimya, mingi ezali na matata.
Bato mingi bazali na mposa ya kozala na kimya ya motema. Bato mosusu balukaka kimya yango na losambo, na bisika oyo bayekolaka komanyola, to na bituluku ya bato oyo basalaka ngalasisi oyo babengi yoga. Bato mosusu balikyaka kozwa kimya na kosala mibembo, na kokende kotambola na bangomba, na bisobe, to na bisika oyo mai ya mɔtɔ ebimaka na mabelé. Ata soki bato yango bazwi kimya, nsima ya mwa ntango bamonaka ete kimya yango ezali ya likolólikoló mpe ya ntango mokuse.
Na yango, epai wapi okoki kozwa kimya ya solosolo? Kimya eutaka na Mozalisi na biso, Yehova Nzambe. Mpo na nini? Azali “Nzambe oyo apesaka kimya.” (Baloma 15:33) Mosika te, ntango Bokonzi na ye ekoyangela, “kimya mpe ekoyikana.” (Nzembo 72:7; Matai 6:9, 10) Kimya yango eleki mosika boyokani ya kimya oyo bato basalaka. Mbala mingi, boyokani yango esilisaka matata kaka mpo na mwa ntango mokuse. Kasi, kimya oyo Nzambe akotya ekolongola makambo nyonso oyo ebimisaka bitumba mpe kowelana. Kutu, moto moko te akoyekola etumba lisusu. (Nzembo 46:8, 9) Nsukansuka, tokozala na kimya ya solosolo!
Atako elikya yango ezali kitoko mingi, mbala mosusu ozali na mposa makasi ya kozala na mwa kimya ata sikoyo. Okoki nde kozwa kimya oyo ekoki kosalisa yo na mokili oyo ya yikiyiki? Likambo ya esengo, Biblia elakisi biso ndenge oyo tokoki kozwa yango. Tótalela mwa batoli oyo ezali na mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki Bafilipi, na mokapo 4. Tosɛngi yo otánga vɛrsɛ 4 tii 13 na Biblia na yo moko.
“Kimya ya Nzambe”
Na vɛrsɛ 7 totángi boye: “Kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makoki na bino ya kokanisa na nzela ya Klisto Yesu.” Moto azwaka kimya yango te na komanyola to na kokolisa ezaleli moko boye. Eutaka nde na Nzambe. Kimya yango ezali mpenza na nguya, kutu “eleki makanisi nyonso.” Ezali makasi koleka mitungisi, boyebi mpe makanisi na biso. Tokoki kosila mayele liboso ya mikakatano na biso, kasi kimya ya Nzambe ekoki kotondisa biso na elikya oyo euti na Biblia ete mokolo mosusu mikakatano na biso nyonso ekosila.
Okanisi ete ekoki kosalema te? Na miso ya bato ekoki kosalema te; kasi “makambo nyonso ekoki kosalema epai ya Nzambe.” (Malako 10:27) Kondima mpe elikya epai ya Nzambe esalisaka biso tómitungisa te koleka ndelo. Tózwa ndakisa ya mwana moko oyo abungi na kati ya magazini moko monene. Ayebi malamu ete likambo oyo asengeli kosala ezali koluka mama na ye mpe soki amoni ye, makambo nyonso ekozonga malamu. Ndenge kaka ekozala mpo na mwana yango soki amoni mama na ye, biso mpe tokoki kolikya ete, na ndenge ya elilingi, Nzambe akozwa biso na mabɔkɔ na ye. Akokitisa biso motema mpe akosalisa biso tólongola mitungisi na biso nyonso.
Basambeli mingi ya Yehova bayokaki kimya na ye ntango bakutanaki na mikakatano makasi mpenza. Tózwa ndakisa ya Nadine, oyo abotaki mwana asili kokufa. Alobi boye: “Nazalaki kokoka te koyebisa bato ndenge nazalaki koyoka, mpe nazalaki kosala lokola nde likambo yango ezali kotungisa ngai te. Nzokande, na kati ya motema nazalaki na mpasi makasi. Mokolo na mokolo, nazalaki kolela epai ya Yehova na libondeli mpe kosɛnga ye asalisa ngai. Nayokaki nguya ya libondeli, mpo ntango nyonso oyo namoni ete nakómi mpenza na nsuka mpe nazali kokanisa ete, ‘Nakokoka lisusu te,’ nazalaki koyoka mbala moko kimya ya motema. Nazalaki koyoka ete nabatelami malamu.”
Libateli mpo na motema mpe makanisi na yo
Tózonga na Bafilipi 4:7. Elobi ete kimya ya Nzambe ekobatela mitema mpe makoki na biso ya kokanisa. Ndenge kaka sinzili abatelaka esika oyo azali, kimya ya Nzambe ebatelaka mitema na biso, mpo makanisi ya konduka biloko ya mokili, mitungisi ya mpambampamba, mpe bizaleli mabe ekɔtela biso te. Tózwa ndakisa moko.
Bato mingi bakanisaka ete mpo bázala na esengo mpe libateli na mokili oyo ya yikiyiki, basengeli kozala na mbongo mpe biloko mingi ya mokili. Na kolanda makanisi ya bapesi-toli, bakoki kokɔtisa mbongo na bango na bakompanyi. Bakómaka na kimya ya solosolo? Mpenza te. Bakoki kobanda komitungisa mokolo na mokolo mpo na koyeba soki mbongo na bango ezali komata to ezali kokita, soki basengeli kobimisa yango to te. Soki biloko ekiti ntalo makasi, bakómaka kobanga. Ya solo, Biblia epekisi te kokɔtisa mbongo na mimbongo, kasi epesi toli ya bwanya oyo: “Ye oyo alingi mosolo akosepela na mosolo te; ye oyo alingi libonza akosepela na mingi mpe te. Oyo ezali mpe mpamba. Mpɔngi ya moto ya mosala ezali kitoko ata alei moke to mingi; kasi biloko mingi ya mozwi ekopekisa mpɔngi na ye.”—Mosakoli 5:10, 12.
Bafilipi 4:7 esukisi ete kimya ya Nzambe ebatelaka mitema mpe makoki na biso ya kokanisa “na nzela ya Klisto Yesu.” Boyokani nini ezali kati na Klisto Yesu ná kimya ya Nzambe? Yesu azali na mokumba monene na kokokisama ya mokano ya Nzambe. Yesu apesaki bomoi na ye mpo tókoka kosikolama na lisumu mpe liwa. (Yoane 3:16) Azali mpe Mokonzi oyo atyami na Bokonzi ya Nzambe. Koyeba mokumba oyo Yesu azali na yango ekoki kosalisa mingi mpo tózala na kimya ya makanisi mpe ya motema. Na ndenge nini?
Soki tobongoli mpenza motema mpe tosɛngi bolimbisi mpo na masumu na biso na lisalisi ya mbeka ya Yesu, Nzambe akolimbisa biso, mpe yango ekopesa biso kimya ya makanisi mpe ya motema. (Misala 3:19) Soki toyebi ete tokozala na bomoi ya malamu mpenza kaka soki Bokonzi ya Klisto eyei, tokoboya kosala makambo lokola nde nyonso esuki kaka na bomoi oyo. (1 Timote 6:19) Ya solo, tokoki kokutana na mikakatano, kasi tokoki kobɔndisama na elikya ya solosolo ete bomoi oyo eleki malamu ezali koya.
Ndenge oyo okoki kozwa kimya ya Nzambe
Na yango, ndenge nini okoki kozwa kimya ya Nzambe? Tozali kozwa mwa makanisi na Bafilipi 4:4, 5, epai tozali kotánga ete: “Ntango nyonso bósepelaka na kati ya Nkolo. Nakoloba lisusu ete, Bósepelaka! Tiká ete ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te eyebana epai ya bato nyonso. Nkolo akómi pene.” Ntango Paulo akomaki maloba wana, azalaki na bolɔkɔ na Loma, atako asalaki likambo te. (Bafilipi 1:13) Na esika amilelalela mpo na likambo yango ya kozanga bosembo, alendisaki baninga na ye bandimi básepelaka ntango nyonso na kati ya Nkolo. Emonani polele ete esengo na ye ezalaki kotalela te makambo oyo azalaki kokutana na yango, kasi nde boyokani oyo azalaki na yango na Nzambe. Biso mpe tosengeli kosalela Nzambe na esengo, tózala na mikakatano to te. Soki toyebi malamu Yehova mpe mokano na ye, tokosepela mpe mingi kosalela ye. Na nsima, yango ekopesa biso esengo mpe kimya na motema.
Longola yango, Biblia elendisi biso tózala makambo makasimakasi te. Soki toyekoli kozala makambo makasimakasi te, tokoluka te kosala makambo oyo eleki makoki na biso. Toyebi ete tozali bato ya kozanga kokoka; tokoki kosala makambo nyonso malamu te. Na yango, mpo na nini komitungisa mpo na koluka kosala makambo na ndenge ya kokoka, to koleka bato nyonso? Tokosɛnga mpe te basusu ete bázala bato ya kokoka. Na yango, tokoki kobatela kimya na biso ntango basali biso likambo moko oyo epesi biso nkanda. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “makambo makasimakasi te” ekoki mpe kobongolama na “kondima makanisi ya basusu.” Soki tozali kondima makanisi ya basusu, ata soki esɛngi tótika makambo oyo tolingaka, tokoboya koswana, oyo mbala mingi ezalaka na ntina te mpe ekoki kobebisa mpo na mwa ntango kimya oyo ezali kati na biso ná basusu mpe kimya na biso ya motema.
Ekoki komonana ete maloba oyo elandi na Bafilipi 4:5, ete “Nkolo akómi pene,” eyokani te na makambo mosusu ya vɛrsɛ yango. Mosika te Nzambe akolongola mokili oyo mabe mpe akotya mokili ya sika oyo Bokonzi na ye ekoyangela. Kasi ata sikoyo, akoki kozala penepene na moto nyonso oyo apusani penepene na ye. (Misala 17:27; Yakobo 4:8) Koyeba ete Nzambe azali penepene na biso esalisaka biso tósepela, tózala makambo makasimakasi te, mpe tómitungisaka te mpo na makambo ya lelo to oyo ekoya lobi, ndenge vɛrsɛ 6 emonisi yango.
Soki totali vɛrsɛ 6 mpe 7, tokomona ete kimya ya Nzambe eyaka soki tozali kobondela. Bato mosusu bakanisaka ete libondeli ezali kaka lolenge moko ya komanyola; bakanisaka ete lolenge nyonso ya libondeli ekoki kobakisela bango kimya na motema. Nzokande, Biblia emonisi ete kobondela ezali nde kosolola mpenza na Yehova, ndenge mwana asololaka na moboti ya bolingo mpo na koyebisa ye makambo oyo ezali kopesa ye esengo to oyo ezali kotungisa ye. Koyeba ete tokoki kokende epai ya Nzambe “na makambo nyonso” ezali mpenza libɔndisi. Tokoki koyebisa Tata na biso ya likoló ata likambo nini oyo tozali na yango na makanisi to oyo ebombami na motema na biso.
Vɛrsɛ 8 elendisi biso tótyaka makanisi na biso na makambo ya malamu. Kasi, tosengeli kosuka kaka wana te. Ndenge vɛrsɛ 9 emonisi yango, tosengeli mpe kosalela batoli ya Biblia. Soki tosali bongo, tokozala na lisosoli ya pɛto. Likambo yango emonisi mpenza bosolo ya lisese oyo: Lisosoli ya malamu ezali lokola kusɛ ya pɛpɛlɛ!
Ya solo, okoki kozala na kimya ya motema. Kimya yango eutaka na Yehova Nzambe, oyo apesaka yango na baoyo bapusanaka penepene na ye mpe oyo balingaka kolanda litambwisi na ye. Soki ozali koyekola Liloba na ye, Biblia, okoyeba makanisi na ye. Kosalela malako na ye ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Kasi, kosala milende ezali na ntina mpo “Nzambe ya kimya akozala elongo na [yo].”—Bafilipi 4:9.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 10]
“Kimya ya Nzambe . . . ekobatela mitema na bino.”—BAFILIPI 4:7
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 12]
Koyeba ete tokoki kokende epai ya Nzambe “na makambo nyonso” ezali mpenza libɔndisi