Babongisami mpo na mosala ya misionere na bambula 1990
MOSALA ya misionere mokóti kati na eleko moko ya sika. Ebele na bikuke bizali kofungwana; yango wana ba Témoins de Jéhovah ya sembo balingi kokokisa mosala moko monene.
Ezali bongo na motema likoló nde bayekoli 24 ya kelasi ya mbala 89 ya Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower, basanganaki na mokolo ya bopesi ba diplómes oyo esalemaki na le 9 Septembre 1990. Bato koleka 5 000, kati na bango babyangami mosusu mpe libota ya Béthel bayanganaki na libaku yango, bamisionere ya sika oyo basilaki koyeba liboso bateritware zomi epai kuna basengelaki kotindama. Yango esalemaki na Salle d’assemblées ya ba Témoins de Jéhovah na Jersey City, na New Jersey, kasi bato oyo bayanganaki na Béthel ya Brooklyn, na Ferme ya la Société Watchtower mpe na centre de formation ya la Société na Patterson, na mokili ya New York, balandaki mpe badiskur nyonso.
Na ngonga ya zomi mpenza na ntongó, Theodore Jaracz, mosangani ya college central ya ba Témoins de Jéhovah mpe ye oyo akambaki likita yango, asengaki na bayangani ete bayemba loyembo ya ebandeli. Na nsima, libondeli lisalemaki na Arthur Worsley, mosangani ya Béthel ya Brooklyn. Mokambi atangaki Misala 10:33, epai kuna Korneye, kapitene ya peletó na basoda alobaki na Petelo: “Sikawa biso tozali liboso na Nzambe mpo na koyoka makambo nyonso oyo Jéhovah asili kolaka yo.” Amonisaki ete makambo minene masalemaki na mikolo na Petelo masengelaki kofungola nzela na kosakolama ya nsango malamu liboso na bato ya bikolo nyonso.
Philip Wilcox, mosali na Ferme ya la Société, asalaki diskur ya yambo kati na molongó ya badiskur nsambo ya kolendisa. Kotóngáka lisolo likoló na likanisi ya Bafilipi 4:7, aponaki teme oyo: “Tika ete kimya na Nzambe esunga bino kati na mosala na bino!.” Kati na makambo nyonso, alobaki ete: “Jéhovah Nzambe azali Liziba ya kimya ya solo. Azali na kimya mobimba, kimya ya kokoka mpe azali na komitungisa soko moke te, soko mpe kobanga te, mpe abulungani kati na makanisi te. Na yango, libateli mpe kimya ekoutaka na komonana na ye na kongenga, lokola emonisi yango monama mokokani na libanga ya samala oyo Yoane amonaki na emonaneli. (Emoniseli 4:2, 3) Kimya oyo ekoutaka na ye, ekopesaka bolamu na bato nyonso oyo balingi komitika kosungama na yango. Bokondima nde mosala na yango?” Ndeko Wilcox alobelaki myango mibale ya ntina mingi mpo na kozwa lisalisi: libondeli mpe kotya motema epai na Jéhovah. (Mika 7:7; Bafilipi 4:6) Amonisaki ete, likambo nyonso oyo lipesami nzela na Nzambe, ekoki te kopesa biso mpasi libela.
Nsima, Lloyd Barry, mosangani ya college central azwaki esika mpo na kosolola na teme “Bobatela esengo na bino.” Abandaki na lisolo na ye na lisese oyo ete, “koseka ezali nkisi monene.” Amikundolaki maloba wana mpo ete ezalaki likoló ya ezipeli ya nimero ya yambo ya Réveillez-vous! na lokota ya Japonais, oyo ebimaki na 1955. Kasi motindo na koseka nini oyo balobeli awa? Ezali “koseka na zoba” te, oyo ekosalaka makelele mingi mpe ezangi mayele. (Mosakoli 7:6) Ezali bongo koseka ya esengo mpe ya kimya ya bamisionere mpe ya baoyo nyonso bayanoli na libyangi oyo ya Davidi, ‘bazali kosepela kati na Jéhovah.’ (Nzembo 32:11) Ndeko Barry amonisaki ete Yobo abatelaki esengo na ye kati na mimekamo mpo ete amimonisaki sembo liboso na Nzambe. Bamisionere baoyo bazali kotelema ngwi kati na mpasi makasi, lokola oyo Yobo akutanaki na yango, bakozwa mapamboli mingi na nsima. (Yobo 29:24; 42:12) Mpe molobi asukisaki na maloba oyo: “Bozala ntango nyonso na mosala, bozala ntango nyonso na esengo, mpe bokozwa esengo ya Jéhovah ezangi nsuka, elingi koloba kondimama na ye.”
Molobi oyo alandaki, Richard Abrahamson, asololaki na ntina na teme “Tika ete etamboli na bino ya bato na bobóto eyebana na bata nyonso!”, ezwamaki na Bafilipi 4:5 (MN). Na boyokani na greke ya ebandeli, liloba ‘bobóto’ ekoki kopesa likanisi ya “kopesa nzela.” Bamisionere mosusu bazwaki mikakatano bobele mpo na makambo matali bamposa ya motema na bango moko. Misionere moko asilikaki mpenza, bobele likoló ya lolenge oyo moninga na ye ya mosala akataki fromage na ntango na kolya. Nsima na kolekisa mibu 22 kati na mosala ya misionere, ye oyo asilikaki ayaki koloba ete, mbala mingi kosilika ekoutaka bobele na makambo mike koleka nkutu likambo oyo litali lolenge moto moko asengeli kokata fromage. Yango wana molobi apesi toli oyo ete: “Boyekola kondima makambo nyonso, lolenge moko nzete emingumbaka liboso na mopepe. Moto oyo akopesaka nzela na makambo, akozwaka bolamu mingi; na ndakisa, ezali nkutu malamu mingi na koyika mpiko na mimekamo, to kolendendela kati na mosala na kobateláká kimya ya elimo.”
Milton Henschel, mosangani ya college central, asololaki na ntina na teme “Ekuke monene ezipwi mpo na kopesa nzela na mosala.” Ndeko Henschel akundolaki ete Yesu alingaki bato, ayokelaki bango mawa mpe ateyaki bango makambo mingi. Uta na Efese, ntoma Paulo akomaki mokanda epai na Bakolinti ete: “Ekuke monene ezipwameli ngai mpo na mosala monene, kasi batemeli bazali mingi.” (1 Bakolinti 16:8, 9) Atako botemeli wana, Paulo ateyaki kati na ndako na eteyelo ya Tyrannus na boumeli ya mibu mibale, mpe nsango na Bokonzi epalanganaki na Azia mobimba. (Misala 19:9, 10) Ekuke yango ezipwaki, epesaki ye nzela na kolonga kati na mosala na ye ya kosakola. Lisangá ya Efese ezalaki ntango nyonso na molende na nsuka ya ekeke na liboso.—Emoniseli 2:1-7.
Jack Redford, molakisi na Eteyelo ya Galaad, asololaki na teme “Bomimeka bino mpenza.” (2 Bakolinti 13:5) Bamisionere ya Galaad bazali kolona bilanga ya sika na mosala mpe bazali kolendisa masangá oyo masila kosalema, na koyikáká mpiko mpe na kopengwáká longwa na mitambo oyo Satana azali kotyela bango mpo ete bakokisa mosala na bango te. Mpe bato mosusu bazali bobele koya kokólisa molongó na bango. Molakisi apesaki bandakisa mibale mpo na ntina ya komimeka biso mpenza soki tozali kati na kondima. Misionere moko oyo amikotisaki na nzela mabe, abungisaki mikumba na ye ya mosala mpo ete aboyaki kondima makebisi oyo mapesamelaki ye likoló na etamboli na ye. Moko na baninga na biso basi oyo azali misionere alongaki kotelema ngwi na esengo, wana ezwaki ye maladi na boumeli na sanza misato ya yambo ya mosala na ye, maladi oyo elongolaki ye nsuki na motó mpe azalaki lisusu koyoka te, mpe elembisaki ye mingi mpenza. Kino lelo, mibu 42 na nsima, azali kosala lokola misionere mpe asili kosalisa bato 156 na kokóla kino kozwa batisimo. Ndeko Redford asukisaki diskur na ye na maloba oyo ete “Botemela Diable, mpe akokima mosika na bino. Bozimbisama na ye te. Botala motindo na bato nini bozali. Jéhovah akobatela bino.”
Nsima na ye, Ulysses Glass, molakisi mosusu, alimbolaki teme “Mayele ezali na bato na bopolo.” (Masese 11:2, MN) Mpo na kolimbola ete pole euti epai na Liloba na Nzambe ekoki kosalisa biso na “kobongwana libela,” asalelaki ndakisa ya ntango to montre oyo ekoselaka na moi. Kasi alobaki na sikisiki ete “boyebi yango moko ekopesaka mayele te. Ezalela ya bopolo ekopusaka biso na kobanga Nzambe.” (Mika 6:8) Nzokande “kobanga Jehovah ezali ebandeli na mayele.” (Masese 9:10) Ezali solo ete biso moko tosengeli komikumisa komimona moto mpamba ekoki mpe koboma Jéhovah asili kopesa makoki epai na moto na moto, lokola asalaki yango na ntango na botongi ya hema, kasi esengeli na biso komonisa bosembo mpe bopolo. Kolobáká na bana ya kelasi, ndeko Glass alobaki ete: ’’Na boumeli ya eteyelo, bomonisaki mayele mpe limemya. Bomonisa motindo na bosembo wana epai kuna bokotindama, mpe Nzambe akopambola bino.’’
Albert Schroeder, mosangani ya college central, asalaki lisolo ya ntina mingi na teme, ’’Babongisami mpo na mosala ya misionere na bambula 1990.” Abandaki lisolo na ye na maloba oyo ete: “Bambula 1990 ebandaki na mopepe makasi. Mikili mingi ya Europe de l’Est miningisamaki. Euti koleka mwa basanza, mur de Berlin ekweaki. Zulunalo New York Times ebimisaki titre oyo ete: ‘Août 1990, ezali sanza oyo ebulunganisi mokili.’ Na bongo, bino bato bozwi ba diplómes lelo, bozali kobika na eleko etondi na yikiyiki. Basanza mitano bolekisi na boyekoli esili nde kobongisa bino? Solo mpenza.” Na nsima alobelaki mpe mwa bamoko na makoki ya ntina oyo ezali kati na les Saintes Ecritures Traduction du monde nouveau, ebimeli na lingelesi ya références ya 1984, mpe amonisaki lolenge nini boyekoli na yango emonisaki nguya ya Liloba na Nzambe. Esaleli mosusu na nguya, oyo esalisaki bayekoli ezali mokanda Toute Écriture est inspirée de Dieu et utile, oyo ebimeli ya sika ezali naino na lingelesi. Mokanda L’humanité á la recherche de Dieu, oyo euti kobimisama sika, esengelaki mpe kozala na ntina mingi mpo na bamisionere. Mpe ndeko Schroeder asukisi na maloba oyo ete: “Na bongo, bandeko, botondo Jéhovah mpo na formation kitoko mpe ya motuya mingi oyo bouti kozwa yango—formation makasi mpe ekoki kobebisama te. Bokendeke bobele liboso elongo na mapamboli na Jéhovah mpe botya mpenza motema epai na ye, mpe epai na Motamwisi na biso malamu, Yesu Klisto. Maloba oyo tozali kokuta na Biblia epemami mpenza na Nzambe, mpe ekokamba mosala na bino ya misionere.”
Batangaki bambote eutaki na mikili 11. Bayekoli bazwaki ba diplómes na bango, mpe moko na bango atangaki mokanda moko ya kosepelisa mingi oyo bakomaki yango mpo na bandeko ya Collège central mpe ya libota na Béthel.
Likita ya nsima na midi ezalaki na boyekoli bokuse ya Mosenzeli, oyo botambwisamaki na ndeko Davidi Walker, mosangani na comité ya Ferme. Bayekoli basalaki bongo elakiseli mpo na makambo mazali koleka kati na mosala ya kosakola na titre “Nguya ya libondeli kati na mosala ya kosakola.” Drame Basikolami mpo na kokólisa losambo ya peto, oyo ezali komonisa bozongi ya Esdras na Yelusaleme, esalamaki na basangani ya lisangá ya esika wana. Ndeko Frederick Franz, prézidá ya Eteyelo ya Galaad, asukisaki programme na libondeli ya kafukafu.
[Elilingi na lokasa 24]
Kelasi ya mbala 89 ya Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower
Na liste oyo ezali awa na nsé, milongó mitangami longwa na liboso mpo na kozonga nsima. mpe nkombo etangami longwa na loboko ya mwasi kino na loboko ya mobali:
1) K. Ahr; L. Johnston; V. Ng Ying Kin: A. Sukkau; A. Rodriguez; N. Myklebust. 2) H. Ahr; P. Verbeek; K. Verbeek: S. DeBolt; S. DeBolt. 3) W. Sukkau; L. Ayal; S. Ayala; R. Jenson; J. Ng Ying Kin; T. Myklebust. 4) C. Rodriguez; G. Ferlisi; L. Ferlisi; J. Tank; K. Jenson; J. Tank; P. Johnston.