Bato bandimaka toli na yo?
TOLI malamu oyo epesami na lolenge ebongi ebimisaka ntango nyonso matomba malamu. Solo to lokuta? Lokuta! Ata toli malamu oyo epesami na bapesi-toli ya mayele mbala mingi endimamaka te to eboyamaka.—Masese 29:19.
Yango esalemaki ntango Yehova apesaki Kaina toli, ye oyo akómaki koyina ndeko na ye Abele. (Genese 4:3-5) Lokola ayebaki likama oyo yango ekokaki kobimisela Kaina, Nzambe alobaki na ye ete: “Mpo nini ozali kosilika mpe elongi na yo ezali na nkanda? Soki okosala malamu okondimama te? Kasi soki okosala malamu te talá lisumu ezali na monɔkɔ ya ndako na yo, mpe mposa na yango ezali ya kokanga yo; nde yo, okolonga yango?”—Genese 4:6, 7, NW.
Yehova akokanisaki lisumu na nyama oyo elyaka banyama mosusu mpe elingi kokanga Kaina soki akobomba nkanda mpo na ndeko na ye. (Talá Yakobo 1:14, 15.) Kaina azalaki naino na ntango mpo na kobongwana, mpo na ‘kosala malamu’ na esika ya kolanda nzela mabe. Likambo ya mawa, Kaina alandaki likebisi te. Aboyaki toli ya Yehova, yango wana esukelaki ye mabe.
Bato mosusu basilikaka mpe baboyaka toli nyonso. (Masese 1:22-30) Toli mosusu eboyamaka mpo na foti ya mopesi-toli. (Yobo 38:2) Soki ozali kopesa toli, oyeisaka yango makasi na boye ete bato báboya yango? Ezaleli na biso ya kozanga kokoka ekoki kobimisa mokakatano yango. Kasi, tokoki kosala ete yango ekómela biso te soki tokotya likebi na mitinda ya Biblia. Tótalela ndambo na mitinda yango.
‘Sembolá na elimo ya bopɔlɔ’
“Bandeko, ata soki moto abɛti libaku liboso ete ye moko ayeba yango, bino baoyo bozali na makoki ya elimo bóluka kosembola moto ya ndenge wana na elimo ya bopɔlɔ, okeba yo moko ete omekama te.” (Bagalatia 6:1, NW) Ntoma Paulo amonisi ete baoyo bazali na “makoki ya elimo” nde basengeli koluka kosembola moklisto oyo “abɛti libaku liboso ete ye moko ayeba yango.” Ntango mosusu emonanaka ete baoyo bazali mpenza na makoki ya elimo te nde bawelaka kopesa toli. Yango wana, kowela kopesa bato mosusu toli te. (Masese 10:19; Yakobo 1:19; 3:1) Ezali libosoliboso bankulutu ya lisangá nde bazali na makoki ya elimo mpo na kosala yango. Ya solo, moklisto nyonso oyo azali na makoki akoki kokebisa soki amoni ndeko moko azali kotambola na nzela oyo ekoki komema ye na likama.
Soki okopesa toli, omindimisa ete makambo okoloba euti na mayele ya Nzambe, kasi na mayele to filozofi ya bato te. (Bakolose 2:8) Zalá lokola molambi malamu oyo amindimisaka ete bikelakela nyonso alingi kotya na bilei bizali malamu mpe bizali na ngɛngɛ te. Omindimisa ete toli na yo euti na Liloba ya Nzambe kasi na makanisi na yo moko te. (2 Timote 3:16, 17) Soki okosala bongo, okoki komindimisa ete toli na yo ekosala moto mabe te.
Ntina ya kopesa toli ezali mpo na “kosembola” moto oyo abungi nzela, kasi ya kobongwanisa ye na makasi te. Liloba ya Greke oyo ebongolami na “kosembola” eyokani na liloba oyo emonisi kozongisa mokuwa oyo elongwi na esika na yango mpo na kopekisa likama mosusu. William Vine, molimboli ya maloba, alobi ete likambo yango ezali kosɛnga “motema molai mpe kolendendela.” Kanisá bopɔlɔ mpe mayele oyo osengeli komonisa soki olingi koyokisa nzoto mpasi te. Bobele bongo, mopesi-toli asengeli kosala angɛlɛ ete azokisa te moto oyo ye azali kopesa toli. Yango ezalaka mpasi mingi ntango moto asɛngi toli. Ntango olingi kopesa toli na moto oyo asɛngi te ete opesa ye yango, osengeli kozala na mayele mpe na bokɛngi mingi.
Okolonga te “kosembola” moto soki ozokisi ye. Mpo na kolonga, yebá ete osengeli komonisa ‘motema na mawa, boboto, [komikitisa], bopɔlɔ, motema pɛtɛɛ.’ (Bakolose 3:12) Soki monganga azali na motema mokuse mpe azangi boboto, moto ya maladi akoki koboya toli na ye mpe akozongela ye lisusu te mpo na kozwa nkisi.
Yango elingi koloba te ete toli esengeli kozala bobele ya pɛtɛpɛtɛ. Yesu Klisto asalelaki elobeli ya makasi ntango apesaki masangá nsambo ya Azia toli. (Emoniseli 1:4; 3:1-22) Ayebisaki bango polele makambo oyo basengelaki koyoka mpe kosalela. Kasi Yesu asalelaki elobeli ya makasi nzela moko na motema na mawa, boboto, amonisaki bolingo ya Tata na ye ya likoló.—Nzembo 23:1-6; Yoane 10:7-15.
Pesá toli na ngɔlu
“Tiká ete maloba na bino mázala na ngɔlu, na elɛngi na mungwa ntango nyonso ete bóyeba soko ekoki na bino kozongisela bato nyonso maloba nini.” (Bakolose 4:6) Mungwa ekoki kobakisa elɛngi na bilei, mpe kosala ete bato básepela na yango. Soki olingi ete bato bándima toli na yo, esengeli kopesama na “ngɔlu, na elɛngi na mungwa.” Ntango mosusu, bilei bikoki kozala elɛngi te ata soki elambami na bikelakela ya nsolo kitoko, to soki ezali elɛngi kasi etyami na saani ya malamu te ekosepelisa moto te. Yango ekopesa moto mposa ya kolya te. Kutu, ekozala mpasi mpo moto amela ata lutu moko.
Ntango ozali kopesa toli, ezali malamu kopona maloba oyo ebongi. Salomo, moto ya mayele alobaki ete: “Liloba lilobami na ntango malamu ezali lokola [pomo ya, NW] wolo etyami kati na [saani, NW] ya palata.” (Masese 25:11) Mbala mosusu azalaki kokanisa saani kitoko ya palata oyo na kati batii pomo basalá na wolo. Ezalaka kitoko na miso, mpe okosepela mingi soki bakabeli yo yango! Bobele bongo, maloba ya ngɔlu oyo maponami malamu, makoki kosepelisa moto oyo ozali kosalisa.—Mosakoli 12:9, 10.
Nzokande, “liloba oyo eswaka moto ematisaka nkanda.” (Masese 15:1, NW) Maloba oyo maponami malamu te makoki kopesa moto mpasi mpe nkanda na esika ete amonisa botɔndi. Longola maloba mabe, soki mpe mongongo esalelami na lolenge mabe ekoki kopusa moto na koboya toli ya malamu. Soki toli epesami na mayele te, ekoki kozokisa moto lokola lisasi. Masese 12:18 (NW) elobi ete: “Ezali na moto oyo alobaka kozanga kokanisa lokola azali kotya yo mbeli.” Mpo na nini koloba kozanga kokanisa mpe kotya moto na mokakatano ya kondima toli na yo?—Masese 12:15.
Lokola Salomo alobaki, toli esengeli ‘kopesama na ntango malamu.’ Koyeba kopona ntango ezali likambo ya ntina mpo ete toli endimama! Eyebani malamu ete moto oyo azali na mposa ya kolya te akosepela na bilei te. Mbala mosusu auti kolya mingi, to azali na maladi. Koleisa moto oyo alingi kolya te na makasi, ezali likambo ya mayele te mpe ezali mabe.
Kopesa toli na komikitisa
“Bótondisa esengo na ngai . . . Bósala likambo moko mpo na elulela soko mpo na nzombo te kasi, awa ezali bino na [komikitisa], [bótalela] bamosusu ete baleki bino. Moto na moto atala bobele makambo na ye moko te, kasi makambo na bamosusu lokola.” (Bafilipi 2:2-4) Soki ozali mopesi-toli malamu, okoluka “makambo” mpe bolamu ya bato mosusu. Okomonisa lisusu “komikitisa” ntango ozali na makambo na bandeko ya elimo mpe kotalela bamosusu ete baleki yo. Yango elingi koloba nini?
Komikitisa ekopekisa yo komitombola to komatisa mongongo. Moto moko te kati na biso azali na ntina ya komimona ete aleki bandeko mosusu. Biso nyonso tokweaka na mabunga mbala na mbala. Lokola okoki koyeba makambo mazali na motema ya moto te, ebongi te kosambisa makanisi ya moto oyo ozali kopesa toli. Mbala mosusu azali na makanisi ya mabe te, mpe ayebi te ete etamboli to misala yango ezali mabe. Atako na lolenge moko to mosusu ayebi ete azali kokokisa masɛngami ya Nzambe te, na ntembe te ekozala pɛtɛɛ mpo andima toli soki epesami na komikitisa mpe mpo na bolamu na ye ya elimo.
Okoyoka ndenge nini soki moto moko abéngisi yo na feti kasi ayambi yo malamu te, kutu akómi kotyola yo? Na ntembe te okosepela na feti yango te. Ɛɛ, “bilei na mwa ndunda na epai na bolingo eleki elambo na ngɔmbɛ na mafuta wana koyinana ezali.” (Masese 15:17) Bobele bongo, toli malamu ekoki koboyama soki moto oyo azali kopesa yango azali kotyola mpe kotungisa moto oyo ye azali kopesa toli. Nzokande, soki tozali kolingana, kopesana limemya, mpe kotyelana motema ekozala mpasi te mpo na kopesa toli to kondima yango.—Bakolose 3:14.
Toli oyo endimamaki
Mosakoli Natana azalaki na komikitisa ntango apesaki Mokonzi Davidi toli. Makambo oyo alobaki mpe oyo asalaki emonisaki ete azalaki kolinga mpe komemya Davidi. Natana abandaki na lisese moko oyo emonisaki mokakatano Davidi akokaki kozala na yango mpo na koyoka toli. (2 Samwele 12:1-4) Mosakoli akumisaki Davidi, moto oyo alingaki bosembo mpe boyengebene, atako yango emonanaki te na likambo oyo asalaki na Bata-seba. (2 Samwele 11:2-27) Ntango asosolaki ndimbola ya lisese, Davidi alobaki na motema moko ete: “Nasaleli [Yehova] lisumu.” (2 Samwele 12:7-13) Na bokeseni na Kaina, oyo aboyaki koyokela Yehova, na komikitisa nyonso Davidi andimaki kosembolama.
Na ntembe te ezali Yehova nde atindaki Natana, atalelaki kozanga kokoka ya Davidi mpe ayebaki ete Davidi akokaki kosilika. Natana asalaki na mayele mpe emonanaki ete atalelaki Davidi ete aleki ye mpamba te Davidi azalaki mokonzi oyo Yehova aponaki. Soki ozali na mwa bokonzi, okoki kopesa toli malamu, kasi bakoki koboya yango soki ozangi komikitisa.
Natana asembolaki Davidi na elimo ya bopɔlɔ. Maloba ya mosakoli mazalaki na ngɔlu mpe maponamaki malamu na boye ete Davidi akokaki kondima yango mpo na bolamu na ye moko. Natana alukaki bolamu na ye moko te, to mpe amekaki te kokanisa ete bizaleli to elimo na ye ezalaki malamu koleka oyo ya Davidi. Ezali wana ndakisa malamu ya koloba maloba kitoko na lolenge ebongi! Soki omonisi elimo motindo yango, na ntembe te bato mosusu bakondima toli na yo.
[Elilingi na lokasa 22]
Lokola bilei oyo bitongaka nzoto, toli na yo esengeli kopesa elimo bokolɔngɔnɔ
[Elilingi na lokasa 23]
Osalaka ete toli na yo ezala kitoko lokola pomo ya wolo na kati ya saani ya palata?
[Elilingi na lokasa 24]
Na komikitisa mpenza, mosakoli Natana alamusaki bolingo ya Davidi mpo na bosembo