Okozimisa nsinga ya mwinda oyo ezali kopela mokemoke?
YESU KLISTO asakolaki nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe epai na bato ya lolenge nyonso. Mingi kati na bato yango banyokwamaki, balɛmbaki. Kasi Yesu apesaki bango nsango ya kolendisa. Azalaki komonisa motema mawa epai na bato oyo bazalaki na mpasi.
Matai, mokomi ya Evanzile, amonisaki polele motema mawa ya Yesu wana abendaki likebi likoló na esakweli moko oyo ekomami kati na mokanda ya Yisaya. Kotángáká maloba ya esakweli yango oyo Yesu akokisaki, Matai akomaki ete: “Akobuka lititi litutami te, akozimisa nsinga ya mwinda oyo ezali kozika mokemoke te; kino ekosila ye kosambisa-sembo.” (Matai 12:20, NW; Yisaya 42:3) Maloba oyo malimboli nini, mpe lolenge nini Yesu akokisaki esakweli oyo?
Botaleli ya esakweli wana
Mangángá to lititi oyo elobelami awa ekólaka mingimingi penepene na mai mpe ezalaka etwɛlɛ ya makasi mpenza te. “Lititi litutami” ezali mpenza motau. Emonani bongo ete yango ezali elilingi ya bato oyo banyokwamaki to baoyo bazalaki na mpasi lokola mobali ya lobɔkɔ lokauki oyo Yesu abikisaki na mokolo ya Sabata. (Matai 12:10-14) Kasi ezali boni mpo na maloba ya esakweli oyo mazali kolobela nsinga ya mwinda?
Mwinda oyo mozalaki kosalelama mingi kati na mabota ya Bayuda na ekeke ya liboso T.B. mozalaki mbeki ya mabelé na lolenge ya kɔ́pɔ mpe na esimbelo na yango. Mbala mingi bazalaki kotondisa mwinda yango na mafuta ya olive. Na nzela ya madusu mike na yango, nsinga ya mwinda oyo esalemi na nsinga ya elamba ya pɛtɛpɛtɛ ezalaki kobenda mafuta mpo na kopelisa mwinda. Ya solo, ‘nsinga ya mwinda oyo ezali kopela mokemoke’ ezalaki oyo ekómaki pene ya kozimana.
Yesu asakolaki nsango na ye ya kobɔndisa epai na bato mingi oyo na elilingi bakokanaki na lititi oyo etutami, balɛmbaki mpe bazalaki koyengayenga. Bato wana bazalaki mpe lokola nsinga ya elamba oyo ezali kopela mokemoke mpamba te elikya nyonso na bango ya bomoi ezalaki mpenza pene na kozimana. Bazalaki solo bato banyokwami mpe balɛmbi. Nzokande, Yesu abukaki te lititi etutami ya elilingi to nsinga ya mwinda oyo, na elilingi ezalaki kopela mokemoke. Maloba na ye ya bolingo, ya boboto mpe ya motema mawa malɛmbisaki te mpe matungisaki te bato oyo bazalaki na mpasi. Nzokande, maloba na ye mpe misala na ye epai na bango mizalaki kolendisa.—Matai 11:28-30.
Lelo mpe, bato mingi bazali na mposa ete bámonisela bango motema mawa mpe báyikisa bango mpiko mpamba te bazali kokutana na mikakatano oyo milɛmbisaka. Ata basaleli ya Yehova bazalaka ntango nyonso te na makasi liboso ya mikakatano. Ekómaka ete basusu bámonana lokola nsinga ya mwinda oyo ezali kopela mokemoke. Mpo na yango baklisto basengeli kozala eutelo ya bilendiseli—kopɛpaka mɔ́tɔ, soki tokoki koloba bongo—mpe na yango kolendisana moko na mosusu.—Luka 22:32; Misala 11:23.
Lokola tozali baklisto tosengeli kolendisana. Tokolinga soko moke te komeka kolɛmbisa na nkó moto oyo azali koluka lisalisi ya elimo. Ya solo, tolingi komekola ndakisa ya Yesu mpo na oyo etali kolendisa basusu. (Baebele 12:1-3; 1 Petelo 2:21) Likambo oyo, kozanga kokanela, tokoki kolɛmbisa bato oyo bazali koluka bilendiseli epai na biso, ezali kopesa biso ntina mpenza ya kokanisa malamu likoló na lolenge oyo tosalaka epai na basusu. Na ntembe te tokolinga te ‘kozimisa nsinga ya mwinda oyo ezali kopela mokemoke.’ Mitindá nini ya Biblia mikoki kosalisa biso na likambo yango?
Bopusi ya matɔ́ngi
Soki moklisto moko ‘azwami na likambo, baoyo bakokisi masɛngami ya elimo basengeli kosembola moto lolenge yango na elimo ya bopɔlɔ.’ (Bagalatia 6:1, NW) Nzokande, ekozala malamu koluka mabungá epai na basusu mpe na yango koluka mabaku nyonso mpo na kosembola bango? To ekozala malamu kotindika bango na kosala makasi lisusu na komonisáká ete milende oyo bazali kosala sikawa mibongi te, mbala mosusu komonisa lokola ete bamemi ngambo? Elembeteli moko te emonisi ete Yesu asalaki likambo ya lolenge wana. Atako tolingi kosalisa basusu ete básala makasi, nzokande baoyo tozali kotɔ́nga bakoki kolɛmba na esika ete bálendisama. Ata komonisa bolɛmbu na lolenge oyo ebongi ekoki kolɛmbisa soki eleki ndelo. Soki milende ya sembo oyo moklisto moko azali kosala mizali kokutana bobele na kotyolama, akoki kosundola makambo yango mpe komilobela ete, ‘Mpo na nini nazali komona mpasi ya mpamba?’ Ya solo, akolɛmba mpenza.
Atako kopesa toli ya Makomami ezali na ntina, yango esengeli te kozala momeseno ya bankulutu to ya bandeko mosusu kati na lisangá. Makita ya boklisto mazali te libosoliboso mpo na kopesa mpe kozwa batoli. Nzokande, tokutanaka pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mpo na kolendisana mpe koyikisana mpiko moko na mosusu ete banso bákoka kosepela na boninga mpe na mosala na bango ya bulɛɛ oyo bazali kosalela Nzambe. (Baloma 1:11, 12; Baebele 10:24, 25) Ekozala malamu mingi soki toyebi kokesenisa kati na mabungá ya minene mpe ezaleli ya kozanga kokoka oyo ebongi ete tóleka likoló na yango na mayele mpe na bolingo nyonso!—Mosakoli 3:1, 7; Bakolose 3:13.
Mbala mingi bato bamonisaki bizaleli malamu nokinoki nsima ya kozwa bilendiseli kasi matɔ́ngi te. Ya solo, soki moto moko amoni ete bazali kotɔ́ngatɔ́nga ye kozanga ntina, akoki kokangama makasi na etamboli oyo bazali kotɔ́nga ye na yango! Kasi soki bapesi ye longonya mpo na makambo malamu, elimo na ye ekoyikisama mpiko, mpe akopusama na kosala makasi mpo na kobongwana. (Masese 12:18) Na yango, tiká ete lokola Yesu, tózala bato oyo bakolendisaka mpe ‘tózimisa nsinga ya mwinda oyo ezali kopela mokemoke’ soko moke te.
Ezali boni mpo na bokokanisi?
Koyoka makambo oyo baklisto mosusu bakutanaki na yango ekoki kozala likambo ya kolendisa mpenza. Yesu ye moko asepelaki mingi na koyoka bolóngi ya bayekoli na ye kati na mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi. (Luka 10:17-21) Bobele bongo, wana toyokaka nsango ya bolóngi, ya ndakisa malamu, to ya bosembo ya basusu kati na kondima, tolendisamaka mpe tokómaka na ekateli ya kokangama makasi na etamboli na biso ya boklisto.
Nzokande, ezali boni soki lapólo eyebisami na lolenge oyo ezali komonisa ete, ‘Bozali mpenza malamu te lokola baklisto wana, mpe bosengeli kosala malamu koleka oyo bozali kosala sikawa’? Moyoki akolendisama solo mpo na kosala makasi? Ekoki mpenza kozala ete akolɛmba mpe mbala mosusu akotika, mingimingi soki bazali mbala na mbala kokokanisa ye na basusu to kopesa likanisi ete akoki te. Yango ekoki mpenza kozala lokola moboti oyo azali kotuna mwana na ye, ‘Mpo na nini okoki te kozala lokola ndeko na yo?’ Maloba ya lolenge wana makoki kopesa nkanda mpe kolɛmbisa, nzokande makoki mpenza te komema na etamboli ya malamu. Bokokanisi ekoki kosala mpasi motindo moko epai na mikóló, ekoki nkutu komema bango na kokanga nkanda epai na baoyo batyami ndakisa mpo na bango.
Tokoki te komizela ete bato banso básala lolenge moko kati na mosala ya Nzambe. Kati na moko ya masese ya Yesu, nkolo moko apesaki na baombo na ye talanta moko, mibale mpe mitano. Yango epesamaki “epai na moto na moto kobila nguya na ye.” Baombo mibale oyo basalaki mombongo na mayele mpenza mpe babakisaki batalanta na bango bapesamelaki longonya mpamba te bamimonisaki sembo, atako mosala na bango mopesaki mbano lolenge moko te.—Matai 25:14-30.
Na lolenge lobongi ntoma Paulo akomaki ete: “Tiká ete moto na moto ameka mosala na ye moko, boye akoki komikumisa mpo na mosala na ye moko mpe mpo na moto mosusu te.” (Bagalatia 6:4) Mpo na kozala solo elendiseli mpo na basusu, tosengeli bongo koboya kosala bokokanisi ya mabe.
Mwa mitindo ya kolendisa
Tokoki kosala nini mpo na kolendisa ye oyo alɛmbi mpe kopɛngola ‘kozimisa nsinga ya mwinda oyo ezali kopela mokemoke’? Ee, kolendisa ezali te likambo ya kolanda mwango moko ya sikisiki. Nzokande, maloba na biso makolendisa mpenza basusu soki tokosalela mitindá ya Biblia. Wapi bamoko na yango?
Zalá na komikitisa. Na Bafilipi 2:3, Paulo alendisaki biso ete ‘tósala likambo moko te mpo na elulela soko mpo na nzombo te.’ Na esika ya kosala bongo, tosengeli koloba mpe kosala makambo na komikitisa nyonso. ‘Kasi, awa ezali biso na kosɔkɛma, tótánga bamosusu ete baleki biso.’ Paulo alobaki te ete tosengeli kokanisa eloko moko te na ntina na biso moko. Atako bongo, tosengeli kondima ete moto nyonso aleki biso na lolenge moko to mosusu. Liloba ya Greke oyo esalelami awa “aleki” lizali kopesa likanisi ya moto oyo “alongoli miso na ye na matomba na ye moko, mpe na likebi nyonso azali kotala makoki oyo moto mosusu azali na yango, oyo kati na yango aleki ye.” (New Testament Word Studies, ya John Albert Bengel, Volimi 2, lokasa 432) Soki tosali bongo mpe totaleli basusu ete baleki biso, tokosala epai na bango na komikitisa nyonso.
Monisá limemya. Na kolobáká makambo oyo mazali kouta na motema, tokoki komonisa polele ete tozali kotya motema epai na baninga na biso bandimi oyo bazali sembo, kotaleláká bango lokola bato oyo bazali na mposa ya kosepelisa Nzambe. Kasi, kanisá sikawa ete bazali na mposa ya lisalisi na elimo. Bongo, tiká tópesa lisalisi na limemya, na lolenge oyo ebongi kobatela lokumu na bango. Paulo alobelaki yango boye: “Mpo na lokumu, bokumisanaka.”—Baloma 12:10.
Zalá moyoki malamu. Ee, mpo na kolendisa baoyo mbala mosusu bazali kokutana na mikakatano oyo mikoki kolɛmbisa bango, tosengeli kozala bayoki malamu, kasi balobilobi te. Na esika ya kopesa makanisi nokinoki mpe likolólikoló, tózwa ntango oyo esengeli mpo na koluka mitindá ya Makomami oyo mikoki mpenza kokokisa bamposa na bango. Soki toyebi te makambo nini tosengeli koloba, bolukiluki kati na Biblia ekosalisa biso na kobɔndisa mpe na kolendisa basusu wana tozali koloba.
Zalá na bolingo. Tosengeli kozala na bolingo epai na baoyo tolingi kolendisa bango. Ntango tozali kosalela baninga na biso basaleli ya Yehova, bolingo na biso bosengeli kosuka te bobele na kosaláká makambo mpo na bolamu na bango. Yango esengeli kozala komonisama ya mayoki ya mozindo. Soki tozali na bolingo lolenge yango mpo na basaleli nyonso ya Yehova, maloba na biso makozala bilendiseli ya solo mpo na bango. Ata soki tosengeli kopesa likanisi mpo ete ndeko moko asala makasi, maloba na biso makoyokama mpenza mabe te to makosala mpasi te soki mokano na biso mozali te bobele ya kopesa likanisi na biso kasi ya kopesa lisalisi ya bolingo. Lokola Paulo alobaki yango na lolenge oyo lobongi mpenza, “bolingo ekolendisaka.”—1 Bakolinti 8:1; Bafilipi 2:4; 1 Petelo 1:22.
Tózalaka ntango nyonso bato oyo balendisaka
Na “mikolo ya nsuka” oyo ya mpasi, basaleli ya Yehova bazali kokutana na komekama mingi. (2 Timoté 3:1-5) Ezali likambo ya kokamwa te ete mbala mosusu banyokwamaka kino na meko oyo bamimonaka lokola bakómi na nsuka ya mpiko na bango. Lokola tozali basaleli ya Yehova, na ntembe te tokolinga soko moke te koloba to kosala makambo oyo makoki komema moko na baninga na biso bandimi na komiyoka lokola nsinga ya mwinda oyo ezali kopela mokemoke mpe oyo elingi kozimana.
Bongo, ezali mpenza na ntina ete tólendisanaka moko na mosusu! Tiká ete tósala milende nyonso oyo ekoki mpo tózala balendisi na komonisáká komikitisa mpe limemya liboso na baninga na biso bandimi oyo balɛmbi. Tiká tóyoka na likebi nyonso wana bazali kofungwela biso makambo ya mitema na bango mpe tóluka ntango nyonso kosalisa bango na kobendáká likebi na bango likoló na Biblia, Liloba ya Nzambe. Koleka na makambo nyonso, tómonisa bolingo, mpamba te mbuma wana ya elimo ya Yehova ekosalisa biso na kolendisana bamoko na basusu. Tiká ete tóloba to tósala likambo moko te oyo ekoki ‘kozimisa nsinga ya mwinda oyo ezali kopela mokemoke.’