Okoki kozwa mapamboli ya Bokonzi
NTOMA Paulo ayebaki mwa minɔkɔ mingi oyo ezalaki kolobama na ntango na ye. Kelasi oyo asalaki ekokani na iniversite na moi ya lelo. Azalaki na makoki mpe lotomo nyonso ya mwana-mboka Moloma. (Misala 21:37-40; 22:3, 28) Makoki wana ekokaki kokómisa ye mozwi mpe moto monene. Kasi, alobaki boye: “Soki nazalaki na litomba wana, natángi yango eloko mpamba mpo na Klisto. . . mpe nazali kotánga yango bobele nyei ete nazwa Klisto lokola libonza.” (Bafilipi 3:7, 8) Mpo na nini Paulo alobaki bongo?
Paulo ayebanaki liboso na nkombo ya Saulo, moto ya Talasia mpe lokola monyokoli ya “baoyo bazalaki na Nzela”; kasi Paulo akómaki mondimi nsima ya kozwa emonaneli ya Yesu oyo asekwaki mpe azwaki nkembo. (Misala 9:1-19, NW) Likambo oyo ekómelaki Paulo na nzela ya Damaseke endimisaki ye mpenza ete Yesu azalaki Masiya oyo alakamaki, to Klisto, mokonzi ya Bokonzi oyo elakamaki. Yango mpe ekɔtisaki mbongwana monene na bomoi ya Paulo, lokola touti komona yango na maloba na ye. Na maloba mosusu, mpo na kozala sembo mpe na motema ya kolongobana, Paulo asalaki mbongwana.—Bagalatia 1:13-16.
Na Biblia, maloba “kobongola motema” ezali lolenge oyo babongolaka mbala mingi liloba ya Grɛki oyo elimboli “nsima ya koyeba”; oyo ekeseni na “koyeba liboso.” Na yango, kobongola motema esɛngi kobongola makanisi na biso, elimo mpe mikano na biso, to kobwaka banzela na biso ya kala oyo tomoni ete ezali na litomba te. (Misala 3:19; Emoniseli 2:5) Paulo atalelaki te likambo oyo ekómelaki ye na nzela ya Damaseke kaka lokola likambo moko oyo elamwisaki mayoki na ye; azwaki mpe yango te lokola likambo moko ya sika ya elimo. Mpo na ye, ezalaki mpenza likambo oyo efungolaki ye miso mpo amona ete bomoi na ye ya liboso, ntango oyo ayebaki naino Klisto te, ezalaki na ntina te. Lisusu, amonaki ete mpo na kozwa litomba na boyebi ya Klisto oyo autaki kozwa, asengelaki kosala eloko moko mpo na kosembola bomoi na ye.—Baloma 2:4; Baefese 4:24.
Mbongwana oyo ememaki mapamboli
Liboso, boyebi ya Nzambe oyo Paulo azalaki na yango eutaki mingimingi na lingomba ya Bafalisai, oyo ye azalaki. Bindimeli na bango esangisaki mateya mingi ya filozofi mpe mimeseno ya bato. Lokola azalaki kokanisela bato ya mangomba mosusu mabe, Paulo azalaki na molende ya mabe. Azalaki kokanisa ete azalaki kosalela Nzambe, nzokande azalaki nde kobundisa ye.—Bafilipi 3:5, 6.
Nsima ya kozwa boyebi ya sikisiki oyo etali Klisto mpe mokumba na ye na mokano ya Nzambe, Paulo asengelaki kopona: kotikala Mofalisai, oyo elakisaki kozala moto monene mpe moto ya lokumu, to kobongola bomoi na ye mpe kobanda kosala nyonso oyo ekosɛngama mpo na kondimama na Nzambe? Likambo ya esengo, Paulo asalaki liponi malamu, mpamba te alobaki boye: “Mpo ete nayoki nsango malamu nsɔni te! Yango ezali nguya na Nzambe kobikisa bandimi nyonso, Bayuda liboso mpe Baela lokola.” (Baloma 1:16) Paulo akómaki mosakoli ya molende ya nsango malamu oyo etali Klisto mpe Bokonzi.
Bambula mingi na nsima, Paulo ayebisaki bandeko na ye baklisto boye: “Natángi te ete nasili kosimba yango, nde nazali kosalaka likambo oyo moko ete, awa ezali ngai kobosana makambo mazali nsima mpe [kotala, NW] mpo na yango ezali liboso, nazali [kolanda kopota mbangu, NW] kino nsuka mpo na libonza oyo ezali ebyangeli ya Nzambe kuna na Likolo, kati na Klisto Yesu.” (Bafilipi 3:13, 14) Paulo azwaki litomba oyo euti na nsango malamu mpo ete atikaki noki mpenza makambo oyo ezalaki kokabola ye na Nzambe mpe alandaki na motema mobimba mikano oyo ezalaki na boyokani na oyo ya Nzambe.
Okosala nini?
Ntango mosusu outi koyoka nsango malamu ya Bokonzi kaka mikolo oyo. Elikya ya kozala na bomoi ya seko na paladiso ya kokoka esepelisi yo? Ekoki kozala bongo, mpamba te biso nyonso tobotamá na mposa ya kozala na bomoi mpe kosepela na kimya mpe libateli. Biblia elobi ete Nzambe “atii. . . lobiko” kati na mitema na biso. (Mosakoli 3:11) Yango wana biso bato tolikyaka na ntango oyo bato bakozala na bomoi ya libela na kimya mpe na esengo. Ezali yango nde nsango malamu ya Bokonzi ezali kolaka.
Nzokande, mpo na kokómisa elikya yango likambo ya solo, osengeli koluka koyeba nsango malamu yango. Ntoma Paulo apesaki elendiseli oyo: “[Sosolá yo moko, NW] mokano ya Nzambe, yango malamu, yango bokoki koyamba, yango mpe ebongi kwa.” (Baloma 12:2) Yango wana, nsima ya kozwa boyebi mpe bososoli, osengeli kopona, lokola Paulo asalaki.
Epai mosusu, ekoki kozala ete osi ozwá mateya mosusu oyo emonisaki yo ndenge nini bomoi na yo ekozala na mikolo oyo ezali koya. Kobosana te ete liboso akóma ntoma Paulo, Saulo ayebelaki mokano ya Nzambe na ndenge na ye. Na esika ya kozela ete Nzambe alakisa yo makambo na ndenge ya kokamwisa, mpo na nini te kotalela yo moko likambo yango malamumalamu? Okoki komituna mituna oyo: ‘Nayebi mpenza mokano ya Nzambe mpo na bato mpe mpo na mabele? Elembeteli nini nakoki kopesa mpo na kolongisa bindimeli na ngai? Elembeteli yango ekomonana ya solo mpenza soki toluki yango na kati ya Biblia, liloba ya Nzambe?’ Okomema ngambo moko te soki otaleli bindimeli ya lingomba na yo na lolenge wana. Kutu, osengeli kosala bongo, mpamba te Biblia esɛngi biso ete: “Bómeka makambo nyonso mpe bósimba makambo malamu ngwi.” (1 Batesaloniki 5:21) Likambo eleki ntina ezali nde Nzambe andima yo; boye te?—Yoane 17:3; 1 Timote 2:3, 4.
Bakambi ya mangomba bakoki kolaka biso bomoi ya seko mpo na mikolo oyo ezali koya. Kasi, soki elaka yango euti na mateya ya Biblia te, ekoki te kosalisa biso na kozwa mapamboli ya Bokonzi ya Nzambe. Na Lisolo na ye likoló na Ngomba, oyo eyebani mingi, Yesu apesaki likebisi oyo makasi: “Moto na moto oyo akolobaka na ngai, Nkolo! Nkolo! [akokɔta] kati na Bokonzi na Likolo te kasi ye oyo akosalaka mokano ya Tata na ngai oyo azali na Likolo.”—Matai 7:21.
Tomoni ndenge Yesu abendi likebi na kosala mokano ya Tata na ye lokola eloko oyo esɛngami mpo na kozwa mapamboli ya Bokonzi ya Nzambe. Na maloba mosusu, ezali te baoyo nyonso bamimonisaka lokola bato ya Nzambe nde bandimami na ye. Kutu, Yesu alobaki ete: “Mingi bakolobaka na ngai na mokolo yango, Nkolo! Nkolo! tosakolaki na nkombo na yo te? Tobimisaki bilimo mabe na nkombo na yo te? Mpe na nkombo na yo, tosalaki misala na nguya te? Nakoyambola liboso na bango ete, nayebi bino soko moke te! Bólongwa na ngai, bino bato ya misala ya lofundo.” (Matai 7:22, 23) Na maloba ya polele, likambo oyo eleki ntina ezali nde kondima mpenza ete toyebi malamumalamu nini ezali mpenza nsango malamu ya Bokonzi mpe, nsima na yango tosala makambo oyo ezali na boyokani na nsango yango.—Matai 7:24, 25.
Lisungi ezali
Esili koleka mbula 100, banda Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Bazali kosalisa bato na mokili mobimba, ezala na mikanda to na masolo oyo bazali kosolola na bato, mpo bázwa boyebi ya sikisiki ya Bokonzi ya Nzambe, ya mapamboli oyo yango ekomema, mpe oyo moto asengeli kosala mpo na kozwa mapamboli yango.
Tolendisi yo oyamba nsango oyo ezali kosakolama na Batatoli ya Yehova. Soki ondimi nsango malamu mpe osaleli yango, okoki kozwa mapamboli mingi, kaka mpo na ntango oyo te, kasi ata mpe na mikolo oyo ezali koya, ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele mobimba.—1 Timote 4:8.
Salá makasi banda lelo, mpamba te mapamboli ya Bokonzi ya Nzambe ezali lisusu mosika te!
[Bililingi na lokasa 7]
Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na nzela ya mikanda to na lolenge oyo bazali kosolola na bato