Alisitalaka: Moninga ya sembo
ALISITALAKA azalaki moko na baninga ya mosala oyo ntoma Paulo azalaki kotyela motema. Ozali kokanisa nini ntango ozali koyoka nkombo na ye? Ozali kokanisa likambo moko? Ozali na likoki ya koloba mokumba nini akokisaki kati na mosala monene ya lisoló ya boklisto na ekeke ya liboso? Atako Alisitalaka azali te moko na bato oyo tomeseni na bango kati na Biblia, nzokande, atalelamaki kati na makambo mingi na Makomami ya Greke ya boklisto.
Na yango, Alisitalaka azalaki nani? Boyokani nini azalaki na yango elongo na Paulo? Mpo na nini ekoki kolobama ete Alisitalaka azalaki moninga ya sembo? Mpe mateya nini tokoki kozwa na kotalela ndakisa na ye?
Bokɔti monene ya Alisitalaka kati na lisoló ya mokanda ya Misala esalemi kati na konganga mpe mobulungano ya etuluku ya yikiyiki na engumba Efese. (Misala 19:23-41) Kosala mwa bisambelo na palata ya nzambe ya lokuta Alatemi ezalaki mosala oyo mopesaki litomba mingi na Demeteli mpe na batuli mosusu ya palata na engumba Efese. Na yango, ntango mosala ya kosakola ya Paulo ememaki bato mingi ete batika losambo ya mbindo ya nzambe mwasi yango, Demeteli angalisaki batuli mosusu. Alobaki na bango ete kosakola ya Paulo ezali kotya na likámá bobele mosala na bango ya kozwa mosolo te kasi lisusu ezalaki kopesa likoki ya kokómisa losambo ya Alatemi eloko mpamba.
Lokola bamonaki Paulo te, ebele na kongala babendaki na makasi baninga na ye Alisitalaka mpe Gayo na kati ya esika ya masano. Lokola bato mibale kati na bango bazalaki na likámá, baninga ya Paulo babondelaki ye “ete akɔta na Esanelo te.”
Kanisa ete yo nde ozali kati na ezalela motindo wana. Na boumeli ya ngonga soko mibale, etuluku ya yikiyiki bakóbaki konganga ete, “Monene Alatemi na Baefese!” Ya solo, kozwama na mabɔkɔ ya ebele wana ya bato oyo bazalaki na molende mabe, wana bazangaki ata likoki ya komilobela ezalaki komekama ya nsɔ́mɔ mpo na Alisitalaka mpe Gayo. Na ntembe te basengelaki komituna soki bakokaki kobika na esika yango. Likambo ya esengo, babikaki. Kútu, lisoló elobami na nguya ya Luka ememaki banganga-mayele mosusu na koloba ete atunaki batatoli oyo bamonaki likambo yango na miso mpe, ekoki kozala Alisitalaka mpe Gayo bango moko.
Na nsuka, mokomeli ya engumba atyaki kimya. Na ntembe te ezalaki lisungi monene mpo na Alisitalaka mpe Gayo na koyoka ete ye andimi solo ete basali mabe te mpe yikiyiki zingazinga na bango esili.
Olingaki komiyoka ndenge nini nsima ya likambo motindo oyo? Olingaki kosukisa ete kozala moninga ya Paulo na mosala ya misionere ezali likambo ebongi na yo te, mpo ete ezalaki na makámá mingi, mpe esengelaki na yo kopona bomoi ya kimya? Alisitalaka akanisaki bongo te! Atako azalaki moto ya Tesaloniki, emonani ete ayebaki malamu makámá ya kosakola nsango malamu. Ntango Paulo ateyaki na engumba na ye mbula mibale liboso, yikiyiki ebimaki mpe kuna. (Misala 17:1-9; 20:4) Alisitalaka akangamaki na Paulo na bosembo nyonso.
Uta na Grèce kino na Yelusaleme
Mwa basanza na nsima ya yikiyiki ya batuli na palata, Paulo azalaki na ekólo Grèce mpe azalaki pene ya kosala mobembo na masuwa mpo na kokende na Sulia kino na Yelusaleme ntango “bayuda bayangaki mwango mabe mpo na ye.” (Misala 20:2, 3) Nani tozali komona ye elongo na Paulo na ezalela oyo ya likámá? Ezalaki bongo Alisitalaka!
Makaneli oyo ya sika mapusaki Paulo, Alisitalaka, mpe baninga na bango na kobongola myango na bango, balingaki sikawa kosala liboso mobembo na Makedonia, engumba oyo ezalaki na katikati ya bokúla ya Asie Mineure mpe na nsuka kokende na Foinike na Patala. (Misala 20:4, 5, 13-15; 21:1-3) Mokano ya mobembo yango ezalaki mpenza mpo na kopesa makabo ya baklisto ya Makedonia mpe Akaya epai ya bandeko na bango oyo bazalaki kati na bosɛnga na Yelusaleme. (Misala 24:17; Baloma 15:25, 26) Bato mingi basalaki mobembo elongo na bango, mbala mosusu mpo masangá makeseni mapesaki bango mokumba yango. Na ntembe te, etuluku monene oyo ezalaki lisusu libateli monene.
Alisitalaka azwaki libaku malamu ya kokende na Paulo uta na ekólo Grèce kino na Yelusaleme. Nzokande, mobembo na bango oyo elandaki ememaki bango longwa na Yudea kino na Loma.
Mobembo na Loma
Na mbala oyo makambo makómaki ndenge mosusu. Paulo akangamaki na bolɔ́kɔ na engumba Kaisalia na boumeli ya mbula mibale, mpe esɛngaki ete asamba liboso ya Kaisala, mpe asengelaki kotindama na Loma na minyɔlɔlɔ. (Misala 24:27; 25:11, 12) Kanisá naino lolenge baninga ya Paulo bamiyokaki. Mobembo uta na Kaisalia kino na Loma ezalaki molai mpe elingaki kotungisa bango na mayoki, mpe motindo yango elingaki kosuka ezalaki koyebana te. Nani akokaki kokende na ye elongo mpo na kopesa ye mabɔkɔ mpe lisungi? Mibali mibale baponamaki to bamipesaki bango moko na bolingo malamu. Ezalaki bongo Alisitalaka mpe Luka, mokomi ya mokanda ya Misala.—Misala 27:1, 2.
Ndenge nini Luka na Alisitalaka bakokaki kokɔta masuwa moko na eteni ya liboso ya mobembo na Loma? Giuseppe Ricciotti mokomi ya lisoló ya bato apesi likanisi oyo ete: “Bango mibale bamataki lokola bakiliya . . . to, ekoki mpenza kozala ete, bandimamaki na boboto ya kapitɛnɛ ya basodá oyo andimaki kotalela bango lokola baombo ya Paulo, mpamba te mobeko epesaki nzela na Moloma ete azala na baombo mibale mpo na kosunga ye.” Oyo nde mpiko Paulo azwaki na kozala na bango elongo mpe kozwa elendiseli na bango!
Luka mpe Alisitalaka bamonisaki bolingo na bango mpo na Paulo atako bomoi na bango ezalaki na likámá. Ya solo, bakutanaki na ezalela oyo etyaki bomoi na bango na likámá wana, elongo na baninga na bango bakangami, masuwa ezindaki na esanga Malita.—Misala 27:13–28:1.
“Mokangami esika moko” na Paulo
Ntango Paulo akomelaki Bakolose mpe Filemona mikanda na mobu 60 kino mobu 61 T.B., Alisitalaka mpe Luka bazalaki ntango nyonso esika moko na ye na Loma. Alisitalaka na Epafala balobelami lokola ‘bakangami esika moko’ na Paulo. (Bakolose 4:10, 14; Filemona 23, 24) Nzokande, na eleko moko, emonani ete Alisitalaka akɔtaki bolɔ́kɔ esika moko na Paulo.
Atako Paulo azalaki kati na bolɔ́kɔ na Loma na boumeli ya pene na mbula mibale, apesamelaki nzela ya kofanda na ndako na ye mpenza ya kofutela oyo ezalaki kokɛngɛlama, epai akokaki kosakola nsango malamu na bapaya na ye. (Misala 28:16, 30) Na eleko yango Alisitalaka, Epafala, Luka, mpe basusu bazalaki kosalisa Paulo, kosungáká mpe kobateláká ye.
“Lisungi ya kolendisa”
Nsima ya kotalela makambo ndenge na ndenge oyo kati na yango Alisitalaka alobelami kati na lisoló lipemami ya Biblia, Alisitalaka azalaki moto ya motindo nini? Engebene mokomi W. D. Thomas, Alisitalaka “amonani lokola moto oyo akokaki koyika mpiko na botɛmɛli mpe kolónga yango na kondima oyo ezangi kotɛngatɛnga mpe ekateli na ye ya kozonga nsima te mpo na kokokisa mosala. Amonanaki lokola moto oyo azalaki kolinga Nzambe bobele na ntango ya bilaka malamu te, ntango makambo mazali kotambola malamu, kasi lisusu na ntango ya kotyolama mpe ya yikiyiki.”
Paulo alobi ete Alisitalaka mpe basusu bazalaki “lisungi ya kolendisa” (na Greke, pa·re·go·riʹa) mpo na ye, elingi koloba, eutelo ya libɔndisi. (Bakolose 4:10, 11) Na yango kobɔndisáká mpe kolendisáká Paulo, Alisitalaka azalaki mpenza moninga na ntango ya bosɛnga. Kozala elongo mpe moninga ya Paulo na boumeli ya bambula mingi ezalaki eleko ya kosepelisa mpe ya kopambwama na elimo.
Ekoki kozala ete tókutana na makambo ya mpasi lokola oyo Alisitalaka akutanaki na yango. Atako bongo, bosembo motindo moko epai na bandeko ya Klisto na elimo mpe lisangá ya Yehova ezali na ntina mpo na bato nyonso kati na lisangá ya boklisto lelo. (Kokanisá na Matai 25:34-40.) Ekoki mpe kozala ete baninga na biso ya losambo oyo toyebi lelo to lobi bákutana na monyoko, to mpasi, mbala mosusu mpo ete bakufeli molingami moko, maladi, to komekama mosusu. Soki tokokangama na bango na kopesáká bango lisungi, libɔndisi mpe elendiseli, tokoki kozwa esengo mpe tokoki komimonisa ete tozali baninga ya sembo.—Kokanisá na Masese 17:17; Misala 20:35.