Tosangani kati na bolingo oyo ezali ekanganeli ekoki
“Tókangana elongo na boyokani nyonso kati na bolingo.”—BAKOLOSE 2:2, NW.
1, 2. Mpo na bopusi ya nani bokabwani ekɔti mingi lelo epai ya bato?
BÓYOKA! Mongongo makasi eyokani na likoló ete: “Mawa na mokili mpe na mai monɛnɛ! Mpɔ ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete ajali na mwa elaka mokuse.” (Emɔnisɛli 12:12) Wana mbula moko na moko ezali koleka, nsango yango ezali kokóma mawa mingi mpo na bafándi ya mabelé.
2 Monguna monene ya Yehova ayebani kobanda kala ete azali motɛmɛli (Satana) mpe mokosi (Zábolo). Kasi sikawa mokosi wana asili mpe kozwa nkombo mosusu—asili kokóma nzambe ya nkanda makasi! Mpo na nini? Mpamba te Mikaele mpe baanzelu na ye babenganaki ye longwa na likoló na etumba oyo ebandaki na likoló na 1914. (Emoniseli 12:7-9) Zábolo ayebi malamu ete atikali bobele na ntango moke mpo na koluka kolóngisa ntembe na ye oyo ete akoki kopɛngwisa bato nyonso mosika na losambo ya Nzambe. (Yobo 1:11; 2:4, 5) Lokola bazali na esika mosusu te epai bakoki kokima, ye mpe bilimu mabe na ye basiliki makasi lokola banzói oyo bazali koluka kosilisa nkanda na bango likoló na bibele ya bato ya yikiyiki.—Yisaya 57:20.
3. Kobwakama ya Satana awa na nsé ebimisi makambo nini na mikolo na biso?
3 Makambo wana, oyo mazangi komonana na miso ya bato, mazali kolimbola ntina oyo bizaleli ya bato bisili mpenza kobeba mingi. Ezali mpe kolimbola milende ya mpamba oyo bato bazali kosala mpo na komeka kokangisa biteni ya bikólo oyo bikoki soko moke te kokangana esika moko. Bikólo to bitúlúká bizali kobunda na nsɔ́mɔ mpenza, mpo na ntina wana bamilió ya bato bazali lisusu na ndako te to basili kokima mboka na bango. Ezali bongo likambo ya kokamwa te ete mobulu mosili koyikana mingi koleka ndenge ezalaki liboso! Lokola Yesu asakolaki yango, ‘bolingo ya bato mingi esili kozwa mpiɔ.’ Bipai binso, okoki komona kozanga boyokani mpe kozanga bolingo kati na mokili ya lelo oyo etondi na yikiyiki.—Matai 24:12.
4. Mpo na nini libota ya Nzambe lizali na likámá mpenza?
4 Na kotalela ezalela ya mokili, libondeli oyo Yesu asalaki mpo na bayekoli na ye ezali mpenza na ntina monene: “Nalɔmbi tɛ ete olongola bango na mokili kasi ete obatela bango na ye mabe. Bajali bato na mokili tɛ pelamɔkɔ ngai najali moto na mokili tɛ.” (Yoane 17:15, 16) Na mikolo na biso, “oyo mabe” azali kopelisa nkanda na ye likoló na “baoyo bazali kotosa malako na Nzambe mpe bazali na mosala ya kotatola na ntina na Yesu.” (Emoniseli 12:17, NW) Soki ezalaki mpo na libateli ya Yehova te, mbɛlɛ Batatoli na ye ya sembo basili kolimwisama. Bomoi na biso etali bibongiseli nyonso oyo Nzambe asili kokamata mpo na libateli mpe bolamu na biso ya elimo. Yango ezali kosɛnga ete tósala milende biso moko na boyokani na nguya na Ye oyo ezali kosala kati na biso na nzela ya Klisto, lokola ntoma alendisaki biso kati na Bakolose 1:29.
5, 6. Ntoma Paulo azalaki na mayoki nini na ntina na baklisto ya Kolose, mpe mpo na nini mokapo mpo na mobu 1995 ebongi mpenza?
5 Atako mbala mosusu Paulo amonanaki na bango na miso te, nzokande azalaki kolinga bandeko na ye ya Kolose. Ayebisaki bango ete: “Nalingi ete bino boyeba motindo na etumba ejali na ngai mpɔ na bino.” (Bakɔlɔsɛ 2:1) Lokola bayekoli ya Yesu bazali bato ya mokili te, “oyo mabe” akoluka ntango nyonso kobebisa bomoko ya bandeko na kolónáká kati na bango elimo ya mokili. Nsango oyo Epafala amemaki longwa na Kolose ezali komonisa ete yango nde ezalaki kosalema na meko moko to mosusu.
6 Moko na mabanzo oyo Paulo azalaki na yango mpo na bandeko na ye ekoki koyebisama na mokuse na maloba oyo ete: “Tókangana elongo na boyokani nyonso kati na bolingo.” Lelo oyo, maloba na ye mazali na ntina mingi kati na mokili oyo etondi na kozanga boyokani mpe kozanga bolingo. Soki totye likebi na toli ya Paulo, tokozwa libateli ya Yehova. Tokooka mpe nguya ya elimo na ye kati na bomoi na biso, oyo ekosalisa biso na kotɛmɛla bopusi ya mokili. Oyo nde toli ya mayele! Na yango, Bakolose 2:2 ekozala mokapo na biso mpo na mobu 1995.
7. Boyokani nini bosengeli komonana kati na baklisto ya solo?
7 Kati na mokanda ya liboso oyo akomelaki Bakolinti, ntoma asalelaki nzoto na moto lokola elakiseli. Akomaki ete “kokabwana ezala te” kati na lisangá ya baklisto bapakolami kasi ete “bilembo na yango nyonso bibatelanaka.” (1 Bakolinti 12:12, 24, 25, NW) Oyo nde bokokanisi kitoko! Bilembo ya nzoto na biso bizali mingi, moko na moko ekangisami na nzoto mobimba. Ezali mpe bongo mpo na libota na biso ya bandeko na mokili mobimba, oyo esangisi bapakolami mpe bamilió ya baoyo bazali na elikya ya bomoi na paladiso awa na mabelé. Tosengeli te kokabwana na lisangá ya bandeko na biso baklisto mpo na kosala makambo na lipandá nyonso! Lokola yango esalaka na nzela ya Klisto Yesu, elimo ya Nzambe ekosopamela biso mingi na meko oyo tozali kosangana elongo na bandeko na biso.
Boyokani ekangisami na boyebi
8, 9. (a) Tosengeli mpenza kosala nini mpo na kobatela boyokani kati na lisangá? (b) Lolenge nini ozwaki boyebi na ntina na Klisto?
8 Moko na makambo ya ntina oyo Paulo amonisaki ezali ete bomoko ekangisami na boyebi, mingi mpenza boyebi na ntina na Klisto. Paulo akomaki ete baklisto basengeli “kokangana elongo na boyokani nyonso kati na bolingo mpe kokóma na bososoli mozindo, na boyebi ya sikisiki ya Klisto, ye libombami mosantu ya Nzambe.” (Bakolose 2:2, NW) Tosili kozwa boyebi—ya makambo ya solo—uta ntango tobandaki koyekola Liloba ya Nzambe. Komona mokumba monene ya Yesu, ezali moko na mitindo mpo na kososola lolenge ebele ya makambo wana makokani na mokano ya Nzambe. “Kati na ye Klisto mabonja yɔnsɔ na mayɛlɛ mpe na boyebi masili kobombama.”—Bakɔlɔsɛ 2:3.
9 Ezali yango lolenge ozali kooka na ntina na Yesu mpe mokumba na ye kati na mokano ya Nzambe? Mingi kati na mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba batángaka nkombo ya Yesu mbala na mbala, kolobáká ete bazali kondima ye mpe basili kobikisama. Kasi bayebi ye solo? Soko moke te, mpamba te, ntalo monene kati na bango bandimaka liteya ya Bosato oyo etongami likoló ya Makomami te. Osuki te bobele na koyeba ete liteya ya Bosato ezali lokuta, kasi boye osili mpe kozwa boyebi mingi ya makambo oyo Yesu alobaki mpe asalaki. Mpo ete bákóma na boyebi wana, bamilió ya bato basungamaki na boyekoli ya kolendisa kati na búku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Atako bongo tosengeli kolanda kokólisa boyebi na biso na ntina na Yesu mpe banzela na ye.
10. Lolenge nini tokoki kozwa boyebi oyo ebombami?
10 Maloba oyo ete “mabonja yɔnsɔ na mayɛlɛ mpe na boyebi” masili “kobombama” kati na Yesu malimboli te ete tokoki te kokanga ntina na mayele yango mpe boyebi yango. Nzokande, ekokani mwa moke na oyo babéngi ete mine à ciel ouvert oyo moto nyonso akoki komona polele ete bazali kotimola wana mabangá ya ntalo. Tosengeli te kolukaluka naino mpo na koyeba epai wapi tosengeli kobanda kotimola. Tosili kozwa boyebi—boyebi ya solosolo ebandaka na oyo Biblia ezali komonisa na ntina na Yesu Klisto. Wana tokangi ntina mpenza ya mokumba ya Yesu kati na kokokisama ya mokano ya Nzambe, tokómi na bozwi ya mayele ya solo mpe ya boyebi ya sikisiki. Na yango, eloko tozali na yango mposa ezali kotimola ntango nyonso mozindo, mpo na kobimisa ntango nyonso biloko mingi ya motuya oyo etondi na liziba oyo tosilaki kobanda kotimola.—Masese 2:1-5.
11. Lolenge nini tokoki kokólisa boyebi mpe mayele na biso na komanyoláká likoló na Yesu? (Monisá yango na likambo oyo Yesu asukolaki makolo na bayekoli na ye, to salelá ndakisa mosusu.)
11 Na ndakisa, mbala mosusu toyebi ete Yesu asukolaki makolo ya bantoma na ye. (Yoane 13:1-20) Nzokande, tosilaki kokanisa likoló na liteya oyo azalaki kopesa mpe elimo oyo ye amonisaki? Na kosaláká bongo, tokoki kozwa mayele mingi oyo ekopesa biso makoki—ee, ekopusa biso—na kobongola lolenge na biso ya kosala epai na ndeko mobali to ndeko mwasi moko oyo bizaleli na ye esilikisaka biso uta kala. To soki topesameli mokumba moko oyo tolingaka te, tokondima kokokisa yango soki tokangi ndimbola mpenza ya Yoane 13:14, 15. Yango ezali lolenge oyo boyebi mpe mayele ezalaka na bopusi likoló na biso. Bopusi na yango likoló na basusu ekozala nini wana tozali komekola na lolenge ya penepene ndakisa oyo tozwi na nzela ya boyebi mingi ya Klisto? Ekoki kozala ete etongá ‘ekokangana elongo na boyokani nyonso kati na bolingo.’a
Kozanga kotya likebi ekoki kobebisa boyokani
12. Tosengeli kokeba na ntina na boyebi nini?
12 Soki boyebi ya sikisiki ezali koyeisa pɛtɛɛ ‘kokangana elongo na boyokani nyonso kati na bolingo,’ mbuma nini ezali kobima na oyo “ebyangami na lokuta nyonso ete ‘Boyebi’”? Makambo oyo makeseni na boyokani—koswana, kowelana, mpe kopɛngwa longwa na kondima. Yango wana tosengeli komibatela na boyebi wana ya lokuta, lokola Paulo akebisaki Timoté. (1 Timote 6:20, 21, NW) Paulo akomaki lisusu ete: “Nalobi boye ete moto tɛ ajimbisa bino na maloba na kolengola. Bokeba ete moto tɛ apunja bino na maloba na ye na mayɛlɛ, na bibanjabanja na ye na motindo na Klisto tɛ kasi na motindo na bijaleli na bato mpe na makambo mikɛmikɛ na mokili.”—Bakɔlɔsɛ 2:4, 8.
13, 14. (a) Mpo na nini bandeko ya Kolose bazalaki na likámá na ntina na boyebi? (b) Mpo na nini lelo oyo mingi bakoki kokanisa ete bazali liboso ya likámá motindo yango te?
13 Baklisto ya Kolose bazingamaki na bopusi mabe ya oyo ebyangamaki na lokuta nyonso ete boyebi. Bato mingi kati na Kolose mpe na zingazinga na yango bazalaki kopesa motuya mingi na filozofi ya Bagreke. Ezalaki na babateli ya lingomba ya Bayuda, baoyo balingaki ete baklisto batosaka Mibeko ya Mose, lokola mikolo ya bilambo mpe bipekiseli bitali bilei. (Bakolose 2:11, 16, 17) Paulo apesaki bandeko na ye toli ete bázwa boyebi ya solo, kasi basengelaki kokeba ete moto akanga bango te lokola nyama na motambo, na nzela na maloba ya kolengola mpo na kobenda bango ete bándima likanisi ya bato na ntina na bomoi mpe makambo ya bomoi. Okoki solo kososola ete soki basusu kati na lisangá bazali kotika lolenge ya kokanisa mpe bikateli na bango ete etambwisama na makanisi mpe etaleli ya bomoi motindo wana etongami te likoló na Makomami, yango ekobebisa boyokani mpe bolingo kati na basangani ya lisangá.
14 Okoki kokanisa ete, ‘Ee, namoni likámá oyo lizalaki liboso na Bakolose, kasi nakoki te kopusama na makanisi ya Bagreke, lokola oyo etali kozanga kokufa ya molimo to nzambe ya Bosato; to nazali komona likámá moko te ya kobendama lisusu na bilambo ya bapakano ya mangomba ya lokuta oyo nasili kokima yango.’ Ezali malamu. Ebongi ete tóndimisama na motuya monene ya solo oyo emonisami na nzela ya Yesu mpe oyo ezali kozwama kati na Makomami. Nzokande, ekoki kozala ete tozali liboso na likámá ya bafilozofi mosusu to ya makanisi mosusu ya bato oyo epalangani mingi lelo?
15, 16. Lolenge nini na kotalela bomoi ekoki kozala na bopusi likoló ya makanisi ya moklisto moko?
15 Moko na makanisi motindo yango ebandaki uta kala: “Wapi elaka na Koya na ye? Jambi longwa na ntango na kufa na bankɔkɔ, makambo yɔnsɔ maumeli bobɛlɛ bongo lokola ejalaki yango na ebandeli.” (2 Pɛtɛlɔ 3:4) Mayoki oyo makoki komonisama na lolenge mosusu, kasi likanisi ezali sé lolenge moko. Na ndakisa, moto moko akoki kokanisa ete, ‘Ntango nabandaki koyekola solo esili koleka ebele ya bambula, nsuka ezalaki “mosika te.” Kasi ekómi mpe naino te, mpe nani ayebi soki ekoya ntango nini?’ Ya solo, moto moko te ayebi ntango nini nsuka ekoya. Nzokande, talá likebisi ya Yesu: “Bokeba mpe bosɛnjɛla, mpɔ ete boyebi tɛ sɔkɔ elaka yango ekokoka ntango nini”—Malako 13:32, 33.
16 Oyo nde likámá ekozala soki tondimi likanisi oyo ete, lokola toyebi te ntango nini nsuka ekoya, tósala mikano mpo na kosepela malamumalamu na bomoi mpe kozala na bomoi “lokola bato nyonso”! Likanisi yango ekoki komonisama na lolenge oyo ya kokanisa ete, ‘Nakoki kokamata meko mosusu oyo ekopesa ngai (to bana na ngai) nzela ya kozwa mosala moko ya lokumu oyo ezali na mbongo mingi mpe ekopesa ngai nzela ya kozala na bomoi moko kitoko. Lokola na momeseno, nakoyangana na makita ya boklisto mpe nakosangana na mosala ya kosakola, kasi ntina ezali te na kosala molende to koboma nzoto.’—Matai 24:38-42.
17, 18. Likanisi nini Yesu mpe bantoma na ye balendisaki biso na kozala na yango?
17 Nzokande, ntembe ezali te ete Yesu mpe bantoma na ye balendisaki biso na komonisa na lolenge ya bomoi na biso ete tókangi ntina ya kosakola nokinoki nsango malamu, ya kosala molende mpe koboma nzoto na mosala. Paulo akomaki ete: “Bandeko, najali koloba ete ntango eyei mokuse, sasaipi tika ete baoyo bajali na basi bajala lokola bango bajangi basi, . . . mpe bango bajali kosomba lokola bango bajali na bilɔkɔ tɛ, mpe bango bakosalisa mokili mosala bajala pelamɔkɔ bango bajali kosalisa mokili mosala tɛ. Mpɔ ete motindo na mokili oyo ejali kolimwa.”—1 Bakɔlinti 7:29-31; Luka 13:23, 24; Bafilipi 3:13-15; Bakolose 1:29; 1 Timoté 4:10; 2 Timoté 2:4; Emoniseli 22:20.
18 Na esika ya kolendisa bomoi ya bomengo lokola mokano na biso, Paulo akomaki ete: “Toyei na elɔkɔ kati na mokili tɛ mpe tokoki kolongwa na elɔkɔ na mokili tɛ. Awa ejali biso na bilɔkɔ na kolia mpe na bilamba na kolata, ebɔngi na biso bongo. . . . Obunaka etumba malamu na kondima, osimba bomɔi na seko; jambi obiangami mpɔ na yango wana eyamboli yɔ eyambweli malamu na miso na batatoli mingi.”—1 Timɔtɛ 6:7-12.
19. Bolamu nini lisangá likozwa ntango basangani na yango bandimi lolenge ya kotalela bomoi oyo Yesu alendisaki?
19 Wana lisangá moko esalemi na baklisto ya molende oyo bazali kosala makasi mpo na ‘kopesa eyambweli kitoko liboso na bato banso,’ boyokani ekoya yango moko. Bamipesi te na elimo oyo ete, ‘Ojali na bilɔkɔ mingi malamu bibombami mpɔ na mbula mingi. Pema, lia, mɛla, mpe sepela.’ (Luka 12:19) Nzokande, basangani kati na molende moko, mpe na bolingo nyonso bazali komipesa mobimba mpo na kosala mingi na mosala oyo mokozongelama lisusu te.—Kokanisá na Bafilipi 1:27, 28.
Tókeba na maloba ya kolengola
20. Wapi likambo mosusu oyo kati na yango baklisto bakoki kozimbisama?
20 Ya solo, ezali mpe na lolenge mosusu oyo baklisto bakoki ‘kozimbisama na maloba ya kolengola’ to na makambo mpamba ya bokosi oyo eyokani te na likambo ya ‘kokangana elongo na boyokani nyonso kati na bolingo.’ Biro ya filiale ya la Société Watch Tower na Allemagne ekomaki ete: “Motindo ndeko moko asalisaki nzoto epai ya monganga moko ebimisaki ntembe mingi kati na ebele ya masangá, basakoli mpe ata bankulutu bakabwanaki na ngámbo mibale na ntina na yango.” Babakisaki ete: “Na ntina na ebele ya mitindo misalelami mpe na ntalo monene ya babɛ́li oyo bazali kosalela yango, ezali likambo lizali kobimisa ntembe; mpe, soki mitindo mosusu ya lisalisi ya monganga mizali na boyokani na bilimu mabe, yango mpe ekobimisa makámá.”—Baefese 6:12.
21. Lolenge nini moklisto moko akoki lelo kobunga na makanisi na esika ete atalaka makambo mazali solo na ntina?
21 Baklisto balingi kozala na bomoi mpe na kolɔngɔ́nɔ́ malamu mpo bákoka kosambela Nzambe. Nzokande, kati na ebongiseli oyo tobyangami na konuna mpe kobɛ́la na ntina na kozanga kokoka. Na esika ete tótya liboso makambo ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, tosengeli nde kotya likebi likoló na mwango ya solosolo oyo ekosilisa libela mikakatano yango, mpo na biso mpe mpo na basusu. (1 Timoté 4:16) Klisto nde azali moboko ya mwango wana, motindo moko lokola azalaki moboko na toli ya Paulo epai na Bakolose. Kasi omikundola, Paulo alobaki ete basusu bakoya na “maloba ya kolengola” oyo ekolongola likebi likoló na Klisto, mbala mosusu na komibaloláká epai na mitindo ya koluka mpe komona bokɔnɔ, lolenge ya kosilisa bokɔnɔ, to lolenge ya bilei ya mobɛ́li.—Bakolose 2:2-4.
22. Ezaleli nini ya bokatikati tosengeli kozala na yango liboso na ebele ya mitindo ya kosalisa nzoto epai ya minganga mpe mitindo ya koluka komona bokɔnɔ?
22 Bato kati na mokili mobimba batondi na bapiblisité mpe matatoli ndenge ndenge na ntina na mitindo ya kosalisa nzoto epai na minganga mpe mitindo ya koluka komona bokɔnɔ. Misusu kati na mitindo wana mizali kosalelama mingi mpe miyebani; misusu ezali kokutana na botɛmɛli mingi to bazali kobetela yango ntembe.b Moto na moto asengeli kopona oyo akosala mpo na kolɔngɔ́nɔ́ na ye ya nzoto. Kasi baoyo bazali kondima toli ya ntoma Paulo oyo ezwami na Bakolose 2:4, 8 bakobatelama ete bázimbisama te na “maloba ya kolengola” to na “makambo mpamba ya bokosi” oyo ezali kopɛngola bato mingi oyo, lokola bazangi elikya ya Bokonzi, bazali na motema likoló mpo na kozwa kobɔndisama. Ata soki moklisto moko andimisami mpenza ete motindo moko boye ya kosalisa nzoto epai ya monganga ebongi mpo na ye, asengeli te kokumisa yango kati na bandeko, mpo ete ekoka te kokóma likambo ya masoló mpe ya ntembe. Na yango, akomonisa ete azali kopesa motuya monene na boyokani kati na lisangá.
23. Mpo na nini tozali mpenza na ntina ya kozala na esengo?
23 Paulo alobelaki makasi ete boyokani ya boklisto ezali moboko ya esengo ya solo. Na mikolo na ye masangá mazalaki mpenza mingi te lokola lelo oyo. Nzokande, akomelaki Bakolose ete: “Jambi sɔkɔ najali kati na bino na njoto tɛ, najali na bino na [elimo, NW]; najali kosepela mpɔ na komɔna mwango na bino sembo mpe mpiko na kondima na bino kati na Klisto.” (Bakɔlɔsɛ 2:5; talá lisusu Bakolose 3:14.) Solo tozali na bantina mingi ya kosepela! Tokoki komona bilembeteli ya solo ya boyokani, ya molɔngɔ́, mpe ya kondima makasi kati na masangá na biso, oyo nyonso ezali komonisa ndenge libota ya Nzambe ezali kati na mokili mobimba. Yango wana, na ntango moke oyo etikali na ebongiseli oyo, tiká ete tózala na ekateli makasi ya “kokangana elongo na boyokani nyonso kati na bolingo.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Atako makambo ya koyekola mazali mingi, na nzela ya bandakisa oyo elandi, talá oyo okoki koyekola na ntina na Yesu mpo na kokólisa boyokani ya lisangá na bino: Matai 12:1-8; Luka 2:51, 52; 9:51-55; 10:20; Baebele 10:5-9.
b Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Ɔkɔtɔ́bɛ 1, 1983, nkasa 14-20.
Osimbaki nini?
◻ Nini ezali mokapo ya mobu 1995 mpo na Batatoli ya Yehova?
◻ Mpo na nini baklisto ya Kolose basengelaki kokangana elongo na boyokani nyonso kati na bolingo, mpe mpo na nini tosengeli kosala bongo lelo oyo?
◻ Likanisi nini ya bokosi na ntina na bomoi baklisto basengeli mpenza kokeba na yango lelo oyo?
◻ Mpo na nini baklisto basengeli kokeba ete bázimbisama te na maloba ya kolengola na ntina na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto mpe mitindo ya kosalisa nzoto epai ya monganga?
[Bililingi na lokasa 17]
Mikano na yo mpo na mikolo mizali koya mitongami likoló na kozala ya Yesu?