‘Bómilatisa motema molai’
“Bómilatisa mitema ya mawa, na boboto . . . na [motema molai, “NW”].”—BAKOLOSE 3:12.
1. Lobelá ndakisa malamu moko ya motema molai.
RÉGIS afandaka na sudi-wɛsti ya France, ye akómaki Motatoli oyo azwi batisimo na 1952. Na nsima, na boumeli ya bambula ebele, mwasi na ye azalaki kosala nyonso mpo na kolɛmbisa ye atika kosalela Yehova. Ntango mosusu azalaki kotɔbɔla bapine ya motuka na ye mpo akende na makita te; kutu, mokolo mosusu mwasi yango alandaki ye nsima nsima ntango azalaki kokende ndako na ndako mpo na kosakola nsango ya Biblia mpe azalaki kotyola ye ntango azali kosolola na moto. Kasi, atako botɛmɛli wana ezalaki kosila te, Régis azalaki ntango nyonso komonisa motema molai. Mpo na yango, tokoloba mpenza ete Régis azali ndakisa malamu mpo na baklisto nyonso, mpamba te Yehova azali kosɛnga na basambeli na ye nyonso bázala na motema molai.
2. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “motema molai” elimboli mpenzampenza nini mpe ezali na likanisi nini?
2 Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “motema molai” elimboli mpenzampenza “elimo molai.” Na Biblia ya Lingala Haut-fleuve, babongoli yango mbala mibale na “motema molai,” mbala misato na “koyika mpiko” to “mpiko,” mbala moko na “etingya” mpe mbala mwambe na “motema pɛtɛɛ.” Ezala liloba ya Liebele to liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “motema molai,” nyonso ezali na likanisi ya koyeba kozela, koyika mpiko mpe kosilika noki te.
3. Bokeseni nini ezalaki kati na baklisto mpe Bagrɛki ya ekeke ya liboso na ndenge bazalaki kotalela motema molai?
3 Mpo na Bagrɛki ya ekeke ya liboso, motema molai ezalaki ezaleli ya malamu te. Bato ya filozofi oyo babengi Basetoa bazalaki kosalela liloba yango te. William Barclay, ye azali moto ya mayele na makambo ya Biblia, alobi ete motema molai “ezali mosika mpenza na oyo Bagrɛki bazalaki kotalela lokola bizaleli malamu”; bango bazalaki kolendisa elimo lokola oyo ya “kondima te ete báfinga yo to básala yo mabe.” Barclay alobi boye: “Mpo na Bagrɛki, moto ya solosolo ezalaki moto oyo azalaki kosala nyonso mpo na kozongisa mabe na mabe. Mpo na baklisto, moto ya solosolo ezali ye oyo, ata soki akoki kozongisa mabe na mabe, aboyaka kosala yango.” Ekoki mpenza kozala ete mpo na Bagrɛki, motema molai ezalaki komonisa bolɛmbu; kasi na likambo yango, ndenge moko mpe na makambo mosusu, “bolema ya Nzambe eleki mayele ya bato mpe bolɛmbu ya Nzambe eleki nguya ya bato.”—1 Bakolinti 1:25.
Ndakisa ya Klisto mpo na oyo etali motema molai
4, 5. Ndenge nini Yesu apesaki ndakisa malamu ya motema molai?
4 Yesu Klisto azali ndakisa malamu ya motema molai, mpe kaka motema molai ya Yehova nde eleki oyo ya ye. Soki batumoli ye, Yesu azalaki na komipekisa mingi mpenza. Esakweli moko elobaki mpo na ye ete: “Anyokolami mpe anyatami, nde ata bongo azipoli monɔkɔ na ye te. Lokola mwana ya mpate oyo akambami mpo na kobomama, mpe lokola mpate azali nyɛ liboso na bakati na [nsuki] na ye, bongo azipoli monɔkɔ na ye te.”—Yisaya 53:7.
5 Yesu amonisaki motema molai mingi na bambula nyonso oyo asalaki mosala na ye awa na mabele! Ayikaki mpiko liboso ya banguna oyo bazalaki kotungisa ye na ebele ya mituna oyo ezalaki mpenza mitambo mpe batɛmɛli oyo bazalaki kofinga ye. (Matai 22:15-46; 1 Petelo 2:23) Azalaki na motema molai epai ya bayekoli na ye ata ntango bazalaki kowelana mpo na koluka nani oyo aleki basusu. (Malako 9:33-37; 10:35-45; Luka 22:24-27) Na butu oyo batɛkaki ye, Yesu akangaki mpenza motema ntango Petelo na Yoane balalaki atako autaki koyebisa bango ete ‘bákɛngɛlaka’!—Matai 26:36-41.
6. Litomba nini Paulo azwaki na motema molai ya Yesu, mpe yango ezali koteya biso nini?
6 Nsima ya lisekwa na ye, Yesu azalaki kaka na motema molai. Ntoma Paulo ayebaki yango malamu, mpamba te ye moko azalaki monyokoli ya baklisto. Paulo akomaki boye: “Liloba oyo ezali sembo mpe ekoki koyambama solo ete Klisto Yesu ayaki kati na mokili mpo na kobikisa bato na masumu. Ngai mpe nazali moto ya liboso kati na bango. Kasi ayokeli ngai mawa na ntina oyo ete Yesu Klisto amonisa [motema molai, NW] nyonso na ye kati na ngai liboso mpo na kopesa etaliseli epai na bango bakondima ye mpo na bomoi ya seko.” (1 Timote 1:15, 16) Ata soki tozalaki bato ya misala nini, soki tondimeli Yesu, akomonisela biso motema molai; kasi, alingi ete tósala ‘misala oyo ebongi na kobongola motema.’ (Misala 26:20, NW; Baloma 2:4) Nsango oyo Klisto atindelaki masangá nsambo ya Asie Mineure, ezali komonisa ete atako azali na motema molai, alingi ete bato bábongisa bizaleli na bango.—Emoniseli mokapo 2 tii mokapo 3.
Motema molai ezali mbuma ya elimo
7. Boyokani nini ezali kati na motema molai na elimo santu?
7 Na mokapo ya 5 ya mokanda oyo akomelaki Bagalatia, Paulo akesenisaki misala ya nzoto mpe mbuma ya elimo. (Bagalatia 5:19-23, NW) Lokola motema molai ezali moko ya bizaleli ya Yehova, ye nde moto apesaka yango mpe ezali mbuma ya elimo na ye. (Exode 34:6, 7) Motema molai ezali na esika ya minei na kati ya mbuma ya elimo oyo Paulo atángaki; mosusu ezali “bolingo, esengo, kimya, . . . boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ, komipekisa.” (Bagalatia 5:22, 23, NW) Yango wana, ntango basaleli ya Nzambe bamonisaka motema molai lokola oyo ya ye, elimo santu nde epusaka bango kosala bongo.
8. Nini ekosalisa biso tólona mbuma ya elimo bakisa mpe motema molai?
8 Kasi, yango elingi koloba te ete Yehova apesaka moto elimo na ye na makasi. Biso moko nde tosengeli kondima kolanda makambo oyo elimo yango ezali kotinda biso. (2 Bakolinti 3:17; Baefese 4:30) Totikaka ete elimo esala mosala na bomoi na biso ntango tozali kolona mbuma na yango na misala na biso nyonso. Nsima ya kotánga misala ya nzoto mpe mbuma ya elimo, Paulo abakisaki ete: “Soko tozali kobika mpo na elimo, tótambolaka mpe na elimo. Bómizimbisaka te; Nzambe akokosama te. Soko moto akokona nini, akobuka bobele yango. Soko akokona kati na nzoto, akobuka libebi kati na nzoto, nde ye oyo akokona kati na elimo akobuka bomoi ya seko na nzela ya elimo.” (Bagalatia 5:25; 6:7, 8) Mpo tólonga kolona motema molai, tosengeli mpe kolona mbuma mosusu oyo elimo santu ebotaka epai ya baklisto.
“Bolingo ezali na motema molai”
9. Ekoki kozala mpo na ntina nini Paulo ayebisaki Bakolinti ete “bolingo ezali na motema molai”?
9 Paulo amonisaki ete motema molai ezali na esika monene na kati ya bolingo ntango alobaki ete: “Bolingo ezali na motema molai.” (1 Bakolinti 13:4, NW) Albert Barnes, ye azali moto ya mayele na makambo ya Biblia, alobi ete Paulo alobelaki mingi likambo yango mpo ayebaki ete kowelana mpe matata ezalaki na lisangá ya Kolinti. (1 Bakolinti 1:11, 12) Barnes alobi boye: “Liloba oyo esalelami awa [mpo na motema molai] ekeseni mpenza na lombangu: kokende mbangu na kobimisa maloba mpe makanisi ya nkanda mpe na kosilika. Motema molai ezali komonisa elimo ya moto oyo akoki KOYIKA MPIKO ntango batungisi ye to ntango batumoli ye.” Ata lelo oyo, bolingo mpe motema molai esungaka mpenza mpo kimya ezala na kati ya lisangá.
10. (a) Ndenge nini bolingo esalisaka biso na kozala na motema molai, mpe ntoma Paulo apesi toli nini na likambo yango? (b) Molimboli moko ya Biblia alobaki nini mpo na motema molai mpe boboto ya Nzambe? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
10 “Bolingo ezali na [motema molai, NW], bolingo ezali na boboto, . . . ekolukaka malamu na yango mpenza te, ezali na nkanda te.” Na yango, bolingo esalisaka biso na ndenge mingi mpo tózala na motema molai.a (1 Bakolinti 13:4, 5) Bolingo esalisaka biso tóyikana mpiko mpe tóbosana te ete biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka, tosalaka mabunga mpe tokweaka. Esalisaka biso tózokisa basusu te mpe tóyeba kolimbisa. Ntoma Paulo alendisi biso tótambolaka “na kosɔkɛma nyonso mpe na bopɔlɔ, na [motema molai, NW], koyikana mpiko kati na bolingo, komeka na mposa ete [tó]batela bomoko na [elimo, NW] kati na ekanganeli ya kimya.”—Baefese 4:1-3.
11. Mpo na nini kozala na motema molai ezali na ntina mingi na esika oyo baklisto basangani?
11 Motema molai ya baklisto ebakisaka kimya mpe esengo na esika oyo baklisto bazali esika moko, ezala na lisangá, na Betele, na bandako ya bamisionɛrɛ, na bisika oyo bazali kotonga bandako, to na biteyelo na bango. Lokola moto na moto azali na bomoto na ye, azali na makambo na ye oyo alingaka, azali na ndenge oyo abɔkwama, azali na ndenge na ye ya komonisa bonkonde, ata mpe bopɛto, makambo ya kosilikisa ekoki kobima mbala mosusu. Ekoki mpe kozala bongo ata na kati ya mabota. Kozala moto oyo asilikaka noki te ezali na ntina mingi. (Masese 14:29; 15:18; 19:11) Biso nyonso tosengeli kozala na motema molai, elingi koloba koyeba koyika mpiko na elikya ete makambo ekobonga.—Baloma 15:1-6.
Motema molai esalisaka biso na koyika mpiko
12. Mpo na nini motema molai ezali na ntina na ntango oyo tokutani na makambo oyo ezali kotungisa biso?
12 Motema molai esalisaka biso na koyika mpiko liboso ya makambo oyo ezali kotungisa biso, makambo oyo ezali mpe komonana lokola ete ekosila te to tozali komona te ndenge ya kosilisa yango noki. Ezalaki bongo mpo na Régis, ndeko oyo tolobelaki na ebandeli. Mwasi na ye azalaki kotɛmɛla milende oyo azalaki kosala mpo na kosalela Yehova mpe likambo yango eumelaki bambula ebele. Kasi, mokolo mosusu, mwasi na ye ayaki epai na ye na mai na miso mpe alobaki ete: “Nayebi ete oyo ezali solo. Salisá ngai. Nalingi koyekola Biblia.” Nsukansuka mwasi yango akómaki Motatoli oyo azwi batisimo. Régis alobi boye: “Yango emonisaki ete Yehova apambolaki ebele ya bambula wana ya etumba, ya motema molai mpe ya koyika mpiko.” Azwaki mbano mpo na motema molai na ye.
13. Nini esalisaki Paulo na koyika mpiko mpe ndenge nini ndakisa na ye ekoki kosalisa biso na koyika mpiko?
13 Na ekeke ya liboso ya T.B., ntoma Paulo apesaki ndakisa malamu ya motema molai. (2 Bakolinti 6:3-10; 1 Timote 1:16) Ntango akómaki na nsuka ya bomoi na ye, ntango azalaki kopesa Timote toli, elenge oyo azalaki moninga na ye ya mosala, Paulo ayebisaki ye ete baklisto nyonso bakomekama. Paulo alobelaki ndakisa na ye moko mpe alendisaki bizaleli ya ntina oyo baklisto basengeli kozala na yango mpo na koyika mpiko. Akomaki boye: “Yo nde, osili [kolanda] mateya na ngai mpe etambweli na ngai mpe mokano na ngai mpe kondima na ngai mpe [motema molai na ngai, NW] mpe bolingo na ngai mpe mpiko na ngai mpe minyoko na ngai mpe bolɔzi na ngai, mpe yango ebimeli ngai na Antiokia na Ikonia mpe Lusutula mpe minyoko mizwi ngai. Kasi Nkolo abikisi ngai kati na yango nyonso. Ɛɛ, bango nyonso bazali na mposa ya ezaleli ya kosambela kati na Klisto Yesu bakonyɔkɔlama.” (2 Timote 3:10-12; Misala 13:49-51; 14:19-22) Mpo na koyika mpiko, biso nyonso tosengeli kozala na kondima, na bolingo mpe na motema molai.
Kolata motema molai
14. Paulo akokanisaki bizaleli malamu, na ndakisa motema molai, na eloko nini, mpe toli nini apesaki baklisto ya Kolose?
14 Ntoma Paulo akokanisaki motema molai mpe bizaleli mosusu ya malamu na bilamba oyo moklisto asengeli kolata nsima ya kolongola misala ya “bomoto ya kala.” (Bakolose 3:5-10, NW) Akomaki boye: “Lokola Baponami ya Nzambe, babulami; bómilatisa mitema ya mawa, na boboto, na kosɔkɛma, na bopɔlɔ, na [motema molai, NW]. Soko moto moko azali na moto mosusu likambo, bóyikanaka mpiko, bólimbisanaka. [Lokola] Klisto alimbisi bino, bino mpe bobele bongo. Nde likoló na oyo nyonso, bómilatisa bolingo oyo ezali ekanganeli ekoki mpenza.”—Bakolose 3:12-14.
15. Nini emonanaka ntango baklisto ‘bamilatisi motema molai’ mpe bizaleli mosusu ya malamu?
15 Ntango bandeko ya lisangá moko ‘bamilatisi’ motema mawa, boboto, komikitisa, bopɔlɔ, motema molai mpe bolingo, bakoyeba kosilisa mikakatano mpe bakozala na bomoko mpe bakokende liboso na mosala ya Yehova. Mingimingi bakɛngɛli baklisto basengeli kozala na motema molai. Na bantango mosusu ekoki kosɛnga ete bápamela moklisto moko, kasi ezali na ndenge mingi ya kosala yango. Paulo amonisaki ndenge oyo eleki malamu ntango alendisaki Timote ete: “Ozongisa na nzela, opamela, olendisa na motema molai mpenza mpe na mayele ya koteya.” (2 Timote 4:2, NW) Esengeli ntango nyonso kobatela bampate ya Yehova na motema molai, kopesa bango lokumu mpe kozala na boboto epai na bango.—Matai 7:12; 11:28; Misala 20:28, 29; Baloma 12:10.
“Motema molai epai ya bato nyonso”
16. Nini ekoki komonana soki tozali na “motema molai epai ya bato nyonso”?
16 Motema molai oyo Yehova azali komonisela bato ezali kosɛngisa biso ‘tózala na motema molai epai ya bato nyonso.’ (1 Batesaloniki 5:14, NW ) Elingi koloba ete tosengeli kozala na motema molai epai ya bandeko na biso oyo bazali Batatoli te, na baninga na biso ya kartye, na baninga ya kelasi mpe ya mosala. Batatoli mingi basalisaki baninga na bango ya mosala to ya kelasi na kolongola makanisi mabe oyo bazalaki na yango, ntango mosusu nsima ya bambula mingi oyo baninga yango bazalaki kotyola to kotɛmɛla bango. (Bakolose 4:5, 6) Ntoma Petelo akomaki boye: “Bózala na bizaleli na bino malamu kati na bapakano ete na likambo likotukaka bango bino lokola ete bozali bato mabe, awa ekomona bango misala na bino malamu, bákumisa Nzambe na mokolo wana ekoya ye kotala.”—1 Petelo 2:12.
17. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya bolingo mpe motema molai ya Yehova, mpe mpo na nini tosengeli kosala bongo?
17 Bamilio ya bato bakobika mpo na motema molai ya Yehova. (2 Petelo 3:9, 15) Soki tolandi ndakisa ya Yehova mpo na komonisa bolingo mpe motema molai, tokolɛmba te kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe koteya basusu ete bátosa Bokonzi ya Klisto. (Matai 28:18-20; Malako 13:10) Soki totiki kosakola, ekomonana lokola nde tolingi kopekisa motema molai ya Yehova mpe tozali koyeba ntina na yango te, oyo ezali ya komema bato na kobongola motema.—Baloma 2:4.
18. Paulo azalaki kobondela ndenge nini mpo na Bakolose?
18 Na mokanda oyo akomelaki baklisto ya Kolose, Paulo akomaki boye: “Yango wana, longwa na mokolo moyoki biso mpo na bolingo yango, totiki kobondela mpo na bino te. Tokolɔmbaka ete bótonda na boyebi [mpenza, NW ] ya mokano na ye, na mayele nyonso mpe na bososoli ya [elimo, NW]. Na bongo, bótambola na sembo na Nkolo mpe bósepelisa ye na makambo nyonso. Bóbota mbuma na misala nyonso malamu, bókola mpe na boyebi [mpenza ya, NW ] Nzambe. Tiká nguya na ye ya nkembo ekembisa bino na makasi nyonso ete bóyika mpiko mpe bózala na [motema molai, NW ] esika moko na esengo.”—Bakolose 1:9-11.
19, 20. (a) Ndenge nini tokoki koboya kotalela motema molai mpenza ya Yehova lokola komekama mpo na biso? (b) Matomba nini tokozwa soki tozali na motema molai?
19 Motema molai mingi ya Yehova ekozala komekama te epai na biso soki ‘totondi na boyebi mpenza ya mokano na ye’ oyo ezali ete “bato ya lolenge nyonso basengeli kobika mpe koyeba solo malamumalamu.” (1 Timote 2:4, NW) Tokokoba ‘kobota mbuma na misala nyonso ya malamu,’ mingimingi na mosala ya kosakola ‘nsango malamu ya bokonzi.’ (Matai 24:14) Soki tokobi kosala yango na bosembo, Yehova ‘akokembisa biso na makasi nyonso,’ mpo tókoka ‘koyika mpiko mpe tózala na [motema molai, NW] esika moko na esengo.’ Na ndenge yango, ‘tokotambola na sembo na Nkolo,’ mpe tokozala na kimya oyo moto azwaka ntango ayebi ete azali ‘kosepelisa ye na makambo nyonso.’
20 Tóndima mpenza ete motema molai ya Yehova ezali nzela ya mayele. Ezali mpo na lobiko na biso mpe ya baoyo nyonso bazali koyoka nsango malamu oyo tozali kosakola mpe koteya. (1 Timote 4:16) Soki toloni mbuma ya elimo, elingi koloba bolingo, boboto, malamu, bopɔlɔ mpe komipekisa, yango ekosalisa biso tózala na motema molai mpe na esengo. Tokoyeba kofanda na kimya na bandeko na biso na libota mpe bandeko na biso na kati ya lisangá. Motema molai ekosalisa biso mpe tóyikela baninga na biso ya mosala to ya kelasi mpiko. Motema molai na biso ekozala mpo na kobikisa basali ya mabe mpe kokumisa Yehova, Nzambe oyo azali na motema molai.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Gordon Fee, ye mpe azali moto ya mayele na makambo ya Biblia, apesaki makanisi na ye mpo na maloba oyo Paulo alobaki ete ‘bolingo ezali na motema molai mpe na boboto’; akomaki boye: “Na ndenge oyo Paulo alimboli yango, [motema molai mpe boboto] ezali lolenge mibale ya makanisi ya Nzambe mpo na bato (Lom. 2:4). Motema molai mpe bolingo ya Nzambe ezali komonana na ndenge azali kopekisa nkanda na ye atako bato bazali kobuka mibeko na ye; epai mosusu, ngɔlu na ye monene mingi ezali komonisa boboto na ye. Yango wana, ndimbola ya bolingo oyo Paulo apesi ebandi na bizaleli wana mibale ya Nzambe oyo, na nzela ya Klisto, amimonisi ete azali na motema molai mpe azali na boboto epai ya baoyo babongi kozwa etumbu ya Nzambe.”
Okoki kolimbola?
• Na makambo nini Klisto azali ndakisa malamu mpenza ya motema molai?
• Nini ekosalisa biso na kolona motema molai?
• Ndenge nini motema molai esalisaka mabota, baklisto oyo bazali esika moko, mpe bankulutu?
• Ndenge nini motema molai ekoki komemela biso mpe bato mosusu matomba?
[Elilingi na lokasa 15]
Ata ntango atungisamaki mingi, Yesu amonisaki motema molai epai ya bayekoli na ye
[Elilingi na lokasa 16]
Bakɛngɛli baklisto basɛngisami na kopesa bandeko na bango ndakisa malamu ya motema molai
[Elilingi na lokasa 17]
Soki tolandi ndakisa ya bolingo mpe motema molai ya Yehova, tokokoba kosakola nsango malamu
[Elilingi na lokasa 18]
Paulo abondelaki ete baklisto basengeli kozala “na motema molai esika moko na esengo”