Minyoko mpo na nsango malamu na Tesaloniki
Tesaloniki, oyo eyebani lelo na nkombo Thessalonique to Salonika, ezali engumba moko na nɔrdi-ɛsti ya Grɛsi, oyo ezali na libongo moko monene. Engumba yango ezalaki na ntina mingi mpo na bakristo ya siɛklɛ ya liboso, mingimingi mpo na mosala ya Paulo, oyo azalaki ntoma ya bikólo.—MISALA 9:15; BAROMA 11:13.
PAULO ná moninga na ye ya mobembo Silasi, bayaki na Tesaloniki na mobu soki 50 ya ntango na biso. Silasi azalaki elongo na Paulo na mobembo na ye ya mibale na mosala ya misionɛrɛ; yango ezalaki libaku ya liboso oyo bazwaki ya kosakola nsango malamu ya Kristo na bamboka oyo babengaka lelo oyo Mpoto.
Na ntembe te, ntango bakómaki na Tesaloniki, babosanaki naino te ndenge babɛtaki bango mpe batyaki bango na bolɔkɔ na Filipi, engumba monene ya Masedonia. Kutu na nsima, ntango Paulo ayaki kotala bandeko ya Tesaloniki ayebisaki bango ete asakolaki “nsango malamu ya Nzambe na bitumba mingi.” (1 Batesaloniki 2:1, 2) Makambo ekobonga na Tesaloniki? Makambo nini bakokutana na yango ntango bakosakola na engumba yango? Mosala na bango ekobota mbuma? Liboso, tótala naino ndenge engumba wana ya kala ezalaki.
Engumba oyo etondaki na yikiyiki
Nkombo Tesaloniki euti na maloba mibale ya Grɛki oyo elimboli “bato ya Thessalie” mpe “elonga,” elingi koloba, matata mpe bitumba. Bato mingi balobaka ete na mobu 352 liboso ya ntango na biso, Philippe II, mokonzi ya Masedonia, tata ya Alezandre Monene, alongaki bato ya ekólo moko na katikati ya Grɛsi na Thessalie. Balobaka ete mpo na kokanisa elonga wana, apesaki mwana na ye moko ya mwasi nkombo Thessalonice, oyo na nsima abalanaki na Cassandre, oyo akómaki mokonzi na esika ya yaya na ye Alezandre. Na mobu soki 315 liboso ya ntango na biso, Cassandre atongaki engumba moko na wɛsti ya péninsule Chalcidique mpe apesaki yango nkombo ya mwasi na ye. Na boumeli ya bambula ebele, bitumba mpe matata ezalaki mingi na engumba Tesaloniki.
Tesaloniki ezalaki mpe engumba moko ya bozwi. Ezalaki na moko ya mabongo kitoko ya Mbu Égée. Na eleko ya Baroma, engumba Tesaloniki ezalaki na Via Egnatia, nzela moko oyo ekendá nsango. Lokola Tesaloniki ezalaki pembeni ya mbu mpe ya banzela minene, ezalaki esika oyo ampire ya Roma ezalaki kozwa mpe kotinda biloko ya mombongo na bikólo mosusu. Na boumeli ya bambula, Ba-Goth, Ba-Slave, Ba-Franc, Ba-Vénitien mpe Ba-Turque bakómaki kolula engumba yango mpo na bomɛngo na yango. Basusu kati na bango babɔtɔlaki engumba yango na makasi mpe bato mingi bakufaki. Tólobela sikoyo mobembo ya Paulo, ntango abandaki kokutana na minyoko mpo na nsango malamu.
Paulo akómi na Tesaloniki
Ntango Paulo azalaki kokóma na engumba ya sika, azalaki koluka liboso Bayuda, mpo bayebaki Makomami mpe akokaki kosalela yango mpo na kosalisa bango bákanga ntina ya nsango malamu. Moto moko ya mayele alobi ete mbala mosusu momeseno wana ezali komonisa ete Paulo azalaki komibanzabanza mpo na bato ya ekólo na ye, to mpo ete na nzela ya Bayuda mpe bato oyo babangaka Nzambe, abanda kosakwela bato ya bikólo nsango malamu.—Misala 17:2-4.
Na yango, ntango Paulo akómaki na Tesaloniki, akɔtaki liboso na sinagoga, epai “azalaki kosalela Makomami mpo na kosolola na [Bayuda], azalaki kolimbola mpe kopesa bilembeteli na makomi ete esengelaki Kristo anyokwama mpe asekwa uta na bakufi, mpe azalaki koloba ete: ‘Ye azali Kristo, Yesu oyo ngai nazali kosakwela bino.’”—Misala 17:2, 3, 10.
Makambo oyo Paulo alobaki mpo na mokumba ya Masiya mpe ndenge ya koyeba Masiya yango, ezalaki kobimisa ntembe mingi. Bayuda bazalaki kozela nde Masiya oyo akolongola bango na boyangeli ya Baroma, kasi te Masiya oyo akonyokwama. Mpo na kondimisa Bayuda, Paulo ‘asololaki’ na bango, ‘alimbolelaki’ bango mpe ‘apesaki bango bilembeteli na makomi’—moteyi nyonso ya malamu asalelaka mayele oyo.a Bato oyo bazalaki koyoka Paulo basalaki nini ntango ateyaki bango makambo wana?
Mosala na bango ebotaki mbuma atako mikakatano ezalaki
Bayuda mosusu ná Bagrɛki mingi oyo bazalaki baprozelite ata mpe “basi mingi ya lokumu,” bandimaki nsango ya Paulo. Maloba “basi ya lokumu” ebongi mpenza mpo na Masedonia, basi bazalaki bato minene. Bazalaki kosala na guvɛrnema, bazalaki na mapango, bazalaki na lotomo ya kosala makambo mosusu mpe bazalaki kosala mimbongo. Bazalaki kutu kosalela bango bamonima mpo na kokumisa bango. Ndenge kaka Lidia, mwasi moko ya mombongo ya mboka Filipi andimaki nsango malamu, basi mosusu ya lokumu ya mboka Tesaloniki mpe bandimaki nsango malamu, ekoki kozala basi oyo mabota na bango ezalaki na bozwi to basi ya bato ya lokumu.—Misala 16:14, 15; 17:4.
Kasi, Bayuda bakómaki na zuwa makasi. Basanganaki na “bato ya mabe na kati ya bawayawaya ya zando mpe basalaki etuluku moko mpe bakɔtisaki engumba na yikiyiki.” (Misala 17:5) Bazalaki bato ya ndenge nini? Moto moko ya mayele na makambo ya Biblia alobeli bango lokola “bato ya bomoi ya mbindo mpe bazangá ntina.” Abakisaki boye: “Eloko moko te emonisi ete basepelaki na nsango ya Paulo; bazalaki kaka lokola bato nyonso ya mobulu, bazalaki kosilika mpambampamba mpe kosala mobulu.”
Bato yango ya mobulu “bayelaki ndako ya Yasona [moto oyo ayambaki Paulo] mpe babandaki koluka kobimisa bango epai ya etuluku yango.” Lokola bakutaki Paulo te, bakendaki epai ya bakonzi minene ya Leta. Na yango, “babendaki Yasona mpe bandeko mosusu epai ya bakonzi ya engumba, bagangaki ete: ‘Bato oyo babaloli mabele oyo bato bafandi, bakómi mpe awa.’”—Misala 17:5, 6.
Lokola Tesaloniki ezalaki mboka-mokonzi ya Masedonia, ezalaki na bonsomi na makambo mosusu. Na ndakisa, likita ya bana-mboka nde ezalaki kokata makambo ya mboka na bango. “Bakonzi ya engumba,” to Ba-politarque,b bazalaki bakonzi minene, bazalaki kosɛnzɛla ete mobulu ezala te mpe kobongisa makambo oyo ekokaki kosala ete Baroma bámikɔtisa na makambo ya mboka mpe bálongola matomba oyo engumba na bango ezalaki na yango. Yango wana, basengelaki kotungisama koyoka ete mobulu elingi ekɔta na mboka mpo na “bato oyo bazalaki kobimisa mobulu.”
Na nsima, bafundaki bango na likambo moko monene: “Bato yango nyonso bazali kosala makambo na kotɛmɛla mibeko ya Kaisala, balobi ete mokonzi mosusu azali, ye Yesu.” (Misala 17:7) Buku moko elobi ete efundeli wana elingi koloba “kotombokela” baamperɛrɛ, oyo “bakokaki kotika nzela te ete nkombo ya mokonzi [mosusu] etángama na etúká nyonso oyo bango babɔtɔlaki, longola kaka soki bapesi nzela.” Lisusu, lokola Yesu oyo Paulo azalaki kosakola ete azali Mokonzi, abomamaki na bakonzi ya Roma mpo bafundaki ye ete azali kotombokisa bato, emonanaki lokola nde likambo oyo bafundaki Paulo ekokaki mpe kozala solo.—Luka 23:2.
Bakonzi ya engumba batambolaki motó. Kasi, lokola ata eloko moko te emonisaki ete efundeli yango ezali solo mpe bato oyo bafundamaki bazalaki komonana te, “nsima ya kozwa ndanga oyo ekoki epai ya Yasona mpe bamosusu nde batikaki bango bákende.” (Misala 17:8, 9) Ekoki kozala ete ndanga yango ezalaki nde maloba oyo Yasona ná bakristo mosusu balobaki mpo na komonisa ete Paulo akolongwa na engumba yango mpe akozonga lisusu te mpo na kokɔtisa mobulu. Ntango mosusu, Paulo azalaki kolobela nde likambo yango ntango alobaki ete “Satana akangaki [ye] nzela,” mpe apekisaki ye azonga lisusu na engumba yango.—1 Batesaloniki 2:18.
Mpo na likambo yango, Paulo ná Silasi bakendaki na Beroya butubutu. Mosala ya Paulo ebotaki mbuma na Beroya, kasi yango esilikisaki banguna na ye Bayuda ya Tesaloniki, yango wana basalaki mobembo ya kilomɛtrɛ 80 tii na Beroya mpo na kotinda bato bátombokela Paulo ná Silasi. Mosika te, Paulo asimbaki lisusu nzela akei na Atene, kasi mikakatano mpo na nsango malamu ezalaki kaka kokoba.—Misala 17:10-14.
Mikakatano oyo lisangá ya sika ekutanaki na yango
Likambo ya esengo, lisangá moko efungwamaki na Tesaloniki, kasi botɛmɛli ezalaki te mokakatano kaka moko oyo bakristo bakutanaki na yango kuna. Bazalaki kofanda na esika oyo bato bazalaki bapakano mpe na bomoi ya mbindo; mpe yango ezalaki kobangisa Paulo. Bandeko yango balingaki kosala nini?—1 Batesaloniki 2:17; 3:1, 2, 5.
Bakristo ya Tesaloniki bayebaki ete soki batiki kokɔta na makambo ya mboka mpe ya losambo ya engumba yango, baninga na bango ya kala bakoyina bango mpe bakosilikela bango. (Yoane 17:14) Longola yango, engumba Tesaloniki etondaki na batempelo ya banzambe ya Bagrɛki, na ndakisa Zeusi, Artemisi mpe Apolo, mpe banzambe mosusu ya Ezipito. Bato bazalaki kosambela Kaisala, mpe bana-mboka nyonso basengelaki kosalaka yango. Soki moto aboyi kosangana na losambo yango, bazalaki kotalela ye lokola moto oyo atombokeli Roma.
Mbala mingi, losambo ya bikeko ezalaki kotinda bato bámipesa na bomoi ya mbindo. Banzambe minei oyo bakokanaki na likambo moko: Cabirus, nzambe-mokonzi ya Tesaloniki, Dionysus mpe Aphrodite, mpe Isis nzambe ya Ezipito: ntango bato bazali kosambela bango, bazalaki komipesa na kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo mpe kolangwa masanga. Mabala ya makango mpe kindumba ezalaki mingi. Kosala pite ezalaki lisumu te. Bato bazalaki kolanda mimeseno ya Baroma, oyo, ndenge buku moko emonisi yango, “ezalaki na mibali mpe basi oyo mosala na bango ezalaki kaka kokokisa mposa nyonso ya nzoto ya bato ya mboka; mpe minganga bazalaki koloba ete esengeli te kopekisa moto kokokisa mposa yango.” Yango wana, Paulo akebisaki bakristo oyo bazalaki kuna ete ‘báboya pite,’ ná “mposa ya lokoso ya kosangisa nzoto,” mpe “mbindo.”—1 Batesaloniki 4:3-8.
Balongaki mikakatano yango
Bakristo ya Tesaloniki basengelaki kobunda etumba makasi mpo na kondima na bango. Atako bakutanaki na botɛmɛli, bampasi, mpe bazalaki kofanda esika moko na bato oyo bazalaki na bomoi ya mbindo, Paulo apesaki bango longonya mpo na ‘mosala na bango ya sembo mpe mosala na bango makasi ya bolingo mpe koyika mpiko na bango,’ mpe mpo na ndenge bapesaki mabɔkɔ na kopalanganisa nsango malamu mosika mpenza.—1 Batesaloniki 1:3, 8.
Na mobu 303 ya ntango na biso, ampire ya Roma ebimiselaki bato oyo bazalaki komibenga bakristo botɛmɛli moko makasi. Moto ya liboso oyo abandisaki botɛmɛli yango ezali César Galère, mokonzi oyo azalaki kofanda na Tesaloniki mpe atongaki ebele ya bandako ya kitoko na engumba yango. Tii lelo, baturiste bakendaka kotala bandako yango mosusu oyo ezali naino.
Lelo oyo, Batatoli ya Yehova na Thessalonique basakwelaka bato oyo bafandi na bango esika moko, mbala mingi, basalaka yango liboso ya bandako oyo monguna wana ya lisangá ya bokristo atongaki. Atako na siɛklɛ ya 20 ezalaki na bileko mosusu oyo bakutanaki na botɛmɛli makasi na mosala na bango ya kosakola, lelo oyo ezali na masangá ya Batatoli ya Yehova soki 60 na engumba yango. Milende na bango emonisi ete atako mikakatano mpo na kopalanganisa nsango malamu oyo ebandaki basiɛklɛ mingi liboso ezali se kokoba, matomba ezali kaka komonana.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ekoki kozala ete Paulo asalelaki bavɛrsɛ lokola Nzembo 22:7; 69:21; Yisaya 50:6; 53:2-7; mpe Danyele 9:26.
b Liloba yango emonani te na mikanda ya Grɛki. Kasi, bakutaki yango na makomi oyo bakundolaki na Tesaloniki, makomi yango mosusu ezalaki ya siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso; yango emonisi ete lisolo oyo ezali na mokanda ya Misala ezali solo.
[Karte na lokasa 18]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Via Egnatia
MASEDONIA
Filipi
Amifipolisi
Tesaloniki
Beroya
THESSALIE
Mbu Égée
ATENE
[Bililingi na nkasa 20, 21]
Na likoló: Thessalonique lelo oyo
Na nse: ndako mpe esika ya kosukola ya Baroma na Agora
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Bililingi mibale ya nse na lobɔkɔ ya mwasi: 16th Ephorate of Prehistoric and Classical Antiquities, copyright Hellenic Ministry of Culture and Tourism
[Bililingi na lokasa 21]
Ndako moko pene na liyemi ya Galère; ekeko ya César Galère; bazali kosakola pene na Liyemi ya Galère
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Elilingi ya katikati: Thessalonica Archaeological Museum, copyright Hellenic Ministry of Culture and Tourism
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 18]
Motó oyo basali medayi: © Bibliothèque nationale de France; stone inscription: Thessalonica Archaeological Museum, copyright Hellenic Ministry of Culture and Tourism