Ozali kolanda komonisa bizaleli malamu?
“Soko malamu ezali mpe soko lisanzoli ezali, bókanisa makambo yango.”—BAFILIPI 4:8.
1. Bizaleli ya mbindo elimboli nini, mpe mpo na nini ekoki kobebisa losambo ya Yehova te?
EZALELI ya mbindo elimboli konyɔngɔtana to kobebisama ya ezaleli malamu. Ezaleli yango nde epalangani na mokili mobimba oyo tozali kobika na yango. (Baefese 2:1-3) Nzokande, Yehova Nzambe akopesa nzela te ete losambo na ye ya pɛto lobebisama. Mikanda ya boklisto, makita, mayangani ya mike mpe ya minene, epesaka biso makebisi na ntango ebongi na ntina na etamboli mabe. Tozali kozwa lisungi ya Makomami oyo libongi mpo na ‘kosimba oyo ezali malamu’ na miso ya Nzambe. (Baloma 12:9) Na bongo, lokola lisangá, Batatoli ya Yehova bazali kosala milende ya kozala pɛto, mpe na bizaleli malamu. Kasi ezali boni mpo na moto na moto? Ɛɛ, ozali mpenza kolanda komonisa bizaleli malamu?
2. Bizaleli malamu elimboli nini, mpe mpo na nini esengeli kosala milende mpo na komonisa yango ntango nyonso?
2 Bizaleli malamu elimboli kosala oyo ezali malamu, kozala motema malamu, komonisa misala ya sembo mpe makanisi ya sembo. Ezali ezaleli ya bopɔtu te kasi ya kosala malamu mpe kozala na makanisi mabongi. Bizaleli malamu esuki bobele na kopɛngola lisumu te; kasi esɛngaka kosala ntango nyonso oyo ezali malamu. (1 Timoté 6:11) Ntoma Petelo alendisaki baninga na ye baklisto ete: ‘Bóbakisa malamu likoló na kondima na bino.’ Na lolenge nini? Na ‘kotyáká etingya nyonso [na bilaka kitoko ya Nzambe].’ (2 Petelo 1:5, NW) Na ntina na bomoto na biso ya masumu, esɛngaka mpenza milende mpo na komonisa ntango nyonso bizaleli malamu. Nzokande, na ntango ya kala, bato oyo bazalaki na bobangi Nzambe basalaki bongo, atako bakutanaki na mikakatano minene.
Alandaki komonisa bizaleli malamu
3. Misala mabe nini Mokonzi Ahaza asalaki?
3 Makomami ezali na masoló mingi ya bato oyo balandaki komonisa bizaleli malamu. Tótalela na ndakisa bizaleli malamu ya Hizikiya. Emonani ete Tata na ye, Ahaza, Mokonzi ya Yuda, azalaki kosambela nzambe oyo abéngami Moleke. Ahaza azalaki na “[mbula, NW] ntuku mibale wana ebandaki ye kozala mokonzi mpe azalaki mokonzi na Yelusaleme kino [mbula, NW] zomi na motoba. Asalaki malamu na miso na [Yehova], Nzambe na ye, lokola Davidi tata na ye te. Kasi atambolaki na nzela na mikonzi na Yisalaele; alekisaki mwana na ye na mɔ́tɔ, kobila makambo mabe na mabota oyo [Yehova, NW] abenganaki bango liboso na bana na Yisalaele. Akabelaki mbeka mpe atumbaki mpaka na malasi na bisika na likoló mpe na ngomba mpe na nsé na nzeté nyonso mibesu.” (2 Mikonzi 16:2-4) Basusu balobaka ete ‘koleka na mɔ́tɔ’ elimboli bongo motindo moko ya molulu ya kopɛtola kasi kopesa moto lokola mbeka te. Nzokande, búku Molech—A God of Human Sacrifice in the Old Testament, ekomami na John Day, elobi ete: “Ezali na bilembeteli ya biutelo ya sikisiki mpe ya bato ya mboka Foinike [oyo bafandaki na engumba Carthage], bakisa mpe bilembeteli ya Arkeoloji mpo na komonisa ete mbeka ya bato ezalaki kosalema . . . na mokili ya Kanana, mpe ntina ezali te ya kobɛta ntembe na makanisi [ya mbeka ya bato] ya Kondimana ya Kala.” Lisusu, 2 Ntango 28:3 elobi na bosikisiki ete Ahaza “atumbaki mpe bana na ye.” (Kokanisá na Deteronome 12:31; Nzembo 106:37, 38.) Oyo nde misala mabe!
4. Lolenge nini Hizikiya amitambwisaki kati na ezingelo oyo etondaki na bizaleli ya mabe?
4 Ndenge nini Hizikiya alóngaki kati na ezingelo oyo etondaki na mabe? Nzembo 119 ezali na makanisi ya kosepelisa, mpamba te basusu bakanisaka ete Hizikiya moto akomaki yango ntango azalaki naino mwana ya mokonzi. (Nzembo 119:46, 99, 100) Na bongo ezalela na ye ekoki mbala mosusu komonisama na maloba oyo: “Ata [bana na mikonzi, NW] bakolobaka mabe na ntina na ngai, mosali na yo akokanisa mokano na yo. Molimo na ngai enangwi na mawa.” (Nzembo 119:23, 28) Wana azingamaki na basambeli ya banzambe ya lokuta, mbala mosusu Hizikiya akómaki eloko ya lisɛki kati na basangani ya ndako ya mokonzi, na boye ete ezalaki mpasi mpo na ye kozwa mpɔngi. Nzokande, alandaki komisa bizaleli malamu, na nsima akómaki mokonzi, mpe “asalaki malamu na miso ya [Yehova] . . . Andimaki [Yehova], Nzambe na Yisalaele.”—2 Mikonzi 18:1-5.
Balandaki komonisa bizaleli malamu
5. Komekama nini Danyele mpe baninga na ye misato bakutanaki na yango?
5 Ndakisa mosusu ya komonisa bizaleli malamu ezalaki bongo ya Danyele mpe baninga na ye Baebele misato, Hanania, Misaele mpe Azalia. Bakamatamaki na makasi na mokili na bango mpe bakendaki na bango na Babilone. Bilenge yango minei bapesaki bango bankombo ya Babilone—Beletesasala, Sadalaka, Mesaka mpe Abede-nego. Bapesaki bango “bilei kitoko na mokonzi,” bakisa mpe bilei oyo bipekisamaki na Mibeko ya Nzambe. Lisusu, basɛngisamaki kobongisama na boumeli ya mbula misato mpo na kozwa “mayele mpe lokóta ya Bakaladi.” Yango esukaki te bobele na koyekola lokóta mosusu, mpamba te emonani ete liloba “Bakaladi” awa elimboli etuluku ya bato batángá mingi. Na yango, bilenge Baebele yango misato bakutanaki na mateya mabe ya Babiblone.—Danyele 1:1-7.
6. Mpo na nini tokoki koloba ete Danyele alandaki komonisa bizaleli malamu?
6 Atako bazalaki kokutana na bopusi makasi, Danyele mpe baninga na ye misato baponaki komonisa bizaleli malamu na esika ya kosala mabe. Danyele 1:21 elobi ete: “Danyele atikalaki wana kino mbula na liboso na mokonzi Kulese.” Ɛɛ, Danyele “atikalaki” lokola mosali ya Yehova oyo azalaki komonisa bizaleli malamu na boumeli ya mbula koleka 80—wana bakonzi mingi ya nguya bazalaki kobima mpe kokwea. Atako myango mabe ya bayangeli mpe makambo ya kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo ezalaki kati na losambo ya Babilone, atikalaki sembo epai na Nzambe. Danyele alandaki komonisa bizaleli malamu.
7. Tokoki koyekola nini na lolenge Danyele mpe baninga na ye bamitambwisaki?
7 Tokoki koyeba makambo mingi na ntina na Danyele mpe baninga na ye oyo bango nyonso bazalaki na bobangi Nzambe. Bakóbaki komonisa bizaleli malamu mpe baboyaki kolanda mimeseno ya bato ya Babilone. Atako bapesaki bango bankombo ya Babilone, babungisaki soko moke te bomoto na bango ya basaleli ya Yehova. Na yango, nsima ya mbula soko 70, mokonzi ya Babilone abéngaki Danyele na nkombo na ye ya Liebele! (Danyele 5:13) Na boumeli ya bomoi molai na ye, Danyele aboyaki kobuka mobeko ata na makambo mike. Wana azalaki elenge, “atyaki motema na komiyeisa mbindo na bilei kitoko na mokonzi te.” (Danyele 1:8) Etɛlɛmɛlo wana ya kozanga kobuka mobeko oyo Danyele mpe baninga na ye bakamataki, na ntembe te elendisaki bango na kolónga komekama makasi oyo bakutanaki na yango nsima.—Danyele, mikapo 3 mpe 6.
Kolanda komonisa bizaleli malamu lelo oyo
8. Lolenge nini bilenge baklisto bakoki kopɛngola komikɔtisa na mokili ya Satana?
8 Lolenge moko na Danyele mpe baninga na ye misato, lelo oyo basaleli ya Nzambe bazali koboya komikɔtisa na misala mabe ya mokili oyo ya Satana. (1 Yoane 5:19) Soki ozali elenge moklisto, okoki kokutana na bopusi makasi ya baninga na yo ete okóma komekola lolenge na bango ya kolata oyo elongobani te, lolenge ya kosala monzɛlɛ mpe lolenge ya miziki oyo bazali koyoka. Na esika ya kolanda midele nyonso oyo ezali kosalelama na bato mingi, zalá ngwi, mpe komitika te “kobila makambo na ntango oyo.” (Baloma 12:2) “Tóboya kotuka Nzambe mpe kobila mposa na mokili, kasi tózala na bizaleli na kokanga motema mpe na boyengebene mpe na kosambela Nzambe.” (Tito 2:11, 12) Likambo ya ntina ezali te ya kondimama na baninga na yo, kasi nde ya kondimama na Nzambe.—Masese 12:2.
9. Bopusi nini baklisto bazali kokutana na yango na makambo ya mombongo, mpe lolenge nini basengeli komitambwisa?
9 Baklisto oyo bakómi mikóló mpe bakutanaka na bopusi mpe na yango basengeli komonisa bizaleli malamu. Moklisto oyo asalaka mombongo akoki komekama na kosalela myango oyo mibongi te to kozanga kotosa mitindá ya Letá mpe mibeko ya mpako. Nzokande, atako lolenge bawelani na makambo ya mombongo mpe baninga ya mosala bazali komitambwisa, “tozali na mposa [ya] kosalaka malamu na makambo nyonso.” (Baebele 13:18) Makomami mazali kosɛnga na biso ete tózala sembo mpe malamu na bakonzi na biso ya mosala, na bato na biso ya mosala, na bakiliya, mpe bakonzi ya Letá. (Deteronome 25:13-16; Matai 5:37; Baloma 13:1; 1 Timoté 5:18; Tito 2:9, 10) Tiká ete tósala milende ya kozala sembo na makambo matali mosolo. Na kokomáká mitángo ya sikisiki mpe kotyáká sinyatili na nkomá mpo na kondimisa, tokopɛngola matata oyo makoki kobima.
Tókeba!
10. Mpo na nini esengeli ‘kokeba’ na ntina na liponi ya miziki?
10 Nzembo 119:9 ezali kolakisa polele motindo mosusu ya kolanda komonisa bizaleli malamu na miso ya Yehova. Mokomi na nzembo ayembaki ete: “Elenge mobali akopɛtola nzela na ye na nini? Bobele na kokeba ete asala lokola liloba na yo.” Moko na bibundeli makasi ya Satana ezali bongo miziki, oyo ezali na nguya ya kolamusa mayoki. Likambo ya mawa, baklisto mosusu balóngi te ‘kokeba’ na likambo litali miziki mpe emonani ete bamipesi na lolenge mabe ya miziki, lokola rap mpe heavy metal. Basusu bakoki koloba ete miziki motindo wana esalaka bango mabe te to mpe batyaka likebi te na maloba na yango. Basusu balobaka ete basepelaka bobele na lokito ya mbonda to mongita ya lindanda. Nzokande, mpo na baklisto, yango etali te soko eloko moko ezali kosepelisa. Lobanzo na bango ezali nde soko “endimami na Nkolo.” (Baefese 5:10) Na momeseno, miziki ebéngami heavy metal mpe rap elendisaka bizaleli ya mbindo lokola kofinga, pite, mpe kutu losambo ya Satana—makambo oyo mazali na esika soko moke te kati na basaleli ya Nzambe.a (Baefese 5:3) Tozala bilenge to mikóló, mokomoko na biso akosala malamu na komanyola likoló na motuna oyo: Na liponi na ngai na ntina na miziki, nazali kolanda komonisa bizaleli malamu?
11. Lolenge nini moklisto akoki kokeba na makambo azali kotala na televizyó, na video to na bafilime?
11 Bilakiseli mingi ya televizyó, video, mpe bafilime elendisaka bizaleli mabe. Engebene monganga moko oyo ayebani, oyo asalisaka makɔnɔ ya motó, makambo lokola ‘kosepelisa nzoto, kosangisa nzoto, mobulu, lokoso mpe moimi’ ezali kolakisama mingi na bafilime oyo ezali kobimisama lelo oyo. Na bongo, kokeba ezali mpe kotalela kopona makambo oyo tozali kotala. Mokomi na nzembo abondelaki ete: “Bendá miso na ngai ete natala biloko mpamba te.” (Nzembo 119:37) Elenge moklisto moko na nkombo Joseph asalelaki etindá yango. Ntango filime moko ebandaki komonisa bililingi ya bolumbu mpe mobulu, abimaki na esika yango. Akakatanaki mpo na kosala bongo? Joseph alobi ete: “Te, soko moke te. Nakanisaki liboso Yehova mpe namonaki malamu kosepelisa ye.”
Ntina ya boyekoli mpe bomanyoli
12. Mpo na nini boyekoli ya biso moko mpe bomanyoli ezali na ntina mpo na kolanda komonisa bizaleli malamu?
12 Tosengeli te kosuka bobele na kopɛngola makambo mabe. Kolanda komonisa bizaleli malamu esɛngaka koyekola mpe komanyola likoló na makambo malamu oyo mazwami kati na Liloba ya Nzambe mpo ete tókoka kosalela mitindá na ye ya sembo kati na bomoi. Mokomi na nzembo alobaki ete: “Ɛ nalingi mobeko na yo na bolingi bɛ! Nakobanzaka yango mokolo mobimba.” (Nzembo 119:97) Boyekoli ya yo moko ya Biblia mpe ya mikanda ya boklisto ezali eteni moko ya manáka na yo ya pɔ́sɔ na pɔ́sɔ? Ya solo, kopesa ntango mpo na boyekoli malamu ya Liloba ya Nzambe mpe komanyola mozindo likoló na yango ekoki kozala mokakatano. Kasi mbala mingi likoki ezalaka mpo na kosomba ntango mpo na kosala makambo mosusu. (Baefese 5:15, 16) Mbala mosusu bangonga ya ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ ekoki kozala malamu mpo na kobondela, koyekola mpe komanyola.—Kokanisá na Nzembo 119:147.
13, 14. (a) Mpo na nini bomanyoli ezali na ntina mingi? (b) Mikapo nini ya Makomami esengeli komanyola likoló na yango oyo ekoki kosalisa biso ete tóyina kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo?
13 Bomanyoli ezali na motuya mingi, mpamba te esalisaka biso ete tókanga ntina ya makambo toyekoli. Mingi koleka, ekoki kosalisa na kokólisa makanisi mauti na Nzambe. Tópesa ndakisa: Koyeba ete Nzambe apekisi pite ezali likambo moko, kasi ‘koyina oyo ezali mabe mpe kokangama na oyo ezali malamu’ ezali mpe likambo mosusu. (Baloma 12:9) Tokoki mpenza kozala na mayoki lokola Yehova na ntina na kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo na komanyoláká likoló na bavɛrsɛ́ ya Biblia, lokola Bakolose 3:5, oyo ezali kokebisa ete: “Bongo, bóboma bizaleli na bino biuti na nsé: pite, mbindo, mposa na nzoto, mposa mabe mpe bilulela oyo ezali losambo na bikeko.” Omituna yo moko: ‘Motindo nini ya mposa ya nzoto oyo nasengeli koboma? Makambo nini nasengeli kopɛngola oyo ekoki kolamusa mposa mabe? Ezali na mbongwana oyo nasengeli kosala kati na boninga na ngai na basi to na mibali?—Kokanisá na 1 Timoté 5:1, 2.
14 Paulo akebisaki baklisto ete báboya pite mpe bámipekisa mpo ete “moto moko akwea te mpe asalela ndeko na ye mabe na likambo oyo te.” (1 Batesaloniki 4:3-7) Omituna yo moko: ‘Mpo na nini kosala pite ezali mabe? Mabe nini nakomisala to nakosalela moto mosusu soki nasali lisumu na likambo yango? Nakokóma ndenge nini na elimo, na mayoki mpe na nzoto? Ezali boni mpo na baoyo kati na lisangá basili kobuka mobeko ya Nzambe mpe baboi kobongola motema? Makambo makómaki ndenge nini mpo na bango?’ Kotosa oyo Makomami ezali koloba na ntina na etamboli motindo wana ekoki kokólisa epai na biso koyina makambo oyo mazali mabe na miso ya Nzambe. (Exode 20:14; 1 Bakolinti 5:11-13; 6:9, 10; Bagalatia 5:19-21; Emoniseli 21:8) Paulo alobi ete mosali na pite “azali koboya kotosa moto te kasi Nzambe.” (1 Batesaloniki 4:8) Ɛɛ, akoboya mpenza kotosa Tata na ye ya likoló?
Bizaleli malamu mpe boninga
15. Boninga ezali na ntina nini kati na bolandi na biso ya komonisa bizaleli malamu?
15 Lisalisi mosusu ya kolanda komonisa bizaleli malamu ezali bongo kozala na boninga malamu. Mokomi na nzembo ayembaki ete: “Nazali ndeko na baoyo nyonso bakolingaka yo [Yehova] mpe na baoyo bakobatelaka bilakeli na yo.” (Nzembo 119:63) Tozali na mposa ya boninga malamu oyo emonanaka na makita ya boklisto. (Baebele 10:24, 25) Soki tomitangoli na basusu, tokoki komitika kozimbisama na makanisi na biso moko, mpe tokoki kokwea na mabe kozanga nkaká. (Masese 18:1) Nzokande, boninga ya esengo ya boklisto ekoki kolendisa ekateli na biso ya kolanda komonisa bizaleli malamu. Ya solo, tosengeli mpe kokeba na baninga mabe. Tokoki kozala na boboto na bato ya kartyé, baninga ya mosala mpe baninga ya kelasi. Kasi, soki tozali komitambwisa na mayele, tokolinga kokangama te na baoyo baboi kolanda komonisa bizaleli malamu ya boklisto.—Kokanisá na Bakolose 4:5.
16. Ndenge nini kosalelama ya 1 Bakolinti 15:33 ekoki kosalisa biso na kolanda komonisa bizaleli malamu lelo oyo?
16 Paulo akomaki ete: “Kotambolana na bato mabe ekobebisa malamu na motema.” Na kolobáká bongo, azalaki kokebisa bandimi ete bakokaki kobungisa kondima na bango na kosanganáká na baoyo bamibéngaki ete baklisto, kasi oyo bazalaki kobwaka mateya na ntina na lisekwa. Etindá oyo ezwami kati na likebisi ya Paulo ezali kotalela boninga na biso, ezala na libándá to na kati ya lisangá. (1 Bakolinti 15:12, 33) Ya solo, tokolinga te kokima bandeko na biso ya elimo, basi mpe mibali mpo ete bazali kondima te makanisi malamu mosusu oyo mauti na biso moko. (Matai 7:4, 5; Baloma 14:1-12) Atako bongo, esengeli kokeba soki moto moko na lisangá azali komikɔtisa na etamboli mabe to komonisa elimo mabe to komilelalela. (2 Timoté 2:20-22) Ezali likambo ya mayele kozala na boninga na baoyo tokoki ‘koyikisana mpiko.’ (Baloma 1:11, 12) Yango ekosalisa biso ete tólanda komonisa bizaleli malamu mpe tótikala na “nzela na bomoi.”—Nzembo 16:11.
Tólanda komonisa bizaleli malamu
17. Engebene Mituya mokapo 25, likámá nini Bayisalaele bazwaki, mpe liteya nini yango epesi biso?
17 Mwa ntango moke liboso ete Bayisalaele bákɔta na Mokili ya Ndaká, bankóto kati na bango baponaki kosala mabe—mpe bazwaki makámá. (Mituya, mokapo 25) Lelo oyo, basaleli ya Yehova bakómi na ekuke ya mokili ya sika ya boyengebene. Kokɔta kati na yango ekozala lipamboli malamu epai na baoyo bazali kokóba kobwaka bizaleli ya mabe ya mokili. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki kozala na bamposa mabe, kasi Nzambe akoki kosalisa biso ete tólanda litambwisi ya sembo ya elimo santu na ye. (Bagalatia 5:16; 1 Batesaloniki 4:3, 4) Na bongo, tiká ete tólanda elendiseli ya Yosua epai na Yisalaele ete: “Bómemisa [Yehova] mpe bósalela ye na motema moko mpe na sembo.” (Yosua 24:14) Bobangi ya likambo oyo ete tokozanga kosepelisa Yehova ekosalisa biso ete tólanda komonisa bizaleli malamu.
18. Na ntina na mabe mpe malamu, ekateli ya baklisto nyonso esengeli kozala nini?
18 Soki mposa ya motema na yo ezali ete osepelisa Nzambe, zwá ekateli ya kosalela elendiseli oyo ya Paulo: “Mpo na makambo nyonso na solo, na makambo nyonso na lokumu, na makambo nyonso na sembo, na makambo nyonso na pɛto, na makambo nyonso na boboto, na makambo nyonso na ngɔlu, soko malamu ezali mpe soko lisanzoli ezali, bókanisa makambo yango.” Soki ozali kosala bongo, litomba ekozala nini? Paulo alobi ete: “Bósalaka yango; mpe Nzambe na kimya akozala na bino elongo.” (Bafilipi 4:8, 9) Ɛɛ, na lisalisi ya Yehova, okoki kobwaka bizaleli ya mabe mpe kolanda komonisa bizaleli malamu.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Apríli 1993, nkasa 19-24, mpe molɔngɔ́ ya masoló “Mituna oyo bilenge batunaka . . . ” kati na Lamuká! ya 8 Febwáli, 22 Febwáli mpe 22 Mársi 1993, mpe 22 Novɛ́mbɛ 1996 (bibimeli ya Lifalansé).
Makanisi ya bozongeli
◻ Nini esɛngisami mpo na kolanda komonisa bizaleli malamu?
◻ Na mabaku nini Hizikiya, Danyele mpe Baebele misato balandaki komonisa bizaleli malamu?
◻ Na lolenge nini tokoki kozala lokola Danyele na kotɛmɛláká bopusi ya Satana?
◻ Mpo na nini baklisto basengeli kokeba na makambo matali kominanola?
◻ Boyekoli, bomanyoli mpe boninga ezali na ntina nini wana tozali kolanda komonisa bizaleli malamu?
[Elilingi na lokasa 15]
Elenge Hizikiya alandaki komonisa bizaleli malamu atako azingamaki na basambeli ya Moleke
[Bililingi na lokasa 17]
Baklisto basengeli kokeba na makambo matali kominanola