Likámá ya nikleere—Elongolami mpo na libela!
NZAMBE alingi te ete bato bafanda na bobangi. Lokola azali “Nzambe ya esengo,” alingi ete bango basepela kati na kimya mpe libateli, ete bázala na esengo. (1 Timoté 1:11, NW) Kasi, kati na mokili oyo ezali na nsé ya likámá ya nikleere, yango ekoki kosalema soko moke te.
“Kimya mpe libateli”—Ya lokuta
Emonani polele ete likámá ya nikleere esili soko moke te. Nzokande, atako mobulu ya makambo ya politiki, ya nkita, mpe ya makambo matali bato kati na efandelo na bango ezali kobima, emonani ete bikólo pene na nyonso bizali ntango nyonso na elikya ya kolónga. Milende makasi mpo na kokitisa likámá wana emonani polele uta ntango O.N.U. asakolaki 1986 ete mobu ya kimya.
Na bambula oyo euti koleka, zulunalo The Bulletin of the Atomic Scientists, ezongisaki móntɛlɛ na yango ya mokolo ya kosambisama ya nsuka na nsima—lolenge na yango ya komonisa likoki ya kosalema ya etumba ya nikleere—ezongisaki yango kobanda na miniti misato kino na miniti zomi na nsambo na liboso ete midi ya butu ékoka. Na 1989, etuluku ya balukiluki ya Stockholm mpo na ntina etali kimya balobaki ete “elikya ya kosilisa matáta na kimya nyonso ezali kosalema malamu koleka na mibu nyonso kobanda na nsuka ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.”
Na bambula oyo, O.N.U. esili kolendisama mpo na kosala mosala ya kotya kimya kati na mikili epai kuna matáta masilaka te. Atako elongi na mobimba te, nzokande ekoki mpo na kosala ete épesa elikya epai na bato mingi. Emonani mpenza lokola ete, na mikolo mizali koya tokomona kosilisama ya matátá masusu. Emonani polele ete konganga ya “kimya mpe libateli” ekoyokana lisusu mingi mpe na makasi mpenza. Ekoki ata mpe kondimama na bato mingi.
Kasi, kebá! Biblia epesi likebisi oyo: “Ekolobaka bato ete: ‘[Kimya mpe libateli, NW] ejali, makambo majali tɛ,’ wana libebi ekokwela bango pwasa mpelamɔkɔ mpasi ekokwela mwasi na jemi mpe njela na kokima ekojala tɛ.” Yango wana, konganga ya “kimya mpe libateli” ekomonisa ete tango ekoki mpo ete Nzambe ‘akoka kobebisa baoyo [na nzela kobebisa ezingelo, na bisaleli ya nikleere mpe na lolenge mosusu], bazali kobebisa mabelé.’—1 Batɛsalɔniki 5:3, 4; Emoniseli 11:18, NW.
Tomoni ete Biblia elobi te ete bikólo bikokokisa “kimya mpe libateli.” Emonani polele ete bakozala nde kolobela yango polele na lolenge ya kobenda mpenza likebi, komonisáká elikya ya kolónga mpe endimiseli makasi oyo emonanaki naino liboso te. Ekomonana ete likoki ya kotya kimya mpe libateli ekozala mpenza makasi koleka bileko nyonso ya liboso. Atako likámá na bibundeli ya nikleere ezali sé kokóba, mabota makolengolama na liyoki ya kimya ya lokuta.
Nzokande, baklisto ya solo, bakokosama te. Na likebi nyonso, bakotalela te kimya oyo bato bakozala kolaka, kasi bakotala nde eloko oyo eleki mpenza!
Kimya mpe libateli ya solo
Engebene Njembo 4:8, kimya mpe libateli ya solo ekozwama bobele kati na ebongiseli ya Yehova Nzambe: “Nakolala, ɛɛ nakolala mpɔngi na kimya, jambi bobɛlɛ yɔ [Yehova] okobatela ngai esika na ngai.” Mpe konganga nyonso na ntina na “kimya mpe libateli” oyo elobelami na libanda ya makambo oyo mazali kati na ebongiseli ya Bokonzi ya Yehova ezali bobele ya lokuta. Ekoki te kokokisa kimya oyo ekoki koumela.
Bokonzi ya Nzambe oyo ekoyangelama na Yesu Klisto ekokokisa bamposa ya bato bobele na ndambondambo te. Boyangeli ya Nzambe ekokitisa te motango ya bibundeli ya nikleere kasi ekobebisa yango nyonso mpe lolenge nyonso mosusu ya bibundeli. Kati na Njembo 46:9, tozali kokuta elaká oyo ete: “Ye oyo akosukisa bitumba kino nsuka na mokili; akobukabuka litimbo mpe akokatakata likɔnga, akojikisa mpe makalo kati na mɔ́tɔ.”
Bobele bongo, likámá ya nikleere, oyo ezali kati na bamotɛ́lɛ to bosoto ya nikleere oyo esalaka malamu te mpe bosoto ya nikleere ekokóma makambo ya kala. Soki bongo te, maloba oyo ekokokana te: “Bakofanda mpe na nsé, moto na moto na miwiti na ye mpe na njete na mosuke, moto mɔkɔ akobangisa bango tɛ, mpɔ monɔkɔ na [Yehova] na bibele elobi bongo.” Nzambe akoki kobuka lokuta te. Tozali na ntina moko te ya kotya ntembe na maloba na ye.—Mika 4:4; Tito 1:2.
Okosepela kozala na elikya ya kofanda na mokili oyo kati na yango likámá ya nikleere esili kolongolama mpo na libela? Okoki, mpamba te, liloba ya Nzambe ezali kolimbola polele masengami mpo na yango. Nakoyekoláká yango mpe na kosaleláká yango kati na bomoi na yo, mokolo mosusu okozala na esengo ya koloba na elembo ya kobondisama nyonso ete: “likámá ya nikleere—mbala oyo esili!”
[Elilingi na lokasa 7]
Kimya ekozala na mokili ya sika ya Nzambe, mokili oyo likámá ya nikleere elongolami mpo na libela
[Eutelo ya bafɔtɔ]
M. Thonig⁄H. Armstrong Roberts
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 6]
Fɔtɔ́ U.S. National Archives