Eteni ya misato—Ndenge Biblia ekómaki kino epai na biso
TOZALI na ekólo Birmanie, na mobu 1824—Basáli ya mokonzi bauti kolukaluka na ndako ya Adoniram mpe Ann Judson, babalani oyo bazali bamisionere. Bamemi biloko nyonso oyo bakanisi ete bizali na motuya. Nzokande batiki eloko oyo eleki motuya—maniskri ya libongoli ya Biblia, oyo Ann akundaki na nsé ya mabelé. Mobongoli Adoniram akangami na minyɔlɔlɔ mpe atyami na bolɔ́kɔ oyo etondi na ngungi, afundami ete azali monɔ́ngi. Sikawa mpiɔ ya nsé ya mabelé ekobebisa maniskri yango. Ndenge nini kobatela yango? Ann akɔtisi yango na kati ya kusɛ́ moko makasi mpe atongi yango malamu mpe na nsima atindi kusɛ́ yango epai ya mobali na ye oyo azali na bolɔ́kɔ. Kusɛ́ ebatelami, mpe na ndenge yango maniskri oyo ezali na kati ekómi eteni ya Biblia ya liboso na lokótá Birman.
Biblia ekutanaki na makambo mingi ya motindo wana kati na lisoló ya bato. Na banimero oyo eutaki kobima, tolobelaki kobongolama mpe kokabolama ya Biblia uta yango esilaki kokomama kino na ebandeli ya bambula ya 1600. Ndenge nini Biblia etambolaki bandá ntango wana kino lelo? Ekokóma na mabɔkɔ ya moto nyonso? Mosala nini la Société Watch Tower asalaki na likambo yango?
Bamisionere mpe ba sociétés ya Biblia
Na bambula ya 1600 mpe ya 1700 likambo ya kotánga Biblia ekólaki makasi na mikili mingi. Na eleko yango, ekólo Angleterre ezwaki bopusi mingi ya Biblia. Ya solo, masoló mpe mateya ya Biblia masalaki bopusi likoló ya makanisi mpe misala ya bato nyonso ya ekólo, longwa na mokonzi kino na elenge oyo azalaki kotambwisa etimwelo. Kasi bopusi ya Biblia ekendaki mosika. Na eleko yango ekólo Angleterre ezalaki nguya monene na mombongo na mai minene mpe oyo eyangelaki bikólo mosusu, mpe bato mosusu ya Angleterre bazalaki komema Biblia na mibembo na bango. Yango efungolaki nzela na kampanye monene ya kokabola Biblia.
Pene na nsuka ya bambula ya 1700, Biblia elamusaki bato mosusu na Angleterre ete bákanisa bamposa ya elimo ya bato ya bikólo ya mosika oyo biyangelamaki na Bokonzi ya Angleterre. Nzokande, lobanzo wana ezalaki epai ya bato nyonso te. Bakambi mingi ya lingomba bazalaki kondima ete makambo nyonso masilá kokanama liboso, mpe na bongo bakanisaki ete mokano ya Nzambe ezali ete bato mosusu bábikisama te. Ntango William Carey, oyo alingaki kokóma misionere asalaki lisukúlu ya mɔ́tɔ mpo na kobyanga bato ete básunga mosala ya misionere na ekólo Inde, moto moko angangaki mpo na kopamela ye ete: “Elenge mobali, fandá nyɛɛ; ntango Nzambe akolinga ete bapakano bábongwana, akosala yango kozanga lisungi na yo!” Atako bongo, na mobu 1793, Carey asalaki mobembo na masuwa na ekólo Inde. Likambo ya kokamwa, nsukansuka abongolaki Biblia mobimba to biteni na yango na nkótá 35 ya Inde.
Bamisionere basosolaki ete esaleli na bango ya moboko ezalaki Biblia na lokótá ya bato ya mboka epai bakendaki. Kasi, nani akopesa bango Biblia yango? Likambo ya kobenda likebi, na kozanga koyeba, ebongiseli ya kopalanganisa Biblia na mokili mobimba ebandisamaki na Mary Jones, elenge mwasi moko ya etúká ya Pays de Galles, oyo azalaki na mibu 16 na ntango yango. Na mobu 1800, Mary atambolaki kilomɛtɛlɛ 40 na makolo mpo na kosomba Biblia na lokótá Gallois epai ya pastere moko. Mary abombaki mosolo na ye na boumeli ya mbula motoba, mpe ntango akómaki mpe ayokaki ete Biblia nyonso esilaki kotekama, alelaki makasi. Pastere ayokaki mawa mingi, mpe akabelaki Mary Biblia moko kati na oyo ya ye.
Na nsima, pastere yango akanisaki mpo na bato mosusu mingi oyo bazalaki na mposa ya Biblia, mpe asololaki likambo yango na baninga na ye na engumba Londres. Nsuka ya likambo ezalaki ete na mobu 1804, basalaki société ya Biblia ebéngami British and Foreign Bible Society. Mokano na yango ezalaki ya kopesa bato Biblia oyo ekomami na lolenge ya pɛtɛɛ na lokótá na bango, oyo enyatami “kozanga bakomantere to maloba na nsé ya lokasa.” Na kolongoláká bakomantere na mipanzi ya nkasa, babandisi ya société yango balikyaki ete bakopɛngola ntembe etali mateya. Kasi, mbala mingi, société ya Biblia ezalaki kokabwana na likambo ya mikanda oyo babéngi apokrife, na likambo ya batisimo na kozindisama na mai, mpe na liteya ya Bosato.
Mɔ́tɔ ya ebandeli epalanganaki nokinoki, mpe na mobu 1813, ba sociétés motindo wana esilaki kosalema na bikólo Allemagne, Pays-Bas, Danemark, mpe Russie. Na nsima, ba sociétés ya Biblia esalemaki mpe na bikólo mosusu. Ntango ba sociétés ya liboso etyaki mikano na yango, bakanisaki ete mokili mobimba ezalaki na nkótá ya minene mingi te. Bakanisaki soko moke te ete yango ezali bankóto mingi! Bobele babongoli moke nde bayebaki Liebele mpe Greke mpo na kobongola yango mbala moko na lokótá ya mboka. Na yango, ntango British and Foreign Bible Society esungaki mosala ya bobongoli, mbala mingi babongoli ya nkótá misusu bazalaki kosalela libongoli ya Lingelesi King James Version.
Mikakatano ya mobongoli moko
Makambo mingi ya Biblia mazali masoló ya bato mpe masese oyo mauti na makambo ya mokolo na mokolo. Yango esalaka ete ezala mpasi mpenza te kobongola yango koleka soki ekomamaki na elobeli ya mayele ya filozofi oyo ezali sé makanisi. Nzokande, lokola tokoki komizela na yango, mbala mosusu milende ya bamisionere na ebandeli ebimisaki maloba ya kobulunganisa to ya kosɛkisa. Na ndakisa, libongoli moko epesaki likanisi epai ya bafandi ya eteni moko ya ekólo Inde ete Nzambe azali na nzoto ya lángi ya bulé. Liloba lisalelamaki mpo na kolimbola “ya likoló” kati na elobeli “Tata ya likoló” elimbolaki “oyo azali na lángi ya likoló”—likoló oyo tomonaka na miso!
Na ntina na mikakatano ya mobongoli, Adoniram Judson akomaki na mobu 1819 ete: ‘Ntango biso [babongoli] tozali koyekola lokótá oyo elobamaka na bato bafandi na nsuka mosusu ya mokili, oyo lolenge ya koloba ezali mpenza ya sika mpo na biso, mpe balɛ́tɛlɛ mpe maloba ezali ata na bokokani te na lokótá mosusu oyo tosilá kokutana na yango liboso; mpe wana tozali na diksionere te to mobongoli te oyo akosunga biso mpe wana tosengeli naino koyeba mwa moke lokótá yango liboso ya kozwa molakisi oyo azali moto ya mboka wana—yango ezali mpenza mosala monene!’ Mpe mosala ya babongoli lokola Judson ekólisaki mpenza likoki ya kozala na Biblia mingi.—Talá na kaláti na lokasa 12.
Ann Judson asungaki mobali na ye na mosala ya mpasi etali kobongola. Kasi babalani yango bazalaki bobele na mikakatano ya bobongoli te. Ntango basáli ya mokonzi batyaki Adoniram na bolɔ́kɔ, Ann azalaki na zemi. Na mpiko nyonso, na boumeli ya sanza 21 asɛngaki na bakonzi yango ya matata ete bábimisa mobali na ye na bolɔ́kɔ. Komekama wana mpe maladi ebebisaki bokolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na ye. Mwa moke nsima ya kobima ya Adoniram na bolɔ́kɔ, Ann, mwasi na ye ya mpiko mpe mwana-mwasi na bango ya moke bakufaki na fɛfɛle. Adoniram ayokaki mpasi mingi na motema. Kasi, asɛngaki nguya epai ya Nzambe mpe akóbaki bobongoli, mpe asilisaki kobongola Biblia na lokótá Birman na mobu 1835. Bobele na eleko yango ntembe mosusu na ntina na Biblia ebandaki kokóla.
Ntembe likoló na Biblia
Na boumeli ya bambula ya 1800 ntembe monene ebimaki na makambo ya politiki mpe ya bizaleli ya bato, mpe mbala mosusu yango etalelaki mingi Biblia. Na ndakisa, atako société ya Biblia ya Russie esalemaki na lisungi ya Mokonzi ya Russie (tsar) mpe ya Lingomba ya Ortodokse ya Russie, na nsima bapekisaki mpe babomaki société yango. (Batɛmɛli ya société wana batumbaki ebele ya ba Biblia pene na mbula moko liboso ya epekiseli wana.) Sikawa, na molende mpenza, bakonzi ya Lingomba ya Ortodokse balukaki kosukisa likambo oyo baklisto ya ekeke ya liboso babandisaki na mɔ́tɔ nyonso—kokabolama ya Biblia na mokili mobimba. Na ekeke ya 19, bakambi ya Lingomba ya Ortodokse babɛtaki nsɛ́tɛ́ na kolobáká ete Biblia ezalaki likámá mpo na bokonzi ya lingomba mpe ya Letá. Na bokeseni mpenza, mbonge ya sika oyo ezalaki kokóla na makambo ya politiki eyaki kotalela Biblia ete ezali likámá mpo na bakonzi te, kasi lokola ebundeli ya lingomba mpe Letá mpo na kokonza bato. Biblia ebundisamaki na ngámbo nyonso mibale!
Na bambula oyo elandaki, likambo ya kotɛmɛla Biblia epai ya bato ya “mayele” emonanaki mpe mingi. Na mobu 1831, Charles Darwin asalaki mobembo na mikili mingi na masuwa mpe na nsuka na yango abandisaki liteya ya evolisyó. Na mobu 1848, Karl Marx mpe Friedrich Engels babimisaki búku Manifeste du parti communiste, oyo emonisaki ete boklisto ezali esaleli ya konyokola bato. Lisusu, na eleko yango, banganga-batyoli ya Biblia babɛtaki ntembe likoló na kopemama ya Makomami mpe bosolo ya masoló ya bato oyo balobelami kati na Biblia—ata Yesu ye moko! Kasi banganga-mayele mosusu basosolaki bokosi ya mateya oyo mazalaki kowangana Nzambe mpe Biblia, mpe balukaki kondimisa bosolo ya Biblia na myango ya mayele ya siansi. Moko kati na bato yango ezalaki bongo Constantin von Tischendorf, mwana-mboka Allemagne mpe nganga-mayele monene na makambo ya lokótá (linguiste).
Kokundolama ya biloko ya kala esungi na kondimisa makomi ya Biblia
Tischendorf asalaki mobembo na Moyen-Orient mpo na koluka bamaniskri ya kala ya Biblia, na kolikyáká ete akondimisa makomi ya ebandeli ya Biblia na bosikisiki mpenza. Na mobu 1859, bobele mobu oyo Darwin abimisaki búku L’origine des espèces, Tischendorf amonaki kopi oyo eleki koumela ya Makomami ya Greke ya boklisto na mobimba na yango kati na monastere moko pene na Ngomba Sinai. Yango eyebani na nkombo Codex Sinaïticus, mpe ekoki kozala ete ebimisamaki pene na mbula 50 liboso ete Jérôme asilisa libongoli na ye ya Vulgate na Latin. Atako lotómo ya kolongola codex yango na monastere ezali naino kobetelama ntembe, Tischendorf abimisaki yango, na ndenge yango ekokaki kotángama na banganga-mayele.a
Lokola Sinaïticus ezalaki moko ya baminiskri ya lokótá ya ebandeli oyo elekaki koumela, yango emonisaki bobele ete Makomami ya Greke mabongwanaki te, kasi lisusu esalisaki banganga-mayele ete bámona mabunga oyo makɔtisamaki na mayele mabe kati na bamaniskri oyo ekomamaki nsima. Na ndakisa, na 1 Timoté 3:16 tozali kotánga na ntina na Yesu kati na Sinaïticus ete: “Ye oyo amonisami polele kati na nzoto.” Na esika ya liloba “ye,” bamaniskri mingi oyo eyebanaki kino na eleko wana esalelaki lolenge mokuse ya nkombo “Nzambe,” oyo esalemi na kobongoláká mwa moke liloba ya Greke oyo ebongolamaka na “ye.” Nzokande, Sinaïticus ekomamaki bambula mingi liboso ya maniskri nyonso ya Greke oyo esaleli liloba “Nzambe.” Na yango, emonisaki ete ezalaki na libunga oyo likɔtisamaki nsima kati na makomi, mpe emonani ete ekɔtisamaki mpo na kolóngisa liteya ya Bosato.
Uta eleko ya Tischendorf, bamaniskri mingi mosusu ekundolamaki. Lelo oyo motángo ya bamaniskri ya Makomami ya Liebele oyo eyebani ezali pene na 6 000 mpe oyo ya Makomami ya Greke ezali koleka 13 000. Bolukiluki na nzela ya bokokanisi bamaniskri yango esili kopesa likoki ya kobimisa makomi ya lokótá ya ebandeli oyo tokoki mpenza kotyela motema. Lokola nganga-mayele Frederick Bruce alobaki yango: “Bokeseni kati na bamaniskri . . . ezali na bopusi te likoló na makambo ya ntina oyo malobelami to likoló ya kondima mpe misala ya boklisto.” Wana bobongoli ya Biblia na nkótá mosusu mingi ezalaki kokóba, ndenge nini boyebi yango oyo ezalaki kobakisama ekokaki kopesa bato litomba?
La Société Watch Tower mpe Biblia
Na mobu 1881 mwa etuluku moke ya balakisi mpe bayekoli ya solosolo ya Biblia basalaki société oyo na nsima ebéngamaki Watch Tower Bible and Tract Society. Na ebandeli, bazalaki kokabola ba Biblia oyo ebimisamaki na ba sociétés mosusu ya Biblia, kati na yango Makomami ya Greke ya Tischendorf. Nzokande, na mobu 1890, bakómaki kobimisa Biblia, kosungáká na kokabolama ya bamoko ya mabongoli ya liboso ya Biblia. Na 1926, la Société Watch Tower ebandaki konyata Biblia na binyateli (imprimeries) na yango moko. Kasi mposa ya libongoli ya Biblia ya sika ekómaki komonana polele. Likoki ezalaki ya kosalela boyebi oyo ezwamaki na bokundoli mpe na mayele ya bolukiluki na ekeke oyo elekaki mpo na kobimisa Biblia oyo ekotángama malamu mpe ekozala na elobeli ya pɛtɛɛ? Na mokano wana, na 1946, basangani ya la Société Watch Tower bakamataki bibongiseli mpo na kobimisama ya libongoli ya sika ya Makomami.
Libongoli moko na nkótá ebele
Komité ya bobongoli Biblia oyo esangisaki baklisto ya makoki bapakolami na elimo ebongisamaki mpo na kobimisa Biblia New World Translation of the Holy Scriptures na Lingelesi. Yango ebimisamaki na volimi motoba, bandá na 1950 kino na 1960, mpe ebandaki naino na Makomami ya Greke ya boklisto. Kobanda 1963 ebongolamaki na nkótá misusu 27, mpe ezali kokóba kobongolama na nkótá mingi mosusu. Mikano mpo na nkótá mosusu ezalaki sé yango moko na oyo ya Lingelesi. Ya liboso, libongoli esengeli kozala na bosikisiki, kolandáká makanisi ya lokótá ya ebandeli na likebi mpenza. Ndimbola ya maloba esengeli kobebisama te mpo na koyokanisa yango na liteya moko. Ya mibale, esengeli kozala na boyokani, kobongoláká liloba moko ndenge moko na bisika nyonso na meko oyo makambo mazali zingazinga mapesi nzela. Lolenge wana ya kosala esalisaka batángi ete bámona ndenge oyo bakomi ya Biblia basalelaki maloba ya sikisiki. Ya misato, libongoli yango lisengeli kolanda elobeli ya lokótá ya ebandeli kozanga kobungisa ndimbola ya makanisi. Kolanda elobeli epesaka motángi likoki ya kozala na mayoki lokola oyo mamonisamaki na nkótá ya ebandeli mpe komiyokanisa na lolenge na yango ya kokanisa. Mpe ya minei, esengeli kozala pɛtɛɛ mpo ete bato nyonso bákoka kotánga mpe kokanga ntina na yango.
Lolenge ya kobongolama ya New World Translation na Lingelesi oyo ezali kolanda elobeli ezali koyeisa pɛtɛɛ bobongoli na nkótá mosusu. Mpo na yango, bikipi ya babongoli ya la Société bizali kosalela bisaleli ya malamu mpenza na nzela ya ordinatere mpo na kosala mosala na bango na lombangu mpe kosala yango na bosikisiki mpenza. Mwango yango ezali kosalisa babongoli na kobongisa molɔngɔ́ to liste ya maloba nyonso ya lokótá ya mboka mpo na liloba mokomoko ya Lingelesi. Yango ezali lisusu kopesa bango likoki ya koyekola lolenge oyo Lingelesi ezali kobongola liloba mokomoko ya Liebele mpe ya Greke kati na Biblia.
Kobongola Biblia uta na Lingelesi, na esika ya kosala yango uta na Liebele mpe na Greke, ezali na matomba mingi mpenza. Longola likambo ya koyeisa mokuse ntango ya bobongoli, ezali mpe kopesa bomoko na maloba ya nkótá nyonso. Ezali boye mpamba te ezalaka na mpasi te kobongola na bosikisiki longwa na lokótá moko oyo elobamaka na mikolo na biso kino na lokótá mosusu na esika ya kosala yango longwa na lokótá moko ya kala kino nkótá ndenge na ndenge ya mikolo na biso. Ɛɛ, babongoli bakoki kotuna bato oyo balobaka lokótá ya mikolo na biso kasi bakoki te kotuna balobi ya nkótá oyo ilobamaki eleki bankóto ya bambula.
Nsango malamu mpo na mabota nyonso
Makambo ya koloba mazali mingi mpo na mibali mpe basi ya etingya oyo basungaki mpo ete Biblia ekoka kozala búku oyo eleki mpenza komonana na mokili. Na boumeli ya bikeke, pene na miliare minei ya Biblia na mobimba to na biteni na yango esili konyatama na nkótá koleka nkóto mibale, oyo elobamaka na motángo ya bato koleka 90 likoló na monkámá kati na bafandi ya mokili!
Biblia elobelaki kosakolama ya Bokonzi ya Nzambe na mikolo na biso. Mpo na yango, ezali polele ete Yehova Nzambe ye moko atambwisaki bato mpo ete Biblia ekoka kozwama na bisika nyonso na mokili. (Matai 13:47, 48; 24:14) Babongoli mpe babimisi ya Biblia oyo bazalaki kobanga te bamityaki na makámá mpo na kopesa biso Liloba ya Nzambe—eutelo bobele moko ya pole ya elimo kati na mokili oyo etondi na molili ya elimo. Tiká ete ndakisa na bango epusa yo ete otánga, olanda, mpe okabola Liloba ya Nzambe na kozaláká na kondimisama lokola oyo bango bazalaki na yango. Ɛɛ, mokolo na mokolo, zwá litomba na Biblia oyo ebongi kotyelama motema oyo ezali na mabɔkɔ na yo!—Yisaya 40:6-8.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisoló “Il a sauvé le Codex Sinaïticus” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔ́bɛ 1988, nkasa 30-31 (ebimeli ya Lifalansé).
[Etanda na lokasa 12]
Bokóli na bobongoli ya Biblia
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Number of
Languages
1 Bayuda babandaki kobongola Makomami ya Liebele na Greke
soko na 280 L.T.B.
12 Jérôme asilisaki kobongola Vulgate ya Latin soko na 400 T.B.
35 Gutenberg asilisaki konyata Biblia ya liboso soko na 1455
81 British and Foreign Bible Society esalemaki na 1804
Nkótá kati na yango Biblia ebongolami na kolandáká bambula
522
1900
600
700
800
900
1,049
1950
1,100
1,200
1,300
1,471
1970
2,123
1996
2,200
2,300
2,400
Biutelo: Christianity Today, United Bible Society
[Eutelo ya bafɔtɔ on page 9]
Mountain High Maps® Copyright © 1995 Digital Wisdom, Inc.
[Elilingi na lokasa 8]
Judson akangamaki na minyɔlɔlɔ mpe atyamaki na bolɔ́kɔ
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Euti na búku Judson the Hero of Burma, ekomami na Jesse Page
[Bililingi na lokasa 10]
Tischendorf abikisaki maniskri ya motuya na monastere oyo pene na Ngomba Sinai
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.