Tobakisa ezaleli ya kobanga Nzambe likoló na koyika mpiko
“Wana ezali bino na kondima . . . bobakisa koyika mpiko, bobakisa ezaleli ya kobanga Nzambe wana ezali bino koyika mpiko.”—2 PETELO 1:5, 6, MN.
1, 2. (a) Kobanda 1934, nini ekómelaki ba Témoins de Jéhovah oyo bazalaki kati na mikili miyangelamaki na ba Nazis, mpe mpo na nini? (b) Basaleli ya Jéhovah bayikaki mpiko na mpasi nyonso makasi oyo basalelaki bango?
EZALAKI eleko ya mpasi mingi na lisoló ya ekeke ya ntuku mibale. Kobanda 1934, bankóto mingi ya ba Témoins de Jéhovah oyo bafandaki na mikili oyo mizalaki na bopusi ya ba Nazis, bakangamaki kozanga kosala mabe mpe babwakamaki na ba camps de concentration. Mpo na nini? Mpo ete bamekaki koboya kokɔta na makambo ya mokili mpe baboyaki kopesa losako mpo na lokumu ya Hitler. Lolenge nini basalelaki bango? “Bakangami mosusu te bazwaki . . . mpasi monene epai na basodá oyo babengaki S.S., lokola Bayekoli ya Biblia [ba Témoins de Jéhovah] bazwaki yango; mpasi monene emonisamaki na minyoko ya ntango nyonso na nzoto mpe na bizaleli oyo lokotá moko te ya mokili ekoki kotanga yango.”—Karl Wittig, mosali na kala na Leta ya Allemagne.
2 Batemwe bayikaki mpiko na mpasi yango? Kati na mokanda L’Etat nazi et les nouvelles religions: Etude portant sur cinq cas de non-conformisme (na Lingelesi), Christine King akomaki ete: “Bobele Batemwe [na kokesena na mangomba mosusu] nde basalaki ete boyangeli elónga bango te.” Lokola lisangá, ba Témoins de Jéhovah batelemaki ngwi, ata soki mingi na bango basengelaki koyika mpiko kino kufa.
3. Nini esalisaki ba Témoins de Jéhovah ete bayika mpiko na mimekamo makasi?
3 Nini esalisaki ba Témoins de Jéhovah na koyika mpiko na motindo na mimekamo wana, bobele na Allemagne eyangelamaki na ba Nazi te, kasi lisusu kati na mokili mobimba? Tata na bango ya likoló asalisaki bango mpo ete bazalaki na ezaleli ya kobanga Nzambe. Ntoma Petelo alimboli ete: “Jéhovah ayebi kobikisa baoyo bakobangaka Nzambe.” (2 Petelo 2:9, MN) Bobele na mokanda yango moko, na likoló, apesaki toli epai na baklisto ete: “Wana ezali bino na kondima . . . bobakisa koyika mpiko, bobakisa ezaleli ya kobanga Nzambe wana ezali bino koyika mpiko.” (2 Petelo 1:5, 6, MN) Koyika mpiko ekangami na ezaleli ya kobanga Nzambe. Epai mosusu, mpo na koyika mpiko kino nsuka, tosengeli ‘kolanda ezaleli ya kobanga Nzambe’ mpe komonisa yango. (1 Timoté 6:11) Kasi, ezaleli ya kobanga Nzambe ezali mpenza nini?
Ndimbola ya ezaleli ya kobanga Nzambe
4, 5. Ezaleli ya kobanga Nzambe ezali nini?
4 Liloba ya Greke oyo libongolami na “ezaleli ya kobanga Nzambe” (eu·seʹbei·a) ekokaki mpenza kobongolama na “losambo ya malamu, oyo ebongi.”a (2 Petelo 1:6) Emonisi mayoki makasi mpe ya mɔ́tɔ oyo moto azali na yango mpo na Nzambe. Engebene William Vine, libakemá eu·se·besʹ, oyo elimboli mpenza “oyo azali kosambela na lolenge malamu, oyo ebongi,” elimboli “nguya oyo emonisami kati na mosala malamu, mosalemi na kobanga Nzambe na limemya nyonso.”—2 Petelo 2:9.
5 “Ezaleli ya kobanga Nzambe” ezali bongo limemya to bokangami mpo na Jéhovah, oyo ezali kopusa biso na kosala makambo oyo ye asepelaka na yango, ata kati na mimekamo, mpo ete tolingi ye na motema mobimba. Ezali bokangami ya sembo epai na Jéhovah oyo emonisami na lolenge ya bomoi na biso. Baklisto ya solo balendisami na kobondela mpo ete “bazala na bomoi ya kimya mpe na mobulu te, elongo na ezaleli ya kobanga Nzambe mpe na bosembo nyonso.” (1 Timoté 2:1, 2, MN) Engebene balimboli na maloba na nkóta Johannes Louw mpe Eugene Nida, “kati na nkota mingi, 1 Tm 2:2, [eusébéïa] ekoki mpenza kobongolama ete ‘kozala na lolenge ya bomoi oyo Nzambe alingi ete tozala na yango’ to ‘kozala na lolenge ya bomoi oyo Nzambe asili kolakisa biso.’”
6. Boyokani nini ezali kati na koyika mpiko mpe ezaleli ya kobanga Nzambe?
6 Sikawa tomoni malamu boyokani oyo bozali kati na koyika mpiko mpe ezaleli ya kobanga Nzambe. Lokola tozali na lolenge ya bomoi oyo Nzambe alingi ete tozala na yango, elingi koloba ezaleli ya kobanga Nzambe, toyinami na mokili, likambo oyo lizali kotya kondima na biso kati na komekama. (2 Timoté 3:12) Kasi, soki tozangi bokangami oyo epai na Tata na biso ya likoló, tokozwa makasi ya koyika mpiko te kati na mimekamo. Lisusu, Jéhovah azali kotya likebi na bokangami wana ya sembo. Tokoki kokanisa lolenge oyo azali kooka wana azali komona, longwa na makoló, baoyo, atako botemeli ya lolenge nini, bazali komeka kosepelisa ye na kokangamáká epai na ye. Ezali likambo ya kokamwa te na komona ete “azali kobikisa baoyo bakobangaka Nzambe”!
7. Mpo na nini esengeli kolóna ezaleli ya kobanga Nzambe?
7 Nzokande, tobotami na ezaleli ya kobanga Nzambe te, mpe tozali kozwa yango mbala moko te epai na baboti oyo bakobangaka Nzambe. (Genese 8:21) Kasi, tosengeli kolóna yango. (1 Timoté 4:7, 10) Petelo alobi ete tosengeli “kosala nyonso” mpo na kobakisa ezaleli ya kobanga Nzambe likoló na koyika mpiko mpe likoló na kondima na biso. (2 Petelo 1:5) Bongo, lolenge nini kozwa ezaleli ya kobanga Nzambe?
Lolenge nini kozwa ezaleli ya kobanga Nzambe?
8. Engebene ntoma Petelo, lolenge nini tokoki kozwa ezaleli ya kobanga Nzambe?
8 Ntoma Petelo amonisaki lolenge nini kozwa ezaleli ya kobanga Nzambe. Alobaki ete: “Tika ngolu mpe kimya ekóla kati na bino na nzela na boyebi na solo na Nzambe mpe na Yesu Klisto, Nkolo na biso; mpo ete nguya na ye na bonzambe epesi biso makambo nyonso na bomoi mpe na ezaleli ya kobanga Nzambe, na nzela na boyebi ya solo na ye oyo abyangi biso na nkembo mpe na bizaleli bibongi.” (2 Petelo 1:2, 3, MN) Na yango, mpo na kobakisa ezaleli ya kobanga Nzambe likoló ya kondima mpe likoló na koyika mpiko, tosengeli kokóla kati na boyebi ya solo, oyo ekoki, boyebi na Jéhovah Nzambe mpe na Yesu Klisto.
9. Pesa ndakisa emonisi ete, mpo na kozala na boyebi ya solo ya Nzambe mpe Klisto, esengeli te koyeba bobele ete bazali.
9 Boyebi na solo na Nzambe mpe na Klisto elimboli nini? Ya solo, yango eleki mpenza likambo oyo ya koyeba bobele ete bazali. Tozwa ndakisa: ekoki kozala ete toyebi moto oyo afandi penepene na biso, mpe tozali nkutu kobénga ye na nkombo na ye. Kasi tokodefisa ye ebele ya mbongo? Te, longola bobele soki toyebi lolenge ya moto nini ye azali. (Tala Masese 11:15.) Bobele bongo, mpo na kozala na boyebi ya solo, oyo ekoki, ya Jéhovah mpe Yesu, ekoki te bobele koyeba ete bazali mpe koyeba nkombo na bango. Soki, mpo na bango, tolingi koyika mpiko kino liwa, tosengeli koyeba bango malamumalamu. (Yoane 17:3) Yango esengi nini?
10. Tangá makambo mibale masɛngami mpo ete tozala na boyebi ya solo ya Jéhovah mpe ya Yesu, mpe mpo na nini?
10 Mpo ete tozala na boyebi ya solo, oyo ekoki, ya Jéhovah mpe Yesu, makambo mibale masɛngami: (1) koyekola koyeba bomoto na bango—bizaleli na bango, mayoki na bango, misala na bango—mpe (2) kolanda ndakisa na bango. Ezaleli ya kobanga Nzambe esɛngi bokangami ya sembo epai na Jéhovah; emonisami na lolenge ya bomoi na biso. Mpo na kozwa yango, tosengeli bongo koyekola koyeba Jéhovah, mokano na ye mpe misala na ye na bozindo, na lolenge oyo biso bato tokoki kosala yango. Mpo na koyeba mpenza Jéhovah, ye oyo tozalisamaki na elilingi na ye, tosengeli kosalela boyebi yango mpe kosala makasi mpo na komekola ye. (Genese 1:26-28; Bakolose 3:10) Mpe lokola Yesu amekolaki Jéhovah na maloba mpe na misala na lolenge ya kokoka, boyebi ya solo oyo tozali na yango mpo na Yesu ezali lisalisi kitoko mpo na kolóna ezaleli ya kobanga Nzambe.—Baebele 1:3.
11. (a) Lolenge nini tokoki kozwa boyebi ya solo ya Nzambe mpe ya Klisto? (b) Mpo na nini kokanisa na mozindo likoló na makambo tozali kotanga ezali na ntina mingi?
11 Lolenge nini tokoki kozwa boyebi yango ya solo ya Nzambe mpe ya Klisto? Na koyekoláká na etingya nyonso Biblia mpe mikanda mikolimbolaka Biblia.b Nzokande, mpo ete boyekoli ya Biblia biso moko esalisa biso na kozwa ezaleli ya kobanga Nzambe, esengeli mpenza ete tozwa ntango ya kokanisa na mozindo, elingi koloba kokanisa likoló na makambo oyo tozali kotanga. (Tala Yosua 1:8.) Mpo na nini yango ezali na ntina mingi? Tomikundola ete ezaleli ya kobanga Nzambe emonisi mayoki makasi mpe ya mɔ́tɔ oyo moto azali na yango mpo na Nzambe. Kati na Makomami, kokanisa na mozindo elobelami mbala mingi esika moko na motema ya elilingi, na bomoto ya kati. (Nzembo 19:14; 49:3; Masese 15:28) Na ntango tozali kokanisa na botɔndi nyonso na oyo tozali kotanga, makambo oyo tozali kotalela makokɔta na mozindo na motema na biso, kobimisáká mayoki mpe bamposa kati na motema na biso, mpe kozaláká na bopusi likoló na makanisi na biso. Bobele na kosaláká bongo nde boyekoli na biso ekoki kokólisa bokangami na biso epai na Jéhovah mpe kopusa biso na kozala na lolenge ya bomoi oyo ezali kosepelisa ye, ata ntango tozwi masɛnginya to tomekami makasi.
Tomonisa ezaleli ya kobanga Nzambe kati na libota
12. (a) Engebene Paulo, lolenge nini moklisto akoki komonisa ezaleli ya kobanga Nzambe kati na libota? (b) Mpo na nini baklisto ya solo bazali kobatela baboti na bango baoyo basili kokóma mibangé?
12 Ezali liboso kati na libota nde tosengeli komonisa ezaleli ya kobanga Nzambe. Ntoma Paulo alobaki ete: “Soki mwasi-mokufeli-mobali azali na bana to bana ya bana na ye, bango bayekola kosalela ezaleli ya kobanga Nzambe kati na ndako na bango mpenza liboso mpe bazongisa mwa makabo epai na baboti na bango, mpo ete yango ekosepelisa Nzambe.” (1 Timoté 5:4, MN) Lokola Paulo amonisi yango, kosalisa baboti oyo bakómi mibangé ezali komonisa ezaleli ya kobanga Nzambe. Soki baklisto bazali kosala bongo, ezali bobele te mpo ete basɛngisami, kasi mpo ete balingi baboti na bango. Oyo eleki mpenza, bayebi ete, mpo na Jéhovah, kobatela libota ezali na ntina mingi. Bayebi malamu ete, soki basundoli baboti na bango na ntango ya mpasi, ekozala lokola nde ‘bawangani kondima ya boklisto.’—1 Timoté 5:8.
13. Mpo na nini ezali mpasi mpenza na komonisa ezaleli ya kobanga Nzambe kati na libota, kasi bosepeli nini bozali na ye oyo azali kobatela mosangani moko ya libota na ye?
13 Esengeli koyeba ete komonisa ezaleli ya kobanga Nzambe kati na libota ezali likambo ya petee te. Kofanda na bisika bikeseni ezali mokakatano. Ekoki kozala ete bana oyo basili kokoma mikóló, bazali mpe na mabota na bango oyo bazali kobɔkɔla, mpe bazali kobunda na mikakatano ya nkita. Lolenge to bonene ya lisalisi ya kopesa na tata to na mama oyo akómi mobangé ekoki kopesa mpasi na nzoto, na makanisi mpe na bizaleli. Atako bongo, tokoki kozwa bosepeli monene na likanisi oyo ete soki tozali kobatela mosangani ya libota na biso oyo akómi mobangé, tozali bobele ‘kozongisela ye mwa makabo’ te, kasi tozali lisusu kosepelisa Ye oyo “mabota nyonso na likoló mpe na nsé mazwi nkombo uta na ye.”—Baefese 3:14, 15.
14, 15. Tangá ndakisa moko mpo na ezaleli ya kobanga Nzambe oyo emonisami na lolenge bazali kobatela tata moko.
14 Totalela naino likambo moko lizali kosimba motema. Ellis mpe bandeko na ye mitano ya basi mpe mibali, bazali kosalisa tata na bango, oyo afandi epai na ye; ezali mpenza mokumba makasi. Ellis ayebisi ete: “Na 1986, tata na ngai azwaki maladi moko oyo ekómisaki ye paralysé na nzoto mobimba.” Bana motoba bazali kosalisa ye: bandá na kosukola ye kino kolalisa ye na mbeto kati na yango bazali kosɛnzela ete abalukaka mbala na mbala, mpo ete akangama te. “Tozali kotangela ye mikanda, tozali kosolola elongo na ye mpe tozali kobetela ye miziki. Toyebi malamu ete azali mpenza na bososoli nyonso te, kasi tozali kosalela ye lokola nde azalaki mpenza kososola.”
15 Mpo na nini bana wana bazali kosalisa tata na bango na motindo wana? Ellis akóbi lisoló na ye ete: “Nsima ya liwa ya mama, na 1964, tata abɔkɔlaki biso bobele ye moko. Na eleko wana, tozalaki bobele na katikati ya mibu 5 mpe mibu 14, mpe abatelaki biso; lelo oyo, ezali biso nde tozali kobatela ye.” Ezali solo ete mokumba mozali petee te, mpe ekómaka ete bana wana balɛmbi. Ellis alobi ete: “Kasi toyebi ete ezalela ya tata na biso ezali mpo na ntango mokuse. Tozali kozela eleko oyo tata na biso akozwa kolongono ya nzoto, mpe wana mama na biso akozala lisusu elongo na biso.” (Yisaya 33:24; Yoane 5:28, 29) Ntembe ezali te ete lolenge wana ya bokangami ya bana epai na baboti esengeli kosepelisa motema ya Ye oyo apesi etinda na bana ete bakumisa baboti na bango!c—Baefese 6:1, 2.
Ezaleli ya kobanga Nzambe mpe mosala ya kosakola
16. Nini esengeli kozala ntina ya liboso mpo na yango tozali kokokisa mosala ya kosakola?
16 Na ntango tondimi libyangi na Yesu mpo na ‘kolanda ye,’ tozwi mokumba na Nzambe mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe kozalisa bayekoli. (Matai 16:24; 24:14; 28:19, 20) Tokoki koloba ete mosala ya kosakola ezali lisɛngami ya boklisto na “mikolo oyo ya nsuka.” (2 Timoté 3:1) Atako bongo, mosala na biso ya kosakola mpe ya koteya esengeli te kosalema bobele lokola lisɛngisami. Ntina ya liboso oyo tozali kokokisa yango esengeli kozala bolingo mozindo mpo na Jéhovah; ezali bobele bolingo wana nde ekokata na meko nini tokosangana na yango. Yesu alobaki ete: “Monoko ekolobaka makambo matondi na motema.” (Matai 12:34, MN) Na yango, soki motema na biso motondi na bolingo mpo na Jéhovah, tokopusama na koloba na ntina na ye epai na bazalani na biso. Soki topusami na bolingo ya Nzambe, mosala na biso ya kosakola ezali komonisa solo ezaleli na biso ya kobanga Nzambe.
17. Lolenge nini kokoki kolóna makanisi malamu mpo na mosala ya kosakola?
17 Lolenge nini tokoki kolóna makanisi malamu mpo na mosala ya kosakola? Na kokanisáká na botɔndi nyonso likoló na bantina misato oyo Jéhovah apesaki biso mpo na kolinga ye. (1) Tolingi Jéhovah mpo na oyo asili kosalela biso. Asili komonisela biso bolingo monene na kopesáká lisiko. (Matai 20:28; Yoane 15:13) (2) Tolingi Jéhovah mpo na oyo azali kosalela biso lelo oyo. Tokoki koloba na ye na “molende,” mpo ete azali koyoka mabondeli na biso. (Nzembo 65:2; Baebele 4:14-16) Lokola tozali kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso, tozali na oyo esengeli na biso mpo na kobikela. (Matai 6:25-33) Tozali kozwa ntango nyonso bilei ya elimo oyo bizali kosalisa biso na kolónga mikakatano. (Matai 24:45) Na nsuka, tozali na lipamboli oyo ya kozala na libota ya baklisto na mokili mobimba, oyo ezali kosalisa biso na kokabwana mpenza na mokili. (1 Petelo 2:17) (3) Lisusu, tolingi Jéhovah mpo na oyo akosalela biso lisusu. Mpo na bolingo wana, tozali ‘mpenza kosimba bomoi ya solosolo,’ bomoi ya seko oyo ekoya. (1 Timoté 6:12, 19) Soki tokanisi mpo na bolingo ya Jéhovah epai na biso, motema na biso mokoki bobele kopusa biso na kolobela Mozalisi mpe mikano na ye kitoko. Tozali na mposa te ete bayebisa biso oyo tosengeli kosala, to na meko nini tosengeli kosangana na mosala ya kosakola. Motema na biso mozali kopusa biso na kosala oyo ekoki na biso.
18, 19. Mokakatano nini ndeko mwasi moko alóngaki yango mpo na kosangana na mosala ya kosakola?
18 Ata kati na makambo ya mpasi, motema oyo motambwisami na ezaleli ya kobanga Nzambe ekomiyoka ete epusami na koloba. (Tala Yilimia 20:9.) Ezali yango nde emonisami na likambo likómelaki Stella, moklisto mwasi oyo azali na bobangi mingi mpe na nsoninsoni. Ntango abandaki koyekola Biblia, amilobaki ete: ‘Nakokende ndako na ndako te!’ Alimboli yango ete: “Nazalaki koloba mingi te. Nazalaki kokoka te kokende liboso ya bato mosusu mpe kobanda lisoló.” Na boumeli ya boyekoli, bolingo na ye mpo na Jéhovah ekólaki, mpe mokemoke, amiyokaki ete apusami na mposa makasi ya koloba na ntina na Nzambe. “Nazali komikundola wana nalobaki na mwasi oyo azalaki kolakisa ngai Biblia, ete: ‘Nazali na mposa ya koloba na ntina na Nzambe, kasi nazali kokoka te, mpe ezali kolɛmbisa ngai mingi.’ Nakobosana soko moke te eyano apesaki ngai, ete: ‘Stella, sepela lokola obandi kooka mposa.’”
19 Nsima ya mwa ntango, Stella abandaki kopesa litatoli epai na mwasi moko azalaki kofanda penepene na ye. Mpe alóngaki likambo oyo lizalaki litambe monene mpo na ye: abandaki kosakola ndako na ndako. (Misala 20:20, 21) Azali komikundola ete: “Nakomaki makambo oyo nalingaki koloba. Kasi nazalaki na bobangi mingi mpenza na boye ete, nazalaki kolɛnga mingi mpo na kotala makambo oyo nakomaki, atako papier ezalaki liboso na ngai!” Lelo oyo, koleka mibu 35 na nsima, Stella azali ntango nyonso mwasi na bobangi mingi mpe na nsoninsoni. Kasi, alingi mosala ya kosakola mingi mpe azali kolanda kosangana na yango.
20. Ndakisa nini emonisi ete, ezala minyoko soko mpe bolɔkɔ ekoki te kokangisa monoko ya ba Témoins de Jéhovah ya molende?
20 Ezala minyoko to bolɔkɔ ekoki te kokangisa monoko ya ba Témoins de Jéhovah ya molende. Ezali yango emonisami na ndakisa ya babalani mibale ya Allemagne, Ernst mpe Hildegard Seliger. Na ntina na bindimeli na bango, balekisaki, bango mibale, mibu 40 kati na ba camps de concentration ya Nazi mpe kati na bolɔkɔ ya ba communistes. Ata kati na bolɔkɔ, balandaki kopesa litatoli. Hildegard azali komikundola ete: “Bakonzi na bolɔkɔ batangaki ngai lokola mwasi na matáta mingi, mpo ete, lokola elobaki mokɛngɛli moko, nazalaki kolobela Biblia mokolo mobimba. Na yango, batyaki ngai na ndako oyo ezalaki na nsé ya mabelé.” Nsima na kozwa bonsomi, ndeko mobali mpe ndeko mwasi Seliger, bamipesaki na mosala ya kosakola ntango nyonso. Bango nyonso mibale batikalaki sembo kati na mosala yango kino liwa na bango, ndeko Seliger akufaki na 1985 mpe mwasi na ye akufaki na 1992.
21. Tosengeli kosala nini mpo na kobakisa ezaleli ya kobanga Nzambe likoló na mpiko na biso?
21 Soki tozali koyekola Liloba na Nzambe na etingya na kozwáká ntango ya kokanisa na mozindo na botɔndi nyonso likoló na makambo oyo tozali koyekola, tokokóla kati na boyebi ya solo ya Nzambe mpe ya Yesu Klisto. Tokokoka bongo kozwa ezaleli kitoko oyo ete ezaleli ya kobanga Nzambe. Kozanga ezaleli ya kobanga Nzambe, tokoki te koyika mpiko na mimekamo ndenge na ndenge oyo tozali kokutana na yango kati na bomoi na biso ya boklisto. Na bongo, tolanda toli ya Petelo mpe tokóba ‘kobakisa mpiko likoló na kondima na biso mpe ezaleli ya kobanga Nzambe likoló na mpiko na biso.’—2 Petelo 1:5, 6.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala oyo William Barclay akomaki na ntina na eu·seʹbei·a: “Kati na liloba wana, eteni seb- nde elimboli limemya to losambo. Eu, na Greke, elimboli malamu; na yango, eusebeia ezali losambo (limemya) ya malamu mpe oyo ebongi.”—New Testament Words.
b Likoló na lolenge ya koyekola mpo na kobakisa boyebi na biso ya Liloba na Nzambe, tala Mosenzeli ya 15 Août 1993, lokasa 12 kino lokasa 17.
c Mpo na kosala bolukiluki ekoki na lolenge oyo esengeli komonisa ezaleli ya kobanga Nzambe epai na baboti oyo basili kokóma mibangé, tala Mosenzeli ya 1er Janvier 1988, lokasa 6 kino lokasa 11.
Lolenge nini okoyanola?
◻ Ezaleli ya kobanga Nzambe elimboli nini?
◻ Boyokani nini bozali kati na koyika mpiko mpe ezaleli ya kobanga Nzambe?
◻ Lolenge nini kozwa ezaleli ya kobanga Nzambe?
◻ Lolenge nini moklisto akoki komonisa ezaleli ya kobanga Nzambe kati na libota?
◻ Nini esengeli kozala ntina ya liboso mpo na yango tozali kokokisa mosala ya kosakola?
[Elilingi na lokasa 18]
Ba Témoins de Jéhovah oyo bakangamaki na camp de concentration ya Nazi na engumba Ravensbrück, bayikaki mpiko mpe bamonisaki ezaleli ya kobanga Nzambe