Bazali kobatela bampate mike na motema mawa nyonso
KATI na banyama nyonso oyo ebokolami na moto, moko te ekokani na bampate ya mboka. Banyama mingi bazali na nguya mpe maoki makasi ya koluka bilei mpe kokima nyama mosusu oyo elyaka yango, kasi ezali bongo te mpo na bampate. Bazali na makasi te liboso na nyama mabe, ezali na makoki mpenza te ya komibatela. Soki bazangi mobateli, bampate bazali na bobangi mingi mpe bayebi komibatela te. Soki bakabwani na etónga, bampate bakoumela te kobunga. Na yango, bampate ya botosi bazali na bantina makasi ya kokangama na babateli na yango. Soki mobateli azali te, bazalaka na makoki mingi te ya kobika. Mpo na bantina wana, Biblia ezali kosalela liloba “bampate” na elobeli ya elilingi ya mpo na kolimbola bato oyo bazali na ekweli te, banyokwami, to bazangi makoki ya komibatela.
Ya solo, mobateli ya bampate abongi mpenza kozwa lifuti na ye. Bomoi na ye ezali ya petee te. Asalaka na nse ya moi makasi mpe na malili, lisusu alekisaka butu mosusu kozanga kolala. Lisusu, asengeli kobatela etónga na banyama mabe; mingimingi, wana bomoi na ye moko ezali na likámá. Lokola mobateli ya bampate asengeli kosenzela ete etónga ezala esika moko, asengeli bongo kolekisa eteni monene ya ntango na ye na kolukáká bampate oyo bakei mosika to oyo babungi. Asengeli kosalisa oyo bazali kobela to oyo bazoki. Asengeli komema bana ya mpate baoyo bazali makasi te to baoyo balembi. Asengeli ntango nyonso komibanzabanza mpo na koluka esika ya koleisa mpe komelisa yango. Ekómaka mbala mingi ete mobateli ya bampate alekisa butu mobimba libandá mpo na kobatela etónga. Na yango, kobatela bampate ezali bomoi moko ya mpasi oyo ezali kosenga mpiko, molende mpe mayele mingi. Kasi libosoliboso, asengeli komonisa komibanzabanza ya solo mpo na etónga oyo batye na nse ya libateli na ye.
Babateli na bampate oyo bazali kotambwisa etónga ya Nzambe
Biblia ezali kokokanisa libota ya Nzambe lokola bampate ya botosi mpe mibali oyo bazali na mokumba ya kobatela yango bakokisami na babateli na bampate. Jéhovah ye moko azali ‘mobateli mpe mokɛngɛli ya milimo na biso.’ (1 Petelo 2:25) Yesu Klisto, “Mobateli Malamu,” amonisaki mposa na ye ya kobatela bampate na motema mawa nyonso ntango alobaki na Petelo ete: ‘Leisa bana na mpate na ngai, batela bampate na ngai, leisa bampate na ngai.’ (Yoane 10:11; 21:15-17) Liboso na bato nyonso, bakɛngɛli baklisto basili kozwa mokumba monene ya ‘kobatela lisangá ya Nzambe.’ (Misala 20:28) Mpe mosala na bango ya babateli na bampate ya elimo ezali kosenga bizaleli ya mobateli malamu ya bampate ya mosuni—basengeli kozala bato na mpiko, bato na molende mpe bato na mayele mingi, mpe mingimingi, komibanzabanza na motema mobimba mpo na bolamu ya etónga.
Na eleko ya Ezekiele mosakoli ya Nzambe, ntalo monene ya babateli na bampate oyo baponamaki mpo na kotalela bamposa ya libota ya Jéhovah na Yisrale bakokisaki mikumba na bango te. Etónga na Nzambe enyokwamaki mingi mpenza, mpe mingi kati na bango batikaki losambo ya solo. (Ezekiele 34:1-10) Lelo oyo, bakonzi ya mangomba ya boklisto ya lokuta bazali bango moko komimonisa lokola babateli na bampate ya oyo bazali kobenga ete lisangá ya boklisto, kasi ezalela na yango ya maladi na elimo emonisi ete bakonzi na mangomba bakokani na bakosi oyo bazalaki kotala bato na bopotu mpe banyokolaki bango ntango Yesu azalaki awa na mabelé. Batambwisi ya mangomba ya boklisto ya lokuta bazali lokola “mosali na lifuti” oyo “akotyelaka bampate motema te.” (Yoane 10:12, 13) Bazali ata na mposa, na makoki moke te, to babongisami soko moke te mpo na kobatela etónga ya Nzambe.
Babateli na bampate oyo bazali komibanzabanza solo mpo na etónga
Yesu apesaki ndakisa ya kokoka mpo na baoyo nyonso basengelaki kobatela etónga ya Jéhovah. Na mabaku mingi amonisaki bolingo, boboto, motema mawa mpe kosalisa bayekoli na ye. Azalaki kozwa likanisi ya koluka baoyo bazalaki na mposa ya lisalisi. Atako Yesu azalaki na mosala mingi ya kosala mpe mbala mingi azalaki na kolemba, azalaki ntango nyonso kozwa ntango ya koyoka mikakatano na bango mpe ya kolendisa bango. Mposa na ye ya kopesa molimo na ye mpo na bango ezalaki elembo eleki monene ya bolingo.—Yoane 15:13.
Lelo oyo, bankulutu nyonso oyo baponami kati na masangá bakisa mpe basaleli na misala, bazali na mokumba yango epai na etónga. Na yango, ata makoki ya kozwa bozwi mingi ya mosuni na mikili ya bapaya ezali kosala bopusi te likoló na ntalo monene ya mibali oyo bandimi mikumba mpe ezali bongo kopusa bango te na kotika lisangá kozanga lisalisi mpe litambwisi ya malamu. Lokola tozali kobika na “mikolo ya mpasi mpe ya mikakatano,” etónga ezali na mposa ya elendiseli mpe ya litambwisi. (2 Timoté 3:1-5) Likámá lizali ntango nyonso ete basusu bakwea na maboko na Satana, oyo azali, “konguluma lokola nkosi, koluka soko akolya nani.” (1 Petelo 5:8) Mingi mpenza lelo oyo, ezali na ntina ete babateli baklisto “bakebisa bagoigoi, bayikisa bato na motema mokuse mpiko, basunga bato na motau.” (1 Batesaloniki 5:14) Basengeli kozala ntango nyonso na bokengi soki balingi kosala ete bampate na kotengatenga batangwa te mosika na etónga.—1 Timoté 4:1.
Ndenge nini mobateli na bampate akoki koyeba ete mpate moko azali na mposa ya lisalisi? Ezali na mwa bilembo ya polele, lokola kozangisa makita, kozanga kosangana mbala na mbala na mosala ya kosakola, mpe momeseno ya komitangola na basusu. Bokoki lisusu kososola bolembu na kotya likebi na ezaleli ya bampate mpe na lolenge ya masoló na bango. Bakoki kozala na momeseno ya kotɔnga basusu, mbala mosusu kokanga nkanda. Masoló na bango makoki kotalela mingimingi mposa ya bozwi ya mosuni na esika ete elanda mikano ya elimo. Kozanga mɔ́tɔ, elimo ya kozanga kolónga, mpe kozanga esengo ekoki komonisa ete bolembu ezali kati na kondima na bango. Kozala mawamawa ekoki kozala elembo ete bazali kotungisama na botemeli oyo euti na bandeko ya mosuni to na baninga ya mokili. Soki bamoni bilembo yango, babateli na bampate bakoki kososola lolenge ya lisalisi oyo esengeli kopesama.
Wana bakei kotala moninga mondimi mpo na kosunga ye, babateli baklisto basengeli kobatela mokano na bango ya liboso. Ezali te bobele bokutani ya boninga mpo na masoló ya bongo na bongo. Mokano ya ntoma Paulo mozalaki ete wana azali kotala bandeko ‘akabela bango likabo na elimo mpo na kolendisa bango mpe koyikisana mpiko.’ (Baloma 1:11, 12) Mpo na kosala yango, esengeli komibongisa liboso.
Likambo ya liboso, talela moto yango, mpe meka kososola ezalela na ye ya elimo. Soki bosili koyeba yango, bomeka kokanisa lolenge nini ya lisalisi, ya elendiseli, to ya toli oyo ekopesa litomba monene. Liloba na Nzambe, Biblia, esengeli kozala liziba ya liboso ya mateya mpamba te “ezali na nguya.” (Baebele 4:12) Bokoki kotalela bazulunalo Mosenzeli mpe Lamuká! mpo na kozwa masoló oyo mazali na boyokani na mikakatano ya sikisiki oyo bampate bakutani na yango. Makambo ya kolendisa mpe ya kobondisa makoki kozwama kati na Annuaire des Témoins de Jéhovah. Mokano ezali ya kopesa makanisi ya elimo oyo ekoki kozala ‘malamu mpo na moto yango mpo na kolendisa ye.’—Baloma 15:2.
Babateli ya bampate oyo bazali kolendisa etónga
Mobateli ya etónga ya bampate ya mosuni ayebi ete kobatelama mpe kosungama na yango ezali na maboko na ye. Makámá oyo mayaka mautaka na kobunga, na bokono, na kolemba, na kozokisama, mpe na banyama mabe. Bobele bongo, mobateli na bampate ya elimo asengeli koyeba mpe kotalela makámá motindo moko oyo makoki kotungisa bolamu ya etónga. Totalela mwa mikakatano oyo mibimaka mpe mwa makanisi likoló na makambo oyo bakoki koloba mpo na kopesa makanisi oyo makolendisa na elimo.
(1) Lokola bampate oyo bazangi likebi, baklisto mosusu babungaka mosika na etónga na Nzambe mpo ete balengolamaka na bisengo oyo bimonani lokola ete bizangi makámá mpe bikoki kosepelisa. Bakoki kobulungana mpe bakoki ata kokende na libebi mpo na mikano ya bozwi ya mosuni, ya konyolisa nzoto, to ya kominanola. (Baebele 2:1) Esengeli kokundola epai na bato ya lolenge yango ete nsuka ya ebongiseli oyo esili kobelema, ete esengeli ntango nyonso kokangama na lisangá ya Jéhovah mpe ntina ya kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso kati na bomoi na bango. (Matai 6:25-33; Luka 21:34-36; 1 Timoté 6:8-10) Bankulutu bakokuta batoli ya ntina kati na lisoló oyo elobaki ete: “Gardez votre équilibre — Comment?” kati na La Tour de Garde ya 15 Octobre 1984, lokasa 22 kino lokasa 25.
(2) Mobateli na bampate asengeli kosalisa bampate oyo bazali na bokono. Bobele bongo, mobateli na bampate ya elimo asengeli kosalisa baklisto oyo bazali kozwa bokono ya elimo mpo na bankáka ya bomoi. (Yakobo 5:14, 15) Ekoki kozala ete bazangi mosala, bazali na mikakatano ya kolongono ya nzoto, to bazali na mikakatano kati na bomoi na bango ya libota. Bato ya lolenge yango bakoki kooka mposa moke mpo na bilei ya elimo to ya kosangana elongo na libota na Nzambe. Yango ememaka na komitangola mpe na kolemba na motema. Bazali na mposa ya kondimisama ete Jéhovah azali komibanzabanza mpo na bango mpe akosunga bango na ntango ya mpasi. (Nzembo 55:22; Matai 18:12-14; 2 Bakolinti 4:16-18; 1 Petelo 1:6, 7; 5:6, 7) Ekoki lisusu kozala malamu kozongela lisoló oyo elobaki ete “Regardez droit devant vous,” ezwami na La Tour de Garde ya 1er Septembre 1980, lokasa 12 kino lokasa 15.
(3) Mobateli na bampate asengeli kozala na bokengi mpo na koyeba mpate oyo alembi. Basusu basili koyika mpiko na bosembo nyonso kati na mosala ya Jéhovah na boumeli ya mibu mingi. Balóngaki mikakatano mpe komekama mingi. Sikawa bazali na bilembo oyo bimonisi ete balembi kosala oyo ezali malamu mpe bakoki ata kobimisa ntembe na ntina ya kosangana mingi kati na mosala ya kosakola. Ezali na ntina mingi kolendisa lisusu elimo na bango, kokundola bosepeli mpe mapamboli oyo mautaka na mosala mosalemi na motema mobimba mpo na Nzambe, na ndakisa ya Yesu Klisto. (Bagalatia 6:9, 10; Baebele 12:1-3) Mbala mosusu bakoki kosalisama na komona ete Jéhovah asepelaka na mosala na bango ya sembo mpe akoki kolendisa bango na mosala na mikolo mizali koya mpo na lokumu na ye. (Yisaya 40:29, 30; Baebele 6:10-12) Ekoki kozala na litomba kotalela makanisi ya lisoló oyo elobi ete: “Totika te kosala oyo ezali malamu,” ebimaki na Mosenzeli ya 1er Février 1989, lokasa 12 kino lokasa 17.
(4) Lokola bampate oyo bazoki, baklisto mosusu batungisamaki na likambo moko oyo bamonaki ete ezokisaki bango. Nzokande, soki tokolimbisa basusu, Tata na biso ya likoló akolimbisa mpe biso. (Bakolose 3:12-14; 1 Petelo 4:8) Ekoki kozala ete bandeko mosusu mibali mpe basi bazwaki toli to etumbu oyo bamonaki ete ezali sembo te. Nzokande, biso nyonso tokoki kozwa matomba ya batoli mpe bitumbu, mpe ezali likambo ya kobondisa na koyeba ete Jéhovah akopesaka etumbu na baoyo ye alingaka. (Baebele 12:4-11) Mpo ete bazwaki te mikumba oyo bakanisaki ete bakokisi masengami mpo na yango, basusu bapesaki nzela ete nkanda etya bokabwani kati na bango mpe lisangá. Kasi, soki biso moko tomitangoli na lisangá ya Jéhovah, ezali na esika mosusu te epai tokokende mpo na kozwa lobiko mpe esengo ya solo. (Tala Yoane 6:66-69.) Bandimbola mosusu ya ntina mpo na likambo wana ekoki kozwama kati na lisoló oyo elobaki ete “Préservons notre unité chrétienne,” kati na La Tour de Garde ya 15 Août 1988, lokasa 28 kino lokasa 30.
(5) Bampate basengeli kobatelama na banyama mabe. Na motindo moko, basusu bakoki kokutana na botemeli mpe makaneli ya bandeko ya mosuni to ya baninga na bango ya mosala oyo bazali bandimi te. Bosembo na bango ekoki komekama wana bazali kopusa bango na kokitisa mosala mpo na Nzambe to na kotika kosangana na mosala ya kosakola. Nzokande, baklisto yango bazali kolendisama wana basosoli, na lisalisi ya bankulutu, ete botemeli esengeli koya mpe ezali solo elembo oyo emonisi ete tozali bayekoli ya solo ya Yesu Klisto. (Matai 5:11, 12; 10:32-39; 24:9; 2 Timoté 3:12) Litomba likoki kozwama soki bamonisi bango ete Jéhovah akotika bango te mpe akopesa bango mbano mpo na mpiko na bango soki batikali sembo epai na ye. (2 Bakolinti 4:7-9; Yakobo 1:2-4, 12; 1 Petelo 5:8-10) Lisoló oyo elobi ete “Endurons joyeusement la persécution” kati na La Tour de Garde ya 15 Juillet 1982, lokasa 21 kino lokasa 27, ezali kopesa bilendiseli mingi.
Babateli na bampate—Bokokisa mikumba na bino
Bamposa ya etónga na Nzambe ezali mingi, mpe mpo na kokokisa yango esengeli mosala makasi. Mpo na yango, babateli baklisto basengeli kozala na motema mawa, komonisa komibanzabanza ya solo mpo na bampate, mpe kosepela kopesa bango lisalisi. Epai mosusu, bizaleli lokola motema petee mpe bososoli ezali na ntina mingi. Wana bandeko mosusu bazali na mposa ya toli mpe mpamela, nzokande basusu bazwaka matomba mingi na bilendiseli. Kati na makambo mosusu, mwa bokutani elongo na bango ekoki kobongisa likambo, nzokande mpo na basusu ekoki kosenga boyekoli ya Biblia mbala na mbala na ndako. Kati na makambo nyonso, mokano ya liboso mozali ya kopesa litambwisi ya kolendisa na elimo to toli ya bolingo oyo ekoki kopusa moto yango na kozwa mimeseno malamu ya boyekoli, ya kokende na makita ya lisangá mbala na mbala, mpe ya kosepela kosangana ntango nyonso na mosala ya boklisto. Wana ezali myango ya ntina mpo na kosunga baninga na biso baklisto mpe kosalisa bango na kofungola nzela mpo na kozwa elimo santu ya Jéhovah.
Babateli na bampate oyo bazali kopesa lisungi lolenge wana bazali kokokisa mosala ya motuya mingi mpo na etónga na Nzambe. (Tala La Tour de Garde ya 15 Novembre 1985, lokasa 23 kino lokasa 27.) Etónga ezali kosepela mingi na oyo babateli na bampate ya elimo bazali kosala. Nsima na kozwa lisalisi motindo yango, tata moko ya libota alobaki ete: ‘Nsima ya koumela mibu 22 kati na solo, tobendamaki na mokili mpo na mposa ya bozwi. Mbala mingi tozalaki kolinga koyangana na makita, kasi emonanaki mpenza ete tokokaki te kosala yango. Lokola tozalaki komiyoka malamu te kati na mokili ya Satana, tomiyokaki ete tokabwanaki na basusu, tomitangolaki. Yango epesaki biso mawa mpe mpasi na makanisi. Tozalaki na mposa ya maloba ya kolendisa. Ntango nkulutu moko ayaki kotala biso, tondimaki na esengo nyonso ebongiseli ya boyekoli ya Biblia na ndako. Lelo oyo tosili biso nyonso kozonga na lisangá ya Jéhovah oyo ezali na libateli. Nakoki te kolimbola mayoki ya esengo oyo nazali na yango!’
Ezali ntina ya esengo ntango bandeko na biso mibali mpe basi baoyo babungaki, balamuki na elimo mpe bazongeli makasi na bango. (Luka 15:4-7) Mokano ya Jéhovah epai na libota na ye ezali kokokisama wana bazali na bomoko “lokola bibwele na kati na elanga.” (Mika 2:12) Kati na ebombamelo wana ya solo bazali ‘kozwa kopema mpo na milimo na bango,’ na lisalisi na Yesu Klisto, Mobateli Malamu. (Matai 11:28-30) Na lolenge yango, etónga ya mokili mobimba oyo ezali na bomoko ezali kozwa litambwisi, kobondisama, mpe kobatelama elongo na bilei mingi ya elimo.
Lelo oyo, na nzela ya mosala ya kobatela bampate, Jéhovah azali kokokisa mosala moko ya bolingo oyo eyokani na elaka na ye oyo ya kala: “Nakobatela bampate na ngai mpe nakoluka bango. . . . Mpe nakobikisa bango na bisika nyonso bipanzanaki bango . . . Nakoleisa bango na matiti malamu . . . Nakoluka oyo abungi, . . . mpe nakokanga oyo abukani, mpe nakokembisa oyo abeli.” (Ezekiele 34:11-16) Oyo nde libondisi na koyeba ete Jéhovah azali Mobateli na biso!—Nzembo 23:1-4.
Na nzela ya bibongiseli wana mpo na kobatela etónga ya Nzambe, biso basaleli ya Jéhovah, tokoki kozala na mayoki motindo moko na Davidi, oyo alobaki ete: “Nakolala, ɛɛ, nakolala mpongi na kimya, mpo ete bobele yo Jéhovah okobatela ngai na esika na ngai.” (Nzembo 4:8) Ya solo, basaleli ya Jéhovah bazali komiyoka na kimya na nse ya libateli na ye ya bolingo mpe bazali na botondi ete bankulutu baklisto bazali kobatela bampate mike na motema mawa nyonso.