Bizaleli oyo tosengeli kolanda
“Landá boyengebene, ezaleli ya kokangama na Nzambe, kondima, bolingo, koyika mpiko, [mpe] elimo ya boboto.”—1 TIM. 6:11.
1. Pesá ndakisa oyo ezali komonisa ndimbola ya liloba “kolanda.”
OKANISAKA nini ntango oyoki liloba “kolanda”? Mbala mosusu okanisaka likambo oyo esalemaki na mikolo ya Moize, ntango basoda ya Ezipito “balandaki” Bayisalaele, mpe bakufaki na Mbu Motane. (Ex. 14:23, NW) To mpe okoki kokanisa likama oyo Moyisalaele oyo abomi mozalani na ye kozanga kokana azalaki na yango. Moyisalaele yango asengelaki kokima nokinoki na moko ya bamboka motoba ya kobombana. Soki te, “ndeko ya moto [oyo] babomi akoki . . . kolanda moto yango na kanda po ákanga ye pe áboma ye.”—Det. 19:6, Bible na lingala ya lelo oyo.
2. (a) Mokano nini Nzambe alendisi bapakolami bálanda? (b) Elikya nini Yehova apesi na baklisto mingi lelo oyo?
2 Nzokande, tótala makanisi malamu oyo ntoma Paulo azalaki na yango: “Nazali kolanda kopota mbangu tii na ndelo ya nsuka mpo na kozwa libonza ya kobengama ya likoló na Nzambe na nzela ya Klisto Yesu.” (Filp. 3:14) Biblia emonisi ete baklisto 144 000, bapakolami na elimo, bakozwa bomoi ya seko na likoló; Paulo azali moko na bango. Bakoyangela mabelé elongo na Yesu Klisto na boumeli ya mbula nkóto. Yango ezali mokano kitoko oyo Nzambe alendisi bango bálanda! Nzokande, motángo monene ya baklisto ya solo oyo bazali na bomoi lelo oyo bazali na elikya mosusu. Na bolingo na ye, Yehova alaki bango eloko oyo Adama ná Eva babungisaki: elikya ya bomoi ya seko na nzoto ya kokoka na paladiso awa na mabelé.—Emon. 7:4, 9; 21:1-4.
3. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na boboto monene ya Nzambe?
3 Bato bakoki te kozwa bomoi ya seko na milende na bango moko mpo na kosala oyo ezali sembo. (Yis. 64:6) Tokoki kozwa bomoi ya seko kaka soki tondimi ebongiseli oyo Nzambe azwi mpo na kobikisa biso na nzela ya Yesu Klisto. Tosengeli kosala nini mpo na komonisa botɔndi na boboto monene ya Nzambe? Moko ya makambo oyo tokoki kosala ezali kotosa etinda oyo: “Landá boyengebene, ezaleli ya kokangama na Nzambe, kondima, bolingo, koyika mpiko, [mpe] elimo ya boboto.” (1 Tim. 6:11) Kotalela bizaleli yango ekosalisa mokomoko na biso azala na ekateli makasi ya kolanda yango “malamumalamu lisusu.”—1 Tes. 4:1.
“Landá boyengebene”
4. Mpo na nini kolanda “boyengebene” ezali na ntina, mpe makambo nini moto asengeli kosala liboso alanda boyengebene?
4 Na mikanda mibale oyo Paulo akomelaki Timote, atángaki bizaleli oyo asengelaki kolanda, mpe mbala nyonso mibale abandaki na “boyengebene.” (1 Tim. 6:11; 2 Tim. 2:22) Longola yango, na bavɛrsɛ mosusu, Biblia elendisi biso tólanda boyengebene. (Mas. 15:9; 21:21; Yis. 51:1) Mpo na kosala yango tosengeli naino ‘koyekola koyeba Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo ye atindaki, Yesu Klisto.’ (Yoa. 17:3) Kolanda boyengebene ekotinda moto abongola motema mpe ‘abongwana’ mpo na kosala mokano ya Nzambe.—Mis. 3:19.
5. Tosengeli kosala nini mpo na kozala mpe kotikala moyengebene na miso ya Nzambe?
5 Bamilio ya bato oyo bazali mpenza kolanda boyengebene bamipesi na Yehova mpe bazwi batisimo ya mai. Soki ozali moklisto oyo azwá batisimo, oyebi ete bomoi na yo esengeli ntango nyonso komonisa ete olandaka boyengebene? Ndenge moko oyo okoki kosala yango ezali ya kokesenisa “mabe ná malamu” na lisalisi ya Biblia, ntango ozali kozwa bikateli ya minene na bomoi na yo. (Tángá Baebele 5:14.) Na ndakisa, soki ozali monzemba mpe ozali na mbula oyo ekoki mpo na kobala, osili mpenza kozwa ekateli ya koboya kolingana na moto oyo azwi naino batisimo te? Ekozala bongo soki olandaka boyengebene.—1 Kol. 7:39.
6. Kolanda boyengebene ya solosolo esɛngaka nini?
6 Kozala moyengebene elakisi te komimona moyengebene to kozala “na boyengebene na koleka” ndelo. (Mos. 7:16) Yesu akebisi biso na lolenge yango ya boyengebene oyo etindaka moto aluka komonisa ete aleki basusu. (Mat. 6:1) Kolanda boyengebene ya solosolo eutaka na motema; yango esɛngaka kosembola makanisi, bizaleli, mpe bamposa ya mabe. Soki tozali kosala yango, na ntembe te, ekobatela biso tókwea te na masumu. (Tángá Masese 4:23; talá mpe Yakobo 1:14, 15.) Lisusu, Yehova akopambola biso mpe akosalisa biso soki tozali mpe kolanda bizaleli mosusu ya ntina mingi.
“Landá . . . ezaleli ya kokangama na Nzambe”
7. “Ezaleli ya kokangama na Nzambe” elimboli nini?
7 Kokangama na moto elimboli komipesa na ye mpe kozala sembo epai na ye. Diksionɛrɛ moko emonisi ete liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “ezaleli ya kokangama na Nzambe” emonisi “makanisi malamu ya kopesa nzela ata na eloko moko te elɛmbisa ezaleli na biso ya kobanga Nzambe.” Mbala mingi Bayisalaele bazalaki komonisa ezaleli yango te, yango emonani na ndenge bazalaki kozanga botosi ata nsima ya kobimisama na Ezipito.
8. (a) Lisumu ya Adama ebimisaki motuna nini? (b) Ndenge nini eyano na “sɛkɛlɛ mosantu” epesamaki?
8 Na boumeli ya bankóto ya bambula kobanda na lisumu ya Adama, motuna oyo ezwaki kaka eyano te: “Ezali na moto oyo akoki komonisa ezaleli ya kokangama na Nzambe na ndenge ya kokoka?” Na boumeli ya bankama ya bambula, moto moko te amonisaki ezaleli yango na ndenge ya kokoka. Kasi, na ntango oyo aponaki, Yehova apesaki eyano na motuna yango oyo ezalaki “sɛkɛlɛ mosantu.” Atyaki bomoi ya Mwana na ye mobotami-se-moko na libumu ya Malia mpo abotama lokola moto ya kokoka. Ntango azalaki na bomoi awa na mabelé, ata tii na liwa na ye, Yesu amonisaki ndimbola ya solosolo ya komipesa mpe kotikala sembo epai ya Nzambe ya solo. Mabondeli na ye emonisaki ete azalaki na limemya mpo na Tata na ye ya likoló oyo atondá bolingo. (Mat. 11:25; Yoa. 12:27, 28) Yango wana, na kopemama na Yehova, Paulo amonisaki ete “ezaleli ya kokangama na Nzambe” emonanaki na bomoi ya Yesu.—Tángá 1 Timote 3:16.
9. Ndenge nini tokoki kolanda ezaleli ya kokangama na Nzambe?
9 Lokola tozali bato ya masumu, tokoki te komonisa ezaleli ya kokangama na Nzambe na ndenge ya kokoka. Kasi, tokoki kolanda yango. Mpo na yango, tosengeli kolanda malamumalamu ndakisa ya Klisto. (1 Pet. 2:21) Na ndenge yango, tokozala te lokola bakosi oyo “bazali na motindo moko boye ya ezaleli ya kokangama na Nzambe kasi bazali kowangana nguya na yango.” (2 Tim. 3:5) Yango elakisi te ete ezaleli ya kokangama na Nzambe emonanaka na libándá te. Emonanaka mpe na libándá. Na ndakisa, ntango tozali kopona elamba ya libala to elamba ya kolata ntango tokei zando, tosengeli ntango nyonso komonana bato oyo balobaka ete “babangaka Nzambe.” (1 Tim. 2:9, 10) Kolanda ezaleli ya kokangama na Nzambe esɛngaka ete tótosaka mitinda na ye na bomoi na biso ya mokolo na mokolo.
“Landá . . . kondima”
10. Tosengeli kosala nini mpo na kobatela kondima na biso makasi?
10 Tángá Baloma 10:17. Mpo na kokóma na kondima makasi mpe kobatela yango, moklisto asengeli komanyolaka mateya oyo ezali na Liloba ya Nzambe. “Moombo ya sembo mpe ya mayele” abimisi mikanda mingi. Buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, buku Yekolá epai ya Moteyi Monene, mpe buku “Viens, suis-moi,” ebongisami mpo na kosalisa biso tóyeba Klisto malamumalamu mpe na ndenge yango tókoka komekola ye. (Mat. 24:45-47) Longola yango, moombo ya sembo abongisaka makita mpe mayangani, oyo mingi kati na yango elobelaka “liloba oyo etali Klisto.” Osilá kokanisa ndenge oyo okoki ‘kotya likebi koleka mpenza’ na bibongiseli wana ya Nzambe mpo ozwela yango mpenza litomba?—Ebe. 2:1.
11. Ndenge nini kobondela mpe kotosa ekoki kosalisa biso tólanda kondima?
11 Libondeli mpe esalisaka biso tókóma na kondima makasi. Mokolo moko, bayekoli ya Yesu basɛngaki ye ete: “Pesá biso kondima mingi koleka.” Biso mpe tokoki kosɛnga Nzambe apesa biso kondima mingi. (Luka 17:5) Mpo na yango, tosengeli kosɛnga Nzambe apesa biso elimo santu na ye mpamba te kondima ezali moko na bizaleli ya “mbuma ya elimo.” (Gal. 5:22) Longola yango, kotosa mibeko ya Nzambe elendisaka kondima na biso. Na ndakisa, tokoki kozwa bibongiseli mpo tósakolaka mingi. Na ntembe te, yango ekopesa biso esengo mingi. Lisusu, kondima na biso ekokóma makasi wana tozali kokanisa mapamboli oyo tokozwa soki tozali ‘koluka liboso bokonzi mpe boyengebene [ya Nzambe].’—Mat. 6:33.
“Landá . . . bolingo”
12, 13. (a) Mobeko ya sika ya Yesu elobi nini? (b) Na makambo nini ya ntina mingi tosengeli kolanda bolingo ya Klisto?
12 Tángá 1 Timote 5:1, 2. Paulo apesaki toli ya malamu na ndenge oyo baklisto basengeli komonisana bolingo. Ezaleli ya kokangama na Nzambe esɛngi mpe kotosa mobeko ya sika ya Yesu oyo elobi ete ‘tólinganaka’ ndenge ye alingaki biso. (Yoa. 13:34) Ntoma Yoane alobaki boye: “Moto nyonso oyo azali na biloko ya kobikela ya mokili oyo mpe amoni ndeko na ye azali kokelela mpe atako bongo akangeli ye mpenza motema, na ndenge nini bolingo ya Nzambe ezali kofanda na kati na ye?” (1 Yoa. 3:17) Okoki koyeba lisusu na mabaku nini omonisaki bolingo ndenge wana?
13 Lolenge mosusu ya kolanda bolingo ezali ya kolimbisa bandeko na biso, kasi kobombela bango nkanda te. (Tángá 1 Yoane 4:20.) Mpo na yango, tosengeli kolanda toli oyo ya Biblia: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu. Kaka ndenge Yehova alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo.” (Kols. 3:13) Ezali na ndeko moko na kati ya lisangá oyo osengeli kosalela toli yango epai na ye? Okolimbisa ye?
“Landá . . . [ezaleli ya] koyika mpiko”
14. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya baklisto ya lisangá ya Filadelefia?
14 Tokoki kokanga motema mpo na kozela likambo moko oyo toyebi ete ekoumela mingi te kokokisama; nzokande, ezalaka mpasi mingi soki likambo yango ezali pɛtɛɛ te to ekokisami te na ntango oyo biso tokanisaki. Kolanda mokano ya bomoi ya seko esɛngaka koyika mpiko. Nkolo Yesu ayebisaki lisangá ya Filadelefia boye: “Lokola obatelaki liloba na ngai na oyo etali ezaleli ya koyika mpiko, ngai nakobatela yo mpe na ngonga ya komekama.” (Emon. 3:10) Yesu amonisaki ntina ya koyika mpiko, ezaleli oyo esalisaka biso tózonga nsima te liboso ya mikakatano mpe komekama. Na ntembe te, baklisto ya lisangá ya Filadelefia ya ekeke ya liboso bapesaki ndakisa malamu na ndenge bayikaki mpiko na komekama ya kondima na bango. Yango wana, Yesu alakaki kosalisa bango na ntango ya komekama makasi oyo esengelaki koya.—Luka 16:10.
15. Yesu ateyaki nini na ntina na koyika mpiko?
15 Yesu ayebaki ete bayekoli na ye bakoyinama na bato ya mokili mpe na bandeko na bango oyo bazali bandimi te; yango wana, mbala soki mibale alendisaki bango na maloba oyo: “Moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye wana nde akobika.” (Mat. 10:22; 24:13) Yesu amonisaki mpe ndenge oyo bayekoli na ye na ntango wana bakokaki kozwa makasi ya koyika mpiko. Na lisese moko, alobaki ete bato oyo “bayambi [liloba ya Nzambe] na esengo” kasi batiki yango ntango kondima na bango emekami bazali lokola mabelé oyo ezali na mabanga. Kasi, akokanisaki bayekoli na ye ya sembo na mabelé ya malamu mpamba te “basimbi” liloba ya Nzambe mpe “baboti mbuma elongo na koyika mpiko.”—Luka 8:13, 15.
16. Eloko nini esalisi bamilio ya bato báyika mpiko?
16 Omoni sɛkɛlɛ ya koyika mpiko? Tosengeli ‘kosimba’ liloba ya Nzambe, elingi koloba, kobatela yango na mitema mpe na makanisi na biso. Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu—oyo ezali sembo, pɛtɛɛ na kotánga—oyo ebimisami na minɔkɔ mingi ezali kosalisa mpo na kosala yango. Komanyola Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo ekosalisa biso tózwa makasi oyo esengeli mpo na kokoba kobota mbuma “elongo na koyika mpiko.”—Nz. 1:1, 2.
“Landá . . . elimo ya boboto” mpe kimya
17. (a) Mpo na nini “elimo ya boboto” ezali na ntina mingi? (b) Ndenge nini Yesu amonisaki elimo ya boboto?
17 Moto moko te asepelaka bákosela ye makambo. Mbala mingi yango etindaka moto aloba na nkanda ntango azali komilongisa. Nzokande, eleki malamu komonisa “elimo ya boboto”! (Tángá Masese 15:1.) Esɛngaka komipekisa mpo na komonisa elimo ya boboto ntango bakoseli biso makambo. Yesu Klisto apesaki ndakisa malamu mingi na likambo yango. “Ntango azalaki kofingama, azalaki kozongisa kofinga te. Ntango azalaki konyokwama, azalaki kokanela moto te, kasi akobaki komitika na mabɔkɔ ya moto oyo asambisaka na boyengebene.” (1 Pet. 2:23) Tokoki te kosala mpenza ndenge Yesu asalaki, kasi tokoki kosala makasi mpo na komonisa lisusu mingi elimo ya boboto.
18. (a) Ndenge nini elimo ya boboto esalisaka biso? (b) Wapi ezaleli mosusu oyo tosengeli kolanda?
18 Na ndakisa ya Yesu, tiká ete ‘tómibongisa ntango nyonso mpo na koloba’ bindimeli na biso, ‘tósalaka bongo na elimo ya boboto mpe na limemya makasi.’ (1 Pet. 3:15) Ya solo, elimo ya boboto ekoki kosalisa biso tóswana te ntango makanisi na biso ekeseni, ezala na bato oyo tokutani na bango na mosala ya kosakola to na bandeko na biso baklisto. (2 Tim. 2:24, 25) Elimo ya boboto esalisaka biso tózala na kimya. Ekoki kozala mpo na yango nde Paulo, na mokanda ya mibale oyo akomelaki Timote, atángaki “kimya” na kati ya bizaleli oyo tosengeli kolanda. (2 Tim. 2:22; talá mpe 1 Timote 6:11.) Ya solo, “kimya” ezali ezaleli mosusu oyo Makomami elendisi biso tólanda.—Nz. 34:14; Ebe. 12:14.
19. Nsima ya kotalela bizaleli nsambo oyo, ekateli nini ozwi, mpe mpo na nini?
19 Tolobeli bizaleli nsambo oyo Biblia elendisi biso tólanda—boyengebene, ezaleli ya kokangama na Nzambe, kondima, bolingo, koyika mpiko, elimo ya boboto, mpe kimya. Ekozala mpenza malamu soki na lisangá mokomoko bandeko basi mpe mibali bazali kosala milende mpo na komonisa lisusu mingi bizaleli yango! Yango ekopesa Yehova nkembo mpe ekopesa ye nzela ya kobongisa biso malamu lisusu mpo na nkembo na ye.
Makanisi ya komanyola
• Kolanda boyengebene mpe ezaleli ya kokangama na Nzambe elimboli nini?
• Nini ekosalisa biso tólanda kondima mpe koyika mpiko?
• Ndenge nini bolingo ekoki kosalisa biso na boyokani na biso na basusu?
• Mpo na nini tosengeli kolanda elimo ya boboto mpe kimya?
[Elilingi na lokasa 12]
Yesu akebisaki biso na boyengebene oyo etindaka moto aluka komonisa ete aleki basusu
[Elilingi na lokasa 13]
Komanyola mateya ya Liloba ya Nzambe ekoki kosalisa biso tólanda kondima
[Elilingi na lokasa 15]
Tokoki kolanda bolingo mpe elimo ya boboto