“Bundá etumba ya malamu mingi ya kondima”
OKANISI ete ezali na soda moko oyo akosepela te soki, na ntango ya bitumba, balobi na ye ete: “Zongá epai na yo mpe lekisá mwa mikolo ná mwasi mpe bana na yo”?
Likambo ya ndenge wana ekómelaki Uliya Mohiti, soda moko ya Yisalaele na ntango ya Mokonzi Davidi. Mokonzi ye moko ayebisaki ete azonga na ndako na ye. Kasi, Uliya aboyaki kokende na ndako na ye. Ntango batunaki ntina oyo aboyaki, alobaki ete sanduku ya kondimana, oyo ezalaki komonisa Nzambe, mpe basoda ya Yisalaele bazalaki na etumba. Alobaki ete: “Boye, ngai nakita na ndako na ngai ete nalya mpe namɛla mpe nakɔtela mwasi na ngai?” Uliya amonaki ete akoki kosala likambo wana te na ntango wana.—2 Samwele 11:8-11.
Ezaleli ya Uliya ezali kotinda biso tómituna mituna ya ntina, mpamba te biso mpe tozali na etumba. Etumba moko oyo ekeseni na bitumba nyonso oyo bikólo ebunda ezali kosalema sikoyo. Etumba yango eleki kutu bitumba mibale ya mokili mobimba, mpe yo ozali na kati ya etumba yango. Ezali mpenza na makama mpe monguna azali makasi. Na etumba yango, bazali kobɛta masasi te, bazali kobwaka babɔmbi te, kasi mayele ya etumba ezali kosalelama mingi.
Liboso ya kokɔta na etumba yango, osengeli koyeba soki ezali malamu yo osala yango mpe soki ozali kobunda mpo na nini. Ezali na ntina obunda etumba yango? Ntoma Paulo amonisaki ntina ya etumba yango na mokanda oyo akomelaki Timote: “Bundá etumba ya malamu mingi ya kondima.” Na etumba yango osengeli kobatela ndako moko ya makasi te, kasi “kondima,” elingi koloba mateya nyonso ya solo ya boklisto oyo Biblia ezali koteya. Omoni ete osengeli mpenza kondima mateya nyonso ya solo ya boklisto mpo obunda mpo na yango mpe olonga.—1 Timote 6:12.
Soda ya mpiko alukaka koyeba monguna na ye. Monguna oyo tozali kobunda na ye na etumba yango abanda kobunda kala mpe ayebi mayele ya bitumba, azali na bibundeli ebele. Lisusu, azali moto te. Azali mabe, na nkanda mingi, mpe ayokaka mawa te; monguna yango ezali Satana. (1 Petelo 5:8) Mindoki mpe mayele ya kokosa monguna ezali na ntina te mpo na kobunda na monguna yango. (2 Bakolinti 10:4) Tosengeli na nini mpo na kobunda etumba yango?
Ebundeli ya liboso ezali “mopanga ya elimo, elingi koloba, liloba ya Nzambe.” (Baefese 6:17) Ntoma Paulo amonisaki makasi ya ebundeli yango: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya mpe epeli makasi koleka mopanga nyonso ya mino mibale mpe ekɔtaka tii na kokabola molimo ná elimo, mpe matonga ná mafuta na yango, mpe ezali na likoki ya kososola makanisi mpe mikano ya motema.” (Baebele 4:11, 12) Na ntembe te esengeli kozala na mayele mpe na ntɔki mpo na kosalela ebundeli yango oyo epeli na boye ete ekoki kokɔta tii na makanisi ya motema mpe na mikano ya moto.
Na ntembe te oyebi ete basoda bakoki kozala na bibundeli ya makasi, kasi ekozala na ntina te soki bayebi kosalela yango te. Ndenge moko, yo mpe osengeli kozwa malako mpo na kosalela malamu mopanga na yo. Likambo ya esengo ezali ete babundi oyo bameseni na etumba bakoki kosalisa yo. Yesu abengaki babundi yango oyo balakisaka basusu ete “moombo ya sembo mpe ya mayele,” oyo azali na mokumba ya kopesa bayekoli na ye bilei ya elimo, to mateya. (Matai 24:45) Okoki koyeba moombo yango na milende oyo azali kosala mpo na koteya biso tóyeba mayele oyo monguna azali kosalela mpe kokebisa biso na ntango oyo ebongi. Makambo nyonso ezali komonisa ete ezali baklisto bapakolami na elimo ya lisangá ya Batatoli ya Yehova.—Emoniseli 14:1.
Moombo yango asuki kaka na koteya te. Amonisi elimo ya ntoma Paulo, oyo akomelaki lisangá ya Tesaloniki ete: “Tokómaki nde bato ya boboto na katikati na bino, lokola ntango mama oyo azali komɛlisa alɛngɛlaka bana na ye mpenza. Boye, kozaláká na bolingo ya motema mpo na bino, tosepelaki mingi kopesa bino, kaka nsango malamu ya Nzambe te, kasi mpe milimo na biso moko, mpamba te bokómaki balingami na biso.” (1 Batesaloniki 2:7, 8) Soda mokomoko nde asengeli kosalela formasyo oyo azali kozwa.
Molato mobimba ya etumba
Ezali na molato mobimba ya elilingi mpo na kobatela biso na etumba yango. Batángi eteni mokomoko ya molato yango na Baefese 6:13-18. Soda oyo azali na bokɛngi akoki te kokende na etumba soki biteni mosusu ya molato na ye ya elimo ezangi to ebebi.
Moklisto asengeli kozala na molato na ye mobimba mpo na komibatela; kasi, nguba monene ya kondima ezali na ntina mingi. Yango wana Paulo akomaki: “Likambo eleki ntina mpenza, bókamata nguba monene ya kondima, oyo bokokoka koboma na yango mɔtɔ ya bambanzi nyonso ya moto mabe oyo ezali kopela.”—Baefese 6:16.
Nguba monene, oyo ezali kobomba nzoto mobimba, ezali komonisa kondima na biso. Osengeli kozala na kondima makasi epai ya Yehova, kokakatana te ete bilaka na ye nyonso ekokokisama. Osengeli komonaka lokola nde bilaka yango esí ekokisami. Kozala na ntembe ata moke te ete etikali moke ebongiseli mabe ya mokili ya Satana ebomama, mpe mabelé mobimba ebongwana paladiso, mpe ete bato oyo bazali sembo epai ya Nzambe bakozala bato ya kokoka.—Yisaya 33:24; 35:1, 2; Emoniseli 19:17-21.
Kasi, na etumba makasi oyo tozali na yango lelo oyo, ozali na mposa ya eloko mosusu: moninga. Na etumba, basoda bakómaka baninga makasi mpo na kolendisana mpe kobatelana, na ntango mosusu kutu kobikisana na liwa. Atako baninga mosusu bazali mpe na ntina, mpo na kobika na etumba yango, osengeli kozala moninga ya Yehova. Yango wana Paulo asukisi kotánga biteni ya molato ya etumba na maloba oyo: “Wana na mitindo nyonso ya mabondeli mpe malɔmbɔ bozali kokoba kobondela na libaku nyonso na kati ya elimo.”—Baefese 6:18.
Tolingaka kozala na moninga ya motema. Tosepelaka kolekisa ntango elongo na ye. Soki tozali mbala na mbala kosolola na Yehova na nzela ya libondeli, akozala moninga ya solo mpo na biso, moninga oyo tokoki kotyela motema. Yakobo alendisi biso ete: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”—Yakobo 4:8.
Mayele ya monguna
Kobunda na mokili oyo ekoki ntango mosusu kozala lokola kotambola na esika oyo bakundikundi bamine. Likama ekoki kouta ata epai nini, mpe monguna azali koluka kobimela yo na mbalakaka. Kasi, yebá ete Yehova apesi yo libateli oyo osengeli na yango.—1 Bakolinti 10:13.
Monguna akoki kosalela mayele ya kokweisa mateya ya solo oyo ezali na ntina mingi mpo na kondima na yo. Bapɛngwi bakoki kosalela maloba ya sukali, kolɛngola, mpe makanisi etɛngamá mpo na kokweisa yo. Kasi, bapɛngwi balukaka bolamu na yo te. Masese 11:9 elobi boye: “[Mopɛngwi, NW] akobebisa mozalani na ye na nzela na monɔkɔ na ye; nde moyengebene akobikisama mpo na boyebi.”
Tokomikosa soki tokanisi ete tosengeli koyoka maloba ya bapɛngwi to kotánga mikanda na bango mpo na kokweisa bango. Makanisi na bango etɛngamá, ya mabe ekoki kobebisa elimo na yo mpe kondima na yo nokinoki lokola mpota oyo ezali kolya nzoto. (2 Timote 2:16, 17) Talelá bapɛngwi ndenge Nzambe atalelaka bango. Yobo alobaki na ntina na Yehova ete: “Liboso na ye mopɛngwi moko te akokɔta.”—Yobo 13:16.
Monguna akoki komeka mayele mosusu, oyo alongi kokweisa na yango bato mwa mingi. Soki basoda babosani ete bazali na etumba mpe babendami na makambo ya mbindo, yango ekoki kokɔtisa mobulu.
Masano ya mokili, lokola bafilme mpe baemisyo ya mabe na televizyo mpe miziki ya mabe ezali motambo monene. Bato mosusu balobaka ete ata soki batali makambo ya nsɔni to batángi mikanda ya mabe, ekosala bango eloko moko te. Kasi, moto moko oyo azalaki mbala na mbala kotala bafilme ya bato bazali kosangisa nzoto alobaki na bosembo ete: “Makambo yango etikalaka na bɔɔngɔ, ntango moto azali kokanisa yango mingi, akómaka mpe na mposa makasi ya kosala yango . . . Bafilme yango etindaka moto akanisa ete azali kozanga eloko moko.” Ezali nde na ntina komitika na likama ya kozwa lisasi ya mbalakaka?
Ebundeli mosusu ya monguna ezali biloko ya mokili. Ekoki kozala mpasi mpo na komona likama oyo ekoki kobimisa mpamba te biso nyonso tozalaka na mposa ya biloko ya mokili. Tozalaka na mposa ya ndako, ya bilei, ya bilamba, mpe ezali mabe te kozala na biloko ya kitoko. Likama ekoki kouta na ndenge oyo moto azali kotalela yango. Tokoki kobanda komona ete mbongo ezali na ntina mingi koleka makambo ya elimo. Tokoki kokóma na bolingo ya mbongo. Ezali malamu tóbosanaka te ete mbongo ekoki kosala nyonso te. Mbongo ezali mpo na mwa ntango, nzokande, bozwi ya elimo ekotikala mpo na libela.—Matai 6:19, 20.
Soki basoda bazali kobanga, ezalaka mpasi mpo bálonga. “Soki okosenzwa na mokolo ya mpasi, nguya na yo ezali bobele moke.” (Masese 24:10) Kolɛmba nzoto ezali ebundeli mosusu oyo Satana asalelaka. Kolata “lokola ekɔti elikya ya lobiko” ekosalisa yo olonga ezaleli ya kolɛmba nzoto. (1 Batesaloniki 5:8) Luká kobatela elikya na yo makasi lokola Abalayama. Ntango Nzambe ayebisaki Abalayama akaba mwana na ye Yisaka lokola mbeka, akakatanaki te. Azalaki na kondima ete Nzambe akokokisa elaka na Ye ya kopambola bikólo nyonso na nzela ya mwana na ye mpe ete Nzambe akokaki ata kosekwisa Yisaka soki esɛngaki bongo mpo na kokokisa elaka na ye.—Baebele 11:17-19.
Kotika kobunda te
Bato mosusu oyo bazali kobunda na mpiko banda bambula ebele bakoki kolɛmba mpe kotika kobunda na bokɛngi ndenge bazalaki kosala liboso. Ndakisa ya Uliya, oyo tolobelaki na ebandeli, ekoki kosalisa babundi nyonso na kobatela makanisi malamu. Baninga na biso babundi baklisto basengeli koyikela makambo mingi mpiko; bazali kokutana na makama, to mpe bazali konyokwama na malili mpe nzala. Lokola Uliya, tosengeli te kolanda bisengo nyonso oyo tokoki kozwa lelo oyo to kokolisa mposa ya kozala na bomoi ezangi mpasi. Tosengeli kotikala elongo na basoda ya sembo ya Yehova na mokili mobimba mpe kokoba etumba tii tokozwa mapamboli kitoko oyo babongisi mpo na biso.—Baebele 10:32-34.
Ekozala likama soki totiki kokɛngɛla, mbala mosusu mpo tozali kokanisa ete etumba ya nsuka ezali naino mosika. Ndakisa ya Mokonzi Davidi ezali komonisa likama yango. Soki mpo na ntina nini, atikaki basoda bango moko na etumba. Yango wana, Davidi asalaki lisumu monene oyo epesaki ye mpasi mpe etungisaki ye bomoi na ye mobimba.—2 Samwele 12:10-14.
Ezali nde na ntina tóbunda etumba yango, tómona mpasi ya bitumba, tóyika mpiko ntango bazali kosɛka biso, mpe tóbosana bisengo ya mpambampamba ya mokili? Baoyo bazali koyika mpiko mpe bazali kolonga na etumba yango balobaka ete makambo ya mokili ekoki komonana malamu, ngɛlingɛli, kasi soki otaleli yango malamumalamu, okomona ete ezali na eloko ya malonga te. (Bafilipi 3:8) Lisusu, mbala mingi bisengo yango esukaka na mpasi mpe mawa.
Moklisto oyo azali kobunda etumba azali na baninga ya solo, azalaka na lisosoli malamu mpe na elikya kitoko. Bapakolami na elimo bazali na elikya ya bomoi na likoló elongo na Yesu Klisto na nzoto ya elimo oyo ekoki kokufa te. (1 Bakolinti 15:54) Baklisto mingi oyo bazali na etumba yango bazali na elikya ya bomoi ya kokoka na paladiso awa na mabelé. Na ntembe te, ezali na ntina tóbunda mpo na mbano motindo wana. Na bokeseni na bitumba ya mokili, toyebi ete tokolonga etumba yango soki totikali sembo. (Baebele 11:1) Kasi, ebongiseli oyo Satana azali kotambwisa ekobomama libela.—2 Petelo 3:10.
Wana ozali kobunda etumba yango, kobosana te maloba ya Yesu oyo: “Bózala na mpiko! Ngai nasili kolonga mokili.” (Yoane 16:33) Alongaki mokili na ndenge azalaki ntango nyonso kokɛngɛla mpe atikalaki sembo ata na ntango ya mpasi. Biso mpe tokoki kosala yango.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 27]
Bazali kobɛta masasi te, bazali kobwaka babɔmbi te, kasi mayele ya etumba ezali kosalelama mingi
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 30]
Toyebi ete tokolonga etumba yango soki totikali sembo
[Elilingi na lokasa 26]
Ekɔti ya lobiko ekosalisa biso tólonga ezaleli ya kolɛmba nzoto
[Elilingi na lokasa 26]
Salelá nguba monene ya kondima mpo na koboma ‘bambanzi ezali kopela’ ya Satana
[Elilingi na lokasa 28]
“Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino”
[Elilingi na lokasa 29]
Tosengeli kondima mpenza ete bilaka ya Nzambe ekokokisama