Mpo na nini kolanda kosalela boyengebene?
KATIKATI na mokili ya mobulu oyo ezalaki liboso na mpela, mobali moko amikesenisaki na bato mosusu. Mobali yango azalaki Noé. Ye mpe libota na ye bazalaki kotambola elongo na Nzambe, nzokande bato nyonso mosusu bazalaki kokanisa ata soko moke te mpo na Ye. Tala ntina “Noé azalaki mobali na sembo” na eleko wana ya mobulu; akomaki “mosakoli na boyengebene” kati na mokili ya mabe.—Genese 6:9; 2 Petelo 2:5.
Penepene na mobu 56 ya ntango na biso, ntoma Paulo akotaki boloko na césarée. Ntango basambisaki ye liboso na guvernere Feliki, Paulo azwaki libaku ya kosakola epai na mokonzi monene wana ya romé. Nini ezalaki bozindo ya maloba na ye? “(azalaki) koloba na ntina na boyengebene, na komipekisa mpe na esambiseli elingi koya.” (Misala 24:25) Ee, Paulo mpe azalaki mosakoli ya boyengebene.
Litomba oyo basaleli wana mibale ya Nzambe bazalaki komonisa mpo na boyengebene ezalaki mpenza ya malamu. Jéhovah ‘azali Nzambe na boyengebene mpe Mobikisi.’ (Yisaya 45:21) Lisese lipemami elobi nkutu ete: “Nzela na moto mabe eboyami na Jéhovah, nde alingani na ye oyo alandi boyengebene.” (Masese 15:9) Basaleli nyonso ya Nzambe basengeli kolanda boyengebene.
Likambo na mawa, lelo bato mingi bazali kozwa ezalela yango na motuya mingi te. Bazali koloba ete: ‘Nazali kosala mabe moko te na mozalani na ngai; nandimisami ete nazali kosepelisa Nzambe.’ To mpe bazali mbala mosusu koloba ete: ‘Ezali na bandenge mingi ya kokóma na boyengebene. Likambo ya kobeta ntembe ezali te, ekoki bobele kozala na motema sembo kati na lingomba na yo.’ Okanisi ete lolenge wana ya komonela makambo na ndenge ya bopotu endimami liboso na Nzambe?
Bamosusu bakoki kozala na likanisi ekeseni. Mbala mosusu bayebi maloba oyo na Paulo: “Na bongo tosili kotangama bayengebene na nzela na kondima.” (Baloma 5:1, MN) Bakoki bongo kokamwa mpe koloba ete: ‘Ndenge nini baklisto, oyo basilaki kotangama bayengebene, basengeli kolanda kosalela boyengebene?’ Eyano nini okopesa na motuna oyo?
Nzambe na boyengebene
Engebene diksionere moko, boyengebene etyami esika moko na bosembo mpe na botosi ya mibeko na Nzambe to ya bizaleli malamu. Mpo ete Jéhovah azali Nzambe na boyengebene, moto nyonso oyo alingi kosepelisa ye asengeli komibanzabanza na ezaleli wana ya ntina mingi. Mokomi na nzembo alobi ete; “Jéhovah azali moyengebene, mpe alingi boyengebene. Bato baoyo batelemi alima bakomona elongi na ye.” (Nzembo 11:7; Deteronome 32:4) Ntoma Petelo alobaki ete: “Miso na Jéhovah mazali likoló na bayengebene, mpe matoi na ye epai na malombo na bango.”—1 Petelo 3:12.
Na ntina yango, tosengeli kozala na bopotu te kati na likambo oyo lokola ebele na Bayuda bazalaki na yango. Na ntembe te, mingi kati na bango bazalaki bato malamu oyo bazalaki kosala mabe te epai na bazalani na bango. Bazalaki mpe sembo, nkutu mpe na molende kati na lingomba na bango. Kasi, na ekeke ya liboso, mingi bazalaki bayengebene te na miso na Nzambe. Paulo alobi ete: “Natatweli bango ete bazali na mposa mpo na Nzambe nde na nzela na bososoli te. Mpamba te, awa ezangi bango koyeba boyengebene bouti na Nzambe mpe bazali kolukaluka boyengebene bouti na bango mpenza, bongo batosi boyengebene na Nzambe te.”—Baloma 10:2, 3.
Likambo nini ezalaki kotambola malamu te epai na Bayuda? Paulo alobi ete bazalaki kosalela boyengebene te engebene boyebi ya solo. Ndakisa na bango ezali likebisi mpo na biso: Ekoki bobele te kozala na bomoto malamu mpe kosala mabe te. Azali komonisa lisusu ete ezali na bandenge mingi te mpo na kokóma na boyengebene. Emonani ete, likambo moko ezalaki kotambola malamu te kati na nzela oyo Bayuda mingi bazalaki kopona na ntango ya bantoma. Tokoki kolanda boyengebene na elonga bobele soki tozali koyoka Nzambe. Mokanda ya Masese elobi ete: “Mwana na ngai, soko okozwa maloba na ngai mpe okobomba maloba na ngai kati na yo, boye okoyeba boyengebene mpe kosambisa-sembo mpe kokata na solo, ee nzela nyonso malamu.”—Masese 2:1, 9.
Nzela na boyengebene
Kobanda na Moise kino na Yesu, boyengebene ezalaki kotalela botosi na mibeko na Nzambe oyo eyebisami kati na Mibeko na Moise. Mpo ete Bayuda, bazangi kokoka, bazalaki na makoki te ya kobatela na mobimba mpenza mibeko wana, basengelaki kopesa bambeka mpe makabo oyo mayebisami na Mibeko mpo na boyengebene, mpo na kozipa masumu na bango. Moise alobáká epai na Bayisraele ete: “Ekozala boyengebene mpo na biso soko tokokeba ete tosala lilako oyo nyonso liboso na Jéhovah Nzambe na biso lokola elakelaki ye biso.’—Deteronome 6:25.
Na boumeli ya bikeke, moto moko te azalaki na likoki ya kokokisa Mibeko malamu. Nzokande, mingi bamekaki na motema sembo kolanda kosalela boyengebene na nzela na yango. Nkutu Biblia ezali kolobela mpo na bamoko kati na bango lokola bayengebene. Na ndakisa, baboti ya Yoane mobatisi batangami lokola “bayengebene liboso na Nzambe, mpamba te bazalaki kotambola na mibeko mpe na malako na Jéhovah na libunga te.”—Luka 1:6.
Nzokande, Yesu abandisaki lolenge mosusu ya sika ya kolanda kosalela boyengebene Ye akokisaki na lolenge malamu mpenza Mibeko na Moise, likambo oyo moto mosusu alongaki kosala yango te. Akufaki likoló na nzete na mpasi mpe Jéhovah andimaki motuya ya bomoi na ye ya kokoka lokola mbeka mpo na bato. Mbeka oyo ebongisamaki kati na boyokani ya Mibeko ezalaki lisusu na ntina te. Mbeka na kokoka ya Yesu ezalaki kozipa masumu ya bato nyonso ya motema sembo.—Baebele 10:4, 12.
Baklisto ya solo batangami bayengebene
Uta liwa mpe lisekwa na Yesu, boyengebene etyami bongo esika moko mpenza na kondima oyo bato bazali na yango kati na ye, Mwana moyengebene na Nzambe. (Yoane 3:16) Bayuda ye ortodokse ya eleko na Paulo bazalaki kokokisa boyengebene te, mpamba te bazalaki kobwaka boyebi ya solo oyo eteli Yesu. Nzokande, tozali kotanga na ntina na baklisto ya sembo ete: “Balongi bobele mpo na likabo na ngolu na ye na nzela na lisiko lizali kati na Yesu Klisto.”—Baloma 3:24.
Engebene mikapo mizali zingazinga, maloba oyo mazali kotalela mpenzampenza baklisto bapakolami oyo, na ntina na kondima na bango kati na Yesu, batangami bayengebene mpo na kozala batuki na libula na Klisto kati na Bokonzi ya likoló. Nzokande, lokola ntoma Yoane asakolaki yango, ebele monene ya baklisto bazali na elikya ya kozala na bomoi na mabelé esilaki kobima na mikolo na biso. Bango mpe bazali kotya kondima na bango kati na mbeka. ‘Basukoli nzambala na bango mpe bangalisi yango kati na makila na Mwana na Mpate’ mpe batangami bongo bayengebene lokola bazali baninga na Nzambe, na elikya ya kobika na bolozi monene.—Emoniseli 7:9, 14; tala Yakobo 2:21-26.
Tokóba kolanda boyengebene
Toyeba likambo oyo ete kolanda na biso ya boyengebene ekosuka te na ntango oyo tokomi na kondima epai na Yesu. Timoté azalaki moklisto amipesi mpe apakolami uta ebele na mibu ntango Paulo ayebisaki ye maloba oyo ete: “Olandaka boyengebene, kosalela Nzambe, kondima, bolingo, etingya, bopolo. Obundaka etumba malamu na kondima.” (1 Timoté 6:11, 12; 2 Timoté 2:22) Mpo na nini Timoté asengelaki ‘kolanda boyengebene’ soki Nzambe asilaki kotanga ye moyengebene?
Mpamba te liloba ‘moyengebene’ esalelami mpe kati na Biblia na ndimbola mingi mosusu, mpo na kopona ye oyo azali na bomoi ya kolongobana mpe ya peto, mpe oyo azali na kosala nyonso ebongi na ye mpo na kotosa mibeko na Nzambe. Ezali na lolenge wana nde baboti na Yoane mobatisi bazalaki bayengebene. (Luka 1:6) Ezali mpe motindo moko nde Yosefe, tata mobokoli na Yesu, mpe Yosefe ya Arimatée batangami bayengebene. (Matai 1:19; Luka 23:50) Likambo oyo ete baklisto batangami bayengebene ebomi to elongoli te mokumba oyo ya kolanda boyengebene, lokola tozali kokanga ntina na yango na ndimbola oyo. Na yango, moklisto nyonso oyo atiki kozala na bomoi ya sembo mpe ya peto to oyo azali kotosa lisusu te mibeko na Nzambe atalelami lokola moyengebene te epai na Jéhovah.
Kolanda boyengebene: ezali ntembe
Kolanda boyengebene ezali ntembe. Mpo na nini? Mpamba te tozali biso banso bato bazangi kokoka mpe tobendami mingi na kosala mabe. (Genese 8:21; Baloma 1:21-23) Lisusu, tozali kobika kati na mokili oyo ezali kolendisa makanisi mpe misala ya mbindo mpe oyo ezali na nse na boyangeli na ye oyo “mabe”, Satan le Diable. (1 Yoane 5:19; 2 Bakolinti 4:4) Ezali bongo likambo ya kokamwa te ete, kolobáká na Timoté, Paulo asangisi kolanda boyengebene na likambo oyo etali ‘kobunda etumba malamu ya kondima.’—1 Timoté 6:11, 12.
Tokoki kobunda na elonga nyonso “etumba malamu” yango? Ee, bobele soki tokolisi bolingo mozindo ya mitinda na Jéhovah mpe koyina mabe. Biblia elobi mpo na Yesu ete: “Olingi boyengebene mpe oyini kilikili.” (Baebele 1:9) ‘Tosengeli kozala na ezalela motindo moko: mposa makasi ya kolona bolingo mpo na oyo ezali malamu liboso na Nzambe, mpe koyina makasi mpo na nyonso oyo azali koboya.
Tosengeli mpe koyeba ete kolanda boyengebene ezali momekano te. Soki tokanisi ete toleki baninga mosusu, to soki tokomi na lolendo mpo na boyengebene na biso moko, tokokokana na Bafalisai. (Matai 6:1-4) Baoyo bazali kolanda boyengebene na elonga nyonso bazali komipesa lokumu na komikitisa nyonso, ‘kotaleláká baninga mosusu lokola baleki bango.’—Bafilipi 2:3.
Paulo alobelaki mingi mpenza ntina ya boyekoli na Biblia mpo na oyo etali kolanda boyengebene wana akomaki boye: “Makomami nyonso mapemami na elimo na Nzambe, makoki kopesa litomba na mateyo, na mpamela, mpo na kosembola mpe mpo na kobokola kati na boyengebene.” (2 Timote 3:16) Soki tozali koyekola Biblia mpe koyangana na makita na boklisto oyo na boumeli na yango tozali kotalela Makomami, tokobongisama kati na boyengebene. Tokoki kobongisama na Biblia mpo tolata ‘bomoto ya sika oyo bokelami kati na boyengebene mpe na bosembo ya solo.’—Baefese 4:24, MN.
Ntango boyengebene ekokoma eteni moko ya bomoto na biso, tokoyina mpenza kotyola na mibeko. Tokomekama te na koluka baninga mabe ya mokili. (1 Bakolinti 15:33) Tokobendama te na kolinga makambo ya mokili to na kozala na bolingo mpo na bozwi ya ebongiseli na biloko ya ntango oyo. (Masese 16:8; 1 Timoté 6:9, 10; 1 Yoane 2:1517) Na ntembe te, tokobendama te na masano ya mbindo mpe ya mobulu oyo epalangani mingi lelo.—Baefese 5:3, 4.
Mapamboli oyo mazali kozwama na nzela na boyengebene
Ee, kolanda nzela na boyengebene na Jéhovah ezali ntembe, kasi etumba yango ezali na ntina. Mpo na nini? Mpamba te tokoki bongo kozala na boyokani na biso moko elongo na Jéhovah ye moko. Oyo nde libaku kitoko! Biblia elobi na biso ete: “(Jéhovah) akopambola efandelo na bayengebene.” “Jéhovah atikali mosika na bato mabe, nde ayoki mabondeli na bayengebene.” (Masese 3:33; 15:29) Lisusu, tozali kokóma na boyebi mingi ya mikano na Jéhovah. “Kasi nzela na bayengebene ezali lokola pole oyo ekongenga lisusu mpe lisusu kino mokolo na malamu koleka.”—Masese 4:18.
Biblia ezali kolaka epai na baoyo bazali koluka boyengebene ete bakobatelama ntango ebongiseli na biloko mabe ekozwa nsuka na yango. “Boluka Jéhovah, bino basokemi nyonso na mokili, baoyo bakosalaka malako na ye boluka boyengebene, boluka bopolo, soko nde bokobombama na mokolo na nkanda na Jéhovah.” (Sofoni 2:3) Biblia epesi bongo elaka moko kitoko epai na baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi na mabelé ete: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”—Nzembo 37:29.
Oyo nde bantina kitoko tozali na yango mpo na kolanda boyengebene! Nzambe ye moko alobi yango ete: “Ye oyo akolanda boyengebene mpe boboto akomona bomoi mpe boyengebene mpe lokumu.”—Masese 21:21.
Kati na nimero oyo ekolanda
Tokoki kobongola motindo na biso?
Likanisi ya boklisto mpo na mikonzi ya mokili
‘Bomibongisaka’