LITEYA 15
Ndenge ozali komonana na miso ya bato
NDENGE oyo bato bazali komona yo ezali kolakisa soki ozali moto ya ndenge nini. Yehova amonaka na kati ya mitema, kasi bato batalelaka mingimingi kaka “oyo ezali komonana na miso.” (1 Sam. 16:7, NW) Soki ozali pɛto mpe olati malamu, na ntembe te, bato bakomona ete ozali kopesa nzoto na yo kilo mpe bakosepela koyoka yo. Soki olati malamu, yango ekoki mpe kopesa lokumu na lisangá oyo ozali komonisa mpe bato oyo bazali koyoka yo bakosepela na Nzambe oyo osambelaka.
Toli oyo osengeli kosalela. Biblia epesi mibeko ebele ebele te mpo na likambo etali ndenge oyo osengeli komonana na miso ya bato. Kasi epesi biso mitinda ya kozala na bokatikati mpe yango ekoki kosalisa biso tózwa bikateli malamu. Na kati ya mitinda yango, ya liboso mpenza ezali ete tosengeli ‘kosalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.’ (1 Kol. 10:31) Mitinda nini tolingi kolobela oyo etali ndenge oyo tosengeli komonana na miso ya bato?
Libosoliboso, Biblia elendisi biso ete nzoto na biso mpe bilamba na biso esengeli kozalaka pɛto. Na Mibeko oyo Yehova apesaki libota ya Yisalaele ya kala, amonisaki polele mitinda na ye oyo etali bopɛto. Na ndakisa, ntango banganga-nzambe bazalaki kokokisa mokumba na bango, basengelaki kosukola nzoto mpe bilamba na bango na bantango oyo Yehova atyelaki bango. (Lev. 16:4, 24, 26, 28) Baklisto bazali lisusu na nse ya Mibeko ya Moize te, kasi mitinda na yango etali mpe bango. (Yoa. 13:10; Emon. 19:8) Mingimingi ntango tozali kokende na esika ya losambo to ntango tozali kosakola, nzoto na biso, monɔkɔ na biso mpe bilamba na biso esengeli kozala pɛto mpo bato bákima biso te. Bandeko oyo basalaka masolo to bilakiseli na makita ya lisangá basengeli kozala ndakisa malamu na likambo yango. Soki tozali kotya likebi na ndenge oyo tosengeli komonana na miso ya bato, tokomonisa ete tozali komemya Yehova mpe lisangá na ye.
Ya mibale, Biblia elendisi biso ete tólekisaka ndelo te mpe tózalaka na makanisi malamu. Ntoma Paulo alendisaki basi baklisto ete “bábongisaka nzoto na bango . . . na kolekisa ndelo te mpe na makanisi malamu, kasi te na midɛlɛ ya kokanga nsuki mpe na wolo to na mayaka to na bilamba ya ntalo makasi, kasi na ndenge oyo ebongi na basi oyo balobaka ete babangaka Nzambe.” (1 Tim. 2:9, 10) Na likambo ya kolata mpe ya kokata nsuki, ezali na ntina ete mibali mpe bálekisaka ndelo te mpe bázala na makanisi malamu.
Moto oyo alekisaka ndelo te, alingaka te koyokisa basusu mpasi mpambampamba mpe alingaka mpe te kobenda likebi na bango epai na ye moko. Kozala na makanisi malamu elimboli kosala makambo na mayele to kokanisa malamu liboso ya kosala likambo moko. Moto oyo azali na bizaleli yango atosaka mitinda ya Nzambe mpe yango ekosalisa ye ete azala na bokatikati. Yango elimboli te ete tosengeli koboya kolata bilamba ya kitoko, kasi ezali nde kosalisa biso tómonana malamu na miso ya bato mpe tóboya kolekisa ndelo na lolenge na biso ya kolata to ya kokata nsuki. (1 Yoa. 2:16) Tolingi kosalela mitinda yango, ezala tozali na esika na biso ya losambo, na mosala ya kosakola to na misala nyonso mosusu. Ata bilamba oyo tolataka ntango tosalaka makambo mosusu esengeli komonisa ete tozali kolekisa ndelo te mpe tozali na makanisi malamu. Tokutanaka na bato oyo tokoki kopesa bango litatoli, ezala na kelasi to na esika na biso ya mosala. Atako tokolata te ndenge tolataka na makita, na mayangani ya minene to ya mike, tosengeli kolata bilamba oyo ebongi na biso, oyo ezali pɛto mpe tosengeli kozala na bopɔlɔ.
Ya solo, biso nyonso tolataka ndenge moko te. Mpe esengeli te ete biso nyonso tólataka ndenge moko. Moto na moto azalaka na ndenge oyo ye asepelaka kolata, mpe yango ezali mabe te. Kasi biso nyonso tosengeli kosalela mitinda ya Biblia ntango nyonso.
Ntoma Petelo amonisaki ete “bomoto ebombaná ya motema” nde ezali na ntina mingi koleka lolenge na biso ya kobongisa nsuki mpe ya kolata. (1 Pet. 3:3, 4) Soki mitema na biso etondi na bolingo, esengo, kimya, boboto mpe kondima makasi, yango ekokóma lokola bilamba na biso ya elimo oyo ezali mpenza kokumisa Nzambe.
Ya misato, Biblia elendisi biso tótalela soki elateli na biso mpe ndenge tobongisi nsuki ezali malamu. Na 1 Timote 2:9, Biblia elobeli “molato ya malamu.” Atako ntoma Paulo azalaki kolobela molato ya basi, etinda yango etali mpe mibali. Eloko oyo ezali malamu ezali pɛto mpe ezali na molɔngɔ. Ezala tozali bazwi to tozali babola, biso nyonso tokoki kozala na molato ya pɛto.
Na oyo etali ndenge ya komonana na miso ya bato, bato batalaka libosoliboso nsuki na biso. Nsuki na biso esengeli kozala pɛto, to tosengeli kobongisa yango malamu mpenza. Bato bakataka nsuki na lolenge mingi, na kotalela mimeseno ya mboka na bango mpe ndenge nzoto na bango ezali. Na 1 Bakolinti 11:14, 15, ntoma Paulo apesi toli moko etali lolenge ya kokata nsuki mpe ntango apesaki toli yango, na ntembe te, atalelaki makambo wana nyonso mibale. Nzokande, soki mwasi azali kokata nsuki lokola mobali, to soki mobali azali kobongisa nsuki na ye lokola mwasi, yango eyokani na mitinda ya Biblia te.—Det. 22:5.
Mpo na mibali, komonana malamu na miso ya bato esɛngi mpe ete bákataka mandɛfu. Na bisika oyo bato bamonaka ete nzombe (moustache) emonisaka lokumu, bandeko oyo basepeli kotika yango, basengeli kobongisa yango malamu.
Ya minei, elateli mpe monzɛlɛ na biso esengeli te komonisa ete tolingi mokili oyo mpe lolenge ya bomoi na yango. Ntoma Yoane apesaki likebisi oyo: “Bólingaka mokili te ná biloko oyo ezali na kati ya mokili.” (1 Yoa. 2:15-17) Mokili ya lelo etondi mpenza na mposa ya masumu. Kati na mposa yango, Yoane atángi mposa ya mosuni mpe kolakisa na lolendo biloko na yo ya kobikela. Makomami ebendi mpe likebi na biso na elimo ya botomboki, to kozanga kotosa bakonzi. (Mas. 17:11; Ef. 2:2) Bamposa mpe bizaleli yango emonanaka mbala mingi na lolenge bato bazali kolata mpe kosala monzɛlɛ. Yango wana, balekisaka ndelo na molato na bango mpe na lolenge na bango ya kosala monzɛlɛ mpo bálamusa mposa ya nzoto. Molato to monzɛlɛ yango ezalaka mobulumobulu, to emonisaka ete basilá nsɔni. Biso basaleli ya Yehova, tosengeli koboya lolenge wana ya kolata to ya kosala monzɛlɛ, oyo eyokani te na bizaleli ya baklisto.
Na esika ya kolanda mokili, ekozala mpenza malamu olanda lolenge ya kolata mpe ya kosala monzɛlɛ ya mibali mpe basi baklisto oyo bateli na elimo! Bilenge mibali oyo balingi ete básalaka masukulu ya bato nyonso bakoki kolanda molato ya bandeko oyo basalaka masukulu yango. Biso nyonso tokoki kolanda ndakisa ya bato oyo balekisá bambula mingi na mosala ya kosakola.—1 Tim. 4:12; 1 Pet. 5:2, 3.
Ya mitano, ntango tozali kopona elateli oyo ebongi, tosengeli te kobosana ete ata “Klisto kutu amisepelisaki ye moko te.” (Lom. 15:3) Yesu akanisaki libosoliboso kosala mokano ya Nzambe. Azalaki mpe koluka kosalisa basusu liboso ete akokisa bamposa na ye moko. Tokosala nini soki lolenge moko ya kolata to ya kosala monzɛlɛ ezali kopekisa biso tósolola na bato na esika oyo tofandaka? Soki tomonisi komikitisa lokola Klisto, yango ekoki kosalisa biso tózwa bikateli ya malamu. Ntoma Paulo apesaki etinda oyo: “Tozali kobɛtisa libaku ata na likambo moko te.” (2 Kol. 6:3) Mpo na yango, tokoki koboya lolenge ya kokata nsuki, kosala nsuki to ya kolata oyo ekoki kosala ete bato báboya koyoka litatoli oyo tozali kopesa bango.
Ndenge oyo otɛlɛmi liboso ya bato. Esengeli mpe kokeba mpo na ndenge na yo ya kotɛlɛma liboso ya bato. Ya solo, biso nyonso totɛlɛmaka ndenge moko te liboso ya bato mpe esengeli te ete tótɛlɛmaka ndenge moko. Nzokande, tosengeli koyeba ete Biblia emonisi ete kotɛlɛma semba emonisaka ete moto azali kopesa nzoto na ye kilo mpe azali na elikya. (Lev. 26:13; Luka 21:28) Ezali na bandeko oyo, lokola bazalaki kogunzama mpo na kosala mosala na bango na boumeli ya bambula mingi, to lokola banuni, to mpe mpo na bolɛmbu ya nzoto, bakokaka lisusu kotɛlɛma semba te; mpo bátɛlɛma, basengeli kosimba eloko moko. Kasi mpo na baoyo bazali na nzoto makasi, ekozala malamu bátɛlɛmaka semba ntango bazali koloba liboso ya bato, soki bongo te, ekomonana lokola nde bazali kosepela te to bazali koyoka nsɔni mpo na likambo moko oyo basalaki. Ndenge moko mpe, atako ezali mabe te ete molobi atyaka ntango mosusu mabɔkɔ na ye likoló ya pipitre, ekozala malamu mingi soki azali kolalela pipitre te.
Bisaleli ya pɛto. Ezali kaka bilamba na biso te nde esengeli kozala pɛto mpe kobongisama malamu, kasi bisaleli oyo tozali kosalela na mosala ya kosakola esengeli mpe kozala pɛto mpe kobongisama malamu.
Talá Biblia na yo. Biso nyonso te nde tokoki kozwa Biblia ya sika mbala moko soki oyo ya liboso ebebi. Nzokande, ata Biblia na biso esali bambula boni, esengeli komonana ete tobatelaka yango malamu.
Ya solo, ezali na ndenge mingi oyo tokoki kobongisa sakosi na biso ya mosala ya kosakola, kasi tosengeli kobatela yango ezala pɛto. Naino omoná te ndeko moko oyo alingi kotángela bato Biblia na mosala ya kosakola to mbala mosusu, ntango azali kosala lisukulu na lisangá, mpe bapapye ezali kouta na Biblia na ye ezali kokwea na nse? Ekoki kozala ete makanisi na yo ebungaki mwa moke. Soki bapapye oyo ezali na kati ya Biblia na yo ekoki kolongola likebi ya bato, wana elimboli ete esengeli kotya yango na esika mosusu, mpe yango ekomonisa ete obongisi bisaleli na yo malamu. Kobosana mpe te ete na bisika mosusu, soki olalisi Biblia na nse to mikanda mosusu oyo elobelaka makambo ya Nzambe, bato bakomona ete ozali komemya yango te.
Ndenge oyo molobi azali komonana na miso ya bato ezali likambo ya ntina mingi mpo na biso. Yango mpe esalaka ete bato básepela na biso to báboya biso. Kasi likoló na nyonso, tozali kotyela yango likebi mpenza mpamba te tolingi ‘kokómisa kitoko mateya ya Mobikisi na biso, Nzambe, na makambo nyonso.’—Tito 2:10.